Ózala mwanamboka to mpe mopaya, nzambe akoyamba yo!
“Bobele na moto moko, asali mabota na bato nyonso mpo na kofanda na etando nyonso ya mabelé.”—MISALA 17:26, MN.
1. Tokoki koloba nini na ntina na mikakatano minene oyo bato bazali na yango na bamboka mingi mpo na kondima bato ya mikili misusu?
TELEVIZIO, radio mpe bazulunalo ezali koyebisa biso ete na mikili mingi, bato bazali sé komitungisa na ntina na bapaya, na bautá mpe na bato oyo bakimá mboka na bango. Na mikili misusu ya Azia, ya Afrika, ya Mpótó mpe ya Amerika, bamilió na bato balingi mpenza kotika bamboka na bango. Ezali mbala mosusu mpo na kokima mpasi, bitumba ya banamboka to mpe minyoko. Kasi nani akoyamba bango? Zulunalo Time elobaki ete: “Atako makambo ya mikili ya Mpótó mabandi kobongwana, kasi emonani na bamboka mosusu ete baboyi mpenza kondima motindo na bomoi ya bapaya koleka nkutu na mikolo ya liboso.” Na ntina na bato 18 000 000 “baboyami,” baoyo bakimá mboka na bango, zulunalo Time elobi ete: “Bango bazali likámá monene likosila te mpo na mikili ya bozwi.”
2, 3. (a) Endimiseli nini ya kolendisa epesameli biso na Biblia na ntina etali koyambama? (b) Mpo na nini tokoki kozwa litomba na kotalela motindo oyo Nzambe asalelaki mabota mosusu, engebene lisoló ya Biblia?
2 Ata makambo nini mazali kobima mpo na yango, Biblia emonisi ete Nzambe azali koyamba bato ya mabota nyonso, bázala banamboka, bautá to mpe bato oyo bakimá mboka na bango. (Misala 10:34, 35) Kasi bato mosusu bakoki kotuna ete: ‘Lolenge nini okoki koloba bongo? Nzambe aponaki nde libota na Yisraele ya kala te kati na mabota nyonso mosusu?’
3 Totala lolenge oyo Nzambe asalaki epai na mabota na ntango na kala. Tokoki mpe kotalela bisakweli mosusu bilobeli mikumba mipesami na basaleli na losambo ya solo lelo. Botaleli ya bisakweli wana ekoki kopesa bososoli malamu, oyo mbala mosusu ekolendisa yo mpenza. Lisusu, bisakweli yango bimonisi lolenge oyo Nzambe akoki kosala epai na bato “ya mabota nyonso, mpe mikili nyonso, na bikólo nyonso mpe minoko nyonso,” nsima na bolózi monene.—Emoniseli 7:9, 14-17.
‘Bikólo nyonso bikopambolama’
4. Lolenge nini likambo ya bikólo libimaki, kasi Nzambe akamataki meko nini?
4 Nsima na mpéla, bobele libota ya Noa nde lizalaki kati na mokili mobimba, mpe basangani na yango nyonso basalelaki losambo ya solo. Kasi bomoko wana eumelaki te. Nsima na mwa ntango moke, bato mosusu bakómaki kotyola mokano na Nzambe mpe batongaki ndako molai. Mpo na yango, mokili mokabwanaki na minoko mikeseni oyo ekómaki mabota mpe bikólo bipanzanaki. (Genese 11:1-9) Atako bongo, losambo ya solo lobatelamaki na batata ya Abalayama. Nzambe apambolaki Abalayama, moto na sembo mpe alakaki ye ete bakitani na ye bakozala libota monene. (Genese 12:1-3) Libota yango ezalaki bongo Yisraele ya kala.
