Tótambola na mpiko nyonso kati na banzela ya Jéhovah
“Esengo ezali na moto oyo akobanga Jéhovah, oyo akotambolaka kati na banzela na ye.”—NZEMBO 128:1.
1, 2. Masoló ya Biblia na ntina na maloba mpe misala ya batemwe ya Jéhovah ya kala, ezali kosalisa biso na likambo nini?
LILOBA Mosantu ya Jéhovah litondi na masoló mingi mayebisi mimekamo mpe bisengo ya basaleli na ye ya sembo. Lisoló ya Noa, ya Abalayama, ya Sara, ya Yosua, ya Débora, ya Baraka, ya Davidi, mpe mingi mosusu etondisi bankasa na yango. Bango nyonso bazalaki bato ya solo mpe bazalaki na likambo moko oyo limonanaki epai na bango nyonso. Bazalaki na kondima epai na Nzambe mpe batambolaki na mpiko nyonso kati na banzela na ye.
2 Maloba mpe misala ya batemwe ya liboso ya Jéhovah ekoki kozala elendiseli mpo na biso baoyo tozali kosala makasi na kotambola kati na banzela ya Nzambe. Lisusu, tokozala na esengo soki tokomemya Nzambe mpe soki tokozala na kobanga ya malamu mpo ete tozanga kosepelisa ye te. Yango ekoki komonana ata ntango tokutani na mimekamo kati na bomoi, mpamba te, na kopemama na Nzambe, mokomi na Nzembo ayembaki ete: “Esengo ezali na moto oyo akobanga Jéhovah, oyo akotambolaka kati na banzela na ye.”—Nzembo 128:1.
Mpiko ezali nini
3. Mpiko ezali nini?
3 Mpo na kotambola kati na banzela ya Jéhovah, tosengeli kozala na mpiko. Na yango, Makomami masɛngi na basaleli ya Nzambe ete bamonisa ezaleli yango. Na ndakisa, Davidi, mokomi na Nzembo, ayembaki ete: “Bozala na mpiko, mpe bolendisa mitema na biso, bino banso oyo bozali kozela Jéhovah.” (Nzembo 31:24) Mpiko ezali “bompíkílíkí, nguya ya kotɛlɛma ngwi liboso na likámá, na mpasi na nzoto to na makanisi.” (Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary) Moto na mpiko azali moto na makasi, na molende mpe na nkonzo. Likambo oyo ete Jéhovah azali kopesa mpiko epai na basaleli na ye limonisami polele na maloba oyo ntoma Paulo akomelaki Timoté, mosalani elongo na ye, ete: “Nzambe apesaki biso elimo ya kobangabanga te, kasi [elimo] ya nguya mpe ya bolingo mpe ya bososoli.”—2 Timoté 1:7, NW.
4. Wapi moko na mitindo ya kozwa mpiko?
4 Moko na mitindo ya kozwa mpiko oyo euti na Nzambe, ezali bongo kotalela Biblia, Liloba ya Jéhovah, kati na mabondeli. Makambo mingi mazwami kati na Makomami makoki kosalisa na kokóma na mpiko mingi. Na yango, totalela naino oyo tokoki koyekola na makambo mazwami kati na Makomami ya Liebele na ntina na bamoko na bato oyo batambolaki na mpiko nyonso kati na banzela ya Jéhovah.
Mpiko mpo na kosakola nsango ya Nzambe
5. Lolenge nini mpiko ya Enoka ezali na ntina mpo na basaleli ya Jéhovah ya ntango na biso?
5 Mpiko ya Enoka ekoki kosalisa basaleli ya Jéhovah ya ntango na biso mpo na koyebisa nsango ya Nzambe na mpiko nyonso. Liboso ete Enoka abotama, “babandaki kobelela nkombo ya Jéhovah.” Balimboli mosusu na Biblia balobi ete bato bazalaki kobelela nkombo ya Jéhovah “na kozanga limemya.” (Genese 4:25, 26; 5:3, 6) Ekoki kozala ete nkombo ya Nzambe epesamaki epai na bato ata mpe na bikeko. Yango wana, losambo ya lokuta lopalanganaki mpenza na ntango oyo Enoka abotamaki na mobu 3404 L.T.B. Na yango, emonani lokola ete bobele ye moko nde ‘atambolaki elongo na Nzambe,’ na kolendendela kati na etamboli ya sembo oyo eyokani na solo elakisami na Jéhovah.—Genese 5:18, 24.
