Liteya ya lisekwa etali mpe yo
“Nazali na elikya epai ya Nzambe. . . ete ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—MISALA 24:15.
1. Ndenge nini liteya ya lisekwa ekabolaki bazuzi ya Sanedrina?
NA NSUKA ya mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ na mobu 56 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo azalaki na Yelusaleme. Ntango Baloma bakangaki ye, bapesaki ye nzela ya kosamba liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda. (Misala 22:29, 30) Ntango Paulo atalaki bazuzi ya tribinale yango, amonaki ete basusu kati na bango bazalaki Basadukai mpe basusu Bafalisai. Likambo moko ezalaki kokabola mpenza bituluku mibale wana. Basadukai bazalaki kondima lisekwa te, kasi Bafalisai bazalaki kondima yango. Mpo na komonisa makanisi na ye na likambo yango, Paulo alobaki boye: “Mibali, bandeko, nazali Mofalisai, mwana ya Bafalisai. Nazali kosambisama mpo na elikya ya lisekwa ya bakufi.” Ntango alobaki bongo, bokabwani ekɔtaki na kati ya bazuzi yango.—Misala 23:6-9.
2. Mpo na nini Paulo akakatanaki te kolobela liboso ya Sanedrina kondima na ye mpo na lisekwa?
2 Bambula mingi liboso, ntango Paulo azalaki kokende na Damasi, amonaki emonaneli moko mpe ayokaki mongongo ya Yesu. Kutu, Paulo atunaki Yesu boye: “Nasengeli kosala nini, Nkolo?” Yesu ayanolaki boye: “Tɛlɛmá, kende na Damasi, mpe kuna bakoyebisa yo makambo nyonso oyo etindami ete yo osala.” Ntango Paulo akómaki na Damasi, moyekoli moko na nkombo Ananiasi akendaki epai na ye mpe alobaki na ye boye: “Nzambe ya bankɔkɔ na biso aponi yo mpo oyeba mokano na ye mpe omona Moto ya sembo [Yesu oyo asekwi] mpe oyoka mongongo ya monɔkɔ na ye.” (Misala 22:6-16) Yango wana, tokoki kokamwa te ete Paulo akakatanaki te mpo na kolobela liboso ya Sanedrina kondima na ye mpo na lisekwa.—1 Petelo 3:15.
Alobelaki elikya ya lisekwa polelepolele
3, 4. Nini emonisaki ete Paulo azalaki molobeli monene ya liteya ya lisekwa, mpe ndakisa na ye ekoki koteya biso nini?
3 Na nsima, Paulo asambaki liboso ya Guvɛrnɛrɛ Felikisi. Na mbala wana, Teletulusi, “molobi moko boye liboso ya bato,” oyo azwaki maloba liboso ya tribinale na nkombo ya Bayuda, afundaki Paulo ete azali mokambi ya mwa lingomba moko mpe azali kotinda bato bátomboka. Kozanga kokakatana, Paulo alobaki boye: “Nandimi mpenza likambo oyo liboso na yo, ete, engebene nzela oyo bango bazali kobenga ete ‘mwa lingomba,’ na ndenge wana nde ngai nazali kosalela Nzambe ya bankɔkɔ na ngai mosala mosantu.” Na nsima, alobelaki likambo mpenza oyo bafundaki ye na yango na maloba oyo: “Nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Misala 23:23, 24; 24:1-8, 14, 15.
4 Soki mbula mibale na nsima, Polosiusi Fesitusi, oyo akómaki Guvɛrnɛrɛ na esika ya Felikisi, asɛngaki Mokonzi Elode Agilipa azala na ye elongo mpo na kotuna mokangami Paulo mituna. Fesitusi alobaki ete bafundaki Paulo mpo alobaki ete “Yesu moko boye oyo akufaki . . . azali na bomoi.” Ntango Paulo azwaki maloba mpo na kosamba, atunaki boye: “Mpo na nini likambo oyo ete Nzambe alamwisaka bakufi etalelami na kati na bino ete ebongi te kondimama?” Na nsima alobaki boye: “Lokola nazwi lisalisi oyo euti epai ya Nzambe nazali kokoba tii na mokolo ya lelo kopesa litatoli epai ya bato mike mpe bato minene, kasi kolobáká likambo mosusu te kaka oyo Basakoli mpe Moize balobaki ete esengelaki kosalema, ete Klisto asengelaki konyokwama mpe, lokola moto ya liboso oyo asekwi na bakufi, asengelaki kosakola pole epai ya bato ya ekólo oyo mpe epai ya bikólo mosusu.” (Misala 24:27; 25:13-22; 26:8, 22, 23) Tomoni mpenza ete Paulo azalaki molobeli monene ya liteya ya lisekwa! Lokola Paulo, biso mpe tokoki kosakola na kondima mpenza ete lisekwa ekozala. Kasi, tokanisi ete bato bakotalela nsango yango ndenge nini? Na ntembe te, bakotalela yango kaka ndenge batalelaki oyo ya Paulo.
