Mapamboli na baoyo bapesaka Nzambe nkembo
“Ee [Yehova], . . . bakoya mpo na komikitisa liboso ya elongi na yo; mpe bakokumisa nkombo na yo.”—NZEMBO 86:9.
1. Mpo na nini tokoki kopesa Nzambe nkembo koleka bikelamu oyo ezangi mpema?
YEHOVA abongi kozwa nkembo epai ya bikelamu na ye nyonso. Bikelamu oyo ezali na mpema te ekumisaka ye kozanga maloba; nzokande, biso bato tozali na likoki ya kokanisa, ya kokanga ntina ya makambo, ya kopesa matɔndi, mpe kosambela. Yango wana, ezali epai na biso nde mokomi ya nzembo alobaki boye: “Bino bato ya mokili mobimba, bósepela liboso ya Nzambe. Bóyemba mpo na lokumu ya nkombo na ye, bókembisa ye na kosanzola.”—Nzembo 66:1, 2.
2. Banani bandimi etinda ya kopesa nkombo ya Nzambe nkembo, mpe mpo na nini?
2 Bato mingi mpenza baboyi kondima Nzambe to kopesa ye nkembo. Atako bongo, na kati ya mikili 235, Batatoli ya Yehova koleka milio 6 bazali komonisa ete bazali komona ‘bizaleli ya Nzambe oyo emonanaka te’ na nzela ya biloko oyo esalemá mpe ‘bayoki’ litatoli ya biloko oyo akelá. (Baloma 1:20; Nzembo 19:2, 3) Boyekoli ya Biblia esalisi bango na koyeba Yehova mpe na kolinga ye. Nzembo 86:9, 10 esakolaki boye: “Ɛ [Yehova], mabota nyonso masalaki yo bakoya mpo na komikitisa liboso ya elongi na yo; mpe bakokumisa nkombo na yo. Zambi yo ozali monene mpe okosalaka makambo ya kokamwa; yo moko ozali Nzambe.”
3. Ndenge nini “ebele ya bato” bazali ‘kosala mosala mosantu butu moi’?
3 Ndenge moko mpe, Emoniseli 7:9, 15 elobi ete “ebele ya bato” oyo bazali kosambela Nzambe “bazali kosalela ye mosala mosantu butu moi na kati ya tempelo na ye.” Yango elingi koloba te ete Nzambe azali kosɛnga na basaleli na ye wana bákumisaka ye miniti nyonso, kozanga kopema; kasi nde ete basambeli na ye bazali na mokili mobimba. Yango wana, ntango butu ekómi na mikili oyo basaleli mosusu ya Nzambe bazali, baoyo ya mikili mosusu bazali kotatola mpo na ye. Yango wana tokoki koloba ete butu moi, bato bazangaka te oyo bazali kopesa Yehova nkembo. Etikali moke, bikelamu “nyonso [oyo ezali] na mpema” ekotombola mongongo mpo na kosanzola Yehova. (Nzembo 150:6) Kasi, liboso na yango, mokomoko na biso akoki kosala nini mpo na kopesa Nzambe nkembo? Mikakatano nini tokoki kokutana na yango? Baoyo bazali kopesa Nzambe nkembo bakozwa mapamboli nini? Mpo na kozwa biyano, tótalela lisolo ya Biblia oyo elobeli libota ya Gada.
