Yakobo apesaki motuya na bozwi ya elimo
BOMOI ya Yakobo ezalaki bomoi moko ya mpasi mpe mikakatano. Lokola lipasa na ye akómaki na nkanda na ye mpe azalaki kokana koboma ye, Yakobo akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Na esika ya mwasi oyo alingaki, bakosaki ye mpe bapesaki ye liboso mwasi mosusu mpe nsukansuka akómaki na basi minei mpe ebele ya mikakatano. (Genese 30:1-13) Asalelaki moto mosusu na boumeli ya mbula 20. Abundaki na anzelu mpe atikalaki na mbeba na nzoto. Elenge moko asangisaki nzoto na makasi na mwana na ye ya mwasi, bana na ye ya mibale babomaki ebele ya bato, mpe alelaki liwa ya mwana na ye oyo alingaki mingi mpe ya mwasi na ye. Ntango akómaki mobange, akimaki mboka na ye mpo na nzala mpe akendaki kofanda na mboka mopaya, mpe alobaki ete mikolo ya bomoi na ye ezalaki ‘mingi te mpe ezalaki mabe.’ (Genese 47:9) Atako makambo nyonso wana, Yakobo azalaki moto ya elimo mpe azalaki kotyela Nzambe motema. Kondima na ye ezalaki nde mpamba? Kotalela mwa makambo ya bomoi ya Yakobo ekoki koteya biso nini?
Akesanaki mingi na ndeko na ye
Yakobo azwanaki matata ná ndeko na ye mpo apesaki motuya na bozwi ya elimo, nzokande Esau amonaki yango mpamba. Yakobo azalaki kotyela elaka oyo Nzambe apesaki Abalayama likebi mpe amipesaki mpo na kobatela libota oyo Nzambe aponaki. Yango wana, Yehova “alingaki” ye. Yakobo azalaki “sembo,” liloba oyo ezali komonisa ete azalaki na bizaleli malamu. Nzokande, Esau azalaki mpenza kotyela libula ya elimo likebi te; yango wana atɛkelaki yango Yakobo mpo na mwa eloko ezangi ntina. Ntango Yakobo alukaki eloko oyo azalaki na lotomo na yango mpe Nzambe andimaki yango, azwaki lipamboli oyo esengelaki kopesama na ndeko na ye Esau; yango wana Esau asilikaki makasi. Yango wana, Yakobo atikaki biloko nyonso, kasi makambo oyo esalemaki na nsima epesaki ye lisusu makasi.—Malaki 1:2, 3; Genese 25:27-34, NW; 27:1-45.
Na kati ya ndɔtɔ, Nzambe amonisaki Yakobo baanzelu bazali komata mpe kokita na sikalié, to “mabanga ekangisami lokola sikalié” oyo euti na likoló tii na mabelé mpe alobaki ete akobatela Yakobo ná bana na ye. “Mabota nyonso ya mokili bakopambolama kati na yo mpe na libota na yo. Talá, nazali elongo na yo mpe nakobatela yo bipai nyonso bikokenda yo, mpe nakozongisa yo na mokili oyo, mpo ete nakotika yo te kino esili ngai kosala yango elobeli ngai yo.”—Genese 28:10-15.
Oyo ezali maloba ya kolendisa mpenza! Yehova ayebisaki ete bilaka oyo apesaki Abalayama ná Yisaka ekomemela libota ya Yakobo mapamboli. Yehova amonisaki Yakobo ete baanzelu bakoki kosalela bato oyo Nzambe azali kosepela na bango, mpe alakisaki ye ete akobatela ye. Mpo na komonisa botɔndi na ye epai ya Yehova, Yakobo alapaki ndai ya kotikala sembo epai na ye.—Genese 28:16-22.
