Nani akobika na “ntango ya mpasi”?
“Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Jéhovah, akobika.”—YOELE 2:32.
1. Engebene Danyele mpe Malaki, nini emonisi baoyo bazali na likoki ya kobika na “ntango ya mpasi” oyo ekoya?
KOKANISÁKÁ na ntina na eleko na biso, mosakoli Danyele akomaki ete: “Ekozala na ntango ya mpasi lokola oyo emonani naino te uta ebandeli ya mabota kino ntango yango. Mpe na ntango yango, bato na yo bakobika, moto na moto oyo nkombo na ye ekokomama kati na mokanda.” (Danyele 12:1, MN) Oyo nde maloba na kolendisa! Jéhovah akokanisela libota oyo asepeli na yango, lokola elobami lisusu na Malaki 3:16 (MN), ete: “Na ntango yango, baoyo bakobangaka Jéhovah balobanaki moto na moninga na ye, mpe Jéhovah atyaki likebi mpe ayokaki. Bongo mokanda na kokanisama mokomamaki liboso na ye mpo na baoyo bakobangaka Jéhovah, mpe mpo na baoyo bakokanisaka nkombo na ye.”
2. Ye oyo akokanisaka mpo na nkombo ya Jéhovah, apusami na kosala nini?
2 Ye oyo akokanisaka mpo na nkombo ya Jéhovah asengeli kozwa boyebi ya solo likoló na ye na Klisto na ye mpe na mikano na ye minene na ntina etali Bokonzi. Na bongo, basaleli na ye bazali koyekola kotósa ye, kozala na boyokani malamu elongo na ye na komipesáká epai na ye, mpe na kolinga ye ‘na motema na bango mobimba, mpe na mayele na bango mobimba, mpe na makasi na bango mobimba.’ (Malako 12:33; Emoniseli 4:11) Kati na mawa na ye, Jéhovah asili kokamata bibongiseli mpo ete bato na komikitisa bazwa bomoi ya seko na nzela na mbeka na Yesu Klisto. Na bongo, bato yango bakoki kozongela na elikya nyonso, maloba oyo na limpinga ya likoló oyo likumisaki Nzambe na ntango Yesu abotamaki, ete: “Nkembo na Nzambe kuna na likoló, mpe kimya na nsé epai na bato oyo ye asepeli na bango.”—Luka 2:14.
3. Likambo nini Jéhovah asengeli kosala liboso ete kimya eya awa na mabelé?
3 Kimya yango ekómi penepene koleka motindo oyo bato mingi bazali kokanisa yango. Kasi esengeli liboso ete kosambisa na Jéhovah esalema likoló na mokili oyo mabe. Sofoni, mosakoli na ye alobi ete: Mokolo monene na Jéhovah mobɛlɛmi. Mobɛlɛmi na lombango mpenza.” Mokolo yango mokozala motindo nini? Esakweli elandi ete: “Nsango ya mokolo ya Jéhovah ezali bololo. Wana, elombe akongánga. Mokolo yango mozali mokolo na nkanda, mokolo na mpasi mpe na mikakatano; mokolo na mopepe makasi mpe na libebi, mokolo na mapata mpe na molili tuu; mokolo na kobɛtama na kɛlɛlo mpe na kongánga na etumba, mpo na bamboka makasi mpe na bisika milai bilendisami. Mpe nakoyeisa mikakatano epai na bato, mpe bakotambola lokola bakufeli miso; mpo ete basaleli Jéhovah lisumu.”—Sofoni 1:14-17 (MN); tala Habakuku 2:3; 3:1-6, 16-19.
4. Banani bazali lelo kondima libyangi mpo na koyeba mpe kosalela Nzambe?
4 Ezali likambo na esengo lelo ete bamilió na bato bandimi libyangi ya koyeba mpe kosalela Nzambe. Na ntina na baklisto bapakolami baoyo bakɔtisamaki kati na kondimana na sika, esakweli oyo eyebisamaki, ete: “‘Bango nyonso bakoyeba ngai, longwa na oyo moke kino oyo aleki monene’; Jéhovah alobi bongo.” (Yilimia 31:34, MN) Bango nde babandaki mosala ya kopesa litatoli na eleko na biso. Mpe lelo oyo, nzokande mingi na batikali bapakolami bazali kosukisa bomoi na bango awa na mabelé, “ebele monene” ya “bampate mosusu” bazali koya mpo na ‘kosalela Nzambe na mosala na bulee, butu mpe moi,’ kati na bibongiseli ya Nzambe bikokisami na tempelo. (Emoniseli 7:9, 15; Yoane 10:16) Ozali kati na baoyo bazali na mosala wana kitoko?
