Tókumisa Yehova mpo na misala na ye minene!
“Motema na ngai esanzoli Nkolo . . . Mpo ete Oyo-na-Nguya asaleli ngai makambo minene.”—LUKA 1:46-49.
1. Ebongi na biso tókumisa Yehova mpo na misala nini ya minene?
YEHOVA abongi na lokumu mpo na misala na ye minene. Ntango Mosakoli Mose ayebisaki ndenge oyo Bayisalaele balongwaki na boombo na Ezipito, alobaki boye: “Miso na bino mamoni mosala monene nyonso ya [Yehova], oyo esalaki ye.” (Deteronome 11:1-7) Ntango anzelu Gabaliele ayebisaki ngɔndɔ Malia kobotama ya Yesu, Malia alobaki mpe maloba ya ndenge yango ete: “Motema na ngai esanzoli Nkolo . . . Mpo ete Oyo-na-Nguya asaleli ngai makambo minene.” (Luka 1:46-49) Biso Batatoli ya Yehova tosanzolaka ye mpo na misala minene oyo asalaki; na ndakisa, kolongola Bayisalaele na boombo ya Ezipito mpe likamwisi ya kobotama ya Mwana na ye ya bolingo.
2. (a) Mpo na kokokisa “mokano” na ye “ya seko,” Nzambe akosalela bato ya botosi makambo nini? (b) Yoane amonaki makambo nini ntango azalaki na Esanga Patamo?
2 Misala minene ya Yehova mingi ezali na boyokani na “mokano ya seko” oyo azali na yango ya kopambola bato na nzela ya Masiya mpe Bokonzi na ye. (Baefese 3:8-13, NW) Mokano yango ezalaki kokokisama mokemoke ntango ntoma Yoane, oyo akómaki mobange, amonaki na emonaneli ekuke moko efungwamaki mpe na kati na yango amonaki makambo ya likoló. Ayokaki mongongo moko lokola kelelo oyo ezali kobɛta mpe elobaki ete: “Butá awa, mpe nakotalisa yo makambo makoki na yango kobima na nsima na oyo.” (Emoniseli 4:1) Yoane azwaki “emoniseli ya Yesu Klisto” ntango bakonzi ya Loma batyaki ye na Esanga Patamo lokola moto ya bolɔkɔ “mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu.” Oyo ntoma amonaki mpe oyo ayokaki emonisaki makambo mingi na ntina na mokano ya seko ya Nzambe, engɛngisaki baklisto nyonso ya solo na elimo mpe elendisaki bango na ntango oyo basengelaki na yango mpenza.—Emoniseli 1:1, 9, 10.
3. Bankulutu 24 oyo Yoane amonaki na emonaneli bazali elilingi ya banani?
3 Na nzela ya ekuke oyo efungwamaki na likoló, Yoane amonaki mikóló 24, bafandi na bakiti mpe balati mitole, lokola bakonzi. Bakitisaki bilongi na nse liboso ya Nzambe mpe balobaki ete: “Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” (Emoniseli 4:11) Mikóló yango bazali komonisa baklisto bapakolami nyonso nsima ya lisekwa na bango mpe na esika ya nkembo oyo Nzambe alaki bango. Basepeli kopesa Yehova lokumu mpo na misala na ye minene na biloko oyo akelá. Biso mpe tokamwaka liboso ya makambo oyo ezali komonisa ‘nguya ya seko mpe bonzambe’ ya Yehova. (Baloma 1:20) Ntango tozali koyekola makambo mingi na ntina na Yehova, tozali mpe komona bantina mosusu ya kokumisa ye mpo na misala na ye minene.
Sakolá misala ya lokumu ya Yehova!
4, 5. Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ndenge oyo Davidi akumisaki Yehova.
