Bana bazali libula ya motuya mingi
“Talá! Bana mibali bazali libula ya Yehova; mbuma ya libumu ezali mbano.”—NZEMBO 127:3, NW.
1. Ndenge nini mwana ya liboso abotamaki?
KANISÁ naino lolenge ya kokamwa oyo Yehova akelaki mobali ná mwasi ya liboso. Tata ná mama, elingi koloba Adama ná Eva, bapesaki moto na moto mwa eloko, oyo esanganaki mpe ekolaki na libumu ya Eva mpe ebimisaki moto mosusu, elingi koloba: mwana ya liboso. (Genese 4:1) Banda wana tii lelo oyo, ndenge oyo mwana asalemaka na libumu ya mama mpe ndenge abotamaka ekamwisaka biso mpe bato mingi bamonaka ete ezali likamwisi.
2. Mpo na nini okoki koloba ete makambo oyo esalemaka na libumu ya mwasi ya zemi ezali likamwisi?
2 Nsima ya mikolo soki 270, selile ya liboso oyo ebandaki na libumu ya mama nsima ya kosangana na tata ekolaka mpe ekómaka mwana oyo azali na bamiliare na bamiliare ya baselile. Selile wana ya liboso ezalaki na makambo nyonso oyo esengeli mpo na kobimisa lolenge soki 200 ya baselile mosusu. Na kolanda makambo yango, baselile yango ebotanaka na mobulu te, kasi na ndenge oyo ebongi mpe nsukansuka, moto asalemaka; nyonso wana esalemaka na ndenge oyo moto moko akoki kolimbola mpenzampenza te!
3. Mpo na nini bato mingi oyo bakanisaka malamu balobaka ete Nzambe nde asalaka ete mwana abotama?
3 Mpo na yo, nani mpenza azali mozalisi ya mwana? Kozanga ntembe, ezali Ye oyo akelaki bomoi. Mokomi moko ya nzembo ayembaki boye: “Bóyeba ete [Yehova] ye azali Nzambe; ye asalaki biso, biso tozali bato na ye.” (Nzembo 100:3) Baboti, boyebi malamu ete bobimisi bomoi wana ya sika na makoki na bino moko te. Ezali kaka Nzambe oyo atondi na bwanya nde asalaki likamwisi ya kosala moto. Banda bambula ebele, bato oyo bakanisaka malamu balobaka ete Mozalisi moko Monene nde asalaka mwana oyo akolaka na libumu ya mama na ye. Yo mpe okanisaka bongo?—Nzembo 139:13-16.
4. Ezaleli nini mabe bato bazalaka na yango oyo Yehova akoki soki moke te kozala na yango?
4 Kasi, Yehova abandisaki kaka bomoi mpe atiki bato bábotanaka kozanga ete amibanzabanzaka mpo na bango? Yehova azali te lokola bato mosusu oyo bamibanzabanzaka te mpo na basusu. (Nzembo 78:38-40) Nzembo 127:3 (NW) elobi boye: “Talá! Bana mibali [mpe bana basi] bazali libula ya Yehova; mbuma ya libumu ezali mbano.” Tiká tótalela soki libula elimboli nini mpe soki ezali komonisa biso nini.
Libula mpe mbano
5. Mpo na nini tokoki koloba ete bana bazali libula?
5 Libula ezali lokola likabo. Mbala mingi baboti babomaka nzoto na mosala mpo bátikela bana na bango libula. Libula yango ekoki kozala mbongo, lopango to biloko mosusu ya valɛrɛ. Ezala eloko nini baboti batikeli bana na bango, yango emonisaka bolingo na bango. Biblia elobi ete bana bazali libula oyo Nzambe apesi baboti. Bana bazali likabo oyo emonisaka bolingo na ye. Soki ozali moboti, okoki mpenza koloba ete makambo oyo osalelaka bana na yo emonisaka ete ozwaka bango lokola likabo oyo Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ apesi yo?
