Kobɔndisama mpe koyikisama mpiko—Biloko ya motuya oyo bikoki kozwama na banzela mingi
MINGI kati na biso tosilá kolekisa bantango mosusu oyo tozalaki mpenza na bosenga makasi—bobele te mpo ete tozangaki mosolo, kasi mpo ete tobulunganisamaki na makanisi. Tolɛmbaki nzoto, to mpe tonyokwamaki mingi na makanisi. Nzokande, ekoki mpe kozala ete na ntango yango tozalaki na likoki ya kozwa eloko moko ya motuya oyo ekokaki kopesa biso bolamu mingi. Koyikisama mpiko, yango nde “eloko yango motuya.”
Kati na Biblia bobele liloba wana esalelami mpo na “koyikisa mpiko” mpe mpo na “kobɔndisa.” Maloba wana mibale mazali kopesa likanisi ya kopesa moto mpiko, makasi, to elikya. Na bongo, emonani polele ete na ntango tolɛmbaka to totungisamaka na makanisi, tozalaka mpenza na mposa ya kobɔndisama mpe ya koyikisama mpiko. Epai wapi tokoki kozwa yango?
Biblia eyebisi biso ete Yehova azali “Nzambe na kobɔndisa nyonso.” (2 Bakolinti 1:3) Ezali mpe koyebisa biso ete “azali mosika na moto na moto na biso te.” (Misala 17:27) Na yango, tokoki kozwa kobɔndisama mpe koyikisama mpiko. Tótalela makambo minei ya minene oyo na nzela na yango Yehova azali koyikisa biso mpiko.
Na nzela ya boyokani ya moto na moto elongo na Nzambe
Boyokani ya moto na moto elongo na Yehova ezali liziba ya kobɔndisa oyo eleki nyonso. Bobele koyeba ete boyokani motindo wana ekoki kosalema ezali likambo ya koyikisa mpiko. Nzokande, mokonzi nani ya mokili oyo akondima ete tóbénga ye na telefone to akolinga kotya likebi likoló na makambo ya mokomoko na biso? Yehova azali mpenza na nguya koleka bato wana nyonso. Atako bongo, azali na komikitisa—azalaka mpenza pene na kotalela makambo ya bato ya nsé, bato bazangi kokoka. (Nzembo 18:35) Kútu, Yehova nde abandaki komonisela biso bolingo. Tozali kotánga kati na 1 Yoane 4:10 ete: “Bolingo ezali boye te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbɔndi mpo na masumu na biso.” Lisusu, Yehova azali kobenda biso na bolingo nyonso epai na Mwana na ye.—Yoane 6:44.
Lolenge nini otalelaka boyokani na yo elongo na Nzambe, mpe okolukaka kozwa kobɔndisama kati na yango? (Kokanisá na Yakobo 2:23.) Na ndakisa, soki ozali na moninga moko ya penepene oyo olingaka mingi mpenza, okozala mpenza na esengo ya kolekisa mwa ntango elongo na ye, kozanga kokakatana, okolobela ye mitungisi na yo mpe mabanzo na yo, bilikya na yo mpe makambo oyo epesaka biso esengo, boye te? Yehova azali kobyanga yo ete osalaka bongo epai na ye. Atye ndelo te mpo na oyo etali ntango oyo osengeli kokamata mpo na kosolola na ye kati na libondeli—mpe ayokaka mpenza. (Nzembo 65:2; 1 Batesaloniki 5:17) Yesu azalaki kobondela mbala na mbala mpe na etingya mpenza. Ya solo, liboso ya kopona bantoma na ye 12, abondelaki butu mobimba.—Luka 6:12-16; Baebele 5:7.
Na bantango mosusu, mokomoko na biso akoki kosala na boye ete azala ye moko elongo na Yehova. Kofanda na kimya nyonso pene na lininisa to kosala mwa botamboli ya kimya mpenza ekoki kozala libaku malamu mpo na kofungolela Yehova motema na biso kati na libondeli. Kosala bongo ekoki kokitisa biso motema mpe kobɔndisa biso na lolenge ya kokamwa mpenza. Soki tokoki kotalela eloko moko kati na biloko bizalisami na Yehova wana tozali komanyola—ekoki kozala ata eteni moko ya mapata, nzeté to ndɛkɛ—tokoki komona kati na yango makambo ya kobɔndisa oyo makoki kokundwela biso ete Yehova alingaka biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso.—Baloma 1:20.
Na nzela ya boyekoli na biso moko ya liloba ya Nzambe
Ezali bongo kati na boyekoli na biso moko ya Biblia nde tokoki komona polele bizaleli ya Yehova. Biblia ezali mbala na mbala komonisa ete Yehova azali “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6; Nehemia 9:17; Nzembo 86:15) Mposa ya kobɔndisa basaleli na ye awa na mabelé ezali moko kati na makambo ya ntina mingi ya bomoto ya Yehova.
Na ndakisa, tótalela maloba ya Yehova oyo mazwami kati na Yisaya 66:13: “Lokola mwana oyo mama na ye azali kobɔndisa ye, boye ngai nakobɔndisa bino.” Yehova asalaki na boye ete bolingo oyo mama asengeli kozala na yango epai na mwana na ye ezala bolingo moko ya komipesa mpe ya sembo. Soki osilá komona lolenge mama oyo atondi na bolingo abɔndisaka mwana na ye na ntango ayokisami mpasi, boye, oyebi ndimbola ya maloba oyo Yehova alobaki, ete akobɔndisa basaleli na ye.
Masoló mingi ya Biblia mazali komonisa lolenge nini kobɔndisama ekosalaka mosala na yango. Na ntango Mokonzi mwasi mabe Yesabele akanelaki Eliya ete aboma ye, abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Alɛmbaki mpenza nzoto na boye ete atambolaki kati na mokili mokauki na boumeli ya mokolo mobimba, emonani mpenza ete azalaki na mai te mpe bilei te. Na mpasi na motema, Eliya ayebisaki Yehova ete azalaki na mposa ya kokufa. (1 Mikonzi 19:1-4) Yehova asalaki nini mpo na kobɔndisa mpe koyikisa mosakoli na ye mpiko?
Yehova apamelaki Eliya te mpo ete azalaki komiyoka ete asundolami, ete azali na ntina te, mpe mpo ete azalaki kobanga. Nzokande, mosakoli yango ayokaki “mongongo ya malɛmbɛ, mpe ya nsé.” (1 Mikonzi 19:12, NW) Soki otángi 1 Mikonzi mokapo 19, okomona lolenge nini Yehova abɔndisaki Eliya, lolenge nini asilisaki bobángi na ye, mpe lolenge alendisaki kondima na ye. Kobɔndisama yango ezalaki ya likolólikoló te. Ekómaki kino kati na motema ya Eliya oyo ebulunganisamaki, eyikisaki mosakoli mpiko ete atika te. (Kokanisá na Yisaya 40:1, 2.) Nokinoki, azongelaki mosala na ye.
Bobele bongo mpe Yesu Klisto abɔndisaka mpe ayikisaka basaleli na ye ya sembo mpiko. Ya solo, Yisaya asakolaki na ntina na Masiya ete: “Nkolo [Yehova] . . . atindi ngai kobongisa batutami na motema; . . . [kobɔndisa] nyonso baoyo bazali kolela.” (Yisaya 61:1-3) Na boumeli ya bomoi na ye, Yesu amonisaki polele ete maloba wana matalelaki ye. (Luka 4:17-21) Soki ozali na mposa ya kobɔndisama, manyolá likoló na lolenge oyo Yesu azalaki kosalela na boboto nyonso mpe na bolingo nyonso bato oyo batumolamaki mpe oyo bazalaki na bosenga. Ya solo, boyekoli ya Biblia na mozindo ezali liziba monene ya kobɔndisama mpe ya koyikisama mpiko.
Na nzela ya lisangá
Kati na lisangá ya boklisto, biloko ya motuya oyo bibɔndisaka mpe biyikisaka mpiko bimonanaka polele na banzela mingi. Ntoma Paulo apemamaki na kokoma ete: “Bóbɔndisanaka mpe bólendisanaka.” (1 Batesaloniki 5:11, NW) Lolenge nini tokoki kozwa kobɔndisama mpe koyikisama mpiko kati na lisangá?
Ya liboso, ezali mpenza solo ete tóyanganaka na makita ya boklisto mpo ete ‘tólakisama na [Yehova],’ ete tóyekola makambo matali ye mpe banzela na ye. (Yoane 6:45) Mokano ya kolakisama wana ezali ete eyikisa biso mpiko mpe ebɔndisa biso. Tozali kotánga kati na Misala 15:32, ete: “Yuda mpe Sila . . . balendisi bandeko na maloba mingi, mpe babakisi nguya na bango.”
