Liloba ya esakweli ya Nzambe ezali kopesa elikya mpo na mikolo oyo ekoya
LILOBA ya Nzambe, Biblia Mosantu, esalisaka baklisto ya solo bázala na kobanga te kasi bázala nde na elikya mpo na mikolo oyo ekoya. Lokola bazali na boyokani malamu na Yehova Nzambe, babangaka te, kasi bazalaka nde na elikya ete bakozala malamu na mikolo oyo ekoya. Lisukulu ya liboso na mayangani ya etúká “Liloba ya esakweli ya Nzambe” emonisaki ete, banda kala Batatoli ya Yehova bayekolaka malamumalamu bisakweli ya Biblia. Makambo nini Yehova abongisaki mpo na koteya basaleli na ye na mayangani yango? Na Babiblia na bango na mabɔkɔ, bato nyonso oyo bakendaki na mayangani yango bazalaki na mposa ya koyeba makambo yango. Motó ya likambo moke mokomoko na lisolo oyo nde ezalaki motó ya likambo ya mokolo mokomoko ya liyangani.
MOKOLO YA LIBOSO: Tótambola kati na pole ya Liloba ya Nzambe
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Liloba ya Nzambe ezali kotambwisa biso” emonisaki ete basaleli ya Yehova bazali lokola moto oyo abandi mobembo na ntango oyo molili ezali naino. Ntango ntɔngɔ ekobanda kotana, akobanda komona kaka bililingi; kasi soki moi ekómi makasi na midi, akomona biloko nyonso polele. Lokola Masese 4:18 esakolaki yango, ndenge oyo solo ya liloba ya esakweli ya Nzambe ezali kongɛnga esalisi basaleli ya Yehova bámona sikoyo polele na nzela oyo bazali kotambola. Nzambe atiki bango te ete bátutatutaka mabaku na molili ya elimo.
Lisukulu-moboko ezalaki na motó ya likambo ete: “Tyá likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe.” Lisukulu yango emonisaki bayoki ete baoyo batyelaka Yehova elikya bayokaka mawa te lokola bato oyo balandaka bamasiya mpe basakoli ya lokuta. Makambo mingi ezali komonisa ete Yesu Klisto azali Masiya ya solo! Na ndakisa, likamwisi ya mbongwana ya Yesu elakisaki mwa moke nkembo na ye lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Lokola ayaki na nguya ya Bokonzi na 1914, Yesu azali mpe “monzoto ya ntɔngɔ” oyo balobeli na 2 Petelo 1:19. Molobi alimbolaki ete: “Lokola Masiya azali monzoto ya ntɔngɔ, azali kosakola mokolo, to eleko ya sika oyo ebandi mpo na bato oyo babangaka Nzambe.”
Na nsima ya midi, lisukulu ya liboso ezalaki na motó ya likambo ete: “Tóngɛnga lokola miinda.” Lisukulu yango elobelaki mingi Baefese 5:8 epai ntoma Paulo apesi biso toli ete ‘tótambolaka lokola bana ya pole.’ Baklisto bazali miinda mpo basakolaka Liloba ya Nzambe epai ya bato mpe lisusu, mpo bakotosaka makambo oyo Biblia ezali kosɛnga ete bálanda ndakisa ya Yesu.
Mpo moto azala mwinda ya ndenge yango, asengeli kosala oyo masukulu-matongami elobaki ete: “Sepelá na botángi ya Liloba ya Nzambe.” Nsima ya kotánga maloba ya Abraham Lincoln, moto oyo alobaki ete Biblia ezali “likabo eleki malamu oyo Nzambe apesi bato,” molobi ya liboso asɛngaki bayangani bámituna soki ndenge oyo batángaka Biblia emonisaka ete basepelaka mpenza na Liloba ya Nzambe. Alendisaki bandeko bátángaka Biblia malamumalamu, bázwaka ntango ya kokanisa masolo ya Biblia mpe kobakisa makambo ya sika likoló ya makambo oyo bayebi.
