Yehova akoki kokembisa yo na nguya
“Akopɛsa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo ajangi makasi, akobakisa nguya.”—YISAYA 40:29.
1, 2. Wapi mwa makambo mamonisi nguya monene oyo Yehova azali na yango?
YEHOVA azali Nzambe “na nguya mingi.” Tokoki komona polele bilembo ya “nguya na seko mpe bonjambe” ya Nzambe kati na bonene ya biloko azalisaki oyo ezali komonana. Baoyo bazali koboya kondima bilembeteli motindo wana oyo bimonisi ye lokola Mozalisi bakoki kolimbisama te.—Njembo 147:5; Baloma 1:19, 20.
2 Nguya ya Yehova ezali koleka komonana polele na meko oyo bato ya siansi bazali kolukaluka mosika kati na mɔlɔ́ngɔ́, mpe na ba galaxies na yango oyo eyebani motángo te, mpe etandami na ntáká moko monene mpenza. Na molili ya butu, wana likoló lizali na mapata te, talá na likoló mpe moná soki okozala na maoki moko te lokola mokomi na Nzembo: “Ekomɔna ngai Likolo oyo ejali mosala na misapi na yɔ, sanja mpe miɔtɔ na likolo oyo yɔ obɔngisaki, moto ajali nini ete okanisa ye? mpe mwana na moto nini ete otalela ye?” (Njembo 8:3, 4) Mpe Yehova asili solo kobatela moto, ee asili kobatela biso! Apesaki na mobali mpe na mwasi ya liboso efandelo moko kitoko awa na mabelé. Mabelé yango mazalaki mpe na nguya ya kokólisa bitwɛlɛ, mpe ya kobota bilei bibongi kosunga nzoto mpe bibebisami te. Moto mpe nyama bazali kozwa makasi na nzoto kati na komonisama wana ya nguya ya Nzambe.—Genese 1:12; 4:12; 1 Samwele 28:22.
3. Longola biloko oyo bizali komonana kati na mɔlɔ́ngɔ́, biloko nini mosusu bizali komonisa nguya ya Nzambe?
3 Longola likambo oyo ete makoló mazali kokamwisa, mpe ete bitwɛlɛ elongo na nyama na mabelé ezali mpenza kosepelisa, biloko yango bizali komonisa biso nguya ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki ete: “Makambo na ye majangi komɔnana, yango nguya na ye na seko mpe bonjambe na ye, asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye.” (Baloma 1:20) Kasi ezali mpe na elembeteli mosusu ya nguya na ye oyo ebongi ete tótyela yango likebi mpe tóyeba motuya na yango. Okoki komituna ete: ‘Eloko nini mosusu oyo ekoki komonisa nguya ya Nzambe koleka mɔlɔ́ngɔ́?’ Eyano ezali ete Yesu Klisto. Ya solo, na kopemama na Nzambe ntoma Paulo alobaki ete Klisto oyo akakisami na nzeté ya mpasi azali “nguya na Njambe mpe mayɛlɛ na Njambe.” (1 Bakɔlinti 1:24) Okoki komituna ete: ‘Mpo na nini bongo? Mpe na nini yango etali bomoi oyo nazali na yango sikawa?’
Nguya emonisami na nzela ya Mwana na ye
4. Lolenge nini nguya ya Nzambe emonisamaki epai na Mwana na ye?
4 Nguya ya Nzambe emonisamaki na mbala ya liboso ntango azalisaki Mwana sé moko na ye, oyo asalemaki na elilingi na ye. Mwana wana ya elimo azalaki kosalela Yehova lokola “kapita-mokambi” na kosaleláká nguya monene ya Nzambe mpo na kosala biloko mosusu nyonso. (Masese 8:22, 30, NW) Paulo akomelaki bandeko na ye baklisto na lisangá ya Kolose ete: “Na nzela na ye biloko mosusu nyonso bizalisamaki kati na makoló mpe na mabelé, biloko bikomonanaka mpe biloko bikomonanaka te . . . Biloko mosusu nyonso bizalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.”—Bakolose 1:15, 16, NW.
