Bolóngi ya losambo ya solo ebɛlɛmi
“[Yehova] akozala mokonzi likoló na mokili mobimba.”—ZEKALIA 14:9.
1. Makambo nini makómelaki baklisto bapakolami na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe lolenge nini yango esakolamaki?
NA BOUMELI ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, baklisto bapakolami bakutanaki na makambo mingi ya mpasi mpe batyamaki na bolɔ́kɔ kati na bikólo oyo bizalaki kobunda. Mbeka ya masanzoli na bango epai na Yehova epekisamaki makasi, mpe bakómaki bakangami na elimo. Nyonso wana esakolamaki na Zekalia 14:2, oyo ezali kolobela lolenge bikólo mingi bibundisaki Yelusaleme. Engumba oyo elobelami kati na esakweli yango ezali bongo “Yelusaleme na likoló,” Bokonzi ya Nzambe ya likoló mpe efandelo ya “kiti na Bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na mpate.” (Baebele 12:22, 28; 13:14; Emoniseli 22:3) Bapakolami ya Nzambe awa na mabelé bazalaki bamonisi ya engumba yango. Baoyo bazalaki sembo kati na bango babikaki na kobundisama wana, koboyáká bongo komitika ete bálongolama “na engumba.”a
2, 3. (a) Lolenge nini losambo ya Yehova esili kolónga uta mobu 1919? (b) Uta mobu 1935, makambo nini mazali kosalema?
2 Na mobu 1919 baklisto bapakolami oyo bazalaki sembo bazwaki bonsomi, mpe nokinoki basalelaki malamu eleko ya kimya oyo eyaki na nsima ya etumba. Lokola bazali bamonisi ya Yelusaleme ya likoló, basalelaki libaku monene wana mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe kopesa lisungi kati na mosala ya koyanganisa basangani ya nsuka ya ba 144 000. (Matai 24:14; 2 Bakolinti 5:20) Na mobu 1931 bazwaki nkombo oyo eyokani mpenza na Makomami, Batatoli ya Yehova.—Yisaya 43:10, 12.
3 Uta na ntango yango, Batatoli ya Nzambe oyo basilaki kopakolama bazongaki lisusu nsima te. Ata mpe Hitler elongo na ebongiseli na ye ya Nazi mpe basodá na yango, bakokaki te kosukisa mosala na bango. Atako bazwaki monyoko na mokili mobimba, mosala na bango moboti mbuma kati na mabelé mobimba. Mingi mpenza uta na mobu 1935, “ebele monene” ya bato bauti na mikili ndenge na ndenge, baoyo basakolamaki kati na mokanda ya Emoniseli, bayaki kosangana elongo na bango. Bango mpe bazali baklisto basili komipesa, basili kozwa batisimo mpe “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate,” Yesu Klisto. (Emoniseli 7:9, 14) Nzokande, bazali bapakolami te, oyo bazali na elikya ya kokende na likoló. Elikya na bango ezali nde ya kosangola eloko oyo Adama mpe Eva babungisaki, elingi koloba, bomoi ya bato ya kokoka kati na paladiso na mabelé. (Nzembo 37:29; Matai 25:34) Lelo oyo, ebele monene ezali bongo na milimo koleka milió mitano. Losambo ya solo ya Yehova ezali kolónga, kasi bolóngi na yango ya nsuka ekoya nsima.
Bapaya kati na tempelo ya Nzambe na elimo
4, 5. (a) Epai wapi ebele monene bazali kosambela Yehova? (b) Mabaku malamu nini bazali na yango, mpe yango ezali kokokisa esakweli nini?
4 Lokola esakolamaki, ebele monene “bakosalelaka [Nzambe] butu na moi kati na tempelo na ye.” (Emoniseli 7:15, maloba na nsé ya lokasa, NW) Lokola bazali Yisalaele ya elimo te, to banganga te, ekoki mpenza kozala ete Yoane amonaki bango na lopango ya libándá oyo ezalaki mpo na bapakano. (1 Petelo 2:5) Tempelo ya Yehova na elimo esili kokóma na nkembo mpenza, ezingelo na yango etondi na ebele monene ya bato oyo, elongo na batikali ya Yisalaele ya elimo, bazali kosanzola ye!
