Yesu Klisto azali nani?
KANISÁ esengo oyo Andele, elenge moko Moyuda, azalaki na yango ntango ayokaki Yesu moto ya Nazalete mpo na mbala ya liboso! Biblia elobi ete Andele akendaki mbangu epai ya ndeko na ye mpe alobaki na ye boye: “Tomoni Masiya [to, Klisto].” (Yoane 1:41) Maloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo mbala mingi ebongolamaka na “Masiya” mpe “Klisto” elimboli “Mopakolami.” Yesu azalaki Mopakolami, to Moponami ya Nzambe—Motambwisi oyo Nzambe alakaki. (Yisaya 55:4) Makomami esakolaki makambo mingi mpo na Masiya, mpe na ntango wana, Bayuda bazalaki kozela ye.—Luka 3:15.
Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki mpenza Moponami ya Nzambe? Tótalela likambo oyo esalemaki na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), ntango Yesu azalaki na mbula 30. Akendaki epai ya Yoane Mobatisi mpo abatisa ye na Ebale Yolodani. Biblia elobi boye: “Nsima ya kobatisama, Yesu na mbala moko abimaki na mai; mpe, talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokita lokola ebenga koyáká likoló na ye. Talá! Ezalaki lisusu na mongongo moko uta na likoló oyo elobaki ete: ‘Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.’” (Matai 3:16, 17) Ntango Yoane ayokaki maloba wana, akokaki kozala na ntembe ete Yesu azali Moponami ya Nzambe? Na ndenge Yehova Nzambe asopelaki Yesu elimo santu na ye amonisaki ete apakoli ye to aponi ye azala Mokonzi ya Bokonzi na ye. Na bongo, Yesu akómaki Klisto, to Mopakolami. Kasi, na ndenge nini Yesu azali Mwana ya Nzambe? Ebandeli na ye ezalaki ntango nini?
Ebandeli na ye ezalaki “kalakala”
Bomoi ya Yesu ekoki kokabolama na biteni misato. Eteni ya liboso ebandaki kala liboso kutu abotama lokola moto. Mika 5:2 elobi ete ebandeli na ye ezalaki “kalakala, longwa na mikolo ya liboso.” Yesu ye moko alobaki boye: “Nazali moto ya bitúká ya likoló.” (Yoane 8:23) Azalaki na likoló lokola ekelamu ya elimo.
Lokola biloko nyonso ekelamaki, elingi koloba ete liboso Nzambe azalaki kaka ye moko. Nzokande, na nsima, abandaki kozalisa. Azalisaki nini liboso? Mokanda ya nsuka ya Biblia elobi ete Yesu azali “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Emoniseli 3:14) Yesu azali “mwana ya liboso ya bozalisi nyonso.” Ezali mpenza bongo “mpamba te na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabelé, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te.” (Bakolose 1:15, 16) Yesu azali ekelamu oyo Nzambe ye moko asalaki. Yango wana, abengami ‘Mwana mobotami-se-moko’ ya Nzambe. (Yoane 3:16) Mwana yango ya liboso abengami mpe “Liloba.” (Yoane 1:14) Mpo na nini? Mpo liboso aya awa na mabelé, azalaki molobeli ya Nzambe kuna na likoló.
“Liloba” azalaki elongo na Yehova Nzambe “na ebandeli,” ntango “likoló mpe mabelé” ezalisamaki. Nzambe alobaki nde na ye maloba oyo: “Tiká tózalisa moto na elilingi na biso.” (Yoane 1:1; Genese 1:1, 26) Mwana yango ya liboso azalaki pembeni ya Tata na ye Yehova, mpe azalaki kosala na molende elongo na ye. Na Masese 8:22-31, alobi boye: “Nazalaki pembeni [ya Mozalisi] lokola moko oyo abɔkɔlamaki na ye; mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye, kosepela liboso na ye ntango nyonso; kosepelana na bifandelo ya mokili na ye mpe esengo na ngai ezalaki kati na bana ya bato.”
Lokola Yehova Nzambe azalaki kosala elongo na Mwana na ye mobotami-se-moko, bayebanaki malamumalamu! Lokola Mwana yango azalaki pembeni ya Yehova na boumeli ya bambula mingi, esalaki ete amekola Ye makasi. Mwana yango ya botosi akómaki kaka lokola Tata na ye Yehova. Kutu, Bakolose 1:15 ebengi Yesu “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te.” Yango emonisi ete tosengeli koyeba Yesu soki tolingi kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe koyeba Nzambe. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, makambo nyonso oyo asalaki ezalaki oyo Yehova atindaki ye asala. Yango wana, ntango tozali koyekola koyeba Yesu, tozali mpe kokolisa boyebi na biso ya Yehova. (Yoane 8:28; 14:8-10) Kasi, ndenge nini Yesu ayaki awa na mabelé?