Mokakatano moko oyo ebimaká kala
4. Libota ya Gada ezalaki na mokakatano nini?
4 Liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, bato ya libota ya Gada basɛngaki ete bápesa bango nzela ya kofanda na ɛsti ya Ebale Yolodani, oyo ezalaki mokili malamu mpo na kobɔkɔla bibwele. (Mituya 32:1-5) Kofanda na mokili wana esengelaki komemela bango mikakatano minene. Mabota oyo ekatisaki na wɛsti ya ebale elingaki kobatelama mpamba te, Lobwaku ya Yolodani ezalaki kokangela basoda ya bikólo mosusu nzela soki balingi kokɔtela bango. (Yosua 3:13-17) Nzokande, mpo na mokili oyo ezali na ɛsti ya Ebale Yolodani, buku The Historical Geography of the Holy Land, ya George Adam Smith, elobi boye: “[Mokili yango] mobimba ezali patatalu, ezali ata na ngomba to mai monene te oyo ekoki kokanga banguna nzela, tii mwa bangomba ya Alabia. Yango wana, bato ya bikólo oyo ezalaki koyengayenga mpe bazangaki biloko ya kolya bazalaki ntango nyonso kokɔtela bango, mosusu bazalaki koyela bango ebele mbula na mbula mpo na koleisa bibwɛlɛ.”
5. Yakobo alobaki nini mpo na kolendisa libota ya Gada ete bázongisaka soki babundisi bango?
5 Libota ya Gada ekokaki kosala nini liboso ya mokakatano monene wana? Bankama ya bambula liboso, na mbeto na ye liboso akufa, nkɔkɔ na bango Yakobo asakolaki boye: “Mpo na Gada, etuluku ya miyibi bakobundisa ye, kasi ye, akobundisa molɔngɔ oyo ekangi mokila.” (Genese 49:19, NW) Soki totángi kaka, maloba yango ekoki komonana lokola nde ezali kolɛmbisa nzoto. Nzokande, soki tolandeli yango malamu, tokomona ete ezali nde kotinda libota ya Gada bázongisaka ntango babundisi bango. Yakobo alobaki ete soki basali bongo, banguna na bango bakokima, mpe bato ya libota ya Gada bakolanda molɔngɔ na bango oyo ekangi mokila.
Mikakatano oyo tozali kokutana na yango na losambo na biso
6, 7. Ndenge nini bomoi ya baklisto lelo oyo ekokani na oyo ya bato ya libota ya Gada?
6 Lokola libota ya Gada, baklisto bazali lelo oyo kokutana na mitungisi mpe mikakatano na mokili ya Satana; eloko moko te ezali kobatela biso na ndenge ya likamwisi. (Yobo 1:10-12) Bandeko mingi kati na biso bazali kokutana na mikakatano na kelasi, mpo na koluka mbongo, mpe mpo na kobɔkɔla bana. Tobosani mpe te mikakatano na nzoto na biso moko. Bamosusu basengeli koyikela “nzubɛ moko na kati ya mosuni” mpiko, mbala mosusu bazali bibɔsɔnɔ to bazali na maladi makasi. (2 Bakolinti 12:7-10) Bamosusu bazali komona lokola nde bazali na ntina moko te. “Mikolo mabe,” elingi koloba ntango moto akómi mobange, ekoki kopekisa moklisto asalela Yehova na makasi oyo azalaki kosala na yango liboso.—Mosakoli 12:1.
7 Lisusu, ntoma Paulo alobi na biso ete “tozali kobunda líbanda . . . ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Tozali ntango nyonso na likama ya kobendama na “elimo ya mokili,” elimo ya botomboki mpe ya misala ya mbindo, oyo Satana ná bademo na ye bazali kolendisa. (1 Bakolinti 2:12; Baefese 2:2, 3) Lokola Lota, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, biso mpe lelo oyo tokoki kotungisama na maloba mpe misala mabe ya bato oyo tofandi na bango. (2 Petelo 2:7) Lisusu, Satana azali ntango nyonso kobundisa biso. Satana azali kobundisa bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé, “oyo bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emoniseli 12:17) Satana azali mpe kobundisa “bampate mosusu” na ndenge azali kobimisa bipekiseli mpe minyoko.—Yoane 10:16.
Tosengeli kozonga nsima to kobunda?