5. Mpo na nini biso nyonso tokoki kolendisama na motindo oyo Nzambe asalaki epai na Abalayama?
5 Nzokande, Jéhovah aboyaki libota moko te mpo na Yisraele, mpo ete mokano na ye mozalaki na ntina na mokili mobimba. Ezali yango nde tozali komona polele kati na elaká oyo Nzambe apesaki na Abalayama, ete: “Bikólo nyonso bikopambolama mpo na libota na yo, mpo ete yo osili kotósa monoko na ngai.” (Genese 22:18, MN) Atako bongo, na boumeli ya bikeke, Nzambe asalelaki Yisraele na motindo moleki mpenza: apesaki mokanda na Mibeko na libota wana, atyaki banganga mpo ete bapesaka mbeka kati na tempelo, mpe apesaki Mokili na ndaká epai na Bayisraele ete bafanda wana.
6. Lolenge nini mabota nyonso masengelaki kozwa bolamu na bibongiseli oyo Nzambe akamataki mpo na Yisraele?
6 Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele mizalaki mpo na bolamu ya bato ya mabota nyonso, mpo na lolenge oyo yango ezalaki komonisa ete bato bazali basumuki mpe esengelaki kopesa mbeka ya kokoka mpo na ‘kozipa’ masumu na bato mbala moko mpo na libela. (Bagalatia 3:19; Baebele 7:26-28; 9:9; 10:1-12) Kasi, endimiseli nini ezalaki ete Libota ya Abalayama, oyo na nzela na yango bikólo nyonso bikopambolama, likoya mpe likokokisa masɛngami? Kati na likambo oyo, Mibeko na Yisraele mizalaki lisusu na ntina. Mipekisaki ete [Bayisraele] babalana na Bakanana, libota oyo liyebanaki mpo na misala mpe milulu na bango ya mbindo, lokola oyo ya kotumba bana oyo bazalaki na bomoi. (Levitike 18:6-24; 20:2, 3; Deteronome 12:29-31; 18:9-12) Nzambe azwaki ekateli ete bango basengelaki kobomama elongo na misala na bango lokola. Nsima na bikeke mingi, mwango wana mosengelaki kopesa bolamu epai na bato nyonso, bapaya mpe bazali kati na bango, mpamba te ekopesa nzela na bankoko na Libota ete babika na libebi.—Levitike 18:24-28; Deteronome 7:1-5; 9:5; 20:15-18.
7. Likambo nini limonisaki nokinoki kati na Lisoló na bato ete Nzambe ayambaki bapaya?
7 Ata na ntango oyo Mibeko mizalaki na nguya na yango mpe wana Nzambe atalelaki Yisraele lokola libota liponami, azalaki na motema mawa epai na bapaya. Amonisaki ete andimaki kosala yango wana Yisraele alongwaki na boombo na ye na Ezipito mpo na kokenda na mokili na bango mpenza. “Ebele na bato na ndenge na ndenge bakendaki na bango elongo.” (Exode 12:38) Molakisi Keil akokisaki bato yango na “ebele na bapaya . . . lisangá, to ebele na bato ya mabota ndenge na ndenge.” (Levitike 24:10; Mituya 11:4) Na ntembe te, mingi kati na bango bazalaki Baezipito oyo bandimaki Nzambe ya solo.
Bapaya bayambami
8. Lolenge nini bato na Gabao bazwaki esika kati na libota ya Nzambe?
8 Wana Bayisraele bazalaki kobengana mabota na mbindo longwa na Mokili na ndaká, na kolanda etinda na Nzambe, ye [Nzambe] abatelaki etuluku moko na bapaya, bato na Gabao oyo bazalaki kofanda na nord ya Yelusaleme. Bato na Gabao batindaki bantóma oyo bamikálambisaki mpo na koluka kimya epai na Yosua mpe bazwaki yango. Na ntango mayele na bango mayebanaki, Yosua azwaki ekateli ete bato na Gabao bazala “bakati na nkoni mpe batóki na mai mpo na koyangana mobimba mpe mpo na etumbelo na Jéhovah.” (Yosua 9:3-27) Lelo oyo, ebele na bautá bazali mpe kondima misala mike mpo bakoka kozala bato na libota ya sika.