5, 6. (a) Ndenge nini bato batalelaki elikya ya lisekwa oyo bantoma bazalaki koteya? (b) Likambo nini ya ntina mingi tosengeli kobosana te ntango tozali kolobela elikya na biso ya lisekwa?
5 Tótalela likambo oyo elekaki mwa liboso, ntango Paulo akendaki na Atene, na mobembo na ye ya mibale ya misionɛrɛ (soki na bambula 49-52 T.B.). Akanisaki malamu na bato oyo bazalaki kosambela banzambe ebele mpe asalisaki bango báyeba mokano oyo Nzambe azali na yango ya kosambisa mabelé mobimba na boyengebene, na nzela ya moto oyo aponi. Moto yango ezali Yesu. Paulo alimbolaki ete Nzambe apesaki ndanga na likambo yango na ndenge asekwisaki Yesu. Bato oyo bayokaki ye basalaki nini? Totángi boye: “Ɛɛ, ntango bayokaki likambo ya lisekwa ya bakufi, bamosusu babandaki kotyola, wana bamosusu balobaki ete: ‘Tokoyoka yo na likambo wana ata mbala mosusu.’”—Misala 17:29-32.
6 Batyolaki Paulo kaka ndenge batyolaki Petelo ná Yoane mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Na mbala wana mpe Basadukai bazalaki na kati ya bato oyo babimisaki ntembe makasi. Misala 4:1-4 elobeli likambo oyo elekaki: “Nzokande na ntango bango mibale bazalaki koloba na bato ya ekólo, banganga-nzambe bakonzi mpe kapitɛni ya tempelo mpe Basadukai babimelaki bango, bamonaki mabe ndenge bazalaki koteya bato ya ekólo mpe kosakola polelepolele lisekwa na bakufi na oyo etali Yesu.” Atako bongo, bato mosusu bandimaki. “Mingi ya baoyo bayokaki lisukulu yango bandimaki, mpe motángo ya mibali ekómaki soki nkóto mitano.” Biso mpe tosengeli te kokanisa ete bato nyonso bakondima biso ntango tozali kolobela elikya ya lisekwa. Yango wana, ezali na ntina mingi tólendisa kondima na biso na liteya yango.
Kondima mpe lisekwa
7, 8. (a) Ndenge mokanda oyo Paulo akomelaki lisangá ya Kolinti ya ekeke ya liboso emonisi yango, nini ekoki kosala ete kondima ezala se mpamba? (b) Ndenge nini boyebi ya sikisiki ya elikya ya lisekwa ekesenisaka baklisto ya solo ná oyo ya lokuta?
7 Bato nyonso te oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso T.B. nde bandimaki mbala moko elikya ya lisekwa. Bato ya ndenge wana bazalaki mpe na lisangá ya Kolinti. Paulo akomelaki bango boye: “Moko ya makambo ya libosoliboso oyo napesaki bino ezalaki oyo ngai moko mpe nazwaki, ete Klisto akufaki mpo na masumu na biso engebene Makomami; mpe ete akundamaki, ɛɛ, ete alamukaki na mokolo ya misato engebene Makomami.” Na nsima, mpo na komonisa ete azali koloba solo, Paulo alobaki ete Klisto oyo asekwaki “abimelaki bandeko koleka nkama mitano na mbala moko,” oyo mingi kati na bango bazalaki naino na bomoi. (1 Bakolinti 15:3-8) Abakisaki boye: “Soki Klisto azali kosakolama ete alamukaki na bakufi, ndenge nini bamosusu na kati na bino bazali koloba ete lisekwa ya bakufi ezali te? Soki, ya solo, lisekwa ya bakufi ezali te, Klisto mpe alamukaki te. Kasi soki Klisto alamukaki te, mosala na biso ya kosakola ezali mpenza mpamba, mpe kondima na biso ezali mpamba.”—1 Bakolinti 15:12-14.
