Olingi kimya ya motindo nini?
NA NTINA etali libateli mpe kimya, makanisi makeseni. Bamoko bazali kotalela yango ete ezali boyokani kati na banguya na basodá oyo batɛmɛlani. Na ndakisa, banguya oyo ezali koyangela mokili, mpe mikili mosusu ya Mpótó misangani na banguya wana, basili kosala myango mingi mpo na kopekisa ete makambo mike mamema te kino na etumba ya nikleere na etando mobimba. Mokanda Annuaire 1990 de l’institut international de recherches pour la paix de Stockholm mozali kokamwa na komona ete “bikólo mosusu ya mokili” bazali mpenza kokipé likambo yango te.
Nzokande, mpo na bamilió na bato oyo bafandi na mikili ya bobólá, “libateli” elimboli bilei mpe kozwa lisalisi na lopitalo. Yash Tandon, moto oyo ayekoli makambo na politike, alimboli ete: “Na ntina etali ‘kimya mpe libateli,’ likanisi lizwami na ezaleli ya mikili mingi ya Mpótó nde esili kolónga. . . . ‘Libateli’ etalelami lokola likambo na kosala bibundeli mpe na kotika kosala bibundeli; nzokande ndambo mibale kati na misato na bato ya mokili mobimba oyo bakolyaka malamu te mpe bazangi ndako, bakanisi bongo te na ntina etali libateli.”
Biblia elaki ete etumba ekozala te na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe. “Ye akosukisa bitumba kino na nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga, akozikisa mpe makálo kati na mɔ́tɔ.” (Nzembo 46:9; Yisaya 2:4) Maladi makozala lisusu te. “Mofandi moko akoloba te ete: ‘Nazali na maladi.’ Bato oyo bakofanda na mokili, bakolimbisama masumu na bango.”—Yisaya 33:24, MN.
Na nsé na Bokonzi yango, mikakatano na makambo na nkita mikotungisa lisusu bato te. “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokóna bilanga na miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokóna te ete mosusu alya.”—Yisaya 65:21, 22.
Likambo ya ntina mingi lizali ete, Bokonzi bokolongola eloko oyo ezali kozangisa kimya mpe libateli. Nani abómbani nsima na biyangeli mabe na bato biyebi kokamba mokili te, boye bisili kosalema na boumeli ya Lisoló na bato? Atako Nzambe asili kopesa bango nzela ete bayangela mpo na ntina moko malamu, kasi Satana nde amemi mokumba wana, mpamba te Biblia elobi ete ‘mokili mobimba mozali kolala na nsé na nguya na ye.’—l Yoane 5:19, MN.
Oyo nde libɔndi likozala wana maloba oyo Paulo ayebisaki Baloma makokokana na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe, ete: “Mosika te, Nzambe oyo akopesaka kimya akonyata Satana na nsé na makoló na ye.” (Baloma 16:20, MN) Bobele Bokonzi na Nzambe na likoló, oyo botambwisami na Mokonzi Yesu Klisto, nde ekoki kosala likambo motindo wana. Na bongo, bobele na nsé na Bokonzi wana nde mabelé makobongwana paradis.—Genese 1:28; Luka 23:43.
Ee, libateli lilakami na Biblia lileki nyonso oyo bato bakoki kokanisa, mpe likozala na etando eleki monene. Ya solo, tozali kotanga ete “liwa likozala te; na mawa, na koleka, na mpasi lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Tokoki nde kotya motema na bilaká yango? Ee, mpamba te euti na Jéhovah Nzambe, Mozalisi mozwi-na-nguya-nyonso, oyo alobaki lisusu ete: “Liloba oyo likobima na monoko na ngai likozongela ngai mpamba te, kasi likosukisa yango ekani ngai, likolóngisa likambo litindaki ngai yango.” (Yisaya 55:11) Ezali na elónga monene nde Jéhovah Nzambe akamati uta sikawa myango mpo na komema kimya epai na bato, libateli mpe bolamu ya solo oyo ekopesa bango esengo, mpo na kokumisama na boyangeli na ye ya seko.