Esengo ya Yehova ezali esika makasi na biso
“Oyo ezali mokolo ya bulɛɛ mpo na Nkolo na biso, mpe bózala na mawa te, mpamba te esengo ya Yehova ezali esika makasi na bino.”—NEHEMIA 8:10, NW.
1, 2. (a) Esika makasi ezali nini? (b) Lolenge nini Davidi amonisaki ete alukaki ekimelo epai na Yehova?
YEHOVA azali esika makasi oyo ekokani na mosusu te. Mpe esika makasi ezali nini? Ezali esika oyo ekembisami, esika ya libateli to ya kobikisama. Davidi, moto ya Yisraele ya kala, atalelaki Nzambe lokola esika makasi na ye. Na ndakisa, tótalela loyembo oyo Davidi ayembelaki ye Oyo Aleki Likoló “na mokolo oyo Yehova abikisaki ye na mabɔkɔ ya banguna na ye mpe na lobɔkɔ ya Saulo,” mokonzi ya Yisraele.—Nzembo 18, makomi oyo mazali na likoló na yango.
2 Davidi abandisaki loyembo wana ya kosimba motema na maloba oyo: “Ɛ [Yehova], nguya na ngai, nalingi yɔ! [Yehova] ajali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai, Njambe na ngai, libanga na ngai oyo nakokima epai na ye; nguba na ngai mpe liseke na kobika na ngai mpe esika na likolo na ngai.” (Njembo 18:1, 2) Ntango Saulo apimelaki ye, na motema mabe nyonso, matomba mpe libateli engebene mibeko mpe wana azalaki kolanda ye, mosembwi Davidi azwaki ekimelo epai na Yehova, motindo moko moto akoki kokima kati na esika ekembisami mpo na kobikisama longwa na likámá moko boye.
3. Mpo na nini Bayuda na mikolo ya Ezela bazalaki na “bosepeli monene”?
3 Esengo oyo Yehova azali kopesa ezali esika makasi oyo ekoki kokwea te mpo na baoyo bazali kotambola na nzela na ye lokola bato babatelaka bosembo. (Masese 2:6-8; 10:29) Ya solo, mpo na kozwa esengo oyo Nzambe apesaka, bato basengeli kosala mokano ya Nzambe. Mpo na likambo yango, tótalela oyo ekómaki na Yelusaleme na mobu 468 L.T.B. Mokomi Ezela mpe basusu bapesaki bososoli epai na bato na nzela ya botángi ya polele ya Mibeko. Na nsima bato balendisamaki ete: “Bokɛnda na bino, bolia mafuta mpe bomɛla bilɔkɔ na elɛngi mpe botinda makabo epai na ye oyo abɔngisamɛli elɔkɔ tɛ; mpɔ ete [oyo ezali mokolo ya bulɛɛ mpo na Nkolo na biso, mpe bózala na mawa te, mpamba te esengo ya Yehova ezali esika makasi na bino, NW].” “Bosepeli monene” emonanaki mpamba te Bayuda basalelaki boyebi oyo bazwaki mpe basalaki Elambo ya esengo ya Mingombo. (Nehemia 8:1-12) Baoyo bazalaki na ‘esengo ya Yehova lokola esika makasi na bango’ bakangamaki makasi na losambo na ye mpe na mosala na ye. Lokola esengo ya Yehova ezalaki esika makasi na bango, tosengeli komizela ete libota ya Nzambe na mikolo na biso ezala mpe na esengo. Na bongo, wapi bamoko na bantina bazali na yango lelo ya kozala na esengo?
