Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
ELAMBO ya Nkolo ezali na ntina mpenza mpo na yo? Mpo na koyeba yango, tiká tótalela naino ntina oyo Yesu Klisto ye moko asalaki molulu yango ya ntina mingi.
Na mpokwa ya mokolo ya 14 Nisana, Yesu ná bayekoli na ye 12 bayanganaki na eteni moko ya ndako ya likoló na Yelusaleme mpo na kosala Elekeli oyo bazalaki kosala mbula na mbula. Nsima ya kolya Elekeli, Yuda abimaki mpo akende kotɛka Yesu. (Yoane 13:21, 26-30) Ntango Yesu atikalaki na bayekoli na ye 11 ya sembo, abandaki kosala “elambo ya mpokwa ya Nkolo.” (1 Bakolinti 11:20) Babengaka yango mpe Ekaniseli, mpamba te Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” Yango nde molulu kaka moko oyo batindaki baklisto bákanisaka.—1 Bakolinti 11:24.
Ekaniseli ezali molulu moko oyo bato basalaka mpo na kobatela na makanisi likambo moko to mpo na kobosana yango te. Na bisika mingi, bato batongaka bamonimá to baponaka mokolo moko boye mpo na kokanisaka moto moko to likambo moko ya ntina mingi. Awa Yesu abandisaki bolei ya ekaniseli, elingi koloba bolei oyo esengelaki kolamusaka makanisi ya bayekoli na ye mpo na kosalisa bango bábosana te makambo ya ntina mingi oyo esalemaki mokolo wana. Yango ezalaki mpo na kosalisa bato mosusu oyo bakobotama na nsima báyeba mpenzampenza soki makambo oyo Yesu asalaki na butu wana elimboli nini, mpe mingimingi biloko oyo asalelaki. Yesu asalelaki biloko nini mpe ezalaki kolimbola nini? Tiká tótalela lisolo ya Biblia oyo elobeli makambo oyo esalemaki na butu wana na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.).
Biloko oyo ezali kolimbola makambo ya bosantu
“Akamataki limpa, apesaki matɔndi, abukaki yango, mpe apesaki bango yango, alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’”—Luka 22:19.
Ntango Yesu akamataki limpa mpe alobaki ete, “oyo elakisi nzoto na ngai,” amonisaki ete limpa oyo batye levire te ezalaki elilingi ya nzoto na ye ya mosuni oyo ezalaki na lisumu te, oyo asengelaki kokaba “mpo na bomoi ya mokili.” (Yoane 6:51) Atako Babiblia mosusu ebongolaka ete “oyo ezali [na Grɛki, éstin] nzoto na ngai,” diksionɛrɛ (Greek-English Lexicon of the New Testament) ya Thayer elobi ete mbala mingi verbe yango elakisaka “komonisa, kolakisa, to kolimbola.” Ezali kopesa likanisi ya komonisa to kozala elilingi ya.—Matai 26:26.
Ezalaki mpe bongo mpo na kɔpɔ ya vinyo. Yesu alobaki ete: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.”—Luka 22:20.
Na lisolo oyo ezali na mokanda ya Matai, Yesu alobaki boye mpo na kɔpɔ: “Yango elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.” (Matai 26:28) Yesu asalelaki vinyo oyo ezalaki na kɔpɔ lokola elilingi ya makila na ye moko. “Kondimana ya sika” oyo asali na bayekoli na ye oyo bapakolami na elimo, oyo bakoyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na ye na likoló, esimbami na makila na ye oyo esopamaki.—Yilimia 31:31-33; Yoane 14:2, 3; 2 Bakolinti 5:5; Emoniseli 1:5, 6; 5:9, 10; 20:4, 6.
Vinyo oyo ezalaki na kɔpɔ ezalaki mpe komonisa ete makila ya Yesu esopami mpo na “kolimbisama ya masumu,” mpe na ndenge yango, elingaki kofungola nzela mpo na bato oyo bandimami na kati ya kondimana yango ete bábengama na bomoi na likoló mpo na kozwa libula elongo na Klisto. Na bongo, ezali kaka bato oyo bakokende na likoló, oyo motuya na bango eyebani malamu, nde basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli.—Luka 12:32; Baefese 1:13, 14; Baebele 9:22; 1 Petelo 1:3, 4.
Kasi, ezali boni mpo na bayekoli nyonso ya Yesu oyo bazali na kati ya kondimana ya sika te? Bango bazali “bampate mosusu” ya Nkolo, oyo bazali te na elikya ya koyangela esika moko na ye na likoló, kasi ya kozala nde na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. (Yoane 10:16; Luka 23:43; Emoniseli 21:3, 4) Baklisto yango ya sembo bazali ‘ebele ya bato oyo bazali kosalela Nzambe mosala ya bosantu butu na moi’; bazali na esengo ya koyangana na Elambo ya Nkolo lokola batali mpamba. Na monɔkɔ mpe misala na bango bazali komonisa ete: “Lobiko na biso ezali ya Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe ya Mwana-Mpate.”—Emoniseli 7:9, 10, 14, 15.
