Monyokoli amoni kongɛnga ya makasi
SAULO azalaki koyokela bayekoli ya Yesu nkanda makasi. Atako banyokwami na Yelusaleme, mpe babomi Setefano na mabanga; kasi mpo na ye, nyonso wana ekokaki te, sikoyo azali lisusu koluka konyokola baoyo bazalaki na bingumba ya mosika. “Nde Saulo azalaki naino kokanela bayekoli na Nkolo makaneli na kufa. Akei na nganga monene mpe alɔmbi mikanda mpo na biyanganelo na Damaseke, na ntina ete soko azwi bamosusu bato na nzela yango, na mibali na basi, akoka kokanga bango mpe koya na bango na Yelusaleme.”—Misala 9:1, 2.
Ntango Saulo azalaki kokende na Damaseke, azalaki kokanisa ndenge akokokisa mokumba na ye malamumalamu. Na ntembe te, lokola nganga monene apesaki ye bokonzi, yango epesaki ye nzela ayokana malamu na ebele ya bakonzi ya Bayuda oyo bazalaki na Damaseke. Saulo alingaki kosɛnga bango básunga ye.
Nkanda ya Saulo eyaki makasi ntango akómaki pene ya engumba yango. Mpo na kosala mobembo banda na Yelusaleme tii na Damaseke na makolo, esengelaki kosala kilomɛtrɛ soki 220, mikolo nsambo to mwambe na nzela, ezalaki kolɛmbisa mpenza. Kasi mbala moko pene na midi, kongɛnga moko eleki kongɛnga ya moi engɛngɛlaki Saulo, mpe akweaki na mabelé. Ayokaki mongongo moko ezali koloba na ye na monɔkɔ ya Liebele ete: “Saulo, Saulo, ozali konyokola ngai mpo na nini? Ezali na yo mpasi kotuta makolo na makɔnga.” Saulo atunaki ete: “Nkolo, yo nani?” Nkolo alobaki na ye ete: “Ngai Yesu oyo yo ozali konyokola. Kasi tɛ[lɛ]má na makolo na yo, mpo ete namonani na yo na ntina oyo ete natya yo mosaleli na ngai, na motatoli na makambo masili yo komona ngai na yango, mpe na makambo makomona yo ngai na yango. Nakobikisa yo na mabɔkɔ na bato oyo mpe na bapakano, baoyo ngai nakotinda yo epai na bango.” Saulo atunaki boye: “Nkolo, nasala nini? Nkolo alobi na ngai ete, Tɛlɛmá, mpe kendá na yo kuna na Damaseke, mpe bakoyebisa yo wana ntina na makambo nyonso masili koponama mpo na yo kosala.”—Misala 9:3-6; 22:6-10; 26:13-17.
Baoyo bazalaki kokende na Saulo bayokaki mongongo, kasi bamonaki moto oyo azalaki koloba te to bakangaki ntina ya makambo moto yango alobaki te. Lokola kongɛnga yango elekaki makasi, ntango Saulo atɛlɛmaki akokaki komona lisusu te mpe esengelaki básimba ye na lobɔkɔ. “Azalaki wana mikolo misato na kolala te, mpe alei te mpe ameli te.”—Misala 9:7-9; 22:11.
Mikolo misato ya komanyola
Yuda ayambaki Saulo malamu, ye azalaki kofanda na balabala babengi Alima.a (Misala 9:11) Balabala yango, na monɔkɔ ya Arabe babengaka yango Darb al-Mustaqim, tii lelo oyo ezali nzela monene oyo ebimá na Damaseke. Kanisá naino makambo oyo Saulo azalaki kokanisa ntango azalaki na ndako ya Yuda. Likambo yango ebomaki Saulo miso mpe ekamwisaki ye makasi mpenza. Sikoyo ezalaki ntango ya kokanisa soki makambo wana ekomemela ye nini na nsima.
Likambo oyo azalaki koboya makasi mpo azalaki komona yango eloko mpamba, sikoyo akokaki kokima yango ata moke te. Yesu Klisto oyo bakakisaki na nzete, oyo Sanedrina ekatelaki ye etumbu, mpe ‘oyo bato batyolaki ye mpe baboyaki’ azali na bomoi. Kutu, atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe na “[kongɛnga] oyo moto ayebi kobɛlɛma na yango te”! Yesu azalaki Masiya. Setefano na bamosusu bazalaki na elonga. (Yisaya 53:3; Misala 7:56; 1 Timote 6:16) Saulo azalaki mpenza na libunga, mpamba te Yesu alobaki ete ye nde moto oyo Saulo azalaki konyokola! Sikoyo ndenge ya kowangana ezali lisusu te. Ndenge nini Saulo akokaki kolanda “kotuta makolo na makɔnga”? Ata ngɔmbɛ ya motó makasi, nsukansuka, elandaka nzela oyo nkolo na ye alingi. Na yango, soki aboyaki kotosa maloba ya Yesu, Saulo alingaki komiyokisa mpasi ye moko.