5 Ebele monene bazali kosalela Nzambe te kati na ezalela oyo emonisami na lopango ya kati, oyo ya banganga. Batángami te bayengebene na mokano ete bázala bana oyo Nzambe akómisi bango bana na ye ya elimo. (Baloma 8:1, 15) Nzokande, na komonisáká kondima kati na lisiko ya Yesu, bazali na etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Yehova. Batángami bayengebene na mokano ete bázala baninga na ye. (Kokanisá na Yakobo 2:21, 23.) Bango mpe bazali na libaku malamu ya kopesa mbeka oyo ebongi likoló na etumbelo ya Nzambe ya elimo. Na yango, na ntina na ebele monene wana, esakweli ya Yisaya 56:6, 7 ezali kokokisama na nkembo nyonso: “Bapaya oyo bakomibakisa epai na [Yehova] ete básalela ye mpe bálinga nkombo na [Yehova] . . . nakoyeisa bango oyo kino ngomba na ngai na bulɛɛ, nakosepelisa mpe bango kati na ndako na ngai na kobondela; mbeka na bango itumbami mpe makabo na bango, ikoyambama na etumbelo na ngai; zambi ndako na ngai ekobyangama ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso.”
6. (a) Bapaya bazali kopesa mbeka ya lolenge nini? (b) Saani monene ya mai oyo ezalaki kati na lopango ya banganga ezali kokundwela bango nini?
6 Kati na bambeka oyo bapaya yango bazali kopesa ezali bongo na “mbuma na bibɛbu [lokola mbeka na mbuma elengelami malamu] oyo bizali koyambola nkombo na [Nzambe]” mpe “kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko.” (Baebele 13:15, 16) Saani monene ya mai oyo banganga bazalaki kosalela mpo na komisukola ezali mpe ekundweli ya ntina mingi mpo na bapaya wana. Bango mpe basengeli kondima kopɛtolama na elimo mpe na bizaleli wana bazali kongɛngisama mokemoke na Liloba ya Nzambe.
Esika mosantu mpe biloko bizali kati na yango
7. (a) Lolenge nini ebele monene bazali kotalela mabaku malamu oyo banganga ya bulɛɛ bazali na yango? (b) Wapi bamoko na mabaku mosusu oyo bapaya mosusu basili kozwa yango?
7 Esika mosantu mpe biloko bizali kati na yango ezali na ndimbola mpo na ebele monene ya bapaya wana? Ya solo bakozala soko moke te na ezalela oyo Esika mosantu emonisaki yango na elilingi. Babotami lisusu te lokola bana ya Nzambe na elimo, oyo mboka na bango ezali kuna na likoló. Yango ezali kopesa bango zúwa to elulela? Te. Kútu, bazali nde kosepela na libaku na bango ya kosunga batikali ya ba 144 000, mpe bazali komonisa botɔ́ndi mozindo mpo na mokano oyo Nzambe azwi ya kondima bato yango lokola bana na elimo, baoyo bakosangana elongo na Klisto na mosala ya komema bato kino na ezalela ya kokoka. Lisusu, ebele monene ya bapaya wana bazali kosepela makasi na ngɔlu oyo Nzambe amoniseli bango na kopesáká bango elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Bamoko kati na bapaya yango, na motindo na Banetinimi ya ntango ya kala, basili kopesamela mabaku malamu ya kosala mosala ya bakɛngɛli na kopesáká banganga ya bulɛɛ mabɔkɔ.b (Yisaya 61:5) Kati na bango, Yesu azali kopona “bana na mokonzi na mokili mobimba.”—Nzembo 45:16.
8, 9. Litomba nini ebele monene bazali kozwa na kotaleláká ndimbola ya biloko oyo bizalaki kati na Esika mosantu?
8 Atako bakokɔta te kati na esika oyo Esika mosantu ezalaki elilingi na yango, ebele monene ya bapaya bazali kozwa mateya ya ntina likoló na biloko oyo bizalaki kuna. Motindo moko lokola efandelo ya miinda ezalaki kosɛnga ete bátyaka mafuta ntango nyonso kati na yango, bobele bongo mpe bapaya yango bazali na mposa ya elimo santu ya Nzambe mpo esunga bango ete básosola mokemoke solo kati na Liloba ya Nzambe, oyo lizali kopesama na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Lisusu, elimo ya Nzambe ezali kosunga bango ete báyanola na libyangi oyo: “[“Elimo,” NW] mpe mwasi na libala [batikali bapakolami] balobi ete, Yaká! Tiká moyoki aloba ete, Yaká! Tiká ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Na yango, efandelo ya miinda ezali ekundweli epai na ebele monene na ntina na lisɛngisi oyo epesameli bango ya kongɛnga lokola baklisto mpe ya koboya ezaleli, makanisi, maloba, to misala oyo ekoki koyokisa elimo santu ya Nzambe mawa.—Baefese 4:30.
