Bimonaneli ya Bokonzi ya Nzambe ekokisami
“Bozali kosala malamu na kotyeláká [liloba ya esakweli] likebi lokola mwinda oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili.”—2 PETELO 1:19.
1. Bokeseni nini tozali komona na mokili lelo oyo?
TOKOKI kolobela na mokuse mokili ya lelo na mwa maloba oyo: mpasi na mpasi. Mikakatano ya mokili ezali mpenza kosilisa bato mayele: epai mopɛpɛ, mai, ná bazamba ezali kobeba; epai mosusu bateroriste bangali na mokili mobimba. Mangomba mpe ezali kosala ata likambo moko te ya malonga. Kutu, mangomba yango nde ezali kobebisa makambo mingi ntango ezali kolendisa bato bámonaka bazalani na bango mabe, báyinana, mpe bato bákumisaka bikólo na bango. Ndenge Biblia esakolaki, “molili tuu” ezipi mpenza “mabota.” (Yisaya 60:2) Kasi, ezali na bamilio ya bato oyo bazali kobanga te mikolo ezali koya. Mpo na nini? Mpamba te bazali kotya likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe “lokola mwinda oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili.” Bazali kotika ete “liloba” to nsango ya Nzambe oyo ezali na Biblia, etambwisa bango.—2 Petelo 1:19.
2. Na kolanda esakweli ya Danyele oyo elobeli “ntango ya nsuka,” kaka banani nde bazali kozwa bososoli ya elimo?
2 Mosakoli Danyele akomaki ete na “ntango ya nsuka . . . bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka. Bato mingi bakomipɛtola mpe bakomiyeisa mpɛmbɛ, mpe bakomekama; nde bato mabe bakosala mabe, mpe ata moko ya bato mabe akososola te; nde bato ya mayele bakososola.” (Danyele 12:4, 10) Nzambe azali kopesa bososoli ya elimo kaka na baoyo bazali mpenza ‘kopota bipai na bipai’ na kati ya Liloba ya Nzambe, elingi koloba bato oyo bazali mpenza koyekola yango, bazali kotosa mibeko na yango, mpe bazali kosala mokano na ye.—Matai 13:11-15; 1 Yoane 5:20.
3. Na bambula ya 1870, Bayekoli ya Biblia basosolaki likambo nini ya ntina mingi?
3 Banda na bambula ya 1870, liboso kutu “mikolo ya nsuka” ebanda, Yehova Nzambe abandaki mokemoke kolimbola “basɛkɛlɛ mosantu ya bokonzi ya likoló.” (2 Timote 3:1-5; Matai 13:11) Na bambula wana, mwa etuluku ya Bayekoli ya Biblia basosolaki ete ntango Klisto akozonga, bato bakomona ye na miso te, ndenge bato mingi bakanisaka. Soki Yesu azwi bokonzi kuna na likoló akozonga, elingi koloba akobalola likebi na ye nyonso awa na mabelé. Ebele ya makambo oyo ekomonana na miso ekozala elembo oyo ekomonisa bayekoli ete Yesu azali sikoyo, atako azali komonana te.—Matai 24:3-14.
Emonaneli moko ekokisami
4. Ndenge nini Yehova alendisi kondima ya basaleli na ye na mikolo na biso?
4 Mbongwana ezalaki emonaneli ya kokamwa ya Klisto na nkembo ya Bokonzi. (Matai 17:1-9) Emonaneli wana elendisaki kondima ya Petelo, Yakobo, ná Yoane na ntango oyo bayekoli mingi ya Yesu batikaki kolanda ye mpo bilikya oyo bamityelaki ekokisamaki te. Ndenge moko mpe, na ntango oyo ya nsuka, Yehova alendisi kondima ya basaleli na ye na ndenge asalisi bango básosola ndenge emonaneli yango mpe bisakweli mosusu oyo eyokani na yango ekokokisama. Tótalela sikoyo mwa makambo yango oyo ezali kolendisa kondima.