Yakobo abɔtɔlaki libula ya Esau te. Liboso bana yango bábotama, Yehova alobaki ete ‘oyo ya liboso akosalela oyo ya nsima.’ (Genese 25:23) Moto akoki kotuna ete, ‘Elekaki nde malamu te ete Nzambe asala kaka ete Yakobo abotama liboso?’ Makambo oyo esalemaki nsima ezali koteya biso solo ya ntina. Nzambe apambolaka te bato oyo bakanisi ete bazali na lotomo na yango, kasi amonisaka boboto monene epai ya bato oyo ye moko aponi. Na bongo, Yakobo azwaki lotomo ya mwana ya liboso; kasi yaya na ye, lokola amonaki valɛrɛ na yango te, azwaki yango te. Ndenge moko mpe, lokola ekólo ya Bayuda emonisaki elimo ya Esau, Nzambe aponaki Yisalaele ya elimo na esika na yango. (Baloma 9:6-16, 24) Boyokani na Yehova elandaka makila te, ezali te ete ata soki moto asali makasi te, akozwa yango mpo abotami to akoli na libota ya bato oyo babangaka Nzambe. Baoyo nyonso balingi kozwa mapamboli ya Nzambe basengeli kosala makasi mpo na komonisa bizaleli ya Nzambe, basengeli mpenza kosepela na makambo ya elimo.
Labana ayambi ye
Ntango Yakobo akómaki na Padani-Alami mpo na koluka mwasi na libota ya bandeko na ye, akutanaki na Laele, mwana ya nɔkɔ na ye Labana, na libulu ya mai mpe alongolaki libanga monene oyo ezipaki yango mpo bibwele ya Laele emɛla mai.a Laele akendaki mbangu na ndako kopesa nsango ya Yakobo, mpe Labana akendaki nokinoki kokutana na ye. Soki Labana akanisaki ete bakozwa lisusu ebele ya biloko lokola oyo mosaleli ya Abalayama amemelaká bango, alɛmbaki nzoto mpamba te Yakobo ayaki mabɔkɔ mpamba. Kasi, Labana amonaki eloko mosusu oyo akokaki kozwela litomba: Yakobo azalaki mobali ya makasi na mosala.—Genese 28:1-5; 29:1-14.
Yakobo abɛtelaki bango lisolo na ye. Biblia elobi polele te soki ayebisaki bango mayele oyo asalelaki mpo na kozwa lotomo ya mwana ya liboso, kasi nsima ya koyoka “makambo oyo nyonso,” Labana alobaki ete: “Solo ozali mokuwa na ngai mpe mosuni na ngai!” Moto moko ya mayele alobaki ete maloba wana ekoki kolimbola ete Labana ayambaki na esengo Yakobo na ndako na ye to amonaki ete asengeli kobatela ye lokola azali ndeko na ye. Ezala ndenge nini, Labana abandaki mbala moko kokanisa ndenge ya kosalisa mwana ya ndeko na ye ya mwasi misala mpo na matomba na ye.
Labana abandisaki likambo moko oyo ebimisaki matata na boumeli ya mbula 20 oyo elandaki. Atunaki ye boye: “Okosalela ngai na lifuti te mpo ete ozali eboto na ngai? Lobelá ngai lifuti na yo ekozala nini?” Atako Labana amimonisaki lokola noko ya motema malamu, azongisaki bondeko na ye ná Yakobo nsima mpo na kosala na ye kɔntra ya mosala. Lokola Yakobo alingaki Laele mingi, alobaki na ye boye: “Nakosalela yo mbula nsambo mpo na Laele mwana na yo ya nsima.”—Genese 29:15-20.
Mpo na kobala mwasi, mobali azalaki kopesa mbongo ya libala na libota ya mwasi. Na nsima, mibeko ya Moize elobaki ete ntalo mpo na ngɔndɔ oyo balingi ye na mobali ezali sɛkɛlɛ ya palata 50. Gordon Wenham, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, alobi ete yango ezalaki “ntalo oyo eleki likoló mpo na mbongo ya libala” kasi, mbala mingi ebandaki kozala “na nse ya motuya yango.” (Deteronome 22:28, 29) Yakobo akokaki kofuta mbongo te. Aponaki kosalela Labana mbula nsambo. Wenham alobi lisusu boye: “Lokola basali ya mosala mpo na mwa ntango bazalaki kofutama banda ndambo ya sɛkɛlɛ tii sɛkɛlɛ moko na sanza na ntango ya Babilone ya kala (banda sɛkɛlɛ 42 tii 84 na mbula nsambo), emonani ete Yakobo alakaki mbongo mingi mpo na kobala Laele.” Labana andimaki mbala moko.—Genese 29:19.
