Tozali kozela na “mposa monene”
“Na mposa monene, mokili mobimba ezali kotalela ete Nzambe amonisa emoniseli na bana na ye.”—BALOMA 8:19.
1. Bokokani nini ezali kati na ezalela ya baklisto ya lelo mpe ezalela ya baklisto na ekeke ya liboso?
LELO oyo, ezalela ya baklisto ya solo ekokani na oyo ya baklisto ya ekeke ya liboso. Esakweli moko esalisaki basaleli ya Yehova na ntango wana na kososola ntango oyo Masiya asengelaki komonana. (Danyele 9:24-26) Esakweli yango eyebisaki mpe ete Yelusaleme ekobomama, kasi ezalaki na elembo moko te oyo ekokaki kosalisa baklisto na koyeba liboso ntango nini engumba yango esengelaki kobomama. (Danyele 9:26b, 27) Bobele bongo, esakweli moko esalisaki bayekoli ya Biblia na ekeke ya 19 na kozela na motema likoló. Ntango bayebaki ete “ntango nsambo” oyo elobelami na Danyele 4:25 ekokani na “ntango ya Mabota,” basosolaki liboso ete Klisto akozwa Bokonzi na 1914. (Luka 21:24; Ezekiele 21:25-27) Atako mokanda ya Danyele ezali na bisakweli mingi, esakweli moko te ekoki kosalisa bayekoli ya Biblia na mikolo na biso na kotánga mikolo mpe koyeba mpenzampenza ntango nini ebongiseli mobimba ya biloko ya Satana ekobomama. (Danyele 2:31-44; 8:23-25; 11:36, 44, 45) Kasi, etikali moke likambo yango ekosalema, mpamba te tozali sikoyo na “elaka na nsuka.”—Danyele 12:4.a
Kosɛnzɛla na eleko ya kozala ya Klisto
2, 3. (a) Elembo monene nini ezali komonisa ete tozali sikawa na eleko oyo Klisto afandi na Bokonzi? (b) Nini emonisi ete baklisto basengeli kokoba kosɛnzɛla ata na kozala ya Klisto?
2 Ya solo, ezali na esakweli moko oyo ekómisaki baklisto mitema likoló mpo na kozela liboso ete Klisto azwa Bokonzi na 1914. Kasi “elembo” oyo Klisto apesaki mpo na kozala na ye mpe nsuka ya ebongiseli ya biloko elobelaki makambo oyo makobima. Mpe makambo yango mingi masengelaki komonana nsima ya kobanda ya kozala na ye. Makambo lokola bitumba, nzala, koningana ya mabelé, maladi, kobakisama ya kobuka mibeko, konyokola baklisto, mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba, mazali elembo monene oyo emonisi ete Klisto azali sikawa na nguya ya Bokonzi.—Matai 24:3-14; Luka 21:10, 11.
3 Kasi, likambo ya ntina mingi na toli oyo Yesu apesaki bayekoli na ye liboso azonga na likoló ezalaki ete: “Bókeba mpe bósɛnzɛla, . . . bókɛngɛlaka.” (Malako 13:33, 37; Luka 21:36) Soki totángi na likebi nyonso lisolo mobimba oyo ezali kolendisa na kosɛnzɛla, tokomona ete Klisto alobelaki mingi likambo ya kotalaka elembo oyo ekomonisa ebandeli ya kozala na ye te. Kasi, atindaki bayekoli na ye ya solo ete básɛnzɛlaka na ntango ya kozala na ye. Mpo na nini baklisto ya solo basengelaki ntango nyonso kosɛnzɛla?
4. Elembo oyo Yesu apesaki ezalaki na ntina nini?
4 Yesu alobaki esakweli na ye monene mpo na koyanola na motuna oyo: “Nyonso oyo [makambo oyo makobima liboso ya kobomama ya ebongiseli ya biloko ya Bayuda] ekoya ntango nini, mpe elembo na [kozala, NW] na yo mpe nsuka [ya ebongiseli ya biloko, NW] ekozala nini?” (Matai 24:3) Elembo oyo asakolaki esengelaki kosalisa mpo na koyeba bobele kozala ya Klisto te kasi lisusu makambo oyo esengelaki kobima liboso ete ebongiseli ya biloko mabe esuka.