9 Mesa ya limpa ya kolakisama ezali kokundwela ebele monene ete mpo bázala ntango nyonso na kolɔngɔnɔ́ malamu na elimo, basengeli mokolo na mokolo komileisa bilei ya elimo bizwami kati na Biblia mpe kati na mikanda oyo mikolimbolaka Biblia mibimisami na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 4:4) Etumbelo na mpaka na malasi ezali kokundwela bango ntina ya kobondela Yehova na etingya nyonso mpo na kozwa lisalisi ete bábatela bosembo na bango. (Luka 21:36) Kati na mabondeli na bango, basengeli mpe koloba maloba ya kosanzola mpe ya botɔ́ndi mauti na nsé ya motema. (Nzembo 106:1) Etumbelo na mpaka na malasi ezali mpe kokundwela bango ntina ya kosanzola Nzambe na mitindo ndenge na ndenge, na ndakisa na koyemba na motema mobimba nzembo ya Bokonzi kati na makita ya boklisto mpe na komibongisa na bango malamu mpo na kopesa ‘eyambweli ya lobiko’ oyo ebongi mpeenza.—Baloma 10:10.
Bolóngi monene ya losambo ya solo
10. (a) Elikya monene nini tokoki kozela yango na esengo nyonso? (b) Makambo nini makosalema liboso?
10 Lelo oyo, “bato mingi” bauti na mabota nyonso bazali koya kati na ndako ya losambo ya Yehova. (Yisaya 2:2, 3) Emoniseli 15:4 endimi yango na kolobáká ete: “Nani akozanga komemisa yo, Nkolo? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali mosantu mpe mabota nyonso bakoya kosambela liboso na yo. Mpo ete bikateli na yo sembo bisili komonisama.” Zekalia mokapo 14 epesi bandimbola oyo. Na mikolo mizali koya mosika te, ezaleli mabe oyo eteni monene ya bato awa na mabelé bazali komonisa ekokóma na nsuka na yango na ntango bakoyangana mpo na mbala ya nsuka mpo na kobundisa Yelusaleme—bamonisi ya Yelusaleme ya likoló awa na mabelé. Na nsima Yehova akotɛlɛma. Lokola azali Nzambe mobundi, “akobima mpe akobunana na mabota yango” oyo bazali koluka kobundisa bato na ye.—Zekalia 14:2, 3.
11, 12. (a) Yehova akoyanola nini na ntango basambeli kati na tempelo na ye bakobundisama na mokili mobimba? (b) Lolenge nini etumba ya Nzambe ekosuka?
11 “Oyo ekozala maladi makobɛta [Yehova] na mabota nyonso baoyo babukani na Yelusaleme: mosuni na bango ekokaoka naino ezali bango kotɛlɛma na makolo na bango mpe miso na bango ikokaoka kati na bityelo na yango mpe lolemo na bango ekokaoka kati na monɔkɔ na bango. Na mokolo yango, bolɔ́zi monene longwá na [Yehova] ekozala kati na bango. Moto na moto akosimba lobɔkɔ na mozalani na ye, lobɔkɔ na ye ekotɛmɛla lobɔkɔ na mozalani na ye.”—Zekalia 14:12, 13.
12 Ata soki etumbu yango ekozala ya solo mpenza to ya elilingi, tosengeli kozela mpo na komona makambo oyo makosalema. Nzokande, likambo moko lizali solo. Na ntango banguna ya Nzambe bakosala nyonso mpo na kobundisa basaleli ya Yehova kati na mokili mobimba, na nguya na ye oyo eleki nguya nyonso, Nzambe akosukisa bango. Minɔkɔ na bango mikokangama. Ekozala lokola nde ndemɔ na bango oyo ebimisaka ntembe epoli. Mokano moko oyo mosangisi bango mokomonana lisusu polele te na miso na bango, lokola nde miso na bango epoli. Nguya na bango, oyo epesaki bango mpiko ya kobundisa, ekosila. Bakobomana bango na bango kati na mobulungano monene. Na yango, banguna nyonso ya losambo ya Nzambe awa na mabelé bakosilisama nyɛɛ. Na nsuka, mabota nyonso bakoyeba solo ete Yehova azali mokonzi ya molɔngɔ́ mobimba. Esakweli oyo ekokokisama: “[Yehova] akozala mokonzi likoló na mokili mobimba.” (Zekalia 14:9) Na nsima, Satana mpe bademó na ye bakokangama ntango Boyangeli ya Mbula nkóto ya Klisto ekobanda elongo na mapamboli minene oyo ezali kozela bato.—Emoniseli 20:1, 2; 21:3, 4.
