Ndenge oyo Yehova azali kotambwisa biso
“Kambá ngai na nzela ya sembo.”—NZEMBO 27:11.
1, 2. (a) Ndenge nini Yehova azali kotambwisa basaleli na ye lelo oyo? (b) Tosengeli kosala nini mpo tózwa mpenza matomba ya makita?
LOKOLA tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova nde moto angɛngisaka mpe alakisaka solo. Ntango tozali kotambola na nzela ya sembo, Liloba na ye nde engɛngisaka biso. Yehova atambwisaka biso na ndenge oyo ateyaka biso banzela na ye. (Nzembo 119:105) Na ndakisa ya mokomi ya nzembo na ntango ya kala, tondimi kolanda nzela oyo Nzambe azali kolakisa biso mpe tozali kobondela ete: “Ɛ [Yehova], lakisá ngai nzela na yo mpe kambá ngai na nzela ya sembo.”—Nzembo 27:11.
2 Makita ya lisangá ezali lolenge moko oyo Yehova ateyaka biso. Tolandaka ebongiseli yango malamu? Elingi koloba (1) toyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ, (2) toyokaka malamu makambo oyo balobaka na makita mpe (3) topesaka biyano na masolo oyo basɛngaka na bayangani báloba? Bongo soki bapesi biso toli mpo na kosalisa biso tótikala na “nzela ya sembo,” tondimaka yango na motema moko?
Ndenge nini oyanganaka na makita?
3. Ndenge nini mobongisi-nzela moko azwaki momeseno ya koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ?
3 Basakoli mosusu ya Bokonzi babandá koyangana na makita banda bomwana na bango. Motatoli ya Yehova moko oyo azali mobongisi-nzela alobaki boye: “Na bambula ya 1930, ntango ngai na bandeko na ngai ya basi tozalaki kokola, tozalaki kotuna baboti na biso te soki tokokende makita to te. Toyebaki ete tosengeli kokende makita, longola se soki tozali na maladi. Na libota na biso, tozalaki kozangisa makita te.” Lokola mosakoli-mwasi Ana, ndeko mwasi yango ‘azangaka te’ na ndako ya losambo ya Yehova.—Luka 2:36, 37.
4-6. (a) Mpo na nini basakoli mosusu ya Bokonzi bazangisaka makita? (b) Mpo na nini tosengeli mpenza koyanganaka na makita?
4 Yo mpe okendaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ, to okómá kozangisa makita mosusu? Baklisto mosusu oyo bazalaki kokanisa ete bazalaki koyangana na ndenge oyo esengeli, balukaki koyeba soki ezali mpenza bongo. Basalaki boye: na boumeli ya mwa bapɔsɔ, bazalaki kokoma makita nyonso oyo bazalaki kokende. Ntango batalelaki makita oyo bakendaki, bakamwaki na komona ete bazangisaki makita mingi.
5 Moto mosusu akoki koloba ete: ‘Tokoki kokamwa na yango te. Tozali kokutana na mikakatano mingi, yango wana ezali mpasi mpo moto ayanganaka na makita nyonso.’ Ya solo, tozali na mikolo ya mpasi mingi. Kutu, tokanisi mpenza ete mikakatano yango ekobakisama nde kobakisama. (2 Timote 3:13) Kasi, omoni te ete lokola mikakatano ekómi mingi, yango esengeli nde kotinda biso na koyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ? Soki tozali kolya bilei malamu te na elimo mpo na kozala nzoto makasi, tokoki kotya elikya te ete tokolonga komekama oyo mokili ezali kobimisela biso. Soki tozali na momeseno ya koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ te tokoki kobendama na likanisi ya kobosana mpenza “nzela ya sembo”! (Masese 4:18) Ya solo, ntango tozongi na ndako nsima ya kosala mosala makasi mokolo mobimba, mbala mosusu tokoki kozanga mposa ya kokende na makita. Kasi, soki tosali makasi mpe tokei na makita, atako tolɛmbi, tokozwa matomba, mpe tokolendisa baninga na biso baklisto na Ndako ya Bokonzi.