5. Ndenge nini Yesu amonisaki ete atako na elobeli ya elimo azali, kasi asengeli ‘koya’?
5 Yesu amonisaki ete na ntango ya “kozala” na ye (na Greke, pa·rou·siʹa), akoya na nguya mpe na nkembo. Mpo na “koya” yango (emonisami na ndenge mingi ya liloba ya Greke erʹkho·mai), alobaki ete: “Bongo elembo na Mwana na moto ekomonana na Likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo. . . . Bóyoka liteya uta na nzete na mosuke. Wana etape na yango ekolɛmba mpe akobimisa nkasa na yango, boyebi ete ntango na moi makasi elingi kobɛlɛma. Bino mpe bongo, wana ekomona bino makambo oyo nyonso, bokoyeba ete [Klisto] azali penepene, ata na bikuke. . . . Boye bótala mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini. . . . Bongo ekoki na bino koselingwa, mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.”—Matai 24:30, 32, 33, 42, 44.
Yesu Klisto akoya mpo na nini?
6. Ndenge nini “Babilone Monene” ekobomama?
6 Atako Yesu Klisto azali na kiti ya Bokonzi uta 1914, asengeli naino kosambisa bato mpe bibongiseli na bango liboso apesa bato mabe etumbu. (Kokanisá na 2 Bakolinti 5:10.) Etikali moke Yehova akopesa bakonzi ya politiki likanisi ya koboma “Babilone Monene,” oyo ezali lisangani ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 17:4, 5, 16, 17) Ntoma Paulo alobaki mpenzampenza ete Yesu Klisto akoboma “motyoli na mibeko”—bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lipɛngwi, eteni eleki monene ya “Babilone Monene.” Paulo akomaki ete: “[Motyoli na mibeko, NW] akomonana polele, ye oyo Nkolo Yesu akoboma ye na ntango ekoya ye.”—2 Batesaloniki 2:3, 8.
7. Ntango Mwana na moto akoya na nkembo na ye, akopesa etumbu nini?
7 Etikali moke Klisto akosambisa mabota na kolanda misala oyo basalelaki bandeko na ye oyo bazali naino awa na mabelé. Totángi boye: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe [baanzelu, NW] na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba. Mpe akotika bampate na lobɔkɔ na ye na mobali nde bantaba na lobɔkɔ na ye na mwasi. . . . Mokonzi akozongisela [bampate] liloba ete, Nazali koloba na bino ete lokola esalaki bino yango epai na moko na bandeko na ngai baoyo baleki mokemoke, bosalelaki ngai yango. . . . [Bantaba] bakolongwa kino etumbu na seko nde bayengebene kino bomoi na seko.”—Matai 25:31-46.
8. Ndenge nini Paulo alobeli koya ya Klisto mpo na kopesa bato oyo batosaka Nzambe te etumbu?
8 Lokola lisese ya bampate na bantaba emonisi yango, Yesu akopesa bato nyonso oyo batosaka Nzambe te etumbu ya nsuka. Paulo alendisaki baninga na ye baklisto oyo bazalaki konyokwama ete “epemelo esika moko na biso na ntango na komonana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na Likoló esika moko na [baanzelu, NW] na ye na nguya, kati na epelelo na mɔ́tɔ ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu. Bakozwa lifuti na kobeba na seko mpe kobwakama libándá longwa na liboso na ye mpe longwa na nkembo na nguya na ye, wana ekoya ye na Mokolo yango ete akumisama na Babulami na ye.” (2 Batesaloniki 1:7-10) Soki tokanisi makambo kitoko oyo tozali kozela, tosengeli mpenza kozala na kondima mpe kosɛnzɛla makasi mpo na koya ya Klisto.
Tózela komonana ya Klisto na mposa monene
9, 10. Mpo na nini bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé bazali kozela komonana ya Yesu Klisto na mposa monene?
9 “Komonana ya Nkolo Yesu wana ekobima ye na likoló” ekosukisa bato mabe mpe ekopesa basembwi mbano. Batikali kati na bandeko bapakolami ya Klisto oyo bazali naino awa na mabelé bakoki naino konyokwama liboso ete Klisto amonana, kasi bazali kosepela na elikya ya nkembo oyo bakozwa kuna na likoló. Ntoma Petelo akomelaki baklisto bapakolami ete: “Bósepela ete bozali kosangana na mpasi na Klisto ete bósepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na ye.”—1 Petelo 4:13.
10 Bapakolami bazali na ekateli makasi ya kotikala sembo kino Klisto ‘akoyanganisa bango epai na ye’ mpe ete kondima na bango oyo ‘emekami’ “ekomonana mpo na masanzoli na lokumu mpe na [nkembo, NW] wana ekomonana Yesu Klisto.” (2 Batesaloniki 2:1; 1 Petelo 1:7) Mpo na baklisto wana ya sembo babotami na elimo, tokoki koloba ete, “Litatoli mpo na Klisto elendisamaki solo kati na bino. Bongo bozangi likabo moko na Nzambe te awa ezali bino kotalela komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto.”—1 Bakolinti 1:6, 7.
