Kondima ya Baklisto ekomekama
“Bato nyonso bazali na kondima te.”—2 BATESALONIKI 3:2.
1. Ndenge nini lisolo ya kala emonisi ete bato nyonso bazali na kondima ya solosolo te?
KATI na lisolo ya bato, ezalaka ntango nyonso na mibali, basi, mpe bana oyo bamonisaka kondima ya solosolo. Ebéngeli oyo: “ya solosolo” ebongi mpenza mpamba te, ezali na bamilio ya bato mosusu oyo bamonisaki lolenge ya kondima oyo ezali lokola bindimandima, kondima makambo nokinoki kozanga moboko ya solo to ntina ya malamu. Mbala mingi kondima motindo wana emonisamaki na banzambe ya lokuta to na losambo oyo eyokani te na losambo ya Yehova, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpe Liloba na ye. Yango wana, ntoma Paulo akomaki ete: “Bato nyonso bazali na kondima te.”—2 Batesaloniki 3:2.
2. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tótalela kondima na biso?
2 Kasi, maloba ya Paulo mamonisi mpe ete na ntango wana bato mosusu bazalaki na kondima ya solosolo, bobele bongo, lelo oyo mpe bato motindo yango bazali. Batángi mingi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bazali na mposa ya kozala na kondima ya solosolo motindo wana mpe kokolisa yango—kondima oyo etongami likoló na boyebi ya sikisiki ya solo ya Nzambe. (Yoane 18:37; Baebele 11:6) Ezali bongo mpo na yo? Boye, ezali na ntina mingi oyeba mpe omibongisa na likambo oyo ete kondima na yo ekomekama. Mpo na nini tokoki koloba bongo?
3, 4. Na oyo etali komekama ya kondima, mpo na nini tosengeli kotalela Yesu?
3 Tosengeli kondima ete Yesu Klisto azali na esika monene kati na kondima na biso. Kutu, Biblia elobi ete azali Mokokisi ya kondima na biso. Ezali bongo na ntina na makambo oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki, mingi mpenza na lolenge akokisaki bisakweli. Akembisaki moboko likoló na yango bato bakoki kotonga kondima ya solosolo. (Baebele 12:2; Emoniseli 1:1, 2) Kasi, tozali kotánga ete Yesu ‘amekamaki na makambo nyonso pelamoko biso, bobele ete akwei na masumu te.’ (Baebele 4:15) Ɛɛ, kondima ya Yesu emekamaki. Na esika ete likambo yango elɛmbisa biso to ebangisa biso, esengeli nde kobɔndisa biso.
4 Na komekamáká makasi kino liwa likoló ya nzete, Yesu ‘ayekolaki kotosa.’ (Baebele 5:8) Amonisaki ete bato bakoki kozala na kondima ya solosolo ata liboso ya komekama ya lolenge nini oyo bakoki kokutana na yango. Yango ezali kozwa ndimbola moko ya sikisiki na ntango tozali kokanisa makambo oyo Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bókanisa liloba lilobi ngai na bino ete, Moombo aleki nkolo na ye te.” (Yoane 15:20) Kutu, na ntina na bayekoli na ye na ntango na biso, Yesu asakolaki ete: “Mabota nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.”—Matai 24:9.
5. Lolenge nini Makomami mamonisi ete tokokutana na komekama?
5 Na ebandeli ya ekeke oyo, kosambisama ebandaki na ndako ya Nzambe. Makomami masakolaki ete: “Zambi elaka ekoki ete kosambisa ebanda na Ndako na Nzambe. Soko nde ebandi awa na biso, nsuka na bango baboyi Nsango Malamu na Nzambe ekozala nini? Soko moyengebeni akobika bobele na mpasi, motyoli na Nzambe mpe moto na masumu akomonana wapi?”—1 Petelo 4:17, 18.
Kondima emekami—Mpo na nini?