6. (a) Enoka ayebisaki nsango nini ya nguya? (b) Elikya nini tokoki kozala na yango?
6 Enoka ayebisaki nsango ya Nzambe na mpiko nyonso, ekoki kozala na nzela na mosala ya kosakola. (Baebele 11:5; tala 2 Petelo 2:5.) Temwe wana oyo azalaki ye moko asakolaki ete: “Tala ete Jéhovah ayei na makiasi na basantu na ye mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na baoyo bakotyolaka Nzambe na misala na bango nyonso mabe oyo basalaki na mbindo, mpe mpo na maloba manso mabe oyo basumuki basili kotuka ye.” (Yuda 14, 15, NW) Enoka azalaki na mpiko ya kosalela nkombo ya Jéhovah ntango ayebisaki nsango oyo ezalaki kokweisa bato mabe. Lokola Nzambe apesaki Enoka mpiko mpo na koyebisa nsango wana ya nguya, bobele bongo Jéhovah azali kopesa nguya na Batemwe na Ye ya ntango na biso ete bayebisa liloba na Ye na molende kati na mosala ya kosakola, na eteyelo, mpe na bisika mosusu.—Tala Misala 4:29-31.
Mpiko kati na momekamo
7. Noa apesaki ndakisa nini ya mpiko?
7 Ndakisa ya Noa ekoki kosalisa biso na kozala na mpiko mpo na kosala misala malamu wana tozali kati na momekamo. Na mpiko mpe na kondima, atyaki likebi na likebisi ya Nzambe na ntina na mpela na mokili mobimba mpe “atongaki masuwa mpo na kobikisa libota na ye.” Na misala na ye ya botosi mpe ya sembo, Noa akweisaki mokili oyo mozangaki kondima, oyo misala na yango mizalaki mabe, mpe amonisaki ete mokili yango mobongaki na kobebisama. (Baebele 11:7, NW; Genese 6:13-22; 7:16) Kokanisa likoló na etamboli ya Noa ezali kosalisa basaleli ya Nzambe ya ntango na biso mpo na komipesa na mpiko nyonso na lolenge ya baministre baklisto kati na misala ya sembo ya motindo oyo.
8. (a) Lokola azalaki moto na mpiko, Noa “mosakoli ya boyengebene” akutanaki na makambo nini? (b) Nini Jéhovah akosalela biso soki tozali basakoli ya mpiko ya boyengebene?
8 Soki tozali na etamboli ya sembo, nde toyebi te lolenge ya kolónga kati na momekamo moko, tika ete tobondela mpo na kozwa mayele ya kolónga yango. (Yakobo 1:5-8) Bosembo ya Noa epai na Nzambe kati na momekamo, emonisi ete likoki ezali mpo na kolónga mimekamo na mpiko mpe na kondima nyonso. Atɛmɛlaki masɛnginya ya bato mabe mpe ya baanzelu oyo balataki nzoto ya bato mpe ya bana na bango oyo babotaki elongo na bato. Ya solo, Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene” na mpiko mingi epai na “mokili ya kala” oyo mozalaki kokende na libebi. (2 Petelo 2:4, 5; Genese 6:1-9) Alobaki na molende nyonso lokola ntoma mpo na kosakola likebisi ya Nzambe epai na bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya mpela, atako bongo, “bayebaki likambo te kino mpela eyaki mpe elongolaki bango nyonso.” (Matai 24:36-39, NW) Kasi tomikundola ete atako minyoko mpe lolenge mabe oyo bato mingi ya ntango na biso bazali koyamba nsango ya Biblia, Jéhovah akosunga biso lokola asungaki Noa, soki nde tomonisi kondima mpe mpiko ya motindo moko lokola basakoli ya boyengebene.
Mpiko mpo na kotosa Nzambe
9, 10. Kati na makambo nini Abalayama, Sara, mpe Yisaka bamonisaki botosi na mpiko nyonso?
