Loná elimo ya kokaba
MOTO moko te abotamaka na elimo ya kokaba. Mwana moke alukaka kaka kokokisa bamposa na ye, akanisaka ata te matomba ya bato oyo bazali kobɔkɔla ye. Kasi, na nsima mwana ayebaka mokemoke ete bato mosusu mpe bazalaka na bamposa. Asengeli kotalela bamposa ya basusu, asengeli kaka te kozwaka, kasi asengeli mpe koyekola kopesa mpe kokaba. Moto asengeli kolona elimo ya kokaba.
Bato nyonso te oyo bapesaka—ata oyo bapesaka mingi—nde bazali na elimo ya kokaba. Bato mosusu bakoki kopesa na ebongiseli moko oyo esalisaka babola mpo na matomba na bango moko. Bamosusu bapesaka mpo na koluka lokumu na miso ya bato. Nzokande, kopesa ya baklisto ya solo ekeseni na oyo wana. Na yango, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa kokaba ya ndenge nini? Soki totaleli mwa moke lolenge oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kopesa, ekosalisa biso tózwa eyano na motuna yango.
Ndenge oyo baklisto bazalaki kopesa
Biblia emonisi ete kopesa oyo baklisto bazalaki kopesa ezalaki mingimingi “kokabela [baoyo bazalaki mpenza na bosɛnga] biloko.” (Baebele 13:16; Baloma 15:26) Bazalaki kotindika moto na makasi te ete apesa. Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Lisusu, esengelaki te kopesa mpo na kobenda likebi ya bato. Ananiasi ná Safila bamekaki kosala bongo mpe babukaki mbuma na yango.—Misala 5:1-10.
Mposa ya makabo ekómaki makasi ntango ebele ya Bayuda ná Baprozelite oyo bautaki na bamboka ya mosika bayaki na Yelusaleme mpo na fɛti ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Ezali na ntango wana nde bayekoli ya Yesu “batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu.” Ebele ya bato bayaki na esika oyo bazalaki mpe bayokaki lisukulu ya kafukafu oyo Petelo asalaki na ntina na Yesu Klisto. Na nsima, bato bamonaki ndenge Petelo ná Yoane babikisaki mobali moko oyo azalaki ebɔsɔnɔ na porte ya tempelo, mpe bayokaki lisusu Petelo azali koloba mpo na Yesu mpe ntina ya kobongola motema. Bankóto ya bato babongolaki motema mpe bazwaki batisimo mpo na kokóma bayekoli ya Klisto.—Misala, mokapo 2 ná 3.
Bandimi wana ya sika basengelaki kotikala na Yelusaleme mpo na koyoka lisusu mateya ya bantoma ya Yesu. Kasi ndenge nini bantoma bakokaki kokokisa bamposa ya ebele ya bato wana? Biblia elobi boye: “Baoyo nyonso bazalaki na bilanga to bandako bazalaki kotɛka yango mpe komema mosolo ya biloko oyo etɛkamaki mpe bazalaki kotya yango na makolo ya bantoma. Na nsima bazalaki kokabola yango epai ya moto moko na moko, na ndenge mposa na ye ezalaki.” (Misala 4:33-35) Lisangá oyo eutaki kosalema na Yelusaleme ezalaki mpenza na elimo ya kokaba!
Na nsima, masangá mosusu emonisaki mpe elimo ya kokaba. Na ndakisa, atako baklisto ya Masedonia bazalaki babola, bapesaki makabo mpo na bandeko na bango ya Yudea koleka kutu makoki na bango mpenza. (Baloma 15:26; 2 Bakolinti 8:1-7) Lisangá ya Filipi esalisaki mpenza Paulo na mosala na ye. (Bafilipi 4:15, 16) Na lisangá ya Yelusaleme bazalaki mokolo na mokolo kokabolela basi bakufelá mibali oyo bazalaki babola biloko, mpe bantoma baponaki mibali nsambo ya makoki mpo mwasi moko te oyo akufelá mobali azanga kozwa lisungi.—Misala 6:1-6.
