Tiká ete bolingo na bino mpo na bandeko bóumela!
“Tiká ete bolingo [na bino mpo, “NW”] na bandeko bóumela.”—BAEBELE 13:1.
1. Okosala nini mpo ete mɔ́tɔ ekóba kopela kati na butu ya malili, mpe mokumba nini ya lolenge wana biso nyonso tozali na yango?
KANISÁ ete na esika ofandi, malili mazali makasi na libándá, mpe molungé (température) ezali sé kokita. Mwango bobele moko ya kozwa molungé na ndako na yo ezali bongo kopelisa mɔ́tɔ na nkoni. Bomoi ya bato etaleli lolenge okosala ete mɔ́tɔ yango epelaka ntango nyonso. Okofanda bobele bongo ozali kotala wana mololi ya mɔ́tɔ mpe makala ezali kokita mpe kozimana? Soko moke te. Okozala ntango nyonso kotya nkoni na boye ete ekóba kopela. Bobele bongo, mokomoko na biso azali na mosala ya ndenge yango na oyo etali “mɔ́tɔ” oyo eleki ntina—oyo esengeli kopela kati na mitema na biso—yango nde bolingo.
2. (a) Mpo na nini ekoki kolobama ete bolingo ezali kokita na mikolo oyo ya nsuka? (b) Na lolenge nini bolingo ezali na ntina mpo na baklisto ya solo?
2 Lokola Yesu alobaki yango esili koleka bambula mingi, tozali kobika na ntango oyo bolingo ezali kokita kati na baoyo bazali komibénga baklisto na mokili mobimba. (Matai 24:12) Yesu azalaki kolobela motindo ya bolingo oyo eleki ntina, bolingo mpo na Yehova mpe mpo na Liloba na ye, Biblia. Mitindo mosusu ya bolingo ezali mpe kokita. Biblia esakolaki ete “na mikolo ya nsuka, . . . bato bazangi bolingo” bakozala mingi. (2 Timoté 3:1-5) Likambo yango lizali mpenza komonana solo! Libota esengelaki kozala ebombamelo ya bolingo, nzokande ata kati na yango, mobulu mpe kobebisa—mbala mosusu mobulu ya nsɔ́mɔ—ezali komonana mingi. Kasi, kati na mokili oyo ezangi boyokani, esɛngami na baklisto ete bázala na bolingo bobele moko mpo na mosusu te kasi bázala na bolingo ya komipimela, kotya basusu na esika ya liboso. Tosengeli komonisa bolingo motindo wana na mobimba na yango na boye ete emonana na bato nyonso, ekóma mpenza elembo mpo na koyeba baklisto ya solo.—Yoane 13:34, 35.
3. Bolingo mpo na bandeko ezali nini, mpe kotika yango eumela elingi koloba nini?
3 Ntoma Paulo apemamaki na kopesa etindá ete: ‘Tiká ete bolingo mpo na bandeko bóumela.’ (Baebele 13:1) Engebene búku moko, liloba ya Greke oyo libongolami awa na “bolingo ya bandeko” (phi·la·del·phiʹa) “ezali kolobela bolingo ya mozindo, komonisa boboto, mawa, kopesa lisungi.” Mpe Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete tosengeli kotika bolingo ya motindo wana eumela? Búku yango elobi lisusu ete “esengeli kokita soko moke te.” Na yango, ekoki te kozala bobele na mayoki ya bolingo kati na motema mpo na bandeko na biso; tosengeli komonisa yango. Lisusu, tosengeli kosala ete bolingo yango eumela, tótika yango soko moke te ete ekita. Ezali mokakatano? Ɛɛ, kasi elimo ya Yehova ekoki kosalisa biso ete tólóna bolingo mpo na bandeko mpe tóbatela yango. Tiká ete tótalela mitindo misato ya kopelisa mɔ́tɔ yango ya bolingo kati na mitema na biso.