8. Tosengeli kosala nini ntango Satana azali kobundisa biso, mpe mpo na nini?
8 Tosengeli kosala nini ntango Satana azali kobundisa biso? Lokola libota ya Gada na ntango ya kala, tosengeli kozala makasi na elimo mpe kobunda na kolanda malako ya Nzambe. Ezali mawa na komona ete mikakatano ya bomoi ebandi kozongisa bamosusu nsima, bazali kobosana mikumba na bango ya elimo. (Matai 13:20-22) Motatoli moko alimbolaki ntina oyo motuya ya bayangani na makita ekitaki na lisangá na bango: “Bandeko bakómi mpenza kolɛmba. Mikakatano ekómi koleka bango motó.” Toboyi te, lelo oyo ezali na ebele ya makambo oyo ezali kolɛmbisa bato. Yango wana, ezali mpasi te bákóma kotalela losambo ya Nzambe lokola mokakatano, mokumba mosusu oyo babakiseli bango. Kasi, tokanisi ete ndenge wana ya kotalela makambo ezali malamu?
9. Ndenge nini kozwa ekanganeli ya Klisto epemisaka?
9 Tótalela maloba oyo Yesu ayebisaki ebele ya bato ya ntango na ye oyo mitungisi ya bomoi elɛmbisaki bango: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino.” Yesu alobaki nde ete bakopema soki balɛmbisi mabɔkɔ na mosala ya Nzambe? Te, kasi alobaki boye: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” Ekanganeli ezali eloko moko boye ya mabaya to ya bibende oyo esalisaka moto to nyama na komema mokumba. Kasi, mpo na nini moto akondima lisusu komema ekanganeli ya ndenge wana? ‘Mikumba’ oyo tozali na yango ekoki te? Ezali bongo, kasi maloba wana na Grɛki ekoki mpe kotángama boye: “Bókɔta na ekanganeli elongo na ngai.” Kanisá naino: Yesu azali kosɛnga ete asalisa biso na komema mokumba na biso! Ezali na ntina te tóbundana na yango biso moko.—Matai 9:36; 11:28, 29; 2 Bakolinti 4:7.
10. Milende oyo tosalaka mpo na kopesa Nzambe nkembo ememaka matomba nini?
10 Ntango tokamati ekanganeli ya Yesu, elingi koloba tokómi bayekoli na ye, tozali kobunda na Satana. Yakobo 4:7 elobi boye: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” Yango elingi koloba te kotɛmɛla Zabolo ezali likambo ya pɛtɛɛ. Kosalela Nzambe ezali kosɛnga molende mpenza. (Luka 13:24) Kasi, na Nzembo 126:5, Biblia elaki ete: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobukaka na koganga na esengo.” Ya solo, Nzambe na biso azangi botɔndi te. Azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi,” mpe apambolaka baoyo bapesaka ye nkembo.—Baebele 11:6.
Tópesa Nzambe nkembo na mosala na biso ya basakoli ya Bokonzi
11. Ndenge nini mosala ya kosakola ebatelaka biso na etumba oyo tozali kobunda na Satana?
11 Yesu alobaki boye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” Mosala ya kosakola ezali lolenge ya libosoliboso oyo tosengeli kopesa Nzambe “mbeka ya lisanzoli.” (Matai 28:19; Baebele 13:15) ‘Makolo oyo elatisami bisaleli ya nsango malamu ya kimya’ ezali na ntina mingi na kati ya “molato mobimba ya etumba” oyo ezali kobatela biso na etumba oyo tozali kobunda na Satana. (Baefese 6:11-15) Kosanzola Nzambe na mosala ya kosakola ezali lolenge malamu mingi ya kolendisa kondima na biso. (2 Bakolinti 4:13) Ebatelaka elimo na biso na makanisi mabe. (Bafilipi 4:8) Kobima na mosala ya kosakola epesaka biso libaku ya kozala elongo na baninga na biso bandimi, likambo oyo elendisaka biso.
12, 13. Mabota ekoki kozwa matomba nini soki bazali kobima pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola? Pesá ndakisa.
12 Mosala ya kosakola ekoki mpe kozala likambo ya malamu mpo na libota mobimba. Toyebi ete bilenge bazalaka na mposa ya kosakana mwa moke. Kasi, soki libota bazali kobima elongo na mosala ya kosakola, bakomona yango mosala ya mpasi te. Baboti bakoki kosalisa bana na bango básepela na mosala ya kosakola soki bazali kopesa bango formasyo. Bilenge basepelaka na makambo oyo basalaka malamu. Soki baboti bazali makambo makasi te, elingi koloba bazali koluka te ete bilenge básala makambo oyo eleki bango, bakosalisa bango básepela na mosala ya kosakola.—Genese 33:13, 14.
