“Bózala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino”
“Bózala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulɛɛ. Zambi esili kokomama ete, Bokozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.”—1 PETELO 1:15, 16.
1. Mpo na nini Petelo alendisaki baklisto ete bázala bulɛɛ?
MPO na nini ntoma Petelo apesaki toli oyo? Mpamba te amonaki ete moklisto nyonso azali na ntina mpenza ya kobatela makanisi mpe misala na ye ete ezala na boyokani na ezaleli ya bulɛɛ ya Yehova. Mpo na yango, akomaki naino maloba oyo liboso: “Na bongo, bókanga nkamba na makanisi na bino, bómisɛnzɛla . . . Lokola bana na botosi, bóndima te ete bizaleli na bino bibila mposa mabe na bino na liboso, wana ezangaki bino mayele.”—1 Petelo 1:13, 14.
2. Mpo na nini bamposa na biso ezalaki ya mbindo liboso ete tóyeba solo?
2 Bamposa na biso ya liboso ezalaki ya mbindo. Mpo na nini? Mpamba te mingi kati na biso tozalaki kolanda bizaleli ya mokili liboso ete tóndima solo ya boklisto. Petelo ayebaki yango ntango ayebisaki polele ete: “Mpo ete ntango esili koleka mpo na kosala mokano na bapakano. Na ntango yango botambolaki na mobulu mpe na mposa mabe, komeláká vinyo mpe kozala na lokoso mpe na lilango [“milangwa,” NW] mpe na kosambela bikeko.” Ya solo, Petelo atángi te na bosikisiki misala ya mbindo oyo mizali kosalema na mokili ya ntango na biso, mpamba te yango eyebanaki te na eleko na ye.—1 Petelo 4:3, 4.
3, 4. (a) Lolenge nini tokoki kolónga bamposa mabe? (b) Baklisto basengeli kozala na mayoki te? Limbolá.
3 Ososoli ete bamposa yango ezali oyo esepelisaka nzoto, biyokeli mpe mayoki? Soki totiki yango elónga biso, nokinoki makanisi mpe misala na biso ekokóma bongo mbindo. Yango ezali komonisa ntina ya kotika ete nguya ya kososola ekamba etamboli na biso. Paulo amonisaki yango wana alobaki ete: “Bandeko, nazali kobondela bino mpo na mawa na Nzambe ete bókaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango. Bongo bokosambela ye na ntina [“bokosalela ye mosala ya bulɛɛ na nguya na bino ya kososola,” NW].”—Baloma 12:1, 2.
4 Mpo na kopesa Nzambe mbeka ya bulɛɛ, tosengeli kotika nguya na biso ya kososola eyangela biso, kasi mayoki na biso te. Bato mingi mpenza bakweaki kati na etamboli ya mbindo mpamba te batikaki ete mayoki na bango makamba etamboli na bango! Yango elingi koloba te ete tosengeli kolongola mayoki na biso nyonso; soki tolongoli yango, lolenge nini tokokoka komonisa esengo oyo toyokaka kati na mosala ya Yehova? Nzokande, soki tolingi kobota mbuma ya elimo kasi misala ya nzoto te, tosengeli bongo koyokanisa makanisi na biso na lolenge ya kokanisa ya Klisto.—Bagalatia 5:22, 23; Bafilipi 2:5.
Mbeka ya bulɛɛ, bomoi ya bulɛɛ
5. Mpo na nini Petelo ayebaki malamu ntina ya ezaleli ya bulɛɛ?
5 Mpo na nini Petelo azalaki mpenza kotya likebi mingi likoló na ezaleli ya bulɛɛ ya baklisto? Mpamba te ayebaki malamu mbeka ya bulɛɛ oyo efutamaki mpo na kosikola bato ya botosi. Akomaki ete: “Boyebi ete bosili kosikwa kati na bizaleli na bino na mpamba bilongwi na bankɔ́kɔ, na biloko bikopɔla lokola palata soko wolo te, kasi bosili kosikwa na makila na Yesu Klisto maleki nyonso na motuya, lokola makila na mwana na mpate oyo na mpota te mpe na litɔnɔ te.” (1 Petelo 1:18, 19) Ee, Eutelo ya ezaleli ya bulɛɛ, Yehova Nzambe, atindaki Mwana-mobali bobele moko na ye, “Mobulami,” na mabelé mpo ete afuta lisiko oyo lisengelaki kopesa bato nzela ya kosala boyokani malamu elongo na Nzambe.—Yoane 3:16; 6:69; Exode 28:36; Matai 20:28.