Tómonisa mayoki ya kobɔndisa
4. Mayoki ya kobɔndisa ezali nini?
4 Soki olingi kozala na bolingo mingi mpo na bandeko na yo mibali mpe basi, osengeli mbala mosusu kozala na mayoki mpo na bango, koyoka mawa elongo na bango kati na minyoko mpe komekama oyo bazali kokutana na yango na bomoi. Ntoma Petelo apesaki likanisi oyo ntango akomaki ete: “Bino nyonso bózala na motema moko, kobɔndisana, kolingana, lokola bandeko, na mitema na mawa, na kosɔkɛma.” (1 Petelo 3:8) Liloba ya Greke oyo lisalelami awa mpo na kolobela mayoki ya “kobɔndisana” ezali komonisa “konyokwama elongo na.” Nganga-mayele moko ya Biblia mobotami na ekólo Grèce alobi na ntina na liloba yango ete: “Makanisi oyo tozalaka na yango ntango tozali komitya na mayoki ya basusu emonisaka lokola nde ezalaki ya biso moko.” Na yango, esengeli koyoka mawa. Mobangé moko ya sembo, mosaleli ya Yehova alobaki ete: “Mayoki ya mawa ezali mpasi na yo kati na motema na ngai.”
5. Ndenge nini toyebi ete Yehova azalaka na mayoki ya kobɔndisa?
5 Yehova azalaka na mayoki ya kobɔndisa motindo wana? Ɛɛ. Na ndakisa, tozali kotánga na ntina na minyoko ya libota na ye Yisalaele ete: “Ye akómaki mobikisi na bango na mpasi nyonso na bango.” (Yisaya 63:9) Yehova amonaki bobele mobulungano na bango te; azalaki na mayoki mpo na libota na ye. Mayoki makasi oyo azalaki na yango emonisami na maloba ya Yehova ye moko epai na libota na ye, maloba oyo makomami na Zekalia 2:8 ete: “Ye oyo amami bino azali komama [mbuma ya liso na ngai, NW ].”a Molimboli moko alobaki na ntina na vɛrsɛ́ yango ete: “Liso ezali moko na binama bileki mindɔndɔ mpe oyo esengeli kosalelama na ekɛngɛ na nzoto ya moto; mpe mbuma ya kati ya liso—nzela oyo esalisaka ete pole ekɔ́ta na liso mpo na komona—oyo ebatelamaka makasi, eleki ntina kati na biteni nyonso ya liso. Yango ebongi mpenza mpo na kolimbola komibanzabanza mozindo oyo Yehova azali na yango mpo na bikelamu oyo azali kolinga.”
6. Na lolenge nini Yesu Klisto amonisaki mayoki ya kobɔndisa?
6 Yesu mpe azalaki ntango nyonso komonisa mayoki ya kobɔndisa na mozindo. Mbala na mbala azalaki ‘koyoka mawa’ mpo na bolɔ́zi ya baninga na ye bato oyo bazalaki na maladi to konyokwama. (Malako 1:41; 6:34) Amonisaki ete soki moto moko aboyi kosalela bayekoli na ye bapakolami makambo na boboto, azali koyoka lokola nde bazali kosalela ye moko bongo. (Matai 25:41-46) Mpe lelo oyo lokola “nganga monene” na biso, akoki “koyoka mpasi esika moko [na bolɛmbu, NW] na biso.”—Baebele 4:15.
7. Na lolenge nini mayoki ya kobɔndisa esengeli kosalisa biso ntango ndeko mobali to ndeko mwasi ayokisi biso nkanda?
7 “Koyoka mpasi esika moko na bolɛmbu na biso”—ezali likanisi ya kobɔndisa, boye te? Ɛɛ, na yango, tokolinga kosala bobele bongo bamoko epai na bamosusu. Ya solo, ezali mpasi te koluka mabunga ya basusu. (Matai 7:3-5) Kasi mbala ya nsima, ntango ndeko mobali to ndeko mwasi akosala yo mabe, mpo na nini te komeka komonisa mayoki yango? Omitya yo moko na ezalela ya moto yango, na esika na ye, na bomoto na ye, na mabunga oyo asengeli kobundisa. Okoki komindimisa ete okosala mabunga motindo yango te, mbala mosusu ya mabe koleka? Na esika ya kosɛngisa makambo mingi koleka epai na basusu, tosengeli komonisa mayoki ya kobɔndisa, oyo ekosalisa biso ete tózala na makambo makasi te lokola Yehova, oyo “azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:14; Yakobo 3:17) Ayebi bolɛmbu na biso. Amizelaka te ete tósala mingi koleka oyo tokoki mpenza kosala. (Kokanisá na 1 Mikonzi 19:5-7.) Tiká ete biso banso tómonisa mayoki ya kobɔndisa motindo wana mpo na basusu.