Lolenge nini “biloko kitoko” bizali koingela
5, 6. Mosala nini mokopesaka lobiko, oyo mosengeli kokokisama liboso ete mabota nyonso maningisama mpe mabomama?
5 Sikawa, totalela Hagai 2:7 (MN), epai Jéhovah asakoli na ntina na ndako na ye ya losambo na elimo. Alobi ete: “Nakoningisa mabota nyonso, mpe biloko kitoko ya mabota nyonso bikoingela; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo.” Bisakweli ya Biblia bimonisi ete ‘koningana ya mabota’ euti na kosambisama na Jéhovah likoló na bikólo yango. (Nahumu 1:5, 6; Emoniseli 6:12-17) Mosala na Jéhovah mosili kosakolama na Hagai 2:7, mokosuka mpenza na ntango mabota makoningisama kino kobomama nyee. Kasi nini ekokómela “biloko kitoko ya mabota nyonso”? Esengeli kozela ete ekɔtisama na koningisama wana ya nsuka mpe na koboma? Soko moke te.
6 Totangi na Yoele 2:32, ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na Jéhovah, akobika; mpo ete na ngomba na Siona mpe na Yelusaleme, ekozala na babiki lokola Jéhovah alobaki yango; mpe kati na babiki, ekozala na baoyo Jéhovah akobyanga.” Jéhovah azali kobimisa bango, mpe bazali kobelela nkombo na ye na kondima kati na mbeka na Yesu liboso na koningisama na nsuka na bolózi monene. (Tala Yoane 6:44; Misala 2:38, 39.) Likambo ya esengo mpenza, ebele monene na motuya mingi, oyo esalemi lelo na bato koleka bamilió minei, ‘ezali koingela’ kati na ndako ya losambo na Jéhovah liboso ete ‘mabota maningisama’ na Armagedon.—Emoniseli 7:9, 10, 14.
7. ‘Kobelela nkombo ya Jéhovah’ elimboli nini?
7 Lolenge nini babiki wana bazali kobelela nkombo ya Jéhovah? Yakobo 4:8 (MN) eyebisi biso ete: “Bobɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma na bino. Bosukola mabɔkɔ na bino bato na masumu, mpe bopɛtɔla mitema na bino bato bazangi mayele.” Motindo moko na batikali bapakolami oyo bamonisaki nzela, baoyo bazali kolikya kozala kati na ebele monene ya babiki na Armagedon basengeli kosala na molende. Soki tozali na elikya ya kobika, tosengeli komimwangisa na Liloba na Jéhovah oyo ekopɛtolaka, mpe kosalela mitinda na ye ya sembo kati na bomoi na biso. Tosengeli mpenza kopesa bomoi na biso epai na Jéhovah mpe komonisa elembo ya komipesa wana na nzela na batisimo na mai. Kobelela Jéhovah na kondima esɛngi lisusu ete topesa litatoli mpo na ye. Mpo na yango, Paulo akomaki na Baloma, mokapo 10, verset 9 mpe verset 10 (MN), ete: “Soki okoyambola ‘liloba oyo kati na monoko na yo’ ete Yesu azali Nkolo, mpe soki okondimela kati na motema na yo ete Nzambe asili kosekwisa ye kati na bakufi, okobika. Mpamba te, ezali na motema nde bakondimelaka mpo na boyengebene, kasi ezali na monoko nde bakosalaka eyambweli mpo na lobiko.” Na nsima, na verset 13, ntóma atangi esakweli na Yoele, ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na Jéhovah, akobika.”
‘Boluká, boluká, boluká’
8. (a) Engebene mosakoli Sofoni, Jéhovah azali kosɛnga nini mpo na kozwa lobiko? (b) Liloba “soko nde” lizwami na Sofoni 2:3, ekebisi biso na likambo nini?
8 Totalela mokanda ya Sofoni, mokapo 2, versets 2 mpe 3, mpe totanga oyo Jéhovah asɛngi mpo na kobika: “Naino nkanda monene na Jéhovah eyeli bino te, naino mokolo na nkanda na Jéhovah eyeli bino te, boluka Jéhovah, bino basɔkɛmi nyonso na mokili, baoyo bakosalelaka malako na Ye. Boluka boyengebene, boluka komikitisa, soko nde bokobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.” Tala liloba “soko nde.” Tokoki koloba te ete: ‘Soko obiki, obiki mpo na libela.’ Tokobómbama mokolo wana soki tokolanda kosala makambo oyo misato. Tosengeli koluka Jéhovah, koluka boyengebene mpe tosengeli koluka komikitisa.