6. Mpo na nini kondima oyo emekami ezali na motuya mingi?
6 Na lolenge moko, kondima oyo emekami te motuya na yango emonisami te, mpe lolenge na yango eyebani te. Okoki kokokanisa yango na chèque oyo osimbi na mabɔkɔ kasi ozwi naino mbongo oyo ekomami kati na yango te. Bakoki kopesa yo chèque mpo na mosala moko osalaki, to biloko oyo otekaki, to mpe bakoki kopesa yo yango lokola likabo. Chèque ekoki komonana ete ezali na motuya, kasi ezali mpenza bongo? Ekokani mpenza na motuya ya mosolo oyo ekomami kati na yango? Bobele bongo, kondima na biso esengeli kozala ya libándá te to ya maloba mpamba te. Esengeli komekama mpo na koyeba soki ezali makasi mpe na motuya ya solo. Ntango kondima na biso emekami, tokoki koyeba ete ezali makasi mpe ezali na motuya. Komekama ekoki mpe komonisa biso bisika oyo tosengeli kobongisa to kolendisa kondima na biso.
7, 8. Komekama ya kondima na biso eutaka wapi?
7 Nzambe azali kotika nzela ete minyoko mpe komekama mosusu ya kondima ekómela biso. Tozali kotánga boye: “Tiká te ete moto oyo amekami aloba ete, Nazali komekama na Nzambe. Mpo ete Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te.” (Yakobo 1:13) Nani azali to nini ezali eutelo ya komekama motindo wana? Ezali bongo Satana, mokili, mpe nzoto na biso moko oyo ezangi kokoka.
8 Tokoki kondima ete Satana azali na bopusi makasi likoló na mokili, likoló na makanisi na yango mpe etamboli na yango. (1 Yoane 5:19) Mpe, na ntembe te toyebi ete abimiselaka baklisto minyoko. (Emoniseli 12:17) Kasi, tondimisami mpe ete Satana amekaka kozimbisa biso na kosɛnginyáká nzoto na biso oyo ezangi kokoka, kolakisáká biso biloko ya mokili oyo bikoki kobenda biso, na likanisi ete tokolɛngolama na yango, tokozanga botosi epai na Nzambe, mpe na nsuka, Yehova akoboya biso? Ya solo, myango ya Satana misengeli kokamwisa biso te, mpamba te asalelaki bobele myango yango ntango alukaki kokweisa Yesu.—Matai 4:1-11.
9. Ndenge nini tokoki kozwa litomba na bandakisa ya kondima?
9 Na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá ya boklisto, Yehova azali kopesa biso bandakisa malamu ya bato ya kondima oyo tokoki komekola. Paulo apesaki toli ete: “Bandeko, bókóma na bomoko bamekoli na ngai mpe bótalaka baoyo bazali kotambola engebene ndakisa oyo bozwi epai na biso.” (Bafilipi 3:17, NW) Lokola azalaki mosaleli ya Nzambe oyo apakolamaki na elimo na ekeke ya liboso, Paulo apesaki ndakisa ya kosala misala malamu ya kondima atako akutanaki na komekama mingi mpe ya makasi. Kino na nsuka ya ekeke ya 20 oyo tokómi, tozali na bandakisa mingi ya bato ya kondima ya motindo wana. Maloba ya Baebele 13:7 mazali sikawa kokokisama na nguya se lokola na ntango oyo Paulo akomaki yango: “Bókanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo basololi Liloba na Nzambe epai na bino. Bóbanzabanza mpo na nsuka na bizaleli na bango mpe bóyekolaka kondima na bango.”
10. Bandakisa nini ya kondima ya solosolo tozali na yango na ntango na biso?
10 Toli wana ezali na nguya mingi lisusu koleka na ntango tozali kotalela nsuka ya etamboli ya batikali bapakolami. Tokoki kotalela ndakisa na bango mpe komekola kondima na bango. Kondima na bango ezali kondima ya solosolo mpe esili kopɛtolama na nzela ya komekama mingi. Atako ezalaki moke na ebandeli, elingi koloba na bambula ya 1870, bondeko ya baklisto na mokili mobimba esili kokola. Lelo oyo Batatoli ya Yehova koleka milio mitano na ndambo bazali kosakola mpe koteya bato Bokonzi ya Nzambe, bazali mbuma ya kondima mpe kolendendela oyo bapakolami bamonisaki uta ntango wana. Lisangá ya basambeli ya solo mpe ya molende kati na mokili mobimba ezali elembeteli ya kondima oyo emekami.—Tito 2:14.