8. Lolenge nini tosengeli kosala ntango ndeko mobali to ndeko mwasi moko akutani na mikakatano?
8 Paulo akomaki ete lisangá ezali lokola nzoto ya biso bato oyo binama nyonso bisengeli kosala elongo mpe na bomoko. Abakisaki ete: “Soko elembo moko ekozwa mpasi, bilembo nyonso ikoyoka mpasi elongo.” (1 Bakolinti 12:12-26) Tosengeli konyokwama elongo, to koyoka mawa elongo na baoyo bazwami kati na mpasi. Bankulutu bazali na esika ya liboso mpo na kosala bongo. Paulo akomaki mpe ete: “Nani azali na kolɛmba mpe ngai nazwi bolɛmbu te? Nani atai libaku mpe ngai nasiliki te?” (2 Bakolinti 11:29) Bankulutu mpe bakɛngɛli-batamboli bamekolaka Paulo na likambo yango. Na masukúlu na bango, na mosala na bango ya kobatela bampate, mpe kútu na lolenge na bango ya kosambisa makambo, basalaka milende ya komonisa mayoki ya kobɔndisa. Paulo apesaki etindá oyo: “Bólelaka na baleli.” (Baloma 12:15) Soki bampate bazali mpenza komiyoka ete babateli bazali koyokela bango mawa, bazali kososola bolɛmbu na bango mpe mikakatano bazali kokutana na yango, na momeseno bazalaka na bolingi ya kondima toli, litambwisi mpe disipilini. Bayanganaka na makita na esengo, kozaláká na elikya ete kuna bakozwa ‘libɔndisi mpo na milimo na bango.’—Matai 11:29.
Komonisa ezaleli ya kokumisa basusu
9. Na lolenge nini Yehova amonisaka ete akumisaka oyo ezali malamu epai na biso?
9 Lolenge ya mibale ya kopelisa mɔ́tɔ ya bolingo mpo na bandeko ezali na nzela ya kokumisa bango. Mpo na kokumisa basusu, tosengeli kotya likebi mingi mpe kopesa motuya na bizaleli malamu mpe milende na bango. Soki tozali kosala bongo, tozali komekola Yehova. (Baefese 5:1) Mokolo na mokolo alimbisaka biso mabunga ya mikemike mingi. Kútu alimbisaka ata mabunga ya minene soki moto abongoli mpenza motema. Wana alimbisi masumu na biso, atingamaka lisusu na yango te. (Ezekiele 33:14-16) Mokomi na nzembo atunaki ete: “Ɛ [Yehova], soko yo okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Yehova atalelaka mingi makambo malamu oyo tozali kosala na mosala na ye.—Baebele 6:10.
10. (a) Mpo na nini ezali likámá epai na babalani soki babungisi ezaleli ya kokumisana? (b) Mobalani asengeli kosala nini soki abungisi ezaleli ya kondima mobalani na ye?
10 Ezali mpenza na ntina kolanda ndakisa yango kati na libota. Soki baboti bazali kokumisana, bakopesa ndakisa mpo na libota. Kati na eleko oyo, wana mabala mazali lisusu koumela te, ezali likambo ya pɛtɛɛ kosalela mobalani makambo na bopɔtu, mpe kolobela mingi mabunga na ye mpe kokitisa makambo malamu oyo azali kosala. Makanisi mabe wana mabebisaka libala, kokómisaka yango eloko ya bozito oyo ezangi esengo. Soki ezaleli ya kokumisa mobalani na yo ezali kokita, omituna ete, ‘mobalani na ngai azangi mpenza bizaleli ya malamu?’ Omikundola bantina mpo na yango olingaki ye mpe obalanaki na ye. Bantina wana nyonso oyo yo olingaki ye esili mpenza kolimwa? Soko moke te; na bongo salá milende ya kondima makambo malamu oyo mobalani na yo azali kosala, mpe monisá yango na maloba.—Masese 31:28.
11. Mpo ete bolingo ya babalani ezanga bokosi, makambo nini esengeli kopɛngola?
11 Ezaleli ya kokumisa basusu esalisaka mpe babalani ete bázala na bokosi te kati na bolingo na bango. (Kokanisá na 2 Bakolinti 6:6; 1 Petelo 1:22.) Bolingo motindo yango, oyo epelisami na maloba ya kokumisa oyo euti na motema, ekopesa nzela te na makambo mabe ya nkuku, na maloba ya kozokisa to ya kotyola, na kozanga kotyela mobalani likebi wana mikolo ezali koleka kozanga kolobana liloba ya boboto, mpe na ntembe te yango ekopesa nzela soko moke te na bitumba. (Baefese 5:28, 29) Mobali mpe mwasi oyo bakumisanaka bazalaka na limemya moko epai na mosusu. Basalaka bongo bobele soki bazali liboso ya bato te, kasi ntango nyonso oyo bazali komonana na miso ya Yehova—elingi koloba, ntango nyonso.—Masese 5:21.