8 Ya solo, lisekwa ezali liteya ya ntina mingi oyo, soki endimami te, kondima ya baklisto ezali se mpamba. Emonani mpenza ete boyebi ya sikisiki ya liteya ya lisekwa ekesenisaka mpenza baklisto ya solo ná oyo ya lokuta. (Genese 3:4; Ezekiele 18:4) Yango wana, Paulo atyaki liteya ya lisekwa na molɔngɔ ya “mateya ya ebandeli” ya boklisto. Tiká ete ekateli na biso ezala ya ‘kokende nokinoki tii na kokɔmela.’ Paulo alobaki boye: “Mpe yango nde oyo tokosala, soki mpenza Nzambe apesi nzela.”—Baebele 6:1-3.
Elikya ya lisekwa
9, 10. Liloba lisekwa ezali na ndimbola nini na kati ya Biblia?
9 Mpo na kokómisa lisusu makasi kondima na biso na lisekwa, tiká tótalela mituna lokola oyo: Liloba lisekwa ezali na ndimbola nini na kati ya Biblia? Ndenge nini liteya ya lisekwa emonisaka bolingo ya Yehova? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tópusana penepene na Nzambe mpe tóteya bato mosusu elikya yango.—2 Timote 2:2; Yakobo 4:8.
10 Liloba ya Grɛki oyo babongoli na “lisekwa” elimboli “kotɛlɛma lisusu.” Elingi koloba nini? Na Biblia, elikya ya lisekwa elimboli kozala na kondima mpenza ete moto oyo akufi akoki lisusu kozonga na bomoi. Lisusu, Biblia emonisi ete moto yango akoki kozonga na bomoi na nzoto ya mosuni, soki azali na elikya ya bomoi awa na mabelé, to na nzoto ya elimo, soki azali na elikya ya bomoi na likoló. Bolingo, bwanya, mpe nguya ya Yehova oyo ezali komonana na elikya wana kitoko ya lisekwa, etikaka biso mpenza minɔkɔ polele.
11. Makambo nini basaleli bapakolami ya Nzambe bakosala nsima ya lisekwa na bango?
11 Lisekwa ya Yesu ná bandeko na ye bapakolami epesaka bango nzoto ya elimo oyo ebongi mpo na kosalela Yehova na likoló. (1 Bakolinti 15:35-38, 42-53) Bakosala elongo lokola bakonzi na Bokonzi ya Masiya, oyo ekokómisa mabelé paladiso. Bapakolami bazali banganga-nzambe ya bokonzi oyo batambwisami na Yesu, Nganga-Nzambe Monene. Bakosalela matomba ya mbeka ya lisiko ya Klisto mpo na bolamu ya bato na mokili ya sika ya boyengebene. (Baebele 7:25, 26; 9:24; 1 Petelo 2:9; Emoniseli 22:1, 2) Liboso ntango yango ekoka, mposa ya bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé ezali ete Nzambe akoba kondima bango. Na liwa na bango, bakozwa ‘oyo ebongi na bango’ na nzela ya lisekwa mpo na kozwa bomoi ya elimo na likoló, bomoi oyo ekufaka te. (2 Bakolinti 5:1-3, 6-8, 10; 1 Bakolinti 15:51, 52; Emoniseli 14:13) Paulo akomaki boye: “Soki tosili kosangana elongo na ye na kati ya motindo ya liwa na ye, ezali solo ete tokosangana mpe elongo na ye na kati ya motindo ya lisekwa na ye.” (Baloma 6:5) Kasi, ezali boni mpo na bato oyo bakosekwa mpo na kozala lisusu na bomoi awa na mabelé? Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kosalisa bango bápusana penepene na Nzambe? Ndakisa ya Abalayama ekoki koteya biso makambo mingi.
Lisekwa mpe boninga na Yehova
12, 13. Likambo nini ezalaki mpenza Kondimisa Abalayama ete lisekwa ekoki kosalema?
12 Abalayama, oyo abengami “moninga ya Yehova,” azalaki moto ya kondima makasi. (Yakobo 2:23) Na molɔngɔ ya mibali mpe basi ya kondima oyo Paulo atángi na Baebele mokapo 11, alobeli kondima ya Abalayama mbala misato. (Baebele 11:8, 9, 17) Na mbala ya misato, alobeli kondima oyo Abalayama amonisaki ntango andimaki kopesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka. Abalayama azalaki na kondima ete elaka oyo Yehova apesaki ya kobimisa momboto na nzela ya Yisaka ekozanga te kokokisama. Atako Yisaka asengelaki kokufa lokola mbeka, Abalayama “atalelaki Nzambe ete azalaki na likoki ya kolamwisa ye ata na bakufi.”