Esengeli kosalemaka mbala boni?
“Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”—Luka 22:19.
Esengeli kosalaka Ekaniseli mbala boni mpo na kokanisaka liwa ya Klisto? Yesu alobelaki yango polele te. Kasi, lokola asalaki yango na mpokwa ya mokolo ya 14 Nisana, na mpokwa ya Elekeli oyo bana ya Yisalaele bazalaki kosala mbala moko na mbula, yango ezali komonisa polele ete Yesu alingaki ete Ekaniseli esalemaka mbala moko na mbula. Mbula na mbula, Bayisalaele bazalaki kokanisa kosikolama na bango na boombo ya Ezipito, baklisto bazali nde kokanisa kosikolama na bango na boombo ya lisumu mpe ya liwa.—Exode 12:11, 17; Baloma 5:20, 21.
Likanisi ya kokanisaka mbala moko na mbula likambo moko ya ntina mingi ezali likambo ya sika te. Na ndakisa, mbala boni babalani basalaka anivɛrsɛrɛ ya libala na bango to mbala boni bato bakanisaka likambo moko ya ntina mingi na lisolo ya ekólo na bango? Mbala mingi, ekaniseli esalemaka kaka mbala moko na mbula, na mokolo oyo likambo yango esalemaki. Likambo moko oyo ezali kobenda likebi na biso yango oyo: bikeke mingi na nsima ya liwa ya Klisto, bato mingi oyo bamibengaki baklisto bazalaki kobengama Ba-Quartodécimans, nkombo oyo elimboli “bato ya mokolo ya zomi na minei,” mpamba te bazalaki kokanisa liwa ya Yesu mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 Nisana.
Likita ya mindɔndɔ te, kasi ezali na ndimbola monene
Ntoma Paulo alimbolaki ete Elambo ya Nkolo esengelaki kosalisa bayekoli ya Yesu ete ‘bákoba kosakola liwa ya Nkolo.’ (1 Bakolinti 11:26) Na bongo, Ekaniseli esengeli komonisaka polele likambo ya ntina mingi oyo liwa ya Yesu ekokisaki na kati ya mokano ya Nzambe.
Yesu Klisto alongisaki Yehova Nzambe lokola Mozalisi ya bwanya mpe ya bolingo mpe Mokonzi ya sembo ndenge atikalaki sembo tii na liwa. Adama atikalaki sembo te, kasi Yesu amonisaki polele ete moto akoki kotikala sembo epai na Nzambe ata kati na mikakatano ya ndenge nini, likambo yango emonisaki ete maloba ya Satana ezalaki mpenza lokuta.—Yobo 2:4, 5.
Elambo ya Nkolo ezali lisusu kosalisa biso tómonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yesu mpe komipesa na ye. Atako Yesu anyokwamaki makasi, atosaki Tata na ye tii na nsuka. Na bongo, apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na kofuta motuya monene oyo esengelaki mpo na kosomba biso na lisumu ya Adama. Ndenge Yesu ye moko amonisaki yango, ayaki mpo na “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Yango wana, masumu ya bato nyonso oyo bazali kondima Yesu, ekoki kolimbisama, mpe bakoki kozwa bomoi ya seko, ndenge Yehova akanaki yango na ebandeli mpo na bato.—Baloma 5:6, 8, 12, 18, 19; 6:23; 1 Timote 2:5, 6.a
Nyonso oyo ezali mpe komonisa motema malamu ya Yehova mpe boboto monene na ye na ndenge azwaki ebongiseli ya kobikisa bato. Biblia elobi ete: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele na oyo etali biso, mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya mokili mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo na likambo oyo ezali te ete, biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso.”—1 Yoane 4:9, 10.
Ekaniseli ya liwa ya Yesu ezali mpenza likambo ya ntina mingi! Lokola ezali likita moko ya mindɔndɔmindɔndɔ te, ekoki kosalema ata na esika nini na mokili; kasi banda kala, ezali na ndimbola monene oyo esalisaka na kokanisa likambo moko ya ntina mingi.
Ntina na yango mpo na yo
Liwa ya Nkolo na biso Yesu Klisto lokola mbeka ezali motuya monene oyo, ezala ye moko to Yehova tata na ye, bafutaki. Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu akufaki te lokola biso tokufaka mpo na lisumu ya bankɔkɔ na biso. (Baloma 5:12; Baebele 7:26) Azalaki na likoki ya kozala na bomoi libela na libela. Moto moko te akokaki kolongola bomoi na ye, ata na makasi, kozanga ete ye moko andima. Alobaki ete: “Moto moko te abɔtɔli ngai yango, kasi nazali kokaba yango na likanisi na ngai moko.”—Yoane 10:18.