5-7. (a) Na ntango ya kala, lolenge nini nguya ya Nzambe emonanaki epai ya bato mosusu? (b) Bantina nini epesi biso nzela na kondima ete nguya ya Nzambe ekoki komonisama epai na baklisto na mikolo na biso?
5 Biso tozali eteni ya ‘biloko bizalisamaki na mabélé.’ Na yango, nguya ya Nzambe ekokaki mpe kopesama na bato? Kati na boyokani oyo Nzambe azalaki na yango elongo na bato bazangi kokoka, na bantango mosusu Yehova azalaki kobakisela basaleli na ye nguya mpo ete bákoka kokokisa mikano na ye. Mose ayebaki ete, bato bazangi kokoka baumelaka na bomoi mibu 70 to 80. (Nzembo 90:10) Ezalaki boni mpo na Mose ye moko? Aumelaki mibu 120, atako bongo “miso na ye ibebaki tɛ, mpe nguya na njoto na ye esilaki tɛ.” (Dutɛlɔnɔmɛ 34:7) Atako likambo oyo lilimboli te ete Nzambe akopesaka na basaleli na ye nyonso nguya ya koumela mingi na bomoi, nzokande ezali komonisa ete Yehova akoki kopesa basaleli na ye nguya.
6 Likambo mosusu oyo limonisi makoki ya Nzambe ya kopesa mibali mpe basi nguya ezali oyo asalaki epai na mwasi ya Abalayama. “Sala akokaki kojua jemi ata asili koleka elaka ya basi mpɔ na kobota, jambi atangi ete Ye oyo apɛsi elaka akokokisa yango.” To, talá lolenge nini Nzambe akembisaki na nguya basambisi mpe bato mosusu ya Yisraele: “Gɛdɛɔna, na Balaka, na Samasona, na Yɛfɛta, na Dawidi, na Samwele, na basakoli, baoyo . . . bakembisami kati na bolɛmbu.”—Baɛbɛlɛ 11:11, 32-34.
7 Nguya motindo oyo ekoki mpe kosala mosala epai na biso lokola. Nzokande, tokoki te komizela na kobota bana na nzela ya likamwisi, tokoki mpe te komonisa nguya monene lokola oyo Samasona azalaki na yango. Kasi tokoki kokembisama na nguya, lokola Paulo amonisaki yango epai na Bakolose oyo bazalaki lokola bato mosusu nyonso. Ee, Paulo akomelaki mibali, basi, mpe bana, lokola baoyo tozali kokuta lelo kati na masangá, mpe alobaki ete “tika nguya na ye na nkɛmbɔ ekembisa bino na makasi yɔnsɔ.”—Bakɔlɔsɛ 1:11.
8, 9. Na ekeke ya liboso, lolenge nini nguya ya Yehova emonisamaki polele epai na bato oyo bazalaki lokola biso?
8 Ntango Yesu azalaki naino awa na mabelé, Yehova amonisaki polele ete nguya na ye ezalaki kosala mosala kati na Mwana na ye. Na ndakisa, ntango ebele na bato bayanganaki epai na Yesu na Kapalanauma, “nguya na [Yehova] ejalaki na ye mpɔ na kobikisa babɛli.”—Luka 5:17.
9 Nsima ya lisekwa na ye, Yesu apesaki bayekoli na ye endimiseli ete ‘ekosila elimo santu koya na likoló na bango, bakozwa nguya.’ (Misala 1:8) Yango ezalaki mpenza solo! Mokomi moko ya makambo ya kala alobeli makambo oyo malekaki mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B. ete: “Bantoma [bazalaki kotatola, NW] na nguya mingi likambo na lisekwa na Nkolo Yesu.” (Misala 4:33) Paulo ye moko azalaki moto oyo akembisamaki na nguya mpo na mosala oyo Nzambe atindaki ye ete asala yango. Nsima na kobongwana mpe nsima wana miso na ye mafungwamaki lisusu, “akoli na nguya, mpe amɔnisi polele ete Yesu oyo ajali Klisto, boye Bayuda oyo bafandi na Damasɛkɛ bakokaki kojongisa eyano tɛ.”—Misala 9:22.