Masangá ya boklisto ya ekeke ya liboso ezalaki pene na kopesa, mbala mosusu kutu liboso mpasi ekoka koya. Na ndakisa, ntango mosakoli Agabusi asakolaki ete nzala makasi ekoya, bayekoli ya lisangá ya Antiokia ya Silia “bazwaki mokano, moto na moto engebene oyo azalaki na yango, mpo na kotinda biloko ya lisungi epai ya bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea.” (Misala 11:28, 29) Bamonisaki mpenza elimo malamu na ndenge bakanisaki liboso bamposa ya basusu!
Nini ezalaki kotinda baklisto ya liboso bákabaka mingi mpe bázala na bolingo ndenge wana? Ndenge nini moto akómaka na elimo ya kokaba? Tokoyeba makambo mingi soki totaleli mwa moke ndakisa ya Mokonzi Davidi.
Davidi apesaki mingi mpo na losambo ya solo
Sanduku ya kondimana—kɛsi mosantu oyo ezalaki komonisa kozala ya Yehova—ezalaki mpenza na esika ya malamu te na boumeli ya mbula pene na 500. Batyaki yango na hema, to tabenakle, oyo bazalaki komema na bisika ndenge na ndenge ntango Bayisalaele bazalaki kotambolatambola na esobe mpe ntango bakómaki na Mokili ya Ndaka. Mokonzi Davidi ayokaki mposa makasi ya kolongola sanduku yango na hema mpe kotongela Yehova ndako oyo ebongi mpenza, epai bakokaki kotya sanduku mosantu. Davidi alobaki na mosakoli Natana ete: “Talá ngai nakofandaka na ndako ya Ɛlɛzɛ nde sanduku ya kondimana ya [Yehova] ezali na nse na hema.”—1 Ntango 17:1.
Kasi, Davidi azalaki moto ya etumba. Yango wana, Yehova alobaki ete mwana na ye Salomo nde, na ntango ya kimya oyo ye akoyangela, akotonga tempelo epai bakobomba sanduku ya kondimana. (1 Ntango 22:7-10) Atako bongo, yango elongolaki te elimo ya Davidi ya kokaba. Abongisaki bato, asangisaki biloko oyo esengelaki mpo na mosala ya kotonga tempelo. Na nsima ayebisaki Salomo boye: “Nabongisi mpo na ndako ya [Yehova] talanta nkóto mokama ya wolo mpe talanta nkóto nkóto ya palata mpe motako mpe bibende oyo eyebani bozito te mpo ete ezali mingi mingi. Nabongisi mpe mabanga mpe mabaya.” (1 Ntango 22:14) Atako bongo, Davidi amonaki ete oyo asalaki ekoki kaka te, na kati ya biloko na ye moko apesaki likabo ya wolo mpe palata oyo ezali lelo na valɛrɛ ya dolare koleka miliare moko ná milio nkama mibale (1 200 000 000). Bankumu mpe bapesaki makabo ebele. (1 Ntango 29:3-9) Ya solo, Davidi amonisaki mpenza elimo ya kokaba!
Nini etindaki Davidi apesa mingi ndenge wana? Ayebaki ete biloko nyonso oyo azwaki mpe makambo nyonso oyo asalaki, asalaki yango mpamba te Yehova apambolaki ye. Na libondeli moko alobaki boye: “Ee [Yehova], Nzambe na biso, ebombelo mobimba oyo ebongisi biso mpo na kotongela yo ndako na nkombo na yo ya bulɛɛ euti bobele na lobɔkɔ na yo mpe ezali ya yo moko. Ee Nzambe na ngai, nayebi mpe ete yo okomekaka motema, mpe osepeli na sembo. Mpo na ngai, na sembo ya motema na ngai, napesi yo biloko oyo nyonso na motema mobimba; [sikoyo] mpe namoni bato na yo na esengo baoyo bazali awa ete bámipesa na motema mobimba epai na yo.” (1 Ntango 29:16, 17) David azalaki kopesa valɛrɛ mingi na boyokani na ye na Yehova. Ayebaki mpenza ete esengeli kosalela Nzambe “na motema mobimba mpe na molimo etondi na esengo,” mpe azalaki kosala yango na esengo mpenza. (1 Ntango 28:9) Ezali se makambo yango nde etindaki baklisto ya ekeke ya liboso na kozala na elimo ya kokaba.
