Lolenge nini bino bosilisaka matáta na bino?
Koningana oyo elongobani te—mpe ya misato kati na molɔngɔ́ ya banzoku mitano oyo esalemi na mbɛlɛ ekwei longwa na kazaka. Yango ekosɛnga ete ebongisama. Soki ebongisami te, kitoko na yango mobimba ekobunga. Nzokande, ezali likambo ya kosala na engɛlɛ, soki omoni ete oyebi yango malamu te. Okosɛnga lisalisi to ata koluka ete moto oyo ayebi asala yango.
BOYOKANI kati na bandeko mibali mpe basi ya elimo ezali na motuya mingi koleka biloko ya kokɛmbisa. Mokomi na Nzembo na lolenge lobongi ayembaki ete: “Tala lokola ejali malamu mpe na esɛngɔ sɔkɔ bandeko [bakosepela kozala esika moko kati na bomoko, NW].” (Nzembo 133:1) Kosilisa matáta elongo na moninga moklisto ekoki kozala mbala mosusu likambo ya mpasi. Mpe, basusu bakosalaka yango na lolenge ya malamu te. Mbala mingi “kobongisama” wana epesaka mpasi ezangi ntina to ebongaka mpenza malamu te, mpe etikaka bilobaloba nsima na yango.
Baklisto mosusu balukaka kokɔtisa mpambampamba bankulutu na makambo oyo bakoki kobongisa yango bango moko. Ekoki kozala bongo mpo ete bayebi te nini oyo basengeli kosala. Ndeko moko oyo amesani mingi na kopesa toli ya Biblia alobaki ete: “Mingi kati na bandeko na biso bayebi te lolenge ya kosalela batoli ya Biblia mpo na kosilisa matáta na bango.” Abakisaki ete: “Mbala mingi, balandaka te lolenge oyo Yesu alakisaki ya kosilisa matáta.” Na bongo, Yesu alobaki mpenza nini mpo na lolenge moklisto asengeli kosilisa matáta elongo na ndeko na ye? Mpo na nini ezali likambo ya ntina na koyeba malamu toli yango mpe koyekola lolenge ya kosalela yango?
Makambo ya mikemike
“Sɔkɔ okoyeisa likabo na yɔ na etumbelo mpe okokanisa wana ete ndeko na yɔ ajali na yɔ na likambo, tika likabo na yɔ kuna liboso na etumbelo mpe kɛnda naino ete obɔngisa likambo na ndeko na yɔ, mpe na nsima ojonga mpɔ na kopɛsa likabo na yɔ.”—Matai 5:23, 24.
Wana Yesu ayebisaki maloba oyo, Bayuda bazalaki na momeseno ya kopesa bambeka, to kopesa makabo, na etumbelo oyo ezalaki na tempelo na Yelusaleme. Soki Moyuda moko asalelaki moninga na ye Moyisraele mabe, moto oyo asali moninga mabe asengelaki kopesa mbeka mobimba ya kotumba to mbeka ya lisumu. Ndakisa oyo elobelamaki na Yesu ekómi na ntango moko ya ntina monene. Wana moto azali na etumbelo mpe etikali moke ete apesa likabo na ye epai na Nzambe, akanisi ete ndeko na ye asalaki mabe epai na ye. Ee, Moyuda asengelaki koyeba ete koyokana elongo na ndeko na ye esengelaki kosalema liboso ya kokokisa mokumba wana ya losambo.
Atako bambeka motindo yango esɛngamaki kati na Mibeko ya Mose, yango moko ezalaki na motuya mpenza monene te na miso na Nzambe. Mosakoli Samwele ayebisaki mokonzi Saulo oyo azangaki sembo ete: “[Yehova] akosepela mbɛka na miboma lokola ye akosepela botosi kotosa mongongo na ye? Tala kotosa eleki moboma na malamu mpe koyoka eleki mafuta na bampate.”—1 Samwele 15:22.
Kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, Yesu azongelaki makambo maleki ntina mpe amonisaki na bayekoli na ye ete basengeli kosilisa matáta na bango liboso ya kopesa mbeka na bango. Lelo oyo, mbeka oyo esɛngami na baklisto ezali bongo ya elimo—“mbɛka na masanjoli, ntango yɔnsɔ, yango mbuma na bibɛbu bijali koyambola nkombo na ye.” (Baɛbɛlɛ 13:15) Na bongo, etindá yango ezali na motuya kino lelo. Ntoma Yoane amonisaki bobele bongo ete ezali mpamba mpo na moto koloba ete azali kolinga Nzambe soki azali koyina ndeko na ye.—1 Yoane 4:20, 21.