13 Lisusu, libota oyo basanzolaka Nzambe elongo bakómaka na boyokani makasi. Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo, mobali na ye oyo azali mondimi te, asundolaki ye ná bana mitano. Akómaki na mokakatano mpamba te esengelaki asalaka mpo na koleisa bana na ye. Tokanisi ete makambo elekelaki ye na boye ete abosanaki bamposa ya elimo ya bana na ye? Ye moko alobi boye: “Nazalaki mpenza koyekola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe nazalaki kosala makasi ya kosalela makambo oyo nazalaki kotánga. Pɔsɔ na pɔsɔ, nazalaki komema bana na makita mpe na mosala ya ndako na ndako. Milende na ngai ebotaki mbuma nini? Bana na ngai nyonso mitano bazwá batisimo.” Kobima mingi na mosala ya kosakola ekoki mpe kosalisa yo na milende oyo ozali kosala mpo na kobɔkɔla bana na yo na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Baefese 6:4.
14. (a) Ndenge nini bilenge bakoki kopesa Nzambe nkembo na kelasi? (b) Likambo nini ekoki kosalisa bilenge mpo ‘báyokela nsango malamu nsɔni te’?
14 Bilenge, soki na mboka na bino epekisami te kopesa litatoli na kelasi, bopesaka Nzambe nkembo na ndenge yango, to kobanga bato ezongisaka bino nsima? (Masese 29:25) Motatoli moko ya mbula 13 na ekólo Porto Rico, akomaki boye: “Nayokaka nsɔni te mpo na kosakola na kelasi mpo nayebi ete makambo oyo nasakolaka ezali solo. Na kelasi, nakakatanaka te kotombola mosapi mpe koloba makambo oyo nayekoli na Biblia. Soki nazali na likambo ya kosala te, nakendaka na bibliotɛkɛ mpe natángaka buku Mituna oyo bilenge batunaka.”a Yehova apamboli nde milende na ye? Elenge yango alobi boye: “Ntango mosusu baninga ya kelasi batunaka ngai mituna mpe basɛngaka ngai namemela bango buku yango.” Soki obangaka kosakola na kelasi, mbala mosusu osengeli komipesa na koyekola yo moko mpo omindimisa yo moko “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Soki ondimi na motema na yo mpenza ete makambo oyo oyekoli ezali solo, ‘okoyokela nsango malamu nsɔni te.’—Baloma 1:16.
‘Ekuke efungwami’ mpo na mosala
15, 16. Baklisto mosusu bakɔti na “ekuke monene” nini “oyo ezali komema na mosala,” mpe ememeli bango mapamboli nini?
15 Ntoma Paulo akomaki ete “ekuke monene oyo ezali komema na mosala” efungwameli ye. (1 Bakolinti 16:9) Bomoi na yo ekopesa yo nzela ya kokɔta na ekuke oyo ekomema yo na kosala mingi lisusu na mosala ya Nzambe? Na ndakisa, mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza esɛngaka kosakola ngonga 70 sanza na sanza mpe mosala ya mobongisi-nzela mosungi, ngonga 50. Bandeko mosusu basepelaka mingi na babongisi-nzela mpo na mosala ya sembo oyo basalaka. Kasi, elingi koloba te ete lokola basakolaka mingi, bamimonaka ete baleki bandeko mosusu. Kasi, bamonisaka elimo oyo Yesu alendisaki ete: “Tozali na biso baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.”—Luka 17:10.
