Ndenge nini tosengeli kotalelaka bato lokola mokolo ya Yehova ekómi pene?
“Yehova azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye, . . . kasi azali nde na motema molai epai na bino mpo alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.”—2 PETELO 3:9.
1, 2. (a) Ndenge nini Yehova azali kotalela bato lelo oyo? (b) Mituna nini tokoki komituna?
BASALELI ya Yehova bazali na mokumba ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19) Ntango tozali kokokisa mokumba yango mpe tozali kozela “mokolo monene ya Yehova,” tosengeli kotalelaka bato ndenge ye moko atalelaka bango. (Sefania 1:14) Ndenge nini Yehova atalelaka bato? Ntoma Petelo alobi boye: “Yehova azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde na motema molai epai na bino mpo alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Nzambe amonaka moto mokomoko ete akoki kobongola motema. “Mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Yehova asepelaka mingi ntango ‘moto mabe abongwani na nzela na ye mpe abiki’!—Ezekiele 33:11.
2 Biso mpe totalelaka bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango? Lokola Yehova, totalelaka moto mokomoko, azala mondɛlɛ to moindo to moto ya ekólo nini, ete akoki kokóma “mpate na etonga na ye”? (Nzembo 100:3, NW; Misala 10:34, 35) Tótalela ndakisa mibale oyo ezali komonisa ntina ya kotalela makambo ndenge moko na Nzambe. Na ndakisa nyonso mibale, etikalaki moke bamboka ebomama, mpe basaleli ya Yehova bayebaki likambo yango liboso. Bandakisa yango ezali na ntina mingi mpo na biso ntango tozali kozela mokolo monene ya Yehova.
Abalayama azalaki kotalela makambo ndenge moko na Yehova
3. Ndenge nini Yehova azalaki kotalela bato ya Sodoma ná Gomola?
3 Ndakisa ya liboso etaleli moto ya sembo Abalayama mpe bingumba Sodoma ná Gomola, oyo etondaki na misala ya mabe. Ntango Yehova ayokaki “kolela na ntina ya Sodoma ná Gomola,” abomaki bingumba wana ná bato na yango mbala moko te. Alukaki naino koyeba malamu makambo oyo ezalaki kuna. (Genese 18:20, 21) Atindaki baanzelu mibale na Sodoma, mpe bakómaki na ndako ya Lota, moto ya sembo. Kaka na butu oyo baanzelu yango bakómaki, “mibali ya mboka . . . bazingaki ndako, banda na elenge mobali tii na mobange, ebele nyonso ya bato,” bazalaki koluka kosangisa nzoto na baanzelu wana. Makambo ya nsɔni oyo bato wana bakómaki na yango emonisi mpenza ete esengelaki bingumba yango ebomama. Kasi, baanzelu batunaki Lota ete: “Ozali na moto mosusu awa? Bokilo mpe bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi mpe bato na yo nyonso na engumba oyo, bimisá bango na esika oyo.” Yehova apesaki bato mosusu ya engumba wana libaku ya kobika; kasi, kaka Lota ná bana na ye mibale ya basi nde babikaki.—Genese 19:4, 5, 12, 16, 23-26, NW.
4, 5. Mpo na nini Abalayama abondelaki Yehova mpo na bato ya Sodoma, mpe azalaki nde kotalela bato ndenge oyo Yehova azalaki kotalela bango?
4 Tózonga naino nsima na ntango oyo Yehova amonisaki mokano na ye ya kotala makambo oyo ezalaki kosalema na Sodoma ná Gomola. Na ntango yango Abalayama alobaki boye: “Soki bayengebene ntuku mitano bazali kati na mboka nde okoboma bango, mpe okobikisa mboka te na ntina na bayengebene ntuku mitano bazali kati na yango? Ebongi na yo te kosala likambo boye ete oboma bayengebene ná bato mabe elongo, ete bayengebene bázwa likamba lokola na oyo na bato mabe! Yango ebongi na yo te! Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?” Mbala mibale mobimba Abalayama asalelaki maloba “ebongi na yo te.” Na ndenge Abalayama ayebelaki Yehova, ayebaki ete akoki te koboma moyengebene nzela moko na moto mabe. Ntango Yehova alobaki ete akoboma Sodoma te soki akuti “bayengebene ntuku mitano kati na mboka” yango, Abalayama akitisaki motuya yango lisusu mpe lisusu tii akómaki na bato zomi.—Genese 18:22-33.
