Bolei ya mpokwa ya Nkolo ezali na ntina nini mpo na yo?
“Moto nyonso oyo azali kolya limpa to komɛla kɔpɔ ya Nkolo na ndenge oyo ebongi te akozala na ngambo mpo na nzoto mpe makila ya Nkolo.”—1 BAKOLINTI 11:27.
1. Likita nini ekoleka ntina na mobu 2003, mpe ebandaki ndenge nini?
LIKITA oyo eleki ntina na mobu 2003 ekozala mokolo ya 16 Aprili na mpokwa, nsima ya kolala ya moi. Mokolo yango, Batatoli ya Yehova bakoyangana mpo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto. Lokola lisolo oyo eleki emonisaki yango, Yesu abandisaki ekaniseli yango, oyo ebengamaka mpe Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, nsima ya kolya Elekeli elongo na bantoma na ye na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Limpa oyo batye levire te oyo esalelamaka na Ekaniseli emonisaka nzoto ya Klisto oyo ezali na masumu te mpe vinyo ya motane emonisaka makila na ye oyo esopamaki; yango nde mbeka kaka moko oyo ekoki kobikisa bato na lisumu mpe na liwa oyo bankɔkɔ ya liboso batikelaki biso.—Baloma 5:12; 6:23.
2. Likebisi nini ezali na 1 Bakolinti 11:27?
2 Bato oyo bakolya limpa mpe bakomɛla vinyo ya Ekaniseli basengeli kosala yango na ndenge ebongi. Ntoma Paulo alobaki likambo yango polele na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Kolinti na ntango ya kala; na mboka yango bazalaki kolya Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na ndenge oyo ebongi te. (1 Bakolinti 11:20-22) Paulo akomaki boye: “Moto nyonso oyo azali kolya limpa to komɛla kɔpɔ ya Nkolo na ndenge oyo ebongi te akozala na ngambo mpo na nzoto mpe makila ya Nkolo.” (1 Bakolinti 11:27) Maloba wana elimboli nini?
Bato mosusu bazalaki kosala Ekaniseli na ndenge oyo ebongi te
3. Makambo nini ebele ya baklisto ya Kolinti bazalaki kosala na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?
3 Ebele ya baklisto ya Kolinti bazalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli na ndenge oyo ebongi te. Na kati na bango bazalaki koyokana te, mpe ekoki kozala ete na eleko moko, bato mosusu bazalaki komema bilei na bango mpe bazalaki kolya yango liboso to na ntango ya likita wana; mbala mingi bazalaki kolya mpe komɛla na kolekisa ndelo. Ezala na makanisi to mpe na elimo, bazalaki kokɛngɛla te. Yango wana, bazalaki na “ngambo mpo na nzoto mpe makila ya Nkolo.” Baoyo balyaki te na mpokwa bazalaki koyoka nzala mpe mpo na yango, likebi na bango ezalaki kokende na makambo mosusu. Yango elingi koloba ete mingi bazalaki na limemya te mpo na limpa oyo bazalaki kolya mpe vinyo oyo bazalaki komɛla mpe bazalaki kobosana ete yango ezalaki likambo ya lisɛki te. Yango wana, bango moko bamilukelaki etumbu!—1 Bakolinti 11:27-34.
4, 5. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete moto oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo ya Ekaniseli amitalela malamumalamu?
4 Mbula na mbula, ntango Ekaniseli ekómi pene, ezali na ntina mpenza moto na moto oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo amitalela malamumalamu. Moto asengeli kozala malamu na elimo mpo aloba ete alyaki na ndenge oyo ebongi bolei yango ya bato ebele. Moto nyonso oyo azali kopesa mbeka ya Yesu limemya te, to azali kotyola yango, akoki ‘kolongolama na kati ya bato ya Nzambe,’ ndenge Moyisalaele oyo azali mbindo kasi alei bolei ya bato ebele azalaki kolongolama na kati ya libota ya Nzambe.—Levitike 7:20; Baebele 10:28-31.