Yakobo amonaki mbula nsambo lokola “mwa mikolo” mpo alingaki Laele mingi. Na nsima, asɛngaki mwasi na ye; bamemelaki mwasi yango na elongi ezipamá, mpe ayebaki ata moke te ete Labana akosi ye. Kanisá mpasi oyo ayokaki na motema na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki ntango amonaki ete alalaki na Laele te, kasi na yaya na ye Lea! Yakobo atunaki ete: “Osaleli ngai nini? Nasaleli yo mpo na Laele te? Na bongo okosi ngai mpo na nini?” Labana azongisaki ete: “Ekoki kosalema boye na mokili na biso te. Tokoki te kopesa mwana ya nsima naino topesi oyo ya liboso te. Kokisá pɔsɔ na oyo mpe tokopesa ye na yo lokola mpo na mosala mokosalela yo ngai kino mbula nsambo mosusu.” (Genese 29:20-27) Yakobo asilaki mayele mpe azwamaki na motambo, akokaki kosala likambo mosusu te, andimaki kaka kosala likambo basɛngaki ye soki alingi Laele.
Mbula nsambo oyo elandaki ezalaki lokola oyo ya liboso te, yango ezalaki bambula ya mpasi. Yakobo akokaki kobosana te mabe oyo Labana asalaki ye. Ndenge moko mpe na Lea, oyo andimaki mayele mabe ya tata na ye. Ya solo, Labana azalaki komitungisa ata moke te mpo na bomoi ya mpasi oyo alukelaki Lea ná Laele. Azalaki kaka kokanisa bolamu na ye moko. Likoló ya nkanda oyo Laele azalaki na yango, zuwa eyaki kobakisama ntango Lea alandisaki kobota mpe akómaki na bana minei, nzokande, ye atikalaki ekomba. Bongo, lokola Laele azalaki na mposa makasi ya bana, apesaki mwana na ye ya mosala mpo mobali na ye abota na ye; Lea mpe, na zuwa ya bombanda, asalaki ndenge yango. Yakobo akómaki na basi 4, bana 12, mpe libota oyo ezalaki na esengo te. Kasi, Yehova azalaki kosala ete libota ya Yakobo ekóma ekólo moko monene.—Genese 29:28–30:24.
Yehova apesi ye bozwi
Atako Yakobo amekamaki mingi, amonaki ete Nzambe atikaki ye te, ndenge kaka alakaki. Labana mpe amonaki yango, mpamba te, atako azalaki na bibwele mingi te ntango Yakobo akómaki, mwana ya ndeko na ye abatelaki yango malamu, ebotanaki mpe ekómaki ebele. Lokola Labana azalaki kolinga te ete Yakobo atika ye, atunaki ye lifuti oyo alingi mpo na mosala oyo akosala lisusu, mpe Yakobo asɛngaki ete ye azwaka banyama ya matɔnɔ oyo ekobotama na kati ya bibwele ya Labana. Balobaka ete na etúká wana, bampate ezalaki mpɛmbɛ mpe bantaba ezalaki moindo to shokola; ya matɔnɔ ezalaki mingi te. Lokola Labana akanisaki ete lifuti wana ekozala moke, andimaki mpe atindaki mbala moko banyama na ye nyonso oyo ezalaki na langi ya ndenge mosusu mosika mpo esangana te na bitonga oyo Yakobo azalaki kobatela. Na ntembe te akanisaki ete na boyokani wana, Yakobo akozwa bana ya nyama na nse ya 20 likoló ya monkama oyo bazalaki kofuta babateli ya mpate. Kasi, Labana amikosaki, mpamba te Yehova azalaki kopambola Yakobo.—Genese 30:25-36.
Nzambe apesaki Yakobo mayele ya kosangisa banyama oyo ezali kolɔngɔnɔ ná banyama ya langi oyo alingaki. (Genese 30:37-42) Mayele oyo asalelaki ya kosangisa banyama ezalaki ya kolongobana te. Atako bongo, Nahum Sarna, moto moko ya mayele, alobaki ete “soki tolandi siansi, mpo na kozwa banyama ya ndenge wana esengelaki kosangisa . . . banyama ya langi moko oyo ezali na makila oyo ekoki kobimisa nyama ya matɔnɔ,” mpe “banyama yango eyebanaka na . . . makasi [na yango].”
