Zabolo azali mpenza, ezali kaka biyambayamba te
“Testama ya Sika mobimba ezali kolobela kowelana oyo ezali, na ngámbo moko, Nzambe na nguya ya malamu mpe na ngámbo mosusu Satana na nguya ya mabe. Ezali kaka makanisi ya mokomi moko te to ya bakomi mibale te, kasi bango nyonso. . . . Ezali komonana polele na Testama ya Sika mobimba. Satana azali solo mpe azali na mayele mabe, azali ntango nyonso kotɛmɛla Nzambe na basaleli na ye.”—“The New Bible Dictionary.”
KASI, mpo na nini bato mingi oyo balobaka ete bazali baklisto mpe balobaka ete bandimelaka Biblia bandimaka te ete Zabolo azali mpenza? Mpamba te bandimaka mpenza te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. (Yilimia 8:9) Balobaka ete bato oyo bakomaki Biblia, bakomaki mateya ya filozofi ya bato ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango, bakomaki mpenza mateya ya solo ya Nzambe te. Na ndakisa, na kati ya buku na ye (Likambo ya kozala moklisto [na Lingelesi]), Hans Küng, moto ya teoloji na Lingomba ya Katolike, akomaki boye: “Masapo oyo ezali kolobela Satana na ebele ya bademo . . . eutaki na masapo ya Babilone mpe ekɔtaki liboso na Lingomba ya Bayuda mpe na nsima na Testama ya Sika.”
Kasi Biblia ezali liloba ya bato te; ezali mpenza Liloba ya Nzambe oyo epemami. Yango wana, ekozala malamu tótya mpenza likebi na makambo oyo ezali koloba mpo na Zabolo.—2 Timote 3:14-17; 2 Petelo 1:20, 21.
Yesu akanisaki nini na likambo yango?
Yesu Klisto azalaki kondima ete Zabolo azali mpenza. Ntango Yesu amekamaki, ezalaki te mabe moko oyo ezalaki kati na ye nde emekaki ye. Amekamaki mpenza na ekelamu ya solo oyo abengaki na nsima ete “mokolo ya mokili.” (Yoane 14:30; Matai 4:1-11) Andimaki mpe ete ezali na bikelamu mosusu ya elimo oyo balandaki Satana na mikano na ye ya mabe. Yesu abikisaki bato oyo ‘bazalaki na bilimu mabe.’ (Matai 12:22-28) Ata kutu buku moko oyo ekomamaki na bato oyo bandimaka Nzambe te (A Rationalist Encyclopædia) emonisi yango na maloba oyo: “Bato ya teoloji bakutanaka ntango nyonso na mokakatano mpo na kolimbola ndenge nini Yesu oyo Baevanzile elobeli andimaki ete bademo bazali.” Ntango Yesu alobaki mpo na Zabolo mpe bademo na ye, azalaki kaka kozongela te biyambayamba oyo eutaki na masapo mpamba ya Babilone. Ayebaki ete bazali mpenza.
Tokoki koyeba makambo mingi etali Zabolo soki totaleli maloba oyo Yesu alobaki na balakisi ya mangomba na ntango na ye: “Bino bouti na tata na bino, [Zabolo, NW], mpe mokano na bino ezali ete bósala mposa ya tata na bino. Ye mobomi ya bato longwa na ebandeli; atɛlɛmi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te. Wana ekosololaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko mpo ete azali mobuki ya [lokuta] mpe tata na yango.”—Yoane 8:44.
Na kotalela maloba oyo, Zabolo, nkombo oyo elimboli “motɔngi,” azalaki ‘mobuki ya lokuta mpe tata na yango.’ (Biso nde totɛngisi makomi.) Azalaki ekelamu ya liboso oyo akoselaki Nzambe makambo, mpe asalaki yango na elanga ya Edene. Yehova alobaki ete baboti na biso ya liboso ‘bakokufa solo’ soki balei mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe. Satana asalelaki nyoka mpo na koloba ete maloba wana ezali ya solo te. (Genese 2:17; 3:4) Yango wana mpenza babengaka ye “‘Nyoka ya kala,’ oyo babengaka Zabolo to Satana.”—Emoniseli 12:9, Boyokani ya Sika.
Zabolo akosaki na likambo ya nzete ya koyeba malamu na mabe. Amonisaki ete mobeko oyo epekisaki kolya mbuma ya nzete yango ezalaki sembo te; ezalaki komonisa ete Nzambe asalelaki mabe bokonzi na ye. Alobaki ete Adama na Eva bakokaki ‘kozala lokola Nzambe,’ elingi koloba kokata bango moko malamu na mabe. Satana amonisaki ete lokola bazalaki na bonsomi ya kopona, basengelaki kozwa bikateli na bango bango moko. (Genese 3:1-5) Kotɛmɛla oyo atɛmɛlaki bosembo ya banzela ya Nzambe ebimisaki ebele ya mituna ya ntina. Yango wana Yehova atikaki ntango mpo biyano na mituna yango ezwama. Elingi koloba ete batikaki Satana azala na bomoi mpo na mwa ntango. Sikoyo, etikali moke ntango oyo batikelaki ye esila. (Emoniseli 12:12) Kasi, azali kaka kosala nyonso mpo na kopɛngwisa bato na nzela ya Nzambe na lokuta na ye, azali kosalela bato lokola Bakomeli mpe Bafalisai oyo bazalaki na ntango ya Yesu mpo na kopalanganisa mateya na ye.—Matai 23:13, 15.
Yesu alobaki mpe ete Zabolo azali “mobomi ya bato longwa na abandeli” mpe “atɛlɛmi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Yango emonisi te ete Yehova akelaki Zabolo “mobomi ya bato.” Akelamaki te lokola elima oyo azali kokɛngɛla esika moko ya mɔ́tɔ mpe konyokola bato oyo bakotɛmɛla Nzambe. Na kati ya Biblia “lifelo” ezali mboka ya Satana te. Ezali kaka lilita, esika oyo bakundaka bato nyonso.—Misala 2:25-27; Emoniseli 20:13, 14.
Na ebandeli, Zabolo azalaki na kati ya “solo.” Liboso, azalaki na kati ya libota ya bikelamu ya elimo ya Yehova oyo ezali na likoló; ekelamu yango ya elimo azalaki mwana ya kokoka ya Nzambe. Kasi “atikalaki kati na solo te.” Aponaki nzela na ye moko mpe makambo na ye moko ya lokuta. “Ebandeli,” ezali te ntango bakelaki ye lokola anzelu, kasi ezali nde ntango atombokelaki Yehova na nko mpe akosaki Adama na Eva. Zabolo azali lokola bato oyo batombokelaki Yehova na ntango ya Mose. Biblia elobi mpo na bato yango ete: “Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango; bazali libota bapɛngwi mpe bayɔngɔtani.” (Deteronome 32:5) Tokoki mpe koloba bongo mpo na Satana. Akomaki “mobomi ya bato” ntango atombokaki mpe amemelaki Adama na Eva, to mpe bato nyonso, liwa.—Baloma 5:12.
Baanzelu batomboki
Baanzelu mosusu balandaki Satana na botomboki na ye. (Luka 11:14, 15) Baanzelu yango ‘batikaki bisika na bango mpenza’ mpe balataki nzoto ya bato mpo na kosangisa nzoto na “bana basi ya bato” na ntango ya Noa. (Yuda 6; Genese 6:1-4; 1 Petelo 3:19, 20) “Ndambo ya misato na minzoto ya likolo,” to mwa ndambo ya bikelamu ya elimo, balandaki nzela yango.—Emoniseli 12:4.
Mokanda ya Emoniseli oyo ezali mingimingi na maloba ya elilingi, emonisaka Zabolo lokola “dalagona motane monene.” (Emoniseli 12:3) Mpo na nini? Ezali te mpo azali mpenza na nzoto ya nsɔmɔ. Toyebi mpenzampenza te lolenge ya nzoto oyo bikelamu ya elimo bazali na yango, kasi, tokanisi mpenza ete nzoto ya Satana ekeseni te na oyo ya bikelamu mosusu ya elimo. Kasi, nkombo “dalagona motane monene” ebongi mpenza mpo na komonisa elimo ya kongala, ya nsɔmɔ mpe ya kobebisa oyo Satana azali na yango.
