Bósepela kati na Yehova mpe bózala na esengo
MOSALA nyonso ya ntina soki esuki malamu, epesaka kaka esengo. Yango wana, mokolo ya 13 Marsi 1999, likita oyo esalemaki na esika monene ya mateya ya Watchtower, na Patterson, na etúká ya New York, mpo na kopesa banakelasi 48 ya kelasi ya 106 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower badiplome, ezalaki mpenza likambo ya esengo.
Prezida ya likita yango ezalaki Ndeko Theodore Jaracz. Ye akɔtaka na kelasi ya mbala ya nsambo ya Gileadi; lelo oyo azali na kati ya lisangani ya Mikóló-Bakambi. Afungolaki likita na lisolo oyo elimbolaki maloba ya Nzembo 32:11 oyo elobi: “Bino bayengebene, bósepela kati na [Yehova] mpe bózala na esengo.” Alimbolaki mpo na nini ebongaki mpenza ete moto nyonso azala na esengo na esika wana, alobaki boye: “Tozali kosepela ntango tozali komona makambo oyo Yehova azali kosalela bato oyo bazali sembo na mitema na bango. Na kati ya bato yango tozali mpe na banakelasi oyo basilisi kelasi na bango na Gileadi.” Atako banakelasi bamilɛngɛlaki liboso báya na Gileadi mpe basalaki makasi mpo bákokisa masɛngami mpo na mosala ya misionere, Yehova nde asali ete makambo nyonso esuka malamu. (Masese 21:5; 27:1) Ndeko Jaracz alobaki ete ezali mpo na yango nde tozali ‘kosepela kati na Yehova.’
Na kati ya bato oyo bazalaki na ndako monene ya makita na Patterson, ezalaki na bandeko ya banakelasi, bakisa mpe bato mosusu oyo banakelasi babengisaki; bautaki na mikili 12 mpo na kozala na likita wana ya esengo. Ntango bato nyonso 5 198 oyo bazalaki wana, bakisa mpe bandeko ya Betele ya Brooklyn, ya Patterson, mpe ya Wallkill, oyo balandaki likita yango na televizyo, bazalaki kozela ndenge likita ekoleka, bango nyonso bazalaki na esengo.
Banakelasi balendisami bázala ntango nyonso na esengo
Balobi mitano balandanaki mpo na kosala masolo. Ntango Ndeko Jaracz asukisaki maloba ya bofungoli, atikaki esika na molobi ya liboso. Ye abongisaki lisolo moko kitoko oyo elendisaki banakelasi na bato mosusu lokola.
Molobi yango ya liboso ezalaki William Malenfant, oyo akɔtáká na kelasi ya 34 ya Gileadi; lelo oyo azali kosala lokola mosungi na komite ya mateya ya lisangani ya Mikóló-Bakambi. Lokola motó ya likambo na ye elobaki ete, “‘Nyonso’ ezali mpamba te!” oyo euti na maloba ya Mosakoli 1:2, atunaki motuna oyo: “Salomo alingaki mpenza koloba ete nyonso, kolongola eloko moko te, ezali mpamba?” Apesaki eyano ete, “Te. Alingaki komonisa ete eloko ezali mpamba ezali nde makambo oyo bato basalaka kozanga kotalela mokano ya Nzambe to mikano oyo bato balandaka kozanga kotya likebi na mokano ya Nzambe.” Kasi, kosambela Yehova, Nzambe ya solo, ezali mpamba te; to mpe koyekola Biblia, Liloba na ye mpe koteya yango epai ya bato mosusu ezali mpamba te. Nzambe abosanaka milende motindo wana ya basaleli na ye te. (Baebele 6:10) Bato oyo bazali kosepelisa motema ya Nzambe ata soki bakutani na mikakatano, ‘bakozingama na libenga ya bomoi pembeni ya Yehova.’ (1 Samwele 25:29, NW) Likanisi oyo ezali mpenza kolendisa! Soki basaleli ya Yehova bazali kobosana makambo oyo te, ekosalisa bango bázala ntango nyonso na esengo.