16 Mosala ya mobongisi-nzela esɛngaka komityela mibeko, koyeba kobongisa makambo, mpe kondima komipimela makambo mosusu. Kasi, ememelaka moto ebele ya mapamboli. Tamika, elenge mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela, alobaki boye: “Koyeba kosembola Liloba ya Nzambe ezali mpenza lipamboli. Soki ozali mobongisi-nzela, okozala na mabaku mingi ya kosalela Biblia. Sikoyo, na mosala ya ndako na ndako, nakoki kokanisa mbala moko vɛrsɛ oyo ebongi natángela moto oyo nakutani na ye.” (2 Timote 2:15) Mica, ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela, alobaki boye: “Komona ndenge oyo solo ebongolaka bomoi ya bato ezali mpe lipamboli monene.” Elenge mosusu, nkombo na ye Matthew, alobelaki esengo ya “kosalisa moto ayamba solo. Ezali na esengo mosusu te oyo ekokani na yango.”
17. Ndenge nini moklisto moko alongaki makanisi oyo ezalaki kopekisa ye kokóma mobongisi-nzela?
17 Okoki komitalela soki yo mpe okoki kokóma mobongisi-nzela? Mbala mosusu ozalaka na mposa na yango, kasi omonaka ete okokoka te. Kenyatte, ndeko mwasi moko ya elenge alobaki boye: “Nazalaki kobanga mosala ya mobongisi-nzela. Nazalaki komona ete nakokoka yango te. Nayebaki kobongisa ndenge ya kobanda masolo te to kosalela Biblia mpo na kolimbola moto makambo.” Kasi, bankulutu basɛngaki ndeko mwasi moko mobongisi-nzela oyo akɔmeli abimaka na ngai. Kenyatte abakisi boye: “Nazalaki kosepela mingi kosakola na ye. Nakómaki na mposa ya kokóma mobongisi-nzela.” Soki balendisi yo mpe bapesi yo formasyo, mbala mosusu yo mpe okoyoka mposa ya kokóma mobongisi-nzela.
18. Bandeko oyo bakómi bamisionɛrɛ bakoki kozwa mapamboli nini?
18 Mosala ya mobongisi-nzela ekoki kofungwela yo nzela na mikumba mosusu. Na ndakisa, mwasi ná mobali oyo bazali babongisi-nzela bakoki kokokisa masɛngami mpo na kozwa formasyo ya misionɛrɛ mpo na kosakola na mboka mopaya. Bamisionɛrɛ basengeli komesana na mboka mopaya, mbala mosusu koyekola monɔkɔ mosusu, makambo ya sika, mpe na bilei oyo bamesaná na yango te. Kasi, nyonso wana emonanaka mpamba liboso ya mapamboli oyo bazwaka. Mildred, misionɛrɛ moko oyo aumeli mingi na Mexique, alobi boye: “Nayokaka mawa te ndenge nazwaki ekateli ya kokóma misionɛrɛ. Nazalaki na mposa na yango banda nazalaki mwana moke.” Mapamboli nini azwi? “Na mboka na biso ezalaki mpasi mpo na kozwa moto ya koyekola na ye Biblia. Kasi awa, esí ekómelá ngai nasalisa bayekoli minei na mbala moko bákóma basakoli!”
19, 20. Ndenge nini kosala na Betele, kozala mosali ya bolingo malamu na mboka mopaya, mpe kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi ememeli ebele ya bandeko mapamboli?
19 Baoyo mpe basalaka na Betele, na biro ya Batatoli ya Yehova, bazwaka mapamboli mingi. Sven, elenge mobali moko na Allemagne, alobi boye mpo na mosala ya Betele: “Namonaka ete nasalaka mosala ya ntina mpenza. Nakokaki kosalela mayele na ngai na mokili. Kasi, elingaki kozala lokola nde bazali kobomba mbongo na banki oyo elingi kokwea.” Ya solo, kozala mosali ya bolingo malamu, kozanga ete báfutaka yo esɛngaka komipimela. Kasi, Sven alobi boye: “Na mpokwa, ntango nazongi na ndako mpe nazali koyeba ete nyonso nasali na mokolo ezali mpo na Yehova, nayokaka esengo moko ya koloba te.”