9. Na ntina etali bapaya na Yisraele, ndakisa ya Rahaba mpe libota na ye elendisi biso na likambo nini?
9 Okolendisama mbala mosusu na koyeba ete, na ntango na kala, Nzambe ayambaki bobele bituluku na bapaya te, ezalaki lisusu mokomoko na bato oyo bakimaki bamboka na bango. Lelo oyo, bikólo bisusu bikoyambaka bobele bapaya oyo bazali na molongó na bato ya lokumu, baoyo bazali na misolo ya kosalela na mboka to mpe baoyo batángá kelasi mingi. Ezali bongo te mpo na Jéhovah, lokola yango emonisami na likambo oyo lisalemaki mwa liboso ete bato na Gabao basalela mayele wana. Biblia elobeli Mokanana moko ya mwasi oyo azalaki na molongó na bato ya lokumu te. Biblia ebengi ye ete “Rahaba, mwasi na pite.” Mpo na kondima na ye epai na Nzambe ya solo, ye mpe libota na ye babikisamaki na ntango Yeliko ekweisamaki. Apesaki ndakisa malamu ya kondima oyo ebongi na komekola. (Baebele 11:30, 31, 39, 40; Yosua 2:1-21; 6:1-25) Atangami nkutu na molongó ya bankoko na Masiya.—Matai 1:5, 16.
10. Koyambama ya bapaya na Yisraele etalelaki likambo nini?
10 Bapaya bandimamaki mpo na kokɔta na Mokili na ndaká na ntina na milende oyo bazalaki kosala mpo na kosepelisa Nzambe ya solo. Bayisraele basengelaki kozala na boyokani te, mingi mpenza kati na makambo ya losambo, elongo na baoyo bazalaki kosalela Jéhovah te. (Yosua 23:6, 7, 12, 13; 1 Mikonzi 11:1-8; Masese 6:23-28) Atako bongo, ebele ya bautá oyo bafandaki na Yisraele, batósaki mibeko ya moboko. Basusu nkutu babongwanaki kati na losambo ya Bayuda mpe bakataki ngenga, mpe Jéhovah ayambaki bango mpenza kati na lisangá na ye.—Levitike 20:2; 24:22; Mituya 15:14-16; Misala 8:27.a
11, 12. (a) Lolenge nini Bayisraele basengelaki kosala epai na bapaya oyo basambelaki Nzambe? (b) Mpo na nini tozali mbala mosusu na mposa ya komisembola mpo na kolanda ndakisa ya Jéhovah?
11 Nzambe asɛngaki na Bayisraele ete bamekola ezaleli na ye epai na bapaya basambeli na ye, ete: “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili ya Ezipito.” (Levitike 19:33, 34; Deteronome 1:16; 10:12-19) Wana ezali liteya mpo na biso, atako tozali na nsé na Mibeko na Moize te. Ezali mpasi te na kokwea na motambo ya kozala na makanisi mabe mpe na bonguna epai na bato ya mposo mosusu, ya ekólo mosusu to mpe ya ezalela mosusu ya bomoi. Mpo na yango, tomituna ete: ‘Nazali komeka kolongola motindo na makanisi mabe oyo na kolandáká ndakisa ya Jéhovah?’
12 Bayisraele bazalaki na bilembeteli bimonisaki ete Nzambe akosala boyambi malamu. Mokonzi Salomo abondelaki boye: “Lisusu mpo na mopaya oyo azali mosangani na libota na yo Yisraele te, kasi auti mosika na mokili mosusu mpe na nkombo na yo . . . , soko akoya mpe akobondela na ndako oyo, yoka kuna na makoló . . . ete mabota nyonso na mokili bayeba nkombo na yo mpe babenga yo.”—1 Mikonzi 8:41-43; 2 Ntango 6:32, 33.