9 Abalayama, “moninga ya Jéhovah,” azali ndakisa malamu ya kotosa Nzambe na mpiko nyonso. (Yakobo 2:23) Abalayama asengelaki kozala na kondima mpe na mpiko mpo na kotosa Jéhovah mpe kotika engumba Ulu, na mboka ya Bakaladi, oyo ezalaki na bozwi mingi na mosuni. Azalaki na kondima na elaká oyo ya Nzambe ete “mabota nyonso ya mokili” makopambolama mpo na ye mpe ete libota na ye likopesamela mboka moko. (Genese 12:1-9; 15:18-21) Na kondima, Abalayama “afandaki lokola mopaya kati na mokili na ndaká,” mpe azalaki kozela “mboka oyo ezali na miboko malamu”—Bokonzi na Nzambe na likoló, na nsé na yango nde akosekwisama mpo na kozala na bomoi awa na mabelé.—Baebele 11:8-16.
10 Sara, mwasi ya Abalayama, azalaki na kondima mpe na mpiko oyo esengelaki mpo na kotika engumba Ulu, mpe kokenda elongo na mobali na ye na mboka mopaya, mpe koyika mpiko na mimekamo nyonso oyo basengelaki kokutana na yango kuna. Azwaki mbano monene na lolenge atosaki Nzambe na mpiko nyonso. Atako azalaki ekomba kino na mibu 90, kasi “Sara azwaki nguya ya kokumba zemi, atako akómaki mobangé, mpo ete atángaki moto oyo alakaki ye ete azali sembo.” Na nsima, abotaki Yisaka. (Baebele 11:11, 12, NW; Genese 17:15-17; 18:11; 21:1-7) Nsima ya bambula, Abalayama atosaki Nzambe na mpiko nyonso mpe “azalaki pene mpo na kopesa Yisaka lokola mbeka.” Kopekisamáká na anzelu, tata na mabota azwaki mwana na ye ya mpiko mpe ya botosi longwa na kufa, “wana ezalaki elakiseli.” Ye mpe Yisaka bamonisaki na lolenge ya esakweli ete Jéhovah Nzambe asengelaki kopesa Mwana na ye, Yesu Klisto, lokola mbeka ete baoyo bakomonisa kondima kati na ye, bakoka kozwa bomoi ya seko. (Baebele 11:17-19; Genese 22:1-19; Yoane 3:16) Na ntembe te, lolenge Abalayama, Sara, mpe Yisaka batosaki na mpiko nyonso esengeli kopusa biso na kotosa Jéhovah mpe na kosala ntango nyonso mokano na ye.
Mpiko mpo na kozwa etɛlɛmɛlo na ngámbo ya libota ya Nzambe
11, 12. (a) Lolenge nini Moize amonisaki mpiko mpo na bolamu ya libota ya Jéhovah? (b) Na kotalela mpiko ya Moize, motuna nini mokoki kotunama?
11 Moize azwaki etɛlɛmɛlo na mpiko nyonso na ngámbo ya libota ya Nzambe oyo lizalaki konyokwama. Na ekeke ya 16 L.T.B., baboti ya Moize mpe bamonisaki mpiko. Babangaki te etinda ya mokonzi mpo na koboma bana mibali ya Baebele baoyo babotamaki sika, babombaki Moize mpe batyaki ye na kitonga kati na matiti, pene na libongo ya ebale Nil. Mwana mwasi ya Farao azwaki ye, abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye, nzokande azwaki malako ya elimo kati na ndako ya baboti na ye. Lokola azalaki moko na bato na ndako ya Farao, Moize “alakisamaki kati na mayele nyonso ya Baezipito” mpe “azalaki na nguya na maloba mpe na misala na ye,” na makasi kati na makanisi mpe na nzoto.—Misala 7:20-22; Exode 2:1-10; 6:20.
12 Atako bozwi ya mosuni bozalaki kati na ndako ya mokonzi, Moize aponaki na mpiko nyonso ete azwa etɛlɛmɛlo na ngámbo ya basambeli ya Jéhovah, baoyo bazalaki baombo ya Baezipito na eleko wana. Mpo na kobikisa Moyisraele moko, abomaki Moezipito moko, na nsima akimaki na mboka Madiani. (Exode 2:11-15) Soko mibu 40 na nsima, Nzambe asalelaki ye mpo na kosikola Bayisraele na boombo. Na nsima, Moize “atikaki Ezipito mpe abangaki nkanda na mokonzi te,” oyo alukaki koboma ye mpo ete azalaki komonisa Jéhovah mpo na bolamu ya Yisraele. Moize atambolaki “lokola nde azalaki komona Ye oyo akomonanaka te,” Jéhovah Nzambe. (Baebele 11:23-29, NW; Exode 10:28) Ozali na kondima mpe na mpiko lokola oyo mpo ete okangama na Jéhovah mpe na libota na ye atako mimekamo mpe minyoko?
