Eloko nini esengami na biso mpo na kozala na esengo?
BAKONZI na politike oyo bato baponi bango, bazali kosala makasi mpo na kosepelisa bato. Ya solo, mosala na bango ekangami na likambo yango. Na Pologne, zulunalo moko ezali kolobela “baponi oyo bakosami mpe bakanisami te.” Mokomi na zulunalo moko alimbolaki ete ba Américains bazali “kotyela bakonzi na politike motema te.” Mokomi mosusu ya zulunalo alobeli “bokoli ya kozanga kosepela na makambo na politike na France.” Kozanga kotya motema mpe kosepela na makambo ya politike (oyo esuki te bobele na mikili wana misato) ezali komonisa ete bakonzi ya politike balongi te kosepelisa bato.
Bakonzi na mangomba mpe bazali kolaka bato esengo, soki na bomoi oyo te, ata na bomoi mpo na mikolo mizali koya. Bazali kotya moboko ya elaka na bango wana likoló na likanisi oyo ete molimo na moto ekufaka te mpe ekotaka na nzoto mosusu—likanisi oyo bato mingi bandimaka te, mpe Biblia ezali kokweisa yango polele. Kotika lingomba mpe motuya moke ya bato oyo nkombo na bango ezali na molongo ya bato na mangomba ezali komonisa ete bato mingi bazali kotalela lingomba lisusu te lokola likambo ya ntina mpo na kozala na esengo.—Tala Genese 2:7, 17; Ezekiele 18:4, 20.
Baninga ya mosolo baoyo batondaka te
Soko ezali kati na politike to kati na lingomba te, kasi epai wapi bato bakoki kozwa esengo? Ekoki kozala kati na mombongo? Bakanisaka ete ekoki kopesa esengo. Makomisi ya bopanzi nsango emonisaka makambo oyo mazali kolongisa mombongo, na kolobaka polele ete: soko ozwi biloko mpe misala nyonso oyo mbongo ekoki kosomba, okozala na esengo.
Emonani ete motuya na bato oyo bazali koluka esengo na nzela wana ezali se komata. Esili koleka mwa bambula, bamonisaki ete na Allemagne libota moko likoló na mabota mibale ezalaki na nyongo monene. Ezali likambo ya kokamwa te ete zulunalo oyo ebimaka mokolo nyonso na allemand Die Zeit emonisaki ete “mingi [kati na bango] bazali ata na libaku moke te ya kosilisa nyongo yango.” Elimbolaki ete: “Ezali likambo ya mpasi te kosalela mbongo mingi koleka makoki na yo, na nzela ya banque, mpe ezali mpasi mingi mpo na kokima motambo ya nyongo.”
Likambo yango ezali motindo moko na mikili misusu ya bokoli na makambo na nkita. Esili koleka bobele mwa bambula, David Caplovitz, sociologue na université ya New York, akanisaki ete na Etats-Unis, mabota soko milió 20 to 25 mazali na nyongo monene. Alobaki ete: “Bato batondi na nyongo, mpe ezali kobebisa bomoi na bango.”
Yango ekokani mpenza na esengo te! Kasi tosengeli kokanisa ete mombongo ekolonga kokokisa oyo biteni mosusu mibale (politike mpe mangomba) elongi te kokokisa? Mokonzi Salomon, oyo azalaki na bazwi mingi akomaki ete: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te. Oyo ezali mpe mpamba.”—Mosakoli 5:10.
Koluka esengo kati na biloko ya mosuni ekokani na komipesa na bandoto mpamba. Okoki komipesa na yango, kasi kokokisa yango ezali likambo ya mpasi.
Tokoki kozwa esengo, kasi lolenge nini?
Ntoma Paulo abyangi Jéhovah “Nzambe ya esengo.” (1 Timoté 1:11) Ntango asalaki moto na elilingi na ye, Nzambe na esengo apesaki ye mpe makoki ya kozala na esengo. (Genese 1:26) Kasi mpo ete azala na esengo asengeli kosalela Nzambe; ezali yango mokomi na Nzembo amonisi: “Esengo ezali na bato oyo Jéhovah azali Nzambe na bango.” (Nzembo 144:15b) Tokososola malamu oyo mosala na biso ezali kosenga mpe mpo na nini ezali komema biso na esengo wana tokotalela mwa ndambo na biteni 110 epai maloba “esengo” mpe “bolamu” emonani kati na Traduction du monde nouveau.
Tososola bamposa na biso ya elimo
Kati na lisoló na ye likoló ya ngomba oyo eyebani mingi, Yesu Klisto alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali kososola mposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Mombongo ezali komeka kondimisa biso na kokanisa ete ebongi bobele kozala na bozwi mingi mpo na kozala na esengo. Ezali koloba na biso ete bolamu elimboli kozala na ordinatere, video, telefone, voitire, biloko ya masano ya sika, bilamba kitoko. Elobeli biso te ete, kati na mokili, ezali na bamilió na bato oyo bazangi biloko wana kasi bazali mpe na mawa te. Atako ekoki koyeisa bomoi malamu mpe petee, biloko wana bizali mpenza na ntina mingi te mpo na kozala na esengo.