Yehova—Mopesi monene
Yehova nde ndakisa eleki malamu na oyo etali kokaba. Azali mpenza na bolingo mpe na komibanzabanza, yango wana “asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” (Matai 5:45) Apesaka bato nyonso “bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:25) Ndenge moyekoli Yakobo alobaki yango, “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpamba te ekitaka uta na Tata ya miinda ya likoló.”—Yakobo 1:17.
Likabo eleki monene oyo Yehova apesá biso ezali ya kotinda “Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Moto moko te akoki koloba ete abongaki na likabo wana, “mpo bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23, 24; 1 Yoane 4:9, 10) Mbeka ya Klisto nde epesi nzela na “likabo [ya Nzambe] wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te,” elingi koloba “boboto monene ya Nzambe.” (2 Bakolinti 9:14, 15) Mpo na komonisa botɔndi na ye mpo na likabo ya Nzambe, Paulo amipesaki bomoi na ye mobimba na mosala “ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.” (Misala 20:24) Andimaki ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Timote 2:4.
Lelo oyo, likambo yango ezali kokokisama na nzela ya mosala monene ya kosakola mpe ya koteya bato na bikólo 234. Yesu asakolaki kokola yango ntango alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Ya solo, “na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.” (Malako 13:10) Na mbula eleki, basakoli ya nsango malamu koleka milio 6 balekisaki ngonga 1 202 381 302 na mosala yango mpe bayekolaki Biblia na bato koleka 5 300 000. Lokola bomoi ya bato ezali na likama, koteya nsango malamu ezali mosala ya ntina mingi.—Baloma 10:13-15; 1 Bakolinti 1:21.
Ebele ya mikanda—Babiblia, babuku mpe mwa babuku—ezali konyatama mbula na mbula mpo na kosalisa bato oyo bazali na mposa ya solo ya Biblia. Longola yango, bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! koleka miliare moko ezali kobimisama. Lokola bato bazali kondima nsango malamu, ebele ya Bandako ya Bokonzi ná Bandako ya Mayangani ya sika, bisika mateya ya Biblia epesamaka, ezali kotongama. Mayangani ya zongazonga, mayangani ya mokolo moko mpe mayangani ya etúká ezali kobongisama mbula na mbula. Bakelasi ya bamisionɛrɛ, bakɛngɛli-batamboli, bankulutu mpe basaleli na misala ezali mpe kobongisama. Tozali mpenza kotɔnda Yehova mpo na bibongiseli yango oyo azali kozwa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Tozali mpenza na esengo ya kozongisela ye botɔndi na biso!
Tózongisela Yehova matɔndi
Kaka ndenge esalemaki mpo na kotonga tempelo mpe mpo na kokokisa bamposa ya baklisto ya ekeke ya liboso, mbongo mpo na misala nyonso wana eutaka kaka na makabo ya bolingo malamu. Kasi tosengeli kobosana te ete moto moko te akoki kokómisa Yehova mozwi, mpamba te biloko nyonso ezali ya ye. (1 Ntango 29:14; Hagai 2:8) Na bongo, makabo oyo topesaka emonisaka nde bolingo na biso mpo na Yehova mpe mposa na biso ete losambo ya solo ekende liboso. Paulo alobi ete mwa makabo oyo topesaka ezali “matɔndi oyo ezali kopesama epai ya Nzambe.” (2 Bakolinti 9:8-13) Yehova alendisaka kopesa ndenge wana mpamba te emonisaka ete tozali na elimo ya kokaba mpe ete tolingaka ye. Yehova akopambola baoyo bazali na elimo ya kokaba mpe batyelaka Yehova motema mpe bakokóma bazwi na elimo. (Deteronome 11:13-15; Masese 3:9, 10; 11:25) Yesu alobaki na biso ete kokaba epesaka esengo, ntango alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Baklisto oyo bazali na elimo ya kokaba bazelaka te ete mposa ya lisalisi emonana. Balukaka nde mabaku ya ‘kosalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na bango na kati ya kondima.’ (Bagalatia 6:10) Mpo na kolendisa elimo ya kokaba, Paulo akomaki ete: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Baebele 13:16) Soki tozali kosalela bozwi na biso, elingi koloba ntango, makasi, mbongo, mpo na kosalisa basusu mpe mpo losambo ya solo ekende liboso, tokosepelisa motema ya Yehova Nzambe. Ya solo mpenza, Nzambe asepelaka na elimo ya kokaba.