12. Mpo na nini baboti basengeli kopesa longonya na misala malamu ya bana na bango?
12 Bana mpe bazalaka na mposa ete bákumisama. Yango elingi koloba te ete baboti basengeli kosopela bango ebele ya maloba ya kolɛngola, kasi basengeli nde kopesa bana na bango longonya na bizaleli na bango malamu mpe na makambo malamu oyo bazali kosala. Omikundola ndakisa ya Yehova na kondimáká Yesu. (Malako 1:11) Omikundola mpe ndakisa ya Yesu lokola “Nkolo” kati na lisese moko apesaki. Akumisaki ‘baombo malamu mpe ya sembo’ mibale na lolenge moko, atako bokeseni ezalaki kati na oyo mokomoko apesamelaki mpe na lolenge oyo mokomoko abotisaki. (Matai 25:20-23; kokanisá na Matai 13:23.) Bobele bongo baboti baklisto ya mayele bazwaka myango ya kopesa longonya na bizaleli ya mwana mokomoko, makoki na ye, mpe misala na ye. Nzokande, ekozala malamu te ete bálobela mingi makambo oyo bana na bango mosusu bakomiyoka ete baleki bandeko na bango. Bakolinga te ete bana na bango bákóla na nkanda to na komiyoka mawa.—Baefese 6:4; Bakolose 3:21.
13. Nani azali na esika ya liboso mpo na kokumisa mosangani mokomoko ya lisangá?
13 Kati na lisangá ya boklisto, bankulutu mpe bakɛngɛli-batamboli bazwaka esika ya liboso mpo na kokumisa mosangani mokomoko ya etonga ya Nzambe. Ɛtɛlɛmɛlo na bango ezali mpasi, lokola mpe bazalaka na mokumba monene ya kopesa disipilini na bosembo, kosembola baoyo babungi nzela na elimo ya bopɔlɔ, mpe kopesa toli malamu na baoyo basengeli kozwa yango. Lolenge nini basalaka na bokatikati mpo na kokokisa mikumba yango mikeseni?—Bagalatia 6:1; 2 Timoté 3:16.
14, 15. (a) Lolenge nini Paulo amonisaki bokatikati na likambo litali kopesa toli makasi? (b) Na lolenge nini bakɛngɛli baklisto bamonisaka bokatikati na ntina na kosembola mabunga mpe kopesa longonya? Pesá ndakisa.
14 Ndakisa ya Paulo ezali na lisalisi monene. Azalaki motei malamu, nkulutu mpe mobateli na mpate. Asengelaki kotalela masangá oyo mazalaki na mikakatano minene, mpe abangaki te kopesa toli makasi ntango yango esengelaki. (2 Bakolinti 7:8-11) Botaleli ya mosala ya kosakola ya Paulo ezali komonisa ete azalaki te mbala na mbala kopamela bayoki ntango azalaki koteya—nzokande bobele na ntango oyo yango esengelaki to ebongaki. Na yango, amonisaki mayele mauti na Nzambe.
15 Soki tokokanisi mosala ya nkulutu moko ya lisangá na loyembo moko, na yango, maloba ya kopamela mpe ya kosembola ekoki kozala lokola nɔti moko oyo ebongi na loyembo mobimba. Nɔti yango ezali malamu na esika na yango. (Luka 17:3; 2 Timoté 4:2) Kanisá naino loyembo oyo ezali bobele na nɔti moko, oyo ezali kozongelama mbala na mbala. Ekosala mpasi na matoi na biso. Na lolenge moko, bankulutu baklisto bamekaka kobongisa mateya na bango mpe kolobela makambo makeseni. Balobelaka bobele makambo matali kosilisa mikakatano te. Nzokande, lolenge na bango ya koteya ezali kotonga. Lokola Yesu Klisto, bankulutu ya bolingo balukaka liboso nde makambo ya malamu mpo na kokumisa, kasi balukaka mabunga te mpo na kopamela. Bamonisaka motuya na mosala makasi oyo baninga na bango baklisto bazali kosala. Bandimisami ete, na lolenge moko to mosusu, mokomoko azali kosala oyo ekoki na ye mpo na kosalela Yehova. Mpe bankulutu bazali pene na komonisa mayoki yango na maloba.—Kokanisá na 2 Batesaloniki 3:4.