Lokola Paulo, baoyo bazali koyeba mposa na bango ya elimo basengeli koloba ete: “Awa ezali biso na biloko na kolya mpe na bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.” (1 Timote 6:8) Mpo na nini? Mpamba te, ezali kokokisama ya bamposa ya elimo nde ekomema na bomoi ya seko.—Yoane 17:3.
Ezali mabe kosepela na biloko kitoko oyo tozali na makoki ya kosomba? Mpenza te. Nzokande, elimo na biso ekozala makasi soki toyekoli kopekisa bilulalula na biso mpe kosomba biloko bobele mpo ete tozali na makoki ya kosomba yango. Na motindo yango tokoyekola kosepela na oyo tozali na yango mpe tokozala na esengo, lokola Yesu, atako makoki na ye ya nkita mazalaki mpenza mingi te, engebene makanisi na bato ya mokili. (Matai 8:20) Emonani ete Paulo azalaki na mawa te wana akomaki ete: “Mpo nayekoli ete nasepela na lolenge nini lozali na ngai. Nayebi kozala mobola, nayebi kozala mozwi. Na likambo na likambo, ee na makambo nyonso nalakisami nzela kotonda mpe koyoka nzala, kozala na biloko mingi mpe na kozanga.”—Bafilipi 4:11, 12.
Totyela Jéhovah motema
Ye oyo azali kososola mposa na ye ya elimo azali komonisa ete alingi kotyela Nzambe motema. Yango ezali kopesa esengo, lokola Mokonzi Salomon alimboli ete: “Ye oyo akotalela Jéhovah azali na esengo.”—Masese 16:20.
Nzokande, eyebani polele ete bato mingi bazali kotyela mbongo mpe bazwi motema na esika ya kotalela Nzambe, boye te? Yango wana, ezali lisusu likambo ya kobulunganisa te kokoma likoló na mbongo, maloba oyo “Totyeli Nzambe motema,” lokola ezali kosalema na Etats-Unis.
Mokonzi Salomon, oyo azangaki eloko moko te oyo mbongo ekokaki kosomba, andimaki ete kotyela biloko ya mosuni motema ekomema na esengo ya koumela soki moke te. (Mosakoli 5:12-15) Kokwea ya banque to kokita ya nkita ekoki kosala ete tobungisa mbongo na biso. Bandako ekoki kobebisama na mipepe ya makasi. Soki assurances ekoki kofuta mwa ndambo ya biloko oyo tobungisi, nzokande bakoki te kolongola mpasi ya maoki oyo euti na yango. Lotomo ya mosolo ekoki kobungisa motuya na yango nokinoki mpo na kokita ya nkita. Ata mosala moko malamu ekoki kokoma mpo na bantina ekeseni bobele mosala ya ntango mokuse.
Mpo na yango, ye oyo atyeli Jéhovah motema asosoli ete ezali likambo ya mayele koyoka toli oyo ya Yesu ete: “Bomibombela biloko na motuya na nse te, awa lopomboli mpe mabanga ekolyaka mpe awa bayibi bakobotola. Bomibombela biloko na motuya na likoló, wana lopomboli mpe mabanga ekolyaka te mpe wana bayibi bakokotaka te mpe bakobotolaka te.”—Matai 6:19, 20.
Moto akoki nde kooka esengo monene mpe komimona na libateli monene koleka oyo ya kotyela Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso motema, oyo azali kokokisa ntango nyonso bamposa na biso?—Nzembo 94:14; Baebele 13:5, 6.
Tondima mpamela na Nzambe
Toli, ata mpe mpamela, ekondimama malamu soki moninga ya solo apesi yango na bolingo. Moko na baoyo bazalaki komitanga baninga ya Yobo, mosaleli ya Nzambe, alobaki na ye ete: “Moto oyo Nzambe akopamelaka azali na esengo.” Atako maloba yango mazali solo, nzokande, likambo oyo Elifaze alingaki komonisa na nzela yango (ete Yobo azalaki na ekweli ya lisumu monene) ezalaki solo te. Oyo nde ˈmobondisi mabeˈ! Kasi, wana na nsima Jéhovah apamelaki Yobo na bolingo nyonso, Yobo andimaki mpamela na komikitisa, likambo oyo lipesaki esengo monene.—Yobo 5:17; 16:2; 42:6, 10-17.
Lelo oyo, Nzambe alobaka lisusu na basaleli na ye te lokola asalaki yango epai na Yobo. Azali nde kopamela bango na nzela ya Liloba na ye mpe na lisanga na ye oyo etambwisami na elimo na ye. Kasi, mbala mingi, baklisto oyo bazali kolanda mikano ya mosuni bazalaka na ntango te, makasi to mposa te ya koyekola Biblia mbala na mbala mpe koyangana na makita nyonso ya lisanga ya Jéhovah.