“Esɛngɔ sɔlɔ”
4. Wapi moko na bantina minene ya esengo ya libota ya Yehova?
4 Moko na bantina minene ya kozala na esengo ezali ebongiseli oyo Yehova asalaka mpo na koyanganisa biso elongo. Mayangani ya mike mpe ya minene ya Batatoli ya Yehova ezali kopesa bango esengo lelo, motindo moko bilambo ya mbula na mbula oyo ezalaki kosalema na Bayisraele epesaki bango esengo kati na mitema. Elobamaki na Bayisraele ete: “Okobatela elambo [na mingombo] mikɔlɔ nsambo epai na [Yehova] Njambe na yɔ na esika ekopɔna [Yehova], mpɔ ete [Yehova] Njambe na yɔ akopambola yɔ na bilanga na yɔ yɔnsɔ mpe na misala na mabɔkɔ na yɔ yɔnsɔ, ete ojala na esɛngɔ sɔlɔ.” (Dutɛlɔnɔmɛ 16:13-15) Ee, Nzambe alingaki ete bango bázala na “esɛngɔ sɔlɔ.” Ezali mpe bobele bongo mpo na baklisto ya solo, mpamba te ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete: “Bosepelaka ntango yɔnsɔ kati na Nkolo. Najali koloba lisusu ete, Bosepelaka!”—Bafilipi 4:4.
5. (a) Esengo ezali nini, mpe lolenge nini baklisto bazwaka yango? (b) Lolenge nini tokoki kozala na esengo atako tozali kati na komekama?
5 Mpo ete Yehova alingi ete tózala na esengo, azali kopesa biso esengo lokola moko na mbuma ya elimo santu na ye. (Bagalatia 5:22, 23) Kasi esengo ezali nini? Ezali mayoki ya bosepeli mauti na likambo moko ozalaki kozela to na kozwama ya eloko moko ya malamu. Esengo ezali ezalela ya bolamu ya solo, ata mpe bosepeli. Mbuma wana ya elimo santu ya Nzambe ezali kosunga biso na ntango ya komekama. “Mpɔ na esɛngɔ etiami liboso na ye, [Yesu] ayikeli [nzeté na mpasi, NW] mpiko, atioli nsɔni na yango mpe ajali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonji na Njambe.” (Baɛbɛlɛ 12:2) Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bandeko na ngai, bokanisa ete ejali bobɛlɛ esɛngɔ wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.” Kasi ezali boni soki toyebi te nini tosengeli kosala liboso na komekama moko boye? Na bongo, tokoki kobondela na kotya motema nyonso mpo ete tózwa mayele mpo na kolónga yango. Kosala na boyokani na mayele oyo mauti na likoló ezali kopesa biso likoki ya kosilisa mokakatano na biso to kolónga komekama oyo ezali koumela kozanga ete tóbungisa esengo ya Yehova.—Yakobo 1:2-8.
6. Boyokani nini ezali kati na esengo mpe losambo ya solo?
6 Esengo oyo Yehova azali kopesa ezali kolendisa biso mpo na kokólisa losambo ya solo. Ezali yango nde esalemaki na mikolo ya Nehemia mpe Ezela. Bayuda ya eleko wana oyo bazalaki na esengo ya Yehova lokola esika makasi na bango bazwaki makasi mpo na kokólisa matomba ya losambo ya solo. Mpe lokola batombolaki losambo ya Yehova, esengo na bango ebakisamaki. Likambo yango ezali mpe solo lelo oyo. Lokola tozali basambeli ya Yehova, tozali na bantina ya kozala na bosepeli monene. Tiká tótalela sikawa na mozindo bantina mingi oyo tozali na yango ya kozala na esengo.