Bomoi na ye lokola moto
Eteni ya mibale ya bomoi ya Yesu ebandaki ntango Nzambe atindaki Ye awa na mabelé. Yehova asalaki likamwisi; azwaki bomoi ya Yesu mpe akɔtisaki yango na libumu ya Malia, elenge mwasi moko Moyuda oyo ayebaki naino mibali te. Yesu azwaki lisumu te mpo tata na ye azalaki moto te. Elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo asalelaka misala, eyaki likoló ya Malia, mpe ‘ezipaki’ ye, mpe akómaki na zemi. (Luka 1:34, 35) Yango wana, Malia abotaki mwana ya kokoka. Yesu azalaki na baleki nsambo mpe abokwamaki na libota ya bozwi te mpo Yozefe, tata mobɔkɔli na ye azalaki mosali ya mabaya.—Yisaya 7:14; Matai 1:22, 23; Malako 6:3.
Biblia elobi makambo mingi te mpo na bomwana ya Yesu; kasi, elobeli lisolo moko ya ntina mingi. Ntango Yesu azalaki na mbula 12, baboti na ye bamemaki ye na Yelusaleme mpo na fɛti ya Pasika, oyo bazalaki kokende mbula na mbula. Kuna, Yesu alekisaki ntango mingi na tempelo, ‘afandaki na katikati ya bateyi mpe azalaki koyoka bango mpe kotuna bango mituna.’ Mpe, “baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na bososoli na ye mpe na biyano na ye.” Ya solo, ntango Yesu azalaki mwana moke azalaki kotuna mituna etali makambo ya elimo mpe oyo ezalaki kotinda bato bákanisa na mozindo; kasi, azalaki mpe kopesa biyano ya mayele oyo ezalaki kokamwisa bato. (Luka 2:41-50) Ntango azalaki kokola na engumba Nazalete, ayekolaki mosala ya mabaya; na ntembe te epai ya Yozefe, tata mobɔkɔli na ye.—Matai 13:55.
Yesu afandaki na engumba Nazalete tii ntango akokisaki mbula 30. Na nsima, akendaki epai ya Yoane mpo abatisa ye. Nsima ya batisimo na ye, Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola na molende. Na boumeli ya mbula misato na ndambo, atambolaki na ekólo na bango mobimba mpe azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Amonisaki ete Nzambe nde atindaki ye. Ndenge nini? Asalaki makamwisi mingi—makambo oyo bato bakoki kosala te.—Matai 4:17; Luka 19:37, 38.
Yesu azalaki mpe moto ya boboto mpe ya motema malamu. Boboto na ye ezalaki komonana mingimingi na ndenge azalaki kotalela bato mosusu mpe kosalela bango makambo. Lokola Yesu azalaki kosolola na moto nyonso mpe azalaki na boboto, bato mingi bazalaki koya epai na ye. Ata bana ya mike bazalaki kobanga te kozala pembeni na ye. (Malako 10:13-16) Yesu azalaki komemya basi, atako bato mosusu bazalaki kokitisa bango. (Yoane 4:9, 27) Asalisaki babola mpe bato oyo bazalaki komona mpasi ‘bázwa kopema mpo na milimo na bango.’ (Matai 11:28-30) Azalaki koteya na maloba ya polele, ya pɛtɛɛ, mpe oyo ebongi. Mateya na ye ezalaki komonisa mposa makasi oyo azalaki na yango ya kosalisa bato báyeba Nzambe ya solo, Yehova.—Yoane 17:6-8.
Na nguya ya elimo santu ya Nzambe, Yesu abikisaki bato oyo bazalaki na maladi mpe baoyo bazalaki konyokwama. (Matai 15:30, 31) Na ndakisa, moto moko ya maba ayaki epai na ye mpe alobaki ete: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Yesu asalaki nini? Asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki moto yango mpe alobaki na ye ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” Mpe moto yango abikaki!—Matai 8:2-4.
Tótalela mpe likambo oyo Yesu asalaki ntango ebele ya bato oyo bayaki epai na ye bafandaki mikolo misato kozanga kolya. Yesu ayokelaki bango mawa mpe asalaki likamwisi mpo na koleisa “mibali nkóto minei, kozanga kotánga basi mpe bana mike.” (Matai 15:32-38) Mokolo mosusu, Yesu akitisaki mbonge makasi oyo etyaki bomoi ya bayekoli na ye na likama. (Malako 4:37-39) Asekwisaki bato oyo bakufaki.a (Luka 7:22; Yoane 11:43, 44) Yesu andimaki ata kopesa bomoi na ye ya kokoka mpo bato ya kozanga kokoka bázwa elikya ya bomoi ya seko. Nyonso wana emonisi ete Yesu alingaki mpenza bato!
Yesu azali wapi lelo oyo?
Yesu akufaki likoló ya nzete ya mpasi ntango azalaki na mbula 33 na ndambo.b Kasi, bomoi na ye esukaki wana te. Eteni ya misato ya bomoi na ye ebandaki mikolo misato na nsima, ntango Yehova Nzambe asekwisaki ye na nzoto ya elimo. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bankama ya bato na ntango wana. (1 Bakolinti 15:3-8) Na nsima, “afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe” mpe azalaki kozela mpo azwa bokonzi. (Baebele 10:12, 13) Wana ngonga ekokaki, Yesu akómaki mokonzi. Na yango, ndenge nini tokoki kotalela Yesu lelo oyo? Tosengeli komona ye lokola moto moko oyo azali kobundana na mpasi ya liwa? To tosengeli nde kosambela ye? Lelo oyo Yesu azali moto te azali mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Kasi, azali ekelamu ya elimo ya nguya mingi mpe azali Mokonzi. Etikali moke ayangela mpe mabelé oyo etondi na bampasi.