10. Lolenge nini nguya oyo eutaki na Nzambe ezalaki na ntina mpo na Paulo?
10 Ya solo, Paulo azalaki na mposa ya kokembisama na nguya, soki totaleli nguya ya elimo mpe ya makanisi oyo esɛngamaki mpo na kosala mibembo misato ya misionere na bantáká ya bankóto ya bakilomɛtɛlɛ. Asengelaki lisusu koyikela mikakatano ndenge na ndenge mpiko, komonisáká molende ntango akangamaki, mpe ntango atyamaki liboso na kufa lokola martíru. Lolenge nini akokaki kolónga yango? Ayanolaki ete: “Nkolo atɛlɛmi pɛmbɛni na ngai mpe akembisi ngai na nguya ete na monɔkɔ na ngai nasakola esakweli mobimba mpenja.”—2 Timɔtɛ 4:6-8, 17; 2 Bakolinti 11:23-27.
11. Mpo na oyo etali nguya ya Nzambe, elikya nini Paulo alobelaki na ntina na baninga na ye, basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na Kolose?
11 Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete, ntango Paulo akomelaki “bandeko na kondima kati na Klisto” na Kolose, apesaki bango endimiseli ete: “nguya na ye [Yehova] na nkɛmbɔ ekembisa bino na makasi yɔnsɔ ete boyika mpiko mpe bojala na mitema pɛtɛɛ esika mɔkɔ na esɛngɔ.” (Bakɔlɔsɛ 1:2, 11) Atako maloba oyo mataleli libosoliboso baklisto bapakolami, nzokande baoyo nyonso bazali kolanda matambe ya Klisto bakoki kozwa litomba mpenza na makambo oyo Paulo akomaki.
Bakembisami na nguya na Kolose
12, 13. Makambo nini matindaki Paulo na kokoma mokanda epai na Bakolose, mpe ekoki kozala ete yango ezalaki na bopusi nini?
12 Lisangá ya Kolose, oyo ezalaki kati na etúká ya bokonzi ya Loma na Azia, ebotamaki mbala mosusu na nzela na mosala ya kosakola ya Epafala, moklisto moko ya sembo. Emonani lokola ete ntango ayokaki nsango ya kokangama ya Paulo na Loma pene na mobu 58 T.B., Epafala azwaki ekateli ya kokende kotala ye mpe kolendisa ye na masoló kitoko na ntina na bolingo mpe bompikiliki ya bandeko ya Kolose. Ekoki mpenza kozala ete Epafala alobelaki mpe mwa mikakatano oyo mizalaki kati na lisangá ya Kolose, oyo ezalaki kosɛnga ete básembola yango. Paulo ye moko amonaki ntina ya kokomela lisangá yango mokanda ya koyikisa mpiko mpe ya kolendisa. Yo mpe okoki kozwa elendiseli monene na mokapo 1 ya mokanda wana, mpamba te ezali komonisa polele lolenge oyo Yehova akoki kokembisa basaleli na ye na nguya.
13 Kanisá esengo monene oyo bandeko mibali mpe bandeko basi na Kolose bazalaki na yango ntango Paulo alobelaki bango lokola “bandeko ya sembo kati na Klisto.” Babongaki kozwa longonya mpo na ‘bolingo bazalaki na yango mpo na babulami nyonso’ mpe mpo na ‘kobota mbuma na nsango malamu’ longwa na ntango oyo bakómaki baklisto! Maloba motindo oyo makoki kosalelama mpo na lisangá na biso, mpe mpo na moko na moko na biso?—Bakolose 1:2-8.
14. Mposa ya Paulo ezalaki nini na ntina na Bakolose?
14 Paulo asepelaki mingi na nsango azwaki na boye ete ayebisaki Bakolose ete atikaki te kobondela mpo na bango mpe kosɛnga ete “botonda na boyebi ya sikisiki, ya mokano ya Nzambe, na mayele nyonso mpe na bososoli na elimo. Na bongo, botambola na sembo na Yehova.” Abondelaki ete: “Bobota mbuma na misala yɔnsɔ malamu, bokola mpe na boyebi ya sikisiki ya Nzambe. Tika [ete] nguya na ye na nkɛmbɔ ekembisa bino na makasi yɔnsɔ ete boyika mpiko mpe bojala na mitema pɛtɛɛ esika mɔkɔ na esɛngɔ.”—Bakolose 1:9-11.
