Libondeli ya Nkolo—Ndimbola na yango mpo na yo
LIBONDELI ya Nkolo, oyo Yesu ateyaki na Lisolo Likoló ya Ngomba, ezali na Biblia na mokanda ya Matai mokapo 6, vɛrsɛ 9 tii 13. Liboso ateya libondeli yango, Yesu alobaki boye: “Ntango yo ozali kobondela, kolobaka makambo kaka moko wana te mbala na mbala, lokola bato ya bikólo mosusu basalaka, mpo bakanisaka ete bakoyokama mpo ete bazali koloba mingi.”—Matai 6:7.
Emonani ete Yesu alingaki te ete tókanga Libondeli ya Nkolo na motó mpe tózongelaka yango. Toboyi te, Yesu azongelaki libondeli yango na libaku mosusu. (Luka 11:2-4) Kasi, maloba ya libondeli yango ezali ndenge moko te na Evanzile ya Matai mpe oyo ya Luka. Lisusu, na mabondeli oyo Yesu mpe bayekoli na ye basalaki na nsima, bazongelaki maloba ya libondeli ya ndakisa te.
Mpo na nini Libondeli ya Nkolo ekomamá na Biblia? Na nzela ya libondeli yango, Yesu alakisaki biso ndenge ya kosala mabondeli oyo Nzambe akoki kondima. Libondeli yango ezali na biyano na mituna minene oyo tomitunaka na ntina na bomoi. Tótalela sikoyo eteni mokomoko ya Libondeli ya Nkolo.
Nkombo ya Nzambe ezali nani?
“Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Maloba wana ya ebandeli ya libondeli ya ndakisa esalisaka biso tómiyoka penepene na Nzambe ntango tozali kobenga ye “Tata na biso.” Lokola mwana moke, oyo alingaka kozala pembeni ya baboti na ye oyo balingaka ye mpe bayebi bamposa na ye, biso mpe tokoki kopusana penepene na Tata na biso ya likoló, na elikya ete akoyoka biso. Mokonzi Davidi ayembaki boye: “Yo okoyokaka mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.”—Nzembo 65:2.
Yesu alakisaki biso tóbondelaka ete nkombo ya Nzambe esantisama. Kasi, nkombo yango ya Nzambe ezali nani? Biblia epesi eyano oyo: “Yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Osí otángá nkombo Yehova, to Yawe, na kati ya Biblia?
Na bamaniskri ya kala ya Biblia, bakomaki nkombo ya Nzambe, Yehova, pene na mbala 7 000. Kasi, babongoli mosusu balongolá nkombo yango na Biblia. Lokola Biblia emonisi nkombo yango, ebongi mpenza tóbondelaka Mozalisi asantisa nkombo na ye to akómisa yango mosantu. (Ezekiele 36:23) Mpo na komonisa ete tolingi nkombo ya Nzambe esantisama, ntango tozali kobondela ye, tosengeli kobengaka ye na nkombo na ye Yehova.
Mwasi moko na nkombo Patricia, akolaki na Lingomba ya Katolike mpe ayebaki malamu mpenza Libondeli ya Nkolo. Asalaki nini ntango Motatoli ya Yehova moko alakisaki ye nkombo ya Nzambe na Biblia? Alobaki boye: “Nandimaki te! Natalaki lisusu na Biblia na ngai moko mpe namonaki nkombo yango. Na nsima, Motatoli yango atángelaki ngai Matai 6:9, 10 mpe alimbwelaki ngai ete Libondeli ya Nkolo ezali mpe kolobela nkombo ya Nzambe. Nasepelaki mingi mpe nasɛngaki ye ayekolisa ngai Biblia.”