9. Mbano nini elakami na baoyo bazali koluka komikitisa?
9 Mbano elakami na baoyo bazali koluka komikitisa, ezali mpenza kitoko. Totangi na Nzembo 37, versets 9 kino 11, ete: “Baoyo batii elikya epai na Jéhovah bakosangola mokili. Mpe nsima na mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, mpe bakosepela na kimya mingi.” Kasi, nini ekokómela baoyo bazali koluka boyengebene? Verset 29 elobi ete: “Bayengebene bakosangola mokili, mpe bakofanda wana libela.” Mpo na baoyo bazali koluka Jéhovah, ba versets 39 mpe 40 elobi na biso ete: “Lobiko na bayengebene euti na Jéhovah; ye azali ekimelo na bango na ntango na mpasi. Mpe Jéhovah akosunga bango mpe akobikisa bango. Akobatela bango longwa na bato mabe mpe akobikisa bango, mpo ete balukaki ekimelo epai na ye.”
10. Banani basili mpenza koboya koluka Jéhovah mpe koluka komikitisa?
10 Mangomba na boklisto ya lokutá balukaki Jéhovah te. Bakonzi na bango ya mangomba basili nkutu kobwaka nkombo na ye monene, kino kolongola yango kati na mabongoli na bango ya Biblia, mpo na lolendo na bango. Basepeli kosambela Nkolo to Nzambe oyo azangi nkombo mpe kokumisa Bosato ya bapakano. Epai mosusu, boklisto ya lokutá ezali koluka boyengebene te. Ntalo monene ya bandimi na bango bazali na motindo na bomoi na nsoni to mpe bazali kolendisa bato mosusu basala bongo. Na esika na koluka komikitisa lokola Yesu asalaki yango, bazali nde komilakisa, na ndakisa na televizio, na bisengo na bango, oyo mbala mingi ezalaka ya mbindo. Bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokutá bazali na bozwi mingi mpo na misolo oyo bazwaka epai na bandimi na bango. Engebene maloba ya Yakobo 5:5, ‘na mokili, bazali na bolamu mpe bazali koluka bamposa na nzoto.’ Awa mokolo ya Jéhovah mobɛlɛmi, bakomona wana maloba oyo mapemami makokokana mpenza epai na bango, ete: “Biloko na motuya bikozala na litomba te na mokolo na nkele.”—Masese 11:4, MN.
11. Nani azali motyoli na mibeko, mpe lolenge nini afundami ete abomi bato mingi?
11 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, lokola ntóma Paulo akomaki yango kati na mokanda na ye ya mibale epai na Batesaloniki, baklisto baninganaki te, kokanisáká ete mokolo ya Jéhovah mosilaki koyela bango. Kasi Paulo akebisaki ete, liboso, lipɛngwi monene lisengelaki koya mpe ete “motyoli na mibeko” asengelaki komonana. (2 Batesaloniki 2:1-3, MN) Lelo oyo, na ekeke ya ntuku mibale, tokoki komona bokóli monene ya lipɛngwi yango mpe koyeba boni bakonzi na boklisto ya lokutá bazali kotyola mibeko liboso na Nzambe. Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, kobanda 1914, bakonzi na boklisto ya lokutá basili kosangana na kufa ya bato mingi na kosungáká baoyo bazalaki ‘kotula bitimweli na bango ete bizala mipanga.’ (Yoele 3:10) Lisusu, balandi kolakisa mateya ya lokutá, lokola molimo na bato ekufaka te, epongelo, lifelo ya mɔ́tɔ, batisimo ya bana babotami sika, Bosato, mpe bongo na bongo. Nsuka na bango ekozala nini na ntango Jéhovah akoyeisa etumbu na ye? Masese 19:5 elobi ete: “Motatoli na lokutá akobika te.”
12. (a) “Mabelé” mpe “makoló” nini ya bato oyo ekobomama mosika te? (b) Liteya nini tozali kozwa na likambo oyo ete kobomama ya mokili oyo mabe ebɛlɛmi?
12 Totangi na 2 Petelo 3:10 (MN), ete: “Mokolo na Jéhovah mokoya lokola moyibi, [mokolo] oyo makoló makolimwa na makɛlɛlɛ na nsɔmɔ, wana biloko bikonangwa na mɔ́tɔ makasi mpe, mabelé makomonana polele mpe misala mizali kati na yango.” Bakonzi mabe baoyo bamitómbolaki likoló na bato lokola makoló matómbwani likoló na mabelé, mpe bato nyonso oyo basali mokili mabe ya eleko na biso, bakobomama na Nzambe awa na mabelé. Basali na bibundeli mpo na koboma bato mpe batɛki na yango, babúbi, bandimi ya lokutá mpe bakonzi na bango ya mangomba, basali na mabe, bato na mobulu mpe babomi, bango nyonso bakobomama. ‘Bakosenzwa,’ bakobomama nyee na nkanda na Jéhovah. Kasi na versets 11 mpe 12 (MN), Petelo abakisi likebisi oyo mpo na baklisto ete: “Bongo, awa biloko binso bisengeli kobebisama, ebongi na bino kozala bato na lolenge nini na etamboli na bulee mpe na ezaleli ya kobanga Nzambe, wana ezali bino kozela na kozanga kobosana koya ya mokolo na Jéhovah!”
Mikaele abandi mosala!
13, 14. Nani azali Mokɔtɛli monene na boyangeli ya Jéhovah, mpe azali kokokisa mosala nini uta 1914?
13 Ndenge nini kobika na “ntango na mpasi” na Jéhovah? Esaleli oyo Nzambe akosalela ezali bongo mokóló na baanzelu, Mikaele, oyo nkombo na ye elimboli “Nani azali lokola Nzambe?” Na bongo, Ye abongi mpenza mpo na kolóngisa boyangeli ya Jéhovah, kokɔteláká ye lokola Nzambe bobele moko ya solo mpe Nkolo moyangeli ya molóngó mobimba.
14 Oyo nde makambo minene mayebisami na Emoniseli, mokapo 12, verset 7 kino verset 17, na ntina na “mokolo na Nkolo,” oyo tozali kobika kati na yango uta 1914! (Emoniseli 1:10) Mikaele, mokóló na baanzelu abwaki Satana, mopɛngwi longwa na makoló kino na mabelé. Na nsima, lokola tokoki kotanga yango na Emoniseli, mokapo 19, verset 11 kino verset 16, moto moko abengami “Sembo mpe Sóló” ‘azali konyata ekamwelo ya vinyo na nkanda na nkele na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.’ Mobali na etumba wana na makasi abengami nkombo “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo.” Na nsuka, Emoniseli, mokapo 20, versets 1 mpe 2, elobeli anzelu monene oyo abwaki Satana na libulu mozindo mpe akangisi ye monyololo mpo na mbula nkɔto. Na lolenge emonani, mikapo nyonso wana milobeli bobele Mokɔtɛli moko ya boyangeli na Jéhovah, Nkolo Yesu Klisto, oyo Jéhovah asili kofandisa na kiti na nkembo na ye na likoló, na 1914.
15. Na ndimbola nini mpenza Mikaele ‘akotɛlɛma’ mosika te?
15 Lokola tozali kotanga yango na Danyele 12:1, Mikaele azali “kobatela” libota na Jéhovah, elingi koloba ete asili kotɛlɛma mpo na kokɔtɛla libota wana uta etyamaki mokonzi, na 1914. Kasi mosika te, Mikaele “akotɛlɛma” na motindo na kokamwa: akozala Esaleli oyo na nzela na ye, Jéhovah akolongola mabe nyonso na mabelé mpe akozala Mosikoli na libota na Nzambe na mokili mobimba. Maloba na Yesu mazwami na Matai 24:21, 22 (MN) mamonisi bonene ya “ntango ya mpasi” yango, ete: “Ekozala na bolózi monene lokola emonani naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, mpe ekobima lisusu te. Ee, soki mikolo yango miyeisamaki mokuse te, mbɛlɛ moto moko te akobika; nde mikolo yango miyeisami mokuse mpo na baponami.”
