Bokonzi ya Nzambe eleki na makambo nyonso
YESU KLISTO ayebisaki bayekoli na ye boye: “Na bongo, bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.’” (Matai 6:9, 10) Libondeli yango, oyo bato mingi babengaka “Tata wa biso,” ezali komonisa biso mokano ya Bokonzi ya Nzambe.
Bokonzi yango ekosantisa nkombo ya Nzambe. Nkombo yango ekozongela lokumu na yango oyo ebebaki mpo na botomboki ya Satana mpe ya Adama ná Eva. Likambo yango ezali na ntina mingi, mpamba te mpo bato bázala mpenza na esengo, basengeli kosantisa nkombo ya Nzambe mpe kondima boyangeli na ye.—Emoniseli 4:11.
Longola yango, Bokonzi ya Nzambe ekosala ete “mokano na [ye] esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” Mokano yango ezali nini? Kozongisa boyokani kati na Nzambe mpe bato, boyokani oyo Adama abebisaki. Bokonzi yango ekokokisa mpe mokano oyo Yehova, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, azali na yango ya kokómisa mabelé paladiso epai bato ya sembo bakozala na bomoi seko na seko. Bokonzi ya Nzambe ekolongola mabe nyonso oyo lisumu ya Adama ná Eva ememelá bato mpe ekokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabelé. (1 Yoane 3:8) Kutu, Bokonzi yango mpe makambo oyo ekokokisa ezali nsango ya libosoliboso ya Biblia.
Eleki bikonzi nyonso—na nini?
Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli moko ya solo mpe ezali na nguya mingi. Makambo oyo Danyele asakolaki eleki sikoyo bankama ya bambula ezali kosalisa biso tómona nguya ya Bokonzi yango. Alobaki boye: “Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi . . . [oyo] ekobuka mpe ekosilisa makonzi nyonso [ya bato].” Toyebi mpe ete bokonzi ya bato elekaka, nzokande Bokonzi ya Nzambe ‘ekobebisama soki moke te.’ (Danyele 2:44) Kasi esuki wana te. Bokonzi yango eleki bikonzi nyonso ya bato.
Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe aleki bakonzi nyonso. Na kati ya “ndɔtɔ mpe bimonaneli,” mosakoli Danyele amonaki Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe; alobaki boye: “Moto moko lokola mwana ya moto” ayaki liboso ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Nzambe apesaki ye “boyangeli mpe lokumu mpe bokonzi.” (Danyele 7:1, 13, 14, NW) Mwana ya moto oyo vɛrsɛ yango elobeli ezali Yesu Masiya. (Matai 16:13-17) Yehova Nzambe aponaki Mwana na ye mpo azala Mokonzi ya Bokonzi yango. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, alobaki na Bafalisai ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino”; yango elingi koloba ete Yesu, ye oyo asengelaki kokóma Mokonzi, azalaki na kati na bango.—Luka 17:21.
Nani mosusu azali na makoki lokola oyo Yesu azali na yango mpo na kozala Mokonzi? Yesu asalaki makambo oyo ezali kondimisa biso ete akozala mokonzi ya sembo, oyo bakoki kotyela motema, mpe oyo azali na motema mawa. Biblia ezali komonisa ete Yesu azalaki mobali ya mpiko, moto ya boboto mpe ya motema malamu. (Matai 4:23; Malako 1:40, 41; 6:31-34; Luka 7:11-17) Longola yango, Yesu akoki kokufa lisusu te mpe azali na nguya oyo eleki mpenza nguya ya bato.—Yisaya 9:6, 7.
Yesu ná bapakolami na ye bakoyangela na likoló. Na emonaneli mosusu, Danyele amonaki ete ‘bokonzi mpe nguya . . . epesamaki na bato ya bulɛɛ.’ (Danyele 7:27) Yesu akoyangela ye moko te. Bato mosusu bakoyangela elongo na ye; bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe. (Emoniseli 5:9, 10; 20:6) Ntoma Yoane akomaki mpo na bango boye: “Namonaki, mpe, talá! Mwana-Mpate atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona, mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei . . . oyo basombamaki na mabelé.”—Emoniseli 14:1-3.