5 Paulo akokanisaki Ekaniseli na bolei ya bato ebele na Yisalaele ya kala. Alobaki ete bato oyo bazali kolya limpa mpe komɛla vinyo bazali kosangana na kati ya Klisto mpe abakisaki boye: “Bokoki te komɛla kɔpɔ ya Yehova mpe kɔpɔ ya bademo; bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.” (1 Bakolinti 10:16-21) Soki moto moko oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo na Ekaniseli asali lisumu moko monene, asengeli koyambola yango epai ya Yehova mpe koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu. (Masese 28:13; Yakobo 5:13-16) Soki abongoli mpenza motema mpe aboti mbuma oyo ebongi na kobongola motema, tokoloba te ete alei limpa to amɛli vinyo na ndenge oyo ebongi te.—Luka 3:8.
Bato oyo bayanganaka lokola batali mpamba
6. Kaka banani nde Nzambe apesi bango libaku malamu ya kolya limpa mpe komɛla vinyo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?
6 Baoyo bazali kosala malamu epai na batikali na kati ya bandeko 144 000 ya Klisto basengeli nde kolya limpa mpe komɛla vinyo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo? (Matai 25:31-40; Emoniseli 14:1) Te. Nzambe apesi libaku malamu yango kaka na bato oyo apakoli bango na elimo santu mpo bázala “bazwi-ya-libula elongo na Klisto.” (Baloma 8:14-18; 1 Yoane 2:20) Kasi, ezali boni mpo na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela? (Luka 23:43; Emoniseli 21:3, 4) Lokola bato yango bakozwa bomoi na likoló te elongo na Klisto, bayanganaka na Ekaniseli mpe balandaka yango na limemya lokola batali mpamba.—Baloma 6:3-5.
7. Mpo na nini baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki ete basengelaki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?
7 Baklisto ya solo na ekeke ya liboso bapakolamaki na elimo santu. Mingi bazalaki na likabo moko to mpe na makabo mingi ya elimo oyo ezalaki kopesa bango likoki ya kosala makambo ya kokamwa, na ndakisa koloba na minɔkɔ ya bapaya. Yango wana, ezalaki mpasi te mpo bato yango báyeba ete bazali bapakolami na elimo mpe soki bakoki kolya limpa mpe komɛla vinyo. Kasi, na ntango na biso, moto akoki koyeba yango na kolanda maloba epemami lokola oyo: “Baoyo nyonso batambwisami na elimo ya Nzambe, bango bazali bana ya Nzambe. Mpo bozwaki te elimo ya boombo oyo ezali kopesa lisusu kobanga, kasi bozwaki nde elimo ya kokamatama lokola bana, oyo na nzela na yango togangaka ete: ‘Aba, Tata!’”—Baloma 8:14, 15.
8. “Blé” mpe “matiti mabe” oyo elobelami na Matai mokapo 13 ezali komonisa banani?
8 Nsima ya bankama ya bambula, bapakolami ya solosolo bakómaki lokola “blé” na kati ya elanga oyo etondi na “matiti mabe,” elingi koloba baklisto ya lokuta. (Matai 13:24-30, 36-43) Kobanda bambula ya 1870, mokemoke “blé” ekómaki komonana polele mpe, bambula mingi na nsima, bayebisaki baklisto bapakolami oyo bazali bakɛngɛli boye: “Bankulutu . . . basengeli koyebisa bato oyo bayangani [mpo na Ekaniseli] masɛngami oyo,—(1) kondima na makila [ya Klisto]; mpe (2) komipesa na Nkolo mpe na mosala na ye, ata tii na liwa. Bongo, basengeli kobengisa bato nyonso oyo bazali na kondima yango mpe bamipesi motindo wana ete básangana mpo na kokanisa liwa ya Nkolo.”—Étude des Écritures, Buku ya VI, La nouvelle création, lokasa 473 (na Lingelesi).a
Mosala ya koluka “bampate mosusu”
9. Ndenge nini ndimbola ya polele ya “ebele ya bato” epesamaki na 1935, mpe mpo na yango, bato mosusu oyo bazalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli basalaki nini?
