Nsango malamu ya Bokonzi ezali nini?
Na mbula oyo euti koleka, na mikili 235, bato 6 035 564, bilenge mpe mikóló, basalaki ngonga 1 171 270 425 mpo na koyebisa bato mosusu makambo na yango. Longola kopesa litatoli ya monɔkɔ, bakabolelaki bato mikanda koleka milio 700 mpo na kosakola mpe kolimbola yango. Bakabolaki mpe bankoto ya bakasɛti ya koyoka mpe ya komona, mpo na kopanza yango. “Yango” ezali nini?
“YANGO” ezali nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Ya solo, na lisolo ya bato, “nsango malamu oyo ya Bokonzi” esakolamá naino na bisika ebele boye te, ndenge ezali komonana lelo.—Matai 24:14.
Baoyo bazali kosala mosala yango ya kosakola mpe ya koteya na mokili mobimba bazali bango nyonso basali ya bolingo malamu. Na miso ya baoyo bandimaka makambo ya losambo te, basakoli yango bakoki komonana lokola bato oyo babongi te mpo na mosala yango. Na yango, nini mpenza ezali kopesa bango mpiko mpe kosalisa bango mpo na kolónga na mosala yango? Eloko ya liboso mpenza ezali nde nguya ya nsango malamu ya Bokonzi, mpamba te ezali nsango etali mapamboli oyo bato bakozwa. Mapamboli oyo bato nyonso bazelaka yango: bolamu, kozanga mikakatano ya nkita, boyangeli ya malamu, kimya mpe libateli, mpe likambo mosusu oyo bato bandimaka te ete ekoki kosalama: bomoi ya seko! Na ntembe te, yango ezali nsango ya malamu mpo na bato oyo bazali koluka ntina ya bomoi. Ɛɛ, okoki kozwa mapamboli wana nyonso mpe mingi mosusu soki ondimi koyamba mpe kosalela nsango malamu ya Bokonzi oyo ezali kosakolama.
Bokonzi ezali nini?
Mpo na nini bazali kosakola Bokonzi lokola nsango malamu? Ezali Bokonzi oyo bato ebele bateyamaki mpo na kobondela na ntina na yango na maloba oyo eyebani mingi: “Tata na biso oyo azali na Likolo, Nkombo na yo ezala mosantu, tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nse pelamoko na Likolo.”—Matai 6:9, 10.
Ezali Bokonzi oyo elobelamaki na Danyele, mosakoli ya Baebele, esili koleka mbula 2 500, ntango akomaki ete: “Nzambe na lola akotɛmisa Bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe Bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Na yango, nsango malamu ezali mpo na Bokonzi to boyangeli ya Nzambe oyo ekolongola makambo nyonso ya mabe mpe na nsima, ekoyangela mabele mobimba na kimya. Ekokokisa mokano oyo Mozalisi azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabele.—Genese 1:28.
“Bokonzi ya Likolo esili kobɛlɛma”
Esili koleka pene na mbula 2 000, nsango malamu ya Bokonzi esakolamaki na miso ya bato mpo na mbala ya liboso na moto moko oyo amipesaki, oyo mpe abendaki likebi ya bato mingi mpo na lolenge na ye ya komonana libanda mpe bizaleli na ye. Moto yango abengamaki Yoane Mobatisi, mwana ya nganga Moyuda Zekalia na mwasi na ye Elizabɛti. Yoane azalaki kolata elamba ya nsuki ya kamela mpe azalaki kolata mokaba ya mposo ya nyama na loketo lokola mosakoli Eliya, oyo azalaki elilingi na ye. Kasi ezalaki nsango na ye nde ebendaki likebi ya bato mingi. Asakolaki boye: “Bobongola mitema! Mpo ete Bokonzi ya Likolo esili kobɛlɛma.”—Matai 3:1-6.
Bato oyo bazalaki koyoka mateya ya Yoane bazalaki Bayuda oyo bazalaki komikumisa ete bazalaki basambeli ya Yehova, Nzambe ya solo. Mbula soki 1 500 liboso, ekólo na bango esalaki kondimana ya Mibeko na nzela ya Mose. Tempelo kitoko ya Yelusaleme ezalaki kaka; kuna bazalaki kotumba bambeka oyo Mibeko ezalaki kosɛnga. Bayuda bakanisaki ete losambo na bango ezalaki malamu na miso ya Nzambe.
