Basalaki mokano ya Yehova
Azwaki matomba na mobembo na ye
NA NTEMBE te mokonzi-mwasi alɛmbaki mingi nsima ya mobembo banda Seba tii na Yelusaleme. Amesanaki na bomoi ya bisengo. Sikoyo, kamela ezalaki kokumba ye na mobembo molai ya kilomɛtɛlɛ 2 400. Ndambo monene ya mobembo yango na moi makasi ya mokili mokauki. Bato mosusu bakanisaka ete mobembo yango eumelaki mikolo 75, mpe wana kaka kokende!a
Mpo na nini mokonzi-mwasi oyo azalaki na bozwi mingi atikaki ndako na ye kitoko na Seba mpo na kosala mobembo ya mpasi boye?
Nsango oyo elamusaki mposa
Mokonzi-mwasi ya Seba ayaki na Yelusaleme ntango “ayokaki lokumu na Salomo mpo na nkombo na [Yehova].” (1 Mikonzi 10:1) Bayebisi biso te makambo oyo mokonzi-mwasi ayokaki. Kasi, toyebi ete Yehova apesaki Salomo mayele, bozwi, mpe lokumu mingi mpenza. (2 Ntango 1:11, 12) Ndenge nini mokonzi-mwasi yango ayebaki makambo yango? Lokola Seba ezalaki esika monene ya mombongo, ekoki kozala ete ayokaki nsango ya lokumu ya Salomo epai ya bato ya mombongo oyo bazalaki koya na mboka na ye. Ekoki kozala ete bamoko kati na bango bakendaki na Ofili, mokili oyo Salomo azalaki kosala na yango mombongo mingi.—1 Mikonzi 9:26-28.
Ata soki ezalaki ndenge nini, mokonzi-mwasi akómaki na Yelusaleme “na bato mingi nsima na ye mpe na bakamela baoyo bakumbaki malasi mpe wolo mingi mpe mabanga ya motuya.” (1 Mikonzi 10:2a) Bato mosusu balobaka ete kati na “bato mingi” oyo mokonzi-mwasi yango ayaki na bango “nsima na ye,” ezalaki mpe na basoda. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te mokonzi mwasi yango azalaki na lokumu mingi mpe amemaki biloko oyo ekoki kosombama lelo oyo na bamilio mingi ya dolare.b
Kasi, likambo ya kobenda likebi ezali ete, mokonzi-mwasi ayokaki nsango ya lokumu ya Salomo “mpo na nkombo ya Yehova.” Na bongo, mobembo na ye ezalaki kaka mobembo ya mombongo te. Emonani ete mokonzi-mwasi ayaki libosoliboso mpo na koyoka mayele ya Salomo, ntango mosusu mpe ata koyekola mwa makambo ya Yehova, Nzambe ya Salomo. Lokola akokaki kozala mbala mosusu mokitani ya Semi to Hama, baoyo bazalaki kosambela Yehova, ntango mosusu azalaki na mposa ya koyoka makambo ya losambo ya bankɔkɔ na ye.
Mituna ya makasi, biyano ya mayele
Ntango akutanaki na Salomo, mokonzi-mwasi abandaki komeka ye na “mituna ya makasi.” (1 Mikonzi 10:1, NW) Liloba ya Liebele oyo basaleli awa ekoki kobongolama na “sambole.” Kasi yango elingi koloba te ete mokonzi-mwasi azalaki kosalisa Salomo masano ya mpambampamba. Likambo ya kobenda likebi, na Nzembo 49:4, liloba kaka moko wana ya Liebele esalelami mpe mpo na komonisa makambo ya ntina mingi oyo etaleli lisumu, liwa, mpe lobiko. Na bongo, emonani ete mokonzi-mwasi ya Seba azalaki kosolola na Salomo makambo ya ntina oyo emekaki bozindo ya mayele ya Salomo. Biblia elobi ete “alobanaki na ye mpo na makambo nyonso na motema na ye.” Na nsima, Salomo, “azongiselaki ye bituneli na ye nyonso; likambo moko ebombamelaki mokonzi te oyo ye ayebaki kolimbwela ye te.” —1 Mikonzi 10:2b, 3.
Mayele ya Salomo na kofuluka ya bokonzi na ye ekamwisaki mokonzi-mwasi ya Seba na boye ete “azalaki lisusu na mpiko te.” (1 Mikonzi 10:4, 5) Bato mosusu balobaka ete maloba yango elimboli ete mokonzi mwasi azalaki lisusu na “mpema te.” Nganga-mayele moko apesaki likanisi ete alɛmbaki! Ata soki likambo nini esalemaki, mokonzi-mwasi akamwaki na makambo oyo amonaki mpe ayokaki. Alobaki ete basaleli ya Salomo bazalaki na esengo mpamba te bazalaki na libaku ya koyoka mayele ya mokonzi yango, mpe akumisaki Yehova na ndenge aponaki Salomo azala mokonzi. Na nsima, apesaki mokonzi makabo ya motuya mingi, wolo yango moko ezalaki na motuya ya pene na dolare 40 000 000 na moi ya lelo. Salomo mpe apesaki mokonzi-mwasi yango makabo “nyonso elingaki ye, nyonso elɔmbaki ye.”c—1 Mikonzi 10:6-13.
Liteya mpo na biso
Yesu asalelaki lisolo ya mokonzi mwasi ya Seba lokola liteya mpo na bakomeli na Bafalisai. Alobaki na bango ete: “Mokonzi mwasi na epai na ngɛlɛ akotɛlɛma na esambiselo na libota oyo elongo mpe akokitisa bango; mpo ete ye alongwaki na ndelo na mokili mpo na koyoka mayele na Salomo nde talá oyo aleki Salomo azali awa.” (Matai 12:42) Ya solo, mokonzi-mwasi ya Seba asepelaki mingi na mayele oyo euti na Nzambe. Soki asalaki mobembo molai ya kilomɛtɛlɛ 2 400 mpo na koyoka mayele ya Salomo, na ntembe te bakomeli na Bafalisai basengelaki koyoka Yesu na likebi nyonso, ye oyo azalaki na bango esika moko.
Lelo oyo, biso mpe tokoki kosepela makasi na Salomo Monene, Yesu Klisto. Ndenge nini? Lolenge moko ezali ya kotosa etinda na ye ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Lolenge mosusu ezali ya koyekola malamumalamu ndakisa ya Yesu mpe elimo oyo amonisaki mpe kolanda ndakisa yango.—Bafilipi 2:5; Baebele 12:2, 3.
Ya solo, mpo na kolanda ndakisa ya Salomo Monene tosengeli kosala milende makasi. Mpe tokozwa mapamboli mingi. Yehova alaki basaleli na ye ete soki bamipesi, ‘akofungwela bango maninisa ya lola akosopela bango lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’—Malaki 3:10, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balimboli mingi ya Biblia balobaka ete Seba ezalaki na sudi-wɛsti ya Arabie, epai oyo ezali lelo ekólo Yémen.
b Strabo, moto ya ekólo Grèce mpe moto ya mayele na geografi na ntango ya kala, alobaki ete bato ya Seba bazalaki na bozwi mingi. Alobi ete bazalaki kosalela wolo mingi na biloko na bango ya ndako, na basaani na bango, mpe ata na bifelo, bikuke, bansamba ya bandako na bango.
c Bato mosusu balobaka ete maloba oyo elimboli ete mokonzi-mwasi yango asangisaki nzoto na Salomo. Masapo ya kala elobaka kutu ete babotaki mwana mobali. Nzokande, eloko moko te ezali kondimisa likambo yango.