John Barr, moko na kati ya lisangani ya Mikóló-Bakambi, alendisaki banakelasi na lisolo na ye oyo elobaki, “Bósepela na mosala na bino ya misionere.” Amonisaki ete mosala ya misionere ezali likambo oyo Yehova Nzambe atyelaka motema. “Eyokani mpenza na bolingo oyo Yehova alakisaki bato. Atindaki Mwana na ye mobotami-bobele-moko awa na mabelé. Yesu azalaki misionere oyo aleki bamisionere nyonso. Bandeko oyo bazwi badiplome bakoki kokanisa mbongwana oyo Yesu asalaki mpo akokisa mosala na ye awa na mabelé, nzokande, tozali mpe komona ete tii lelo oyo bato bakoki naino kozwa bolamu na mosala ya misionere oyo Yesu asalaki. Ndeko Barr alobaki ete ezali bongo mpamba te Yesu asepelaki kosala mosala ya Nzambe, mpe lisusu alingaki bato. (Masese 8:30, 31) Ndeko Barr alendisaki banakelasi ete bákangama makasi na mosala na bisika oyo bakotinda bango, básala yango kaka mpo na kolakisa te ete bazali kolendendela, kasi mpo bazali kosepela na yango. Alendisaki banakelasi na maloba oyo, “Bótyela Yehova motema, mpe ye akotika bino te.”—Nzembo 55:22.
Na nsima, ekómaki ngala ya Lloyd Barry. Ye mpe azali na kati ya lisangani ya Mikóló-Bakambi. Aponaki motó ya likambo oyo elobi, “Tótambola na nkombo ya Yehova libela na libela.” Lokola alekisaki mbula 25 na mosala ya misionere na Japon nsima wana abimaki na kelasi ya 11 ya Gileadi, Ndeko Barry ayebisaki mwa makambo oyo bamisionere ya kala bazalaki kokutana na yango mpe alimbolaki mikakatano oyo bazalaki kolonga. Apesaki banakelasi toli nini oyo bakoki kosalela? “Libosoliboso, bózala ntango nyonso makasi na elimo. Lisusu, bóyekola monɔkɔ mpe mimeseno ya mboka oyo bokokende. Bósɛkaka na bato. Mpe bókangama makasi na mosala; bólɛmba te to mpe bótika motema te.” Ndeko Barry ayebisaki banakelasi ete na mboka mopaya oyo bakotinda bango, bakokutana na bato mingi oyo basambelaka banzambe ndenge na ndenge, mpe azongelaki maloba oyo ya Mika: “Mabota nyonso bakotambola moko na moko na nkombo na Nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo na [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” (Mika 4:5) Ya solo mpenza, ndakisa ya bamisionere ya kala ekolendisa mpenza basaleli nyonso ya Nzambe mpo bátambola ntango nyonso na nkombo ya Yehova mpe básalela ye na bosembo.
Na nsima, Lawrence Bowen, oyo azali molakisi na Gileadi, azwaki maloba. Motó ya likambo ya lisolo na ye ezalaki lokola motuna; elobaki boye, “Okozala moto ya ndenge nini?” Amonisaki ete mpo moto alonga na mosala ya Nzambe, asengeli kozala na kondima mpe kotyela Yehova motema. Kotyela Yehova motema mobimba esalisaki Mokonzi Asa alonga banguna na ye oyo bayaki na basoda milio moko. Kasi, mosakoli Azalia ayebisaki ye ete asengeli kotika kotyela Nzambe motema te; alobaki boye: “[Yehova] azali na bino elongo wana bino bozali na ye elongo.” (2 Ntango 14:9-12; 15:1, 2) Lokola Yehova, nkombo ya Nzambe, elimboli akómaka oyo nyonso alingi kokóma, ezala alingi kokóma Mopesi, Mobateli, to mpe Oyo Apesaka Bitumbu, nyonso wana mpo akokisa mokano na ye, bamisionere oyo bakotyela Yehova motema mpe bakolanda mokano na ye bakolonga na mosala na bango. (Exode 3:14) Ndeko Bowen asukisaki na maloba oyo: “Bóbosana ata moke te ete ntango nyonso oyo bokolanda mokano ya Yehova, akokómisa bino nyonso oyo alingi bókóma mpo bókokisa mosala na bino.”