4 Davidi, mokomi ya nzembo, akumisaki Nzambe mpo na misala na ye minene. Na ndakisa, Davidi ayembaki ete: “Yembelá [Yehova] nzembo, ye oyo afandi kati na Siona; sakolá misala na ye kati na mabota. Ɛ [Yehova], zalá na boboto epai na ngai; talá minyoko mikonyokola bango ngai baoyo bayini ngai; yo okotombola ngai likoló longwa na bikuke ya kufa, ete nasakola makambo ya kosanzola yo kati na bikuke ya mwana mwasi ya Siona.” (Nzembo 9:11, 13, 14) Davidi apesaki mwana na ye Salomo plan ya tempelo, bongo na nsima apambolaki mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo: “Ɛ [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu . . . Bokonzi mpe ezali na yo, ɛ [Yehova], mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso. . . . Boye, ɛ Nzambe na biso, [sikoyo] tokotɔnda yo mpe tokosanzola nkombo na yo ya nkembo.”—1 Ntango 29:10-13.
5 Mbala na mbala Makomami ezali kolendisa biso ete tókumisaka Nzambe, na ndakisa ya Davidi. Mokanda ya Nzembo ezali na ebele ya maloba oyo ezali kokumisa Nzambe, mpe pene na katikati ya banzembo yango ezali ya Davidi. Azalaki ntango nyonso kokumisa mpe kotɔnda Yehova. (Nzembo 69:30) Lisusu, banda kala mpenza, tokumisaka Yehova na banzembo oyo Davidi mpe bato mosusu bakomaki na kopemama na elimo ya Nzambe.
6. Mokanda ya Nzembo ezali na ntina nini mpo na biso?
6 Mokanda ya Nzembo ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova! Ntango tolingi kotɔnda Nzambe mpo na makambo nyonso oyo asaleli biso, tokoki kokanisa maloba kitoko oyo ezali na Nzembo. Na ndakisa, ntango tolamuki na ntɔngɔ, na motema na biso tokoki koyoka mposa ya koloba maloba lokola oyo: “Ezali malamu kotɔnda [Yehova], mpe kokumisa nkombo na yo, Oyo-Aleki-Likoló, mpe koyebisa boboto na yo na ntɔngɔ mpe sembo na yo na butu . . . Zambi yo [Yehova] ozali kosepelisa ngai na misala na yo mpe nakoyembela na esengo misala ya mabɔkɔ na yo.” (Nzembo 92:1-4) Ntango tolongi mokakatano moko oyo ezalaki kopekisa biso tólanda kokola na elimo, tokoki kozala na mposa ya komonisa esengo mpe botɔndi na biso na libondeli, lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Yakani! Tóyemba na esengo liboso ya [Yehova], tóganga na esengo epai na libanga ya kobika na biso. Tiká tókóma liboso na ye na kokumisa; tiká tósala makɛlɛlɛ na kosepela epai na ye na nzembo.”—Nzembo 95:1, 2.
7. (a) Likambo nini tomonaka na banzembo mingi ya baklisto? (b) Wapi ntina moko oyo tosengeli kokómaka na ngonga ya malamu na makita mpe kolanda yango tii na nsuka?
7 Mbala mingi toyembaka nzembo mpo na kokumisa Yehova na makita ya lisangá mpe na mayangani. Nzokande, maloba ya banzembo yango mingi euti na makanisi oyo epemamaki na elimo oyo ezali na mokanda ya Nzembo. Tozali mpenza na esengo ya kozala na ebele ya banzembo kitoko oyo ezali kokumisa Yehova! Kokumisa Nzambe na nzembo ezali moko ya makambo oyo esengeli mpenza kotinda biso tókómaka na makita na ngonga malamu mpe tólandaka yango tii na nsuka; soki tozali kosala bongo, tokosangana na bandeko na biso na kokumisa Yehova na nzembo mpe na mabondeli.
“Bókumisa Yah!”
8. Liloba “Aleluya” ezali kolendisa likambo nini mpe mbala mingi ebongolamaka ndenge nini?
8 Liloba “Aleluya” euti na monɔkɔ ya Liebele; ezali kolendisa na kokumisa Yehova mpe mbala mingi ebongolamaka ete “Bókumisa Yah.” Na ndakisa, na Nzembo 135:1-3, bazali kolendisa biso na maloba ya esengo oyo: “Aleluya! Bósanzola nkombo ya [Yehova], bósanzola ye, bino baombo ya [Yehova], bino bokotɛlɛmaka kati na ndako ya [Yehova], kati na lopango ya ndako ya Nzambe na biso. Bósanzola [Yehova] mpo ete [Yehova] azali malamu. Bóyembela nkombo na ye, zambi [ezali] kitoko.”