16. Nani akobika na boumeli ya bolózi monene?
16 Tozali mpenza na esengo lokola mwa ndambo na “bato” bakobika na ntango wana. Bango bakokokana te na batomboki Bayuda oyo bazwamaki na motambo na Yelusaleme na mobu 70 ya ntango na biso, mpe bamoko na bango bamemamaki na boombo na Loma. Kasi, baoyo bakobika na “ntango ya nsuka” bakokokana na lisangá na boklisto likimaki longwa na Yelusaleme, na ntango mboka yango ezingelamaki na basodá mpo na mbala ya nsuka. Bakozala basaleli na Nzambe, bamilió na bato oyo bazali kati na ebele monene, mpe bapakolami baoyo mbala mosusu bakozala naino na mabelé na ntango yango. (Danyele 12:4) Baoyo bazali kati na ebele monene “bauti na bolózi monene.” Mpo na nini? Mpo ete “basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango mpɛmbɛ kati na makila ya Mwana na mpate.” Bazali na kondima kati na nguya na mbeka ya lisiko na makila oyo Yesu asopaki mpe bazali komonisa kondima yango na kosaleláká Nzambe na bosembo nyonso. Uta sikawa, Jéhovah, “Mofandi na kiti na bokonzi,” azali kobatela bango na kozipáká bango na hema na ye, wana Mwana na mpate, Klisto Yesu azali koleisa bango mpe kokamba bango epai na ziba na mai ya bomoi.—Emoniseli 7:14, 15.
17. Lolenge nini ebele monene elendisami mpenzampenza na kosala mpo na kobatelama na mokolo ya mpasi oyo ezali koya?
17 Na kolukáká Jéhovah, boyengebene mpe komikitisa, bamilió na basangani ya ebele monene basengeli te kolɛmbisa bolingo na bango ya ebandeli mpo na solo. Osengeli kosala nini soki ozali moko na bato yango bakokisami na bampate? Lokola yango elobami na Bakolose, mokapo 3, verset 5 kino verset 14, osengeli ‘kolongola bomoto na kala mpe misala na yango.’ Luká lisalisi ya Nzambe ete osala makasi mpo na ‘koláta bomoto na sika botongami likoló na boyebi ya solo.’ Na komikitisa, lendisa mpe batela molende mosengeli mpo na kokumisa Jéhovah mpe koyebisa mikano na ye minene epai na bato mosusu. Boye, okoki mbala mosusu kobómbama na “ntango ya mpasi,” mokolo “na nkanda monene na Jéhovah.”
18, 19. Na ndimbola nini koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na kobika?
18 Mokolo yango mobɛlɛmi! Mozali koyela biso na lombangu mpenza. Koyanganisama na basangani ya ebele monene ekokisi pene na mibu 57 uta yango ezali kosalema. Basusu kati na bango basili kokufa mpe bazali kozela lisekwa na bango. Kasi esakweli ya Emoniseli elaki biso ete ebele monene na mobimba na yango bakobima na bolózi monene mpe bakozala bafandi na liboso na “mabelé ya sika” to mpe libota ya bato (Emoniseli 21:1) Okozala wana? Ekoki kosalema, mpamba te Yesu alobi na Matai 24:13, ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, akobika.”
19 Mbala mosusu, mikakatano oyo basaleli na Jéhovah bazali na yango kati na ebongiseli na biloko ya ntango oyo, mikolanda sé kobakisama. Mpe tokoki mbala mosusu kokutana na mimekamo wana bolózi monene, liziba ya mpasi, ekoya. Kasi totikala ntango nyonso pene na Jéhovah mpe na lisangá na ye. Tosɛnzela! “Jéhovah alobi boye: ‘Bozila ngai kino mokolo nakotɛlɛma mpo na kopunza. Mpamba te, nakani koyanganisa mabota, mpo na kosangisa bikonzi, ete nasopa nkɛlɛ na ngai likoló na bango, ee nkanda na ngai nyonso; mpo ete na mɔ́tɔ na zuwa na ngai, mokili mobimba mokozikisama.’”—Sofoni 3:8, MN.
20. Tosengeli kosala nini awa likámá monene to “ntango ya mpasi” ekómi penepene?
20 Na mawa na ye, mpo na kobatela biso mpe mpo na kolendisa biso, Jéhovah asili kopesa “monoko na pɛto” na basaleli na ye: yango ezali 20na nsango kitoko na ntina na Bokonzi na ye oyo ebɛlɛmi, “ete nyonso babelela nkombo ya Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.” (Sofoni 3:9, MN) Tokoki nde kokokisa mosala ya molende na kosalisáká bato mosusu ya bopɔlɔ ete ‘babelela nkombo ya Jéhovah’ mpo na kobika, awa likámá monene to ‘ntango ya mpasi’ ekómi penepene!
Bozongeli
◻ Likambo nini Jéhovah akosala liboso na kotyama na kimya awa na mabelé?
◻ Engebene Yoele, tosengeli kosala nini mpo na kobika?
◻ Engebene Sofoni, lolenge nini bato na komikitisa bakoki komibatela na nkanda monene na Jéhovah?
◻ “Motyoli na mibeko” ezali nani, mpe lolenge nini afundami ete abomi bato?
◻ Koyika mpiko ezali na ntina nini mpo na kobika?