Molobi ya nsuka na eteni wana ya likita ezalaki Wallace Liverance, ye azalaki misionere mpe lelo oyo azali sekretere ya Eteyelo ya Gileadi. Lisolo na ye oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bósala ete Liloba ya Nzambe ezala ntango nyonso na bomoi mpe esala mosala kati na bino,” ebendaki likebi na nsango, to elaka ya Nzambe oyo ezali kokokisama. (Baebele 4:12) Nsango yango ezali kobongola bomoi ya baoyo bazali kotika ete esala mosala na yango. (1 Batesaloniki 2:13) Ndenge nini tokoki kotika liloba yango ezala ntango nyonso na bomoi mpe esala mosala na bomoi na biso? Soki tokoyekola Biblia ntango nyonso. Ndeko Liverance azongelaki lisusu ndenge ya koyekola Biblia oyo bateyaki banakelasi na Gileadi. Ndenge yango ya koyekola ezali na makambo lokola kotánga mpe kolimbola mpe kosalela Liloba ya Nzambe. Azongelaki maloba ya Albert Schroeder, moko na kati ya lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo azalaki prezida ya komite oyo ebongisaki Eteyelo ya Gileadi, eleki sikoyo mbula 50: “Soki moto ataleli bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe na nsima ya makambo oyo azali kotánga, akoki kozwa ndimbola mobimba, ndimbola oyo ya solosolo mpe ya elimo oyo Nzambe apesi na kati ya Liloba na ye.” Ndenge oyo ya koyekola Biblia esalaka ete Liloba ya Nzambe ezala ntango nyonso na bomoi mpe esala mosala epai ya moto.
Baeksperiansi mpe mituna-masolo ya esengo
Nsima ya kolanda masolo, banakelasi bayebisaki mwa baeksperiansi ya esengo mpo na bayangani. Eteni yango ekambamaki na Mark Noumair. Ye azalaki misionere mpe lelo oyo azali molakisi na Gileadi. Mwa ndambo ya banakelasi basalaki bilakiseli mpe bayebisaki ndenge basalaki mpo na koteya bato na bisika ndenge na ndenge. Ezali na baoyo babandaki koyekola Biblia na bato na teritware mpo bazalaki kotya likebi na makambo ya bato yango, ndenge oyo bazali mpe basalaki na bango boninga. Na ndenge yango, banakelasi ‘bamisɛnzɛlaki bango mpenza mpe na mateya na bango’ mpe basepelaki kosalisa bato mosusu mpo bábika.—1 Timote 4:16.
Bapesaki makanisi mingi oyo moto akoki kosalela. Lisusu, mwa bandeko oyo baumeli mingi na mosala bamonisaki esengo oyo ezalaka na mosala ya misionere. Bandeko yango bayaki na kelasi mpo na basangani ya komite ya filiale na esika monene ya mateya ya Société Watchtower. Ndeko Samuel Herd na Ndeko Robert Johnson oyo basalaka na biro monene na Brooklyn, batunaki mituna na bandeko oyo bazali basangani ya bakomite ya filiale ya ekólo Bolivie, Zimbabwe, Nicaragua, République centrafricaine, République dominicaine, Papouasie-Nouvelle-Guinée, mpe Cameroun.