Lelo oyo, bapekisá Satana na bademo makambo mingi. Bakoki lisusu te kolata nzoto ya bato ndenge bazalaki kosala liboso. Mwa moke nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe oyo apesi na mabɔkɔ ya Klisto na 1914, babwakamaki na zingazinga ya mabele.—Emoniseli 12:7-9.
Zabolo azali monguna moko makasi
Atako bongo, Zabolo azali kaka monguna moko makasi. Azali “kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Satana azali te kaka mabe moko boye oyo ezalaka na kati ya bato ya kozanga kokoka. Ya solo, tozali kobunda mokolo na mokolo na bamposa na biso ya kosala masumu. (Baloma 7:18-20) Kasi etumba ya solosolo mpenza ezali “na mikonzi na mokili oyo ya molili, mpe na [bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló, NW].”—Baefese 6:12.
Ndenge nini elimo ya Zabolo epalangani na mokili? Ntoma Yoane alobaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Ya solo, tosengeli te koyoka Zabolo nsɔmɔ to kobangabangaka mpo na biyambayamba. Kasi, ekozala malamu tózala na ekɛngɛ liboso ya milende oyo azali kosala mpo na kokanga biso miso mpo tómona solo te mpe mpo na kobebisa bosembo na biso epai ya Nzambe.—Yobo 2:3-5; 2 Bakolinti 4:3, 4.
Zabolo asalelaka kaka te makambo ya makasi mpo na kobundisa bato oyo balingi kosala mokano ya Nzambe. Ntango mosusu, amikómisaka “anzelu ya pole.” Ntoma Paulo akebisaki baklisto na likama yango ntango akomaki boye: “Kasi lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye, nabangi ete makanisi na bino makopɛngwa longwa na sembo mpe pɛto mpo na Klisto.”—2 Bakolinti 11:3, 14.
Yango wana, tosengeli ‘kosɛnzɛla, kolala mpɔngi te mpe tótɛmɛla ye ngwi na kondima.’ (1 Petelo 5:8, 9; 2 Bakolinti 2:11) Tósala masɛki na Satana te: tómikɔtisa te na lolenge nyonso ya makambo oyo ezali na boyokani na bilimu mabe. (Deteronome 18:10-12) Tóyekolaka Liloba ya Nzambe malamumalamu, tóbosanaka te ete Yesu Klisto azalaki ntango nyonso kotánga makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe ntango Zabolo amekaki ye. (Matai 4:4, 7,10) Bondeláká mpo na kosɛnga elimo ya Nzambe. Mbuma na yango ekoki kosalisa yo na kokima misala ya nzoto, oyo Satana asalelaka mingi. (Bagalatia 5:16-24) Lisusu, bondeláká Yehova na etingya ntango oyoki ete Zabolo na bademo na ye bazali komeka yo.—Bafilipi 4:6, 7.
Tozali na ntina moko te ya kobangabangaka Zabolo. Yehova alaki ete akobatela biso na makambo nyonso oyo Satana akoki kosala. (Nzembo 91:1-4; Masese 18:10; Yakobo 4:7, 8) Ntoma Paulo alobi ete: “Bómikembisa kati na Nkolo mpe na makasi na nguya na ye.” Bongo ‘bokoyeba kotɛlɛma liboso ya mayele na oyo mabe.’—Baefese 6:10, 11.
[Elilingi na lokasa 5]
Yesu ayebaki ete Zabolo azali moto mpenza
[Elilingi na lokasa 6]
“Mokili mobimba ezali kolala na nguya na oyo mabe”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ya NASA
[Bililingi na lokasa 7]
Yekoláká Liloba ya Nzambe mpe bondeláká ntango nyonso mpo na kotɛmɛla Zabolo