Mapamboli minene koleka na nzela ya kondimana ya sika
“Yesu . . . azali mpe moyokanisi ya kondimana eleki malamu.”—BAEBELE 8:6, NW.
1. Nani amonanaki ete azali ‘mombóto ya mwasi’ oyo alakamaki na Edene, mpe lolenge nini ‘basasaki ye na litindi’?
NSIMA wana Adama na Eva basalaki lisumu, Yehova akatelaki Satana etumbu, ye oyo azimbisaki Eva, kolobáká ete: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Ntango Yesu abatisamaki na Ebale Yaladene na mobu 29 T.B., Mombóto oyo alakamaki na Edene amonanaki. Ntango akufaki na nzeté ya mpasi na mobu 33 T.B., ndambo ya esakweli wana ya kala ekokisamaki. Satana ‘asasaki litindi’ ya Mombóto.
2. Engebene maloba ya Yesu ye moko, lolenge nini liwa na ye ememeli bato matomba?
2 Kasi likambo ya kosepelisa, atako mpota yango ezalaki monene mpe na mpasi, eumelaki libela te. Yesu asekwisamaki kati na bakufi lokola elimo oyo ekoki kokufa te mpe abutaki epai ya Tata na ye na likoló, epai kuna apesaki motuya ya makila na ye masopamaki lokola “lisiko mpo na mingi.” Na bongo, maloba na ye moko makokisamaki ete: “Ekoki na Mwana na moto konɛtwa, ete moto na moto oyo akondimaka ye azala na bomoi na seko. Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Matai 20:28; Yoane 3:14-16; Baebele 9:12-14) Kondimana ya sika ezali na ntina mingi kati na kokokisama ya esakweli ya Yesu.
Kondimana ya sika
3. Ntango nini kondimana ya sika ebandaki kosala mosala na yango?
3 Mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete makila na ye oyo masengelaki kosopama mazalaki ‘makila ya kondimana [ya sika].’ (Matai 26:28; Luka 22:20) Mikolo zomi nsima ya komata na ye na likoló, emonanaki ete kondimana ya sika ebandaki kosala wana elimo santu esopamaki likoló na bayekoli 120 oyo bayanganaki na eteni ya likoló na ndako moko na Yelusaleme. (Misala 1:15; 2:1-4) Kokɔtisama ya bayekoli 120 yango kati na kondimana ya sika emonisaki ete kondimana “ya kala,” elingi koloba kondimana ya Mibeko, ezalaki lisusu na ntina te.—Baebele 8:13.
4. Kondimana ya kala ezalaki na libunga? Limbolá.
4 Tokoloba nde ete kondimana ya kala ezalaki na libunga? Soko moke te. Ya solo, lokola kondimana mosusu ekitanaki yango, Yisalaele ya mosuni ezalaki lisusu libota liponami ya Nzambe te. (Matai 23:38) Kasi, yango esalemaki bongo mpo ete Yisalaele ezangaki botosi mpe eboyaki Mopakolami ya Yehova. (Exode 19:5; Misala 2:22, 23) Nzokande, liboso ete Mibeko elongolama, ekokisaki makambo mingi. Na boumeli ya bikeke mingi, yango ezalaki nzela mpo na kobɛlɛma na Nzambe mpe ezalaki libateli mpo na kokwea na losambo ya lokuta te. Ezalaki na makambo oyo ezalaki bililingi ya kondimana ya sika mpe, na nzela ya bambeka na yango oyo ezalaki kopesama mbala na mbala, emonisaki ete moto azali na mposa makasi ya kosikolama na lisumu mpe na liwa. Ɛɛ, Mibeko ezalaki “Molakisi na biso kino ekoya Klisto.” (Bagalatia 3:19, 24; Baloma 3:20; 4:15; 5:12; Baebele 10:1, 2) Nzokande, ezali na lisalisi ya kondimana ya sika nde lipamboli oyo elakamaki na Abalayama esengelaki kokokisama na mobimba na yango.