Lelo mpe bazali kokembisama na nguya
15. Lolenge nini tokoki komonisa elimo motindo moko na oyo emonisami kati na makambo oyo Paulo akomelaki Bakolose?
15 Oyo nde ndakisa kitoko Paulo atikeli biso! Bandeko na biso na mokili mobimba bazali na mposa ya mabondeli mpo bákoka koyika mpiko mpe kobatela esengo na bango kati na mpasi. Lokola Paulo, tosengeli kosɛnga makambo ya sikisiki kati na mabondeli na biso, wana tozwi nsango ete bandeko ya lisangá mosusu, to ya mboka mosusu, bazali kokutana na mikakatano. Ekoki kozala ete lisangá moko ya penepene lizwami na mpasi ya likámá liuti na biloko bizalisami to bazali na mikakatano ya elimo. To ekoki kozala ete baklisto mosusu bazali konyokwama kati na mikili oyo mibebisami na bitumba ya banamboka to na kobomana kati na bikólo bikeseni. Kati na libondeli na biso tosengeli kosɛnga na Nzambe ete asalisa bandeko na biso na “kotambola na motindo mobongi na Yehova,” na kokóba kobota mbuma mpo na Bokonzi wana ezali bango koyika mpiko, mpe kokóla kati na boyebi. Na motindo yango basaleli ya Nzambe bakozwa nguya ya elimo na ye, oyo ‘ekokembisa bango na makasi nyonso.’ Okoki solo kondimisama ete Tata na biso akoyoka mpe akoyanola na yango.—1 Yoane 5:14, 15.
16, 17. (a) Lokola Paulo akomaki yango, mpo na makambo nini tosengeli kopesa botɔ́ndi? (b) Na ndimbola nini basaleli ya Nzambe basili kosikolama mpe kozwa bolimbisi?
16 Paulo akomaki ete Bakolose basengelaki ‘kotɔ́nda Tata oyo abongisaki bango mpo na kozwa likabo na bango na libula ya babulami kati na pole.’ Tiká ete biso mpe tótɔ́nda Tata na biso ya likoló mpo na esika oyo apesi biso kati na ebongiseli na ye, ezala na likoló to na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi na ye. Lolenge nini Nzambe asalaki ete bato bazangi kokoka bábonga na miso na ye? Paulo akomelaki bandeko na ye bapakolami ete: “Ye abikisi biso longwa na nkanga na molili mpe akɔtisi biso na bokonji na Mwana na ye na bolingo. Kati na ye tojali na lisiko, yango kolimbisama na masumu.”—Bakɔlɔsɛ 1:12-14.
17 Atako elikya na biso ezali nini, ya bomoi na likoló to na mabelé, tosengeli kotɔ́nda Nzambe mokolo na mokolo, mpo na kosikolama na biso na ebongiseli mabe oyo ya molili, kosikolama oyo ekokisami na nzela ya kondima na biso kati na mbeka ya lisiko ya Mwana molingami ya Yehova. (Matai 20:28) Baklisto bapakolami basili kozwa mbano ya lisiko oyo ezali kosala mosala kati na bango na motindo moko ya sikisiki, na boye ete ‘akɔtisi bango kati na bokonzi na Mwana na ye ya bolingo.’ (Luka 22:20, 29, 30) Kasi “bampate mosusu” mpe bazali kozwa litomba ya lisiko yango uta sikawa. (Yoane 10:16) Bakoki kozwa bolimbisi ya Nzambe mpo ete bázala na etɛlɛmɛlo ya boyengebene liboso na ye lokola baninga na ye. Bazali kosangana mingi kati na kosakolama ya “nsango malamu oyo na bokonji” na mikolo oyo ya nsuka. (Matai 24:14) Longola yango, bazali na elikya kitoko ya kokóma mpenza bayengebene mpe bato ya kokoka kati na nzoto, na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Wana ezali yo kotánga Emoniseli 7:13-17, talá soki okondima te ete yango ezali solo bilembo ya kosikolama mpe ya kopambolama.