5 Yehova alingaki nde koyoka Abalayama soki likambo oyo azalaki kosɛnga eyokanaki te na makanisi na Ye? Te. Na ntembe te, lokola Abalayama azalaki “moninga ya Yehova,” ayebaki mpe azalaki komona makambo ndenge moko na Ye. (Yakobo 2:23) Ntango Yehova azwaki mokano ya kosilisa likambo ya Sodoma ná Gomola, andimaki kotalela makambo oyo Abalayama asɛngaki. Mpo na nini? Mpamba te Tata na biso ya likoló “alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.”
Yona atalelaki bato ndenge moko na Yehova te
6. Bato ya Ninive basalaki nini ntango bayokaki kosakola ya Yona?
6 Sikoyo, tótalela ndakisa ya mibale, elingi koloba ndakisa ya Yona. Na mbala oyo, engumba Ninive nde esengelaki kobomama. Batindaki Yona akende kosakola ete misala mabe ya bato ya engumba yango ‘esilaki koya liboso ya Yehova.’ (Yona 1:2) Ninive ezalaki engumba monene mpenza, esengelaki “mikolo misato mpo na kokatisa yango” banda nsuka tii nsuka. Ntango Yona atosaki mpe akómaki na Ninive, asakolaki boye: “Etikali se mikolo ntuku minei, mpe Ninive ekokwea.” Ntango bayokaki maloba yango, “bato ya Ninive bakómaki kondimela Nzambe, mpe basɛngaki na bato ete bámilalisa nzala mpe bálata basaki.” Ata mokonzi ya Ninive mpe abongolaki motema.—Yona 3:1-6, NW.
7. Ndenge nini Yehova atalelaki bato ya Ninive oyo babongolaki motema?
7 Bato wana basalaki makambo oyo ekeseni mpenza na oyo bato ya Sodoma basalaki! Lokola bato ya Ninive babongolaki motema, Yehova asalaki nini? Yona 3:10 elobi boye: “Nzambe abongolaki motema na ye longwa na mabe malobaki ye ete akosalela bango yango; asalaki yango te.” Ntango vɛrsɛ elobi ete Yehova “abongolaki motema,” yango elimboli ete, lokola bato ya Ninive babongwanaki, atikaki makambo oyo alingaki kosala bango. Yehova abongolaki te ndenge na ye ya kotalela mabe ná malamu, kasi abongolaki ekateli na ye ntango amonaki ete bato ya Ninive babongoli mitema.—Malaki 3:6.
8. Mpo na nini Yona asilikaki?
8 Ntango Yona amonaki ete bato ya Ninive bakobomama lisusu te, atalelaki makambo ndenge Yehova azalaki kotalela yango? Te, mpamba te Biblia eyebisi biso ete: “Nde eyokisaki Yona mabe mingi mpe azalaki na nkanda.” Yona asalaki nini? Lisolo elobi boye: “Abondelaki [Yehova], ye ete, Nalɔmbi yo, ee [Yehova], oyo ezalaki liloba na ngai te naino ezalaki ngai na mokili na ngai? Bongo, napotaki mbangu kokima na Talasisi, zambi nayebaki ete yo ozali Nzambe ya boboto mpe otondi na mawa; okosilika noki te nde ozali na boboto mingi mpe okobongola motema na yo longwa na mabe.” (Yona 4:1, 2) Yona ayebaki bizaleli ya Yehova. Kasi, na ngonga wana asilikaki mpe atalelaki te bato ya Ninive oyo babongolaki motema ndenge oyo Yehova azalaki kotalela bango.
9, 10. (a) Yehova apesaki Yona liteya nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Yona akómaki kotalela bato ya Ninive ndenge oyo Yehova azalaki kotalela bango?
9 Yona abimaki na Ninive, atongaki mongombo moko, mpe afandaki wana “ete atala likambo nini ekosalamela mboka.” Yehova akolisaki molona moko mpo Yona abombama moi na nse na yango. Kasi, mokolo oyo elandaki, molona yango mobimba ekaukaki. Ntango Yona ayokaki nkanda mpo molona yango ekaukaki, Yehova alobaki boye: “Osili koyokela libɔkɛ mawa . . . Ngai mpe nayokela Ninive mawa te, mboka oyo monene, wana bato baleki nkóto mokama na ntuku mibale, baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango na mwasi te, mpe bibwele mingi lokola?” (Yona 4:5-11) Yona azwaki liteya monene na oyo etali ndenge Yehova atalelaka bato!