Esilá naino kokómela yo mokolo mosusu te ete wana okendaki na makita ozalaki na bolɛmbu kasi na ntango ozongaki na ndako omiyokaki malamu? Mbala mosusu likambo moko oyo elobamaki kati na lisukúlu, na eyano moko, to kati na libondeli esimbaki motema na yo mpe epesaki yo kobɔndisama mpe koyikisama mpiko oyo ozalaki na yango mposa. Na yango tozangisaka te makita ya boklisto.—Baebele 10:24, 25.
Kosanganáká elongo na bandeko na biso mibali mpe basi kati na mosala ya kosakola mpe na mabaku mosusu ekoki mpe kobɔndisa mpe koyikisa biso mpiko. Na Liebele, maloba mingi oyo malimboli “kokangisa esika moko” ekómaki kosalelama mpe mpo na kolobela “makasi” to “koyeisa makasi”—likanisi oyo emonani wana ezali oyo ete biloko bikómaka makasi na ntango bisangisami esika moko. Likambo yango ezali mpe solo kati na lisangá. Tozali kobɔndisama, koyikisama mpiko, ee, koyeisama makasi, na kosanganáká elongo. Mpe tokangami elongo na lisalisi ya bolingo, ekanganeli eleki makasi.—Bakolose 3:14.
Na bantango mosusu bosembo ya bandeko mibali mpe basi ya elimo nde eyikisaka biso mpiko. (1 Batesaloniki 3:7, 8) Mbala mosusu ezalaka bongo bolingo oyo bamonisaka nde eyikisaka biso mpiko. (Filemona 7) Mpe ezalaka mbala mosusu mpo na kosala elongo, lipeka na lipeka, wana tozali kosolola na basusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Soki olɛmbi mpe ozali na mposa ya koyikisama mpiko na ntina na mosala ya kosakola, mpo na nini te kokamata bibongiseli mpo na kobima elongo na mosakoli moko ya mokóló mpe oyo azali na eksperiansi mingi? Na ntembe te, okobɔndisama mingi na kosaláká bongo.—Mosakoli 4:9-12; Bafilipi 1:27.
Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”
Nani alɛngɛlaka bibongiseli ya losambo na biso oyo ebɔndisaka biso? Yesu aponaki kelasi ya bato oyo atyaki bango lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa “bilei [ya elimo] na ntango ebongi.” (Matai 24:45) Na ekeke ya liboso T.B., lisangani wana ya baklisto bapakolami esilaki kobanda mosala na yango. Lisangani ya mikóló-bakambi ya bankulutu oyo ezalaki na Yelusaleme ezalaki kotinda epai na masangá nkomá oyo ezalaki na malako mpe litambwisi kati na yango. Yango ebimisaki litomba nini? Masoló ya Biblia malobeli lolenge oyo masangá mayambaki moko na nkomá wana: “Esili bango kotánga yango, basepeli kolendisa na yango.”—Misala 15:23-31.
Bobele bongo, na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi, moombo ya sembo mpe ya mayele azali kokabola bilei ya elimo oyo ezali kopesa kobɔndisama monene mpe ezali koyikisa basaleli ya Yehova mpiko. Yo mpe olyaka bilei wana? Ezali mingi kati na mikanda minyatami oyo kelasi ya moombo azali kotinda kati na mokili mobimba. Bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bakisá mpe babúku, mwa babúku mpe batrakte oyo la Société Watch Tower ezali kobimisa ezali kobɔndisa ebele ya batángi.
Mokɛngɛli-motamboli moko akomaki ete: “Bandeko na biso mingi basi mpe mibali balingi kosala oyo ezali sembo, kasi bakutanaka na mayoki ya kozanga kokokisama ya mikano na bango, bobángi, mpe mayoki ya bozangi nguya ya komisalisa. Masoló oyo mazali kobima kati na bazulunalo na biso mazali kosunga bango mingi ete bázongela kokamba bomoi na bango mpe mayoki na bango. Masoló yango mazali kopesa epai na bankulutu makambo mingi oyo bakoki kosalela mpo koyikisa mpiko na lolenge lobongi mpenza, kasi ya likolólikoló te.”