Mabota mapambolami na nzela ya Mombóto ya Abalayama
5, 6. Na kokokisama ya nsuka—kokokisama ya elimo—ya kondimana ya Abalayama nani azali Mombóto ya Abalayama, mpe libota nini ya liboso ezwaki lipamboli na nzela na ye?
5 Yehova alakaki Abalayama ete: “Mabota nyonso na nsé bakopambolama mpo na [mombóto, NW] na yo.” (Genese 22:18) Na nsé ya kondimana ya kala, bapaya mingi oyo bazalaki na komikitisa bazwaki mapamboli na kosanganáká na Yisalaele, mombóto ya Abalayama oyo ebongisamaki lokola ekólo. Nzokande, na kokokisama na yango mpenza ya elimo, Mombóto ya Abalayama azalaki moto ya kokoka. Paulo alimbolaki yango ntango alobaki ete: “Bilaka bisalami epai na Abalayama mpe na [mombóto, NW] na ye. Elobi te ete, Mpe na [mbóto, NW] na ye, bango mingi, kasi epai na moto moko ete, Mpe epai na [mombóto] na yo. Ye wana Klisto.”—Bagalatia 3:16.
6 Ɛɛ, Yesu azali Mombóto ya Abalayama, mpe na nzela na Ye mabota mazwi lipamboli monene koleka nyonso oyo Yisalaele ya mosuni ekokaki kozwa. Ya solo, libota ya liboso oyo ezwaki lipamboli yango ezalaki bongo Yisalaele yango moko. Mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33, ntoma Petelo alobaki liboso ya etuluku moko ya Bayuda ete: “Bino bozali bana na basakoli mpe na kondimana ekataki Nzambe na bankɔkɔ na bino, wana elobi ye na Abalayama ete, Na kati na [mombóto, NW] na yo mabota nyonso na nsé makopambolama. Esili Nzambe kosekwisa Mosaleli na ye, atindi ye na bino liboso, kopambola bino na kobongola bino moto na mabe na ye moto na mabe na ye.”—Misala 3:25, 26.
7. Mabota nini mapambwamaki na nzela ya Yesu, Mombóto ya Abalayama?
7 Mosika te lipamboli yango epesamelaki Basamalia mpe na nsima bapakano. (Misala 8:14-17; 10:34-48) Na eleko moko kati na mobu 50 kino mobu 52 T.B., Paulo akomelaki baklisto ya Galatia na Asie Mineure ete: “Awa eyebaki Makomi liboso ete Nzambe akokómisa bapakano bayengebene na nzela na kondima, masakolaki Nsango Malamu liboso epai na Abalayama ete, Kati na ye mabota nyonso makopambwama. Bongo bato na kondima bazali kopambwama esika moko na Abalayama oyo azalaki mondimi.” (Bagalatia 3:8, 9; Genese 12:3) Atako baklisto mingi ya Galatia bazalaki “bato ya mabota,” bapambwamaki na nzela ya Yesu mpo na kondima na bango. Na lolenge nini?
8. Mpo na baklisto na mikolo ya Paulo, kopambolama na nzela ya Mombóto ya Abalayama esangisaki makambo nini, mpe na nsuka bato boni bazwaki lipamboli yango?
8 Paulo ayebisaki baklisto ya Galatia, ata soki bautaki na ekólo nini to na libota nini ete: “Soko bozali bato na Klisto, bozali libota na Abalayama, bozali basangoli na libula na elaka.” (Bagalatia 3:29) Mpo na Bagalatia wana, lipamboli na nzela ya Mombóto ya Abalayama esangisaki kozala basangani ya kondimana ya sika mpe lisusu kozala basangoli ya libula elongo na Yesu, basangani elongo na Yesu kati na mombóto ya Abalayama. Toyebi te soki Yisalaele ya kala ezalaki na bato boni. Toyebi bobele ete yango ezalaki na bato “mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana.” (1 Mikonzi 4:20) Nzokande, toyebi motuya ya baoyo basangani elongo na Yesu kati na mombóto ya elimo—bazali bato 144 000. (Emoniseli 7:4; 14:1) Bato yango 144 000 bauti na “mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bibolo nyonso, na mabota nyonso” mpe bazali kosangana na kokabola mapamboli ya kondimana ya Abalayama epai ya bato mosusu.—Emoniseli 5:9.
