Nani azali kolanda pole na mokili?
“Bozali kongenga lokola miinda na mokili.”—BAFILIPI 2:15.
1. Biblia ezali koloba nini na ntina na pole ya lokuta ya mangomba?
BIBLIA ezali komonisa polele ete Yesu azali “pole monene,” “pole na mokili.” (Yisaya 9:2; Yoane 8:12) Nzokande, ntango azalaki na mabele, bobele bato moke nde bandimaki kokoma bayekoli na ye. Ebele na bato balingaki pole ya lokuta, oyo mpo na koloba solo, ezalaki nde molili. Na ntina na bango, Liloba na Nzambe elobi ete: “Mpo ete bato yango bazali bantoma na lokuta, basali na kozimbisa, baoyo bakomimonisa lokola bantoma na Klisto. Bokamwa te, mpo ete ata Satana akomimonisaka lokola ntoma na moi. Bongo ezali likambo monene te soko basali na ye bakomimonisa lokola basali na boyengebene. Nsuka na bango ekozala motindo moko na misala na bango.”—2 Bakolinti 11:13-15.
2. Yesu alobaki nini na ntina na kosambisama?
2 Na yango, bato nyonso te balingaka pole, atako ezali kongenga na kitoko nyonso. Yesu alobaki na ntina na likambo yango ete: “Kosambisama ezali boye ete pole esili koingela kati na mokili nde bato baponi molili liboso na pole mpo ete misala na bango mizali mabe. Mpo ete moto na moto oyo azali kosalaka na yauli ayini pole mpe akoyaka epai na pole te ete misala na ye miyebisama te.”—Yoane 3:19, 20.
Balingaki molili
3, 4. Lolenge nini, na eleko na Yesu, bakonzi na mangomba bamonisaki ete balingaki kolanda pole te?
3 Totala ndenge likambo yango ekokanaki ntango Yesu azalaki na mabele Nzambe apesaki Yesu makoki ya kosala bikamwiseli minene; ezalaki elembeteli oyo emonisaki ete azalaki Masiya. Na yango, mokolo na Sabata moko, afungolaki miso na moto moko oyo abotamaki mokefeli miso. Oyo nde motema mawa! Moto yango azalaki solo na botondi! Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ye akokaki komona! Nzokande, likanisi ya bakonzi na mangomba ezalaki nini? Kati na Yoane 9:16 tozali kotanga ete: “Bafalisai mosusu balobi [na ntina na Yesu] ete: ˈMoto yango auti na Nzambe te mpo ete akotosaka Sabata te.ˈ” Mitema na bango mizalaki mpenza mabe! Kobikisama na ekamwiseli euti kosalema kasi na esika ete basepela na ntina na moto oyo bafungoli miso na ye mpe bakumisa moto oyo abikisi ye, bango bazali nde kokweisa Yesu. Na likambo yango, basalaki mpenza lisumu ya kotemela mosala ya elimo santu, lisumu oyo likoki kolimbisama te.—Matai 12:31, 32.
4 Na nsima, ntango bakosi wana batunaki moto yango oyo azalaki mokufeli miso na ntina na Yesu, moto yango alobaki na bango ete: Likambo oyo ezali na kokamwa solo, ete boyebi te soki [Yesu] auti wapi nzokande afungoli miso na ngai! Toyebi ete Nzambe akoyokaka bato na masumu te nde soko moto akotosaka Nzambe mpe akosalaka mokano na ye, Nzambe akoyokamela ye. Longwa na ebandeli, eyokami naino te ete moto afungoli miso na moto abotami na miso makufi. Soko moto oyo [Yesu] auti na Nzembe te, akoki kosala eloko te.” Bakonzi na mangomba basalaki nini? “Bazongisi monoko mpe balobi na ye ete: ˈYo obotami kati na masumu solo solo, mpe ozali kolakisa biso?ˈ Mpe babwaki ye libanda.” Oyo nde mitema makasi! Mitema lokola libanga. Yango wana Yesu alobaki na bango ete atako bazalaki na miso mpo na komona biloko ya mosuni, nzokande na elimo bazalaki bakufeli miso.—Yoane 9:30-41.
5, 6. Kati na etamboli ya bakonzi na mangomba ya ekeke ya liboso, nini emonisi ete balingaki molili?