Lokola Yesu azalaki Masiya, yango emonisi ete Nzambe aboyaki ye te. Kasi, Yehova atikaki nzela Yesu akufa liwa ya nsɔni mpe bátalela ye lokola Mobeko elobaki ete: “Moto akakisami alakelami mabe na Nzambe.” (Deteronome 21:23) Yesu akufaki na nzete ya mpasi. Alakelamaki mabe, mpo na masumu na ye moko te, mpamba te azalaki ata na lisumu moko te, kasi mpo na masumu ya bato. Na nsima Saulo alobaki boye: “Bango nyonso bataleli misala na Mibeko balakelami mabe, zambi ekomami ete, Moto na moto oyo akotosaka makambo makomami na mokanda te mpe akosalaka yango te alakelami mabe. Emonani polele mpe ete moto akozala moyengebene liboso na Nzambe na nzela na Mibeko te . . . Klisto asikoli biso na elakeli mabe na Mibeko awa akómaki ye eloko elakelami mabe mpo na biso, [lokola] ekomami ete, Moto na moto oyo akakemi na nzete alakelama mabe.”—Bagalatia 3:10-13.
Mbeka ya Yesu ezalaki mpo na kosikola bato. Lokola andimaki mbeka yango, na elobeli ya elilingi, Yehova abakaki Mibeko mpe elakeli mabe na yango na nzete. Ntango akangaki ntina ya likambo yango, Saulo andimaki ete nzete ya mpasi oyo ezalaki “etuteli na libaku epai na Bayuda” ezalaki nde “mayele ya Nzambe.” (1 Bakolinti 1:18-25; Bakolose 2:14) Na yango, soki tokobika mpo na misala ya mibeko te kasi mpo na ndenge oyo Nzambe apesaka bato ya masumu ngɔlu na ye, lokola ye moko Saulo, bongo, akokaki mpe kopesa ngɔlu na ye epai ya bato mosusu, baoyo bazalaki na kati ya Mibeko te. Na nsima, Yesu atindaki Saulo epai ya bato ya mabota.—Baefese 3:3-7.
Toyebi te soki Saulo ayebaki makambo oyo nyonso na ntango akómaki moyekoli ya Yesu. Ekoki kozala ete Yesu asololaki na Saulo mbala mingi mpo na mosala na ye epai ya mabota. Lisusu, bambula mingi elekaki liboso ete Saulo akoma makambo wana nyonso na mokanda na lisalisi ya elimo ya Nzambe. (Misala 22:17-21; Bagalatia 1:15-18; 2:1, 2) Kasi, elekaki mikolo mingi te liboso ete Saulo azwa malako epai ya Nkolo na ye ya sika.
Anania ayei kotala ye
Nsima ya kobimela Saulo, Yesu abimelaki mpe Anania, alobaki na ye boye: “Tɛlɛmá, kendá na balabala oyo etangami Alima, koluka moto na Talasia, nkombo na ye Saulo, kati na ndako na Yuda, mpo ete azali kobondela, mpe asili komona mobali moko, nkombo na ye Anania, koya kotyela ye mabɔkɔ ete amona lisusu.”—Misala 9:11, 12.
Lokola Anania ayebaki ete Saulo azalaki moto mabe, akamwaki ntango Yesu atindaki ye epai ya Saulo. Alobaki boye: “Nkolo, nasili koyoka na ntina na mobali oyo na minɔkɔ na bato mingi makambo mabe mingi masali ye na babulami na yo kuna na Yelusaleme. Awa mpe azali na bokonzi euti na banganga minene na kokanga bango nyonso bakobyangaka Nkombo na yo.” Kasi, Yesu alobaki na Anania boye: “Kendá na yo, mpo ete nasili kopona ye na komema nkombo na ngai liboso na bapakano, mpe na mikonzi, mpe na bato na Yisalaele.”—Misala 9:13-15.