Lisekwa na mabelé
13. Banani bazali ‘bato oyo bakobika uta na mabota nyonso’?
13 Esakweli ya Zekalia elobi lisusu na mokapo 14, molɔngɔ́ 16 ete: “Bongo moto na moto oyo akobika na mabota nyonso baoyo bayaki kotɛmɛla Yelusaleme akobutaka elanga na elanga mpo na kosambela Mokonzi [Yehova] na bibele mpe mpo na kokumisa elambo na mingombo.” Engebene Biblia, bato nyonso oyo bakokóba kozala na bomoi kino na nsuka ya ebongiseli oyo mabe mpe bakotángama ete bazali banguna ya losambo ya solo bakozwa “lifuti na kobeba na seko.” (2 Batesaloniki 1:7-9; talá mpe Matai 25:31-33, 46.) Bakosekwisama te. Na ntembe te, na nsima, kati na baoyo “bakotikala” ekozala bongo na basangani ya mabota oyo bakufaki liboso na etumba ya nsuka ya Nzambe, baoyo bazali na elikya ya lisekwa oyo ezwi moboko na yango kati na Biblia. Yesu apesaki elaka oyo ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima; baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomoi; baoyo basalaki yauli kino lisekwa na kosambisama.”—Yoane 5:28, 29.
14. (a) Basekwi bakosengela kosala nini mpo na kozwa bomoi ya seko? (b) Nini ekokómela baoyo nyonso bazali koboya komipesa epai na Yehova mpe bazali koboya kosalela losambo ya solo?
14 Baoyo nyonso bakosekwisama basengeli kosala likambo moko mpo ete lisekwa na bango ezala lisekwa ya bomoi kasi ya kosambisama te. Basengeli koya na lopango ya tempelo ya Yehova na mabelé mpe kokumbama mpo na komonisa komipesa na bango epai na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto. Bato nyonso oyo bakosekwisama, baoyo bakoboya kosala bongo bakozwa etumbu lolenge moko na oyo ezali kozela mabota ya mikolo na biso. (Zekalia 14:18) Nani ayebi motángo ya bato oyo bakosekwisama mpe bakosangana elongo na ebele monene na esengo nyonso na kokumisáká Elambo ya Mingombo ya solo? Na ntembe te, bakozala mingi, mpe na ntina yango tempelo monene ya Yehova na elimo ekokóma na nkembo lisusu koleka!
Elambo ya Mingombo ya elimo
15. (a) Tángá mwa makambo minene oyo mazalaki kosalema na Yisalaele ya kala na boumeli ya Elambo ya Mingombo? (b) Mpo na nini ngɔmbɛ mibali 70 ezalaki kopesama lokola mbeka na boumeli ya elambo yango?
15 Mbula na mbula, Yisalaele ya kala esengisamaki ete ekumisaka Elambo ya Mingombo. Ezalaki koumela pɔ́sɔ moko mpe ezalaki kobanda na nsuka ya eleko ya bobuki mbuma. Ezalaki ntango ya esengo mpe ya kozongisa matɔ́ndi. Na boumeli ya pɔ́sɔ yango, basengelaki kofanda mpo na mwa ntango moke kati na mingombo mizipami na nkasa ya nzeté, mingi mpenza mandalala. Elambo yango ezalaki kokundwela Bayisalaele lolenge oyo Nzambe abikisaki bankɔ́kɔ na bango na kobimisáká bango longwá na Ezipito mpe lolenge oyo abatelaki bango wana bazalaki kofanda kati na mingombo na ntango bazalaki na mobémbo oyo eumelaki mbula 40 kati na mokili mokauki kino bakómaki na Mokili ya Ndaka. (Levitike 23:39-43) Na boumeli ya elambo yango, ngɔmbɛ mibali 70 ezalaki kopesama mbeka likoló na etumbelo na tempelo. Na ntembe, molulu oyo mozalaki kosalema na elambo yango mozalaki kosakola mosala ya kobikisa bomoi ya bato, oyo Yesu akokisaki yango na lolenge ya kokoka mpe na mobimba mpenza. Na nsuka, matomba ya mbeka na ye ya lisiko makosopama likoló na ebele na bakitani ya mabota 70 ya bato nyonso ya mokili oyo bautaki na Noa.—Genese 10:1-29; Mituya 29:12-34; Matai 20:28.