Mokano ya Nzambe esalema na mabelé
“Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Ndenge nini maloba wana ya libondeli oyo Yesu alakisaki ekokokisama? Na makanisi ya bato mingi, likoló ezali esika ya kimya mpenza. Biblia elobi ete likoló ezali ‘efandelo ya bulɛɛ mpe ya nkembo’ ya Yehova. (Yisaya 63:15) Talá ntina oyo tobondelaka ete mokano ya Nzambe esalema na mabelé “lokola na likoló”! Kasi, yango ekosalema mpenza?
Danyele, mosakoli ya Yehova, alobaki boye: “Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [ya mabelé], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Etikali moke, Bokonzi to guvɛrnema yango ya likoló eyangela na bosembo mpe etya kimya na mokili mobimba.—2 Petelo 3:13.
Ntango tozali kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano na ye esalema, tomonisaka kondima na elaka oyo ekozanga te kokokisama. Ntoma Yoane akomaki boye: “Nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.’” Na nsima Yoane abakisaki boye: “Mpe oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete: . . . ‘Komá, mpamba te maloba oyo ezali sembo mpe solo.’”—Emoniseli 21:3-5.
Libondeli ya ndakisa mpe bamposa na biso ya mosuni
Na libondeli ya ndakisa, Yesu amonisaki ete ntango tozali kobondela, tosengeli kolobelaka libosoliboso nkombo ya Nzambe mpe mokano na ye. Kasi, libondeli yango elobeli mpe bamposa na biso oyo tokoki kosɛnga Yehova akokisela biso yango.
Ya liboso elobi boye: “Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo.” (Matai 6:11) Yango elimboli te ete tozali kosɛnga bozwi ya mokili. Yesu alendisaki biso tóbondelaka mpo na “mampa na biso ya mokolo engebene bamposa ya mokolo.” (Luka 11:3) Na boyokani na Libondeli ya Nkolo, tokoki kobondelaka na elikya ete, soki tozali kolinga Nzambe mpe kotosa ye, akokokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo.
Soki tozali komitungisa na koleka ndelo mpo na mikakatano ya mbongo, tokotya bamposa ya elimo pembeni mpe tokosala te oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Kasi soki totye losambo ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso, tokoki kozala na elikya ete soki tobondeli Nzambe mpo na bamposa na biso ya mosuni, lokola bilei mpe bilamba, akoyoka biso. Yesu alobaki boye: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe], mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:26-33) Koluka boyengebene ya Nzambe ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mpamba te biso nyonso tozali bato ya masumu mpe tozali na mposa ete masumu na biso elimbisama. (Baloma 5:12) Libondeli ya Nkolo elobeli mpe likambo yango.
Kosɛnga bolimbisi ya masumu
“Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.” (Matai 6:12) “Banyongo” oyo balobeli awa ebengami “masumu” na Libondeli ya Nkolo na mokanda ya Luka. (Luka 11:4) Yehova akolimbisa mpenza masumu na biso?
Atako Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, asalaki masumu ya minene mpenza, abongolaki motema mpe, na elikya mpenza, abondelaki boye: “Yo ozali malamu, ee [Yehova], mpe okolimbisaka mabe. Otondi na boboto mpo na bango nyonso bakobyangaka nkombo na yo.” (Nzembo 86:5) Yango ezali mpenza maloba ya kobɔndisa! Tata na biso ya likoló ‘alimbisaka’ masumu ya bato oyo babongoli mitema mpe bazali kobelela ye. Yehova Nzambe akoki kolimbisa masumu na biso nyonso, ndenge moto alongolaka nyongo nyonso moninga na ye asengelaki kofuta ye.
Kasi, Yesu amonisaki ete soki tolingi Nzambe alimbisa biso, biso mpe tosengeli kolimbisaka basusu. (Matai 6:14, 15) Atako baninga misato ya Yobo, moto ya sembo, balobaki na ye mabe, ye alimbisaki bango mpe abondelaki kutu mpo na bango. (Yobo 42:10) Soki tolimbisi bato oyo basali biso mabe, tokosepelisa Nzambe mpe ye akolimbisa biso.