10 Biblia eyebisi biso te soki Yona akómaki na makanisi nini nsima ya koyoka maloba oyo Nzambe alobaki na ye mpo na komonisa ye mawa oyo ayokelaki bato ya Ninive. Kasi, emonani polele ete mosakoli yango abongolaki ndenge na ye ya kotalela bato ya Ninive oyo babongolaki motema. Tolobi bongo mpamba te Yehova atindaki ye akoma lisolo yango.
Makanisi nini ozali na yango?
11. Abalayama alingaki kotalela bato ndenge nini soki azalaki na bomoi lelo oyo?
11 Lelo oyo, tozali kozela kobomama mosusu: oyo ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo na mokolo monene ya Yehova. (Luka 17:26-30; Bagalatia 1:4; 2 Petelo 3:10) Soki Abalayama azalaki na bomoi, ndenge nini alingaki kotalela bato ya mokili oyo etikali moke ebomama? Na ntembe te alingaki komibanzabanza mpo na baoyo bayoki naino ‘nsango malamu ya bokonzi’ te. (Matai 24:14) Abalayama abondelaki Nzambe mbala mingi mpo na bato ya sembo oyo bakokaki kozala na Sodoma. Biso mpe tomitungisaka mpo na bato oyo bakoki kotika misala mabe ya mokili ya Satana soki bapesi bango libaku ya kobongola motema mpe kosalela Nzambe?—1 Yoane 5:19; Emoniseli 18:2-4.
12. Mpo na nini ezali mpasi te mpo tókóma kotalela bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola ndenge oyo Yona azalaki kotalela bato, mpe tokoki kosala nini mpo na kokóma na ezaleli yango te?
12 Kozala na mposa ete makambo mabe esuka ezali mabe te. (Habakuku 1:2, 3) Kasi, soki tokebi te, tokoki kokóma lokola Yona, elingi koloba tokoki kobosana kokanisa bato mosusu oyo bakoki kobongola motema. Ekoki mpenza kosalema bongo soki tozali kokutana kaka na bato oyo bazali kosepela te, bazali kolinga biso te, mpe bazali kotombokela biso ntango tozali komemela bango nsango ya Bokonzi na bandako na bango. Tokoki kobosana bato oyo Yehova akoki lisusu kobimisa na ebongiseli ya makambo oyo. (Baloma 2:4) Soki tomitaleli mpe tomoni ete tozali ata mwa moke na makanisi lokola oyo Yona azalaki na yango liboso, tokoki kobondela Yehova asalisa biso tókóma komona makambo ndenge moko na ye.
13. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bato lelo oyo?
13 Yehova amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali naino kosalela ye te, mpe ayokaka mabondeli ya baoyo bamipesi epai na ye. (Matai 10:11) Na ndakisa, soki babondeli ye, “akosala ete likambo [na bango] ekatama na bosembo.” (Luka 18:7, 8) Lisusu, Yehova akokokisa bilaka mpe mikano na ye na ntango oyo ye moko aponi. (Habakuku 2:3) Na ntango yango akolongola mpe mabe nyonso awa na mabelé, se ndenge abomaki Ninive ntango bato na yango bozongelaki misala ya mabe.—Nahumu 3:5-7.
14. Tosengeli kosala nini wana tozali kozela mokolo monene ya Yehova?
14 Liboso ebongiseli ya makambo oyo ekufa na mokolo monene ya Yehova, tokoyeba nde kozela na motema molai mpe tokomipesa na kosala mokano na ye? Toyebi makambo nyonso te na oyo etali ndenge mosala ya kosakola ekosalema liboso mokolo ya Yehova eya, kasi toyebi ete liboso nsuka eya, nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba na ndenge oyo ekosepelisa Nzambe. Tosengeli mpe komibanzabanza mpo na “biloko kitoko” oyo esengeli naino koyanganisama wana Yehova azali kokoba kotondisa ndako na ye na nkembo.—Hagai 2:7, NW.