[Etanda/Elilingi na lokasa 28, 29]
Ndenge bato mosusu bapesaka
MAKABO MPO NA MOSALA YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA
Bato mingi babombaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba—Matai 24:14.”
Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo na biro ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala na ekólo na bango. Moto akoki mpe kotinda mbala moko mbongo na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, c/o Office of the Secretary and Treasurer, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo azali. Ba-chèque esengeli kotindama na “Watch Tower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya valɛrɛ. Akotinda yango nzela moko na mwa mokanda moko oyo ekoyebisa ete ezali likabo oyo apesi.
MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA
Ebongiseli mosusu ezali ya kopesa mbongo lokola likabo oyo, soki nkolo na yango asɛngi, bakoki kozongisela ye yango. Mpo na koyeba ebongiseli yango malamu, tuná na Office of the Secretary and Treasurer na adrɛsi oyo ezali likoló.
MAKABO OYO EBONGISAMI LIBOSO
Longola makabo ya mbongo oyo moto apesi mbala moko to oyo apesi mpo bázongisela ye yango ntango akómi na bosɛnga, ezali na lolenge mosusu ya kopesa mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Ekoki kozala:
Asiransi: Moto akoki kokomisa nkombo ya la Société Watch Tower mpo ezwa mbongo ya asiransi to ezwa mbongo na ye ya epaso.
Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na Société Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya la Société mpo la Société esangola yango soki akufi.
Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na la Société lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.
Lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama lokola likabo to, soki ezali ndako oyo afandi, kobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Yambo ya kopesa biloko ya ndenge wana na la Société, esengeli koyebisa la Société liboso.
Makabo oyo ebotaka: Moto akoki kosɛnga ete bákoma nkombo ya la Société Watch Tower na kɔnti na ye na banki to na lotomo na ye ya mosolo. Moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa mbongo oyo mosolo yango ekobanda kobota mbula na mbula na bomoi na ye mobimba. Na mbula oyo likabo ya ndenge wana epesami, Leta akokitisa mpako oyo moto oyo apesi yango asengelaki kofutaka mpo na bozwi na ye.
Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa na la Société biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to akoki kopesa na la Société lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto akufi, biloko oyo atikaki mpo na lingomba, ntango mosusu Leta akitisaka mpako na yango.
Lokola ebéngeli “Libula mpo na kosunga babola” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo na lolenge ya libula mpo na kosunga babola, la Société ebongisi mwa buku moko ekomami na Lingelesi oyo ezali na motó na likambo ete Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide (Makabo makanami mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomami mpo na koyanola na ebele na mituna oyo la Société azwaki na ntina na makabo, mpe mokanda ya kopesa libula. Yango ezali mpe kopesa bandimbola mosusu ya sikisiki na ntina na bibongiseli mpo na makabo ya biloko lokola ndako, mosolo, mpe mpo na mpako. Ezali koyebisa bato balolenge ekeseni oyo bakoki kopesa makabo na bango, ezala balingi kopesa yango sikoyo to balingi kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako mpe bandeko ya Charitable Planning Office, bato mingi basungaki mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Leta akitiselaki bango mpako mpo na biloko na bango. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi na Charitable Planning Office.
Mpo na koyeba makambo mosusu, tindá mokanda to bengá na telefone na adrɛsi oyo ezali na nse to na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo ofandi.
Charitable Planning Office
Watch Tower Bible and Tract
Society of Pennsylvania
100 Watchtower Drive,
Patterson, New York 12563-9204
Telefone: (845) 306-0707.
[Elilingi na lokasa 26]
Nini ezalaki kotinda baklisto ya liboso bákabaka mingi?