Mpiko mpo na ‘kolanda Jéhovah na motema moko’
13. Lolenge nini Yosua mpe Kalebe bapesaki bandakisa ya mpiko?
13 Yosua mpe Kalebe, bato ya mpiko, bamonisaki polele ete biso tokoki kotambola kati na banzela ya Nzambe. “Balandaki Jéhovah na motema moko.” (Mituya 32:12) Yosua mpe Kalebe bazalaki kati na mibali 12 oyo batindamaki mpo na konɔnga Mokili na ndaká. Mpo na nsɔmɔ bazalaki na yango na ntina na bafandi ya mboka wana, banɔngi zomi bamekaki kolɛmbisa Yisraele ete bakɔta na mokili ya Kanana te. Nzokande, Yosua mpe Kalebe balobaki na mpiko nyonso, ete: “Soki Jéhovah asepeli na biso, boye akokɔtisa biso mpenza kati na mokili yango mpe akopesa biso yango, mokili oyo motondi na mabɛlɛ mpe na mafuta na nzoi. Nde botombokela Jéhovah te; mpe bobanga bato ya mokili yango te, mpo ete bazali mampa mpo na biso. Ekimelo na bango esili kolongwa na bango, mpe Jéhovah azali na biso elongo. Bobanga bango te.” (Mituya 14:8, 9) Lokola bazangaki kondima mpe mpiko, libota ya Bayisraele wana likɔtaki te na mokili na ndaká. Kasi Yosua mpe Kalebe, elongo na libota ya sika, bakɔtaki kati na yango.
14, 15. (a) Lokola Yosua asalelaki maloba mazwami na Yosua 1:7, 8, makambo nini ye mpe Bayisraele bamonaki yango? (b) Liteya nini tozali kozwa mpo na mpiko ya Yosua mpe Kalebe?
14 Nzambe alobaki na Yosua ete: “Zala na mpiko mpe na makasi mpo na kokeba kosalela mibeko nyonso oyo Moize, mosaleli na ngai, alakelaki yo. Pɛngwa na yango te epai na lobɔkɔ ya mobali soko na lobɔkɔ ya mwasi, [ete ozala na mayele epai nyonso okokende, NW]. Buku na mibeko oyo ekolongwa na monoko na yo te, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo nyonso makomami kati na yango. Mpo ete, [boye okolónga kati na nzela na yo mpe bongo okozala na mayele, NW].”—Yosua 1:7, 8.
15 Lokola Yosua alandaki maloba oyo, Yeliko mpe bingumba mosusu bikweisamaki na Yisraele. Nzambe atɛlɛmisaki nkutu moi ete elanda kongɛngisa pole kino Yisraele balóngaki mboka Gabao. (Yosua 10:6-14) Ntango abundisamaki na mampinga ya mabota mingi oyo masanganaki mpe baoyo bazalaki “ebele monene, na motuya lokola zɛlo na libóngo ya mai monene,” Yosua asalaki na mpiko nyonso, mpe Nzambe apesaki lisusu elónga na Yisraele. (Yosua 11:1-9) Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kolanda Jéhovah na motema moko lokola Yosua mpe Kalebe, mpe Nzambe akoki kopesa biso nguya ya kotambola na mpiko nyonso kati na banzela na ye.