6 Baebele 10:25 emonisi biso ntina mosusu oyo tosengeli koyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Na vɛrsɛ yango Paulo alendisi baninga na ye baklisto báyanganaka ‘na koleka, awa emoni bango ete mokolo yango ezali kobɛlɛma.’ Tosengeli kobosana te ete “mokolo ya Yehova” ekómi pene. (2 Petelo 3:12) Soki tozali kokanisa ete nsuka ya mokili oyo ezali naino mosika mpenza, tokoki kotika mposa ya koluka matomba na biso moko ebungisa makambo ya ntina na elimo, lokola koyangana na makita. Boye, ‘mokolo yango ekobimela biso pwasa’ ndenge Yesu alobaki.—Luka 21:34.
Zalá moto oyo ayokaka malamu
7. Mpo na nini ezali na ntina ete bana bálandaka makita malamu?
7 Koyangana mpamba na makita ekoki te. Tosengeli mpe koyokaka malamu, kotya likebi na makambo oyo bazali koloba na makita. (Masese 7:24) Likambo yango etali mpe bana na biso. Ntango mwana azali kokende kelasi, basɛngaka ye atyaka likebi na makambo oyo molakisi azali koloba, ata soki liteya moko ezali kosepelisa ye te to azali kokanga ntina na yango te. Molakisi ayebi ete soki mwana asali makasi mpo na kolanda, akosimba ata mwa makambo moke na liteya yango. Yango wana, esengeli mpenza ete bana oyo bakokisi mbula ya kokɔta kelasi bátyaka matoi na mateya oyo epesamaka na makita na esika ya kotika bango bálalaka ntango kaka makita ebandi. Ya solo, na kati ya mateya malamu oyo ezali na Biblia “makambo mosusu ezali mpasi mpo na koyeba ntina na yango.” (2 Petelo 3:16, NW ) Kasi tókanisa te ete bana bakoki kosimba makambo te. Nzambe akanisaka bongo te. Na ntango ya kala, ayebisaki basaleli na ye oyo bazalaki bilenge ete ‘báyoka mpe báyekola kobanga Yehova Nzambe mpe básɛnzɛla ete bátosa maloba nyonso ya mobeko oyo.’ Tokanisi ete makambo mosusu ya mobeko yango ezalaki mpasi mpo bana bákanga ntina na yango. (Deteronome 31:12; kokanisá na Levitike 18:1-30.) Yehova azali kosɛnga kaka likambo yango epai ya bana lelo oyo.
8. Baboti mosusu basalaka nini mpo na kosalisa bana na bango bálandaka makita malamu?
8 Baboti baklisto bayebaka ete makambo oyo bana na bango bayekolaka na makita ekokisaka bamposa na bango mosusu ya elimo. Yango wana, baboti mosusu basalaka na boye ete bana na bango bálala ata mwa moke liboso bákende na makita mpo bázala na mpɔngi na miso te ntango bazali na Ndako ya Bokonzi mpe bálanda malamu. Baboti mosusu bakoki kotya mibeko mpo na bangonga ya kotala televizyo to mpe kopekisa kotala yango mpenza na mikolo ya makita. (Baefese 5:15, 16) Baboti oyo basalaka bongo balongolaka mwa makambo mosusu oyo ekoki kobenda likebi ya bana mpe balendisaka bango báyoka mpe bábomba makambo oyo bazali koyoka, na kotalela mbula ya bana mpe mayele na bango.—Masese 8:32.
9. Nini ekoki kosalisa biso tózwa momeseno ya koyoka malamu?
9 Ntango Yesu alobaki ete: “Bókeba soko bozali koyoka boni,” azalaki kosolola na mikóló. (Luka 8:18) Na mikolo oyo tozali na yango, likambo yango ezali mpasi te na koloba, kasi kosala nde ezali mpasi. Ya solo, koyoka na likebi nyonso makambo oyo moto azali koloba ezali likambo moke te, kasi moto akoki koyekola koyoka malamu. Ntango ozali kolanda lisukulu moko to lisolo moko, meká kobimisa makanisi ya ntina. Kanisá makambo oyo molobi akoloba na nsima. Luká makanisi oyo okoki kosalela na mosala ya kosakola to na bomoi na yo. Zongelaká makanisi ya ntina ntango ozali koyoka yango. Zwaká mwa banɔti na papye.