13. Mpo na nini Nzambe azwaki bibongiseli mpo na kobongola lolenge na kosala epai na Yisraele?
13 Wana Jéhovah asalelaki bobele libota na Yisraele lokola bato na ye, kobateláká libota oyo Masiya asengelaki kobotama, asakolaki mbongwana monene. Liboso, na ntango Bayisraele bandimaki kokɔta na kondimana na Mibeko, Nzambe apesaki bango likoki ya kobimisa “bokonzi ya banganga mpe libota mosantu.” (Exode 19:5, 6) Kasi Yisraele azangaki sembo na boumeli na bikeke mingi. Bongo, Jéhovah asakolaki ete akosala kondimana na sika na nzela na yango mabungá mpe masumu ya “ndako na Yisraele” makolimbisama. (Yilimia 31:33, 34) Kondimana na sika wana ezalaki kozela Masiya, oyo masumu na bato mingi masengelaki kopɛɔtwa mpo na mbeka na ye.—Yisaya 53:5-7, 10-12.
Bayisraele kuna na likoló
14. “Yisraele” nini ya sika oyo Jéhovah andimaki yango, mpe lolenge nini?
14 Makomami na Greke na boklisto mazali kosalisa biso na kososola lolenge oyo yango ekokanaki. Yesu azalaki Masiya, oyo liwa na ye likokisaki Mibeko mpe lityaki moboko mpo na kolimbisama na masumu na lolenge na kokoka. Mpo na kozwa lilimbisi yango, esengelaki te bobele kozala Moyuda oyo akatamaki ngenga kati na mosuni. Bongo te. Ntóma Paulo akomaki ete, kati na kondimana na sika, “Moyuda ya solo ezali ye oyo azali bongo na katikati na ye mpenza; kokatama ngenga na ye esalemi na motema kati na elimo, kasi na mokanda mokomami te.” (Baloma 2:28, 29, MN; 7:6) Baoyo bandimelaki mbeka na Yesu bazwaki lilimbisi, mpe Nzambe andimaki bango lokola ‘Bayuda kati na elimo,’ Bayuda oyo basali libota ya elimo libéngami “Yisraele ya Nzambe.”—Bagalatia 6:16.
15. Mpo na nini basangani na Yisraele ya elimo baponami te na kotalela bikólo na bango?
15 Ya solo, soko bato bandimami kati na Yisraele ya elimo ezali te mpo na ekólo na bango to mpo na etuká na bango. Bamoko bazalaki Bayuda na mosuni lokola bantóma na Yesu. Basusu bazalaki Bapakano, bato oyo bakatamaki ngenga te, lokola Korneye, kapitɛnɛ na basodá, ye moto na Loma. (Misala 10:34, 35, 44-48) Na ntina na Yisraele ya elimo, Paulo alobaki na sembo nyonso ete: “Mogreke te soko Moyuda te, makatami ngenga te soko ye oyo azangi kokatama ngenga te, mopaya te soko mosɛnzi te, moombo te soko nsomi mpe te.” (Bakolose 3:11, MN) Baoyo bapakolamaki na elimo na Nzambe basili kokóma “libota lipɔnami, bonganga na bokonzi, libota mosantu, bato balakami mpo na kozala libota na Nzambe.”—1 Petelo 2:9, MN; tala Exode 19:5, 6.
16, 17. (a) Bayisraele ya elimo bazali na mokumba nini kati na mokano na Nzambe? (b) Mpo na nini ebongi komituna likoló na baoyo bazali kati na Yisraele na Nzambe te?
16 Kati na mokano na Nzambe, Bayisraele ya elimo bazali na elikya nini mpo na mikolo mizali koya? Yesu ayanolaki ete: “Banga te, etonga moke, mpo ete Tata na bino asepeli kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) Baklisto bapakolami, baoyo “mboka na bango ezali kati na makoló,” bazali batuki na libula elongo na Mwana na mpate mpe bakoyangela kati na Bokonzi na ye. (Bafilipi 3:20; Yoane 14:2, 3; Emoniseli 5:9, 10) Biblia elakisi ete ‘batyami bilembo kati na bana na Yisraele’ mpe “basikwami kati na bato lokola mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na mpate.” Motuya na bango ezali 144 000. Kasi, nsima na koyebisa lolenge oyo bango batyamaki bilembo, Yoane amonisi etuluku mosusu, “ebele monene oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, mpe na mikili nyonso, na bikólo nyonso mpe na minoko nyonso.”—Emoniseli 7:4, 9; 14:1-4.