5. Nani azali monzoto ya ntɔngɔ, mpe ntango nini mpe ndenge nini ‘ebimaki’?
5 Ntoma Petelo azalaki kokanisa mbongwana ya Yesu ntango akomaki boye: “Na yango liloba ya esakweli oyo tozali na yango endimisami lisusu makasi koleka; mpe bozali kosala malamu na kotyeláká yango likebi lokola mwinda oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili, tii ntango ntɔngɔ ekobanda kotana mpe monzoto ya ntɔngɔ ekobima, na kati ya mitema na bino.” (2 Petelo 1:19) Monzoto yango ya ntɔngɔ ezali Yesu Klisto na kati ya nkembo na ye. (Emoniseli 22:16) Monzoto yango ‘ebimaki’ na 1914 ntango Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló, yango ezalaki ebandeli ya eleko moko ya sika. (Emoniseli 11:15) Na emonaneli ya mbongwana, bayekoli bamonaki Moize ná Eliya batɛlɛmi elongo na Yesu mpe bazali kosolola. Bazali elilingi ya banani?
6, 7. Na emonaneli ya mbongwana ya Yesu, Moize ná Eliya bazali elilingi ya banani, mpe Biblia elobi makambo nini mpo na bato wana?
6 Lokola Moize ná Eliya bazalaki na kati ya nkembo ya Klisto, batatoli yango ya sembo basengeli kozala elilingi ya bato oyo bakoyangela elongo na Yesu. Koloba ete Yehova akoyangela na bato mosusu eyokani na emonaneli ya Masiya azwi bokonzi oyo Yehova alakisaki mosakoli Danyele. Danyele amonaki “lokola mwana ya moto” mpe, “Mokóló na Mikolo,” elingi koloba Yehova Nzambe, apesaki ye “nguya ya lobiko na lobiko.” Kasi, yoká likambo mosusu Danyele amonaki mwa moke na nsima. Akomaki boye: “Bokonzi mpe nguya mpe lokumu ya bokonzi na nse ya lola mobimba ekopesama na [basantu, NW] ya Oyo-Aleki-Likoló.” (Danyele 7:13, 14, 27) Mbula koleka nkama mitano liboso bantoma bámona mbongwana ya Yesu, Nzambe amonisaki ete ntango Klisto akozala mokonzi, akozala elongo na “basantu.”
7 Basantu oyo Danyele amonaki na emonaneli ezali banani? Paulo azalaki kokanisa bato wana ntango alobaki boye: “Elimo yango moko epesaka litatoli elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. Boye, soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula: ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula elongo na Klisto, soki tomoni mpasi elongo na ye mpo tózwa mpe nkembo elongo.” (Baloma 8:16, 17) Basantu wana ezali bato mosusu te kaka bayekoli ya Yesu oyo bapakolami na elimo. Na mokanda ya Emoniseli, Yesu alobi boye: “Oyo alongi nakopesa ye nzela ya kofanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi, ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi.” Bato yango oyo basekwi mpe ‘balongi’ bazali 144 000; bango nde bakoyangela mabelé mobimba elongo na Yesu.—Emoniseli 3:21; 5:9, 10; 14:1, 3, 4; 1 Bakolinti 15:53.
8. Ndenge nini bayekoli ya Yesu oyo bazali bapakolami na elimo basali mosala lokola ya Moize ná Eliya, mpe mosala na bango eboti mbuma nini?