9. Nini etindaka biso na kokumisa Yehova?
9 Soki tokanisi misala ya kokamwa ya Nzambe, mpe biloko nyonso oyo akelá, na mpe makambo nyonso oyo azali kosala mpo na biso, botɔndi oyo tozali na yango ekotinda biso tókumisa ye. Soki tokanisi makamwisi oyo Yehova asalaki mpo na basaleli na ye na ntango ya kala, mitema na biso ekotinda biso na kosanzola ye. Ntango mpe tozali komanyola likoló ya makambo minene oyo Yehova alaki, tozali kokanisa ndenge mosusu oyo tokoki kosanzola mpe kotɔnda ye.
10, 11. Ndenge nini bomoi oyo tozali na yango ezali kotinda biso na kokumisa Nzambe?
10 Bomoi oyo tozali na yango esengeli mpe kotinda biso na kokumisa Yah. Davidi ayembaki ete: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo izali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:14) Ya solo, ‘tosalemi na motindo ya kokamwa’ mpe apesi biso makoki ya malamu mingi lokola komona, koyoka mpe kokanisa. Yango wana, na bomoi na biso mobimba tosengeli kosalaka makambo oyo ezali kokumisa Mozalisi na biso! Paulo amonisaki makanisi ndenge moko ntango akomaki boye: “Soko bokolyaka soko bokomelaka, soko bokosalaka nini, bósala nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 10:31.
11 Soki mpenza tolingaka Yehova, tokosala makambo nyonso mpo na nkembo na ye. Yesu alobaki ete mobeko ya liboso ezali boye: “Olinga mpe Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.” (Malako 12:30; Deteronome 6:5) Tosengeli kolinga Yehova mpe kokumisa ye lokola Mozalisi na biso mpe Ye oyo apesaka “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17; Yisaya 51:13, NW; Misala 17:28) Mayele oyo tozali na yango, makanisi mpe makasi na biso, nyonso wana ezali makabo mpe makoki oyo Yehova apesi biso. Lokola azali Mozalisi na biso, ebongi na biso tólinga mpe tókumisaka ye.
12. Omiyokaka ndenge nini ntango otali misala minene ya Yehova mpe okanisi maloba ya Nzembo 40:5?
12 Soki totali misala minene ya Yehova, tokomona bantina mingi ya kolinga mpe kokumisa ye! Davidi ayembaki ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe mikano na yo izali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te. Soko nakoloba mpe nakoyebisa yango, ikoleka oyo ikoki kotángama.” (Nzembo 40:5) Davidi akokaki te kotánga misala nyonso ya kokamwa ya Yehova; biso mpe tokoki kotánga yango te. Kasi, tókumisaka Nzambe mbala nyonso oyo mosala monene na ye moko ebendi likebi na biso.
Misala oyo ezali na boyokani na mokano ya seko ya Nzambe
13. Ndenge nini misala minene ya Nzambe esimbi elikya na biso?
13 Misala minene mpe ebongi na lokumu oyo Nzambe akosala mpo na kokokisa mokano na ye ya seko, yango nde ekokokisa elikya na biso mpo na mikolo ezali koya. Ntango bato batombokelaki ye na elanga ya Edene, Yehova alobaki esakweli ya liboso oyo ezali kopesa biso elikya. Ntango akatelaki nyoka etumbu, Nzambe alobaki boye: “Nakotya koyinana na kati na yo na mwasi, na kati ya mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi nsima ya likambo monene oyo Yehova asalaki, elingi koloba ndenge abatelaki Noa na libota na ye na Mpela ya mokili mobimba oyo ebomaki bato nyonso ya mabe, bazalaki kolikya na Mombóto ya mwasi oyo Nzambe alakaki. (2 Petelo 2:5) Makambo oyo Yehova alakaki bato ya kondima lokola Abalayama na Davidi esalisaki na koyeba malamu makambo oyo Yehova asengelaki kokokisa na nzela ya Mombóto.—Genese 22:15-18; 2 Samwele 7:12.
