Basalaki “Bobele bongo”
“Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye.”—1 YOANE 5:3.
1. Tokoki koloba nini mpo na oyo etali bonene ya bolingo ya Nzambe?
“NZAMBE AZALI BOLINGO.” Bato nyonso oyo bakómaka na boyebi ya Nzambe mpe batosaka mitindá na ye basosolaka mpenza bolingo yango monene. “Bolingo ezali boye te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola Mbɔndi mpo na masumu na biso.” Wana tozali komonisa kondima kati na mbeka ya motuya mingi ya Yesu, ‘tozali koumela kati na bolingo na Nzambe.’ (1 Yoane 4:8-10, 16) Na yango tokoki kozwa mapamboli mingi ya elimo uta sikawa mpe kati na ebongiseli ya biloko oyo ezali koya, bomoi ya seko.—Yoane 17:3; 1 Yoane 2:15, 17.
2. Lolenge nini basaleli ya Nzambe bazwaki matomba na kotosáká malako na ye?
2 Kati na Biblia tozali kokuta bandakisa mingi ya bato oyo batosaki malako ya Nzambe mpe mpo na yango, bazwaki mapamboli mingi. Kati na bango batatoli oyo bazalaki na bomoi liboso na kobotama ya Klisto, oyo na ntina na bamoko na bango ntoma Paulo akomaki ete: “Bango nyonso bakufaki kati na kondima, bazangaki kozwa biloko bilakami, kasi bamonaki yango mosika mpe bapesaki yango losako. Bayambolaki ete bazali bapaya na mokili, bato na mokili mosusu.” (Baebele 11:13) Na nsima, basaleli ya Nzambe oyo bazalaki baklisto oyo bamipesi, bazwaki litomba kati na “ngɔlu mpe solo [oyo] iyei mpo na Yesu Klisto.” (Yoane 1:17) Na boumeli ya bambula 6 000 ya lisoló ya bato, Yehova asili kopesa mbano epai na batatoli ya sembo oyo batosaka malako na ye oyo, na bosolo mpenza, ‘mazali na bozito te.’—1 Yoane 5:2, 3.
Na mikolo na Noa
3. Ndenge nini Noa asalaki “bobele bongo”?
3 Biblia eyebisi biso ete: “Mpo na kondima, Noa akebisami mpo na makambo mamonani naino te, mpe [abangi Nzambe, NW] atongi masúwa mpo na kobikisa libota na ye. Na nzela na yango, asambisi mokili mpe akómi mosangoli na libula na boyengebene bokoya na nzela na kondima.” Lokola azalaki “mosakoli na boyengebene,” Noa atosaki Nzambe kozanga kokakatana, akebisaki bato na mobulu oyo bazalaki na mokili liboso na koya ya Mpela na ntina na esambiseli na Nzambe oyo ekómaki pene na kokokisama. (Baebele 11:7; 2 Petelo 2:5) Wana azalaki kotonga masúwa, alandaki na bokɛngi nyonso malako ya botongi oyo Nzambe apesaki ye. Na nsima akɔtisaki nyama oyo iponamaki mpe biloko ya kolya. “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.”—Genese 6:22.
4, 5. (a) Lolenge nini bopusi moko ya mabe ebebisi mokili kino lelo? (b) Mpo na nini tokoki kosala “bobele bongo” na kotosáká litambwisi ya Nzambe?
4 Noa mpe libota na ye basengelaki kosala makasi mpo na kolónga bopusi mabe ya baanzelu batomboki. Bana wana ya Nzambe balataki nzoto ya mosuni mpe bafandaki na basi, mpe babotaki bongo bapoto, bango banyokolaki bato. “Mokili ezalaki mabe na miso na Nzambe; mokili etondaki na yauli.” Yehova ayeisaki Mpela mpo na kosilisa libota wana ya mabe. (Genese 6:4, 11-17; 7:1) Uta na eleko ya Noa baanzelu bademó bapesamelaki lisusu nzela te ya kolata nzoto ya mosuni. Nzokande, ‘mokili mobimba mozali kino lelo kolala kati na oyo mabe,’ Satana Zábolo. (1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:9) Kati na esakweli moko, Yesu akokanisaki libota ya botomboki ya eleko ya Noa na libota ya bato oyo baboyaki ye uta na ntango oyo elembo ya “[komonana, NW]” na ye ebimaki polele na 1914.—Matai 24:3, 34, 37-39; Luka 17:26, 27.
5 Lelo oyo, lokola ezalaki na mikolo ya Noa, Satana azali kosala makasi mpo na kobebisa bato mpe etando na biso oyo. (Emoniseli 11:15-18) Na yango, oyo ezali ntango ya kolala mpongi te, tosengeli kolanda etindá oyo epemami ete: “Bólata molato mobimba na etumba na Nzambe ete bóyeba kotɛlɛma liboso na misala na oyo mabe.” (Baefese 6:11) Na yango, tozali kozwa makasi na koyekoláká Liloba ya Nzambe mpe na kosaleláká yango kati na bomoi na biso. Lisusu, tozali na lisangá ya Yehova oyo ezali kobatela biso, na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe na bankulutu batondi na bolingo, baoyo bazali kokamba biso lokola bampate na motema pɛtɛɛ mpenza na nzela oyo tosengeli kokende. Tozali na mosala ya kosakola oyo tosengeli kokokisa yango kati na mokili mobimba. (Matai 24:14, 45-47) Na ndakisa ya Noa, oyo alandaki litambwisi ya Nzambe na likebi nyonso, tiká ete biso mpe tósalaka ntango nyonso “bobele bongo.”
Mose—Moto oyo alekaki bato nyonso na komikitisa
6, 7. (a) Liponi nini Mose asalaki epesaki ye mbano? (b) Elakiseli nini ya mpiko mpenza Mose atikelaki biso?
6 Tótalela ndakisa ya moto mosusu oyo azalaki na kondima—Mose. Akokaki kolinga kozala na bomoi ya komisepelisa kati na bisengo ya Ezipito. Kasi aponaki “konyokwama elongo na libota na Nzambe na esika ete asepela na bisengo na masumu ya ntango mokuse.” Lokola azalaki mosaleli oyo azwaki mitindo uta na Yehova, “atyaki miso na ye epai na libonza [mpe] ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.”—Baebele 11:23-28.
7 Tozali kotánga kati na Mituya 12:3 ete: “Moto yango Mose azalaki na [komikitisa, NW] mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nsé.” Nzokande, Falo ya Ezipito amimonisaki moto na lolendo koleka bato nyonso. Mose mpe Alona basalaki nini na ntango Yehova apesaki bango etindá ete básakola ekateli na ye likoló na Falo? Biblia eyebisi biso ete: “Mose mpe Alona basalaki bongo; basalaki lokola [Yehova atindaki] bango.” (Exode 7:4-7) Oyo nde ndakisa ya mpiko mpenza mpo na biso baoyo tozali kosakola bikateli ya Yehova lelo oyo!
8. Lolenge nini Bayisalaele basɛngisamaki ete básala “bobele bongo,” mpe esengo oyo yango ememaki ekokokisama na lolenge nini na mikolo mizali koya?
8 Bayisalaele basungaki Mose na bosembo nyonso? Nsima wana Yehova abimisaki malózi libwa kati na malózi zomi oyo makwelaki Ezipito, apesaki Yisalaele malako ya sikisiki mpo na lolenge ya kosala Elekeli. “Bato bakitisaki mitó na bango mpe basambelaki. Bongo bato na Yisalaele bakendaki mpe basalaki bongo. Basalaki lokola [Yehova atindaki] Mose na Alona.” (Exode 12:27, 28) Na midi ya butu ya mokolo wana monene, 14 Nisan 1513 L.T.B., anzelu ya Nzambe abomaki bana mibali nyonso ya liboso ya mabota ya Baezipito kasi alekaki bandako ya Bayisalaele kozanga kosala eloko. Mpo na nini bana mibali ya liboso ya Bayisalaele babobamamaki te? Mpamba te bazwaki libateli mpo na makila ya mwana-na-mpate ya Elekeli, oyo epakolamaki na bikɔtelo ya bandako na bango. Basalaki bobele lokola Yehova apesaki etindá epai na Mose mpe Alona. Ee, “basalaki boye.” (Exode 12:50, 51) Yehova asalaki likamwisi mosusu na Mai Motane na kobateláká bato na ye oyo bazalaki na botosi wana abomaki Falo elongo na mampinga na ye ya nguya. Bayisalaele basepelaki mpenza! Bobele bongo lelo, bato mingi oyo bazali kotosa malako ya Yehova bakosepela komona na miso na bango mpenza kolóngisama na ye na Armagedon.—Exode 15:1, 2; Emoniseli 15:3, 4.
9. Mabaku nini malamu ya mikolo na biso Bayisalaele bamonisaki yango na kosaláká “bobele bongo” na ntina na likambo litali mongombo?
9 Na ntango Yehova apesaki Bayisalaele etindá ete báyanganisa makabo mpe bátonga mongombo kati na mokili mokauki, bato bapesaki lisungi na bango na elimo ya bokabi mpenza. Na nsima, ata kati na makambo maleki mike mpenza, Mose mpe basalani na ye ya bolingo malamu balandaki malako ya botongi oyo Yehova apesaki. “Bongo mosala nyonso na mongombo na hema na koyangana esilaki, mpe bato na Yisalaele basilaki kosala pelamoko na yango nyonso [oyo Yehova atindaki] Mose, basilaki kosala bongo.” Bobele bongo, ntango mosala ya bonganga mobandaki, “Mose asalaki boye; ye asalaki pelamoko na yango nyonso elakelaki [Yehova] ye.” (Exode 39:32; 40:16) Na mikolo na biso, tozali na libaku ya kopesa lisungi na molimo na biso mobimba likoló na mosala ya kosakola mpe likoló na bibongiseli bitali kokólisa matomba ya Bokonzi. Na yango, tozali na libaku malamu ya kosangana elongo na kosaláká “bobele bongo.”
Yosua—Mobali ya mpiko mpe ya makasi mpenza
10, 11. (a) Nini esalisaki Yosua ete alónga? (b) Nini ekoki kopesa biso makasi mpo ete tókoka kolónga komekama ya mikolo na biso?
10 Na ntango Mose apesaki Yosua mitindo ete akamba Bayisalaele kati na mokili ya ndaka, ekoki mpenza kozala ete na ntango wana Liloba likomami mpe lipemami ya Yehova lizalaki bobele babúku oyo: babúku mitano ya Mose, nzembo moko to mibale, mpe búku ya Yobo. Mose ayebisaki Yosua ete ayanganisa bato na ntango bakokóma na Mokili ya ndaka mpe ‘atánga mobeko oyo liboso na Yisalaele nyonso, na miso na bango.’ (Deteronome 31:10-12) Lisusu, Yehova ye moko apesaki Yosua etindá oyo ete: “Búku na mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yo te, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo nyonso makomami na yango. Mpo ete bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe bongo [okosala mosala na mayele, NW].”—Yosua 1:8.
11 Kotánga “búku” ya Yehova mokolo na mokolo esalisaki Yosua ete alónga mikakatano oyo ebimelaki ye na nsima; bobele bongo botángi ya Liloba ya Yehova, Biblia, mokolo na mokolo, ezali kopesa makasi epai na Batatoli na ye ya mikolo na biso mpo na kolónga komekama oyo ezali kobima na “mikolo ya nsuka” oyo ya mpasi. (2 Timoté 3:1) Lokola mokili oyo ezingi biso ezali na mobulu, tiká ete biso mpe tópesa motuya na likebisi oyo Nzambe apesaki Yosua ete: “Zalá makasi mpe yiká mpiko. Bangá te mpe zalá na nsɔ́mɔ te mpo ete [Yehova] Nzambe na yo azali na yo elongo soko wapi ekokenda yo.” (Yosua 1:9) Nsima ya kozwa bolóngi likoló na Kanana, mabota ya Yisalaele bazwaki mapamboli mingi na ntango bazalaki kokɔta mpo na kofanda kati na mboka oyo ezalaki libula na bango. “Bato na Yisalaele basalaki lokola elakelaki [Yehova] Mose.” (Yosua 14:5) Mapamboli motindo moko mazali mpe kozela biso nyonso lelo, biso baoyo totángaka Liloba ya Nzambe mpe tosalelaka yango na bomoi na biso, kosaláká “bobele bongo” na botosi nyonso.
Bakonzi ya sembo mpe bakonzi oyo bazangaki botosi
12. (a) Etindá nini Nzambe apesaki epai na bakonzi ya Yisalaele? (b) Lokola bakonzi bazangaki kotosa, yango ebimisaki likambo nini?