6. Mokano ya Nzambe ezalaki nini ntango apesaki bato likoki ya kobota?
6 Yehova apesaki Adama ná Eva likabo wana, mpo alingaki ete mabelé etonda na bana na bango. (Genese 1:27, 28; Yisaya 45:18) Yehova akelaki biso nyonso mbala moko te ndenge akelaki bamilio ya baanzelu. (Nzembo 104:4; Emoniseli 4:11) Kasi, Nzambe amonaki malamu kozalisa bato na likoki ya kobota bana oyo bazali lokola baboti na bango. Oyo nde libaku malamu baboti bazali na yango ya kobota mpe kobɔkɔla mwana! Baboti, bopesaka Yehova matɔndi na ndenge apesá bino libula wana?
Tózwa liteya na ndakisa ya Yesu
7. Na bokeseni na baboti mingi, ndenge nini Yesu amonisaki ete amibanzabanzaka mpo na “bana ya bato” mpe ayokelaka bango mawa?
7 Likambo ya mawa, baboti nyonso te nde batalelaka bana na bango lokola mbano. Baboti mingi bayokelaka bana na bango mawa te. Baboti ya ndenge wana balandaka te ndakisa ya Yehova to ya Mwana na ye. (Nzembo 27:10; Yisaya 49:15) Kasi, tótala ndenge Yesu azalaki komibanzabanza mpo na bana mike. Biblia elobi ete ata liboso aya awa na mabelé lokola moto, ntango azalaki ekelamu ya nguya kuna na likoló, ‘esengo na ye ezalaki kati na bana ya bato.’ (Masese 8:31) Lokola azalaki na bolingo mingi mpo na bato, andimaki kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo tókoka kozwa bomoi ya seko.—Matai 20:28; Yoane 10:18.
8. Na ndenge nini Yesu apesaki baboti ndakisa malamu?
8 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, apesaki baboti ndakisa ya malamu mpenza. Tótala likambo oyo asalaki. Azalaki kozwa ntango mpo na kofanda na bana mike, ata ntango azalaki na mosala mingi to alɛmbaki. Azalaki kotala ndenge bana bazalaki kosakana na zando mpe asalelaki makambo mosusu oyo azalaki komona epai na bango na mateya na ye. (Matai 11:16, 17) Na mobembo ya nsuka oyo Yesu asalaki na Yelusaleme, ayebaki ete bakonyokola ye mpe bakoboma ye. Yango wana, ntango bamemelaki ye bana mike, bayekoli na ye balukaki kopekisa bango, mbala mosusu mpo bakanisaki ete kosala bongo ekobatela Yesu na mitungisi. Kasi Yesu apamelaki bayekoli na ye. Mpo na komonisa ete ‘esengo na ye ezalaki’ epai ya bana mike, alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.”—Malako 10:13, 14.
9. Mpo na nini makambo oyo tosalaka ezali na ntina mingi koleka maloba na biso?
9 Tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Yesu. Ata soki tozali na mosala mingi, tosalaka nini soki bana mike bayei pembeni na biso? Tolandaka ndakisa ya Yesu? Eloko oyo bana balukaka, mingimingi epai ya baboti na bango, ezali oyo Yesu azalaki kosepela kopesa bango, elingi koloba kozwa ntango ya kofanda na bango mpe kotyela bango likebi. Ya solo, bana basepelaka mingi soki moboti alobi na bango “Nalingaka yo.” Bolingo emonanaka na misala, kasi na maloba mpamba te. Bana bakomona ete olingaka bango soki ozali kozwa ntango ya kofanda na bango, soki ozali kotyela bango likebi, mpe soki ozali kokokisa bamposa na bango. Kasi, ata soki bozali kosala makambo nyonso wana, bókanisa te ete bokozwa matomba mbala moko. Bosengeli kozala na motema molai. Tokoki koyekola motema molai soki tomekoli lolenge oyo Yesu azalaki kosala makambo epai ya bayekoli na ye.