Tósalela mpenza malamu mikanda oyo kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele ezali kobimisa. Bazulunalo, babúku, mpe mikanda mosusu oyo ezali kobimisama na ntango ebongi ekoki kosalisa biso ete tózwa kobɔndisama wana tokutani na mikakatano. Epai mosusu, soki ezali yo nde osengeli koyikisa moto mosusu mpiko, oyo anyokwami na makanisi, salelá makambo ya Biblia oyo mazwami kati na bazulunalo yango. Masoló yango makomamaki na bokɛngi nyonso, mingimingi nsima ya pɔ́sɔ mingi to nsima ya basanza mingi ya kosala bolukiluki mozindo, boyekoli mozindo, mpe libɔndeli mozindo. Batoli na yango euti na Biblia, emekami mpe ezali solo. Basusu bamonaki ete ezalaki malamu mpenza kotánga lisoló moko to masoló mibale elongo na ye oyo anyokwami na makanisi. Yango ekoki kobɔndisa mpe koyikisa mpiko.
Soki omoni biloko ya motuya mingi, okobomba yango, to okokabela mpe basusu mwa ndambo ya bozwi yango? Omityela mokano ete ozala liziba ya kobɔndisama mpe ya koyikisa mpiko epai na bandeko na yo mibali mpe basi kati na lisangá. Soki ozali kotonga, na esika ete obukabuka, soki ozali kopesa longonya na esika ete otɔ́ngatɔ́nga, soki ozali koloba na “lolemo ya balakisami” na esika ete ‘oloba lokola koswa na mbeli,’ okosala bopusi monene kati na bomoi ya bato mosusu. (Yisaya 50:4; Masese 12:18) Ya solo, yo moko mpe okotalelama lokola eloko ya motuya—liziba ya kobɔndisama mpe ya koyikisama mpiko ya solosolo!
[Etanda na lokasa 20]
Kobɔndisama mpo na bato oyo bazali na mposa na yango
MINGI basili kolobela na ntina na lolenge oyo masoló mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! eyeisaki makasi boyokani na bango elongo na Yehova. Moko na bango alobaki ete: “Nsima ya kotánga lisoló oyo, namiyokaki ete, Yehova, elongo na nguya na ye mpe bonene na ye, azalaki mpenza elongo na ngai. Namiyokaki ete azali mpenza moto ya solo.” Nkomá mosusu eyebisaki ete: “Mitema na biso mpe makanisi na biso esili kobongwana mpenza na lolenge ya kokamwa na kotalela ete na miso ya Yehova, biso banso tozali lolenge moko te. Ezali lokola nde moto moko apangwisi talatála na biso ya miso, mpe na nsima tokoki komona makambo manso polele.”
Basusu batindaka nkomá mpo na koyebisa lolenge nini bazulunalo yango esungaka bango mpo na lolenge ya kosala liboso ya makambo to mikakatano ya sikisiki, kondimisáká bongo ete Yehova atyaka likebi likoló na mokomoko na bango. Motángi moko alobaki ete: “Natɔ́ndi bino mingi mpenza mpamba te bomonisi biso lisusu ete Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na biso mpe alingaka bato na ye.” Mwasi moko na Japon, oyo akufelaki mwana, ayebisaki maloba oyo na ntina na masoló ya Lamuká! oyo elobelaki likambo wana: “Bonene ya motema mawa ya Nzambe emonanaki polele kati na nkasa ya zulunalo yango, mpe nalelaki mingi mpenza. Natyaki bazulunalo yango na esika oyo nakoki mbala moko kotánga yango na ntango nyonso oyo nakoki koyoka mawa mpe komiyoka ete nasundolami.” Mwasi mosusu oyo akufelaki molingami akomaki ete: “Masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! mpe mwa búku “Ntango moto oyo olingaka akufi” epesaki ngai makasi oyo nazalaki na yango mposa mpo na koyika mpiko na bantango mingi oyo nazalaki na mawa.”
Makomami mosantu mazali liziba ya liboso ya kopesa libɔndisi. (Baloma 15:4) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli endimaka Biblia mpe Nkolo na yango, ezali mpe bobele bongo mpo na Lamuká!, zulunalo mosusu oyo ebimaka elongo na yango. Mpo na bantina wana, esili komonana ete bazulunalo yango esili kopesa kobɔndisama mpe koyikisama mpiko epai na batángi na yango.
[Elilingi na lokasa 23]
Nzambe na kobɔndisa nyonso azali mpe Moyoki ya libondeli