16, 17. (a) Ntango nini Elambo ya Mingombo na elimo ebandaki, mpe ekóbaki na lolenge nini? (b) Lolenge nini ebele monene bazali kosangana na bokumisi ya elambo yango?
16 Na yango, Elambo ya Mingombo ya ntango ya kala ezalaki komonisa koyanganisama na esengo nyonso kati na tempelo monene ya Yehova na elimo, ya bato ya masumu oyo basikolami. Kokokisama ya elambo yango na elimo ebandaki na Pantekote na mobu 33 T.B., ebandaki na koyanganisama ya Bayisalaele ya elimo na esengo nyonso kati na lisangá ya boklisto. (Misala 2:41, 46, 47) Bapakolami wana basosolaki ete bazalaki “bapaya” kati na mokili ya Satana mpamba te ‘mboka na bango [ya solo] ezali kuna na likoló.’ (1 Petelo 2:11; Bafilipi 3:20) Boklisto ya nkombo mpamba ebimisaki lipɛngwi oyo ebebisaki elambo yango ya esengo mpo na mwa ntango moke. (2 Batesaloniki 2:1-3) Nzokande, elambo yango ezongisamaki lisusu na 1919 wana koyanganisama ya basangani ya nsuka ya Bayisalaele 144 000 ya elimo ebandaki lisusu na esengo nyonso, elandanaki na koyanganisama ya ebele monene ya bato bauti na mikili ndenge na ndenge oyo balobelami kati na Emoniseli 7:9.
17 Ebele monene balobelami ete basimbi bitape ya mbila na mabɔkɔ na bango, oyo emonisi ete bango mpe bazali bakumisi ya esengo ya Elambo ya Mingombo na lolenge ya elimo. Lokola bazali baklisto oyo basili komipesa, bazali kosangana na esengo nyonso na mosala ya koyanganisa basambeli mingi koleka kati na tempelo ya Yehova. Lisusu, lokola bazali bato ya masumu, basosoli ete bazali te na lotómo ya libela ya kofanda awa na mabelé. Bango, elongo na bato oyo bakosekwisama na mikolo mizali koya, basengeli ntango nyonso komonisa kondima kati na mbeka ya lisiko ya Klisto kino bakokóma na ezalela ya kokoka na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.—Emoniseli 20:5.
18. (a) Likambo nini likosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto? (b) Na nsuka, lolenge nini losambo ya solo ya Yehova ekolónga?
18 Na bongo, basambeli ya Nzambe awa na mabelé bakotɛlɛma liboso na ye na ezalela ya kokoka kozanga ete bázala na mposa ya bonganga ya likoló. Ekozala ntango oyo Yesu Klisto ‘akozongisa bokonzi epai na Nzambe mpe Tata na ye.’ (1 Bakolinti 15:24) Satana akofungolama “mpo na mwa ntango” mpo ete ameka bato ya kokoka. Baoyo nyonso bakozala sembo te bakobomama mpo na libela, elongo na Satana mpe bademó na ye. Baoyo bakotikala sembo bakopesamela bomoi ya seko. Bakokóma bafandi ya libela kati na paladiso na mabelé. Na yango, Elambo ya Mingombo na elimo ekosuka na nkembo mpe na bolóngi nyonso. Losambo ya solo ekolónga mpe Yehova akopesamela nkembo ya seko mpe bato bakozwa bolamu ya libela.—Emoniseli 20:3, 7-10, 14, 15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandimbola ya molɔngɔ́ mokomoko ya Zekalia mokapo 14, talá búku Le Paradis rétabli parmi les hommes — grâce à la Théocratie!, ebimisamaki na 1972 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., mokapo 21 mpe mokapo 22.
b Mpo na koyeba makambo mosusu matali Banetinimi ya mikolo na biso, talá Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1992, lokasa 16.
Mituna ya bozongeli
◻ Lolenge nini “Yelusaleme” ebundisamaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?—Zekalia 14:2.
◻ Likambo nini likómelaki libota ya Nzambe uta 1919?
◻ Lelo oyo, banani bazali kokumisa Elambo ya Mingombo na elimo?
◻ Lolenge nini losambo ya solo ekolónga libela?
[Elilingi na lokasa 23]
Mandalala masalelamaki na kati na kokumisama ya Elambo ya Mingombo