Motema molai mpe bolingo ya Yesu
10. Ndenge nini Yesu ateyaki bayekoli na ye komikitisa, mpe yango ebimisaki matomba nini na ebandeli?
10 Yesu ayebaki malamu ete bayekoli na ye bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki na kati na bango. Mokolo moko, ntango bakómaki na Kapalanauma, Yesu atunaki bayekoli na ye boye: “‘Likambo nini bozalaki kolobana nzelanzela?’ Bafandaki nyɛɛ, mpamba te nzelanzela bazalaki kolobana mpo na koyeba nani aleki na kati na bango.” Na esika apamela bango, Yesu apesaki bango ndakisa moko mpo ateya bango komikitisa. (Malako 9:33-37) Liteya yango ebimisaki matomba? Ɛɛ, kasi mbala moko te. Soki sanza motoba na nsima, Yakobo ná Yoane bayebisaki mama na bango asɛnga Yesu atya bango na bisika ya lokumu na Bokonzi na ye. Mbala wana mpe, Yesu asilikaki te, kasi asembolaki makanisi na bango.—Matai 20:20-28.
11. (a) Likambo nini bantoma ya Yesu basalaki te ntango bakómaki na ndako ya etaze elongo na Yesu? (b) Yesu asalaki nini, mpe milende na ye ebotaki mbuma na ntango wana kaka?
11 Mosika te, Elekeli ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) ekokaki, mpe Yesu akutanaki na bantoma na ye kaka bango moko mpo na kolya elekeli yango. Ntango bakómaki na ndako ya etaze, ata moko te kati na bantoma 12 azwaki likanisi ya kosukola baninga makolo, mosala oyo moombo to mwasi na kati ya ndako azalaki kosala na ntango wana. (1 Samwele 25:41; 1 Timote 5:10) Na ntembe te, Yesu ayokaki mpasi mingi komona ete bayekoli na ye bakobaki komonisa ete bazali koluka lokumu mpe bisika ya liboso. Yango wana, Yesu asukolaki bango makolo mpe asɛngaki bango bálanda ndakisa na ye mpe básalelaka basusu. (Yoane 13:4-17) Balandaki ndakisa yango? Biblia elobi ete na butu wana kaka “ntembe makasi ebimaki mpe na kati na bango mpo na koyeba soki nani na bango amonani ete aleki bango nyonso.”—Luka 22:24.
12. Ndenge nini baboti bakoki komekola Yesu ntango bazali koteya bana na bango?
12 Bino baboti, soki bana bazali koyoka toli na bino te, bomiyokaka ndenge Yesu azalaki komiyoka? Bóbosana te ete atako bantoma ya Yesu batikaki mbala moko te mabunga na bango, alɛmbaki kosalisa bango te. Nsukansuka, motema molai na ye ebotaki mbuma. (1 Yoane 3:14, 18) Baboti, bosengeli komekola bolingo mpe motema molai ya Yesu, bólɛmba te koteya bana na bino.
13. Mpo na nini moboti asengeli te koboya koyoka mwana to kobengana ye ntango azali kotuna ye likambo?
13 Bana balingaka koyeba ete baboti balingaka bango mpe batyelaka bango likebi. Yesu alukaki koyeba makanisi ya bayekoli na ye, yango wana azalaki koyoka bango ntango bazalaki kotuna ye mituna. Azalaki kotuna bango ndenge bazalaki kokanisa mpo na likambo boye to boye. (Matai 17:25-27) Ya solo, moteyi malamu ayebaka koyoka bato mpe kotyela bango likebi. Baboti basengeli kotika momeseno mabe ya koloba na bana “longwá wana, omoni te ete nazali na mosala?” soki batuni bango mituna. Soki moboti azali mpenza na mosala, asengeli koyebisa mwana ete bakosolola nsima. Mpe soki moboti alaki ndenge wana, asengeli kosala nyonso bálobela likambo yango. Soki baboti bazali kosala bongo, mwana akomona mpenza ete batyelaka ye motema, mpe akokakatana ata mokolo moko te koyebisa bango makambo oyo ezali kotungisa ye.
14. Liteya nini baboti bakoki kozwa epai ya Yesu na likambo etali kolakisa bana bolingo?
14 Ezali malamu baboti báyambaka bana na bango to bázingaka bango ekɔpi mpo na komonisa ete balingaka bango? Na likambo yango mpe, baboti basengeli kozwa liteya epai ya Yesu. Biblia elobi ete Yesu “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, kotyáká mabɔkɔ na ye likoló na bango.” (Malako 10:16) Okanisi ete bana yango bamiyokaki ndenge nini? Na ntembe te mitema na bango etondaki na esengo, basepelaki na Yesu mingi! Soki bolingo ya solosolo ezali na kati na bino baboti ná bana na bino, bakobanda kokakatana te kondima disipilini na bino mpe mateya na bino.