Boyokani elongo na Nzambe na nzela ya Klisto
7. Mpo na oyo etali Yehova, ntina nini baklisto bazali na yango ya kozala na esengo?
7 Boyokani na biso ya penepene elongo na Yehova esali ete tózala bato oyo bazali na esengo mingi koleka basusu awa na mabelé. Liboso ete tókóma baklisto, tosanganaki kati na libota ya bato bazangi sembo baoyo bazali ‘na molili kati na makanisi mpe bamitangoli mosika longwa na bomoi ya Nzambe.’ (Baefese 4:18) Oyo nde esengo tozali na yango lokola tozali lisusu mosika na Yehova te! Ya solo, ezali kosɛnga milende mpo na kolanda kozwa ngɔlu na ye. Tosengeli ‘kotɛlɛma ngwi na kondima lokola moboko, mpe soko tokobongwana te longwa na elikya ya nsango malamu.’ (Bakolose 1:21-23) Tokoki kosepela lokola Yehova azali kobɛlɛmisa biso epai na Mwana na ye na boyokani na maloba oyo Yesu ye moko alobaki: “Moto akoki koya epai na ngai tɛ bobɛlɛ sɔkɔ Tata, Motindi na ngai, akobenda ye.” (Yoane 6:44) Soki tozali mpenza kotalela na motuya boyokani kitoko tozali na yango elongo na Nzambe na nzela ya Klisto, tokosala te likambo nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani yango.
8. Lolenge nini Yesu apesaki nzela na ezalela na biso ya esengo?
8 Bolimbisi ya masumu na nzela ya kondima kati na mbeka ya lisiko ya Yesu ezali ntina monene mosusu ya esengo mpamba te ezali yango nde ezali kosala ete tózala na boyokani elongo na Nzambe. Mpo na lisumu oyo asalaki na nkó, Adama, nkɔ́kɔ na biso, ayeisaki liwa likoló na bato nyonso. Nzokande, ntoma Paulo alimbolaki ete: “Njambe amɔnisi bolingo na ye mpɔ na biso na njela oyo: naino ejalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” Lisusu, Paulo akomaki ete: “Bongo, pelamɔkɔ libunga na moto mɔkɔ eyeisi ekweli mpɔ na bato yɔnsɔ, boye mosala na boyɛngɛbɛnɛ na moto mɔkɔ eyeisi elonga mpe bomɔi mpɔ na bato yɔnsɔ. Jambi pelamɔkɔ moto mɔkɔ na nkanja na ye ajalisi bato mingi na masumu, bongo mpe moto mɔkɔ na njela na botosi na ye ajalisi bato mingi bayɛngɛbɛni.” (Baloma 5:8, 18, 19) Oyo nde esengo tokoki kozala na yango na koyeba ete Yehova Nzambe asepeli kosomba baoyo, kati na bakitani ya Adama, bakosalela malamu ebongiseli wana akamati ya bolingo!
Kosikwama na makambo ya losambo mpe bingɛngiseli
9. Mpo na nini tozali na esengo na kotalela makambo ya losambo?
9 Kosikwama longwa na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, ezali ntina mosusu tozali na yango ya kozala na esengo. Ezali mpo na solo euti epai na Nzambe nde tozali na bonsomi. (Yoane 8:32) Mpe kosikwama longwa na mwasi na pite wana na makambo ya losambo elimboli ete tozali kosangana te kati na masumu na ye, tokozwa mpe bampasi na ye te, mpe tokobomama te elongo na ye. (Emoniseli 18:1-8) Likambo moko ya mawa lizali te na kokima makambo nyonso wana!
10. Bingɛngiseli nini tozali kozwa lokola tozali libota ya Yehova?
10 Kososola mpe kosalela Liloba ya Nzambe kati na bomoi ezali bantina ya bosepeli monene. Lokola tosikwami longwa na bopusi ya mangomba ya lokuta, tozali kozwa mokemoke bingɛngiseli ya elimo oyo Tata na biso ya likoló azali kopesa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Kati na bato banso bafandi awa na mabelé, bobele baoyo bamipesi mobimba epai na Yehova nde bazali kozwa elimo santu na ye mpe bososoli malamu ya Liloba na ye mpe ya mokano na ye. Ezali yango nde Paulo alobaki: “Njambe amɔnisi biso yango [makambo asili kobongisa mpo na baoyo balingaka ye] na njela na [elimo, NW] mpɔ ete [elimo ekolukaka, NW] makambo yɔnsɔ, ata makambo na bojindo na Njambe.” (1 Bakɔlinti 2:9, 10) Tosengeli kozala na botɔ́ndi mpe na esengo lokola tozali kozwa mokemoke bososoli oyo emonisami kati na maloba ya Masese 4:18: “Njela na bayɛngɛbɛni ejali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokɔlɔ na malamu koleka.”