11. Baklisto bapakolami bazali kosala nini wana bazali kozela komonana ya Yesu Klisto?
11 Batikali bapakolami bazali na likanisi lokola oyo ya Paulo oyo akomaki ete: “Nabanzi ete mpasi na ntango oyo ekoki [kokokana, NW] te na nkembo elingi komonana kati na biso.” (Baloma 8:18) Bazali koluka kolendisa kondima na bango na kotángáká mikolo te. Bamipesi na mosala ya Yehova, na ndenge yango bazali kopesa ndakisa malamu epai na baninga na bango “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Bapakolami yango bayebi ete nsuka ya ebongiseli mabe oyo ekómi pene, mpe bazali kolanda elendiseli ya Petelo ete: “Bókanga nkamba na makanisi na bino, bómisɛnzɛla, bózala na elikya nyɛɛ mpo na ngɔlu ekokómela bino wana ekomonana Yesu Klisto.”—1 Petelo 1:13.
‘Mposa monene ya mokili’
12, 13. Ndenge nini bato ‘bazalisamaki mpamba,’ mpe bampate mosusu bazali na mposa ya nini?
12 Bampate mosusu bazali nde na eloko oyo bakoki kozela na mposa monene? Ɛɛ. Ntango asilisaki kolobela elikya ya nkembo ya bato oyo Yehova aponi lokola “bana” babotami na elimo mpe “basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo” na Bokonzi ya likoló, Paulo alobaki ete: “Na mposa monene, mokili mobimba ezali kotalela ete Nzambe amonisa emoniseli na bana na ye. Nzambe azalisaki mokili mpamba, mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye. Kasi ezalaki na elikya ete ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.”—Baloma 8:14-21; 2 Timote 2:10-12.
13 Mpo na lisumu ya Adama, bakitani na ye nyonso ‘bazalisamaki mpamba,’ babotamaki na kati ya boombo ya lisumu mpe ya liwa. Bakoki komisikola na boombo yango te. (Nzembo 49:7; Baloma 5:12, 21) Bampate mosusu bazali mpenza na mposa ya ‘kosikwama na boombo ya libebisi’! Kasi liboso na yango, makambo mosusu masengeli kobima na kolanda ntango mpe bileko ya Yehova.
14. ‘Emoniseli ya bana ya Nzambe’ ekolimbola nini mpe ndenge nini yango ‘ekosikola bato na boombo na libebisi’?
14 Batikali bapakolami kati na “bana na Nzambe” basengeli naino ‘komonana.’ Yango ekolimbola nini? Na ntango oyo Nzambe ye moko aponi, bampate mosusu bakomona polele ete bapakolami basili ‘kotyama bilembo’ mpe bakumisami mpo na koyangela elongo na Klisto. (Emoniseli 7:2-4) “Bana na Nzambe” oyo basekwisami bango mpe ‘bakomonana’ ntango bakosangana na Klisto mpo na kobebisa ebongiseli ya biloko mabe ya Satana. (Emoniseli 2:26, 27; 19:14, 15) Na nsima, na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto, ‘bakomonisama’ lisusu lokola banganga oyo Nzambe akosalela mpo na kopesa bato bolamu euti na mbeka ya lisiko ya Klisto. Na ndenge yango bato ‘bakosikwama na boombo ya libebisi’ mpe na nsuka bakokɔta na “lisiko na nkembo na bana na Nzambe.” (Baloma 8:21; Emoniseli 20:5; 22:1, 2) Na kotalela bilikya kitoko yango, tokoki kokamwa te ete bampate mosusu bazali ‘kotalela na mposa monene ete Nzambe amonisa emoniseli ya bana na ye.’—Baloma 8:19.
Motema molai ya Yehova ezali mpo na lobiko
15. Likambo nini tosengeli kobosana te na lolenge Yehova akabolaka ntango mpo na kosala makambo?
15 Yehova azali Motosi Monene ya ntango. Likambo na likambo oyo akosala ekolanda na bosikisiki ntango oyo atyaki. Ekoki komonana ete makambo masalami na ndenge oyo biso tokanisaki te. Kasi, tokoki mpenza kozala na kondima ete bilaka nyonso ya Nzambe bikokokisama. (Yosua 23:14) Akoki kotika ete makambo máumela koleka ndenge bato mingi bakanisaki. Kasi tóluka nde koyeba banzela na ye mpe tósepela na mayele na ye. Paulo akomaki ete: “Ɛɛ, bozwi mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe izali na bozindo boni! Bikateli na ye bikoki koyebana ntina te; bilekelo na ye ikomonana nzela te. Mpo ete, Nani ayebi motema na Nkolo? Nani azali moyebisi na ye?”—Baloma 11:33, 34.