Kondima emekami na ntina na 1914
11. Na nini 1914 ezalaki mbula ya ntina mingi mpo na Charles Russell mpe baninga na ye?
11 Bambula mingi liboso ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda, batikali bapakolami bazalaki koteya ete 1914 ekozala mbula oyo makambo minene makosalema na ntina na bisakweli ya Biblia. Nzokande, bilikya na bango mosusu ekendaki mbangu mingi, mpe bazalaki na mwa libunga na lolenge batalelaki makambo oyo masengelaki kosalema. Na ndakisa, Charles Russell, prezida ya liboso ya Société Watch Tower, mpe baninga na ye bayebaki ete mosala monene ya kosakola esengelaki kosalema. Batángaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Kasi, lolenge nini bakokaki kosala yango lokola bazalaki bobele mwa etuluku moke?
12. Lolenge nini moko na baninga ya Russell andimaki solo ya Biblia?
12 Talá bopusi oyo likambo yango esalaki epai ya Alexander Macmillan, moninga moko ya Russell. Macmillan abotamá na Canada mpe akokisaki naino mbula 20 te ntango azwaki buku Le plan des âges oyo ekomamaki na Russell na mobu 1886. (Buku yango, oyo ebéngami mpe Le divin plan des âges, ekómaki volimi 1 ya molɔngɔ ya babuku Études des Écritures oyo ekabolamaki mingi mpenza. Volimi 2, Le temps est proche [1889], emonisaki ete 1914 ekozala “nsuka ya ntango ya mabota.” [Luka 21:24]) Na butu oyo Macmillan abandaki kotánga buku yango, alobaki ete: “Namoni ete oyo ekoki kozala solo!” Na eleko ya molunge ya 1900, akutanaki na Russell na liyangani ya Bayekoli ya Biblia, lolenge Batatoli ya Yehova bazalaki kobéngama na ntango wana. Mwa moke na nsima, Macmillan azwaki batisimo mpe abandaki kosala na Ndeko Russell na biro monene ya la Société na New York.
13. Mokakatano nini Macmillan mpe bamosusu bamonaki na ntina na kokokisama ya Matai 24:14?
13 Longwa na makambo oyo batángaki kati na Biblia, baklisto yango bapakolami bamonaki ete 1914 esengelaki kozala mbula oyo mbongwana monene ekosalema kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Kasi Macmillan mpe bamosusu bazalaki komituna ndenge nini kosakola na mabota oyo eyebisami na Matai 24:14 esengelaki kokokisama na boumeli ya mwa ntango moke oyo etikalaki. Na nsima alobaki ete: “Nazali komikundola ete tozalaki kosolola likambo yango mbala mingi na Ndeko Russell, mpe azalaki koloba ete, ‘Ndeko, awa na engumba New York tozali na Bayuda mingi koleka oyo bazali na Jérusalem. Tozali na bato ya ekólo Irlande mingi koleka oyo bazali na engumba Dublin. Mpe tozali na bato ya ekólo Italie mingi koleka baoyo bazali na engumba Rome. Boye, soki toteyi bango awa, yango ekozala se lokola ete tosakoli nsango epai ya bato ya mokili mobimba.’ Kasi emonanaki ete tozalaki na mwa mokakatano na makanisi na biso. Na nsima likanisi ya kosala ‘Fɔtɔ-Drame’ ebimaki.”