Lokola andimaki ezala bongo, Anania akendaki na ndako oyo Yesu alakisaki ye. Ntango Anania amonaki Saulo, apesaki ye mbote mpe atyaki mabɔkɔ na ye likoló ya Saulo. Lisolo yango elobi ete: “Biloko lokola mposo na mbisi bikwei na miso na [Saulo] nokinoki, mpe amoni lisusu.” Sikoyo matoi ya Saulo efungwamaki. Maloba ya Anania emonisaki ete makambo ya Yesu oyo Saulo akangaki ntina na yango ezalaki mpenza ya solo. Anania alobaki boye: “Nzambe na bankɔkɔ na biso asili kopona yo ete oyeba mokano na ye mpe omona Moyengebene mpe oyoka mongongo na ye. Mpo ete okozala motatoli na ye na bato nyonso na ntina na makambo mamoni mpe mayoki yo. [Sikoyo] ozali kozila nini? Tɛ[lɛ]má kobatisama, mpe kosukola masumu na yo, na kobyanga nkombo na ye.” Esukaki ndenge nini? Saulo “atɛlɛmi mpe abatisami, mpe alei biloko mpe azwi makasi.”—Misala 9:17-19; 22:12-16.
Ntango asilisaki kokokisa mokumba na ye, na nsima na yango lisolo yango elobi lisusu mpo na moto ya sembo Anania te, mpe bayebisi biso lisusu makambo na ye te. Nzokande, Saulo akamwisaki bato nyonso oyo bayokaki ye! Monyokoli ya kala oyo ayaki na Damaseke mpo na kokanga bayekoli ya Yesu, abandi koteya na eyanganelo mpe komonisa ete Yesu azali Klisto.—Misala 9:20-22.
“Ntoma epai na mabota”
Makambo oyo Saulo akutanaki na yango na nzela ya Damaseke esukisaki mosala na ye ya konyokola bayekoli ya Yesu. Lokola ayebaki nani azali Masiya, Saulo abandaki kosalela mateya mpe bisakweli mingi ya Makomami ya Liebele mpo na kolobela Yesu. Saulo abongolaki bomoi na ye mobimba mpo ayebaki ete Yesu abimelaki ye mpe ‘atyelaki ye mabɔkɔ’ mpe apesaki ye mosala lokola “ntoma epai na mabota.” (Bafilipi 3:12; Baloma 11:13, NW) Bongo akómaki ntoma Paulo, azalaki na libaku malamu mpe bokonzi oyo ebongolaki bomoi na ye mobimba awa na mabelé mpe asalaki mosala monene na lisangá ya boklisto.
Na nsima, ntango bato batyaki ntembe ete azali ntoma te, amonisaki ete azali ntoma ntango alobelaki makambo oyo elekaki na nzela ya Damaseke. Atunaki boye: “Ngai ntoma te? Namoni Yesu Nkolo na biso te?” Nsima ya koloba ete Yesu abimelaki bato mosusu nsima ya lisekwa na ye, Saulo (Paulo) alobaki boye: “Na nsima na nyonso amonani epai na ngai mpe, lokola na oyo abotami [liboso ya elaka, NW].” (1 Bakolinti 9:1; 15:8) Ntango Saulo amonaki nkembo ya Yesu na likoló, ezalaki lokola nde azwi lokumu ya kobotama, to kosekwa, na bomoi ya elimo liboso ya elaka.
Saulo ayebaki mokumba malamu wana mpe asalaki nyonso mpo ete akokisa yango. Akomaki ete: “Ngai nazali nsima na Bantoma nyonso, nabongi kobyangama Ntoma te mpo nanyokolaki Lingomba ya Nzambe. Nde . . . ngɔlu [ya Nzambe] epai na ngai eyaki mpamba te kasi nasali mosala koleka [bantoma mosusu nyonso].”—1 Bakolinti 15:9, 10.
Mbala mosusu, yo mpe ozali kokanisa ntango oyo omonaki ete mpo Nzambe andima yo, osengelaki kotalela lingomba oyo oumelá na yango banda kala ndenge mosusu, ndenge Saulo asalaki. Na ntembe te opesaki Yehova matɔndi mpo asalisaki yo oyeba solo. Ntango Saulo amonaki kongɛnga mpe akangaki ntina ya likambo oyo Nzambe azalaki kosɛnga ye, akakatanaki te mpo na kosala yango. Alandaki kosala yango na molende mpe na mposa makasi tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé. Talá ndakisa malamu mpo na bato nyonso oyo balingi Yehova andima bango lelo oyo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Molimboli moko ya Biblia alobi ete, ntango mosusu Yuda azalaki mokonzi ya Bayuda na Damaseke to nkolo ya otɛlɛ moko ya Bayuda.
[Elilingi na lokasa 27]
Balabala babengi Alima na Damaseke lelo oyo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ euti epai ya ROLOC Color Slides