6. (a) Mpo na nini kolanda komonisa ezaleli ya bulɛɛ ezali mpo na biso likambo ya pɛtɛɛ te? (b) Nini ekoki kosalisa biso na kobatela etamboli na biso ete ezala ntango nyonso bulɛɛ?
6 Nzokande, tosengeli kondima ete ezali pɛtɛɛ te kozala na bomoi ya bulɛɛ kati na mokili ya Satana oyo ezali kobebisa bato. Atyaka mitambo mpo na kokanga baklisto ya solo, oyo bazali komeka na molende nyonso kolónga ebongiseli ya biloko na ye. (Baefese 6:12; 1 Timoté 6:9, 10) Mitungisi miuti na mosala ya mosuni, na botɛmɛli ya libota, na kotyolama na eteyelo, mpe na bopusi ya baninga ezali kosɛnga ezaleli makasi ya elimo mpo ete tókoka kobatela ezaleli na biso ya bulɛɛ. Yango ezali komonisa ntina ya boyekoli ya moto na moto mpe koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto. Paulo apesaki Timoté toli ete: “Osimba lolenge na maloba sembo mayoki yo epai na ngai kati na kondima mpe na bolingo oyo ezali na Klisto Yesu.” (2 Timoté 1:13) Maloba wana oyo mapesaka kolɔngɔ́nɔ́ malamu toyokaka yango kati na Bandako ya Bokonzi na biso mpe totángaka yango kati na boyekoli ya biso moko ya Biblia. Makoki kosalisa biso ete tózala bulɛɛ kati na etamboli na biso ya mokolo na mokolo liboso na makambo ndenge na ndenge.
Etamboli ya bulɛɛ kati na libota
7. Lolenge nini ezaleli ya bulɛɛ esengeli kozala na bopusi likoló na bomoi na biso ya libota?
7 Ntango Petelo atángaki Levitike 11:44, asalelaki liloba ya Greke haʹgi·os, oyo elimboli, “etangolami na lisumu mpe bongo esantisami mpo na Nzambe, ya bulɛɛ.” (Búku An Expository Dictionary of New Testament Words, ekomami na W. E. Vine) Lolenge nini yango esengeli kozala na bopusi likoló na biso kati na bomoi na biso ya libota ya boklisto? Na ntembe te elimboli ete bolingo esengeli kozala moboko ya bomoi na biso ya libota, mpamba te “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Bolingo oyo ezali kopusa na komipimela ezali mafuta mpo na kobongisa boyokani kati na babalani mpe kati na baboti mpe bana na bango.—1 Bakolinti 13:4-8; Baefese 5:28, 29, 33; 6:4; Bakolose 3:18, 21.
8, 9. (a) Na bantango mosusu makambo nini mamonanaka kati na mabota ya boklisto? (b) Toli malamu nini Biblia ezali kopesa na likambo yango?