Engebene Masese 3:11-18, moto oyo Nzambe azali kopamela ayebi ete ezali mayele kondima mpamela yango: “Mapamboli na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo akoluka boyebi. Mpo ete litomba na yango eleki palata mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko. Eleki mabanga na penini na motuya; biloko nyonso bikolula yo ekoki komekama na yango te. Mikolo mingi ezali na loboko na yango na mobali, mpe na loboko na yango ya mwesi ezali lokumu mpe bozwi. Nzela na yango ezali nzela na esengo mpe bilekelo na yango ezali nyonso kimya. Yango ezali lokola nzete ya bomoi mpo na nyonso bakosimba yango; moto oyo akobatela yango azali na esengo.”
Tozala peto mpe na kimya
Yesu alobelaki bato na esengo lokola “bato na motema peto” mpe “bato na koyeisa kimya.” (Matai 5:8, 9) Kasi kati na mokili oyo ezali kolendisa lolenge ya bomoi ya koluka bozwi, ezali mpasi te mpo na bamposa ya moimi, to mpe ya mbindo kokotela mitema na biso. Soki totambwisami na mayele ya Nzambe te, ezali mpasi te kozimbisama na kolukaka mosolo na miango mizangi kolongobana oyo mikoki kobebisa boyokani oyo tozali na yango elongo na bazalani na biso. Biblia ezali na elonga soki elobi ete: “Mpo ete mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopengwa longwa na kondima mpe bamitoboli bango mpenza na bolozi mingi.”—1 Timoté 6:10.
Mposa na mosolo ezali komema na lofundo, oyo epesaka nzela na kozanga bosepeli, kozanga botondi mpe lokoso. Mpo na kopengola ete elimo lolenge yango ekola, baklisto mosusu, liboso na kokamata bikateli minene na makambo ya mosolo, bazali komituna mituna oyo: Nazali solo na mposa na yango? Nazali mpenza na mposa ya biloko oyo ya ntalo mingi to ya mosala wana ya mbongo mingi oyo ekozwa ntango na ngai nyonso, koleka bamilió na bato mosusu oyo basengeli kobika kozanga yango? Nazali nde na makoki ya kosalela malamu mosolo na ngai mpe ntango na ngai na kokolisaka bosangani na ngai na losambo ya solo, na kosimbaka mosala ya kosakola mpe kosalisa baoyo bazali na mosolo mingi te lokola ngai?
Tozala na kolendendela
Moko na mikakatano oyo Yobo asengelaki koyikela mpiko ezalaki ya nkita. (Yobo 1:14-17) Lokola ndakisa na ye emonisi yango, makambo nyonso ya bomoi ezali kosenga kolendendela. Baklisto mosusu basengeli koyikela minyoko mpiko; mpo na basusu ezali masenginya; basusu bazali na mikakatano minene ya makambo ya nkita. Kasi lokola moyekoli Yakobo akomaki wana azali kolobela makambo na Yobo, Jéhovah akopesa biso mbano, ata soki tozali koyika mpiko mpo na ntina nini. Yakobo alobaki ete: “Tobyangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo.”—Yakobo 5:11.
Soko totaleli matomba na biso ya elimo na bopotu mpo na koluka kobongisa ezalela na biso ya nkita, mbala mosusu tokozwa mwa kobondisama na yango; kasi ekosalisa na kobatela likanisi malamu ya kobongisama ya seko ya nkita oyo Bokonzi na Nzambe ekomemela biso? Likama motindo yango ebongi solo kondimama?—2 Bakolinti 4:18.
Tozwa esengo lelo mpe mpo na libela
Bato mosusu bazali kotemela likanisi ya Jéhovah mpo na biloko oyo bizali na ntina mpo na kopesa bato esengo. Bazali kobosana matomba, oyo eleki ntina, oyo tokozwa na mikolo mizali koya, bazali komona te matomba oyo bakoki kozwa sikawa soki balandi toli na Nzambe. Basosoli te ete kotya motema na biloko ya mosuni ezali mpamba mpe ekomema na mawa. Mokomi na Biblia azali na elonga ya kotuna ete: “Wana biloko ekofuluka, baoyo bakolya yango bakoya mpe mingi; bankolo na yango bazali na litomba nini bobele na kotala yango na miso na bango?” (Mosakoli 6:11; tala Mosakoli 2:4-11; 7:12.) Tolembaka mpenza biloko noki! Mpe biloko oyo tozalaki kosepela na yango ekosukaka na kotyama pembeni epai ezali kokangisa esika mpe kotonda na mputulu.
Moklisto ya solo akomitika te kobendama na “kosala lokola bato ya pembeni” mpo na biloko ya mosuni. Ayebi ete motuya na moto etalelami te na biloko bizali na ye, kasi na oyo ye azali. Azali na ntembe moko te na makanisi na ye na ntina na eloko oyo esengeli kozwa yango mpo na kozala na esengo, esengo ya solo: kozala na boyokani ya malamu elongo na Jéhovah mpe kokangama na mosala na Ye.
[Elilingi na lokasa 20]
Biloko ya mosuni yango moko ekoki te mpo na kopesa esengo ya koumela
[Elilingi na lokasa 22]
Biblia elobi ete: “Esengo na baoyo bazali kososola mposa na bango ya elimo”