14. Mwango monene nini ebandaki liboso ya 1914?
14 Kosala “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi” ezalaki solo likanisi malamu! Yango esangisaki bililingi oyo bizali kotambola mpe bililingi oyo bizali kotambola te (diapozitive) oyo bizalaki na langi ndenge na ndenge. Ezalaki kolakisama na ntango fono ezalaki kobɛta diskɛ oyo ezalaki na masolo ya Biblia mpe miziki. Na 1913, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki na ntina na liyangani moko esalemaki na etúká ya Arkansas, na États-Unis ete: “Bato nyonso bandimaki ete ntango ekokaki mpo na kosalela bililingi oyo bizali kotambola mpo na koteya solo ya Biblia. . . . [Russell] alimbolaki ete abandaki kobongisa mwango yango uta mbula misato mpe na ntango wana asilaki kobongisa bankama ya bililingi kitoko, oyo na ntembe te, elingaki kobenda ebele ya bato mpe kosakola Evanzile, mpe kosalisa bato mingi ete bámonisa lisusu kondima epai na Nzambe.”
15. “Fɔtɔ-Drame” ebimisaki matomba ya motindo nini?
15 “Fɔtɔ-Drame” esalaki mpenza likambo yango na ntango elakisamaki mbala ya liboso na Yanuáli 1914. Talá mwa bansango eyebisamaki kati na banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1914:
Apríli: “Nsima ya kotala biteni mibale, ministre moko ya lingomba alobaki ete, ‘Natali bobele katikati ya FƆTƆ-DRAME YA BOZALISI, kasi nayekoli makambo mingi ya Biblia koleka oyo nayekolaki na mbula misato oyo nalekisaki na likindo mpo na koyekola teoloji.’ Nsima ya kotala yango, Moyuda moko alobaki ete, ‘Nazongi epai na ngai lokola Moyuda ya solosolo koleka ntango nayaki.’ Basángó mpe bamamelo mingi ya Lingomba ya Katolike batalaki FƆTƆ-DRAME mpe bamonisaki bosepeli mingi. . . . Tosilisi bobele milɔngɔ zomi na mibale ya bililingi ya FƆTƆ-DRAME . . . Atako bongo, tosili kokóma mpe tozali kolakisa yango na bingumba ntuku misato na moko . . . Na mokolo moko, bato koleka nkóto ntuku misato na mitano bazali kotala, koyoka, kosepela, komanyola mpe kopambwama.”
Yúni: “Filime yango ebakisi ngai molende mpo na koteya Solo, mpe ebakisi bolingo na ngai mpo na Tata na biso ya Likoló mpe Yaya na biso wa bolingo Yesu. Nazali kobondela Nzambe mokolo na mokolo ete apambola FƆTƆ-DRAME YA BOZALISI mpe baoyo nyonso bamipesi mpo na kolakisa yango . . . Nazali mosaleli na bino kati na Ye, F. W. KNOCHE.—Iowa.”
Yulí: “Tozali na esengo mingi ya komona ete na engumba oyo bato basepeli mingi na filime yango, mpe tondimisami ete litatoli yango na mokili ezali mpe kosalelama mpo na koyanganisa bato mingi oyo bazali komimonisa lokola biloko ya motuya oyo biponami na Nkolo. Toyebi Bayekoli ya solosolo ya Biblia mingi oyo bazali sikawa kosangana na Kelasi [lisangá] mpamba te balandaki Fɔtɔ-Drame. . . . Ndeko na bino ya mwasi kati na Nkolo, EMMA L. BRICKER.”
Novɛ́mbɛ: “Tondimisami ete bokosepela koyoka nsango ya litatoli malamu oyo ezali kopesama na nzela ya FƆTƆ-DRAME YA BOZALISI na Opéra de Londres, Kingsway. Lobɔkɔ ya Nkolo oyo ezali kokamba biso ezali komonana mpenza na makambo nyonso ya kolakisama yango na boye ete bandeko bazali kosepela mingi . . . Bato ya ndenge na ndenge bayaki kotala yango; tomonaki bakonzi mingi ya mangomba kati na bayangani. Nganga-Nzambe moko . . . asɛngaki tiké mpo ete ye na mwasi na ye báya kotala lisusu. Nganga-Nzambe moko ya Lingomba ya Angleterre ayaki mbala mingi kotala FƆTƆ-DRAME, mpe . . . ayaki elongo na baninga na ye mingi mpo na kotala yango. Baepiskɔpɔ mibale mpe bayaki, mpe bato mingi ya lokumu bayaki lokola.”