8 Kasi, mpo na nini Moize ná Eliya bazali elilingi ya baklisto bapakolami? Mpo ete ntango bazali naino na nzoto ya mosuni, baklisto yango bazali kosala mosala lokola oyo Moize ná Eliya basalaki. Na ndakisa, bazali kotatola mpo na Yehova, ata ntango bazali konyokola bango. (Yisaya 43:10; Misala 8:1-8; Emoniseli 11:2-12) Lokola Moize ná Eliya, bazali kobanga te kobimisa lokuta ya mangomba mpe kolendisa bato ya sembo ete básambela kaka Nzambe. (Exode 32:19, 20; Deteronome 4:22-24; 1 Mikonzi 18:18-40) Mosala na bango eboti nde mbuma? Ntembe ezali te! Bayanganisi bapakolami mosusu mpo na kokokisa motángo na bango mobimba; longola yango, basalisi bamilio ya “bampate mosusu” ete bátosa Yesu Klisto.—Yoane 10:16; Emoniseli 7:4.
Klisto azali kosukisa bolongi na ye
9. Emoniseli 6:2 ezali komonisa ete Yesu azali ndenge nini lelo oyo?
9 Yesu azali lisusu te moto oyo amati na mwana ya mpunda oyo ememaka mikumba; azali lelo oyo Mokonzi monene. Biblia ezali komonisa ye amati na mpunda oyo epotaka mbangu—nyama oyo Biblia esalelaka lokola elilingi ya etumba. (Masese 21:31) Emoniseli 6:2 elobi boye: “Talá! Mpunda moko ya mpɛmbɛ; mpe moto oyo afandaki likoló na yango azalaki na litimbo; mpe bapesaki ye motole, mpe abimaki na kolonga mpe mpo na kosukisa bolongi na ye.” Lisusu, na ntina na Yesu, Davidi akomaki boye: “Lingenda ya makasi na yo, [Yehova] akotinda yango longwa na Siona, mpe akoloba ete: ‘Zalá na bokonzi na kati ya bayini na yo.’”—Nzembo 110:2.
10. (a) Ndenge nini Yesu oyo afandi likoló ya mpunda mpe abimi mpo na kolonga abandaki bolongi na ye na nkembo? (b) Bolongi ya liboso ya Klisto ememaki makambo nini na mokili mobimba?
10 Yesu alongaki libosoliboso banguna na ye oyo baleki makasi: Satana ná bademo na ye. Abenganaki bango na likoló mpe abwakaki bango awa na mabelé. Lokola bilimo mabe yango bayebi ete mikolo na bango etikali ya kotánga, bazali kosilisa nkanda na bango nyonso epai ya bato, mpe yango ememeli bato mpasi mingi. Na mokanda ya Emoniseli, mpasi yango emonisami na bato misato oyo bafandi likoló ya bampunda mosusu misato. (Emoniseli 6:3-8; 12:7-12) Na boyokani na esakweli ya Yesu oyo elobeli “elembo ya kozala na [ye] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” bampunda yango ememi bitumba, nzala, mpe maladi oyo ezali koboma ebele ya bato. (Matai 24:3, 7; Luka 21:7-11) Lokola mpasi ya mwasi oyo alingi kobota, “bampasi” yango ekokoba se kobakisama tii ntango Klisto ‘akosukisa bolongi na ye’ ntango akoboma ebongiseli mobimba ya Satana.a—Matai 24:8.
11. Ndenge nini lisolo ya lisangá ya boklisto ezali kondimisa ete Klisto azali koyangela?
11 Tokoki mpe komona ete Yesu azwi bokonzi na ndenge abateli lisangá ya boklisto mpo ekokisa mokumba ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. Atako Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, mpe baguvɛrnema mosusu, ezali kotɛmɛla makasi mosala ya kosakola, mosala yango ekobi mpe epalangani na ndenge oyo emonaná naino te banda mokili ebandá. (Emoniseli 17:5, 6) Yango ezali komonisa polele ete Klisto azali Mokonzi lelo oyo.—Nzembo 110:3.