Ya solo, moto oyo amikundoli ete ndeko na ye azali na likambo na ye nde asengeli kosala litambe ya liboso. Na yango, komikitisa oyo amonisi ekoki ntango mosusu kobimisa matomba malamu. Mbala mingi, moto oyo basalelaki ye mabe akoboya te koyokana na moto oyo ayei epai na ye na kondimáká mabungá na ye moko. Mibeko ya Mose milobaki ete eloko nyonso oyo ekamatami na lolenge ya mabe esengelaki kozongisama nyonso mpe kobakisa ndambo na mitano likoló na yango. (Levitike 6:5) Bobele bongo, kozongisa kimya, boyokani malamu ekosalema kozanga mpasi soki moto oyo asali moninga mabe amonisi mposa na ye ya kosala mingi koleka oyo esɛngami, na sikisiki, kobongisa mabe oyo asalaki.
Nzokande, milende mpo na kozongisa boyokani ya kimya elóngaka ntango nyonso te. Búku ya Masese ekundweli biso ete ezali mpasi kosilisa matáta elongo na moto oyo azali komona ete yango ezali mpasi kosala yango. Masese 18:19 elobi ete: “Ndeko oyo ayokisami mpasi ajali lokola mboka makasi; mpe kowelana ejali lokola bikangeli na ndako na makasi.” Libongoli mosusu lizali kotángama boye: “Otumoli ndeko, okomisi ye monguna wa yo libela, boswani na ye ezali lokola kokanga ndako na mafungola.” (Biblia Liloba lya Nzambe) Nzokande, na nsima milende ya solosolo mpe ya komikitisa mikoki mpenza kolónga epai na baninga bandimi oyo bazali na mposa ya kosepelisa Nzambe. Kasi epai kuna lisumu monene esalemi, toli ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 18 esengeli kosalelama.
Kosilisa matáta minene
“Sɔkɔ ndeko na yɔ akosalela yɔ mabe, kɛnda koloba na ye mpɔ na libunga na ye, bino na ye esika mɔkɔ. Sɔkɔ akoyoka yɔ, okojua ndeko na yɔ. Sɔkɔ akoyoka yɔ tɛ, kamata mɔkɔ to mibale na yɔ elɔngɔ ete likambo lindimana na monɔkɔ na batatoli mibale to misato. Sɔkɔ akoyoka bango tɛ, loba na [lisangá, “NW”]. Sɔkɔ akoyoka [lisangá, “NW”] tɛ, ajala na yɔ lokola mokɔngɔli na mpako.”—Matai 18:15-17.
Moyuda (to na nsima, moklisto) asengelaki kosala nini soki akutani na mikakatano minene elongo na mosambeli mosusu ya Yehova? Moto oyo amoni ete basaleli ye mabe asengelaki kosala litambe ya liboso. Asengeli kolobela likambo yango na nkuku elongo na ndeko oyo asalaki mabe. Na kolukáká te komilóngisa, akokoka mpenza kozwa ndeko na ye, mingimingi soki ezalaki likambo ya kozanga koyokana oyo esengelaki kobongisama nokinoki. Makambo nyonso makobongisama kozanga nkaká soki baoyo batalelami na yango bazali bato oyo bayebaki likambo yango.
Nzokande, litambe ya liboso yango moko mbala mosusu ekokoka te. Mpo na kosilisa likambo yango, Yesu alobaki ete: “Kamata mɔkɔ to mibale na yɔ elɔngɔ.” Ezali malamu ete bango bázala bato oyo bayebi likambo yango. Mbala mosusu bayokaki moko kati na bato yango kotɔnga mosusu, to mbala mosusu bazalaki ntango mokanda mokomamaki na ntina na likambo oyo bazali koyokana na yango te sikawa. Epai mosusu, baoyo basangani na likambo yango bakoki kokóma batatoli ntango makambo lokola kokomama ya mokanda moko to kotatola na monɔkɔ, esengeli kosalema mpo na koluka koyeba bosolo ya likambo. Awa lisusu esengeli kozala bobele na bato moke—“mɔkɔ to mibale”—nde basengeli koyeba likambo yango. Yango ekopɛngola ete makambo makóma ndóngó soki yango ezalaki bobele mwa kozanga koyokana.
Mokano nini moto oyo basalelaki ye mabe asengeli kozala na yango? Asengeli nde koluka koyokisa moninga na ye moklisto nsoni mpe kolinga ete amisambwisa ye moko? Na kotalela toli ya Yesu, baklisto basengeli te kozala pene mpo na kokweisa bandeko na bango. Soki mosáli na mabe andimi libungá na ye, asɛngi bolimbisi, mpe ameki kobongisa makambo, moto oyo basalelaki ye lisumu asili ‘kozwa ndeko na ye.’—Matai 18:15.