Eteni ya mibale ya masukulu-matongani emonisaki ete soki tolingi kolya “bilei makasi,” tosengeli nde koyekola, kasi kosuka kaka na kotánga likolólikoló te. (Baebele 5:13, 14) Molobi amonisaki ete koyekola etongaka mpenza soki tozali liboso ‘kobongisa mitema na biso,’ na ndakisa ya Ezela, nganga moko Moyisalaele. (Ezela 7:10) Kasi, mpo na nini koyekola ezali na ntina? Mpamba te yango nde esimbaka boyokani na biso na Yehova. Yango wana, koyekola Biblia esengeli kozala likambo ya ntina, esengeli kosepelisa mpe kolendisa biso, atako esɛngaka moto amityela mibeko mpe asala molende. Ndenge nini tokoki kozwa ntango ya koyekola na ndenge oyo ebongi? Ndeko oyo asalaki eteni ya nsuka ya masukulu-matongani alobaki ete tosengeli ‘kosomba ntango’ yango na makambo oyo ezali na ntina mingi te. (Baefese 5:16) Ya solo, mpo na kozwa ntango, tosengeli kosalela ntango na biso malamu.
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Nzambe apesaka nguya na bato oyo balɛmbi” emonisaki ete lelo oyo bato mingi balɛmbi. Mpo tózala na “nguya oyo eleki nguya ya bato” na mosala ya kosakola, tosengeli kotyela Yehova motema, ye nde ‘apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi.’ (2 Bakolinti 4:7, NW; Yisaya 40:29) Makambo oyo ekoki kolendisa biso ezali bongo Liloba ya Nzambe, libondeli, lisangá ya Nzambe, kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola, bakɛngɛli baklisto, mpe ndakisa malamu ya bandeko mosusu. Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Tózala bateyi na kotalela ntango” emonisaki ntina oyo baklisto basengeli kozala bateyi mpe basakoli mpe kosala makasi ete bákolisa “mayele ya koteya.”—2 Timote 4:2, NW.
Motó ya likambo ya lisukulu ya nsuka na mokolo yango elobaki ete: “Bato oyo bazali kobundisa Nzambe bakolonga te.” Lisukulu yango elobelaki ndenge oyo, na bambula oyo euti koleka, na mikili mosusu, balukaki kopusa bato bákanisa ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya mabe. Kasi, yango esengeli kobangisa biso te, mpamba te Yisaya 54:17 elobi ete: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo nyɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama. Oyo ezali libula na baombo na [Yehova] mpe boyengebene na baoyo ekouta na ngai. [Yehova] alobi bongo.”
MOKOLO YA MIBALE: Makambo oyo mayebisami na nzela ya Makomami ya esakweli
Nsima ya kotalela mokapo ya mokolo, bayangani balandaki lisusu masukulu-matongani. Na mbala oyo, motó ya likambo na yango elobaki ete: “Bamemi ya pole bakumisaka Yehova.” Eteni ya liboso emonisaki ete mokano ya moklisto ezali ya kosakola bipai nyonso mpo na kokumisa Yehova. Eteni oyo elandaki emonisaki ntina ya komema bato oyo bazali kondima nsango malamu na ebongiseli ya Nzambe. Ndenge nini? Soki mbala nyonso oyo tokutani mpo na koyekola, tozali kozwa miniti mitano to zomi mpo na komonisa moyekoli ndenge ebongiseli ya Nzambe etambolaka. Eteni ya misato emonisaki ntina ya kokumisa Nzambe na misala ya malamu.
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Tólinga mingi makambo oyo Yehova akundwelaka biso” elimbolaki mwa bavɛrsɛ ya Nzembo 119. Na ntembe te, tozalaka na mposa bázongelaka biso makambo oyo tosilá koyoka, mpamba te tobosanaka. Yango wana, na kolanda ndakisa ya mokomi ya nzembo, ebongi mpenza tósepelaka na makambo oyo Yehova azongelaka mpo na biso!
