Azwaki ngɔlu mingi epai na Yehova
“MBƆTƐ! mwasi na ngɔlu, [Yehova] ajali na yɔ elɔngɔ.” Oyo nde mbote ya kokamwa! Molobi azali anzelu Gabaliele. Azali kosolola elongo na elenge mwasi moko oyo azalaki na motema ya kosɔkɛma—Malia, mwana mwasi ya mobali moko na nkombo Heli. Ezalaki na mobu 3 L.T.B., kati na engumba Nazarete.—Luka 1:26-28.
Malia asili kolakama na libala epai na Yosefe, mosáli ya mabaya. Engebene mibeko mpe mimeseno ya Bayuda, atalelamaki lokola mwasi na ye ya libala. (Matai 1:18) Lokola Malia, Yosefe azalaki moto ya bozwi mingi te. Bongo mpo na nini, anzelu apesaki Malia mbote na kobéngáká ye moto oyo azwaki ngɔlu mingi?
Mabaku kitoko oyo azwaki
Gabaliele abakisaki ete: “Banga tɛ, Malia, mpɔ ete ojui ngɔlu epai na Njambe. Mpe tala, okojua jemi mpe okobota mwana mobali, mpe okobianga nkombo na ye Yesu. Ye akojala monɛnɛ mpe akobiangama Mwana na Oyo-Aleki-Likolo. [Yehova] Nzambe akopɛsa ye kiti na bokonji na Dawidi tata na ye. Akojala mokonji na ndako na Yakobo libela, mpe bokonji na ye ekojala na nsuka tɛ.”—Luka 1:29-33.
Na kokamwa mpe na kobulungana nyonso, Malia atuni ete: “Oyo ekojala boni awa elali ngai na mobali tɛ?” Gabaliele ayanoli ete: “[Elimo santu ekoya, NW] likolo na yɔ, mpe nguya na Oyo-Aleki-Likolo ekojipa yɔ. Yango wana mwana na bulɛɛ oyo akobotama akobiangama Mwana na Njambe.” Mpo na kondimisa ye, Anzelu abakisi ete: “Tala Elisabɛta eboto na yɔ, ye mpe ajui jemi na mwana mobali awa na bonunu na ye mpe sanja oyo ejali sanja na motoba na ye oyo abiangamaki ekomba. Mpɔ ete epai na Njambe makambo yɔnsɔ makoki kosalama.”—Luka 1:34-37.
Nokinoki Malia andimi libaku kitoko oyo epesameli ye. Na bolingo malamu, kasi na komikitisa nyonso, ayonali ete: “Tala, ngai moombo na [Yehova], tika ebimela ngai lokola elobi yɔ.” Na nsima, Gabaliele alongwaki na ye. Malia akendeki nokinoki na engumba moko ya bangomba na etúká ya Yudea. Wana ekómaki ye na ndako ya nganga Zakalia mpe mwasi na ye, Elisabɛta, akutaki makambo nyonso lokola anzelu ayebisaki yango. Oyo nde esengo etondaki na motema ya Malia! Bibebu na ye bibimisaki maloba ya kosanzola Yehova.—Luka 1:38-55.
Akómi mwasi ya Yosefe
Moseka moko asengelaki kobota Yesu lokola moto, mpamba te kobotama ya motindo yango esakolamaki. (Yisaya 7:14; Matai 1:22, 23) Kasi mpo na nini esengelaki kozala moseka oyo alakami na libala? Mpo ete tata wana mobɔkɔli akoka kopesa na mwana yango lotómo ya kozwa kiti na bokonzi ya Davidi. Yosefe mpe Malia bazalaki bango nyonso mibale bakitani ya libota ya Yuda mpe bazalaki bakitani ya Mokonzi Davidi. Na yango lotómo Yesu azalaki na yango ya kosangola bokonzi ezalaki na moboko makasi na ngámbo mibale. (Matai 1:2-16; Luka 3:23-33) Yango wana na nsima anzelu alendisaki Yosefe ete akakatana te mpo na kokamata Malia lokola mwasi na ye ya libala, atako azalaki na zemi.—Matai 1:19-25.a
Mobeko ya kofuta mpako oyo mobisamaki na Kaisala Augusite epusaki Yosefe mpe Malia na kokende komikomisa na Beteleme. Ntango bazalaki kuna, Malia abotaki mwana na ye ya liboso. Babateli ya mpate bayaki kotala mwana yango, mpe bakumisaki Yehova, Tata na ye. Nsima na mikolo 40 ya kopɛtolama engebene Mibeko ya Mose, Malia akendeki na tempelo ya Yelusaleme mpo na kopesa mbeka ya masumu na ye. (Levitike 12:1-8; Luka 2:22-24) Ee, lokola Malia azangaki masumu te wana abotamaki, mpe lokola azalaki na litɔnɔ ya masumu, esengelaki ete kozanga kokoka oyo abotamaki na yango ekoka kolimbisama na nzela ya mbeka ya lisumu.—Nzembo 51:5.