Mpiko mpo na kotya motema epai na Nzambe
16. Na motindo nini Debora, Baraka, mpe Yaele bamonisaki mpiko?
16 Baoyo bazali kotya motema epai na Nzambe na mpiko nyonso bazali kozwa mbano, lokola emonisami na makambo oyo malekaki na eleko oyo basambisi bazalaki kotosisa boyengebene kati na Yisraele. (Luta 1:1) Na ndakisa, mosambisi Baraka mpe mosakoli mwasi Debora batyaki motema epai na Nzambe na mpiko nyonso. Yabini, mokonzi ya Kanana anyokolaki Yisraele uta bambula 20 wana Jéhovah alobaki na Debora ete atinda Baraka mpo na koyanganisa mibali 10 000 na ngomba Tabola. Sizera, mokonzi na basodá ya Yabini, akendaki nokinoki na lobwaku ya Kisoni, wana andimisamaki ete na mabelé yango mibali ya Yisraele bakokoka te kobunda na limpinga na ye mpe na makálo 900 ya bitumba oyo ezalaki na bibende likoló na biyika na yango. Ntango Bayisraele bakɔtaki na esobe ya lobwaku, Nzambe asungaki bango, mpe mbula makasi enɔkaki na pwasa, mpe ebongolaki esika ya etumba na esika na pɔtɔpɔ́tɔ oyo ekangisaki makálo ya Sizera. Bato ya Baraka balóngaki etumba, na boye ete “moláko nyonso ya Sizera mokweaki na mopɔtu ya mopanga.” Sizera akimaki kino na hema ya Yaele, kasi, elalaki ye, Yaele azwaki mpiko ya koboma ye na kokɔtisáká piké ya hema kati na motó. Na boyokani na esakweli oyo Debora ayebisaki na Baraka, “eloko kitoko” ya elónga wana epesami na mwasi. Lokola Debora, Baraka, mpe Yaele batyaki motema na mpiko nyonso epai na Nzambe, Yisraele “ezalaki na kimya mbula ntuku minei.”—Basambisi 4:1-22; 5:31.
17. Mosambisi Gédéon apesaki ndakisa nini ya kotya motema epai na Jéhovah na mpiko nyonso?
17 Mosambisi Gédéon atyaki motema epai na Jéhovah Nzambe na mpiko nyonso wana Bamadiani elongo na mabota mosusu babundisaki Yisraele. Atako bazalaki moke liboso na banguna soko 135 000, basodá 32 000 ya Yisraele bakokaki komikumisa na ntina na elónga oyo Nzambe apesaki bango mpo na mpiko na bango mpenza. Na litambwisi ya Jéhovah, Gédéon akabolaki basodá na ye na bituluku misato, mibali 100 mpo na etuluku moko na moko. (Basambisi 7:1-7, 16; 8:10) Ntango mibali 300 wana bazalaki kozinga moláko ya Bamadiani na butu, moko na moko azalaki na kɛlɛlo moko mpe na mbeki moko ya mai oyo kati na yango, ezalaki na mwinda moko. Babɛtaki kɛlɛlo na lolenge bayokanaki, babukaki mbeki, mpe bapɛlisaki miinda mpe bangangaki ete: “Mopanga ya Jéhovah mpe mopanga ya Gédéon!” (Basambisi 7:20) Bamadiani oyo babangaki, babandaki kokima mpe balóngamaki. Makambo motindo oyo makoki kondimisa biso ete kotya motema epai na Nzambe na mpiko nyonso, ezali mpe kopesa mbano na mikolo na biso.
Mpiko mpo na kokumisa Jéhovah mpe mpo na kotombola losambo ya peto
18. Likambo nini Davidi asalaki yango na mpiko nyonso ntango abomaki Goliata?
18 Bandakisa mosusu ezwami na Biblia ezali kopesa mpiko mpo na kokumisa Jéhovah mpe mpo na kotombola losambo ya peto. Elenge Davidi, oyo abikisaki bampate ya tata na ye na molende nyonso, amonisaki mpiko liboso ya Goliata, elombe Mofilitia. Davidi alobaki ete: “Yo oyeli ngai na mopanga mpe na likɔngá monene mpe na likɔngá moke, kasi ngai nayeli yo na nkombo ya Jéhovah na bibele, Nzambe ya basodá ya Yisraele oyo yo obɛtɛli bango ntembe. Lelo oyo Jéhovah akokitisa yo na lobɔkɔ na ngai; nakobɛta yo mpe nakolongola motó na yo; . . . mpe bato ya mokili mobimba bakoyeba ete Nzambe moko azali mpo na Yisraele. Mpe koyangana oyo nyonso bakoyeba ete Jéhovah akobikisa na mopanga te mpe na likɔngá te. Mpo ete etumba ezali ya Jéhovah.” (1 Samwele 17:32-37, 45-47) Na lisalisi ya Nzambe, Davidi akumisaki Jéhovah na mpiko nyonso; abomaki Goliata, mpe akokisaki bongo mokumba monene na kosilisáká matumoli oyo Bafilistia bazalaki kobimisa mpo na losambo ya peto.