8 Tokoki mbala mosusu kokanisa ete komonisa bolingo motindo yango ezali likambo ya pɛtɛɛ kati na libota ya boklisto. Nzokande, tosengeli kondima ete bolingo emonisamaka ntango nyonso te na meko oyo yango esengeli mpenza komonisama kati na bandako mosusu ya baklisto. Kati na Ndako ya Bokonzi, ekoki mbala mosusu komonana ete tomimonisaka bato ya bolingo, nzokande ezaleli ya bulɛɛ na biso ekoki kolimwa nokinoki na ntango tokozonga na ndako. Na ntango yango tokoki kobosana nokinoki ete mwasi na biso azali ntango nyonso ndeko na biso moklisto to mobali na biso azali ntango nyonso ndeko mobali (mpe mbala mosusu mosaleli na misala to nkulutu) oyo apesamelaka limemya mingi na Ndako ya Bokonzi. Kosilika, mpe koswana makasi ekoki kobanda. Mitindo mibale ya bomoi mikoki kokɔta kati na bomoi na biso. Tozali lisusu te na lolenge ya boyokani ya boklisto oyo bosengeli kozala kati na mobali na mwasi na ye kasi bobele bato mibale oyo bazali kowelana. Basili kobosana ete ezaleli ya bulɛɛ esengeli komonana kati na ndako. Bakoki mbala mosusu koloba na motindo na bato na mokili. Nokinoki, maloba mabe, maloba ya kozokisa makoki kobima na monɔkɔ na bango!—Masese 12:18; kokanisá na Misala 15:37-39.
9 Nzokande, Paulo apesi toli oyo: “Tiká te ete maloba na bosoto [na Greke, loʹgos sa·prosʹ, “elobeli ya kokómisa mbindo,” elingi koloba, oyo ezali bulɛɛ te] mábima na minɔkɔ na bino kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosenga, ete mápesa bayoki ngɔlu.” Yango elobeli bayoki nyonso oyo bazali kati na ndako, ata mpe bana.—Baefese 4:29; Yakobo 3:8-10.
10. Lolenge nini bana bakoki kosalela toli oyo etali ezaleli ya bulɛɛ?
10 Lisusu batoli oyo na ntina na ezaleli ya bulɛɛ etaleli mpe bana oyo bazali kati na mabota ya boklisto. Bakoki nokinoki, wana euti bango na eteyelo, komekola elobeli ya botomboki mpe ya kozanga limemya ya baninga na bango ya mokili! Bana, bóbendama te na bizaleli motindo moko na oyo ya bana na mobulu oyo batukaki mosakoli ya Yehova mpe baoyo bakokani na bana mosusu ya mikolo na biso oyo bazali na maloba ya bosoto mpe ya kotuka. (2 Mikonzi 2:23, 24) Elobeli na bino esengeli te kobebisama na maloba ya bosoto kati na balabála, oyo masalelamaka na bato oyo bakokaka te kosalela maloba ya pɛtɔ mpamba te bazali goigoi mingi to mpo ete bazangi limemya epai na basusu. Lokola tozali baklisto, elobeli na biso esengeli kozala ya bulɛɛ, ya kosepelisa, ya kolendisa, ya boboto mpe “na elɛngi na mongwa.” Esengeli kokesenisa biso na bato mosusu.—Bakolose 3:8-10; 4:6.
Ezaleli ya bulɛɛ mpe basangani ya libota na biso oyo bazali bandimi te
11. Mpo na nini kozala bulɛɛ elimboli te komimona ete ozali sembo koleka basusu?
11 Wana tozali komeka na molende nyonso kozala na etamboli ya bulɛɛ, tosengeli te komimonisa ete toleki basusu to ete tozali sembo koleka bango, mingi mpenza kati na boyokani na biso elongo na basangani ya libota na biso oyo bazali bandimi te. Etamboli na biso ya boklisto oyo etondi na boboto esengeli kosalisa bango na komona ete tokeseni na bango na motindo ya malamu, ete toyebi lolenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa, motindo moko lokola Mosamalia ya boboto oyo alobelami kati na lisese ya Yesu.—Luka 10:30-37.
12. Lolenge nini baklisto bakoki komonisa epai na babalani na bango ete solo ezali kitoko?
12 Petelo alobelaki mingi ntina ya komonisa ezaleli oyo ebongi epai na basangani ya libota na biso oyo bazali bandimi te ntango akomaki epai na basi baklisto ete: “Bobele bongo bino basi, bótosa babali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi Liloba te, bázwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na bino bizali na pɛtɔ mpe na limemya.” Mwasi moklisto (to mobali moklisto na likambo oyo) akoki komonisa epai na mobalani oyo azali mondimi te ete solo ezali kitoko soki azali na etamboli ya pɛtɔ, na bonkóndé mpe na limemya. Yango elingi koloba ete esengeli na biso kozala na bokatikati wana tozali kozwa bibongiseli mpo na misala na biso ya Teokrasi mpo ete mobalani oyo azali mondimi te amiyoka te ete asundolami to atikami ye moko.a—1 Petelo 3:1, 2.
13. Lolenge nini bankulutu mpe basaleli na misala bakoki mbala mosusu kosalisa mibali oyo bazali bandimi te ete básepela na solo?
13 Bankulutu mpe basaleli na misala bakoki mbala mosusu kosunga na kolukáká koyeba mobalani oyo azali mondimi te ete bákutana na ye mpo na kosolola. Na lolenge yango akoki komona ete Batatoli bazalaka bato lokola bato nyonso, bato na bonkóndé oyo basepelaka na makambo ndenge na ndenge, ata na makambo mosusu oyo matali Biblia te. Na ndakisa, nkulutu moko abandaki kosepela na lolenge oyo mobali ya ndeko mwasi moko akendaka kolɔ́ba mbisi mpo na kolekisa ntango na ye. Nokinoki bakómaki baninga. Na nsima mobali yango akómaki ndeko oyo azwi batisimo. Ndakisa mosusu, mobali ya ndeko mwasi moko, oyo azalaki mondimi te azalaki kosepela mingi na ndɛkɛ ya mike ebéngami canari. Bankulutu balɛmbaki te. Moko kati na bango ayekolaki lisoló oyo elobelaki ndɛkɛ wana mpo ete mbala ya nsima oyo akokutana na ye, akoka kobanda lisoló elongo na ye likoló na ndɛkɛ wana oyo esepelisaka mobali yango mingi! Na yango, kozala bulɛɛ elimboli te kozala na makambo makasi, to na makanisi mokuse.—1 Bakolinti 9:20-23.
Lolenge nini tokoki kozala bulɛɛ kati na lisangá?
14. (a) Wapi moko na myango oyo Satana asalelaka mpo na kobebisa lisangá? (b) Lolenge nini tokoki kotɛmɛla motambo ya Satana?
14 Satana Zábolo azali motɔ́ngi, mpamba te liloba ya Greke mpo na Zábolo, di·aʹbo·los, elimboli “mofundi” to “motɔ́ngi.” Kotɔ́nga ezali moko na misala na ye minene, mpe amekaka kosalela yango kati na lisangá. Mwango oyo alingaka mingi ezali bongo bilobaloba. Tomitikaka ete azimbisa biso kati na etamboli wana ya mbindo? Lolenge nini yango ekoki kosalema? Na kobandáká yango, na kozongeláká yango, to na koyokáká yango. Lisese moko ya mayele elobi ete: “Moto na yauli akobimisa kowelana; molobi na nsango na lokuta akokabola baninga ata baoyo bazali na bolingo monene.” (Masese 16:28) Wapi nkisi mpo na kosilisa bilobaloba mpe matɔ́ngi? Tosengeli komindimisa ete elobeli na biso ezali ntango nyonso ya kolendisa mpe moboko na yango ezali bongo bolingo. Soki tokoluka bizaleli malamu na esika ya koluka mabungá, oyo ekanisami ete bandeko na biso bazali na yango, lisoló na biso likosepelisa mpe likolendisa na elimo. Tómikundola ete ezalaka mpasi te mpo na kotɔ́nga. Moto oyo ayaka kotɔ́nga basusu epai na yo akoki mpe kotɔ́nga yo epai na basusu!—1 Timoté 5:13; Tito 2:3.
15. Bizaleli nini ya Klisto bikoki kosunga mpo ete lisangá mobimba ezala ntango nyonso bulɛɛ?
15 Mpo na kobatela lisangá bulɛɛ, biso banso tosengeli kozala na elimo ya Klisto, mpe toyebi ete ezaleli na ye ya ntina mingi ezali bongo bolingo. Na yango, Paulo apesaki Bakolose toli ete bázala na motema mawa lokola Klisto: “Na bongo, lokola Baponami na Nzambe, babulami mpe balingami; bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ . . . bólimbisanaka . . . Nde likoló na oyo nyonso, bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.” Na nsima alobaki lisusu ete: “Tiká mpe kimya na Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na bino.” Na ntembe te, na elimo wana ya kolimbisana, tokoki kobatela bomoko mpe ezaleli ya bulɛɛ na lisangá.—Bakolose 3:12-15.
Ezaleli na biso ya bulɛɛ ezali komonana kati na kartyé?
16. Mpo na nini losambo na biso ya bulɛɛ esengeli kozala losambo ya esengo?
16 Ezali boni mpo na bato oyo tofandi na bango kartyé moko? Likanisi nini bazalaka na yango likoló na biso? Tongɛngisaka esengo na biso oyo euti na solo, to tokómisaka solo lokola eloko ya bozito monene? Soki tozali bulɛɛ lokola Yehova azali bulɛɛ, yango esengeli bongo komonana polele kati na elobeli mpe kati na etamboli na biso. Esengeli komonana polele ete losambo na biso ya bulɛɛ ezali losambo ya esengo. Mpo na nini bongo? Mpamba te Yehova Nzambe na biso azali Nzambe na esengo, oyo alingaka ete basaleli na ye bázala na esengo. Na yango, mokomi na Nzembo alobaki na ntina na libota na Yehova na ntango na kala ete: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.” Omonisaka esengo motindo yango? Bana na biso bamonisaka bosepeli ya kozala kati na libota ya Yehova na Ndako ya Bokonzi mpe na mayangani?—Nzembo 89:15, 16; 144:15b.
17. Makambo nini tokoki kosala mpo na komonisa bokatikati na biso kati na ezaleli ya bulɛɛ?
17 Tokoki mpe komonisa ezaleli na biso ya bulɛɛ oyo ezali na bokatikati na kozaláká na elimo ya boyokani mpe ya boboto epai na bato oyo tofandi na bango kartyé moko. Na bantango mosusu emonanaka malamu ete bato oyo bafandi kartyé moko básalana elongo, ekoki kozala mpo na kotya bopɛtɔ na kartyé to, lokola esalemaka na bamboka mosusu, basengeli kopesa mabɔkɔ mpo na kobongisa nzela mpe balabála monene. Na yango, ezaleli na biso ya bulɛɛ ekoki mpe komonana polele na lolenge oyo tobongisaka bafololo na biso, libándá na biso, to biloko na biso mosusu. Soki totikaka ebwakelo bosoto zingazinga to soki libándá na biso ezali na matiti to ekombami te, to mpe ezali na mituka ya kala ekufá oyo bato nyonso bakoki komona, tokoki koloba ete tozali na limemya epai na bazalani na biso?—Emoniseli 11:18.
Ezaleli ya bulɛɛ na mosala mpe na eteyelo
18. (a) Mokakatano nini baklisto bazali na yango na mikolo na biso? (b) Lolenge nini tokoki kokesana na mokili?