Kasi, ntango balandaki mateya ya Yoane, bato mosusu bakómaki komona ete lingomba na bango ezalaki te ndenge oyo bazalaki kokanisela yango. Mimeseno mpe mateya ya filozofi ya Bagrɛki ekɔtaki na mateya ya losambo ya Bayuda. Mibeko oyo bazwaki epai ya Nzambe na nzela ya Mose ebebisamaki na ntango wana; kutu bayeisaki yango mpamba mpo na bindimeli mpe mimeseno oyo esalemaki na bato. (Matai 15:6) Lokola batambwisamaki mabe na bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na mitema makasi mpe bazangaki mawa, bato mingi bazalaki kosambela lisusu Nzambe te na lolenge oyo ekokaki kosepelisa ye. (Yakobo 1:27) Basengelaki kobongola mitema mpo na masumu oyo basalelaki Nzambe mpe oyo basalelaki kondimana ya Mibeko.
Na ntango wana, Bayuda mingi bazalaki kozela komonana ya Masiya, to Klisto, mpe bamosusu bazalaki komituna mpo na Yoane: “Ntango mosusu akoki kozala Klisto?” Kasi, Yoane andimaki te ete azalaki ye; abendaki nde likebi na bango epai ya moto mosusu, oyo alobaki mpo na ye ete: “Nabongi kokangola nkamba ya lipapa na ye te.” (Luka 3:15, 16) Ntango amonisaki Yesu epai ya bayekoli na ye, Yoane alobaki boye: “Talá Mwana-na-mpate ya Nzambe, molongoli ya masumu ya mokili.”—Yoane 1:29.
Na ntembe te, ezalaki nsango malamu, mpamba te Yoane azalaki bongo komonisa epai ya bato nyonso nzela ya kozwa bomoi mpe bolamu, elingi koloba Yesu, ye oyo azali “molongoli ya masumu ya mokili.” Lokola bazali bakitani ya Adama na Eva, bato nyonso babotamaka na nse ya bokonzi mabe ya lisumu mpe ya liwa. Baloma 5:19 elobi boye: “Zambi pelamoko moto moko [Adama] na nkanza na ye azalisi bato mingi na masumu, bongo mpe moto moko [Yesu] na nzela na botosi na ye azalisi bato mingi na boyengebene.” Ndenge moko na mwana ya mpate oyo apesami lokola mbeka, Yesu asengelaki ‘kolongola masumu’ mpe kobongola bomoi ya mpasi oyo bato bazalaki na yango. Biblia elobi ete: “Zambi masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa; nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi ya seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.”—Baloma 6:23.
Lokola azalaki moto ya kokoka, moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, Yesu akómaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Na Malako 1:14, 15, Biblia eyebisi biso ete: “Na nsima ya kokangama ya Yoane, Yesu akómaki na Galilai kosakola nsango malamu na Nzambe. Alobi ete, Elaka esili kokoka mpe Bokonzi ya Nzambe ebɛlɛmi; bobongola mitema mpe bondima nsango malamu.”
Baoyo bandimaki nsango ya Yesu mpe bamonisaki kondima na nsango malamu bazwaki mapamboli mingi. Yoane 1:12 (NW) elobi boye: “Kasi epai na baoyo bayambi ye [Yesu], apesi bango nguya ya kokóma bana ya Nzambe, mpamba te bamonisaki kondima na nkombo na ye.” Lokola bakómaki bana ya Nzambe, bakokaki kozwa bomoi ya seko lokola mbano.—1 Yoane 2:25.
Kasi libaku malamu ya kozwa mapamboli ya Bokonzi esukaki kaka epai ya bato ya ekeke ya liboso te. Lokola tolobaki yango na ebandeli, lelo oyo nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama mpe koteyama na mabele mobimba. Na bongo, bato bakoki kozwa mapamboli ya Bokonzi yango. Osengeli kosala nini mpo ozwa mapamboli yango? Okoyeba yango na lisolo oyo elandi.