Esakweli ekokisami
9. Lolenge nini baoyo bazali kati na kondimana ya sika bazali na mobeko ya Yehova kati na mitema na bango?
9 Ntango asakolaki kosalema ya kondimana ya sika, Yilimia akomaki ete: “Oyo ekozala kondimana ekokata ngai na ndako na Yisalaele nsima na mikolo yango; [Yehova] alobi bongo. Nakotya Mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango.” (Yilimia 31:33) Baoyo bazali kati na kondimana ya sika bazali kosalela Yehova na bolingo. (Yoane 13:35; Baebele 1:9) Mobeko ya Yehova ekomami na mitema na bango, mpe bazali na mposa makasi ya kosala mokano na ye. Ya solo, na Yisalaele ya kala bato mosusu ya sembo balingaki mobeko ya Yehova mingi. (Nzembo 119:97) Mingi balingaki yango te. Kasi bazalaki ntango nyonso basangani ya libota yango. Moto moko te akoki kotikala kati na kondimana ya sika soki mobeko ya Nzambe ekomami na motema na ye te.
10, 11. Mpo na baoyo bazali kati na kondimana ya sika, na lolenge nini Yehova ‘akozala Nzambe na bango,’ mpe lolenge nini bango nyonso bakoyeba ye?
10 Lisusu, Yehova alobaki na ntina na baoyo bakozala kati na kondimana ya sika ete: “Nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai.” (Yilimia 31:33) Na Yisalaele ya kala, bato mingi basambelaki banzambe ya mabota, kasi bazalaki sé Bayisalaele. Na moboko ya kondimana ya sika, Yehova asalaki libota ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” mpo na kokitana Yisalaele ya mosuni. (Bagalatia 6:16; Matai 21:43; Baloma 9:6-8) Nzokande, moto moko akoki kozala lisusu mosangani ya libota ya sika ya elimo te soki atiki kosambela bobele Yehova.
11 Yehova alobaki lisusu ete: “Nyonso bakoyeba ngai, longwa na oyo na nsima kino oyo na liboso na bango.” (Yilimia 31:34) Na Yisalaele, bato mingi babosanaki Yehova, kolobáká mpenza ete: “[Yehova] akosala malamu te mpe akosala mabe te.” (Sefania 1:12) Moto moko te akozala lisusu mosangani ya Yisalaele ya Nzambe soki abosani Yehova to soki abebisi losambo na ye ya pɛto. (Matai 6:24; Bakolose 3:5) Bayisalaele ya elimo bazali “bato oyo bayebi Nzambe na bango.” (Danyele 11:32) Bazali kosepela ‘koyekola koyeba Nzambe ya solo bobele moko mpe Yesu Klisto.’ (Yoane 17:3, NW) Koyeba Yesu ezali kokólisa boyebi na bango ya Nzambe mpamba te, Yesu “asili kolimbola [Nzambe]” na lolenge ekokani na mosusu te.—Yoane 1:18; 14:9-11.
12, 13. (a) Na moboko nini Yehova azali kolimbisa masumu ya baoyo bazali kati na kondimana ya sika? (b) Na oyo etali kolimbisama ya masumu, lolenge nini kondimana ya sika eleki kondimana ya kala?