14. Wapi mosala eleki monene oyo Yehova asalaki mpo na bato?
14 Lolenge eleki monene oyo Yehova amonisaki ete asalaka misala minene mpo na bato ezali ndenge apesaki Yesu Klisto, Mwana na ye mobotami-bobele-moko, Mombóto oyo alakamaki, lokola mbeka mpo na kosikola bato. (Yoane 3:16; Misala 2:29-36) Lisiko yango efungolaki nzela mpo kozongisa boyokani kati na bato na Nzambe. (Matai 20:28; Baloma 5:11) Bato ya liboso oyo bazongaki epai na ye, Yehova asangisaki bango na lisangá ya boklisto, lisangá oyo esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. Bato yango bazwaki elimo santu mpe yango esalisaki bango básakola nsango malamu tii na bamboka mosika; bazalaki komonisa ete liwa mpe lisekwa ya Yesu epesaki bato ya botosi libaku ya kozwa mapamboli ya seko na Bokonzi ya likoló.
15. Mosala nini ya kokamwa Yehova asali na mikolo na biso?
15 Na mikolo na biso, Yehova asali likambo mosusu ya kokamwa: ayanganisi bato ya nsuka kati na baklisto bapakolami. Baanzelu basimbaki mipɛpɛ oyo ekobebisa mpo ete batikali kati na ba 144 000 oyo bakoyangela na Klisto kuna na likoló bátyama bilembo. (Emoniseli 7:1-4; 20:6) Nzambe alongolaki baklisto bapakolami na boombo ya elimo na “Babilone Monene,” elingi koloba mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Emoniseli 17:1-5) Kolongwa na bango na boombo na 1919 mpe ndenge oyo Nzambe azali kobatela bango kobanda wana esalisi batikali bapakolami na kongɛnga mpe kopesa litatoli ya nsuka liboso Yehova aboma mokili mabe ya Satana na “bolɔzi monene” oyo ezali lisusu mosika te.—Matai 24:21; Danyele 12:3; Emoniseli 7:14.
16. Likambo nini ezali kosalema na nzela ya mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba na mikolo na biso?
16 Batatoli ya Yehova bapakolami na elimo bazalaki na molende mpe bazalaki na esika ya liboso na mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba. Yango wana ebele ya bato bazali kokóma basambeli ya Yehova oyo babengami “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Tozali na esengo ete nzela ezali naino polele mpo bato ya komikitisa báya kosangana na biso mpo na kokumisa Yehova. Baoyo bazali kondima ntango tozali kobelela ete “yaká,” bazali komitya na ngámbo ya bato oyo bakobika na bolɔzi monene, mpe bazali na elikya ya kokumisa Yehova libela na libela.—Emoniseli 22:17.
Bankóto ya bato bazali koya na losambo ya solo
17. (a) Ndenge nini Yehova asalaka makambo minene na mosala na biso ya kosakola? (b) Ndenge nini Zekalia 8:23 ezali kokokisama?
17 Lelo oyo, Yehova azali kosala makambo minene mpe ebongi na lokumu na oyo etali mosala ya kosakola. (Malako 13:10) Na bambula oyo euti koleka, ‘afungolaki ekuke mpo na mosala monene.’ (1 Bakolinti 16:9) Na nzela na yango, nsango malamu ezali sikoyo kosakolama na bateritware minene epai banguna ya solo bazalaki kokanga nzela. Bato mingi oyo bazalaki na molili ya elimo bazali sikoyo koya kosambela Yehova. Bazali kokokisa esakweli oyo elobi ete: “[Yehova] na bibele alobi boye ete, Na mikolo yango, bato zomi longwa na mabota na maloba nyonso, bakosimba elamba ya moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) “Moto” oyo balobeli awa azali elilingi ya Bayuda ya elimo, elingi koloba batikali bapakolami na mikolo na biso. Lokola motángo zomi emonisaka kokoka mpo na biloko ya mabele, “bato zomi” bazali elilingi ya “ebele monene” oyo basangisami na “Yisalaele ya Nzambe,” mpo bázala “etonga moko.” (Emoniseli 7:9, 10; Bagalatia 6:16) Ezali mpenza esengo na komona ebele ya bato bazali kosala mosala ya bosantu elongo lokola basambeli ya Yehova Nzambe!