5 Lisumu na bakonzi wana ya mangomba bakosi mpo na kotemela elimo santu na Nzambe emonanaki polele na libaku mosusu, ntango Yesu asekwisaki Lazare. Na nzela ya ekamwiseli wana bato mingi bandimelaki Yesu. Nzokande totala motindo nini bakonzi na mangomba basalaki. “Bongo banganga kapita mpe Bafalisai bayanganisi Koyangana mpe balobi ete: ˈTosala nini? Mpo ete moto oyo azali kosala bilembo mingi. Soko tokotika ye boye, bato nyonso bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.ˈ” (Yoane 11:47, 48) Bazalaki komibanzabanza mingi na etelemelo na bango. Balingaki kosala nyonso mpo na kosepelisa Baloma, kasi Nzambe te. Na bongo basalaki nini? “Longwa na mokolo yango, bakani ete baboma ye [Yesu].”—Yoane 11:53.
6 Esukaki bobele wana? Te. Ekateli oyo bazwaki emonisi solo motindo oyo balingaki molili: “Banganga kapita bakani ete baboma Lazare mpe, mpamba te mpo na ye Bayuda mingi bazalaki kolongwa mpe kondima Yesu.” (Yoane 12:10, 11 ) Oyo nde nsuka ya mitema mabe! Atako milende nyonso wana basalaki mpo na kobatela etelemelo na bango, nini ekomaki? Bobele na eleko wana Bayuda batombokelaki Baloma, baoyo babundisaki bango na mobu 70 ya T.B. mpe ˈbabebisaki esika na bango, libota na bango mpe bomoi na bango!ˈ—Yisaya 5:20; Luka 19:41-44.
Motema mawa ya Yesu
7. Mpo na nini baoyo balingaki solo bayaki ebele epai na Yesu?
7 Bobele bongo, na mikolo na biso, bato nyonso te bazali kondima pole ya elimo. Kasi baoyo balingi solo bazali kosepela koya epai na pole. Bazali kondima Nzambe lokola Nkolo Moyangeli na bango, bazali kotala epai na Yesu, oyo Nzambe atindaki mpo na kolimbola solo, mpe bazali kolanda ye. Ezali yango bato na bopolo basalaki ntango Yesu azalaki na mabelé. Bayaki mingi epai na ye. Ata Bafalisai bakokaki kowangana likambo yango te. Bamonisaki ete basepeli te na likambo yango, wana elobaki bango ete: “Bato banso bazali kolanda ye.” (Yoane 12:19, Liloba lya Nzambe) Bato oyo bakokani na bampate balingaki Yesu mpo ete akesenaki mpenza na bakonzi na mangomba, baoyo bazalaki na moimi, na lolendo mpe na mposa na lokumu, baoyo Yesu alobaki na ntina na bango ete: “Bazali kokanga mikumba na bozito mpe bakotya yango na mapeka na bato nde bango mpenza balingi kotombola yango ata na mosapi na bango te. Bazali kosala misala nyonso na bango ete bato batala bango.”—Matai 23:4, 5.
8. Na kokesena na bakonzi na mangomba bakosi, Yesu amonisaki ezaleli nini?
8 Oyo nde kokesena monene na motema mawa na Yesu: “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango mpo ete balembi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:36) Asalaki nini mpo na kobongisa ezalela yango? Alobaki na baoyo banyokwamaki na ebongiseli na Satana ete: “Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; mpo ete ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.” (Matai 11:28-30) Yesu akokisaki oyo esakolamaki na ntina na ye kati na Yisaya 61:1, 2, epai tokoki kotanga ete: “Jéhovah apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai na basokemi, atindi ngai kobongisa batutami na motema; kosakola ekangweli epai na bakangami mpe kozipolama na ekangelo epai na baoyo bakangami; kosakola mbula na boboto uta na Jéhovah, mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso; kobondisa nyonso baoyo bazali kolela.”