Ndenge na biso ya komona makambo ekomonana na misala na biso
15. Nini ekoki kosalisa biso tómona lisusu ntina ya mosala ya kosakola?
15 Mbala mosusu tofandaka na mboka oyo bato basepelaka mpenza te koyoka nsango malamu oyo tosakolaka mpe tozali na makoki te ya kokende na esika mosusu oyo bazali na mposa mingi ya basakoli ya Bokonzi. Soki na ndakisa bato zomi bakoki naino komonana na teritware na biso liboso nsuka eya, tokanisi te ete ebongi koluka bango? Yesu ‘ayokaki mawa’ mpo na ebele ya bato “mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Soki tozali koyekola Biblia malamumalamu mpe tozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká!, tokososola malamu mpasi oyo mokili ezali na yango. Na nsima, yango ekoki kosalisa biso tómona lisusu ntina oyo tosengeli kosakola nsango malamu. Lisusu, soki tozali kosalela malamu mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso, yango ekoki kobakisela biso mayele ya kolimbola makambo na ndenge oyo ekondimisa bato, ata na teritware oyo basakoli bateyaka mbala na mbala.—Matai 24:45-47; 2 Timote 3:14-17.
16. Ndenge nini tokoki kobongisa lisusu mosala na biso ya kosakola?
16 Komibanzabanza mpo na bato oyo bakoki naino kondima nsango ya bomoi ekotinda biso tóluka ngonga mpe mayele mosusu oyo tokoki kosalela mpo na kokutana na bato na mosala ya kosakola. Soki bato mingi bazalaka na bandako na bango te na bangonga oyo tokendaka kotala bango, tokoki kobongisa lisusu mosala na biso soki tokómi kokende kotala bango na bangonga mosusu mpe koluka bango na bisika mosusu. Babomi-mbisi bakendaka koboma mbisi na ntango oyo bakoki kokanga mbisi. Biso mpe tokoki kosala ndenge yango na mosala ya koboma mbisi na elimo. (Malako 1:16-18) Tótalela soki tokoki kosakola na mpokwa to tokoki kosalela telefone, soki mibeko ya mboka epekisi yango te. Bandeko mosusu bamonaki ete baparkingi ya mituka, bapompi ya esansi, bamagazini ezali ‘bisika malamu ya koboma mbisi’ na elimo. Tokomonisa mpe ete tozali kotalela bato ndenge Abalayama azalaki kotalela bango soki tozali kolekisa te mabaku malamu ya kopesa litatoli.
17. Tokoki kosala nini mpo na kolendisa bamisionɛrɛ mpe bandeko mosusu oyo bazali kosakola na mikili ya bopaya?
17 Bamilio ya bato bayoki naino nsango ya Bokonzi te. Longola kosakola, tokoki nde komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bato yango ata ntango tozali na ndako na biso? Soki, na ndakisa, toyebi bamisionɛrɛ to basakoli mosusu ya ntango nyonso oyo bazali kosala na mboka mopaya, tokoki kokomelaka bango mikanda mpo na komonisa bango ete tosepelaka na mosala oyo bazali kosala. Na ndenge nini yango ekomonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bato? Mikanda ya kolendisa mpe ya kopesa longonya oyo totindeli bamisionɛrɛ ekoki kolendisa bango na kotikala na bamboka wana, mpe na ndenge yango bakosalisa bato mingi lisusu na koyeba solo. (Basambisi 11:40) Tokoki mpe kobondela mpo na bamisionɛrɛ yango mpe mpo na bato ya mikili mosusu oyo bazali na mposa ya koyeba solo. (Baefese 6:18-20) Lolenge mosusu ya komonisa ete tozali komibanzabanza ezali kopesa makabo mpo na mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba.—2 Bakolinti 8:13, 14; 9:6, 7.
Okoki kokende kofanda epai mosusu?
18. Baklisto mosusu basalaki nini mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso na mikili na bango?
18 Batatoli ya Yehova oyo bakendaki kofanda na bamboka mosusu epai mposa ya basakoli mingi ya Bokonzi ezali mingi bazwaki mapamboli mpo na milende na bango mpe elimo na bango ya komipesa. Bamosusu mpe, atako bakendaki na mboka mosusu te, bayekolaki minɔkɔ ya bapaya mpo na kopesa bapaya oyo bazali kofanda na mboka na bango lisalisi ya elimo. Milende yango ezwi mpenza mbano. Na ndakisa, Batatoli nsambo oyo bazali kosakola epai ya bato ya Chine na engumba moko na etúká ya Texas, na États-Unis, babengisaki bato 114 na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo na 2001. Bato oyo bazali kosalisa bapaya ya ndenge wana bamoni ete bilanga na bango eteli mpo na kobuka mbuma.—Matai 9:37, 38.