16. Bopusi nini emonanaki na ezaleli ya kokumisa basusu mpe mawa oyo Paulo azalaki na yango mpo na baninga na ye baklisto?
16 Na ntembe te, baklisto mingi oyo epai na bango Paulo ateyaki bazalaki na mayoki ete andimaki bango mpe azalaki na mayoki ya mawa mpo na bango. Ndenge nini toyebi yango? Talelá mayoki bazalaki na yango mpo na Paulo. Bazalaki na bobangi mpo na ye te, atako azalaki na mokumba monene. Te, bazalaki kolinga ye mpe kobelema epai na ye. Na bongo, ntango atikaki teritware moko, bankulutu ‘bakwei na nkingo na Paulo kopwepwa ye’! (Misala 20:17, 37) Oyo nde botɔ́ndi, bankulutu—mpe biso nyonso—tosengeli kozala na yango mpo ete tozali na ndakisa ya Paulo mpo na komekola! Ɛɛ, tiká ete tómonisa ezaleli ya kokumisa basusu.
Misala ya boboto
17. Matomba nini malamu mautaka na misala ya boboto oyo mizali komonisama kati na lisangá?
17 Moko na biloko bileki ntina oyo ekoki kopelisa mɔ́tɔ ya bolingo mpo na bandeko ezali bongo misala ya boboto. Lokola Yesu alobaki yango, “esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Ezala tozali kopesa na elimo, na mosuni, to ntango na biso mpe nguya na biso, tozali kopesa bobele na basusu esengo te kasi biso mpe tozali kozwa yango. Kati na lisangá, boboto ya bamoko ezwaka mpe basusu. Mosala moko ya boboto ebotaka mpe misala ya boboto epai na basusu. Mosika te, ekomonana ete bolingo mpo na bandeko ekokóla!—Luka 6:38.
18. Ndimbola ya “boboto” oyo elobelami na Mika 6:8 ezali nini?
18 Yehova alendisaki libota na ye Yisalaele ete bámonisaka boboto. Na Mika 6:8, tozali kotánga boye: “Ɛ moto, asili koyebisa yo oyo ezali malamu! [Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.” “Kolinga boboto” elimboli nini? Liloba ya Liebele oyo esalelami awa mpo na “boboto” (cheʹsedh) esili mpe kobongolama na Lingala na “ngɔlu.” Engebene The Soncino Books of the Bible, liloba yango “lizali komonisa eloko moko makasi koleka liloba ya Lingala ngɔlu mpamba. Elimboli ‘ngɔlu oyo emonisami na misala,’ kokokisama ya misala ya boboto, bobele epai na mobola mpe moto na bosɛnga te, kasi epai na bato nyonso.” Na yango, nganga-mayele mosusu alobi ete cheʹsedh elimboli “bolingo oyo emonisami na misala.”
19. (a) Na mitindo nini tosengeli kobanda komonisa boboto epai na basusu kati na lisangá? (b) Pesá ndakisa moko ya bolingo ya bondeko oyo bamoniselaki yo.
19 Bolingo na biso mpo na bandeko ezali bobele ya maloba te. Ezali mpenza komonisama na misala. Na yango, luká mabaku ya komonisa makambo ya boboto mpo na bandeko na yo mibali mpe basi. Zalá lokola Yesu, oyo azalaki kozela te ete ntango nyonso bato báya epai na ye kosɛnga lisalisi kasi mbala mingi azalaki kobanda kobɛlɛma na bango. (Luka 7:12-16) Kanisá mingimingi baoyo bazali mpenza kati na bosɛnga. Mobangé moko to ebɔ́sɔ́nɔ́ moko azali na mposa ete bátala ye to mbala mosusu azali na mposa ete bákenda kosombela ye biloko? ‘Etike’ moko azali na mposa ete bápesa ye ntango to bátyela ye likebi? Moto moko oyo anyokwami na makanisi azali na mposa ete báyokamela ye to azali na mposa ya maloba ya kobɔndisa? Lokola tozali na likoki, tiká ete tópesa ntango na misala ya boboto motindo wana. (Yobo 29:12; 1 Batesaloniki 5:14; Yakobo 1:27) Kobosana soko moke te ete lokola tozali kati na lisangá oyo ezali bobele na bato ya kozanga kokoka, moko ya makambo ya boboto maleki ntina ezali bongo kolimbisana—kokanga nkanda te, ata soki ntina ya komilela ezali. (Bakolose 3:13) Kolimbisana esalaka ete lisangá ezala na bokabwani te, na kokangela basusu nkanda te, na koswana te, mpamba te makambo wana mazali lokola biloko oyo bibomaka mɔ́tɔ ya bolingo mpo na bandeko.