Baboti basengeli kolekisaka ntango boni na bana na bango?
15, 16. Likanisi nini bato mingi bazali na yango na likambo ya kobɔkɔla bana, mpe ezali komonana ete likanisi yango euti na nini?
15 Bato mosusu bamitunaka soki ezali mpenza na ntina baboti bálekisaka ntango mingi elongo na bana na bango mpe bámonisaka bango ete balingaka bango mpe batyelaka bango likebi. Bato mingi balobaka ete ebongi baboti bálekisaka ntango malamu elongo na bana na bango. Soki baboti bazali kobongisa malamu ntango oyo balekisaka na bango mpe bazali kosala makambo mingi ya malamu elongo na bango na ntango yango, ezali na ntina lisusu mpenza te bálekisaka na bango ntango molaimolai. Yango ezali nde likanisi ya malamu, oyo ezali mpo na bolamu ya bana?
16 Mokomi moko oyo asololaki na bana mingi alobaki ete “mposa monene ya bana ezalaka ete baboti na bango bálekisaka ntango mingi elongo na bango” mpe “bátyelaka bango mpenza likebi.” Kutu, profesɛrɛ moko ya iniversite alobaki boye: “Likanisi wana [ya ntango malamu] ebimi mpo baboti bamoni ete bazali kokokisa te mokumba na bango ya kolekisa ntango elongo na bana. Bato bazalaki nde koluka ndenge ya komilongisa mpo bálekisaka ntango mingi te elongo na bana na bango.” Ntango boni baboti basengeli kolekisaka elongo na bana na bango?
17. Baboti bazali na mokumba nini epai na bana na bango?
17 Biblia elobi te soki esengeli kozala ntango boni. Nzokande, mibeko ezalaki kosɛnga Bayisalaele ete básololaka na bana na bango ntango bafandi na ndako, ntango bazali kotambola na nzela, ntango balali mpe ntango balamuki. (Deteronome 6:7) Yango emonisi polele ete, mokolo na mokolo, baboti basengeli kozwaka ntango mingi ya kosolola na bana na bango mpe koteya bango.
18. Ndenge nini Yesu azalaki kosalela mabaku nyonso mpo na koteya bayekoli na ye, mpe yango ezali koteya baboti nini?
18 Yesu azalaki koteya bayekoli na ye malamu mpenza ntango azali kolya elongo na bango, ntango bazali kosala mobembo, ata mpe ntango bazali kopema. Azalaki kosalela mabaku nyonso mpo na koteya bango. (Malako 6:31, 32; Luka 8:1; 22:14) Ndenge moko mpe, baboti baklisto basengeli kosalelaka mabaku nyonso mpo na kosolola mpe koteya bana na bango banzela ya Yehova.
Makambo oyo ebongi koteya bana mpe ndenge ya koteya yango
19. (a) Longola kolekisa ntango elongo na bana, baboti basengeli kosala nini? (b) Likambo nini baboti basengeli libosoliboso koteya bana na bango?
19 Mpo na kobɔkɔla bana malamu, esɛngaka kaka te kolekisa ntango elongo na bango to koteya bango. Esengeli mpe koyeba makambo oyo ebongi koteya bango. Talá ndenge Biblia ezali kobenda likebi na makambo oyo ebongi koteya bana. Biblia elobi boye: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo . . . okolakisa yango na etingya na bana na yo.” “Maloba” yango oyo baboti basengeli koteya bana na bango ezali nini? Emonani polele ete ezali maloba oyo bautaki koyebisa bango, elingi koloba: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Deteronome 6:5-7) Yesu alobaki ete yango ezali mobeko oyo eleki mibeko nyonso ya Nzambe. (Malako 12:28-30) Baboti basengeli libosoliboso koteya bana na bango makambo etali Yehova, kolimbolela bango ntina oyo ebongi tólinga mpe tósambela kaka ye na motema na biso mobimba.