19. Ezali malamu kosala nini ntango ozali kokanisa kokende na mboka mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola?
19 Mbala mosusu yo ná libota na yo bozali komona ete bokoki kokende na mboka mosusu epai bazali na mposa mingi ya basakoli ya Bokonzi. Kasi, bwanya ezali kosɛnga ete liboso ya kosala bongo, esengeli ‘bófanda liboso mpo na kotánga motuya.’ (Luka 14:28) Ezali bongo mingimingi mpo na moto oyo azali kokana kokende na mboka mopaya. Moto oyo azali na likanisi wana akoki komituna mituna oyo: ‘Nakokoka kokokisa bamposa ya libota na ngai? Nakoki kozwa viza ya malamu? Nalobaka monɔkɔ ya mboka yango, to nakondima koyekola yango? Nayebi soki ezali mboka ya molunge to ya mpiɔ mpe nayebi mimeseno ya bato yango? Nakokoka mpenza kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ mpo na baninga na ngai bandimi na mokili yango na esika nakóma mokumba mpo na bango? (Bakolose 4:10, 11) Mpo na koyeba mposa nini ezali na ekólo moko epai ozali kokanisa kokende, ezalaka ntango nyonso malamu kokomela biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala ya kosakola na ekólo yango.a
20. Ndenge nini elenge moko moklisto amipesaki mpo na kosalisa bandeko na ye bandimi mpe bato mosusu na mboka mopaya?
20 Moklisto moko oyo azalaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi na Japon ayokaki ete na ekólo Paraguay bazalaki na mposa ya bato oyo bayebi mosala malamu mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi moko. Lokola azalaki naino monzemba mpe azalaki elenge, akendaki na ekólo yango mpe asalaki sanza mwambe mpe azalaki kaka ye moko oyo azalaki na mosala mosusu te. Na mikolo oyo afandaki kuna, ayekolaki monɔkɔ ya Espagnol mpe abandaki koyekola na bato Biblia. Amonaki ete na ekólo yango bazalaki na mposa mingi ya basakoli ya Bokonzi. Atako azongaki na Japon, mwa moke na nsima, akendaki lisusu na Paraguay mpo na kosakola epai ya bato oyo bakoki koyangana na Ndako ya Bokonzi oyo batongaki.
21. Ntango tozali kozela mokolo monene ya Yehova, tosengeli komibanzabanza libosoliboso mpo na likambo nini mpe ndenge nini tosengeli kotalela bato?
21 Nzambe akosala ete mosala ya kosakola ekokisama malamumalamu, na boyokani na mokano na ye. Lelo oyo, azali koyeisa mbangu mosala ya kobuka mbuma ya elimo. (Yisaya 60:22) Yango wana, ntango tozali kozela mokolo ya Yehova, tósala na molende mosala ya kobuka mbuma mpe tótalela bato ndenge oyo Nzambe na biso ya bolingo atalelaka bango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezalaka ntango nyonso malamu te kokende na ndenge na yo moko na mokili oyo mosala ya kosakola epekisami to endimami na mibeko te. Kosala bongo ekoki kobendela basakoli ya Bokonzi oyo bazali kosala kuna na kobombama mindɔndɔ.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini tosengeli kotalelaka bato wana tozali kozela mokolo ya Yehova?
• Abalayama akanisaki nini mpo na bato ya sembo oyo bakokaki kozala na Sodoma?
• Ndenge nini Yona atalelaki bato ya Ninive oyo babongolaki mitema?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete totalelaka bato oyo bayoki naino nsango malamu te ndenge oyo Yehova atalelaka bango?
[Elilingi na lokasa 16]
Abalayama atalelaki bato ndenge Yehova atalelaka bango
[Elilingi na lokasa 17]
Yona akómaki kotalela bato ya Ninive oyo babongolaki motema ndenge oyo Yehova atalelaka bango
[Bililingi na lokasa 18]
Komibanzabanza mpo na bato etindaka biso tóluka ntango mpe mayele ndenge na ndenge ya kosakola nsango malamu