13 Na nsima, ntango Yehova amonaki ete kondima ya Abalayama ezalaki makasi, asalaki ete azwa nyama ya kopesa lokola mbeka na esika ya mwana na ye. Yango wana, Paulo asalelaki likambo oyo ekómelaki Yisaka lokola ndakisa ya lisekwa na maloba oyo: “Uta kuna [Abalayama] azwaki ye [Yisaka] lisusu mpenza na ndenge ya ndakisa.” (Baebele 11:19) Lisusu, ezalaki na likambo moko oyo ezalaki mpenza kondimisa Abalayama ete lisekwa ekoki kosalema. Yehova azongiselaki Abalayama makoki ya kobota ntango ye ná mwasi na ye Sala, atako bakómaki mibange, babotaki mwana na bango Yisaka.—Genese 18:10-14; 21:1-3; Baloma 4:19-21.
14. (a) Ndenge Baebele 11:9, 10 emonisi yango, Abalayama azalaki kozela nini? (b) Mpo Abalayama azwa mapamboli ya Bokonzi na mokili ya sika, likambo nini esengeli kosalema mpo na ye? (c) Ndenge nini tokoki kozwa mapamboli oyo Bokonzi ekomema?
14 Paulo alobaki ete Abalayama azalaki mopaya mpe azalaki kofanda na kati ya bahema, mpe “azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe azali motongi mpe mosali na yango.” (Baebele 11:9, 10) Engumba yango ezalaki engumba mpenza te lokola Yelusaleme, esika tempelo ya Nzambe ezalaki. Ezalaki nde engumba ya elilingi. Ezalaki Bokonzi ya Nzambe oyo esalami na Klisto Yesu mpe bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye. Biblia elobi mpe ete bato yango 144 000, na nkembo na bango kuna na likoló, bazali “engumba mosantu, Yelusaleme ya Sika,” ‘mwasi’ ya Klisto. (Emoniseli 21:2) Na 1914, Yehova atyaki Yesu Mokonzi ya Bokonzi ya likoló mpe alobaki na ye ayangela na kati ya banguna na ye. (Nzembo 110:1, 2; Emoniseli 11:15) Mpo akoka kozwa mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema, Abalayama, “moninga ya Yehova,” asengeli kozonga lisusu na bomoi. Biso mpe ndenge moko, mpo tózwa matomba oyo Bokonzi ekomema, tosengeli kozala na kati ya mokili ya sika ya Nzambe; elingi koloba tosengeli kozala na kati ya ebele ya bato oyo bakobika na Armagedon to na kati ya baoyo bakosekwa na kati ya bakufi. (Emoniseli 7:9, 14) Kasi, nini mpenza endimisaka biso elikya ya lisekwa?
Bolingo ya Nzambe epesi biso elikya ya lisekwa
15, 16. (a) Ndenge nini esakweli ya liboso na Biblia epesaka biso elikya ya lisekwa? (b) Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova?
15 Boyokani na biso na Tata na biso ya likoló, kondima na biso makasi lokola oyo ya Abalayama mpe botosi na biso ya mibeko ya Nzambe esalaka ete tóbengama bayengebene mpe Yehova atalela biso lokola baninga na ye. Yango nde efungweli biso nzela ya kozwa mapamboli oyo Bokonzi ekomema. Kutu, esakweli ya liboso mpenza ya Biblia, oyo ezali na Genese 3:15, epesi biso elikya ya lisekwa mpe ezali kotinda biso tózala baninga ya Nzambe. Esakweli yango elobi ete bakopanza motó ya Satana, mpe ebakisi ete bakozokisa momboto ya mwasi ya Nzambe na litindi. Liwa ya Yesu likoló na nzete ya mpasi ezalaki elilingi ya kozokisama na litindi. Kosekwa na ye na mokolo ya misato esilisaki mpota yango mpe epesaki ye nzela ya kobanda kosala makambo oyo ekosukisa “moto oyo azali na likoki ya kopesa liwa, elingi koloba, Zabolo.”—Baebele 2:14.
16 Paulo akundweli biso ete “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Botɔndi na biso mpo na boboto monene wana etindaka biso tópusana penepene na Yesu mpe na Tata na biso ya likoló.—2 Bakolinti 5:14, 15.