Lokola Nzambe ayokaka malɔmbɔ na biso, yango esengeli kotinda biso tóluka kosepelisa ye. Mpe tokoki kosala yango, atako tozali bato ya kozanga kokoka. (Matai 26:41) Na likambo wana mpe, Yehova akoki kosalisa biso, ndenge Yesu amonisaki yango na lilɔmbɔ moko ya ntina mpenza na nsuka ya libondeli ya ndakisa.
Lisalisi mpo na kotikala sembo
“Komema biso na komekama te, kasi bikisá biso longwa na moto mabe.” (Matai 6:13) Yehova atikaka biso na komekama te, amekaka mpe biso na lisumu te. Liloba na ye elobi boye: “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” (Yakobo 1:13) Nzambe atikaka biso te tómekama, kasi akoki kobikisa biso ata na mabɔkɔ ya Momeki Monene—“moto mabe,” oyo abengami Satana Zabolo.
Ntoma Petelo alendisaki baninga na ye baklisto na maloba oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Petelo 5:8) Satana amekaki kutu ata moto ya kokoka, Yesu Klisto! Mposa ya Zabolo ezalaki nini? Mposa na ye ezalaki ete Yesu atika losambo ya pɛto ya Yehova Nzambe. (Matai 4:1-11) Soki ozali na mposa ya kosalela Nzambe, yebá ete Satana azali mpe na mposa ya kolya yo!
Na nzela ya mokili oyo azali koyangela, Zabolo akoki komeka kobenda biso tósala misala oyo Nzambe aboyi. (1 Yoane 5:19) Yango wana, ezali na ntina mingi tósɛngaka Nzambe mbala na mbala asalisa biso, mingimingi ntango tozali kobunda na komekama moko oyo ezali kosila te. Soki mpe tozali kosambela Yehova ndenge mpenza Biblia, Liloba na ye, elakisi biso, akosalisa biso tótɛmɛla Zabolo. Biblia elobi na biso boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema.” —1 Bakolinti 10:13.
Kondimela Nzambe ezali na ntina mpenza
Ezali esengo mpenza koyeba ete Tata na biso ya likoló amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso! Kutu, atindaki Mwana na ye, Yesu Klisto, alakisa biso ndenge ya kobondela. Na ntembe te, yango ezali kopesa biso mposa ya kosepelisa Nzambe. Ndenge nini tokoki kosala yango?
Biblia elobi boye: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Ndenge nini moto akoki kokóma na kondima ya ndenge wana? Biblia elobi boye: “Kondima eutaka na likambo oyo eyokani.” (Baloma 10:17) Batatoli ya Yehova basepelaka mpenza kosolola masolo ya Biblia na moto nyonso oyo azali na mposa ya kosalela Nzambe na kondima ya solosolo.
Tozali kolikya ete lisolo oyo ya Libondeli ya Nkolo esalisi yo oyeba ndimbola ya maloba na yango malamumalamu. Soki oyebi lisusu makambo mingi na ntina na Yehova mpe mbano oyo akopesa “baoyo bazali koluka ye makasi,” kondima na yo epai ya Nzambe ekokóma makasi. Ekozala malamu yo mpe oluka koyeba mokano na ye malamumalamu, mpo okóma moninga ya motema mpenza ya Tata na yo ya likoló mpo na libela. —Yoane 17:3.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé. Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo; mpe limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso. Mpe komema biso na komekama te, kasi bikisá biso longwa na moto mabe.”—Matai 6: 9-13
[Elilingi na lokasa 7]
Yehova akokisaka bamposa ya bato oyo balingaka ye
[Elilingi na lokasa 7]
Nzambe asalisaka biso mpe tótɛmɛla Zabolo
[Elilingi na lokasa 7]
Na ndakisa ya Yobo, soki tolimbisi bato oyo basali biso mabe, Nzambe mpe akolimbisa biso