Desɛ́mbɛ: “Ngai na mwasi na ngai tozali solo kotɔ́nda Tata na biso ya likoló mpo na lipamboli monene mpe ya motuya mingi oyo apesi biso na nzela na bino. Ezalaki bongo FƆTƆ-DRAME na bino kitoko nde esalaki ete tómona mpe tóndima Solo . . . Tozali na bavolimi motoba ya buku ÉTUDES DES ÉCRITURES. Ezali kosunga biso mingi.”
Lolenge batalelaki komekama ya ntango wana
16. Mpo na nini 1914 ememaki komekama ya kondima?
16 Kasi, ezali boni ntango baklisto wana ya sembo mpe oyo bamipesi bamonaki ete bilikya na bango ya kozala esika moko na Nkolo na 1914 bikokisamaki te? Bapakolami yango balekisaki eleko moko ya komekama makasi mpenza. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1914 [na Lingelesi] elobaki ete: “Tómikundola ete tozali na eleko ya komekama.” Na ntina na likambo yango, buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu (1993) elobi ete: “Ya solo, kobanda 1914 kino 1918 ezalaki solo ‘eleko ya komekama’ mpo na Bayekoli ya Biblia.” Balingaki nde kotika ete kondima na bango epɛtolama mpe makanisi na bango mábongisama mpo na kobanda mosala monene oyo ezalaki liboso na bango?
17. Bapakolami ya sembo basalaki nini ntango bamonaki ete bazali naino na mabelé nsima ya 1914?
17 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1916 [na Lingelesi] elobaki ete: “Tokanisaki ete Mosala ya Kobuka Mbuma mpo na koyanganisa Lingomba [bapakolami] esengelaki kosila liboso ya nsuka ya Ntango ya Mabota; kasi esika moko te elobami bongo kati na Biblia. . . . Tozali nde na mawa ete Mosala ya Kobuka Mbuma ezali kokoba? . . . Bandeko ya bolingo, sikawa tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi epai na Nzambe, tosengeli nde komonisa bosepeli mingi mpo na Solo kitoko oyo apesi biso libaku ya komona mpe ya koyebana na nzela na yango, mpe tosengeli kozala na molende mingi mpo na kosalisa ete Solo yango ekóma epai na bamosusu.” Kondima na bango emekamaki, kasi bayikaki mpiko na komekama wana mpe balongaki. Kasi biso baklisto tosengeli koyeba ete komekama ya kondima ekoki kozala mingi mpe ya ndenge na ndenge.
18, 19. Komekama nini ya kondima ya basaleli ya Nzambe ebimaki mwa moke nsima ya liwa ya Ndeko Russell?
18 Na ndakisa, lolenge mosusu ya komekama ekómelaki batikali mwa moke nsima ya liwa ya Ndeko Charles Russell. Yango ezalaki bongo komekama ya bosembo mpe kondima na bango. Nani azalaki ‘moombo ya sembo’ oyo alobelami na Matai 24:45? Bamoko bakanisaki ete ezalaki bongo Ndeko Russell, mpe mbala moko baboyaki kondima bibongiseli ya sika mpo na kotambwisa lisangá. Soki ye nde azalaki moombo, bandeko basengelaki kosala nini lokola akufaki? Basengelaki nde kolanda moto moko oyo alingaki koponama sika, to ntango ekokaki mpo na kososola ete Yehova azalaki kosalela bobele moto moko te, kasi lisangani mobimba ya baklisto lokola esaleli, to kelasi ya moombo?