Ntango Malia mpe Yosefe bazalaki na tempelo, mobangé Simeona mpe mosakoli mwasi mobangé Ana bazwaki libaku malamu ya komona Mwana ya Nzambe. Ezalaki Malia te moto oyo batyelaki mpenza likebi. (Luka 2:25-38) Na nsima, bato na mayɛlɛ oyo bautaki na Ɛ́sti bakumisaki Malia te kasi bakumisaki nde Yesu.—Matai 2:1-12.
Nsima ya kokima na Ezipito mpe koumela kuna kino liwa ya moto mabe Elode, baboti ya Yesu bazongaki kofanda na mboka moke Nazarete. (Matai 2:13-23; Luka 2:39) Ezali kuna nde Yosefe mpe Malia babokolaki Yesu kati na libota moko oyo ezalaki kobanga Nzambe.
Malia abotaki bana mosusu
Na nsima, Malia mpe Yosefe babotelaki Yesu bandeko mosusu ya mibali mpe basi. Ntango mosala ya Yesu ememaki ye kino na mboka na ye Nazarete, bato oyo bamesenaki na ye na ntango ya bolenge na ye bazalaki naino koyeba ye. Batunaki ete, “Oyo ajali mwana na mosali na mabaya tɛ? Nkombo na mama na ye Malia tɛ? Bandeko na ye Yakobo mpe Yosefe mpe Simona mpe Yuda tɛ? Bandeko na ye basi, yɔnsɔ bajali na biso elɔngɔ tɛ?” (Matai 13:55, 56) Bafandi ya Nazarete bazalaki kolobela libota ya mosuni ya Yosefe mpe Malia, elongo na bana mibali mpe bana basi oyo Malia abotaki, oyo bango bayebaki lokola bandeko mibali mpe bandeko basi ya Yesu.
Bandeko wana ya mibali mpe ya basi bazali te biboto ya Yesu. Bazali mpe bayekoli na ye te, to bandeko na ye mibali mpe basi ya elimo te, mpamba te Yoane 2:12 ezali komonisa polele bokeseni kati na bituluku wana mibale, wana elobi ete: “[Yesu] akiti na Kapalanauma, ye mpe mama na ye mpe bandeko na ye mpe bayekoli na ye.” Mibu mingi na nsima, na Yelusaleme ntoma Paulo amonaki Kefa, to Petelo, mpe abakisaki ete: “Namɔni mɔkɔ na bantoma mosusu tɛ bobɛlɛ Yakobo, ndeko na Nkolo.” (Bagalatia 1:19) Lisusu, maloba oyo ete Yosefe “asangani na ye [Malia] tɛ kino esili ye kobota mwana mobali” emonisi ete tata mobokoli ya Yesu asanganaki na Malia na nsima mpe abotisaki ye bana mosusu. (Matai 1:25) Mpo na yango, Luka 2:7 ebéngi Yesu mwana na ye ya mobali “mobotami ya liboso.”
Mama oyo azalaki kobanga Nzambe
Lokola azalaki mama oyo azalaki kobanga Nzambe, Malia asalaki elongo na Yosefe kati na mosala ya koteya bana na ye kati na nzela ya boyengebene. (Masese 22:6) Maloba ya elimo oyo abimisaki ntango Elisabɛta apesaki ye mbote mazali komonisa ete azalaki moyekoli ya molende ya Makomami. Na libaku wana, mama ya Yesu azongelaki mayoki oyo mazali kati na loyembo ya Hana mpe amonisaki ete ayebaki malamu makambo mazali na Nzembo, na mikanda ya makambo ya kala mpe ya bisakweli, mpe na mikanda ya Mose. (Genese 30:13; 1 Samwele 2:1-10; Masese 31:28; Malaki 3:12; Luka 1:46-55) Malia akangaki na motó makambo mpe maloba ya bato ya ntango ya kala, abombaki yango kati na motema na ye, mpe amanyolaki yango kati na makanisi na ye. Na yango azalaki na makoki mingi ya kosangana na mosala ya koteya elenge mobali Yesu.—Luka 2:19, 33.