9 Na nsima, ebongiseli ya Yehova ebandaki mosala ya koluka bayekoli mosusu ya Klisto oyo bazali bapakolami te. Likambo moko monene etali mosala yango esalemaki na katikati ya bambula ya 1930. Liboso ya ntango wana, basaleli ya Nzambe bazalaki kokanisa ete “ebele ya bato” oyo Emoniseli 7:9 elobeli ezali etuluku mosusu, oyo bazali lokola na esika ya mibale, oyo bakozwa mpe nzoto ya elimo mpe bakosangana na bapakolami 144 000 oyo bakosekwa na likoló, bato yango bakozala lokola baninga ya mwasi ya Klisto. (Nzembo 45:14, 15; Emoniseli 7:4; 21:2, 9) Kasi, na mokolo ya 31 Mai 1935, na lisukulu moko oyo esalemaki na liyangani ya Batatoli ya Yehova na Washington, na États-Unis, molobi asalelaki Makomami mpe alimbolaki ete “ebele ya bato” (“ebele monene,” haut-fleuve) ezali nde “bampate mosusu” oyo bazali na bomoi na ntango ya nsuka. (Yoane 10:16) Nsima ya liyangani yango, bato mosusu oyo bazalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo batikaki, mpamba te basosolaki ete bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele, kasi na likoló te.
10. Ndenge nini okoki kolimbola elikya mpe mikumba ya “bampate mosusu” lelo oyo?
10 Mosala ya koluka “bampate mosusu,” oyo bazali kondima lisiko, bazali komipesa na Nzambe, mpe bazali kopesa “etonga moke” ya bapakolami mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi ebandaki mpenzampenza na 1935. (Luka 12:32) Bampate mosusu yango bazali na elikya ete bakozala na bomoi ya seko awa na mabele, kasi na makambo mosusu nyonso, bazali ndenge moko ná batikali oyo bakozwa Bokonzi, kasi oyo bazali naino na bomoi awa na mabele na mikolo na biso. Lokola bapaya na Yisalaele ya kala oyo bazalaki kosambela Yehova mpe kotosa Mibeko, lelo oyo bampate mosusu bazali kondima mikumba ya boklisto, na ndakisa kosakola nsango malamu elongo na Bayisalaele ya elimo. (Bagalatia 6:16) Kasi, mopaya na kati ya Yisalaele akokaki kokóma mokonzi to nganga-nzambe te, ndenge moko mpe, moto moko te oyo azali na kati ya bampate mosusu akoki koyangela na Bokonzi ya likoló to kozala nganga-nzambe.—Deteronome 17:15.
11. Mpo na nini bambula oyo moto amipesi na Nzambe ekoki komonisa elikya oyo azali na yango?
11 Na nsima, na bambula ya 1930, ekómaki komonana polele ete bato nyonso oyo bakokende na likoló basilaki koponama. Eleki bambula mingi sikoyo, mosala oyo ezali kosalema ezali ya koluka bampate mosusu oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele. Soki mopakolami moko atikali lisusu sembo te, na ntembe te Nzambe akopona moto mosusu kati ya bampate mosusu mpo azwa esika oyo ezangi moto na kati ya ba 144 000; ekozala moto oyo asalelaka ye na bosembo banda kala.