Elikya ya Bokonzi mpe bomoi ya seko
11. Lolenge nini elikya ya esengo ya Bokonzi ezali kopesama epai na bato mosusu?
11 Elikya ya Bokonzi oyo tozali na yango ezali mpe kosala ete tózala na esengo. (Matai 6:9, 10) Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosili kosakola uta kala ete Bokonzi ya Nzambe nde ezali elikya bobele moko mpo na bato banso. Na ndakisa, tótalela mobu 1931, ntango tozwaki nkombo Batatoli ya Yehova na nzela ya ekateli moko oyo eyambamaki na esengo nyonso na mayangani 51 kati na mokili mobimba. (Yisaya 43:10-12) Ekateli wana mpe lisukúlu moko ya ntina oyo J. F. Rutherford (oyo azalaki prezidá ya la société Watch Tower na ntango wana) asalaki kati na liyangani wana, ebimisamaki kati na mwa búku Le Royaume, l’espérance du monde. Kati na yango, ezalaki mpe na ekateli mosusu oyo endimamaki na liyangani wana, ekateli yango ekweisaki boklisto ya nkombo mpamba na ntina na lipɛngwi na yango mpe botyoli na yango ya batoli ya Yehova. Esakolaki lisusu ete: “Elikya ya mokili ezali Bokonzi ya Nzambe, mpe elikya mosusu ezali te.” Bobele nsima na mwa basanza, Batatoli ya Yehova bakabolaki koleka bamilió mitano ya mwa búku yango kati na biteni nyonso ya mabelé. Uta ntango wana tozali komonisa ete Bokonzi ezali elikya bobele moko mpo na bato.
12. Bilikya nini ya bomoi ya esengo bityami liboso na baoyo bazali kosalela Yehova?
12 Tozali mpe kosepela lisusu mpo na elikya ya bomoi ya seko na nsé ya boyangeli ya Bokonzi. “Etongá moke” ya baklisto bapakolami bazali na elikya kitoko ya kozala na likoló. Ntoma Petelo akomaki ete: “Njambe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto akumisama! Pelamɔkɔ ejali mawa na ye mingi, aboti biso lisusu ete tojala na elikia na bomɔi na njela na lisekwa na Yesu Klisto kati na bakufi; ete tojala mpe na libula likobeba tɛ, lijangi mbindo, likosila tɛ, libombami kuna na Likolo mpɔ na bino.” (Luka 12:32; 1 Pɛtɛlɔ 1:3, 4) Lelo oyo, ebele ya Batatoli ya Yehova bazali kozela na motema likoló bomoi ya seko kati na Paladiso na nsé ya Bokonzi. (Luka 23:43; Yoane 17:3) Ezali ata na libota moko te awa na mabelé oyo ezali na eloko oyo ekokani na bilikya kitoko oyo tozali na yango. Tiká ete tólinga yango mpenza koleka!
Bondeko oyo epambwami
13. Lolenge nini tosengeli kotalela bondeko na biso kati na mokili mobimba?
13 Kozala kati na libota sé moko ya bondeko na mokili mobimba oyo endimami na Nzambe ezali mpe ntina mosusu ya kozala na esengo monene. Likambo ya esengo, tozali na baninga ya malamu koleka awa na mabelé. Yehova ye moko atyaki likebi na mikolo na biso mpe alobaki ete: “Nakotetemisa mpe mabota yɔnsɔ mpe mabonja kitɔkɔ na mabota makoingela mpe makotondisa ndako oyo na nkɛmbɔ. [Yehova] na bibele alobi bongo.” (Hagai 2:7) Ya solo, baklisto nyonso bazali bato bazangi kokoka. Nzokande, Yehova azali kobenda bato motindo wana epai na ye na nzela ya Yesu Klisto. (Yoane 14:6) Mpo ete Yehova asili kobenda epai na ye moko bato oyo ye azali kotalela ete bazali malamu, esengo na biso ekofuluka soki tozali komonisela bango bolingo ya bandeko, kokumisa bango, kosalana elongo na bango kati na misala ya Nzambe, kosunga bango kati na komekama na bango, mpe kobondela mpo na bango.