18, 19. Nini ezali komonisa ete Yehova apambolaka mosala ya kosakola?
18 Mitema na biso etondi na nsai ete bankóto ya bato bazali kondima losambo ya solo na mikili oyo losambo ya lokuta ezalaki mpenza makasi mpe ezalaki komonana lokola nde ata mokolo moko te bato bakondima nsango malamu. Talá mikili oyo ezali lelo oyo na basakoli ya Bokonzi kobanda na 100 000 tii na mikili oyo bazali pene na 1 000 000 na Annuaire des Témoins de Jéhovah ya mbula oyo. Yango ezali komonisa polele mpenza ete Yehova azali kopambola mosala ya kosakola Bokonzi.—Masese 10:22.
19 Biso basaleli ya Yehova tozali kosanzola mpe kotɔnda Tata na biso ya likoló oyo apesi biso bomoi oyo ezali na ntina, apesi biso mosala oyo ezali na litomba, mpe apesi biso elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Tozali kozela na motema likoló ntango Nzambe akokokisa makambo nyonso oyo alaki mpe mposa na biso ezali mpenza ete ‘tómibatela na bolingo ya Nzambe, kino bomoi ya seko.’ (Yuda 20, 21) Tozali na esengo na komona ete ebele monene oyo ezali kokumisa Nzambe ezali lelo na bato soki 6 000 000! Ezali komonana polele ete Yehova azali kopambola: batikali bapakolami elongo na baninga na bango bampate mosusu basangani lelo oyo na masangá soki 91 000 na mikili 235. Biso nyonso tozali kolya bilei malamu ya elimo na milende oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kolɛmba te kosala. (Matai 24:45) Ebongiseli ya Teokrasi ezali kotambwisa mosala ya Bokonzi na bolingo na nzela ya bafiliale 110 ya Batatoli ya Yehova. Tozali mpenza na botɔndi ete Yehova apesi basaleli na ye mposa ya ‘kokumisa ye na biloko na bango ya motuya.’ (Masese 3:9, 10) Yango wana, mosala na biso ya kosakola ezali kokoba; bandako ya konyata mikanda, Babetele mpe bandako ya bamisionɛrɛ, Bandako ya Bokonzi, mpe Bandako ya Mayangani ezali kotongama malamu.
20. Soki tokanisi misala minene mpe oyo ebongi na lokumu ya Yehova, esengeli kopusa biso na kosala nini?
20 Tokoki te kotánga misala nyonso minene mpe oyo ebongi na lokumu oyo Tata na biso ya likoló asalaka. Moto oyo azali mpenza na motema sembo akoboya te koya kosangana na ebele ya basanzoli ya Yehova! Yango wana, tiká ete bato nyonso oyo balingaka Nzambe báganga na esengo ete: “Aleluya! Bósanzola [Yehova] longwa na lola. Bósanzola ye kuna na likoló. Bósanzola ye bino baanzelu na ye na likoló, . . . Bilenge mpe baseka lokola, banunu mpe bana elongo; tiká ete básanzola nkombo ya [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki. Nkembo na ye ezali likoló ya mokili mpe lola.” (Nzembo 148:1, 2, 12, 13) Ɛɛ, sikoyo mpe libela na libela, tókumisa Yehova mpo na misala na ye minene!
Okopesa eyano nini?
• Tángá mwa misala ya Yehova oyo ebongi na lokumu.
• Nini epesaka yo mposa ya kokumisa Yehova?
• Ndenge nini misala minene ya Nzambe esimbi elikya na biso?
• Misala nini ebongi na lokumu Yehova asalaka na nzela ya mosala ya kosakola Bokonzi?
[Elilingi na lokasa 10]
Oyembaka nzembo na motema mobimba elongo na bandeko mpo na kokumisa Yehova ?
[Bililingi na lokasa 13]
Tozali na esengo ete nzela ezali naino polele mpo bato ya komikitisa báya kosangana na biso na kokumisa Yehova