Toyekola botósi na kondimáká toli
KANISA ete ozali na nsɔngé ya ngomba molai mpe ya mpasi mpo na komata, bongo omimoni lokola nde ozali mpenza na nsɔngé ya mokili. Okozala mpenza na esengo mpe na bonsomi!
Nzokande, bonsomi na yo ezali mpenza na ndelo. Mobeko ya pesanteur ezali kotya ndelo na nyonso oyo okosala mpo na kotambola; libungá moke ekoki kozala likámá monene. Kasi, ezali mpenza likambo ya esengo na koyeba ete mobeko ya pesanteur ezali kopekisa yo ete okangama mpamba te na likoló. Na bongo, mobeko wana mozali mpenza mpo na bolamu na yo. Kotósa ndelo oyo osengeli kotambola likoló ya nsɔngé ya ngomba wana, ezali na ntina mingi mpo na kozala na bomoi.
Ya solo, mbala mosusu mibeko wana mpe botósi na yango ekoki kotya ndelo na bonsomi na biso, kasi yango nde eyeisi botósi eloko ezangi ntina?
Likanisi ya Nzambe na ntina na botósi
Lokola azali “Mozalisi Monene,” Jéhovah azali “liziba ya bomoi.” Mpo na ntina wana, bikelamu na ye nyonso bisengeli kotósa ye. Mokomi na Nzembo amonisaki elimo oyo kitoko wana akomaki ete: “Yakani ete tosambela mpe tokumbama; tokwea na mabɔlɔngɔ liboso na Jéhovah, Mozalisi na biso. Mpo ete ye azali Nzambe na biso, mpe biso tozali bato na elanga na ye mpe bampate na lobɔkɔ na ye!”—Mosakoli 12:1; Nzembo 36:9; 95:6, 7.
Longwa na ebandeli, Jéhovah azali kosɛnga na bikelamu na ye ete batosa ye. Mpo ete Adam na Eva balanda kofanda na Paradis, basengelaki komonisa botosi. (Genese 2:16, 17) Atako baanzelu bazali na lolenge na bomoi eleki oyo na bato, bango mpe basengeli komonisa botósi. Mpo ete bikelamu mosusu ya elimo “batósaki te na ntango na kala, wana Nzambe azelaki mpo na motema molai na ye, na mikolo na Noa,” bazwaki etumbu na kobwakamáká kati na “mabulu ya molili tuu mpo ete babatelama mpo na kosambisama.”—1 Petelo 3:19, 20; 2 Petelo 2:4.
Tokoki koloba ete, Nzambe azali kotalela botósi lokola lisɛngami mpo na kondimama na ye. Totangi ete: “Jéhovah akosepela na mbeka na miboma lokola ye akosepela na botósi ya liloba na ye? Tala! Kotósa eleki mbeka, mpe koyoka na likebi eleki mafuta na mpate.”—1 Samwele 15:22.
Esengeli koyekola yango—Mpo na nini mpe lolenge nini
Ezali ntina mpenza ete toyekola botósi, mpamba te yango ezali kosala ete totalelama lokola bayengebene liboso na Nzambe. Lolenge moko na boyekoli ya monoko moko, momeseno ya kotósa ekoki kobanda uta bomwana. Yango wana Biblia ezali koloba mingi na ntina na kolakisa bana na ntango bazali naino mike.—Yosua 8:35.
Na kolanda makanisi ya lelo, basusu bazali kotɛmɛla Biblia na kolobáká ete kosɛngisa botosi epai na bana, ezali bongo kobebisa makanisi na bango na makasi. Bazali koloba ete bana bango moko basengeli kokólisa makanisi na bango mpe mitinda oyo likoló na yango bakotonga bomoi na bango kozanga kozwa bopusi ya mikóló.