14. Elendiseli nini tokoki kozwa longwa na 1 Petelo 5:5-11?
14 Nyonso wana ekosala ete tózala na esengo. Ya solo, ezali esengo ya Yehova nde ezali esika makasi mpo na bondeko na biso ya elimo na mabelé mobimba. Ee, biso banso tokutanaka na minyoko mpe na mikakatano misusu. Kasi yango esengeli kosangisa biso mpe komonisa biso ntina ya bomoko lokola basangani ya lisangá ya solo ya Nzambe awa na mabelé. Lokola Petelo alobaki yango, tosengeli komikitisa biso moko na nsé ya lobɔkɔ na nguya ya Nzambe, kobwaka mitungisi na biso nyonso likoló na ye na koyebáká ete azali komibanzabanza mpo na biso. Tosengeli kozala na bokɛngi mpamba te Zábolo azali koluka kolya biso, kasi kati na likambo yango tozali biso moko te, mpamba te Petelo abakisaki ete: “Botɛmɛla ye ngwi mpɔ na kondima, boyeba ete mpasi na motindo mɔkɔ mpenja ejali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” Mpe bondeko wana ya esengo kati na mokili mobimba ekokwea te, mpamba te tondimisami ete ‘nsima na konyokwama mwa ntango moke, Nzambe akosilisa kobongisa biso mpe akolendisa biso mpe akopesa biso makasi.’ (1 Pɛtɛlɔ 5:5-11) Kanisá mpo na yango. Bondeko na biso ya esengo ekoumela seko!
Bomoi oyo ezali na mokano
15. Mpo na nini tokoki koloba ete Batatoli ya Yehova bazali na bomoi oyo ezali na mokano?
15 Tozali na esengo kati na mokili oyo ya yikiyiki mpamba te tozali na bomoi oyo ezali na mokano. Topesameli mosala oyo ezali kopesa biso mpe basusu esengo. (Baloma 10:10) Ya solo, kozala basalani elongo na Nzambe ezali libaku moko ya esengo. Kati na likambo yango, ntoma Paulo alobaki ete: “Apolo nani? Paulo nani? Bajali basali. Bondimaki na njela na bango lokola Nkolo apɛsaki moto na moto njela. Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Njambe akolisaki. Mokoni ajali elɔkɔ tɛ, momwangisi na mai elɔkɔ mpe tɛ nde bobɛlɛ Njambe mokolisi. Mokoni mpe momwangisi na mai bajali mɔkɔ, moto na moto akojua libonja pelamɔkɔ na mosala na ye. Jambi tojali basalani na Njambe elɔngɔ; bino bojali elanga na Njambe, bojali ndako na Njambe.”—1 Bakɔlinti 3:5-9.
16, 17. Bandakisa nini tokoki kopesa mpo na komonisa ete libota ya Yehova ezali na bomoi ya esengo oyo ezali na mokano?
16 Bandakisa mingi ekoki kopesama mpo na komonisa ete kosalela Yehova na bosembo nyonso epesaka bomoi oyo ezali na mokano, oyo ezali kotondisa biso na esengo. Maloba oyo mamonisi yango polele: “Nazalaki kotala zingazinga na Ndako ya Bokonzi wana yango etondaki na bato [na mokolo ya kofungwama na yango] mpe nakokaki komona basangani mwambe ya libota na ngai na molulu yango, sangisá ngai mpe mwasi na ngai mpe misato kati na bana na biso mpe babálani na bango. . . . Ngai mpe mwasi na ngai tozalaki mpenza na esengo, na bomoi oyo ezalaki na mokano kati na mosala ya Nzambe.”