18. Kozongisama ya boyokani nini oyo elobelami kati na mokanda epai na Bakolose Nzambe azali naino kokokisa?
18 Mokanda ya Paulo mozali kosalisa biso na kososola nyongo monene oyo tozali na yango epai na moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Nzambe asalaki nini na nzela ya Klisto? “[Azongisaki] bilɔkɔ yɔnsɔ epai na ye, awa esili ye koyeisa kimia mpɔ na makila [oyo asopaki likoló na nzeté, NW]. Ɛɛ, ete ajongisa bilɔkɔ yɔnsɔ na bondeko na ye, sɔkɔ bilɔkɔ na nse, sɔkɔ bilɔkɔ na Likolo.” Mokano ya Nzambe ezali ete azongisa biloko nyonso bizalisami na boyokani malamu elongo na ye, lokola ezalaki liboso ya botomboki na Edene. Ye oyo asalelamaki mpo na kozalisa biloko binso azali moto mosusu te bobele ye oyo asalelami lelo mpo na kozongisa bondeko yango.—Bakɔlɔsɛ 1:20.
Bakembisami na nguya mpo na mokano nini?
19, 20. Nini ekosala ete tózala babulami mpe bato bazangi litɔnɔ?
19 Mikumba mizali kotyama likoló na baoyo basili kozongisama na boyokani elongo na Nzambe. Kala, tozalaki basáli na mabe mpe tozalaki mosika na Nzambe. Kasi sikawa, lokola tosili kondima mbeka ya Yesu mpe tozali lisusu kotyaka makanisi na biso likoló na mabe te, tozali mpenza na etɛlɛmɛlo ya “babulami mpe bato bazangi litɔnɔ soko mpe efundeli liboso ya [Nzambe].” (Bakolose 1:21, 22, NW) Kanisá naino, motindo moko lokola Nzambe ayokaki nsɔni te mpo na Batatoli na ye ya ntango ya kala, bobele bongo azali koyoka nsɔni te mpo na biso, ete abyangama Nzambe na biso. (Baebele 11:16) Lelo oyo, moto moko te akoki kofunda biso ete tobongi te komema nkombo na ye monene, to ete tozali kobanga kosakola nkombo na ye kino na nsuka ya mabelé!
20 Nzokande talá likebisi oyo Paulo abakisi na Bakɔlɔsɛ 1:23: “Ejali bongo, sɔkɔ bojali kotɛlɛma ngwi na kondima lokola moboko, mpe sɔkɔ bokobongwana tɛ longwa na elikia na Nsango Malamu eyokaki bino. Nsango yango esili kosakolama epai na bato yɔnsɔ na nse na Likolo.” Na yango, mbano oyo tokozwa etaleli mingimingi kotikala sembo epai na Yehova, kolanda matambe ya Mwana molingami na ye. Yehova mpe Yesu Klisto basili kosala makambo mingi mpo na biso! Tiká ete tómonisa bolingo na biso mpo na bango na kolandáká toli ya Paulo.
21. Mpo na nini tozali na ntina monene ya kozala na nsaí lelo oyo?
21 Boye baklisto ya Kolose basepelaki mingi na koyoka ete ‘nsango malamu oyo bayokaki’ esilaki “kosakolama epai na bato yɔnsɔ na nse na Likoló.” Lelo oyo esengo eleki lisusu monene na koyoka bonene ya kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi—oyo esakolami na Batatoli koleka milió minei na ndambo kati na mikili koleka 230. Ya solo, mbula na mbula penepene na bato 300 000 ya mabota nyonso bazali kozongisama na boyokani elongo na Nzambe!—Matai 24:14; 28:19, 20.
22. Ata soki tozali kati na mpasi, Nzambe akoki kosala nini mpo na biso?
22 Atako Paulo azalaki mpenza kati na bolɔ́kɔ ntango akomaki mokanda epai na Bakolose, nzokande azalaki komilela te na ntina na ezalela na ye. Kasi alobaki ete: “Sasaipi, najali kosepela mpɔ na bolɔji bojui ngai na ntina na bino.” Paulo ayebaki ete esengelaki ‘koyika mpiko mpe kozala na motema molai esika moko na esengo.’ (Bakɔlɔsɛ 1:11, 24) Kasi ayebaki ete asalaki yango na makasi na ye moko te. Yehova akembisaki ye na nguya! Ezali mpe bongo lelo. Bankóto ya Batatoli oyo bakangamaki mpe banyokwamaki babungisaki esengo na bango te kati na mosala ya Yehova. Na esika ya kosala bongo, bakangaki ntina na bosolo ya maloba ya Nzambe oyo mazwami na Yisaya 40:29-31: “Akopɛsa nguya epai na ye oyo alɛmbi . . . Baoyo [bakolikyaka epai na Yehova, NW] bakojua nguya na sika.”