19. Salomo azalaki na mposa ya mpiko mpo na kokokisa mosala nini, mpe lolenge nini mwango na ye mokoki kosalelama na mikolo na biso?
19 Ntango Salomo, mwana na mokonzi Davidi, alingaki kotonga tempelo ya Nzambe, tata na ye oyo akómaki mobangé alendisaki ye ete: “Zala na nguya mpe na mpiko, mpe sala yango; banga te, zala na nsɔmɔ te, mpo ete Jéhovah Nzambe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo. Akosundola yo te, akotika yo te kino okosilisa mosala mobimba mpo na kosalela ndako ya Jéhovah.” (1 Ntango 28:20) Kosaláká na mpiko nyonso, Salomo asilisaki tempelo. Soki tokutani lelo na mokakatano mpo na kokokisa ebongiseli ya teokratike mpo na botongi bandako, tomikundola maloba oyo ya Davidi, ete: “Zala na nguya mpe na mpiko, mpe sala yango.” Oyo nde lolenge malamu mpo na kokumisa Jéhovah mpe mpo na kotombola losambo ya peto!
20. Mokonzi Asa azalaki na mpiko kati na likambo nini?
20 Lokola mokonzi Asa azalaki na mposa ya kokumisa Nzambe mpe kotombola losambo ya pɛto, na Yuda, alongolaki bikeko mpe basáli na pite na tempelo ya banzambe ya lokuta. Alongolaki lisusu nkɔ́kɔ na ye ya mwasi oyo azalaki mopɛngwi, na ebongá na ye ya lokumu mpe azikisaki “ekeko” na ye. (1 Mikonzi 15:11-13) Ya solo, Asa “ayikaki mpiko mpe alongolaki bikeko ya mbindo kati na mokili mobimba na Yuda mpe na Benyamina mpe na mboka nyonso oyo ye abɔtɔlaki yango na mokili na ngomba ya Efalaima, mpe abongisaki etumbelo ya Jéhovah oyo ezalaki liboso na ekɔtɛlo ya ndako ya Jéhovah.” (2 Ntango 15:8) Yo mpe ozali kobwaka lipɛngwi mpe ozali kotombola losambo ya peto na mpiko nyonso? Ozali nde kosalela bozwi na yo ya mosuni mpo na kokólisa matomba ya Bokonzi? Ozali mpe koluka kokumisa Jéhovah na kosanganáká mbala na mbala kati na mosala ya kosakola lokola moko na batemwe na ye?
21. (a) Lolenge nini masoló ya bato na sembo ya ntango ya kala ekoki kosalisa biso? (b) Likambo nini tokotalela kati na lisoló lilandi?
21 Tozali kotɔndɔ Nzambe lokola abatelaki kati na Makomami, masoló oyo mazali kolobela bato ya mpiko mpe ya bosembo ya ntango ya kala! Na ntembe te, bandakisa na bango kitoko ekoki kosalisa biso na kosala mosala ya bulee mpo na Jéhovah na mpiko, na kobanga ya peto, mpe na nsɔmɔ. (Baebele 12:28) Kasi Makomami na Greke na boklisto mazali mpe na bandakisa ya bato oyo bamonisaki mpiko na kobanga Nzambe. Lolenge nini masoló mosusu oyo mazwami kati na yango makoki kosalisa biso na kotambola kati na banzela ya Jéhovah na mpiko nyonso?
Lolenge nini okoki koyanola?
◻ Mpiko ezali nini?
◻ Lolenge nini Enoka mpe Noa bamonisaki mpiko?
◻ Na makambo nini Abalayama, Sara, mpe Yisaka basalaki na mpiko nyonso?
◻ Moize, Yosua, mpe Kalebe bapesaki bandakisa nini ya mpiko?
◻ Lolenge nini bato mosusu bamonisaki ete bazalaki na mpiko mpo na kotya motema epai na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 15]
Gédéon mpe limpinga na ye moke batyaki motema epai na Jéhovah na mpiko nyonso