Koyanganisama ya bamemi na pole
9. Makambo nini ya ntina mingi masalemaki na 1914?
9 Nsima na komata na ye na likoló, Yesu asengelaki kozela ete ntango ekoka wana Nzambe asengelaki kotya ye mokonzi. Esengelaki kozala na ntango yango nde alingaki kokabola “bampate” na “bantaba.” (Matai 25:31-33; Nzembo 110:1, 2) Ntango yango ekokaki na 1914, wana “mikolo ya nsuka” mibandaki. (2 Timote 3:15) Nsima na kokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló, Yesu abandaki koyanganisa bato oyo balingi kolanda pole na loboko na ye ya mobali, oyo elimboli kondimama. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mosala wana ya kokabola bato elandanaki na molende mingi.
10. Mituna nini tokoki kotuna na ntina na baoyo Yesu azali kosalela mpo na mosala ya koyanganisa?
10 Na nse ya etambwiseli na Yesu Klisto, mosala ya koyanganisama ezwaki bokóli monene. Na boumeli ya Lisoló na bato, koyanganisama lolenge yango ya bato na mabota nyonso kati na losambo na peto esalema naino boye te. Mpe nani azali lelo oyo kolanda pole euti na Nzambe mpe na Klisto? Nani azali kokokisa maloba oyo mazali na Bafilipi 2:15 mpe “azali kongenga lokola miinda na mokili,” na kobengaka basusu mpo na ˈkoya mpe kokamata mai ya bomoi, lokola likaboˈ?—Emoniseli 22:17.
11. Ezaleli na boklisto ya lokuta ezali nini liboso na pole ya elimo?
11 Boklisto ya lokuta ezali kosala yango? Boklisto ya lokuta, oyo esangisi mangomba oyo mazali kokabola bato ezali soko moke te kongenga lokola miinda. Mpo na koloba solo, bakonzi na yango bakokani na bakonzi na mangomba na ntango na Yesu. Bazali komonisa soko moke te pole oyo euti na Nzambe mpe na Klisto. Esili koleka mibu 33, zulunalo moko (Theology Today) ekomaki ete: “Tosengeli kondima na mawa nyonso ete pole wana ezali kongenga te na lolenge esengeli kati na Lingomba.... Lingomba ezali kokokana mingi mpenza na bato oyo bazingi yango. Na esika ete engengisa mokili, ezali nde komela mpe kobimisa kongenga ya mokili.” Lelo oyo ezalela na boklisto ya lokuta eleki lisusu mabe. Lolenge ya pole oyo yango ezali komonisa— pole oyo euti na mokili— ezali nde molili, mpamba te ezali bobele yango nde Satana mpe mokili na ye bakoki kopesa. Pole moko te ya solo ekoki kouta na mangomba ya kowelana ya boklisto na lokuta, oyo ekangami makasi na mokili.
12. Lisanga ya bamemi na pole esalemi lelo na banani?
12 Tokoki koloba kozanga komikosa ete lisanga ya mokili ya sika oyo esalemi na ba Témoins de Jéhovah ezali, lelo oyo, lisanga ya solo oyo ezali komema pole. Kati na bomoko, basangani na yango nyonso— mibali, basi mpe bilenge— bazali kongengisa pole na bango kati na bato, pole oyo ezali kouta na Jéhovah mpe na Klisto. Na mobu moleki, kati na masanga penepene na 70.000 ya ba Témoins de Jéhovah na mabele mobimba, koleka milió minei ya bamemi na pole ya molende bayebisaki makambo matali Jéhovah mpe mikano na ye epai na baninga na bango. Mbula na mbula tozali komona ebele na bato bazali koyanganisama mpo ete bango mpe balingi kozwa pole ya elimo. Bankoto mingi bazali kozwa batisimo nsima na koyekola Biblia mpe kozwa boyebi ya sikisiki ya solo. Ee, Nzambe “alingi ete bato babika mpe bakoma na boyebi koyeba solo.”—1 Timote 2:4.