12 Na nsuka, Yehova alakaki ete: “Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te.” (Yilimia 31:34b) Mibeko ya Mose mitondaki na bankámá ya malako makomami oyo Bayisalaele babyangamaki na kotosa yango. (Deteronome 28:1, 2, 15) Baoyo nyonso babukaki Mibeko bazalaki kopesa mbeka mpo na kozipa masumu na bango. (Levitike 4:1-7; 16:1-31) Bayuda mingi bakómaki kondima ete bakoki kokóma sembo na misala na bango oyo mizali na boyokani na Mibeko. Nzokande, baklisto bazali kososola ete bakoki soko moke te kokóma na boyengebene na nzela ya misala na bango moko. Bakoki kopɛngola kosala masumu te. (Baloma 5:12) Na nsé ya kondimana ya sika, etɛlɛmɛlo ya sembo liboso ya Nzambe ekoki kozwama bobele na moboko ya mbeka ya Yesu. Nzokande, etɛlɛmɛlo yango ezali likabo, ngɔlu ya Nzambe. (Baloma 3:20, 23, 24) Kasi Yehova azali kosɛnga botosi epai ya basaleli na ye. Paulo alobi ete baoyo bazali kati na kondimana ya sika bazali na nsé na “mibeko na Klisto.”—1 Bakolinti 9:21.
13 Na yango, mpo na baklisto mpe mbeka mpo na masumu ezali, kasi yango ezali na motuya mingi koleka bambeka oyo ezalaki kopesama na nsé ya kondimana ya Mibeko. Paulo akomaki ete: “Nganga na nganga [na nsé ya kondimana ya kala] azali kotɛlɛma kosambela mokolo na mokolo kotombola mbeka yango mbala mingi, oyo ikoki kolongola masumu te. Kasi Klisto atombolaki mbeka moko mpo na masumu libela mpe afandaki na lobɔkɔ na mobali na Nzambe.” (Baebele 10:11, 12) Lokola kati na kondimana ya sika baklisto bazali komonisa kondima na mbeka ya Yesu, Yehova azali kotánga bango bato ya sembo, bazangi lisumu, mpe na bongo bazali na etɛlɛmɛlo ebongi mpo na kopakolama lokola bana ya Nzambe na elimo. (Baloma 5:1; 8:33, 34; Baebele 10:14-18) Soki basali lisumu na ntina na kozanga kokoka, bakoki kosɛnga Yehova bolimbisi, mpe na moboko ya mbeka ya Yesu, Yehova akolimbisa bango. (1 Yoane 2:1, 2) Nzokande, soki baponi kosala masumu na nkó, bakobungisa etɛlɛmɛlo na bango mpe libaku malamu oyo bazali na yango ya kozala basangani kati na kondimana ya sika.—Baebele 2:2, 3; 6:4-8; 10:26-31.
Kondimana ya kala mpe kondimana ya sika
14. Kokatama ngenga nini ezalaki kosɛngama na nsé ya kondimana ya Mibeko? na nsé ya kondimana ya sika?
14 Kati na kondimana ya kala, mibali bazalaki kokatama ngenga lokola elembo mpo na komonisa ete bazali na nsé ya Mibeko. (Levitike 12:2, 3; Bagalatia 5:3) Ntango lisangá ya boklisto ebandaki, bamoko bakanisaki ete baklisto oyo bazalaki Bayuda te basengelaki mpe kokatama ngenga. Kasi bantoma mpe mikóló na Yelusaleme, na litambwisi ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu, basosolaki ete yango ezali na ntina te. (Misala 15:1, 5, 28, 29) Mwa bambula na nsima, Paulo alobaki ete: “Moyuda na solo azali Moyuda bobele na makambo na libándá te. Kokatama ngenga ezali bobele oyo emonani na nzoto te. Kasi ye oyo azali Moyuda na solo abongi na epai na katikati; kokatama ngenga na solo ezali na motema, ezali na [elimo, NW], ekomami na mokanda te.” (Baloma 2:28, 29) Kokatama ngenga ya nzoto, ata mpo na Bayuda na mosuni, ezalaki lisusu na motuya ya elimo te na miso ya Yehova. Mpo na baoyo bazali kati na kondimana ya sika, motema na bango nde esengeli kokatama ngenga, kasi nzoto te. Basengeli kokata nyonso oyo, kati na makanisi na bango, bamposa na bango, mpe matindiki na bango, ezali kosepelisa te to ezali mbindo na miso ya Yehova.a Lelo oyo, bato mingi bazali bilembeteli monene oyo bizali komonisa nguya ya elimo santu mpo na kobongola makanisi na lolenge yango.—1 Bakolinti 6:9-11; Bagalatia 5:22-24; Baefese 4:22-24.