Makambo oyo etindaka bato mosusu bákanisa ete bazali bapakolami
12. Ntango nini moto asengeli kotika kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, mpe mpo na nini?
12 Baklisto oyo bazali mpenza bapakolami bakakatanaka ata moke te mpo na elikya na bango ya kozala na bomoi na likoló. Kasi, ezali boni mpo na bato mosusu oyo bazali na elikya yango te kasi balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli? Na ntango basosoli ete bazali na elikya yango te, na ntembe te lisosoli na bango ekotinda bango bátika kolya limpa mpe komɛla vinyo. Nzambe akosepela te na moto oyo azali komimonisa ete azali na elikya ya bomoi na likoló mpo na kozala mokonzi mpe nganga-nzambe nzokande ayebi ete azali na elikya yango te. (Baloma 9:16; Emoniseli 20:6) Yehova abomaki Kola, Molevi moko oyo na makanisi na ye moko, alukaki kokóma nganga-nzambe lokola bana ya Alona. (Exode 28:1; Mituya 16:4-11, 31-35) Soki moklisto moko asosoli ete azalaki kosala libunga ndenge azalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, asengeli komonisa komikitisa, akotika mpe akobondela Yehova mpo na kosɛnga ye bolimbisi.—Nzembo 19:13.
13, 14. Mpo na nini bato mosusu bakoki komikosa mpe kokanisa ete bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló?
13 Makambo nini ekoki kotinda bato mosusu na kokanisa ete bazali na elikya ya bomoi na likoló nzokande bazali na yango te? Ekoki kozala ete bato yango bakutanaki na makambo oyo ebulunganisaki bango makanisi lokola kokufela mobalani mpe yango esalaki ete básepela lisusu na bomoi awa na mabele te. To mpe ekoki kozala mposa ya kozala na elikya moko ná moninga moko ya motema oyo alobaka ete azali moklisto mopakolami. Kasi, Nzambe apesi moto moko te mokumba ya kolendisa basusu ete báluka elikya yango. Lisusu, bato oyo bakozwa Bokonzi bayokaka mongongo moko boye te oyo eutaka epai ya Nzambe mpo na koyebisa bango ete bapakolami.
14 Mateya ya mangomba ya lokuta lokola oyo elobaka ete bato nyonso ya malamu bakokende na likoló, ekoki kotinda bato mosusu bákanisa ete bazali na elikya ya bomoi na likoló. Yango wana, tosengeli kokeba ete makambo oyo tozalaki kondima kala to mpe makambo mosusu ekosa biso te. Bato mosusu basengeli komituna mituna lokola oyo: ‘Bankisi oyo nazali komɛla, yango nde ezali kobulunganisa ngai makanisi? Ntango mosusu nayebaka nde kokanga motema te liboso ya makambo mpe yango ekoki kokosa ngai nakanisa ete nazali mopakolami?’
15, 16. Nini ekoki kotinda bato mosusu bákanisa ete bazali bapakolami, nzokande bazali bapakolami te?
15 Bato mosusu mpe basengeli komituna boye: ‘Nazali nde koluka esika ya lokumu? Nazali nde koluka bokonzi sikoyo to koluka ete na mikolo ezali koya nazala moto oyo akoyangela elongo na Klisto?’ Na ekeke ya liboso, bato oyo baponamaki mpo na kozwa Bokonzi bazalaki bango nyonso na mikumba ya minene na lisangá te. Lisusu, bato oyo bazali na elikya ya bomoi na likoló balukaka esika ya lokumu te, mpe batombolaka mapeka te mpo bazali bapakolami. Bazalaka na komikitisa oyo esengeli kozala epai ya bato oyo bazali na “makanisi ya Klisto.”—1 Bakolinti 2:16.
16 Bato mosusu bakoki kokanisa ete bazali na elikya ya bomoi na likoló mpo bayebi Biblia mingi. Kasi, kozala mopakolami na elimo epesaka moto mayele ya kokamwa te, mpamba te Paulo ateyaki bapakolami mosusu mpe apesaki bango toli. (1 Bakolinti 3:1-3; Baebele 5:11-14) Nzambe azali na ebongiseli moko mpo na kopesa basaleli na ye nyonso bilei ya elimo. (Matai 24:45-47) Yango wana, moto moko te asengeli kokanisa ete soki azali moklisto mopakolami asengeli kozala na bwanya oyo eleki ya bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. Kozala mopakolami na elimo emonanaka te na mayele mingi ya kolimbola makambo ya Biblia, ya kopesa litatoli, to ya kosala masukulu. Baklisto mosusu oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bazali mpe na makoki mingi na makambo yango.