20. Makambo nini Nzambe asɛngaki baboti ya ntango ya kala báteyaka bana na bango?
20 Kasi, “maloba oyo” basɛngi baboti báteyaka bana na bango esuki kaka te na koteya bango bálinga Nzambe na motema na bango mobimba. Na mokanda ya Deteronome mokapo ya mitano, okomona ete Moize azongelaki Mibeko Zomi oyo Nzambe akomaki likoló ya bitanda mibale ya mabanga. Mibeko yango epekisi mpe kobuka lokuta, koyiba, koboma moto mpe kosala ekobo. (Deteronome 5:11-22) Yango emonisi ete bayebisaki baboti ya ntango wana ete ezali na ntina mingi báteya bana na bango bizaleli ya malamu. Soki baklisto balingi bana na bango bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo ntango bakokola, basengeli mpe koteya bango makambo yango.
21. Nzambe alingaki koloba nini ntango alobaki na baboti ete basengeli ‘kolakisa na etingya’ bana na bango maloba na ye?
21 Tomoni ete Nzambe ayebisi baboti ndenge oyo basengeli koteya bana na bango “maloba oyo” to mibeko na ye: “Okolakisa yango na etingya na bana na yo.” “Kolakisa na etingya” elimboli “kozongela mateya to makebisi to mpe kokɔtisa yango na makanisi ya moto mosusu mbala na mbala: kolendisa to kofandisa yango mpenza na makanisi na ye.” Na yango, na maloba wana Nzambe azali kosɛnga baboti bábongisa programɛ ya mateya ya Biblia mpo na kofandisa mpenza makambo ya elimo na mitema ya bana na bango.
22. Na Yisalaele, basɛngaki baboti básala nini mpo na koteya bana na bango, mpe maloba yango ezalaki na ndimbola nini?
22 Programɛ ya ndenge wana ezali kosɛnga baboti bázala na molende. Biblia elobi boye: “Okokanga yango [“maloba oyo,” to mibeko ya Nzambe] lokola elembo na lobɔkɔ na yo, mpe ekozala lokola bikaniseli na kati ya miso na yo. Okokoma yango na makonzí ya monɔkɔ ya ndako na yo mpe na bikuke na yo.” (Deteronome 6:8, 9) Yango elingi koloba te ete baboti basengeli mpenza kokoma mibeko ya Nzambe na monɔkɔ ya ndako na bango, kokanga yango na mabɔkɔ ya bana na bango mpe kotya yango na kati ya miso (to elongi) na bango. Elingi nde koloba ete baboti basengeli ntango nyonso kokundwelaka bana na bango mateya ya Nzambe. Basengeli koteyaka bango mbala na mbala, kozanga kotika; na ndenge yango, ekomonana lokola mateya ya Nzambe ezali ntango nyonso liboso na bango.
23. Tokotalela nini na boyekoli ya pɔsɔ ekoya?
23 Wapi mwa makambo ya ntina mingi oyo baboti basengeli koteya bana na bango? Mpo na nini ezali na ntina mingi lelo oyo ete baboti báteya bana na bango mpe bálakisa bango ndenge ya komibatela? Lisalisi nini baboti bakoki kozwa lelo oyo mpo na koteya bana na bango malamu? Tokotalela mituna wana mpe mituna mosusu oyo baboti mingi bamitunaka na lisolo oyo elandi.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini baboti basengeli kotalelaka bana na bango ete bazali na motuya?
• Makambo nini baboti mpe bato mosusu basengeli koyekola epai ya Yesu?
• Ntango boni baboti basengeli kolekisaka elongo na bana na bango?
• Makambo nini baboti basengeli koteya bana na bango, mpe ndenge nini basengeli koteya bango?
[Elilingi na lokasa 10]
Liteya nini baboti bakoki kozwa na lolenge ya koteya ya Yesu?
[Bililingi na lokasa 11]
Na Yisalaele, ntango nini mpe ndenge nini baboti basengelaki koteya bana na bango?
[Bililingi na lokasa 12]
Baboti basengeli kosala ete mateya ya Nzambe ezala ntango nyonso liboso ya bana na bango