12. Mpo na nini bato mingi bazali kososola te ete Klisto asilá kozonga atako azali komonana te?
12 Kasi, ezali mawa komona ete bato mingi, ata mpe bamilio ya bato oyo bamibengaka baklisto, bazali kososola te ntina ya makambo minene oyo ezali koleka na mokili. Kutu, bazali kosɛka basakoli ya Bokonzi ya Nzambe. (2 Petelo 3:3, 4) Mpo na nini? Mpamba te Satana azipi bango miso. (2 Bakolinti 4:3, 4) Soki tozongisi makanisi nsima, tokomona ete Satana abandá kozipa bato oyo bamibengaka baklisto elamba ya moindo mpo bázala na molili ya elimo esili koleka bankama ya bambula, oyo esali ete bátika elikya monene ya Bokonzi.
Bato batiki elikya ya Bokonzi
13. Elamba ya moindo oyo ezipi bato na elimo ememaki makambo nini?
13 Yesu asakolaki ete bapɛngwi bakozala lokola matiti mabe oyo baloni na kati ya ble; elingi koloba ete bakokɔta na lisangá ya boklisto mpe bakopɛngwisa bato ebele. (Matai 13:24-30, 36-43; Misala 20:29-31; Yuda 4) Nsukansuka, bato yango oyo balati nkombo ya baklisto bakɔtisaki bafɛti, milulu, mpe mateya ya bapakano na losambo na bango mpe babengaki yango makambo “ya boklisto.” Na ndakisa, Noele eutá na milulu ya losambo ya nzambe Mithra ná nzambe Saturne. Kasi, nini esalaki ete bato oyo bazali komibenga baklisto bázwa makambo wana oyo ezali ya boklisto te? Buku moko (The New Encyclopædia Britannica [1974]) elobi boye: “Bato babimisaki Noele, fɛti ya mbotama ya Yesu Klisto, mpo balɛmbaki kozela Klisto oyo bakanisaki ete akozonga mosika te.”
14. Ndenge nini mateya ya Origène mpe ya Augustin ebongolaki solo ya Bokonzi?
14 Tótala mpe ndenge babongoli ndimbola ya liloba “bokonzi.” Buku moko (The Kingdom of God in 20th-Century Interpretation) elobi boye: “Origène [moto moko ya teoloji na ekeke ya misato] nde abandaki kobongola ndimbola oyo baklisto bapesaka na liloba ‘bokonzi’; akómaki koteya ete boyangeli ya Nzambe ezali na motema ya moto.” Ndenge nini Origène abimisaki liteya yango? Azwaki yango na Biblia te, kasi na “filozofi mpe makanisi ya mokili oyo ekeseni mpenza na makanisi ya Yesu mpe ya lingomba na ebandeli.” Na buku na ye (De Civitate Dei [Mboka ya Nzambe]), Augustin d’Hippone (354-430 T.B.) alobaki ete lingomba nde ezali Bokonzi ya Nzambe. Makanisi wana oyo euti na Biblia te epesaki mangomba ya boklisto nzela ya koluka bokonzi ya politiki. Bokonzi ya politiki ezalaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya mangomba bankama ya bambula mpe mbala mingi, na nzela na yango, bazalaki konyokola bato.—Emoniseli 17:5, 18.
15. Ndenge nini Bagalatia 6:7 ezali kokokisama mpo na mangomba mingi ya boklisto?
15 Kasi, lelo oyo, mangomba ekómi kobuka oyo elonaki. (Bagalatia 6:7) Mangomba mingi ezali lisusu na bokonzi te mpe bandimi na yango bazali se kosila. Likambo yango ezali komonana mingi na Mpoto. Zulunalo moko (Christianity Today) elobi ete “lelo oyo bakatedrale minene na Mpoto [ezali lisusu] bandako ya losambo te, kasi etikalá kaka bandako oyo baturiste bakendeke kotala.” Likambo yango ezali mpe komonana na mikili mosusu. Yango ezali komonisa nini mpo na mangomba ya lokuta? Mangomba yango ekolimwa kaka mpo na kozanga mbongo ná bandimi? Yango ekomema nini na losambo ya solo?