17. (a) Elikya nini Yobo amonisaki na maloba na ye? (b) Yobo 14:15 elobi nini na ntina na Yehova mpe yango ezali kotinda yo osala nini?
17 Yobo, moto moko ya sembo oyo azalaki na bomoi liboso Klisto aya awa na mabelé, azalaki mpe na elikya ya lisekwa. Satana amonisaki ye mpenza bwale. Atako baninga na ye ya mabe balobelaki elikya ya lisekwa ata moke te, Yobo abɔndisamaki na elikya yango mpe atunaki boye: “Soki moto akokufa, akobika nde lisusu?” Ye moko ayanolaki na motuna na ye mpe alobaki boye: “Nakozela kino mikolo nyonso ya ntango ekoki na ngai, kino kolongwa na ngai ekoya.” Mpe alobaki na Yehova Nzambe na ye boye: “Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo.” Mpo na komonisa makanisi ya Mozalisi na biso ya bolingo, Yobo alobaki boye: “Okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:14, 15) Ya solo, Yehova azali kozela mpenza na motema likoló ntango oyo basaleli na ye ya sembo bakosekwa. Ntango tozali kokanisa bolingo mpe boboto monene oyo Nzambe azali komonisela biso atako tozali bato ya kozanga kokoka, yango ezali kotinda biso tópusana penepene na ye.—Baloma 5:21; Yakobo 4:8.
18, 19. (a) Elikya nini ezali mpo na Danyele? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Mosakoli Danyele, oyo anzelu ya Nzambe abengaki ‘moto oyo alingami mingi,’ asalelaki Nzambe na bosembo ebele ya bambula. (Danyele 10:11, 19) Atikalaki sembo epai ya Yehova banda ntango bamemaki ye na boombo na mobu 617 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na liwa na ye, mwa moke nsima ya komona emonaneli moko na mobu 536 L.T.B., mbula ya misato ya boyangeli ya Sirise, mokonzi ya Perse. (Danyele 1:1; 10:1) Ntango mosusu na mbula wana ya misato ya boyangeli ya Sirise, nde Danyele amonaki emonaneli moko oyo elakisaki ndenge bikólo oyo elekaki bikólo nyonso na makasi na mokili mobimba esengelaki kolandana tii na bolɔzi monene oyo ekoya mosika te. (Danyele 11:1–12:13) Lokola Danyele akangaki mpenza ntina ya emonaneli yango te, atunaki anzelu oyo amonisaki ye makambo yango boye: “Ee nkolo na ngai, makambo oyo makosuka na [ntango] nini?” Anzelu yango abendaki likebi na ye na “ntango ya nsuka,” ntango “bato ya mayele bakososola.” Bongo Danyele ye moko, elikya nini azalaki na yango? Anzelu ayebisaki ye boye: “Okopema, mpe okotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na yo na nsuka ya mikolo.” (Danyele 12:8-10, 13) Danyele akozonga lisusu na bomoi “na lisekwa ya bayengebene,” na boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto.—Luka 14:14.
19 Sikoyo, koleka ntango tokómaki baklisto, tokómi mpenza na ntango ya nsuka mpe pene na ntango oyo boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto ekobanda. Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Nakokɔta na mokili ya sika mpo na kokutana na Abalayama, Yobo, Danyele, mpe mibali ná basi mosusu ya sembo?’ Tokokɔta na mokili ya sika soki tokangami kaka na Yehova mpe totosi mibeko na ye. Na lisolo oyo elandi, tokolobela elikya ya lisekwa na mozindo mpenza mpo na koyeba banani bakosekwa.
Ozali koyeba lisusu?
• Bato basalaki nini ntango Paulo ayebisaki bango elikya na ye ya lisekwa?
• Mpo na nini elikya ya lisekwa ekesenisaka baklisto ya solo ná oyo ya lokuta?
• Ndenge nini toyebi ete Abalayama, Yobo ná Danyele bazalaki na elikya ya lisekwa?
[Elilingi na lokasa 9]
Paulo alobelaki elikya ya lisekwa na kondima nyonso ntango asambaki liboso guvernɛrɛ Felikisi
[Elilingi na lokasa 10]
Mpo na nini Abalayama azalaki kondima lisekwa?
[Elilingi na lokasa 12]
Elikya ya lisekwa ebɔndisaki Yobo
[Elilingi na lokasa 12]
Danyele akozonga lisusu na bomoi na lisekwa ya bayengebene