17 Basusu bakoki komituna ete: ‘Ezali boni mpo na bamilió na bato oyo bazali kati na Yisraele ya elimo te, lokola ebele monene oyo ekokatisa bolózi monene? Mokumba nini bazali na yango lelo na kotalela mwa ndambo na Bayisraele ya elimo oyo batikali?’b
Bapaya kati na bisakweli
18. Nini esalaki ete Bayisraele bazongaki na mboka na bango longwa na boombo na Babilone?
18 Soki tozangi na eleko oyo Yisraele ezalaki na nsé na kondimana na Mibeko, nde ezangaki kotósa kondimana yango, tokomona ete Nzambe azwaki ekateli ete Yisraele ebebisama na bato ya Babilone. Na 607 liboso ya ntango na biso, Yisraele ememamaki na boombo mpo na mibu 70. Na nsima, Nzambe asikolaki libota yango. Na litambwisi ya guvernere Yolobabele, batikali na Bayisraele na mosuni bazongaki na mokili na bango. Bakonzi ya Mede mpe ya Pelesa, baoyo bakweisaki Babilone, basalisaki nkutu bato wana bakendaki na boombo na kopesáká bango makabo. Mokanda na Yisaya mosakolaki makambo yango. (Yisaya 1:1-9; 3:1-26; 14:1-5; 44:21-28; 47:1-4) Mpe Esdrase ayebisi biso lisoló ya makambo oyo masalemaki na bozongi wana.—Esdrase 1:1-11; 2:1, 2.
19. Mpo na oyo etalaki bozongi na Yisraele, esakweli nini elakisaki ete bapaya bakozala mpe na kati?
19 Nzokande, esakolaki ye kosikolama mpe bozongi ya libota na Nzambe, Yisaya ayebisaki esakweli oyo kitoko, ete: “Mabota makoya epai na pole na yo mpe mikonzi kino kongɛnga na kobima na yo.” (Yisaya 59:20; 60:3) Yango eleki likambo ya koyamba mopaya mokomoko, engebene libondeli ya Salomo. Yisaya alobeli nde mbongwana moko monene. “Mabota” bakosalana elongo na bana na Yisraele: “Bapaya bakotonga bifelo na yo, mpe mikonzi na bango bakosalela yo; mpo ete na nkanda na ngai, nabɛtaki yo nde na boboto na ngai, naokeli yo mawa.”—Yisaya 60:10.
20, 21. (a) Kokokana nini tozali komona na eleko na biso na likambo litalaki bozongi na Yisraele longwa na boombo? (b) Lolenge nini ‘bana mibali mpe bana basi’ babakisamaki na nsima kati na Yisraele ya elimo?
20 Kati na makambo mingi, kokenda na boombo mpe bozongi na Yisraele na mosuni ezali na bokokani na eleko na biso elongo na Yisraele ya elimo. Liboso na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, batikali bazalaki mpenza na boyokani te elongo na mokano na Nzambe; bakangamaki na makanisi mpe misala mosusu ya Mangomba na boklisto ya lokutá. Na nsima, na ntango etumba ekómaki makasi mpe na bopusi ya bakonzi ya boklisto ya lokutá, bamoko na bamonisi na Yisraele ya elimo batyamaki na bolɔkɔ. Nsima na etumba, na 1919, baklisto bapakolami oyo batyamaki na bolɔkɔ, babimisamaki mpe balongolamaki bifundeli nyonso. Yango emonisaki ete libota na Nzambe lisikwamaki na boombo ya Babilone Monene, lisangá na mangomba ya lokutá na mokili mobimba. Libota na ye libimaki mpo na kotonga paradis ya elimo mpe kofanda wana.—Yisaya 35:1-7; 65:13, 14.