10, 11. Baboti mosusu basalaki nini mpo na kosalisa bana na bango bákóma kolanda makita malamu, kasi mayele nini omoni ete ebongi mpo na yo?
10 Moto azwaka mpenza momeseno ya koyoka malamu, soki ayekoli yango na bomwana. Baboti mosusu basalisaka bana na bango ya mike oyo bakɔti naino kelasi te bázwaka “banɔti” na makita. Bana yango bakomaka mwa bilembo na papye mbala nyonso oyo bayoki maloba oyo bamesaná koyoka lokola “Yehova,” “Yesu,” to “Bokonzi.” Na ndenge yango, bana bakoki koyekola kotya makanisi na bango esika moko mpo na kolanda makambo oyo ezali kolobama na ebaelo.
11 Ntango mosusu esɛngaka mpe kolendisa bana oyo bazali mwa mikóló mpo na kolanda makita. Na liyangani moko ya etúká, Tata moko amonaki ete makanisi ya mwana na ye ya mbula 11 ezali koyengayenga, apesaki ye Biblia mpe asɛngaki ye alukaka bavɛrsɛ oyo balobi bazalaki kopesa. Atako tata yango azalaki mpe kozwa banɔti na ye, liso na ye ezalaki kaka epai ya mwana yango mpo na kotala ndenge oyo asimbaki Biblia. Nsima na yango, mwana ayokaki esengo ya liyangani.
Lobá mpe bato báyoka mongongo na yo
12, 13. Mpo na nini ezali na ntina tóyembaka elongo na bandeko na makita?
12 Mokonzi Davidi ayembaki ete: “Ɛ [Yehova], nakobɛlɛma na etumbelo na yo, ete nayokisa mongongo na kotɔnda.” (Nzembo 26:6, 7) Makita ya Batatoli ya Yehova ezalaka esika malamu mpenza mpo na koyambola kondima na maloba na biso. Tokoki kosala yango na ntango tozali koyemba elongo na bandeko nyonso. Koyemba ezali na esika monene na losambo na biso, nzokande, soki tokebi te, tokoki kobosana likambo yango.
13 Bana mosusu oyo bayebi naino kotánga te, bakangaka maloba ya nzembo oyo ekoyembama na makita pɔsɔ nyonso na motó. Basepelaka mingi ntango bazali koyemba elongo na mikóló. Kasi, soki bana bapusani mwa moke, esengo ya koyemba nzembo ya Bokonzi ekoki mbala mosusu kokita. Mikóló mosusu mpe bayokaka nsɔni mpo na koyemba na makita. Kasi, koyemba ezali mpe na kati ya losambo na biso, ndenge moko kobima na mosala ya kosakola ezali na kati ya losambo na biso. (Baefese 5:19) Tosalaka makasi mpo na kosanzola Yehova na mosala ya kosakola. Tokoki mpe kokumisa ye na mongongo na biso ntango tozali koyemba nzembo ya masanzoli, ata soki tozali na mongongo ya malamu te.—Baebele 13:15.
14. Mpo na nini tosengeli mpenza kobongisa makita malamumalamu?
14 Tokumisaka mpe Nzambe ntango tozali kopesa biyano ya kolendisa na masolo oyo esɛngaka bayangani báloba. Likambo yango esɛngaka komibongisa. Mpo moto akanisa makambo ya mozindo ya Liloba ya Nzambe esɛngaka azwa ntango. Ntoma Paulo, moto oyo alingaki koyekola Biblia mingi, amonaki ete ezali mpenza bongo. Akomaki ete: “Ɛɛ, bozwi mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe izali na bozindo boni!” (Baloma 11:33) Bino batata ya mabota, ezali na ntina mingi bósalisaka moto mokomoko na kati ya mabota na bino na koluka mayele ya Nzambe, mayele oyo ezali na kati ya Biblia. Na ntango bozali koyekola Biblia na libota, bótikaka mwa ntango mpo na kolimbola makambo ya mpasi mpe kosalisa moto nyonso na kati ya libota abongisa makita.