23, 24. Libombami mosantu oyo elobelami kati na Bakolose 1:26 ezali nini?
23 Mosala ya kosakola nsango malamu na ntina na Klisto ezalaki na motuya monene mpo na Paulo. Alingaki ete basusu mpe báyeba ntina ya mokumba ya Klisto kati na mokano ya Nzambe, mpo na ntina wana alobelaki yango lokola “likambo libombamaki kalakala na miso na mabota yɔnsɔ.” Nzokande, esengelaki kotikala ntango nyonso libombami te. Paulo abakisaki ete: “Nde sasaipi limɔnani epai na Babulami na ye.” (Bakɔlɔsɛ 1:26) Ntango botomboki ebimaki na Edene, Yehova apesaki elaka ya makambo kitoko mpo na mikolo misengelaki koya nsima, kosakoláká ete ‘mombóto ya mwasi asengelaki kotuta motó ya nyoka.’ (Genese 3:15, NW) Yango elimbolaki nini? Uta kolandana ya mabota mingi ya bato, na boumeli ya bikeke mingi, likambo yango ezalaki libombami. Na nsima Yesu ayaki, mpe “alimbolaki polele bomoi mpe kozanga kobeba na nzela ya nsango malamu.”—2 Timoté 1:10, NW.
24 Ee, “libombami mosantu” etongami zongazonga na Klisto mpe na Bokonzi ya Masiya. Paulo alobelaki “biloko kati na makoló,” wana ezalaki ye komonisa baoyo bakosangana kati na bokonzi elongo na Klisto. Bango bakosangana na kopesa ebele ya mapamboli na “biloko bizali na mabelé,” baoyo bakosepela na bomoi ya seko kati na paladiso. Na bongo, okoki mpenza komona ete ezalaki na ntina ete Paulo alobelaki “bozwi na nkembo ya libombami mosantu.”—Bakolose 1:20, 27.
25. Lokola emonisami na Bakɔlɔsɛ 1:29, ezaleli na biso esengeli sikawa kozala lolenge nini?
25 Paulo azalaki kozela na motema likoló kozwa esika na ye kati na Bokonzi yango. Nzokande ayebaki ete ezalaki te eloko oyo asengelaki bobele kofanda mpe kozela yango. “Mpɔ na yango nakosalaka mosala makasi, nakobundaka engebene makasi na ye oyo ekosalaka kati na ngai na nguya.” (Bakolose 1:29, NW) Tosimba ete Yehova, na nzela ya Klisto, akembisaki Paulo na nguya mpo ete akokisa mosala wana ya kobikisa bomoi. Yehova akoki kosala bobele bongo mpo na biso lelo. Kasi tosengeli biso moko komituna ete, ‘Nazali komonisa elimo ya kopalanganisa nsango malamu lokola nazalaki na yango ntango nabandaki koyekola solo?’ Eyano na yo ezali nini? Nini ekoki kosunga moko na moko kati na biso na ‘kosala mosala, na kobunda na lisalisi na nguya ya Yehova oyo ekosalaka mosala kati na biso’? Lisoló oyo lilandi likolobela mpenza makambo yango.
Osimbi nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kondimisama ete Yehova akoki komonisa nguya na ye mpo na kosunga bato?
◻ Makambo nini matindaki Paulo na kokoma maloba oyo mazwami kati na Bakɔlɔsɛ mokapo 1?
◻ Lolenge nini Nzambe azali kokokisa kozongisama ya boyokani oyo elobelami na Bakolose 1:20?
◻ Na nguya na ye, Yehova akoki kosala nini na nzela na biso?
[Karte/Bililingi na lokasaa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
COLOSSAE