15. Na oyo etali boyangeli ya bakonzi, bokokanisi nini tokoki kosala kati na Yisalaele ya mosuni mpe Yisalaele ya Nzambe?
15 Kati na ebongiseli ya kondimana ya Mibeko, Yehova azalaki Mokonzi ya Yisalaele, mpe na nsima bokonzi na ye emonisamaki na bakonzi oyo bazalaki koyangela na Yelusaleme. (Yisaya 33:22) Yehova azali mpe Mokonzi ya Yisalaele ya Nzambe, Yisalaele ya elimo, mpe kobanda mobu 33 T.B., azali koyangela na nzela ya Yesu Klisto, oyo apesamelaki “bokonzi nyonso . . . na likoló mpe na nsé.” (Matai 28:18; Baefese 1:19-23; Bakolose 1:13, 14) Lelo oyo, Yisalaele ya Nzambe ezali kondima Yesu lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe oyo etyamaki na likoló na 1914. Yesu azali Mokonzi malamu mingi koleka Yizikiya, Yosiya, mpe bakonzi mosusu ya sembo oyo bazalaki na Yisalaele ya kala.—Baebele 1:8, 9; Emoniseli 11:15.
16. Yisalaele ya Nzambe ezali bonganga ya motindo nini?
16 Yisalaele ezalaki bobele bokonzi te kasi lisusu ezalaki na bonganga oyo epakolamaki na Nzambe. Na mobu 33 T.B., Yisalaele ya Nzambe ekitanaki Yisalaele ya mosuni mpe ekómaki “mosaleli” ya Yehova, ‘motatoli’ na ye. (Yisaya 43:10, NW) Mpo na yango, maloba ya Yehova epai na Yisalaele oyo makomami kati na Yisaya 43:21 mpe Exode 19:5, 6 mataleli Yisalaele ya Nzambe na elimo. Libota ya sika ya Nzambe na elimo ekómaki sikawa “libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami,” oyo bazali na mokumba ya ‘koyebisa malamu na Yehova.’ (1 Petelo 2:9) Basangani nyonso ya Yisalaele ya Nzambe, mibali mpe basi, bazali kelasi ya bonganga. (Bagalatia 3:28, 29) Lokola eteni ya mibale ya mombóto ya Abalayama, bazali sikawa koloba: “Bósepela, bino mabota, elongo na bato na ye.” (Deteronome 32:43, NW) Basangani ya Yisalaele ya elimo oyo bazali naino na mabelé bazali kelasi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Bobele na kosanganáká na bango nde moto akoki kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ oyo ye akondima.
Bokonzi ya Nzambe —Kokokisama ya nsuka
17. Baoyo bazali kati na kondimana ya sika bazali kozwa mbotama nini?
17 Bayisalaele oyo babotamaki nsima ya mobu 1513 L.T.B. bakɔtaki na kondimana ya Mibeko uta kobotama na bango. Baoyo Yehova andimi bango kati na kondimana ya sika bazali mpe kobotama—kobotama na bango ezali ya elimo. Yesu amonisaki likambo yango epai na mofalisai moko na nkombo Nikodeme ntango alobaki ete: “Solo solo nazali koloba na yo ete, soko moto akobotama lisusu te akokoka komona Bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Bayekoli 120 oyo bazalaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B bazalaki bato ya liboso ya kozanga kokoka oyo bazwaki mbotama yango ya sika. Lokola batángamaki sembo na nsé ya kondimana ya sika, bazwaki elimo santu lokola “ndanga epesami liboso” mpo na libula na bango ya Bokonzi. (Baefese 1:14, NW) ‘Babotamaki na elimo’ mpo na kokóma bana bandimami na Nzambe, yango ekómisi bango bandeko ya Yesu mpe na bongo “basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo.” (Yoane 3:6; Baloma 8:16, 17) Likambo oyo ete ‘babotami lisusu’ efungoli nzela na bilikya kitoko.