20. Na lolenge nini biso nyonso tosengeli kokóba komitalela?
20 Tiká ete biso nyonso tózala na ekateli ya kosala ete mɔ́tɔ ya bolingo ekóba kopela kati na mitema na biso. Tiká ete tókóba komitalela. Tomonisaka mayoki ya mawa mpo na basusu? Tokumisaka basusu? Tomonisaka misala ya boboto epai na basusu? Soki tozali kosala bongo, mɔ́tɔ ya bolingo ekopesa bondeko na biso molungé atako lelo na mokili bolingo ya bato mingi ekómi mpio mpe bayokelaka basusu mawa te. Na bongo, na lolenge moko to mosusu, “tiká ete bolingo mpo na bandeko boumela”—sikawa mpe libela na libela!—Baebele 13:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mabongoli mosusu mamonisaka ete ye oyo azali komama basaleli ya Nzambe azali komama liso ya Nzambe te, kasi liso ya Yisalaele to kútu oyo ya ye moko. Libunga yango liuti na bakomeli ya Moyen-Âge na milende na bango mabe oyo bazalaki kosala mpo na kosembola mikapo ya Makomami oyo batalelaki yango lokola ezangi limemya, na bongo babalolaki vɛrsɛ́ yango. Na boye, babebisaki mpenza bozindo ya mawa ya Yehova.
Okolimbola lolenge nini?
◻ Bolingo na bandeko ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kotika yango eumela?
◻ Lolenge nini mayoki ya mawa ezali kosalisa biso ete tótalela bolingo na bandeko?
◻ Ezaleli ya kokumisa basusu ezali na ntina nini kati na bolingo mpo na bandeko?
◻ Na lolenge nini misala ya boboto esalaka ete bolingo na bandeko ekóla kati na lisangá ya boklisto?
[Etanda na lokasa 16]
Bolingo ezali komonisama
Esili koleka mwa bambula, mobali moko oyo ayekolaki Biblia elongo na Batatoli ya Yehova na boumeli ya mwa ntango, azalaki naino na ntembe na ntina na bolingo ya bandeko. Ayebaki ete Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Kasi azalaki na mokakatano ya kondima yango. Mokolo moko azwaki libaku ya komona lolenge bolingo ya boklisto ezali komonisama.
Atako azalaki ntango nyonso na kiti ya kotambwisa, mobali yango azalaki kosala mibembo mosika na mboka na ye. Na Bethléem, na ekólo Israël, ayanganaki na likita ya lisangá. Kuna, Motatoli moko Moarabe alendendelaki ete Motatoli mosusu oyo azalaki turiste alekisa butu moko epai na ye, mpe moyekoli wana ya Biblia abyangamaki mpe mpo na kolekisa butu elongo na bango. Liboso ya kokende kolala, moyekoli yango atunaki ndingisa epai na Motatoli nkóló-ndako ete na ntɔ́ngɔ́ abima na mbalasáni (véranda) mpo na kotala monyɛlɛ (Ɛ́sti). Motatoli nkóló-ndako akebisi ye ete ameka soko moke te kosala bongo. Mokolo oyo elandaki, ndeko Moarabe alimbolaki ntina oyo apekisaki ye. Na lisalisi ya mobongoli, alobaki ete soki bato ya kartyé bayebi ete azali na bapaya oyo bazali bongo Bayuda—lokola moyekoli ya Biblia wana—bakotumba ndako na ye elongo na ye mpe libota na ye mobimba. Na kobulungana nyonso, moyekoli ya Biblia atunaki ete: “Na bongo, mpo na nini ozali komitya na likámá ya ndenge boye?” Kozanga mobongoli, ndeko Moarabe atalaki ye mpe alobi bobele ete, “Yoane 13:35.”
Moyekoli ya Biblia akamwaki mingi na bosolo ya bolingo ya bandeko. Azwaki batisimo mwa ntango moke na nsima.
[Elilingi na lokasa 18]
Ezaleli malamu mpe bomoto ya kokumisa basusu oyo ntoma Paulo azalaki na yango esalaki ete basusu bábɛlɛma na ye