Omibongisa mpo na mokolo monene ya Nzambe
16. Ndenge bato mingi bazali lisusu kosepela na Babilone Monene te, yango ezali komonisa nini?
16 Ntango ngomba oyo etiká kobimisa mɔtɔ ebandi kobimisa milinga mpe mputulu, ezalaka elembo ete ntango mosusu elingi lisusu kobimisa mɔtɔ; ndenge bato bazali kosepela lisusu na mangomba te na bamboka mingi na mokili ezali mpe komonisa ete mikolo na yango etikali ya kotánga. Etikali moke Yehova atya na mitema ya bakonzi ya politiki likanisi ya kosangana mpo na kosambwisa mpe koboma Babilone Monene, mwasi ya ndumba ya elimo. (Emoniseli 17:15-17; 18:21) Baklisto ya solo basengeli nde kobanga likambo yango mpe makambo mosusu oyo ekosalema na “bolɔzi monene” oyo ekolanda? (Matai 24:21) Eloko te! Kutu, bakosepela ntango Nzambe akoboma bato mabe. (Emoniseli 18:20; 19:1, 2) Tókanisa makambo oyo esalemaki na Yelusaleme na ekeke ya liboso mpe ezaleli ya baklisto oyo bazalaki kofanda na engumba yango.
17. Mpo na nini basaleli ya sembo ya Yehova babangaka nsuka ya mokili oyo te?
17 Ntango basoda ya Loma bazingaki Yelusaleme na mobu 66 T.B., baklisto oyo bazalaki kokɛngɛla na elimo bakamwaki te, babangaki mpe te. Lokola bazalaki koyekola malamu Liloba ya Nzambe, bayebaki “ete libebi na yango ekómi pene.” (Luka 21:20) Bayebaki mpe ete Nzambe akobongisela bango nzela ya kokima mpo bábomama te. Ntango baklisto bazwaki libaku ya kokima, balekisaki yango te. (Danyele 9:26; Matai 24:15-19; Luka 21:21) Lelo oyo mpe ndenge moko, baoyo bayebi Nzambe mpe batosaka Mwana na ye bakoki kobanga nsuka ya mokili oyo te. (2 Batesaloniki 1:6-9) Kutu, ntango bolɔzi monene ekobanda, bakozala na esengo mpe ‘bakotombola mitó na bango, mpamba te bakomona ete kosikolama na bango ekómi pene.’—Luka 21:28.
18. Likambo nini ekosalema ntango Gogi akobimisa manzaka nyonso mpo na kobundisa basaleli ya Yehova?
18 Soki Babilone Monene ebomami, na nsima Satana, na mokumba na ye ya Gogi ya Magogi, akobimisa manzaka nyonso mpo na kobundisa Batatoli ya Yehova, bato ya kimya. Basoda ya Gogi bakoya “lokola lipata ezipi mokili” na makanisi ete bakolonga na mpasi te. Kasi, bakosutuka nde kosutuka! (Ezekiele 38:14-16, 18-23) Ntoma Yoane akomaki boye: “Namonaki likoló efungwami, mpe, talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ. Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo mpe Solo . . . Na monɔkɔ na ye mopanga moko ya molai oyo epeli makasi ezali kobima, mpo abɛta na yango bikólo.” Elombe yango oyo moto te akoki kolonga, “Mokonzi ya bakonzi,” akobunda mpo na basambeli ya sembo ya Yehova mpe akoboma banguna na bango nyonso. (Emoniseli 19:11-21) Yango ekozala kokokisama monene ya emonaneli ya mbongwana!
19. Bayekoli ya sembo ya Klisto bakoyoka ndenge nini ntango Nkolo na bango akosukisa bolongi na ye, mpe sikoyo basengeli kosala makasi na likambo nini?