20 Bandeko mosusu bazali na libaku malamu ya kosala lokola basali ya bolingo malamu na mikili ya bapaya, epai bazali kosala misala ya kotonga. Mobali moko ná mwasi na ye oyo basalaki na bikólo mwambe bakomaki boye: “Awa, bandeko bazali na boboto mpenza. Tokoyoka mawa ntango tokolongwa na mboka oyo, ekozala mbala ya mwambe oyo tokoyoka mawa ndenge yango. Tokutani na makambo mingi ya malamu!” Ezali mpe na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Eteyelo yango epesaka formasyo na makambo ya elimo na bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami mpe bazali minzemba. Ndeko moko oyo akɔtaki na eteyelo yango akomaki boye: “Nazangi maloba mpo na komonisa bino botɔndi na ngai mpo na eteyelo yango. Lingomba nini mosusu ekoki kosala ebele ya makambo boye mpo na kopesa bato formasyo?”
21. Etumba nini baklisto nyonso bazali na yango mpo na mosala ya Nzambe?
21 Bikuke mingi oyo ezali komema na mosala efungwami. Ya solo, mingi kati na biso tokoki kosala na Betele to na mboka mopaya te. Yesu ye moko alobaki ete baklisto nyonso bakobota “mbuma” ndenge moko te na kotalela bomoi ya moto na moto. (Matai 13:23) Yango wana, etumba na biso baklisto ezali ya kosalela malamu bomoi na biso, komipesa mingi na mosala ya Yehova na ndenge oyo bomoi na biso ezali kopesa nzela. Soki tosali bongo, tozali kopesa Yehova nkembo, mpe tokoki kozala na elikya ete akosepela. Tózwa ndakisa ya Ethel, ndeko mwasi moko ya mobange oyo afandaka na ndako ya mibange. Mbala na mbala apesaka baninga na ye mibange oyo bafandi na ye kuna litatoli mpe asakolaka na telefone. Atako akoki kosala mingi te, asalaka mosala na ye na motema mobimba.—Matai 22:37.
22. (a) Ndenge nini mosusu tokoki kopesa Nzambe nkembo? (b) Ntango nini ya esengo ezali liboso na biso?
22 Kasi, tóbosana te ete kosakola ezali kaka lolenge moko ya kopesa Yehova nkembo. Soki tozali na etamboli malamu, tozali kolata mpe kobongisa nsuki na biso malamu, ezala na mosala, na kelasi, mpe na ndako, tosepelisaka mpe motema ya Yehova. (Masese 27:11) Masese 28:20 epesi elaka oyo: “Moto ya sembo akoyikana na mapamboli.” Yango wana, tosengeli ‘kokona mingi’ na mosala ya Nzambe, na elikya ya kobuka ebele ya mapamboli. (2 Bakolinti 9:6) Soki tozali kosala bongo, tokomona na miso ntango bikelamu ‘nyonso oyo ezali na mpema’ ekopesa Yehova nkembo oyo ebongi na ye!—Nzembo 150:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Na ndenge nini basaleli ya Nzambe basalelaka ye “butu moi”?
• Mokakatano nini bato ya libota ya Gada bazalaki na yango, mpe yango ezali koteya baklisto nini lelo oyo?
• Na ndenge nini mosala ya kosakola ebatelaka biso na etumba oyo tozali kobunda na Satana?
• Bandeko mosusu bakɔti na ‘ekuke’ nini oyo ‘efungwami’ mpe bazwi mapamboli nini?
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola libota ya Gada oyo bazalaki kobundisa bituluku ya miyibi, baklisto basengeli kokanga mabɔkɔ te ntango Satana azali kobundisa bango
[Elilingi na lokasa 17]
Tozwaka libaku ya kozala elongo na baninga ya malamu na mosala ya kosakola
[Bililingi na lokasa 18]
Mosala ya mobongisi-nzela ekoki kofungola nzela na mikumba lokola:
1. Kozala mosali ya bolingo malamu na mboka mopaya
2. Kosala na Betele
3. Mosala ya misionɛrɛ