Na nsima, tolandaki lisolo moko ya ntina mpenza: lisukulu ya batisimo. Motó ya likambo na yango elobaki ete: “Kotosa liloba ya esakweli ememaka na batisimo.” Bayebisaki bandeko oyo basengelaki kozwa batisimo ete kolanda ndakisa ya Klisto elimboli kaka kozwa batisimo te, kasi elimboli mpe kolanda matambe na ye malamumalamu. (1 Petelo 2:21) Bandeko yango ya sika bazwi mpenza libaku malamu mingi mpamba te bango mpe bazali kokokisa Yoane 10:16, epai Yesu alobaki ete akoyanganisa “bampate mosusu” mpo na kosala elongo na baklisto bapakolami!
Nsima ya midi, lisukulu ya liboso ezalaki na motó ya likambo oyo: “Yoká oyo elimo ezali koloba.” Lisukulu yango emonisaki ete elimo ya Yehova elobaka na biso na nzela ya Biblia, na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe na nzela ya lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia. (Matai 24:45) Yango wana, baklisto bazali na mposa te ete báyoka mongongo oyo euti na likoló mpo báyeba ndenge nini bakoki kosepelisa Nzambe. Motó ya likambo ya lisukulu oyo elandaki elobaki ete: “Kotika te mateya oyo ezali komema biso na kobanga Nzambe.” Elendisaki baklisto ete báboya makanisi oyo ezali kolɛmbisa, makanisi oyo mokili ezali koteya. Mposa ya koluka koyeba likambo nyonso ekoki komema moto abanda kokɔtisa mateya ya bapɛngwi mpe ya basaleli mosusu ya Satana na bɔɔngɔ na ye. Eleki malamu tótángaka mingi Biblia mpe masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!
Lisukulu oyo elandaki ezalaki na motó ya likambo oyo elobi ete: “Simbá makasi ndakisa ya maloba ya sembo.” Emonisaki ntina ya koyeba malamu “ndakisa,” to lolenge ya mateya ya solo. (2 Timote 1:13) Koyeba ndakisa yango ezali sɛkɛlɛ mpo na kozala moto oyo abangaka Nzambe mpe lisusu koyeba makambo nini oyo eyokani te na mateya ya solo.
Kanisá ete ozali moto oyo Yehova alingaka mingi. Ezali mpenza lokumu! Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “ ‘Biloko kitoko’ bizali kotonda na ndako ya Yehova” elendisaki mingi mpenza mpamba te endimisaki bayoki ete Yehova alingaka mingi moto mokomoko oyo azali na kati ya “ebele monene.” (Emoniseli 7:9) Yango wana, Yehova akobatela bango ntango ‘akotetemisa’ mabota na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. (Hagai 2:7, 21, 22; Matai 24:21, NW ) Kasi, liboso na yango, basaleli ya Yehova basengeli ntango nyonso kokɛngɛlaka na elimo, lokola elimbolamaki na lisukulu oyo elobaki ete: “Bisakweli ya Makomami ezali kolendisa biso tózala na bokɛngi.” Molobi atángaki maloba ya Yesu ete: “Boye [bókɛngɛlaka, NW ] mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini.” (Matai 24:42) Ndenge nini tosengeli kokɛngɛlaka na elimo? Soki tozali komipesa na mosala ya Yehova, soki tozali kobondela ntango nyonso, mpe soki tozali kozela mokolo monene ya Yehova.
Lisukulu ya nsuka na mokolo yango ezalaki na motó ya likambo oyo: “Liloba ya esakweli na ntango ya nsuka.” Tokobosana lisukulu yango noki te mpamba te, ndeko oyo asalaki yango, alakisaki mokanda ya sika oyo ebimaki: Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Alobaki boye: “Mokanda yango kitoko ya nkasa 320 elobeli eteni mokomoko ya mokanda ya Danyele.” Ezali mpenza elembo oyo ezali kolendisa kondima ete Yehova azali kongɛngisa Liloba ya esakweli na ye!