Kasi, na bambula 1960, wana baboti mingi bazalaki na likanisi motindo wana, Wilhelm Hansen, mokomi mpe molakisi ya psychologie, azalaki na likanisi likeseni. Akomaki ete: “Na ntango mwana moke azali kokóla, wana azali naino penepene na baboti na ye, likambo ‘mabe’ ezali oyo baboti bazali kopekisa ye, likambo ‘malamu’ ezali oyo bazali kotinda ye ete asala yango to na likambo mpo na yango bazali kokumisa ye. Na bongo, bobele botósi nde ezali komema bana na kozala na etamboli ebongi mpe na makambo ya ntina mingi oyo makoyokanisa ye na bizaleli malamu.”—Tala Masese 22:15.
Liloba na Nzambe elobi mingi na ntina ya koyekola kotósa. Totangi ete: “E Yawe, nayebi: Moto azali mokonzi wa motema te mpe moto moko akotambwisa makolo ma ye te.” (Yilimia 10:23, Liloba lya Nzambe) Lisoló ya bato etondi na bandakisa mingi ya bato oyo bazalaki komitambwisa na lolenge balingaki, na kolanda mitinda na bango, mpe bakutanaki na mikakatano minene mpo na yango. Mpo na nini mbala mingi ezalaka bongo? Mpo ete bato bazali mpenza na boyebi te, na mayele te mpe na bososoli oyo ekoki te mpo na kotambwisa bomoi na bango. Oyo eleki mabe, babotami na makanisi ya kozwa bikateli mabe. Nokinoki, nsima ya mpela, Jéhovah alobaki na ntina na moto, ete: “Makanisi ya motema na moto mazali mabe longwa na bolenge na ye.”—Genese 8:21.
Na yango, moto moko te azali kobotama na makanisi ya kotósa Jéhovah. Tosengeli kokɔtisa yango epai na bana na biso mpe koyekola yango na boumeli ya bomoi na biso. Moko na moko kati na biso asengeli kolona ezalela ya motema lokola mokonzi Davidi, oyo akomaki ete: “Ɛ Jéhovah, lakisa ngai banzela na yo; monisa ngai bilekelo na yo. Tambolisa ngai kati na solo na yo mpe lakisa ngai, mpo ete yo ozali Nzambe ya lobiko na ngai; nazali kotalela yo mokolo mobimba,”—Nzembo 25:4, 5.
Toteya botosi na kozaláká batosi
Mama na Yesu mpe tata mobɔkɔli na ye, bayebaki malamu makambo oyo matalelaki kobotama na ye. Bayebaki bongo mokumba monene oyo Yesu asengelaki kozala na yango kati na kokokisama ya mikano ya Jehovah. (Tala Luka 1:35, 46, 47.) Mpo na bango, maloba oyo mazalaki na ndimbola monene, ete: “Bana mibali bazali likabo liuti na Jéhovah.” (Nzembo 127:3) Bayebaki mpenza mokumba na bango monene, mpe batosaki nokinoki malako ya Nzambe, lokola oyo ya kokima na Ezipito to, mpe oyo bazwaki nsima mpo na kokenda na Galilai.—Matai 2:1-23.
Baboti na Yesu bandimaki lisusu mokumba na bango na ntina etali kopesa toli. Ezali solo ete, na boumeli ya bomoi na ye liboso na kokóma moto, Yesu azalaki ntango nyonso na botosi. Kasi ntango akómaki awa na mabelé, ayekolaki kotosa na makambo oyo mazalaki mpenza ya sika. Libosoliboso, atosaki baboti oyo bazangaki kokoka, mpamba te, ata azalaki mwana oyo azalaki moto ya kokoka, azalaki na mposa ya mitinda mpe malako, oyo ezali bongo motindo mosusu ya toli. Ezali yango nde baboti na ye bapesaki ye. Kasi, ezalaki na ntina te ete basembola ye na nzela ya bitumbu. Yesu azalaki ntango nyonso kotósa, ntina ezalaki te ete bazongelaka makambo mpo na ye. Totangi ete: “Yezu azongaki na Nazareti nzela moko na bango [baboti na ye], mpe azalaki kotosa bango.”—Luka 2:51, Boyokani ya sika.
Yozefe na Marie bayebaki mpe lolenge ya koteya Yesu na kozaláká bandakisa. Na yango, totangi ete “baboti na ye bazalaki na momeseno ya kokenda mbula na mbula na Yelusaleme mpo na elambo ya Pasiká.” (Luka 2:41, MN) Na kosaláká bibongiseli mpo na komema libota na ye, Yozefe amonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na bolamu na bango ya elimo mpe azalaki kotalela losambo ya Jéhovah na bopotu te. Bobele bongo lelo, baboti bakoki koteya botosi epai na bana na bango na nzela ya botosi oyo bazali na yango na makambo ya losambo.
Mpo na toli oyo Yozefe na Marie bazalaki kopesa na boyengebene, “Yesu akolaki na mayele mpe na nzoto; azwaki ngolu na Nzambe mpe na bato.” Oyo nde ndakisa kitoko mpo na baboti baklisto lelo!—Luka 2:52.
“Botósaka . . . kati na makambo nyonso”
“Bino bana, botosaka baboti na [bino] kati na makambo nyonso, mpo ete yango ebongi katina Nkolo.” (Bakolose 3:20, MN) Yesu akokaki kotosa baboti na ye kati na makambo nyonso, mpamba te botosi na bango epai na Jéhovah ezalaki kopekisa bango ete basɛngisa epai na Yesu—to na bandeko na ye mibali mpe basi—makambo oyo mazali kotɛmɛla mokano ya Jéhovah.
Na mikolo na biso, baboti mingi bazali kolónga mpo na koteya bana na bango ete batosaka kati na makambo nyonso. Totya likebi na maloba ya batata misato, baoyo basili kobɔkɔla bana na bango, mpe bazali kosala na filiale moko ya la Société Watch Tower.
Theo ayebisi lolenge oyo ye mpe mwasi na ye balongaki kobɔkɔlo bana mitano ya mibali. Alobi ete: “Na ebandeli, ebongi komonisa na bana ete biso mikóló, tosalaka mpe mabunga. Likambo ya mawa mpenza, tozongelaka mabungá yango, kasi tosengeli ntango nyonso kosɛnga bolimbisi mpe lisalisi ya Tata na biso ya likoló. Tozalaki komonisa epai na bana na biso ete, lokola bango bazalaki kobundisa mikakatano ya bolenge, biso mpe tozalaki kobundisa mikakatano ya mikóló.”
Mpo ete mwana ayekola botósi, ezali likambo ya ntina ete boyokani ya bolingo ezala kati na ye mpe baboti na ye. Hermann alobi na ntina na mwasi na ye ete: “Epai na bana mibali, azalaki bobele mama te, kasi azalaki lisusu moninga na bango. Yango ezalaki kosepelisa bango, mpe bazalaki na nkaka te mpo na kotósa.” Mpe abakisi toli malamu mpo na kobongisa lisusu boyokani kati na bana mpe baboti, ete: “Tozwaki ekateli, na boumeli ya bambula mingi, ete totika kosalela masini oyo ekosukolaka basani mpo ete basani esukolamaka mpe epangusamaka na mabɔkɔ. Bana na biso ya mibali basengelaki kopangusa yango moto na moto na mokolo na ye. Ezalaki ntango malamu mpo na kosolola.”
Boyokani ya bolingo kati na bana mpe baboti emonisi boyokani oyo moklisto asengeli kozala na yango elongo na Jéhovah. Rudolf alimboli lolenge nini ye mpe mwasi na ye, basalisaki bana na bango mibale ya mibali, mpo na kozala na boyokani motindo wana: “Moboko ezalaki boyekoli na libota ya mbala na mbala. Tozalaki kosɛnga na bana ete basala mwa bolukiluki. Tozalaki mpe kotanga Biblia elongo mpe, na nsima, tozalaki kopesa bakomantere. Bana na biso ya mibali bayebaki ete Jéhovah azali kozela te bobele ete bana batosa ye, kasi baboti lokola.”