17. Kopakolama na elimo etalelaka nini mpe nani akataka likambo yango?
17 Soki ndeko moko azali na mituna na ntina etali elikya ya bomoi na likoló, nkulutu moko to ndeko moko oyo akɔmɛli na elimo akoki kosolola na ye. Kasi, moto moko te akoki kozwela moto mosusu ekateli na likambo yango. Moto oyo azali mpenza na elikya yango azali na mposa te ya kotuna bato mosusu soki azali mpenza na elikya yango to te. Bapakolami ‘bazwi kobotama moko ya sika, ezali te na nzela ya momboto oyo epɔlaka, kasi nde na nzela ya oyo ekoki te kopɔla, na nzela ya liloba ya Nzambe ya bomoi mpe ya libela.’ (1 Petelo 1:23) Na lisalisi ya elimo mpe ya Liloba na ye, Nzambe azali kolona “momboto” oyo ekokómisa moto “ekelamu ya sika,” oyo akozala na elikya ya bomoi na likoló. (2 Bakolinti 5:17) Lisusu, Yehova ye moko nde aponaka bango. Koponama “ezali kotalela, moto oyo alingi to moto oyo azali kopota mbangu te, kasi nde Nzambe.” (Baloma 9:16) Ndenge nini sikoyo moto akoki koyeba ete azali mpenza na elikya ya bomoi na likoló?
Ntina oyo bakakatanaka te
18. Ndenge nini elimo ya Nzambe epesaka litatoli na elimo ya bapakolami?
18 Elimo ya Nzambe emonisaka baklisto bapakolami mpe endimisaka bango ete bazali na elikya ya bomoi na likoló. Paulo akomaki boye: “Bozwaki nde elimo ya kokamatama lokola bana, oyo na nzela na yango togangaka ete: ‘Aba, Tata!’ Elimo yango moko epesaka litatoli elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. Boye, soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula: ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula elongo na Klisto, soki tomoni mpasi elongo na ye mpo tózwa mpe nkembo elongo.” (Baloma 8:15-17) Elimo santu esalaka na kati ya bapakolami mpe elimo na bango moko to makanisi na bango etindaka bango bátalela makambo oyo Makomami elobi mpo na bana ya Nzambe na elimo ete elobami mpo na bango. (1 Yoane 3:2) Elimo ya Nzambe etindaka bango bámimona ete bazali mpenza bana na ye mpe epesaka bango elikya oyo bato mosusu bazali na yango te. (Bagalatia 4:6, 7) Kozala bato ya kokoka na bomoi ya seko awa na mabele esika moko na bandeko mpe baninga ezali likambo ya malamu mingi, kasi ezali yango te nde elikya oyo Nzambe apesi bango. Na nzela ya elimo na ye, Nzambe apesi bango elikya makasi ya bomoi na likoló mpe bazali kondima kotika bilikya mpe bisengo nyonso ya bomoi awa na mabele.—2 Bakolinti 5:1-5, 8; 2 Petelo 1:13, 14.
19. Kondimana ya sika esalaka mosala nini na bomoi ya moklisto mopakolami?
19 Baklisto bapakolami bandimaka mpenza ete bazali na elikya ya bomoi na likoló mpe ete bazali na kati ya kondimana ya sika. Yesu alobelaki yango ntango abandisaki Ekaniseli mpe alobaki boye: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.” (Luka 22:20) Kondimana ya sika esalemi kati na Nzambe ná bapakolami. (Yilimia 31:31-34; Baebele 12:22-24) Yesu azali nde moyokanisi ya kondimana yango. Makila ya Yesu oyo esopamaki nde epesi kondimana ya sika makasi ya kosala mosala na yango; yango wana, kondimana yango ebimisaki na kati ya Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu, libota moko mpo na nkombo ya Yehova mpe ekómisaki bato ya libota yango eteni ya “momboto” ya Abalayama. (Bagalatia 3:26-29; Misala 15:14) “Kondimana” yango “ya seko” epesi Bayisalaele nyonso ya elimo likoki ya kosekwa mpo na bomoi na likoló.—Baebele 13:20.