18 Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto ya engumba ya Kolinti oyo etondaki na misala ya mbindo ete: “Nakomelaki bino na mokanda ete bósangana na bato na pite te. Nakanisaki te ete bókima bato na pite kati na mokili soko bato na bilulela soko bato na moyibi soko basambeli na bikeko. Zambi soko bokimi bango boye, ekokoka na bino kolongwa na mokili!” (1 Bakolinti 5:9, 10) Oyo ezali mokakatano mpo na baklisto, mpamba te basengeli kozala mokolo na mokolo elongo na bato na bizaleli ya mbindo mpe baoyo bazangi mitindá. Oyo ezali komekama monene mpo na bosembo na bango, mingi mpenza kati na bamboka epai kuna mobulu ya pite, libebi mpe kozanga kolongobana elendisami to epesami nzela. Na bisika wana tokoki soko moke te komeka kolɛmbisa mitindá na biso mpo ete tómonana “malamu” epai na bato bazingi biso. Nzokande, etamboli na biso ya boboto kasi ya boklisto esengeli kokesenisa biso na miso na bato oyo bazali na bososoli, na miso ya baoyo bazali koyeba bosenga na bango ya elimo mpe baoyo bazali koluka eloko moko ya malamu.—Matai 5:3; 1 Petelo 3:16, 17.
19. (a) Komekama nini bana bakutanaka na yango na eteyelo? (b) Baboti bakoki kosala nini mpo na kolendisa bana na bango mpe etamboli ya bulɛɛ oyo bazali na yango?
19 Motindo moko, bana na biso bazali kokutana na mikakatano mingi na biteyelo. Bino baboti bokendaka na eteyelo ya bana na bino? Boyebi lolenge ya bizaleli oyo bipalangani kuna? Bozalaka na bokutani elongo na balakisi na bango? Mpo na nini mituna oyo mizali na ntina? Mpo ete, kati na bingumba mingi ya mokili, biteyelo bisili kokóma bisika ya mobulu, ya komela bilangwiseli mpe ya kosala pite. Lolenge nini bana na bino bakoki kobatela bosembo na bango mpe etamboli ya bulɛɛ soki bazali kozwa te bilendiseli ya bolingo biuti na baboti na bango? Na lolenge lobongi Paulo apesaki baboti toli ete: “Bino batata, bótumolaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te.” (Bakolose 3:21) Moko na makambo oyo masilikisaka bana ezali bongo kozanga kososola mikakatano mpe komekama oyo bazali kokutana na yango mokolo na mokolo. Kobongisama mpo na kolónga masɛnginya oyo mazali na biteyelo ebandaka kati na ezaleli ya elimo oyo ezali kati na libota ya boklisto.—Deteronome 6:6-9; Masese 22:6.
20. Mpo na nini ezaleli ya bulɛɛ ezali na ntina mingi mpo na biso banso?
20 Na bosukisi, mpo na nini ezaleli ya bulɛɛ ezali na ntina mingi mpo na biso banso? Mpo ete ezali kobatela biso na matumoli ya mokili ya Satana mpe na lolenge na yango ya kokanisa. Ezali bongo lipamboli sikawa mpe ekozala bongo na mikolo mizali koya. Ezali mpo na biso ndanga ya bomoi oyo ekozala bomoi ya solosolo kati na mokili ya sika ya boyengene. Ezali kosalisa biso ete tózala baklisto oyo bazali na bokatikati, na boboto, baoyo bayebi kosolola elongo na bato—kasi te bato ya molende moleki ndelo oyo batondi na makambo makasimakasi. Na mokuse, ekokómisa biso lokola Klisto.—1 Timoté 6:19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu matali kozala na boyokani ya mayele elongo na babalani oyo bazali bandimi te, talá Mosenzeli ya 15 Augústo 1990, “Kotala mobalani na yo eloko mpamba te!” nkasa 20-22 mpe ya 1 Yúni 1989 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 22-26, baparagrafe 20-22.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini Petelo amonaki malamu ete apesa baklisto toli na ntina na ezaleli ya bulɛɛ?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya pɛtɛɛ te
kozala na bomoi ya bulɛɛ?
◻ Biso banso tokoki kosala nini mpo na kokólisa lisusu mingi ezaleli ya bulɛɛ kati na libota?
◻ Mpo ete lisangá lizala bulɛɛ, etamboli nini ya mbindo tosengeli kopɛngola?
◻ Lolenge nini tokoki kotikala bulɛɛ na mosala mpe na eteyelo?
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli kozala na esengo kati na mosala ya Nzambe mpe kati na misala mosusu