13. Tokoki kokokanisa pole oyo ezali kouta na Jéhovah na eloko nini?
13 Na ntina na pole oyo ezali kouta lelo epai na Jéhovah, tokoki kokokanisa yango na likambo likomelaki basaleli na Nzambe na ntango ya kala wana balongwaki na Ezipito: “Jéhovah akendaki na liboso na bango kati na likonzi na lipata na ntango na moi ete akamba bango na nzela, mpe na butu kati na likonzi na mɔ́tɔ ete apesa bango pole, boye bakokaki kotambola na moi mpe na butu.” (Exode 13:21, 22) Lipata oyo Nzambe azalaki kobimisa na moi mpe moto na butu, ezalaki etambwiseli ebongaki kotyela motema. Yango ebongaki kotyamela motema lokola moi oyo Nzembe asali mpo na kopesa biso pole na ntango ya moi. Na bongo, biso mpe tosengeli kotyela Jéhovah motema: akolanda kongengisa nzela ya elimo ya baoyo bazali koluka solo na mikolo oyo mabe. Masese 4:18 endimisi biso ete: “Kasi nzela na bayengebene ezali lokola pole oyo ekongenga lisusu mpe lisusu kino mokolo na malamu koleka.”
Tomonisa pole ya Bokonzi
14. Engengiseli nini bamemi na pole basengeli kopesa?
14 Lokola Jéhovah azali Liziba ya pole, mpe Klisto azali Momemi monene ya pole, bayekoli na Yesu bango mpe basengeli komonisa pole ya Nzambe. Nkolo alobaki na bango ete: “Bino bozali pole na mokili.... Bongo, tika ete pole na bino engenga liboso na bato ete bamona misala na bino malamu mpe ete bakomisa Tata na bino oyo azali na likolo.” (Matai 5:14, 16) Mpe engengiseli nini epesamaki na nzela na pole oyo bayekoli na Yesu basengelaki kongengisa liboso na bato? Bayekoli basengelaki koteya nini na eleko wana ya ntina mingi na lisolo ya bato? Yesu alobaki te ete basengeli kosakola démocratie, dictature, boyokani kati na Lingomba mpe Leta to lolenge mosusu ya mateya ya mokili. Na kokesena, na Matai 24:14 alobaki ete ata kati na botemeli ya mokili mobimba, “nsango malamu oyo na Bokonzi [esengelaki] kosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe [bongo] nsuka ekoya.” Yango wana, lelo oyo bamemi na pole bazali koyebisa na bazalani na bango nsango na Bokonzi na Nzambe, oyo ekotya nsuka na mokili ya Satana mpe ekotya mokili moko ya sika epai boyengebene ekozala.—1 Petelo 2:9.
15. Baoyo balingi pole basengeli kotala epai wapi?
15 Milende mpe mikano ya mokili mizali kosepelisa te baoyo balingi pole. Makambo wana nyonso makolimwa sikawa, mpamba te mokili ebelemi na nsuka na yango. Nzokande, bato oyo balingi boyengebene bazali na mposa ya kondima nsango malamu oyo esakolami na baoyo bazali kongengisa pole na Bokonzi na Nzambe kino nsuka na mokili. Bazali baoyo balobelami na Emoniseli 7:9, 10, na lolenge ya esakweli ete: “Natalaki, mpe namonaki ebele monene oyo moto te akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso; batelemi liboso na kiti na Bokonzi [na Nzambe] mpe liboso na Mwana na Mpate [Klisto] ... Bangangi na mongongo makasi ete: ˈLobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonsi, mpe na Mwana na Mpate!ˈ” Na verset 14 tozali kotanga ete: “Bazali baoyo babimi na monyoko monene [bauti na bolozi monene, MN.]” Ee, bakobika na nsuka na mokili oyo mpe bakokota na mokili ya sika, mokili oyo ekozala na nsuka te, oyo etambwisami na Bokonzi na Nzambe.
Mokili ya sika etondi na pole
16. Na eleko ya bolozi monene, nini ekokomela mokili ya Satana?
16 Mokili ya sika ekotonda na pole ya kongenga ya solo. Na yango, tokanisa naino lolenge oyo mokili ekozala ntango Nzambe akosukisa biloko ya ntango oyo. Satana, bilimu na ye mabe mpe ebongiseli na ye ya politike, ya mombongo mpe ya losambo ekosila kolimwa. Ekozala lolenge moko mpo na ebongiseli ya bopanzi nsango ya Satana. Na yango, nsima na bolozi monene, bakonyata lisusu zulunalo moko te, mokanda moko te, brochure moko te mpo na kokumisa mokili oyo mabe. Televizyo to radio ekosala lisusu bopusi mabe te. Na mbala moko, mopepe ya mbindo oyo mokili ya Satana ebimisaki ekolimwa nyonso.—Matai 24:21; Emoniseli 7:14; 16:14-16; 19:11-21.
