Salisá basusu bándima nsango ya Bokonzi
“Agilipa alobaki na Paulo ete: ‘Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma moklisto.’”—MISALA 26:28.
1, 2. Mpo na nini ntoma Paulo asambaki liboso ya Guvɛrnɛrɛ Fesitusi ná Mokonzi Elode Agilipa II?
NA MOBU 58 ya ntango na biso (T.B.), Mokonzi Elode Agilipa II ná leki na ye ya mwasi Belenisi bakendaki kotala Guvɛrnɛrɛ Polosiusi Fesitusi na engumba Kaisalia. Guvɛrnɛrɛ Fesitusi ye moko nde abengisaki bango; bayaki “na ndenge ya komilakisa na nkembo . . . bakɔtaki na ndako ya kosambisa elongo na bakomanda ya basoda mpe bato minene ya engumba.” Fesitusi apesaki mitindo mpe bayaki na ntoma Paulo liboso na bango. Mpo na nini moyekoli yango ya Yesu Klisto asambaki liboso ya Guvɛrnɛrɛ Fesitusi?—Misala 25:13-23.
2 Makambo oyo Fesitusi ayebisaki bapaya na ye epesi eyano na motuna yango. Alobaki boye: “Mokonzi Agilipa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo ebele nyonso ya Bayuda basɛngaki ngai na Yelusaleme mpe awa, kogangáká ete abongi lisusu te kozala na bomoi. Kasi nasosolaki ete asalaki eloko ata moko te oyo ebongaki na etumbu ya liwa. Boye ntango moto oyo ye moko asɛngaki akende kosamba epai ya Wa-Lokumu, nazwaki mokano ya kotinda ye. Kasi na ntina etali ye nazali mpenza na likambo te oyo nakoki kokomela Nkolo na ngai. Na yango nabimisi ye liboso na bino, mpe mingimingi mpenza liboso na yo, Mokonzi Agilipa, mpo ete, nsima wana lisambisi ekosalema, nakoka kozwa mwa likambo ya kokoma. Mpo namoni ete ezali likambo ya bozoba kotinda moto ya bolɔkɔ kozanga komonisa mpe makambo oyo afundami na yango.”—Misala 25:24-27.
3. Mpo na nini bakonzi ya mangomba bafundaki Paulo?
3 Maloba ya Fesitusi emonisi ete bafundaki Paulo ete azali mozimbisi, likambo monene oyo akokaki kozwela etumbu ya liwa. (Misala 25:11) Kasi, Paulo asalaki mabe moko te. Bakonzi ya lingomba na Yelusaleme bazalaki koyokela ye zuwa mpe bakoselaki ye makambo. Bazalaki kosepela te lokola Paulo azalaki kosakola Bokonzi mpe balingaki ata moke te ete asalisa bato mosusu bákóma bayekoli ya Yesu Klisto. Bapesaki Paulo na mabɔkɔ ya basoda mpo na kokɛngɛla ye banda na Yelusaleme tii na Kaisalia, mboka oyo ezalaki na libongo ya masuwa, mpe kuna asɛngaki akende kosamba liboso ya Kaisala. Kolongwa kuna, bamemaki ye na Loma.
4. Maloba nini ya kokamwa Mokonzi Agilipa alobaki?
4 Kanisá Paulo na ndako ya guvɛrnɛrɛ, atɛlɛmi liboso ya bato oyo moko na bango azali moyangeli ya etúká moko monene ya Bokonzi ya Loma. Mokonzi Agilipa atali Paulo mpe ayebisi ye ete: “Opesameli nzela ya koloba.” Ntango Paulo azali koloba, likambo moko ya kokamwa esalemi. Maloba ya Paulo ebandi kosimba motema ya mokonzi. Kutu, Mokonzi Agilipa alobi ete: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma moklisto.”—Misala 26:1-28.
5. Mpo na nini maloba ya Paulo esimbaki motema ya Agilipa?
5 Kanisá naino! Lokola Paulo asambaki malamu, nguya ya Liloba ya Nzambe esimbaki motema ya mokonzi. (Baebele 4:12) Nini mpenza ezalaki malamu na kosamba ya Paulo? Mpe liteya nini tokoki kozwa na Paulo oyo ekosalisa biso na mosala ya kokómisa bato bayekoli? Soki totali malamumalamu ndenge oyo Paulo asambaki, tokomona polele makambo mibale: (1) Paulo alobaki na ndenge ya kondimisa. (2) Asalelaki malamu mpenza boyebi ya Liloba ya Nzambe, se ndenge moto ya mosala ya mabɔkɔ ayebaka kosalela esaleli na ye.
Salelá mayele ya kondimisa
6, 7. (a) Liloba “kondimisa” ezali na ndimbola nini na Biblia? (b) Mayele ya kondimisa ezali na ntina nini mpo na kosalisa moto andima mateya ya Biblia?
6 Na mokanda ya Misala, maloba ya Grɛki oyo ebongolami na kondimisa ezongelami mbala na mbala na bisika oyo balobeli mosala ya Paulo. Yango elingi koloba nini mpo na mosala na biso ya kosakola?
7 Buku moko ya William Vine (Expository Dictionary of New Testament Words) elobi ete na Grɛki oyo bakomaki na yango Makomami ya boklisto, “kondimisa” elimboli “kolonga” to “kobongola makanisi ya moto na mayele to makambo etali bizaleli malamu.” Soki totaleli epai oyo liloba yango euti, tokozwa ndimbola na yango malamu lisusu. Ezali kopesa likanisi ya kotya motema. Yango wana, soki ondimisi moto liteya moko ya Biblia, olongi motema na ye mpe andimi ete liteya yango ezali solo. Na bongo, mpo moto andima mpe asalela makambo oyo Biblia elobi, esengeli kosuka kaka te na koyebisa ye yango. Kasi, osengeli kondimisa ye, azala mwana, moninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi, to ndeko na yo, ete makambo oyo ozali koloba na ye ezali solo.—2 Timote 3:14, 15.
8. Mpo na kondimisa moto solo ya Biblia, esɛngaka nini?
8 Ndenge nini okoki kondimisa moto ete makambo euti na Liloba ya Nzambe oyo ozali kosakola ezali solo? Paulo azalaki kobongola makanisi ya bato oyo azalaki kosolola na bango na ndenge azalaki kokanisa na bango malamu, kobimisa makanisi oyo elongobani, mpe kobondela bango.a Yango wana, na esika ya koloba kaka ete likambo boye to boye ezali solo, osengeli komonisa makambo oyo ezali kondimisa maloba na yo. Ndenge nini okoki kosala yango? Omindimisa ete maloba na yo euti mpenza na Liloba ya Nzambe, kasi te na makanisi na yo moko. Salelá mpe makanisi mosusu oyo ezali kolongisa maloba ya Biblia oyo ozali koloba. (Masese 16:23) Na ndakisa, soki olobi ete bato oyo bazali kotosa Nzambe bakofanda na paladiso awa na mabelé, tángá vɛrsɛ moko ya Biblia lokola Luka 23:43 to Yisaya 65:21-25. Ndenge nini okoki kopesa makanisi mosusu oyo ezali kolongisa likambo oyo Biblia elobi? Okoki kopesa bandakisa na makambo oyo moto oyo ozali kosolola na ye ayebi. Okoki kolobela esengo oyo toyokaka ntango tozali kotala kolala ya moi, ntango tozali koyoka nsolo kitoko ya fololo, kolya mbuma ya elɛngi, to kotala ndɛkɛ azali koleisa mwana na ye mpe nyonso wana tosalaka yango ofele. Salisá ye amona ete bisengo wana emonisi ete Mozalisi alingaka ete tózala na bomoi ya esengo awa na mabelé.—Mosakoli 3:11, 12.
9. Na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na bindimandima te?
9 Ntango ozali koluka kondimisa moto liteya moko ya Biblia, kebá ete esengo na yo emonana te lokola nde ozali na bindimandima; yango ekoki kolongola ye mposa ya koyoka yo. Buku Eteyelo ya mosala epesi likebisi oyo: “Mbala mingi, koyebisa moto na maloba ya kozokisa ete liteya oyo ye akangamá na yango ezali ya lokuta ebotaka mbuma malamu te, ata soki opesi ye bavɛrsɛ ebele. Na ndakisa, soki oyebisi bato kaka ete biyenga oyo basalaka ezali ya bapakano, ekozala mpasi mpo makanisi na bango mpo na bafɛti wana ebongwana. Kokanisa esika moko na bango ebotaka mbuma malamu koleka.” Mpo na nini tosengeli kosala makasi ya kokanisa na moto? Buku yango elobi lisusu ete: “Kosala lisolo na ndenge oyo ekotinda bato bákanisa esalisaka mpenza mpo bato bátalela likambo yango malamu, epesaka bato mwa makambo oyo bakotikala kokanisa, mpe esalaka ete bándima kosolola na biso na mbala oyo ekoya. Yango ekoki mpenza kosala ete bato bándima makambo oyo ozali koloba.”—Bakolose 4:6.
Maloba ya kondimisa oyo esimbaka motema
10. Ndenge nini Paulo abandaki kosamba na ye liboso ya Agilipa?
10 Sikoyo, tótalela malamumalamu maloba ya Misala mokapo 26, oyo Paulo alobaki ntango azalaki kosamba. Tótala ndenge abandaki. Paulo apesaki naino Agilipa longonya mpo na likambo moko ya malamu, atako mokonzi yango asalaki likambo ya nsɔni ndenge abalaki ndeko ye ya mwasi. Paulo alobaki boye: “Mpo na makambo nyonso oyo Bayuda bafundi ngai na yango, Mokonzi Agilipa, nazali komitánga moto ya esengo lokola ezali liboso na yo nde nasengeli kosamba na mokolo ya lelo, mingimingi mpenza mpo yo oyebi malamumalamu mimeseno nyonso mpe bantembe nyonso na kati ya Bayuda. Na yango nabondeli yo ete oyoka ngai na motema molai mpenza.”—Misala 26:2, 3.
11. Na ndenge nini maloba oyo Paulo alobaki na Agilipa ezali komonisa limemya, mpe ebimisaki litomba nini?
11 Omoni te ete Paulo andimaki bokonzi ya Agilipa na ndenge abengaki ye Mokonzi? Paulo azalaki na limemya, mpe lokola ayebaki kopona maloba na ye, apesaki Agilipa lokumu. (1 Petelo 2:17) Paulo andimaki ete Agilipa ayebi malamu mimeseno mpe mibeko ya mindɔndɔmindɔndɔ ya Bayuda mpe alobaki ete azali na esengo ya kosamba liboso ya mokonzi oyo ayebi makambo mingi. Paulo azalaki moklisto, kasi asalaki te lokola nde aleki Agilipa, moto oyo azalaki moklisto te. (Bafilipi 2:3) Paulo asɛngaki nde mokonzi yango ayoka ye na motema molai. Na ndenge yango, Paulo akitisaki motema ya Agilipa mpe ya bato mosusu oyo bazalaki wana mpo bándima koyoka ye. Alukaki naino makambo oyo ekoyokanisa ye ná bango liboso abanda kosamba.
12. Na mosala ya kosakola Bokonzi, ndenge nini tokoki kosimba mitema ya bato?
12 Se ndenge Paulo asalaki liboso ya Agilipa, ntango tozali kosakola nsango ya Bokonzi, tósalelaka maloba oyo ekoki kosimba mitema ya bato banda na ebandeli tii na nsuka ya lisolo na biso. Tokosala yango soki tozali komemya moto oyo tozali kosolola na ye mpe soki tomonisi ete tozali kosepela na ye mpe makanisi na ye.—1 Bakolinti 9:20-23.
Salelá Liloba ya Nzambe malamu mpenza
13. Na ndakisa ya Paulo, ndenge nini tokoki kopesa bato mposa ya kosalela makambo oyo tozali koteya bango?
13 Mposa ya Paulo ezalaki ete atinda bato oyo azalaki kosakwela nsango malamu básalela makambo oyo azalaki koteya bango. (1 Batesaloniki 1:5-7) Yango wana, azalaki mpenza koluka kosimba motema na bango. Tótala ndenge Paulo ‘asembolaki liloba ya Nzambe malamumalamu’ ntango asambaki liboso ya Agilipa na ndenge alobelaki maloba ya Moize ná basakoli mosusu.—2 Timote 2:15.
14. Limbolá ndenge oyo Paulo asalelaki mayele ya kondimisa ntango azalaki kosamba liboso ya Agilipa.
14 Paulo ayebaki ete Agilipa azali Moyuda kaka ya nkombo. Lokola Paulo ayebaki ete Agilipa ayebi makambo ya Lingomba ya Bayuda, amonisaki ye ete azali kosakola “likambo mosusu te kaka oyo Basakoli mpe Moize balobaki ete esengelaki kosalema” na ntina na liwa ya Masiya mpe lisekwa na ye. (Misala 26:22, 23) Paulo atunaki Agilipa ete: “Mokonzi Agilipa, ondimaka Basakoli?” Agilipa akómaki na mokakatano. Soki alobi ete andimaka basakoli te, lokumu na ye ete azali mondimi ya Lingomba ya Bayuda ekobeba. Kasi, soki mpe andimi makanisi ya Paulo, akomonisa ete azali na ngámbo na ye mpe bakobenga ye moklisto. Paulo apesaki eyano ye moko na motuna na ye mpe alobaki ete: “Nayebi ete ondimaka.” Na nsima, Agilipa ayokaki mposa ya koloba nini? Alobaki ete: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma moklisto.” (Misala 26:27, 28) Atako Agilipa akómaki moklisto te, emonani ete maloba ya Paulo esimbaki motema na ye.—Baebele 4:12.
15. Ndenge nini Paulo afungolaki lisangá na Tesaloniki?
15 Omoni ete mpo na koyebisa nsango malamu, Paulo azalaki kosakola mpe kosalela mayele ya kondimisa? Lokola Paulo asalelaki mayele ya kondimisa ntango azalaki ‘kosembola liloba ya Nzambe malamumalamu,’ bato mosusu basukaki kaka te na koyoka ye, kasi bakómaki bandimi. Esalemaki bongo na Tesaloniki, epai Paulo akɔtaki na sinagoga mpo na koluka Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe. Misala 17:2-4 elobi boye: “Engebene momeseno ya Paulo akɔtaki epai na bango, mpe na boumeli ya sabata misato azalaki kososola elongo na bango uta na Makomami, kolimboláká mpe kondimisáká na nzela ya mikapo ete ezalaki na ntina ete Klisto anyokwama mpe asekwa na bakufi . . . Yango esalaki ete bamosusu na kati na bango bakómaki bandimi.” Paulo azalaki na mayele ya kondimisa. Azalaki kokanisa na bato, kolimbola, mpe komonisa solo na nzela ya Biblia ete Yesu azali Masiya oyo Nzambe alakaki. Nini emonanaki? Lisangá moko efungwamaki kuna.
16. Ndenge nini tokoki kosepela mingi lisusu na mosala ya kosakola Bokonzi?
16 Yo mpe okoki kokóma na mayele mingi ya kondimisa ntango ozali kolimbola Liloba ya Nzambe. Soki osali bongo, okosepela mingi lisusu na mosala na yo ya kosakola mpe koteya bato Bokonzi ya Nzambe. Basakoli ya nsango malamu oyo balandaki toli ya kosalela mingi Biblia na mosala ya kosakola bamonaki bosolo ya likambo yango.
17. Lobá likambo moko oyo okutanaki na yango oyo ezali komonisa ete kosalela Biblia na mosala ya kosakola ezali na litomba to zongelá na mokuse lisolo ya paragrafe oyo.
17 Na ndakisa, mokɛngɛli-motamboli moko akomaki boye: “Bandeko mingi bazali sikoyo kotambola na Biblia na bango na mabɔkɔ ntango bazali kopesa litatoli ndako na ndako. Yango esalisi bango na kotángela bato mingi oyo bazali kokutana na bango ata vɛrsɛ moko. Esalisi basakoli ná bato oyo bazali kokutana na bango na komona ete mosala na biso ezali nde ya koteya Biblia, kasi kaka kokabola bazulunalo mpe babuku te.” Ya solo, mpo na koyeba soki tosengeli kozala na Biblia na mabɔkɔ ntango tozali kosakola ezali kosɛnga tótalela makambo mingi, na ndakisa mimeseno ya mboka. Nzokande, tosengeli koyebana ete toyebi kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kondimisa bato nsango ya Bokonzi.
Talelá mosala ya kosakola ndenge Nzambe atalelaka yango
18, 19. (a) Ndenge nini Nzambe atalelaka mosala na biso, mpe mpo na nini tosengeli kosala makasi tótalelaka yango ndenge ye atalelaka yango? (b) Nini ekosalisa biso na kosala malamu ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki? (Talá etanda “Ndenge malamu ya kozongela bato oyo basepelaki,” na lokasa 16.)
18 Ndenge mosusu ya kosimba mitema ya bato oyo tozali koyebisa nsango malamu ezali kotalela mosala ya kosakola ndenge oyo Nzambe atalelaka yango mpe kozala na motema molai. Mokano ya Nzambe ezali ete bato ya lolenge nyonso “bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:3, 4) Yango ezali mpe mposa na biso, boye te? Lisusu, Yehova azali na motema molai, mpe yango ezali kopesa ebele ya bato libaku ya kobongola motema. (2 Petelo 3:9) Na yango, ntango tokutani na moto moko oyo andimi koyoka nsango ya Bokonzi, tosengeli kozongelaka ye mbala na mbala mpo mposa wana ekola. Esɛngaka ntango mpe motema molai liboso ete mbóto ya solo oyo ekonami ekola. (1 Bakolinti 3:6) Etanda oyo ezali na motó ya likambo “Ndenge malamu ya kozongela bato oyo basepelaki” ezali kopesa makanisi mpo na kokolisa mposa oyo bato bamonisi. Kobosana te ete bomoi ya bato mpe makambo na bango ezali ntango nyonso kobongwana. Ekoki kosalema ete tólekaka mbala na mbala kasi tozali kokuta bango na ndako te; atako bongo, ezali na ntina tólɛmba te. Mposa na biso ezali tópesa bango libaku ya koyoka nsango ya lobiko ya Nzambe. Yango wana, bondeláká Yehova apesa yo bwanya ya kokolisa makoki ya kondimisa na mosala ya kosalisa bato bándima nsango ya Bokonzi.
19 Ntango tokutani na moto oyo asepeli koyoka nsango ya Bokonzi, tosengeli lisusu kosala nini? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na makanisi mosusu etali mayele ya kondimisa, talá mateya 48 mpe 49 na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Nini esalisaki Paulo asamba malamu liboso ya Mokonzi Agilipa?
• Ndenge nini nsango na biso ekoki kosimba motema?
• Nini ekosalisa biso na kosalela Liloba ya Nzambe malamu mpo na kosimba motema?
• Tokoki kosala nini mpo tótalela mosala na biso ndenge Nzambe atalelaka yango?
[Etanda/Bililingi na lokasa 16]
Ndenge malamu ya kozongela bato oyo basepelaki
• Monisá bato ete ozali kosepela na bango.
• Poná masolo ya Biblia oyo ekosala ete bósolola malamu.
• Bimisáká likambo moko oyo bokosolola mbala ya nsima.
• Kanisáká moto yango ata nsima ya kokabwana na ye.
• Kolekisa mikolo mingi te liboso ya kozongela ye, mbala mosusu mokolo moko to mibale, mpo mposa na ye esila te.
• Kobosana te ete mokano na yo ezali ete obanda koyekola na ye Biblia.
• Bondelá Yehova akolisa mposa na ye.
[Elilingi na lokasa 15]
Paulo asalelaki mayele ya kondimisa ntango azalaki kosamba liboso ya Guvɛrnɛrɛ Fesitusi ná Mokonzi Agilipa