15. Makanisi nini ekoki kosalisa moto mpo na kopesa biyano na makita?
15 Soki olingi opesaka biyano mingi na makita, ekozala malamu ozwaka ntango ya kobongisa liboso makambo oyo okoloba. Yango wana osengeli koluka makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ te. Soki oponi vɛrsɛ moko oyo ebongi mpe otángi yango kozanga kobanga to mpe soki obimisi maloba ya malamu oyo euti na motema, bato bakosepela mingi. Basakoli mosusu bayebisaka motambwisi ete apona bango mpo bápesa eyano na paragrafe moko boye, mpo bázanga libaku ya koyambola kondima na bango te.
Moto ya mayele te akómi na mayele
16, 17. Toli nini nkulutu moko apesaki mosaleli ya misala moko, mpe mpo na nini toli yango ebongaki?
16 Na makita ya Batatoli ya Yehova, mbala mingi bayebisaka biso tótángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo elendisaka. Esalisaka biso mpe na kozwa mikano malamu, na kobongisa bizaleli na biso, na kolonga komekama, mpe na kozonga na nzela ya malamu soki tobandi kolanda nzela ya mabe.—Nzembo 19:7.
17 Bankulutu oyo bayebi makambo mingi bakakatanaka te kopesa toli oyo euti na Biblia mpe eyokani na bamposa na biso. Tosengeli nde ‘kotoka’ toli yango, to tóluka toli na bango oyo euti na Biblia. (Masese 20:5) Mokolo moko, elenge moko oyo azali mosaleli ya misala, ye azalaka mɔ́tɔmɔ́tɔ, atunaki nkulutu moko toli na ndenge oyo akoki kosala lisusu mingi na kati ya lisangá. Nkulutu yango, lokola ayebaki elenge yango malamu, afungolaki Biblia na ye na 1 Timote 3:3 (NW ). Vɛrsɛ yango elobi ete mibali oyo bazali na mikumba na kati ya lisangá basengeli kozala na “makambo makasi te.” Alobelaki mwa makambo oyo elenge wana asengelaki komonisa epai ya bato mosusu ete azali na makambo makasi te. Elenge yango amonaki mabe moko te na toli ya sembo oyo bapesaki ye! Alobaki boye: “Nkulutu yango asalelaki Biblia, yango wana namonaki ete toli yango euti epai ya Yehova.” Mosaleli ya misala yango alandaki toli wana mpe azali kokola malamu na elimo.
18. (a) Likambo nini esalisaki elenge moklisto moko alonga komekama na kelasi? (b) Okanisaka mikapo nini ya Biblia ntango omekami ete osala mabe?
18 Liloba ya Nzambe ekoki mpe kosalisa bilenge na ‘kokima mposa nyonso ya bolenge.’ (2 Timote 2:22) Elenge mwasi moko Motatoli ya Yehova oyo auti kozwa diplome na ye, alongaki komekama mpe akweaki na mabe te ntango azalaki na kelasi mpo azalaki na mwa mikapo ya Biblia oyo azalaki ntango nyonso kokanisa mpe kosalela. Azalaki kokanisa mingi toli oyo ezali na Masese 13:20 ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele.” Yango wana, azalaki kokeba na boye ete baninga na ye ezala kaka bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe. Alobaki boye: “Nazali makasi koleka bato mosusu te. Soki nabandi kotambola na baninga ya mabe, nakolinga nasalaka makambo oyo ekosepelisa baninga na ngai, mpe yango ekoki kolukela ngai mindɔndɔ.” Mpe lisusu toli ya Paulo oyo ezali na 2 Timote 1:8 esalisaki ye. Akomaki boye: “Oyoka nsɔni mpo na kotatwela Nkolo na biso te, . . . kasi omema ndambo na yo ya mpasi mpo na Nsango Malamu.” Na kolanda toli yango, elenge mwasi wana azalaki koyebisa baninga na ye ya kelasi mateya ya Biblia mbala nyonso oyo azwi libaku ya kosala yango. Mbala nyonso oyo bapesi ye devuare ya kosala liboso ya banakelasi nyonso, azalaki kopona lisolo oyo ekopesa ye nzela ya kolobela Bokonzi ya Nzambe na mayele.