12 Ezalaki boni mpo na bakonzi ya Yisalaele? Yehova apesaki mitindo oyo epai na mokonzi: “Wana ekofanda ye na kiti na bokonzi na ye, akokoma mpo na ye mpenza kati na búku maloba na Mobeko oyo, longwa na oyo ezali na mabɔkɔ na banganga, Balevi. Yango ekozala na ye elongo mpe akotánga kati na yango mikolo nyonso na bomoi na ye, ete ayekola [kobanga Yehova, NW] Nzambe na ye na kotosa maloba nyonso na lilako oyo mpe na mibeko oyo, mpe na kosala yango.” (Deteronome 17:18, 19) Bakonzi ya Yisalaele batosaki etindá wana? Na mawa nyonso, mingi na bango bazangaki kotosa yango, na bongo kolakelama mabe oyo esakolamaki na Deteronome 28:15-68 ekwelaki bango. Na nsuka, Yisalaele epalanganaki bipai na bipai “longwa na nsuka moko na mokili kino na nsuka mosusu.”
13. Na ndakisa ya Davidi, lolenge nini biso mpe tokoki kozwa matomba na komonisáká kondima epai na Nzambe?
13 Nzokande, Davidi—moto ya liboso ya sembo oyo azalaki mokonzi na Yisalaele—na lolenge lokeseni mpenza, amonisaki ezaleli ya komipesa mobimba epai na Yehova. Amonisaki ete azalaki ‘mwana na nkosi na Yuda,’ elilingi ya Yesu Klisto, molóngi, ‘nkosi ya libota ya Yuda, mosisa na Davidi.’ (Genese 49:8, 9; Emoniseli 5:5) Eloko nini ezalaki kopesa Davidi makasi? Azalaki kolinga mingi Liloba likomami ya Yehova mpe azalaki kotosa yango. Kati na Nzembo 19, “loyembo na Davidi,” tozali kotánga ete: “Mobeko na [Yehova] ezali sembo.” Nsima ya kolobela makundoli, malako, mobeko, mpe bikateli ya Yehova, Davidi alobi lisusu ete: “Mposa na yango eleki mposa na wolo, ata na wolo mingi malamu; eleki mafuta na nzoi na elɛngi, ata mafuta yango makwei na nsé na ndako na nzoi. Bongo moombo na yo apesameli toli na yango, libonza monene ekomonana wana akotosa yango.” (Nzembo 19:7-11) Lokola botángi ya Liloba ya Yehova mokolo na mokolo ezalaki kopesa litomba esili koleka bambula 3 000, ezali mpe kopesa matomba mingi lisusu lelo!—Nzembo 1:1-3; 13:6; 119:72, 97, 111.
14. Na ndimbola nini ezaleli ya Salomo emonisi ete bobele kozala na boyebi ekoki te?
14 Nzokande, bobele kozwa boyebi ekoki te. Ezali mpe na ntina ete basaleli ya Nzambe bámitambwisa engebene boyebi yango, ete básalela yango engebene mokano ya Nzambe—ee, básala “bobele bongo.” Yango ekoki komonana kati na likambo litali Salomo mwana na Davidi, oyo Yehova aponaki ye ete “afanda na kiti na bokonzi na [Yehova] likoló na Yisalaele.” Salomo azwaki mokumba ya kotonga tempelo, kosaleláká malako ya botongi oyo Davidi azwaki “na kopemama” na Nzambe. (1 Ntango 28:5, 11-13) Lolenge nini Salomo akokaki kokokisa mokumba wana monene? Wana ayanolaki na libondeli na ye, Yehova apesaki ye mayele mpe boyebi. Na lisalisi na yango, mpe na kolandáká malako oyo mautaki na Yehova, Salomo azalaki na likoki ya kotonga ndako wana ya kitoko mingi, oyo etondaki na nkembo ya Yehova. (2 Ntango 7:2, 3) Nzokande, na nsima Salomo akweaki. Na likambo nini? Mobeko ya Yehova elobaki na ntina na mokonzi na Yisalaele ete: “Ekoki mpe ete azwa basi mingi mpo na ye mpenza te, ete motema na ye epɛngwa te.” (Deteronome 17:17) Kasi Salomo “azalaki na basi nkámá nsambo, mpe makango nkámá misato. . . . Basi na ye bapɛngolaki motema na ye kino banzambe mosusu.” Na bambula oyo elandaki na nsima, Salomo asalaki lisusu “bobele bongo” te.—1 Mikonzi 11:3, 4; Nehemia 13:26.