Na yango, na bolingo na ye moko, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka mpo ete “na nzela ya liwa na ye akoka kobebisa nyɛɛ moto oyo azali na likoki ya kopesa liwa, elingi koloba, Zabolo; mpe ete akoka kopesa bonsomi na bato nyonso oyo mpo na kobanga liwa batyamaki na kati ya boombo na boumeli ya bomoi na bango mobimba.” (Baebele 2:14, 15) Liwa oyo Klisto akufaki ezali mpe komonisa bolingo mpe komipesa na ye. Ayebaki malamu mpenza ndenge oyo akonyokwama mpe akokufa.—Matai 17:22; 20:17-19.
Ekaniseli esalisaka biso lisusu tókanisa bolingo ya Yehova, tata na biso ya likoló, oyo eleki bolingo nyonso oyo bamoniselá biso. Lokola “azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa,” esalaki ye mpasi mingi mpenza na koyoka mpe komona ‘koganga makasi mpe mpisoli’ ya Yesu na elanga ya Getesemane, mpe ndenge oyo bazalaki kobɛta ye, ndenge oyo babakaki ye na nzete mpe liwa ya mpasi oyo akufaki. (Yakobo 5:11; Baebele 5:7; Yoane 3:16; 1 Yoane 4:7, 8) Tii na moi ya lelo, mbula soki 2 000 na nsima, kokanisa kaka likambo wana esalaka bato mingi mpasi na motema.
Kanisá ete Yehova ná Yesu bandimaki kosala nyonso wana kaka mpo na biso bato ya masumu! (Baloma 3:23) Mokolo na mokolo toyokaka mpasi mpo tozali bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka. Kasi, mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso ezali kopesa biso nzela ya kosɛnga Nzambe alimbisa masumu na biso. (1 Yoane 2:1, 2) Yango mpe ezali kopesa biso nzela ya koyoka nsɔni te mpo na kosolola na Nzambe mpe ya kozala na lisosoli ya pɛto. (Baebele 4:14-16; 9:13, 14) Likambo eleki monene ezali ete tokoki kozala na elikya ya kofanda libela na libela na paladiso awa na mabele. (Yoane 17:3; Emoniseli 21:3, 4) Makambo nyonso oyo tolobeli oyo ezali mpo na bolamu na biso mpe mingi mosusu euti kaka na mbeka oyo eleki bambeka mosusu nyonso oyo Yesu apesaki.
Monisá botɔndi na yo na Elambo ya Nkolo
Na ntembe te Elambo ya mpokwa ezali komonisa na ndenge ya kokamwa “boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza.” Mbeka ya lisiko oyo Yehova Nzambe abongisaki—oyo Yesu akokisaki yango na bolingo mpe na komipesa—ezali solo “likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.” (2 Bakolinti 9:14, 15) Makambo wana oyo ezali komonisa motema malamu ya Nzambe na nzela ya Yesu Klisto, ezali te kotinda yo na komonisa botɔndi mpe esengo mingi lisusu koleka?
Tondimi mpenza ete ezali bongo. Yango wana, tozali kobenga yo osangana na Batatoli ya Yehova ntango bakosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Na mbula oyo, Ekaniseli yango ekozala na mokolo ya misato 16 Aprili, na nsima ya kolala ya moi. Batatoli ya Yehova ya esika ofandi bakosepela koyebisa yo ngonga mpe esika oyo bakosala likita yango ya ntina mingi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina ya lisiko, talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
“OYO EZALI NZOTO NA NGAI” TO “OYO ELAKISI NZOTO NA NGAI” WAPI ELOBELI YA MALAMU?
Ntango Yesu alobaki ete, “Ngai nazali ekuke” mpe, “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo,” moto moko te akokaki kokanisa ete ye azalaki ekuke mpenza to nzete mpenza ya vinyo. (Yoane 10:7; 15:1) Ndenge moko mpe, ntango Bible na Lingala ya lelo oyo elobi ete Yesu alobaki: “Kopo oyo ezali makila na ngai . . . Yango nde moto ezali kotia Boyokani ya sika,” tokoloba te ete kɔpɔ yango moko ezalaki boyokani to kondimana ya sika. Ndenge moko mpe, ntango alobaki ete limpa ‘ezali’ nzoto na ye, tokoki kotya ntembe te ete limpa ezalaki nde komonisa to kolakisa nzoto na ye. Yango wana libongoli ya Charles B. Williams elobi ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai.”—Luka 22:19, 20.
[Elilingi na lokasa 5]
Limpa oyo batye levire te elakisi nzoto ya Yesu ezangi masumu mpe vinyo elakisi makila na ye oyo esopamaki
[Elilingi na lokasa 7]
Ekaniseli ezali mpo na kokanisa bolingo monene ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto