Abalayama ná Sala—Okoki komekola kondima na bango!
BABENGAKA ye “Tata ya baoyo nyonso bazali na kondima.” (Baloma 4:11) Mwasi na ye ya bolingo azalaki mpe na kondima. (Baebele 11:11) Tozali kolobela Abalayama ná mwasi na ye Sala, bato oyo bazalaki kobanga Nzambe. Mpo na nini bazali bandakisa malamu ya kondima? Wapi mwa mikakatano oyo bayikelaki mpiko? Mpe lisolo na bango ezali na ntina nini mpo na biso?
Abalayama amonisaki kondima ntango Nzambe asɛngaki ye alongwa na mboka na ye mpe akende na mokili mosusu. Yehova alobaki boye: “Longwá na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako ya tata na yo, kokenda na mokili ekomonisa ngai yo.” (Genese 12:1) Abalayama, moto ya sembo, atosaki Nzambe mpamba te Biblia elobi na biso boye: “Na kondima Abalayama, ntango abengamaki, atosaki na kobimáká mpo na kokende na esika oyo asengelaki kozwa lokola libula; mpe abimaki, atako azalaki koyeba te epai wapi azalaki kokende.” (Baebele 11:8) Tótalela soki kolongwa ya Abalayama na Ulu esɛngaki makambo nini.
Abalayama azalaki kofanda na Ulu, oyo ezali lelo na sudi ya Iraq. Ulu ezalaki engumba moko ya Mezopotamia oyo ezalaki na bozwi mingi mpe bato na yango bazalaki kosala mombongo na mikili ya golfe Persique mpe, na ntembe te, na mikili oyo ezalaki pembenipembeni ya Ebale Indus. Sir Leonard Woolley, moto ya mayele na arkeoloji oyo atambwisaki mosala ya kokundola biloko ya kala ya esika oyo ezalaki mboka Ulu, alobaki ete na ntango ya Abalayama, bandako mingi ya Ulu etongamaki na biliki, na pɔtɔpɔtɔ mpe bazalaki kopakola bifelo na yango mpɛmbɛ. Na ndakisa, ndako ya moto moko ya bozwi ezalaki na etaze mpe ezalaki na libándá monene oyo batyá sima. Eteni ya nse ezalaki mpo na basali mpe bapaya. Ezalaki na veranda moko ya mabaya oyo ezalaki na pembenipembeni ya eteni mobimba ya likoló, oyo bankóló-ndako bakokaki kolekaka wana mpo na kokɔta na bashambre. Woolley alobi ete bandako ya ndenge wana oyo ezalaki na bashambre 10 tii 20, ezalaki “nkaka te mpe ekokaki mpo bato bámiyoka malamu na kati, mpe mpo na bato ya Azia, ezalaki na biloko kitoko mingi. Ezalaki libosoliboso bandako ya bato minene mpe ezalaki na nyonso oyo esengeli kozala na bandako ya engumba monene.” Soki Abalayama ná Sala batikaki ndako ya ndenge wana mpo na kokende kofanda na bahema, tokoki koloba ete bandimaki komipimela biloko mingi mpo na kotosa Yehova.
Abalayama ná libota na ye bakendaki liboso na Alana, engumba moko na nɔrdi ya Mezopotamia, mpe na nsima bakendaki na Kanana. Batambolaki bakilomɛtrɛ soki 1 600, yango ezalaki mobembo molai mpo na Abalayama ná mwasi na ye, oyo bakómaki mibange mpenza! Ntango balongwaki na Alana, Abalayama azalaki na mbula 75 mpe Sala mbula 65.—Genese 12:4.
Sala ayokaki ndenge nini ntango Abalayama ayebisaki ye ete basengeli kolongwa na Ulu? Likanisi ya kotika ndako ya kitoko mpo na kokende na esika oyo ayebaki te, oyo ekokaki kozala mabe mpenza mpo na bango, mpe kondima bomoi oyo ekokanaki ata moke te na oyo bazalaki na yango na Ulu esengelaki mpenza kotungisa ye. Atako bongo, Sala atosaki mpamba te azalaki kotalela Abalayama lokola “nkolo” na ye. (1 Petelo 3:5, 6) Bato mosusu ya mayele balobaka ete Sala asalaki kaka “likambo oyo amesanaki kosala, elingi koloba komonisa limemya mingi epai ya Abalayama,” oyo emonisi ete ezalaki “ezaleli na ye mpenza.” Kasi, longola yango, Sala azalaki kotyela Yehova motema. Sala atikeli basi baklisto ndakisa malamu ya limemya mpe ya kondima.
Ya solo, atako basakoli mosusu ya ntango nyonso batikaka bamboka na bango mpo na kokende kosakola nsango malamu na mikili mosusu, esɛngami na biso nyonso te ete tótika bamboka na biso mpo na komonisa botosi epai ya Nzambe. Na esika nyonso oyo tozali kosalela Nzambe, soki tozali kotya matomba ya elimo na esika ya liboso, Nzambe akokokisa bamposa na biso.—Matai 6:25-33.
Ezala Sala to Abalayama, bango nyonso bayokaki mawa te mpo na ekateli oyo bazwaki. Ntoma Paulo alobi boye: “Soki bazalaki mpenza kokoba kokanisa esika oyo bautaki, mbɛlɛ bazwaki likoki ya kozonga.” Kasi bazongaki te. Bamonisaki kondima na bilaka ya Yehova mpamba te bayebaki ete “akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” Soki biso mpe tolingi kokoba komipesa na motema mobimba epai ya Yehova, tosengeli kondima bilaka na ye.—Baebele 11:6, 15, 16.
Bozwi ya elimo mpe bomɛngo ya mokili
Ntango Abalayama akómaki na Kanana, Nzambe alobaki na ye ete: “Nakopesa mokili oyo na bana na yo.” Mpo na komonisa botɔndi na ye, Abalayama atongaki etumbelo mpe abandaki kobelela “nkombo ya [Yehova].” (Genese 12:7, 8) Yehova apesaki Abalayama bozwi mpe ebele ya basali. Lokola Abalayama akómaki na mibali 318 oyo babongisamá mpo na etumba, baombo oyo babotamaki na ndako na ye, balobaka ete “bato na ye nyonso basengelaki koleka nkóto moko.” Soki mpo na ntina nini, bazalaki kobenga ye “nkumu ya Nzambe.”—Genese 13:2; 14:14; 23:6, NW.
Abalayama azalaki kopesa ndakisa na makambo ya losambo; azalaki koteya bato ya ndako na ye “kobatela nzela ya [Yehova] mpe kosala boyengebene mpe sembo.” (Genese 18:19) Ndakisa ya Abalayama, oyo alongaki kolakisa bato ya ndako na ye kotyela Yehova motema mpe kosala na boyengebene, ekoki kolendisa batata ya mabota na mikolo na biso. Yango wana tokoki kokamwa te ete ezala Hagala, moombo ya Sala oyo azalaki moto ya Ezipito, to mokóló ya baombo ya Abalayama, to mpe Yisaka, mwana ya Abalayama, bango nyonso bazalaki kotyela Yehova Nzambe motema.—Genese 16:5, 13; 24:10-14; 25:21.
Abalayama alingaki kimya
Lisolo ya bomoi ya Abalayama ezali komonisa ete azalaki mpenza kobanga Nzambe. Na esika atika ete matata ezalaka ntango nyonso kati na babateli ya bitonga na ye ná oyo ya Lota, mwana ya ndeko na ye, Abalayama ayebisaki Lota ete bákabwana mpe, atako Lota azalaki leki, Abalayama alobaki na ye apona mokili oyo asepeli na yango. Abalayama azalaki mpenza koluka kimya.—Genese 13:5-13.
Soki tosengeli kopona kati na koluka naino ntomo na biso to kotika yango mpo na kobatela kimya, tóbosana te ete Yehova atikaki Abalayama te amona mpasi mpo amemyaki Lota. Kutu, na nsima, Nzambe alobaki na Abalayama atala epai na epai mpe alakaki ye ete akopesa ye mpe bana na ye mokili nyonso oyo amonaki. (Genese 13:14-17) Yesu alobaki ete: “Esengo na bato [oyo balukaka kimya], mpo bakobengama ‘bana ya Nzambe.’”—Matai 5:9.
Nani asengeli kozwa libula ya Abalayama?
Atako Yehova alakaki Abalayama bana, Sala azalaki kaka ekomba. Abalayama amilelaki epai ya Nzambe mpo na likambo yango. Esengelaki mosali na ye Eliezele atikala na biloko na ye nyonso ntango akokufa? Te, mpo Yehova alobaki ete: “Moto oyo akozala mokitani na yo te, kasi mwana na yo mpenza akozala mokitani na yo.”—Genese 15:1-4.
Atako bongo, Abalayama ná Sala babotaki kaka te, mpe lokola Sala akómaki na mbula 75, azalaki lisusu na elikya te ete akozwa zemi. Yango wana alobaki na Abalayama ete: “Talá, [Yehova] apekisi ngai kobota mwana. Ingelá epai ya moombo na ngai, soki na ye nakozala na bana.” Abalayama azwaki Agala lokola makango, asangisaki na ye nzoto, mpe Agala azwaki zemi. Ntango Agala amonaki ete akómi na zemi, abandaki kotyola nkolo na ye Sala. Sala amilelaki mingi epai ya Abalayama, akitisaki lolendo ya Agala mpe Agala akimaki.—Genese 16:1-6.
Abalayama ná Sala basalaki makambo na ndenge oyo bamonaki ete ezali malamu, basalaki yango na kolanda mimeseno ya ntango wana. Kasi, yango ezalaki te ndenge oyo Yehova abongisaki mpo na kopesa Abalayama mwana oyo akozala mokitani na ye. Mimeseno ya mboka na biso ekoki komonisa ete likambo boye to boye ezali malamu na ntango boye to boye, kasi tosengeli te kokanisa mbala moko ete Yehova mpe andimi yango. Ndenge na ye ya kotalela makambo ekoki kokesana mpenza na oyo ya biso. Yango wana, tosengeli kolukaka litambwisi ya Nzambe na nzela ya libondeli mpo alakisa biso nzela oyo alingi tólanda.—Nzembo 25:4, 5; 143:8, 10.
Likambo moko te “eleki nguya ya Yehova”
Nsukansuka, Agala abotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Yisamaele. Kasi, mwana yango azalaki te Momboto oyo Nzambe alakaki Abalayama. Sala nde asengelaki kobota mokitani yango, atako akómaki mobange.—Genese 17:15, 16.
Ntango Nzambe alobaki ete Sala akobota mwana mobali, “Abalayama akweaki na elongi na ye mpe asɛkaki mpe alobaki kati na motema na ye ete, Mwana akobotama solo na mobali na mbula mokama? Mpe Sala na mbula ntuku libwa akobota?” (Genese 17:17) Ntango anzelu azongelaki nsango yango mpe Sala ayokaki ye ntango azali koloba, “asɛkaki kati na motema na ye.” Kasi, likambo moko te “eleki nguya ya [Yehova].” Tosengeli kondima ete azali na likoki ya kosala nyonso oyo akani.—Genese 18:12-14.
“Na kondima mpe Sala ye moko azwaki nguya ya kokumba zemi ya momboto, na ntango mpenza oyo ye asilaki koleka bambula, mpo atalelaki moto oyo apesaki elaka ete azali sembo.” (Baebele 11:11) Na nsima, Sala abotaki Yisaka, oyo nkombo na ye elimboli “Kosɛka.”
Batyelaki bilaka ya Nzambe motema mobimba
Yehova amonisaki ete Yisaka azali mokitani oyo bazalaki kozela banda kala. (Genese 21:12) Yango wana, tokanisi mpenza ete Abalayama akamwaki mingi ntango Nzambe asɛngaki ye akaba mwana yango lokola mbeka. Atako bongo, Abalayama azalaki mpenza na bantina ya kotyela Nzambe motema mobimba. Yehova azalaki na likoki ya kolamwisa Yisaka na bakufi! (Baebele 11:17-19) Kutu, Nzambe amonisaki nguya na ye na ndenge azongiselaki Abalayama ná Sala makoki ya kobota na ndenge ya likamwisi mpo bákoka kobota Yisaka. Lokola Abalayama azalaki kondima mpenza ete Nzambe azali na likoki ya kokokisa bilaka na ye, akakatanaki te mpo na kotosa. Toyebi ete na nsuka, Nzambe apekisaki Abalayama koboma mwana na ye. (Genese 22:1-14) Kasi, likambo oyo Abalayama asalaki na libaku yango ezali kosalisa biso tóyeba mpasi oyo Yehova Nzambe ayokaki ntango “apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16; Matai 20:28.
Lokola Abalayama azalaki na kondima epai ya Nzambe, amonaki ete moto oyo asengelaki kozwa libula oyo Yehova alakaki akoki te kobala mwasi ya Kanana, mboka oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Lokola azalaki kobanga Nzambe, akokaki kondima ata moke te ete mwana na ye abala moto oyo asalelaka Yehova te. Yango wana Abalayama atindaki bákende kolukela Yisaka mwasi ya malamu na libota na ye na mokili ya Mezopotamia, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 800. Nzambe apambolaki molende yango ya Abalayama ntango amonisaki ete aponi Lebeka mpo akóma mwasi ya Yisaka mpe nkɔkɔ ya Masiya. Ya solo, Yehova “asilaki kopambola Abalayama na makambo nyonso.”—Genese 24:1-67; Matai 1:1, 2.
Lipamboli mpo na bikólo nyonso
Abalayama ná Sala bapesaki ndakisa malamu mpenza ya koyikela minyoko mpiko mpe ya kotyela bilaka ya Nzambe motema. Elikya ya bato ya kozala na bomoi libela na libela etali kokokisama ya bilaka yango, mpamba te Yehova alobaki na Abalayama ete: “Mabota nyonso na nse bakopambolama mpo na bana na yo, mpo ete yo osili kotosa monɔkɔ na ngai.”—Genese 22:18.
Abalayama ná Sala bazalaki bato ya kozanga kokoka lokola biso. Kasi, ntango bayebaki mokano ya Nzambe, bakakatanaki te mpo na kotosa yango, atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bango. Yango wana, tolobaka ete Abalayama azalaki “moninga ya Yehova” mpe Sala azalaki ‘mwasi mosantu oyo azalaki kolikya epai na Nzambe.’ (Yakobo 2:23; 1 Petelo 3:5) Soki tosali makasi mpo na komekola kondima ya Abalayama mpe ya Sala, biso mpe tokoki kokóma baninga mpenza ya Nzambe. Tokoki mpe kozwa litomba na bilaka kitoko oyo Yehova apesaki Abalayama.—Genese 17:7.
[Elilingi na lokasa 26]
Mpo na kondima ya Abalayama ná Sala, Yehova apesaki bango mwana atako bakómaki mibange
[Elilingi na lokasa 28]
Ndakisa ya Abalayama ezali kosalisa biso tóyeba mpasi oyo Yehova ayokaki ntango andimaki ete Mwana na ye mobotami-se-moko akufa