19. Mpo na nini elenge mobali moko akweaki na makambo ya mokili, kasi nini ezongisaki ye makasi na elimo?
19 Soki topɛngwi na “nzela ya sembo,” Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tósembola makolo na biso. (Masese 4:18) Elenge mobali moko ya Afrika amonaki ete likambo yango ezali mpenza solo. Ntango Motatoli ya Yehova moko akutanaki na ye, andimaki koyekola Biblia. Makambo oyo azalaki koyekola ezalaki kosepelisa ye mingi, kasi mwa moke na nsima, akómaki kotambola na baninga ya mabe na kelasi. Na nsima, amipesaki mpenza na bomoi ya bosɔtɔ. Alobi boye: “Lokola lisosoli na ngai ezalaki ntango nyonso kotungisa ngai, natikaki koyangana na makita.” Na nsima, azongelaki lisusu koyangana na makita. Likambo moko oyo elenge yango alobaki ezali mpenza na ntina mingi, alobaki boye: “Namonaki ete nyonso wana eyaki mpo nazalaki kolya bilei ya elimo te. Nazalaki koyekola te. Yango wana nakokaki kolonga komekama te. Na nsima, nabandaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mokemoke, nabandaki lisusu kozongela makasi na elimo mpe natikaki makambo ya bosɔtɔ. Ezalaki litatoli malamu epai ya bato oyo bamonaki ndenge oyo nabongwanaki. Nazwaki batisimo, mpe sikoyo nazali na esengo.” Eloko nini epesaki elenge mobali wana makasi ya kolonga bamposa ya nzoto? Azwaki lisusu makasi ya elimo mpo akómaki koyekola Biblia ye moko mbala na mbala.
20. Ndenge nini elenge akoki kolonga mitambo ya Satana?
20 Bilenge baklisto, bozali na komekama mingi lelo oyo! Mpo bólonga mitambo ya Satana, bosengeli ntango nyonso kolyaka na elimo. Mokomi ya nzembo, oyo na ntembe te azalaki elenge, akangaki ntina ya likambo yango. Atɔndaki Yehova mpo na Liloba na ye, mpo ete ezali kosalisa ‘elenge mobali apɛtola nzela na ye.’—Nzembo 119:9.
Tokokende epai nyonso oyo Nzambe akomema biso
21, 22. Mpo na nini tokoki koloba te ete nzela ya solo ezali mpasi mingi
21 Yehova abimisaki libota ya Yisalaele na Ezipito mpe amemaki bango na Mokili ya Ndaka. Na makanisi na biso bato, tokoki komona lokola nde ntina moko ezalaki te ndenge aponaki komema bango na nzela oyo elekaki mpasi. Na esika amema bango pembenipembeni ya Mai Monene ya Méditerranée, oyo emonanaki lokola nzela ya malamu mpe ya mokuse, Yehova amemaki basaleli na ye na nzela ya mpasi, na mokili mokauki. Kasi, likambo oyo Nzambe asalaki emonisaki ete azali na boboto. Atako nzela ya mai monene ezalaki mokuse, yango elingaki komema Bayisalaele na mokili ya Bafilistia, banguna ya Yisalaele. Lokola aponaki nzela mosusu, Yehova abatelaki bato na ye ete bákutana nokinoki na Bafilistia te.
22 Ndenge moko mpe, tokoki komona lokola nde nzela oyo Yehova azali komema biso lelo oyo ezali nzela ya mpasi. Pɔsɔ na pɔsɔ, tozali na makambo mingi ya elimo na programɛ na biso, kati na yango, koyangana na makita, koyekola biso moko, mpe kobima na mosala ya kosakola. Tokoki komona lokola nde banzela mosusu ezali mpasi te. Kasi, tokokóma na esika oyo tozali koluka kokóma mpe oyo tozali kosalela molende se soki tolandi ndenge oyo Nzambe azali kotambwisa biso. Yango wana, tólanda ntango nyonso mateya ya Yehova mpe tótikala na “nzela ya sembo” libela na libela!—Nzembo 27:11.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini tosengeli mpenza koyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ?
• Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bálandaka makita malamu?
• Makambo nini esɛngami mpo na kozala moto oyo ayokaka malamu?
• Eloko nini ekoki kosalisa biso na kopesa biyano na makita?
[Elilingi na lokasa 16]
Koyangana na makita esalisaka biso tóbosana mokolo ya Yehova te.
[Bililingi na lokasa 18]
Tozali na ndenge mingi ya kosanzola Yehova na makita.