MOKOLO YA MISATO: Liloba ya esakweli ya Nzambe ekozanga kokokisama te
Mokolo ya nsuka ya liyangani ebandaki na lisukulu ya biteni misato oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Liloba ya esakweli mpo na ntango ebongi.” Eteni mokomoko elobelaki etumbu moko kati na bitumbu misato ya Yehova oyo Habakuku asakolaki. Etumbu ya liboso etalelaki mboka Yuda, oyo ekómaki motó makasi, mpe ya mibale etalelaki Babilone oyo ezali konyokola bikólo mosusu. Etumbu ya misato, oyo ekokisami naino te, emonisi ete etikali moke bato nyonso ya mabe bakobomama. Ndeko oyo asalaki eteni ya nsuka ya masukulu-matongani alobelaki Armagedon mpe apesaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mwa kobanga Nzambe ntango alobaki boye: “Ya solo, makambo ekozala nsɔmɔ ntango Yehova akobimisa makasi na ye nyonso.”
Motó ya likambo ya drame kitoko ya liyangani yango elobaki ete: “Tótyola libula na biso ya elimo te.” Drame yango etindaki moto nyonso atalela motema na ye; emonisaki ndenge oyo makanisi ya Yakobo ekesanaki na makanisi ya Esau mpo na makambo ya elimo. Esau azalaki komona libula na ye ya elimo lokola eloko mpamba, yango wana bapesaki yango na Yakobo, ye oyo apesaki yango motuya mingi. Motuna etunamaki boye: “[Libula ya elimo] nini Yehova apesi biso?” Molobi apesaki eyano ete: “Ezali solo ya Biblia, Liloba na ye; elikya ya bomoi ya seko; mosala ya lokumu etali kosakola nsango malamu.”
Lisukulu oyo elandaki ezalaki na motó ya likambo ete: “Libula na biso ya motuya elimboli nini mpo na yo?” Tomonisaka ete tozali kopesa motuya na libula na biso ya elimo ntango tozali kotya mosala ya Yehova mpe makambo ya elimo na esika ya liboso mpe bamposa na biso moko to matomba ya mosuni na nsima. Na ndenge yango, tozali koluka naino ete tózala baninga ya Yehova liboso tósala makambo mosusu nyonso na bomoi na biso. Adama, Esau, mpe Bayisalaele oyo bazalaki sembo te basalaki bongo te.
Lisukulu ya bato nyonso ezalaki na motó ya likambo ete: “Kozalisa biloko nyonso biloko ya sika—Ndenge yango esakolamaki.” Esangisaki bisakweli minei ya ntina oyo elobeli “likoló ya sika” mpe “nse ya sika.” (Yisaya 65:17-25; 66:22-24; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1, 3-5) Emonani mpenza ete Yehova akanaki ete bisakweli wana ekokokisama na mokili mobimba, kasi esuka kaka te na ndenge ekokisamaki na libota na ye oyo ezongaki na mobu 537 L.T.B. Nzambe azalaki kokanisa Bokonzi na ye (“likoló ya sika”) mpe bato oyo Bokonzi yango ekoyangela awa na mabelé (“nse ya sika”), oyo bakofanda na paladiso ya kitoko.
Lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Talá bilikya tozali na yango lokola totambwisami na Liloba ya Nzambe” nde esukisaki liyangani na biso na ndenge ya malamu mpe ya kolendisa mpenza. Lisukulu yango emonisaki bato nyonso ete “ntango etikali moke” mpo na kosukisa mosala ya kosakola Bokonzi. (1 Bakolinti 7:29) Etikali moke Yehova akokata likambo ya Satana na ebongiseli na ye mobimba. Tiká tózala lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Milimo na biso italeli [Yehova], ye azali mosungi na biso mpe nguba na biso.” (Nzembo 33:20) Makambo kitoko mpenza ezali liboso mpo na baoyo bazali kotya elikya na liloba ya esakweli ya Nzambe!
[Elilingi na lokasa 7]
Drame kitoko emonisaki ntina ya kopesa motuya na libula ya elimo ya basaleli ya Yehova
[Elilingi na lokasa 7]
Bato mingi oyo batosaki liloba ya esakweli ya Nzambe bazwaki batisimo