Ntango Labana amonaki bana oyo banyama ezalaki kobota, alukaki kobongola boyokani oyo elobaki ete mwana ya ndeko na ye azwaka banyama ya matɔnɔ. Labana azalaki koluka matomba na ye moko, kasi atako abongolaki boyokani, Yehova asungaki Yakobo akóma na bozwi mingi. Labana akokaki se kotɛla miso. Mosika te, Yakobo akómaki na bozwi, banyama, bato ya mosala, bakamela, bampunda ebele, na mayele na ye moko te, kasi mpo Yehova azalaki na ye. Na nsima alobaki na Laele ná Lea ete: “Tata na bino akosi ngai abongoli motuya ya lifuti na ngai mbala zomi, nde Nzambe atiki ye kosalela ngai mabe te. . . . Nzambe alongoli bibwele ya tata na bino mpe apɛsi yango na ngai.” Yehova amonisaki Yakobo ete Ye azalaki komona nyonso oyo Labana azalaki kosala, kasi Yakobo asengelaki kobanga te. Nzambe alobaki ete: “Zongá na mokili na yo mpe na biboto na yo mpe nakosalela yo malamu.”—Genese 31:1–13; 32:9.
Nsukansuka, Yakobo akabwanaki na Labana, moto ya mayele mabe, mpe azongaki na mboka na ye. Atako mbula 20 elekaki, Yakobo azalaki kaka kobanga Esau, mpe kobanga yango ebakisamaki ntango ayokaki ete Esau azali na nzela ná bato nkama minei mpo na kokutana na ye. Yakobo akokaki kosala nini? Lokola azalaki moto ya elimo mpe azalaki kotyela Nzambe motema, asalaki makambo na kondima. Abondelaki Nzambe, andimaki ete abongi na boboto ya Yehova te mpe asɛngaki Nzambe akanisa bilaka na ye mpe abikisa ye ná libota na ye na mabɔkɔ ya Esau.—Genese 32:2-12.
Na nsima, likambo oyo alikyaki te esalemaki. Mopaya moko—oyo azalaki anzelu—abundaki na Yakobo na butu, mpe na mabɔkɔ mpamba, alongolaki litonga ya lokolo ya Yakobo na esika na yango. Yakobo atingamaki na anzelu yango mpe alobaki ete akotika ye kaka soki apamboli ye. Mosakoli Hosea alobaki na nsima ete Yakobo “alelaki mpe abondelaki ye.” (Hosea 12:2-4; Genese 32:24-29) Yakobo ayebaki ete mbala nyonso oyo baanzelu babimelaki bato liboso ezalaki na boyokani na kondimana oyo Nzambe asalaki na Abalayama na nzela ya mombóto na ye. Yango wana abundaki makasi mpe azwaki lipamboli. Na ntango yango, nkombo na ye ekómaki Yisalaele, elingi koloba “Mobundi (Moto oyo alendendeli) na Nzambe,” to “Nzambe abundaka.”
Okondima kobunda?
Mikakatano ya Yakobo esukaki te kaka na kobunda na anzelu mpe kokutana na Esau. Kasi, makambo oyo totaleli na lisolo oyo emonisi biso bomoto na ye. Esau akangaki motema na nzala te mpe atɛkaki lotomo na ye ya mwana ya liboso; nzokande, Yakobo asalaki makasi bomoi na ye mobimba mpo na kozwa mapamboli, abundaki ata na anzelu. Lokola Nzambe alakaki yango, atambwisaki Yakobo mpe abatelaki ye, akómisaki ye nkɔkɔ ya ekólo moko monene mpe nkɔkɔ ya Masiya.—Matai 1:2, 16.
Okondima koboma nzoto, na maloba mosusu kobunda mpo Yehova andima yo? Lelo oyo, bomoi etondi na mikakatano mpe mitungisi mpo na baoyo balingi kosala mokano ya Nzambe, mpe ntango mosusu ezalaka etumba mpo na kolanda nzela ya malamu. Kasi, ndakisa malamu ya Yakobo ezali kolendisa biso na kokangama na elikya ya kozwa mbano oyo Yehova alaki biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokutana na bango ekokanaki mwa moke na ntango Lebeka, mama ya Yakobo amɛlisaki bakamela ya Eliezele. Na ntango wana, Lebeka akendaki mbangu na ndako koyebisa ete mopaya moko ayei epai na bango. Ntango Labana amonaki biloko ya wolo oyo bakabelaki ndeko na ye, Labana apotaki mbangu mpo na koyamba Eliezele.—Genese 24:28-31, 53.
[Bililingi na lokasa 31]
Bomoi na ye mobimba Yakobo asalaki makasi mpo na kozwa mapamboli