17, 18. Lolenge nini okoki kolobela ezalela ya elimo oyo ekokitana na nsuka ya mokili ya Satana?
17 Oyo nde kosikolama! Uta ntango wana, bobele pole ya elimo ya malamu, ya kolendisa, oyo euti na Jéhovah mpe na Bokonzi na ye nde ekongenga likolo na bato. Kati na Yisaya 54:13 tozali kokuta esakweli oyo: “Bana na yo nyonso bakolakisama na Jéhovah, mpe kimya na bana na yo ekozala mingi.” Wana mibeko na ye mikayangela mabele mobimba, Nzambe apesi biso elaka oyo kati na Yisaya 26:9 ete: “Bafandi na molongo bakoyekola boyengebene.”
18 Nokinoki, ezalela ya makanisi mpe ya elimo ekokoma malamu mingi. Bomoi na biso ya mokolo na mokolo ekozala na makambo ya kolendisa, kasi na makambo ya kotungisa mpe ya mbindo te, lokola ezali komonana lelo bipai nyonso. Moto na moto akolakisama kati na solo etali Nzambe mpe mikano na ye. Esakweli ya Yisaya 11:9 ekokokisama na mobimba na yango: “Mokili ekotonda na boyebi na Jéhovah lokola mbonge ekozipaka mai na monana.”
Tosala noki mpo na kolanda pole
19, 20. Mpo na nini baoyo balingi kolanda pole basengeli komisenzela?
19 Lelo oyo, wana tozali kobika na bambula ya nsuka ya biloko oyo mabe, tosengeli kosala noki mpo na kolanda pole na mokili. Epai mosusu, tosenzela, mpamba te tozali na etumba moko makasi oyo ezali na mokano ya kopekisa biso ete totambola kati na pole te. Botemeli yango euti na banguya ya molili: Satana, bilimu na ye mabe mpe lisanga na ye na mabele. Yango wana, ntoma Petelo apesaki likebisi oyo: “Bomisenzela, bolala mpongi te; motemeli na bino, Diable azali kotambola lokola nkosi na konguluma, kolukaka soko akolya nani.”—1 Petelo 5:8.
20 Satana akotya bipekiseli ya lolenge nyonso na nzela ya baoyo bazali kobelema na pole, mpo alingi ete balanda kotambola kati na molili. Ekoki kozala botemeli ya bandeko ya mosuni to ya baninga na biso ya kala baoyo balingi solo te. Bakoki kotya ntembe na makambo oyo Biblia ezali koteya, wana bazimbisami na mateya ya mangomba ya lokuta to na makanisi ya bato bazangi kondima, baoyo bandimaka te ete Nzambe azali to baoyo balobaka ete moto moko te ayebi soki Nzambe azali to azali te. To bopusi ya masumu ekoki lisusu kokomisa mitinda na Nzambe makasi mpo na bango.
21. Baoyo balingi kozala na bomoi kati na mokili ya sika molakami na Nzambe basengeli kosala nini?
21 Atako okokutana na mikakatano ya lolenge nini, olingi kozala na bomoi kati na mokili ya sika ezangi bobola, ezangi koboma bato, ezangi bokesene mpe ezangi bitumba? Olingi kozala na kolongono ya nzoto mpe bomoi ya libela na libela na mabelé oyo ekobongwana Paradis? Soki bongo, ndima mpe landa Yesu pole ya mokili, mpe yoka nsango na baoyo bazali kokangama na “liloba na bomoi” mpe baoyo bazali “kongenga lokola miinda na mokili.”—Bafilipi 2:15, 16.
Okopesa eyano nini?
◻ Lolenge nini bakonzi na mangomba bazali komonisa ete balingi molili?
◻ Yesu azalaki komonisa ezaleli nini epai na bato?
◻ Lolenge nini koyanganisama ya bamemi na pole esalemaki?
◻ Mbongwana nini ya ntina monene ekosalema mosika te?
◻ Mpo na nini lelo oyo tosengeli kosala noki mpo na kolanda pole na mokili
[Elilingi na lokasa 14, 15]
Bafalisai ya mitema makasi babwakaki libanda moto oyo Yesu afungolaki miso na ye