Emoniseli 19:11-16 emonisi Yesu Klisto lokola mokonzi oyo afandi likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ mpe azali koya kosambisa mpe kobunda etumba na boyengebene. Azali na “mopanga moko ya molai oyo epeli makasi . . . mpo abɛta na yango bikólo.” Na nguya na ye monene Yesu akoboma bato ya mabe. Nini ekokómela bato oyo bazali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa oyo atikaki ntango azalaki awa na mabelé? (1 Petelo 2:21) Yesu ná Tata na ye bakobatela bango na Armagedon, “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpo bákoka kozala na bomoi ya seko ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé.—Emoniseli 7:9, 14; 16:14, 16; 21:3, 4.
Na boyangeli na ye ya kimya, Yesu akosala makamwisi mingi mpo na bato! (Yisaya 9:6, 7; 11:1-10) Akosilisa maladi mpe liwa. Nzambe akosalela Yesu mpo na kosekwisa ebele ya bato, akopesa bango libaku ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé. (Yoane 5:28, 29) Tokoki koyeba te bomoi ya kitoko oyo tokozala na yango ntango Bokonzi ekoyangela mabelé. Yango wana, ezali na ntina tókoba kozwa boyebi ya Biblia mpe tóyeba Yesu Klisto malamumalamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mingi bayebaki ete Yesu azalaki kosala makamwisi. Ata banguna ya Yesu bandimaki ete ‘asalaki bilembo mingi.’—Yoane 11:47, 48.
b Mpo na koyeba soki Yesu akufaki na nzete to na ekulusu, talá buku Comment raisonner à partir des Écritures, nkasa 77-78, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 7]
YESU AZALI NDE NZAMBE MOZWI-YA-NGUYA-NYONSO?
Bandimi ya mangomba mingi balobaka ete Yesu azali Nzambe. Bamosusu balobaka ete Nzambe azali Bosato. Liteya yango elobaka ete “Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo Santu azali Nzambe; nzokande Banzambe bazali misato te kasi kaka moko.” Liteya yango elobaka ete bango nyonso “bazali libela na libela mpe bazali ndenge moko.” (The Catholic Encyclopedia) Makanisi yango ezali solo?
Yehova Nzambe azali Mozalisi. (Emoniseli 4:11) Azali na ebandeli te mpe na nsuka te, mpe azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. (Nzembo 90:2) Nzokande, Yesu azali na ebandeli. (Bakolose 1:15, 16) Ntango Yesu alobaki ete Nzambe azali Tata na ye, alobaki boye: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Yesu alobaki mpe ete ezali na makambo mosusu oyo ye ná baanzelu bayebi te, kaka Tata na ye nde ayebi yango.—Malako 13:32.
Lisusu, Yesu abondelaki Tata na ye boye: “Ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:42) Tokoloba ete Yesu azalaki kobondela Moto moko oyo alekaki ye na Nguya; boye te? Lisusu, Nzambe nde asekwisaki Yesu, kasi Yesu ye moko te. (Misala 2:32) Tomoni ete ezala liboso Yesu aya awa na mabelé to ntango azalaki awa na mabelé, azalaki ndenge moko te na Tata na ye. Ezali boni ntango asekwaki mpe azongaki na likoló? Mokapo ya 1 Bakolinti 11:3 elobi ete: “Mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” Ya solo, Mwana akozala ntango nyonso na nse ya bokonzi ya Nzambe. (1 Bakolinti 15:28) Yango wana, Biblia elobi te ete Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kasi, azali nde Mwana ya Nzambe.
Elimo santu, oyo babengaka moto ya misato na liteya ya Bosato, ezali moto te. Mokomi ya nzembo abondelaki Nzambe boye: “Soki otindi elimo na yo, bazalisami.” (Nzembo 104:30, NW ) Elimo yango ezali te Nzambe ye moko; kasi ezali nde nguya oyo atindaka to asalelaka mpo na kokokisa makambo nyonso oyo alingi. Na nzela na yango, Nzambe akelaki likoló, mabelé, mpe bikelamu nyonso. (Genese 1:2; Nzembo 33:6) Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kokomisa Biblia. (2 Petelo 1:20, 21) Na yango, Bosato ezali liteya ya Biblia te.c Biblia elobi boye: “[Yehova] azali Nzambe na biso, [Yehova] moko.”—Deteronome 6:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mwa buku Osengeli kondima Trinité? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
Ntango Yesu azwaki batisimo akómaki Mopakolami ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu asalelaki makasi na ye na mosala oyo Nzambe apesaki ye
[Elilingi na lokasa 7]
Lelo oyo, Yesu azali Mokonzi ya nguya