Soki likambo likoki te kobongisama, esengeli kokóma na lisangá. Na ntango ya kala, ezalaki bongo mikóló na Bayuda, kasi na nsima, bankulutu kati na lisangá ya boklisto. Mosáli na mabe oyo azangi kobongola motema akokaki kobimisama na lisangá. Yango nde oyo elimboli ete akotalelama “lokola mopakano mpe mokɔngɔli na mpako,” bato oyo Bayuda bazalaki na boyokani na bango te. Yango ezali te meko ya lisɛki oyo esengeli kokamatama na moklisto moko na moko. Bobele bankulutu oyo baponami, oyo bazali bamonisi ya lisangá, nde bazali na lotómo ya kokamata meko motindo wana.—Kokanisá na 1 Bakolinti 5:13.
Likoki oyo mosáli na mabe oyo azangi kobongola motema azali na yango ya kobimisama na lisangá emonisi ete Matai 18:15-17 etaleli te makambo ya mikemike. Yesu alobelaki masumu minene, kasi oyo makokaki kobongisama kati na bato mibale oyo batalelami na yango. Na ndakisa, mabe yango makokaki kozala kotɔnga, oyo ebebisi lokumu ya moto. To ekokaki kozala makambo matali mosolo, mpamba te, na milɔngɔ́ milandi oyo mizwami na lisese ya Yesu litali moombo mabe oyo balimbisaki nyongo monene. (Matai 18:23-35) Nyongo oyo ezangi kofutama na ntango oyo boyokanaki ekoki kozala bobele mwa likambo oyo likoki kosilisama kozanga nkaká kati na bato mibale. Kasi ekoki kokóma lisumu monene, elingi koloba koyiba, soki modefi aboyi na nkó nyonso kofuta eloko oyo adefaki.
Masumu mosusu makoki te kobongisama bobele kati na baklisto mibale. Na nsé na Mibeko ya Mose, masumu minene masengelaki koyebisama. (Levitike 5:1; Masese 29:24) Bobele bongo, masumu minene oyo mataleli bopɛto ya lisangá masengeli koyebisama epai na bankulutu baklisto.
Nzokande, makambo mingi ya kozanga koyokana kati na baklisto masengeli mpenza te kotyama na molɔngɔ́ oyo.
Okoki nde bobele kolimbisa?
Nsima wana Yesu alimbolaki lolenge ya kobongisa mikakatano minene, ateyaki likambo mosusu ya ntina mingi. Tozali kotánga ete: “Pɛtɛlɔ ayei mpe alobi na ye ete, ‘Nkolo, sɔkɔ ndeko na ngai akosalela ngai mabe, nalimbisa ye mbala boni? Kino mbala nsambo?’ Yesu alobi na ye ete, ‘Nalobi na yɔ tɛ kino mbala nsambo kasi kino [mbala ntuku nsambo na nsambo, NW].’” (Matai 18:21, 22) Na libaku mosusu, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete basengeli kolimbisa “mbala nsambo na mokɔlɔ mɔkɔ.” (Luka 17:3, 4) Na bongo ezali polele ete, bayekoli ya Yesu babyangami ete bábongisa mikakatano na bango na kolimbisana kati na bango.
Yango ezali likambo oyo esɛngi milende mingi. Moto oyo totángaki maloba na ye na ebandeli ayebisaki ete: “Bandeko mosusu bayebi mpenza kolimbisa te.” Abakisaki ete: “Bakamwaka wana moto alimboli ete bakoki kopona kolimbisa, libosoliboso na mokano ya kobatela kimya kati na lisangá ya boklisto.”
Ntoma Paulo akomaki ete: “Sɔkɔ moto mɔkɔ ajali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Pelamɔkɔ [Yehova] alimbisi bino, bino mpe bobɛlɛ bongo.” (Bakɔlɔsɛ 3:13) Na yango, liboso ya kokende epai na ndeko oyo mbala mosusu asaleli biso mabe, ekozala malamu tókanisa na mituna milandi: Ezali na ntina kolobela ye mabe yango? Likoki ezali mpenza te epai na ngai ya kobosana likambo yango na elimo ya solo ya Boklisto? Soki nazalaki na esika na ye, nakokaki kolinga te ete alimbisa ngai? Mpe soki nakolimbisa te, nakoki komizela ete Nzambe ayoka mabondeli na ngai mpe alimbisa ngai? (Matai 6:12, 14, 15) Mituna motindo wana mikoki kosalisa biso malamu na koyeba kolimbisa.
Lokola tozali baklisto, moko na mikumba na biso ya ntina ezali bongo kobatela kimya kati na lisangá ya basaleli ya Yehova. Na yango, tiká ete tósalela toli ya Yesu. Yango ekosalisa biso na kolimbisa kozanga nkaká. Elimo motindo wana ya kolimbisa ekopesa nzela na bolingo kati na bandeko, oyo ezali bongo elembo mpo na koyeba bayekoli ya Yesu.—Yoane 13:34, 35.
[Elilingi na lokasa 23]
Baklisto bakoki kosilisa matáta na bango na kolandáká toli ya Yesu