17 Ezali mpe likambo ya kolendisa mpenza na koyeba ete, atako akómi na mbula boni, moto akoki kobanda bomoi ya esengo, oyo ezali na mokano ya solo, kati na mosala ya Yehova. Na ndakisa, mwasi moko oyo ayekolaki solo ya Biblia kati na ndako moko oyo babatelaka mibangé azwaki batisimo lokola moko kati na Batatoli ya Yehova wana akómaki na mibu 102. Na bongo, asukisaki bomoi na ye mpenza na mokano ya esengo, na ‘kobangáká Nzambe ya solo mpe na kobateláká mibeko na ye.’—Mosakoli 12:13.
Esika makasi oyo ekoki kokwea te
18. Nini tokoki kosala mpo na kolónga ezaleli ya mawa mpe kokólisa esengo na biso?
18 Esengo ya Yehova ezali esika makasi oyo ekoki kokwea te mpo na bato ya sembo. Nzokande, kozala na esengo motindo wana elimboli te ete tokokutana te na bantango ya mpasi lokola oyo epusaki Yesu na Gɛtɛsɛmanɛ na koloba ete: “Molimo na ngai ejali koyoka mawa, kino mawa na kufa.” (Malako 14:32-34) Na ndakisa soki mawa ebimaki mpo tomitikaki na boluki ya matomba ya moimi. Na bongo, tiká ete tóbongola lolenge ya bomoi na biso. Soki esengo na biso ekiti na ntina na bozito oyo tozali komema na bolingo nyonso mpo na kokokisa mikumba mipesameli biso na Makomami, mbala mosusu tokoki kosala mwa mbongwana oyo ekokitisa kotungisama na makanisi mpe ekozongisa ezalela na biso ya esengo. Lisusu, Yehova akopambola biso na esengo soki tozali koluka kosepelisa ye na kotɛmɛláká makasi nzoto na biso ya masumu, mokili oyo mabe, mpe Zábolo.—Bagalatia 5:24; 6:14; Yakobo 4:7.
19. Lolenge nini tosengeli kotalela mabaku kitoko nyonso oyo tozali na yango kati na lisangá ya Nzambe?
19 Mpo na bantina oyo touti kolobela, mpe mpo na bantina mosusu mingi, tozali na esengo monene. Ezala ete tozali basakoli kati na lisangá to tozali kosangana na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso, biso banso tokoki kozala na mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo, mpe kozanga ntembe, yango ezali kopesa nzela ete tózala na esengo. (1 Bakolinti 15:58) Ezala mikumba nini tozali na yango kati na lisangá ya Yehova, tiká ete tómonisa botɔ́ndi mpo na yango mpe na esengo nyonso tólanda kokokisa mosala ya bulɛɛ mpo na Nzambe na biso ya bolingo mpe ya esengo.—1 Timoté 1:11.
20. Libaku nini ya kitoko koleka tozali na yango, mpe tokoki kondimisama mpenza na likambo nini?
20 Mingimingi tozali na ntina ya kosepela na libaku kitoko tozali na yango ya komema nkombo monene ya Yehova lokola Batatoli na ye. Ee, tozali bato bazangi kokoka mpe tokutanaka na komekama mingi, kasi tiká ete tóbatela kati na makanisi mapamboli kitoko tozali na yango lokola Batatoli ya Yehova. Mpe tómikundola ete Tata na biso ya likoló akosundola biso soko moke te. Tokoki kondimisama ete ntango nyonso tokopambwama soki esengo ya Yehova ezali esika makasi na biso.
Okoyanola lolenge nini?
◻ “Esengo ya Yehova” ezali nini?
◻ Lolenge nini baklisto bakoki kozwa esengo ya solo?
◻ Wapi bamoko na bantina Batatoli ya Yehova bazali na yango ya kozala na esengo?
◻ Mpo na nini esengo ya Yehova ezali esika makasi oyo ekoki kokwea te?