Nsima ya kolanda baeksperiansi mpe mituna-masolo, Gerrit Lösch, oyo akɔtaka na kelasi ya 41 na Gileadi mpe lelo oyo azali moko na kati ya lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo ya nsuka. Moto ya likambo na yango ezali kotinda moto akanisa, elobaki boye: “Ozali ‘moto oyo balingi ye’?” Ndeko Lösch ayebisaki naino banakelasi ete Yesu, Mwana ya Nzambe oyo azali na lisumu te, bato balingaki ye te, kasi “atyolamaki mpe aboyamaki na bato.” (Yisaya 53:3) Yango wana, lelo oyo tokoki kokamwa te ete, na mikili mingi, bazali kobengana bamisionere, baboyi koyamba bango. Nzokande, na bambula ebele oyo Danyele asalaki mosala na Babilone, mbala misato mobimba Mozalisi abéngaki ye na nzela ya anzelu moko ete “alingami mingi.” (Danyele 9:23; 10:11, 19) Eloko nini ekómisaki Danyele moto oyo alingami mingi? Na ntango oyo azalaki komimesenisa na makambo ya Babilone, ata mbala moko te abukaki mitinda ya Biblia. Azalaki kosala makambo nyonso na bosembo. Ata mbala moko te asalelaki bokonzi oyo azalaki na yango mpo na bolamu na ye moko. Azalaki koyekola Liloba ya Nzambe na molende. (Danyele 1:8, 9; 6:4; 9:2) Azalaki mpe kobondela Yehova mbala na mbala mpe na makambo oyo azalaki kosala, azalaki kopesa Nzambe lokumu mbala moko. (Danyele 2:20) Soki basaleli ya Nzambe balandi ndakisa ya Danyele, bango mpe bakoki kokóma bato balingami, ata na mokili te, kasi epai ya Yehova Nzambe.
Mpo na kosukisa likita yango oyo elendisaki bato na elimo, prezida atángaki mwa batelegrame oyo eutaki bipai na bipai na mokili. Na nsima, banakelasi nyonso 48 bazwaki badiplome na bango, mpe bayebisaki bango mikili epai batindi bango. Na nsuka, mwanakelasi moko atángaki mokanda na nkombo ya banakelasi nyonso. Na mokanda yango, banakelasi bapesaki lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe na libota ya Betele matɔndi mpo na mateya oyo bazwaki mpe ndenge babongisaki bango mpo na mosala na boumeli ya sanza mitano.
Na nsuka ya likita, tomonaki “esengo, na matɔndi” ya ebele ya bato oyo bazalaki kozonga epai na bango.—Nehemia 12:27.
[Etanda na lokasa 27]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 10
Motuya ya bikólo epai batindami: 19
Motuya ya banakelasi: 48
Motuya ya mabala: 24
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 25]
Kelasi ya mbala ya 106 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya Société Watchtower
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na molɔngɔ ya liboso kino na nsima, mpe banda na lobɔkɔ ya mwasi kino lobɔkɔ ya mobali.
(1) Deakin, D.; Puopolo, M.; Laguna, M.; Davault, S.; Dominguez, E.; Burke, J. (2) Gauter, S.; Vazquez, W.; Seabrook, A.; Mosca, A.; Helly, L.; Breward, L. (3) Brandon, T.; Olivares, N.; Coleman, D.; Scott, V.; Petersen, L.; McLeod, K. (4) McLeod, J.; Thompson, J.; Luberisse, F.; Speta, B.; Lehtimäki, M.; Laguna, J. (5) Gauter, U.; Dominguez, R.; Helly, F.; Smith, M.; Beyer, D.; Mosca, A. (6) Scott, K.; Seabrook, V.; Speta, R.; Coleman, R.; Breward, L.; Davault, W. (7) Smith, D.; Lehtimäki, T.; Petersen, P.; Thompson, G.; Vazquez, R.; Beyer, A. (8) Luberisse, M.; Deakin, C.; Brandon, D.; Puopolo, D.; Olivares, O.; Burke, S.