15. Lolenge nini Yosiya asalaki “bobele bongo”?
15 Kati na Yuda bakonzi oyo bazalaki na botosi bazalaki moke, ya nsuka ezalaki bongo Yosiya. Na mobu 648 L.T.B., abandaki kolongola losambo ya bikeko kati na mboka mpe kobongisa tempelo ya Yehova. Ezalaki kuna nde nganga monene amonaki “mokanda na mobeko na [Yehova], mopesamelaki na nzela na Mose.” Yosiya asalaki na yango nini? “Mokonzi abutaki na ndako na [Yehova] esika moko na bato nyonso na Yuda mpe bafandi kati na Yelusaleme mpe banganga mpe Balevi, bato nyonso na minene na mike, atángaki na matoi na bango maloba nyonso na mokanda na kondimana oyo ezwamaki kati na ndako na [Yehova]. Mokonzi atɛlɛmaki mpe na esika na ye mpe akataki kondimana liboso na [Yehova mpo na] kobatela malako na ye mpe matatoli na ye mpe mibeko na ye na motema na ye mobimba mpe na molimo na ye mobimba mpe na kotosa maloba na kondimana oyo ikomami kati na mokanda oyo.” (2 Ntango 34:14, 30, 31) Ee, Yosiya “asalaki bobele bongo.” Lokola litomba mpo na bosembo na ye, kokokisama ya ekateli ya Yehova likoló na Yuda oyo ezangaki bosembo ezongisamaki nsima kino na eleko ya bana na ye oyo bazalaki na ezaleli ya yauli.
Tótosaka Liloba ya Nzambe
16, 17. (a) Na makambo nini tosengeli kolanda matambe ya Yesu? (b) Basaleli nini mosusu ya sembo ya Nzambe bazali kopesa ndakisa mpo na biso?
16 Kati na bato nyonso, ndakisa eleki monene ya moto oyo amanyolaki Liloba ya Nzambe mpe atosaki yango ezali bongo Yesu Klisto. Liloba ya Nzambe ezalaki lokola bilei mpo na ye. (Yoane 4:34) Ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala, zambi yango ekosalaka ye, Mwana akosala yango lokola.” (Yoane 5:19, 30; 7:28; 8:28, 42) Yesu “asalaki bobele bongo,” na kolobáká ete: “Nasili kokita longwa na likoló ete nasala mokano na ngai moko te kasi mokano na Motindi na ngai.” (Yoane 6:38) Biso baoyo tozali Batatoli ya Yehova oyo basili komipesa, tobyangami ete tósala “bobele bongo” na kolandáká matambe ya Yesu.—Luka 9:23; 14:27; 1 Petelo 2:21.
17 Kosala mokano ya Nzambe ezalaki ntango nyonso na esika ya ntina mingi kati na makanisi ya Yesu. Ayebaki malamu mpenza Liloba ya Nzambe mpe yango esalisaki ye ete apesa biyano oyo bizalaki kouta na Makomami. (Matai 4:1-11; 12:24-31) Na kotyáká ntango nyonso likebi likoló na Liloba ya Nzambe, biso mpe tokoki kokóma ‘mpenza na makoki, bato oyo babongisami mpo na mosala nyonso malamu.’ (2 Timoté 3:16, 17) Tiká ete tólanda ndakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe ya ntango ya kala mpe ya ntango oyo eyaki nsima mpe mingi mpenza ndakisa ya Nkolo na biso, Yesu Klisto, ye oyo alobaki ete: “Nde oyo ezali ete bamokili báyeba ete nalingi Tata mpe pelamoko Tata alakisaki ngai, nazali kosala bobele boye.” (Yoane 14:31) Tiká ete biso mpe tómonisa bolingo na biso epai na Nzambe na kolandáká ntango nyonso kosala “bobele bongo.”—Malako 12:29-31.
18. Nini esengeli kopusa biso mpo ete “tózala batosi na liloba,” mpe nini ekolobelama na lisoló lilandi?
18 Wana tozali komanyola likoló na ezaleli ya botosi ya basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala, tolendisami ete tósala mosala ya sembo na boumeli ya mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe ya Satana, boye te? (Baloma 15:4-6) Tosengeli mpenza kopusama ete ‘tózala batosi na liloba’ na mobimba mpenza, lokola lisoló lilandi likolobela yango.—Yakobo 1:22.
Ozali komikundola?
◻ “Bolingo na Nzambe” esengeli kolimbola nini mpo na biso?
◻ Liteya nini tozwi kati na bandakisa ya Noa, Mose, mpe Yosua?
◻ Bakonzi nyonso ya Yisalaele batosaki “liloba” ya Nzambe?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azali Ndakisa na biso mpo na oyo etali kosala “bobele bongo.”
[Bililingi na lokasa 15]
Noa, Mose, mpe Yosua “basalaki bobele bongo”