19 Komekama mosusu ekómelaki baklisto ya solo na 1918 ntango bakonzi ya mokili, na kopusama na bakonzi ya mangomba ya boklisto, ‘bayangaki mwango mabe kati na mibeko’ mpo na kobebisa lisangá ya Yehova. (Nzembo 94:20) Babandaki konyokola makasi Bayekoli ya Biblia na Amerika ya Nɔrdi mpe na Mpoto. Botɛmɛli oyo ebimisamaki na bakonzi ya mangomba ekolaki mpenza kino, na mokolo ya 7 Máí 1918, Mbulamatari ya États-Unis ebimisaki mikanda mpo na kokanga Joseph Rutherford mpe basalani na ye ya penepene, kati na bango, Alexander Macmillan. Bafundaki bango na bifundeli ya lokuta ete bazalaki kozimbisa bato, mpe bakonzi baboyaki koyoka bango ntango balobaki ete basali mabe moko te.
20, 21. Lokola esakolamaki na Malaki 3:1-3, mosala nini esalemaki kati na bapakolami?
20 Atako yango eyebanaki bongo te na eleko wana, nzokande mosala ya kopɛtolama ezalaki kosalema, lokola elobelami na Malaki 3:1-3: “Nani akoyikela mokolo na koya na ye mpiko? Nani akotɛlɛma wana ekomonana ye? Mpo ete [ntoma ya kondimana] azali lokola mɔ́tɔ na mopɛtoli-na-ebende mpe lokola sabuni na batuti na bilamba. Akofanda lokola mopɛtoli mpe monangoli na palata; akopɛtola bana na Levi mpe akonangola bango lokola wolo mpe palata; bakokabela mpe [Yehova] mbeka na boyengebene.”
21 Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ekómaki pene ya kosila, bamoko kati na Bayekoli ya Biblia bakutanaki na komekama mosusu ya kondima na bango—balingaki nde kobatela etɛlɛmɛlo na bango ya kozanga komikɔtisa na kowelana ya basoda ya bikólo bikeseni? (Yoane 17:16; 18:36) Bamosusu babatelaki bosembo na bango te. Na yango, na 1918, Yehova atindaki “ntoma ya kondimana,” Yesu Klisto, na tempelo na ye ya elimo mpo na kopɛtola etuluku moke ya basambeli na Ye na mbindo ya mokili. Baoyo bamipesaki na komonisa kondima ya solosolo bazwaki liteya uta na makambo bakutanaki na yango mpe bakendaki liboso, bakobaki kosakola na molende.
22. Na oyo etali komekama ya kondima, makambo nini matikali oyo tokotalela?
22 Oyo touti kotalela kino sikawa ezali se lisolo mpamba ya makambo maleká te. Ezali na boyokani mpenza na elimo na lisangá ya Yehova na mokili mobimba. Kasi tiká ete, na lisolo likolanda, tótalela komekama mosusu oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango lelo oyo mpe tótala ndenge nini tokoki kolonga yango.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini basaleli ya Yehova bayebaka ete kondima na bango ekomekama?
◻ Milende nini misalemaki liboso ya 1914 mpo na kopalanganisa nsango ya Nzambe?
◻ “Fɔtɔ-Drame” ezalaki nini, mpe matomba nini ebimisaki?
◻ Lolenge nini makambo oyo mabimaki na eleko ya 1914-1918 mazalaki komekama mpo na bapakolami?
[Elilingi na lokasa 12]
Pene na nsuka ya ekeke ya 19, bato ya bikólo mingi bazalaki koyekola Biblia na lisalisi ya bavolimi ya buku “Aurore du millénium” oyo na nsima ebéngamaki “Études des Écritures”
[Elilingi na lokasa 13]
Nkoma ya Charles Russell na maloba ya ebandeli mpo na kotyama na kasɛti kati na yango alobaki ete: “‘Fɔtɔ-Drame ya bozalisi’ ebimisami na IBSA [Association internationale des étudiants de la Bible]. Mokano na yango ezali ya kolakisa na makambo ya siansi mpe makambo ya Nzambe, mpe ya kolongisa Biblia”
[Elilingi na lokasa 15]
Demetrius Papageorge asalaki mibembo mpo na kolakisa “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi.” Na nsima, akɔtaki bolɔkɔ mpo ete aboyaki kokɔta na makambo ya politiki