16. Nani azali na libaku malamu ya kozwa litomba na motema molai ya Yehova?
16 Petelo akomaki ete: “Bongo, balingami, awa ezali bino kotala makambo oyo [kobomama ya “likoló” na “nse” ya kala mpe kotyama ya “likoló na sika” na “nse na sika” na esika na yango], bótya etingya ete bózwana na ye na kozanga litɔnɔ mpe na likambo te kati na kimya. Bókanisa ete motema molai na Nkolo na biso ezali lokola lobiko.” Lokola Yehova azali na motema molai, bamilio ya bato bazali kozwa libaku ya kobikisama na “mokolo ya Yehova” oyo ekoya “lokola moyibi” na ntango oyo tokanisaki te. (2 Petelo 3:9-15) Motema molai na ye ezali mpe kopesa mokomoko na biso libaku ya ‘koluka sikawa nzela ya kobika na biso na nsɔmɔ mpe na kolɛnga.’ (Bafilipi 2:12) Yesu alobaki ete tosengeli ‘kokeba’ mpe ‘kosɛnzɛla ntango nyonso’ soki tolingi kondimama mpe kolonga ‘kotɛlɛma liboso na Mwana na moto’ ntango akoya kosambisa.—Luka 21:34-36; Matai 25:31-33.
Tózela ntango nyonso na etingya
17. Maloba nini ya ntoma Paulo tosengeli kotyela likebi?
17 Paulo alendisaki bandeko na ye ya elimo ete bátyaka miso te na “makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana.” (2 Bakolinti 4:16-18) Alingaki ete eloko moko te ezipa miso na bango liboso ya mbano ya bomoi na likoló oyo etyami liboso na bango. Tózala baklisto bapakolami to bampate mosusu, tóbatela ntango nyonso elikya oyo bapesi biso mpe tótika te. ‘Tótalela yango na mpiko,’ mpe tómonisa ete “tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.”—Baloma 8:25; Baebele 10:39.
18. Mpo na nini tokoki, na elikya nyonso, kotika ntango mpe bileko na mabɔkɔ ya Yehova?
18 Na elikya nyonso, tokoki kotika ntango mpe bileko na mabɔkɔ ya Yehova. Bilaka na ye bikokokisama, ‘bikoumela te’ na kolanda manaka na ye. (Habakuku 2:3) Liboso na yango, elendiseli oyo Paulo apesaki Timote ezali na ntina mingi lisusu mpo na biso. Alobaki ete: “Liboso na Nzambe mpe na Klisto Yesu, ye oyo akosambisa bato na bomoi mpe bakufi, mpe mpo na komonana na ye mpe Bokonzi na ye, nazali kolaka yo ete, osakola liloba, ozala na etingya na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te . . . Osala mosala na mopalanganisi na Nsango Malamu, okokisa lisungi na yo nyɛ.”—2 Timote 4:1-5.
19. Basaleli ya Nzambe bazali naino na ntango ya kosala nini, mpe mpo na nini?
19 Bomoi ya bato ezali na likama—bomoi na biso moko mpe ya bazalani na biso. Paulo akomaki ete: “Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo; ɛɛ, oumela na yango, zambi ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:16) Ntango etikali moke mpo na ebongiseli mabe ya biloko oyo. Wana tozali kozela na mposa monene makambo ya kokamwa oyo mazali liboso, tóbosana ata moke te ete oyo ezali naino ntango mpe eleko ya Yehova mpo ete bato na ye básakola nsango malamu ya Bokonzi. Mosala oyo esengeli kosalema kino ye moko akoloba ete ekoki. “Bongo,” lokola Yesu alobaki, “nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mikapo 10 mpe 11, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Bozongeli
◻ Na oyo etali kotánga mikolo, ndenge nini ezalela na biso ekokani na oyo ya baklisto ya ekeke ya liboso?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli ‘kosɛnzɛla ntango nyonso,’ ata na boumeli ya kozala ya Klisto?
◻ Mpo na nini bato bazali na mposa monene ya ‘emoniseli ya bana Nzambe’?
◻ Mpo na nini tokoki, na elikya nyonso, kotika ntango mpe bileko na mabɔkɔ ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 17]
Baklisto basengeli kosɛnzɛla na kozeláká koya ya Klisto
[Elilingi na lokasa 18]
Batikali bapakolami bazali na mingi ya kosala kati na mosala ya Yehova, kasi bazali kotonga kondima na bango na kotángáká mikolo te