Na mibu 12, Yesu oyo ateyamaki malamu amonisaki boyebi ya Makomami oyo ekamwisaki mibali ya mayele kati na tempelo. Mpo ete akabwanaki na baboti na ye na eleko ya Elekeli wana, mama na ye alobaki ete: “Mwana, mpɔ nini osaleli biso boye? Biso na tata na yɔ toluki yɔ na mitema likolo mpenja.” Yesu ayanolaki ete: “Bojalaki koluka ngai mpɔ na nini? Boyebaki tɛ ete ekoki na ngai kojala kati na ndako na Tata na ngai?” Wana akokaki te kokanga ntina ya eyano wana, Malia abombaki yango kati na motema na ye. Ezongaki bango na Nazarete, Yesu “akolaki na mayɛlɛ, mpe na molai, mpe na boboto na miso na Njambe mpe na bato.”—Luka 2:42-52.
Malia akómi moyekoli ya Yesu
Ebongaki mpenza ete na nsima Malia akóma moyekoli ya molende ya Yesu! Azalaki mosɔkɛmi mpe azalaki te na likanisi ya komimonisa atako azwaki libaku lileki kitoko liuti na Nzambe oyo moto mosusu te apesamelaki yango. Malia ayebaki Makomami. Soki osali bolukiluki kati na yango, okomona te ete amonisami na engɛngɛli na motó na ye, afandi na kiti ya bokonzi lokola “mama mokonzi-mwasi” mpe azipami na nkembo ya Klisto. Nzokande, okomona ye atyami mosika na nsima, mosika ya esika makambo mazali kosalema.—Matai 13:53-56; Yoane 2:12.
Yesu alimwisaki nokinoki likanisi nyonso ya kosambela Malia kati na bayekoli na ye. Mokolo moko, wana azalaki koloba, “mwasi mɔkɔ na ebele atomboli mongongo, mpe alobaki na ye ete ‘Esɛngɔ na libumu libotaki yɔ mpe na mabɛlɛ manungisaki yɔ!’ Nde ye alobaki ete, ‘Kasi, esɛngɔ eleki na bango bayoki Liloba na Njambe mpe batosi yango.’” (Luka 11:27, 28) Na elambo moko ya libala, Yesu alobaki na Malia ete: “Ɛ Mama, likambo nini kati na biso na yɔ? Naino elaka na ngai ekomi tɛ.” (Yoane 2:4) Mabongoli mosusu malobi ete: “Tiká likambo yango na mabɔkɔ na ngai.” (Weymouth) “Koluka kotindaka ngai te.” (An American Translation) Ee, Yesu amonisaki limemya epai na mama na ye, kasi asambelaki ye te.
Mabaku kitoko oyo makoumela seko
Oyo nde mabaku kitoko Malia azwaki! Abotaki Yesu. Na nsima abɔkɔlaki mpe ateyaki mwana wana moke. Na nsuka, amonisaki kondima, kokómáká bongo moyekoli ya Klisto mpe ndeko na ye ya mwasi na elimo. Kati na botaleli na biso ya nsuka ya Makomami na ntina na Malia, tomoni ye kati na eteni na ndako ya likoló na Yelusaleme. Azali kuna elongo na bantoma ya Yesu, na bana na ye mosusu ya mibali, mpe na basi mosusu ya sembo—bango nyonso basambeli ya Yehova.—Misala 1:13, 14.
Na nsima, Malia akufaki mpe nzoto na ye ezongaki na mputulu. Lokola bayekoli bapakolami mosusu ya mwana na ye molingami na ekeke ya liboso, alalaki kati na kufa kino elaka ebongisami na Nzambe mpo na kosekwisa ye lokola ekelamu ya elimo oyo azwi bomoi bozangi kufa kati na makoló. (1 Bakolinti 15:44, 50; 2 Timoté 4:8) Oyo nde bosepeli “ye oyo azwaki ngɔlu mingi” asengeli sikawa kozala na yango liboso na Yehova Nzambe mpe liboso na Yesu Klisto!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki Malia azalaki moseka te, nani akokaki kondima kobala ye? Bayuda bazalaki kosɛngisa makasi ete elenge mwasi azala moseka.—Deteronome 22:13-19; kokanisá na Genese 38:24-26.
[Maloba na elilingi ya lokasa 31]
Malia azwaki ngɔlu mingi lokola mama na Yesu