Baboti baklisto bayebi ete maloba mapemami oyo ete “mpamela ya toli ezali nzela ya bomoi,” mataleli bango mpe bana na bango. Na yango, soki bana basengeli kotósa baboti na bango kati na makambo nyonso, baboti mpe basengeli kotósa Jéhovah kati na makambo nyonso oyo asɛngi na bango. Na bongo, baboti mpe bana bakoyeisa te bobele boyokani makasi kati na bango, kasi bakolendisa lisusu boyokani na bango elongo na Nzambe.—Masese 6:23.
Totalela botosi na makanisi malamu
Tokoki mpenza kozala na botɔndi mingi lokola Liloba na Nzambe lizali kopesa biso batoli kitoko mpo na kobɛɔkɛɔla bana. (Tala encadré.) Bana oyo bazali koyekola botosi epai na baboti oyo bazali kopesa bango toli kati na boyengebene, bazali mpenza liziba ya esengo mpo na libota mobimba ya baklisto.
Lokola kotósa Nzambe elimboli bomoi, tosengeli te koluka—ata mpo na ntango moke—kolekisa ndelo oyo etyameli biso na mibeko ya Nzambe mpo na bonsomi na biso. Tozwa naino ndakisa, soki tokokaki kolongola mobeko ya pesanteur. Tokozala na esengo monene mpenza na likanisi ya kolongwa na nsɔngé ya ngomba molai kino komata na mapata, kozanga ete eloko moko epekisa bonsomi na biso. Kasi naino oyo ekokóma soki yango esalemi mpenza solo? Tokokwea na kokwea monene!
Koyekola botosi na kondimáká toli ezali kosalisa biso na kokolisa bomoto ya bokatikati mpe epesi biso nzela na koyeba bandelo na biso. Ezali kopekisa biso ete tozala na makambo makasi te epai na bato mosusu, mpe tozanga kotalela lotómo ya bato mosusu te to mpe bamposa na bango. Ezaleli wana ezali kosalisa biso na kopɛngola mitungisi. Na bokuse, yango ekopesaka bolamu.
Na yango, ozala mokóló to mwana moke, yekola botosi na kondimáká toli “mpo ete yango ezala malamu mpo na yo mpe oumela ntango mingi na mokili.” (Baefese 6:1-3, MN) Nani akolinga kobebisa elikya na ye ya kozala na bomoi ya seko mpo na koboya koyekola botósi na kondimáká toli?—Yoane 11:26.
[Etanda na lokasa 29]
BABOTI, BOTEYAKA BOTÓSI NA KOPESÁKÁ TOLI KATI NA BOYENGEBENE
1. Pesa toli etongami likoló ya mibeko mpe mitindo ya Makomami.
2. Pesa toli bobele na kosangisáká botosi te, kasi na kolimboláká ntina oyo yango ezali nzela ya mayele—Matai 11:19b.
3. Pesa toli, kasi na nkanda te mpe na kongánga te.—Baefese 4:31, 32.
4. Pesa toli na komonisáká boyokani etondi na bolingo mpe na bobóto.—Bakolose 3:21; 1 Batesaloniki 2:7, 8; Baebele 12:5-8.
5. Pesa bana toli uta bomwana na bango.—2 Timoté 3:14, 15.
6. Pesa toli mbula na mbala mpe na motindo mobongi.—Deteronome 6:6-9; 1 Batesaloniki 2:11, 12.
7. Omipesa toli yo moko liboso mpe teya na ndakisa.—Yoane 13:15; tala Matai 23:2, 3.
8. Pesa toli na kotyáká motema mobimba epai na Jéhovah, mpe sɛnga lisalisi na ye kati na mabondeli.—Basambisi 13:8-10.
[Elilingi na lokasa 28]
“Mpamela ya toli ezali nzela ya bomoi”