18. Mpo na baoyo bazali kati na kondimana ya sika, kobotama lisusu ezali kopesa nzela na bilikya kitoko nini?
18 Wana azalaki koyokanisa kondimana ya sika, Yesu asalaki kondimana mosusu elongo na bayekoli na ye, kolobáká ete: “Nasali na bino kondimana, lokola Tata asili kosala na ngai kondimana, mpo na bokonzi.” (Luka 22:29, NW) Kondimana wana ya Bokonzi ebongisi nzela mpo na kokokisama ya esakweli monene, oyo elobelami na Danyele 7:13, 14, 22, 27. Danyele amonaki “Oyo na kalakala,” elingi koloba Yehova Nzambe azali kopesa bokonzi epai na oyo azali “lokola mwana na moto.” Na nsima Danyele amonaki “bato na bulɛɛ kozwa bokonzi.” Yesu nde azali “lokola mwana na moto” oyo azwaki Bokonzi ya likoló na mabɔkɔ ya Yehova Nzambe na 1914. Bayekoli na ye bapakolami na elimo bazali “bato na bulɛɛ” oyo bakozala na ye elongo kati na Bokonzi wana. (1 Batesaloniki 2:12) Lolenge nini?
19, 20. (a) Mpo na baoyo bazali kati na kondimana ya sika, elaka ya Yehova epai na Abalayama ekozwa kokokisama nini ya nsuka mpe ya nkembo? (b) Motuna nini mosusu mosengeli kotalelama?
19 Nsima ya liwa na bango, bapakolami yango bazali kosekwisama kati na bakufi lokola bikelamu ya elimo oyo bakoki kokufa te lolenge moko na Yesu mpo na kosala na ye elongo lokola bakonzi mpe banganga na likoló. (1 Bakolinti 15:50-53; Emoniseli 20:4, 6) Oyo nde elikya ya nkembo! “Bakozala bakonzi na mabelé,” kasi bobele na mokili ya Kanana te. (Emoniseli 5:10, NW) ‘Bakobɔtɔla nde bikuke ya bayini na bango?’ (Genese 22:17) Ɛɛ, mpe na lolenge ya nsɔ́mɔ, ntango bakomona kobomama ya Babilone Monene, mwasi ya pite na elimo mpe ntango bapakolami yango basekwisami bakosangana na Yesu mpo na kotambwisa mabota “na fimbo ya ebende” mpe mpo na konyata motó ya Satana. Na bongo bakosangana na kokokisama ya makambo ya nsuka ya esakweli ya Genese 3:15.—Emoniseli 2:26, 27; 17:14; 18:20, 21; Baloma 16:20.
20 Kasi tokoki komituna ete, kondimana ya Abalayama mpe kondimana ya sika etali bobele milimo yango ya sembo 144 000? Te, bato mosusu oyo bazali mpenza kati na kondimana wana mibale te bakopambolama na nzela na yango, lokola tokomona yango na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Insight on the Scriptures, volimi 1, lokasa 470, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Ntango nini kondimana ya sika ebandaki kosala mosala na yango?
◻ Makambo nini makokisamaki na nzela ya kondimana ya kala?
◻ Nani azali libosoliboso Mombóto ya Abalayama, mpe na kolandana nini mabota mapambolamaki na nzela ya Mombóto?
◻ Mpo na ba 144 000, kokokisama ya nsuka ya kondimana ya Abalayama mpe ya kondimana ya sika ezali nini?
[Elilingi na lokasa 15]
Kolimbisama ya masumu ezali na nguya makasi mpo na baoyo bazali kati na kondimana ya sika koleka baoyo bazalaki na kondimana ya kala