21 Makambo oyo malakisamaki kati na maloba na Yisaya, ete: “Bango nyonso basili koyangana; basili koya epai na yo. Bana na yo ya mibali bakouta kuna mosika, mpe bana na yo ya basi bakomemama na panzi. Na ntango wana, okomona mpe okosepela, motema na yo mokoningana mpe mokotonda na esengo, mpo ete biloko nyonso ya mai monene bikoya epai na yo; bozwi na mabota nyonso ekoya epai na yo.” (Yisaya 60:4, 5, MN) Na bambula mingi elandaki, ‘bana mibali mpe bana basi’ balandaki kokɔta, lokola bapakolami na elimo mpo na kozwa bisika bitikalaki kati na Yisraele ya elimo.
22. Lolenge nini “bapaya” bayei kosala mosala elongo na Yisraele ya elimo?
22 Ezali boni mpo na oyo ete, ‘bapaya bakotonga bifélo na yo.’? Yango mpe esalemaki na eleko na biso. Wana libyangi ya ba 144 000 likómaki na nsuka na yango, ebele monene oyo bauti na mabota nyonso babandaki kosopana mpo na kosambela elongo na Yisraele ya elimo. Bayei wana ya sika bazali na elikya oyo etongami na Biblia, mpo na kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo makokóma paradis. Atako, na nsima, bakosala na bosembo nyonso na esika ekeseni, nzokande basepelaki kosalisa batikali bapakolami mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi.—Matai 24:14.
23. Na meko nini “bapaya” bazali kosalisa bapakolami?
23 Lelo oyo, “bapaya” koleka 4 000 000 mpe batikali na baoyo ‘mboka na bango ezali kati na makoló, bazali komonisa bokangami na bango epai na Jéhovah. Mingi kati na bango, mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, bazali kati na mosala ya ntango nyonso: bazali ba pionniers. Kati na masangá koleka 66 000, bapaya wana bazali na mikumba lokola bankulutu mpe basaleli na misala. Batikali bazali na esengo wana ezali bango komona kokokana ya maloba oyo na Yisaya, ete: “Bapaya bakotɛlɛma mpo na koleisa bitonga na bino, mpe bato na mikili misusu bakozala balóni na bino mpe basali na bilanga na bino ya vinyo.”—Yisaya 61:5.
24. Mpo na nini tokoki kolendisama na lolenge oyo Nzambe asalaki epai na Yisraele mpe epai na mabota mosusu ya kala?
24 Na yango, ata ekólo nini ya mokili epai ozali lokola mwanamboka, mopaya to mpe moto oyo okimá mboka na yo, libaku monene lipesameli yo: kozala mopaya ya elimo oyo Mozwi-na-Nguya-Nyonso ayambi na motema mobimba. Boyambi na ye bokopesa yo likoki ya kozwa mikumba kati na mosala na ye, lelo oyo mpe kino seko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntina etali kokesana kati na “mofandi-mopaya,” “moutá” mpe “mopaya,” tala Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 501, 502, 1288-1290, mokanda oyo mobimisami na la Société Watchtower.
b Bato koleka 10 600 000 bayanganaki na ekaniseli ya mbula na mbula ebéngami ete Elambo na Nkolo, oyo ekumisamaki na ba Témoins de Jéhovah na 1991, kasi bobele bato 8 850 nde bandimaki ete bazali batikali na Yisraele ya elimo.
Bozongeli
◻ Lolenge nini Nzambe apesaki elikya ete akoyamba bato ya mabota nyonso?
◻ Likambo nini limonisi ete longola Yisraele, libota oyo liponamaki na Nzambe, mabota mosusu bakokaki kobɛlɛma epai na Ye?
◻ Lolenge nini Nzambe alakisaki kati na bisakweli ete bapaya bakosangana esika moko na Yisraele?
◻ Bozongi na Yisraele longwa na boombo na Babilone, ezali na bokokani nini, mpe lolenge nini “bapaya” basanganaki na yango?
[Elilingi na lokasa 9]
Mokonzi Salomo abondelaki na ntina na bapaya oyo balingaki koya kosambela Jéhovah