20. Bapakolami bazali na kondimana nini elongo na klisto?
20 Bapakolami bakakatanaka te na ntina etali elikya na bango. Bazali mpe na kati ya kondimana mosusu oyo ebengami kondimana mpo na Bokonzi. Na oyo etali kosangana na bango na Klisto, Yesu alobaki boye: “Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na kati ya komekama na ngai; mpe nazali kosala kondimana elongo na bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana elongo na ngai, mpo na bokonzi moko.” (Luka 22:28-30) Kondimana yango kati na Klisto mpe bakonzi oyo bakoyangela ná ye ekoumela libela.—Emoniseli 22:5.
Mikolo oyo ezalaka liboso ya Ekaniseli ezalaka ntango ya mapamboli
21. Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na mikolo oyo ezalaka liboso ya Ekaniseli?
21 Mikolo oyo ezalaka liboso ya Ekaniseli ezalaka na mapamboli mingi. Tokoki kotánga mikapo ya Biblia oyo ebongisami mpo na mikolo yango. Ezalaka mpe mikolo ya malamu mpenza mpo na komipesa na mabondeli, mpo na kokanisa mingi bomoi ya Yesu awa na mabele mpe liwa na ye, mpe mpo na kosakola Bokonzi. (Nzembo 77:12; Bafilipi 4:6, 7) Ekaniseli yango moko esalisaka biso tókanisa lisusu bolingo oyo Nzambe ná Klisto bamonisaki na ndenge babongisaki mbeka ya Yesu mpo na kobikisa biso. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Lisiko yango epesi biso elikya mpe kobɔndisama mpe esengeli kolendisa ekateli na biso ya kolanda matambe ya Klisto. (Exode 34:6; Baebele 12:3) Ekaniseli esengeli mpe kolendisa biso na kosala makambo oyo basɛngi biso basaleli ya Nzambe oyo tomipesi mpe na kozala bayekoli ya sembo ya Mwana na ye ya bolingo.
22. Wapi likabo oyo eleki makabo nyonso oyo Nzambe apesi bato, mpe wapi lolenge moko ya kolakisa botɔndi na biso mpo na yango?
22 Ya solo mpenza, Yehova apesi biso ebele ya makabo ya malamu! (Yakobo 1:17) Liloba na ye ezali kolakisa biso nzela, elimo na ye ezali kosalisa biso, mpe tozali na elikya ya bomoi ya seko. Likabo oyo eleki makabo nyonso oyo Nzambe apesi biso ezali mbeka ya Yesu mpo na kolimbisa masumu ya bapakolami mpe ya bato mosusu nyonso oyo bazali na kondima. (1 Yoane 2:1, 2) Na bongo, liwa ya Yesu ezali mpenza na ntina mpo na yo? Okozala na kati ya bato oyo, mpo na komonisa botɔndi na bango, bakoyangana na mokolo ya 16 Aprili 2003, ntango moi ekolala, mpo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi babimisaka yango lisusu te.
Biyano nini okopesa?
• Banani oyo basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?
• Mpo na nini “bampate mosusu” bayanganaka na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo mpe balandaka yango na limemya lokola batali mpamba?
• Ndenge nini baklisto bapakolami bayebaka ete basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto?
• Mikolo oyo ezalaka liboso ya Ekaniseli ezalaka ntango malamu mpo na makambo nini?
[Etanda/Bililingi na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bayangani na Ekaniseli
MITUYA EZALI NA BAMILIO
15 597 746
15
14
13 147 201
13
12
11
10
9
8
7
6
5
4 925 643
4
3
2
1
878 303
63 146
1935 1955 1975 1995 2002
[Elilingi na lokasa 18]
Okozala na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mbula oyo?
[Bililingi na lokasa 21]
Mikolo ya liboso ya Ekaniseli ezalaka ntango malamu ya komipesa na kotánga Biblia mpe na kosakola Bokonzi