19 Bato ‘bakotala Yesu na kokamwa na mokolo yango na oyo etali baoyo nyonso bamonisaki kondima.’ (2 Batesaloniki 1:10) Olingi kozala na kati ya bato oyo bakotɛlɛma mpe bakokamwa ntango Mwana ya Nzambe akolonga? Na bongo, kotika te kokolisa kondima na yo mpe ‘omilɛngɛla, mpamba te na ngonga oyo ozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.’—Matai 24:43, 44.
Bóbatela makanisi na bino
20. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na ndenge Nzambe apesá biso “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (b) Mituna nini tosengeli komituna?
20 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kolɛmba te kolendisa basaleli ya Nzambe ete bálala mpɔngi te mpe bábatela makanisi na bango. (Matai 24:45, 46; 1 Batesaloniki 5:6) Osepelaka na bilendiseli yango? Otalelaka yango ntango ozali kopona makambo oyo osengeli kotya na esika ya liboso na bomoi na yo? Omituna naino mituna oyo: ‘Bososoli na ngai ya elimo ezali mpenza komonisa ngai ete Mwana ya Nzambe azali koyangela kuna na likoló? Nazali komona ye azali komilɛngɛla mpo na koboma Babilone Monene mpe ebongiseli mobimba ya Satana?’
21. Mpo na nini bato mosusu bamitiki na mpɔngi ya elimo, mpe basengeli kosala nini nokinoki?
21 Bato mosusu oyo bazali lelo basaleli ya Yehova batiki mpɔngi ya elimo ebungisa makanisi na bango. Ekoki kozala ete bazali motema mokuse to bazangi ezaleli ya koyika mpiko, lokola bayekoli mosusu ya Yesu na ekeke ya liboso? Mbala mosusu mitungisi ya bomoi, mposa ya biloko ya mokili, to minyoko elɛmbisi bango? (Matai 13:3-8, 18-23; Luka 21:34-36) Ekoki kozala na bamosusu oyo bazali kokanga ntina te ya makambo mosusu oyo bazali kotánga na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Soki moko na makambo yango ekómeli yo, tolendisi yo oyekola Liloba ya Nzambe na molende mpe obondela Yehova mpo boyokani na yo ná ye ekóma lisusu makasi.—2 Petelo 3:11-15.
22. Nsima ya koyekola emonaneli ya mbongwana mpe bisakweli mosusu oyo eyokani na yango, ozali koyoka ndenge nini?
22 Bayekoli ya Yesu bamonaki mbongwana na ye na ntango oyo bazalaki na mposa ya kolendisama. Lelo oyo, tozali na eloko moko oyo eleki emonaneli yango, oyo ekoki kolendisa biso: kokokisama ya likambo oyo yango ezalaki kosakola mpe ebele ya bisakweli mosusu oyo ezali na boyokani na yango. Ntango tozali kokanisa makambo minene wana mpe makambo oyo yango ekomema na mikolo ezali liboso, biso mpe tóloba na motema mobimba lokola ntoma Yoane ete: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”—Emoniseli 22:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Grɛki ya kala, liloba oyo ebongolami na “bampasi” elimboli mpenza “mpasi ya kobota.” (Matai 24:8, Kingdom Interlinear) Yango emonisi ete, mikakatano ya mokili ekobakisama mokemoke tii na bolɔzi monene.
Ozali koyeba lisusu?
• Na bambula ya 1870, mwa etuluku ya bayekoli ya Biblia bakangaki ntina ya likambo nini na oyo etali kozonga ya Klisto?
• Ndenge nini emonaneli ya mbongwana ekokisami?
• Ntango Yesu amati na mpunda mpe abimi mpo na kolonga, yango ememeli mokili mpe lisangá ya boklisto makambo nini?
• Tosengeli kosala nini mpo tózala na kati ya bato oyo bakobika ntango Yesu akosukisa bolongi na ye?
[Bililingi na lokasa 17]
Emonaneli moko ekokisami
[Bililingi na lokasa 18]
Oyebi likambo oyo esalemaki ntango Yesu abandaki bolongi na ye?