Mwana-Mpate ezali Yesu Klisto na kiti ya bokonzi. (Yoane 1:29; Emoniseli 22:3) Ngomba Siona ezali nde likoló.a (Baebele 12:22) Yesu elongo na bato 144 000 bakoyangela na likoló; esika ya nkembo mpenza! Lokola bakozala na likoló, bakomona makambo nyonso awa na mabelé. Lokola Bokonzi yango ekozala kuna na likoló, Biblia ebengi yango mpe “bokonzi ya likoló.” (Luka 8:10; Matai 13:11) Ebundeli moko te ekoki kobebisa bokonzi yango. Bokonzi moko te ekoki kolonga yango; ekokokisa mpenza mokano oyo Yehova abongiseli yango.—Baebele 12:28.
Awa na mabelé, Bokonzi ya Nzambe ezali na bamonisi oyo bakoki kotyelama motema. Ndenge nini toyebi yango? Nzembo 45:16 elobi boye: “Okotya . . . bana ya mokonzi na mokili mobimba.” Moto oyo akotya bana ya mokonzi yango ezali Mwana ya Nzambe. (Nzembo 45:6, 7; Baebele 1:7, 8) Na maloba mosusu, Yesu Klisto ye moko akopona bato oyo bakozala bamonisi ya Bokonzi ya Nzambe. Boye, tokoki mpenza kotya motema ete bakolanda na bosembo nyonso malako oyo akopesa bango. Ata lelo oyo, mibali oyo bakɔmeli na elimo, baoyo bazali bankulutu na masangá, bateyamaka ete ‘bámityaka te bankolo likoló’ ya bandeko na bango, kasi bábatelaka, bábɔndisaka, mpe bálendisaka bango.—Matai 20:25-28; Yisaya 32:2.
Bokonzi ekoyangela bato ya sembo. Bato yango bazali malamu mpe sembo na miso ya Nzambe. (Masese 2:21, 22) Biblia elobi boye: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:11) Bato yango bazali na bopɔlɔ, elingi koloba bandimaka koteyama, bazali na komikitisa mpe na boboto. Batyaka makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango. (Matai 5:3) Balingaka kosala oyo ezali sembo mpe bandimaka ete Nzambe atambwisa bango.
Mibeko ya Bokonzi ya Nzambe eleki mibeko nyonso. Nzambe ye moko nde apesi mibeko yango. Mibeko yango ezali kilo te, ezali mpo na bolamu na biso. (Nzembo 19:7-11) Kotosa mibeko ya Yehova ezali komemela bato mingi matomba lelo oyo. Na ndakisa, toli oyo Biblia epesi na mibali, basi, mpe bana esalisaka biso tózala na mabota ya esengo. (Baefese 5:33–6:3) Mobeko ya ‘kolata bolingo’ esalisaka biso tózala na boyokani malamu na bato mosusu. (Bakolose 3:13, 14) Ntango tozali kotosa mibeko ya Nzambe, tosalaka mosala na biso malamu mpe tozalaka na lokoso ya mbongo te. (Masese 13:4; 1 Timote 6:9, 10) Koboya kolangwa masanga, kokima pite, koboya komɛla likaya mpe bangi, esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ.—Masese 7:21-23; 23:29, 30; 2 Bakolinti 7:1.
Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo ye moko asali. Bakonzi oyo ye aponi, elingi koloba Yesu Klisto ná bato nyonso oyo akoyangela na bango bazali na mokumba ya kotosisa mibeko mpe mitinda na ye ya sembo. Bato oyo Bokonzi yango ekoyangela, ata mpe bamonisi na yango awa na mabelé, basepelaka kotosa mibeko ya Nzambe. Na bongo, bato nyonso, ezala baoyo bakoyangela to baoyo bakoyangelama, basengeli kotosa mibeko ya Nzambe. Na yango, Bokonzi ezali mpenza teokrasi, elingi koloba boyangeli ya Nzambe. Ntembe ezali te ete Bokonzi yango ekokokisa mokano na yango. Kasi, Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?
Bokonzi ebandi koyangela
Maloba ya Yesu ezali kosalisa biso tóyeba ntango oyo Bokonzi yango ebandaki koyangela. Alobaki boye: “Yelusaleme ekonyatama na bikólo mosusu, tii bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu ekokoka.” (Luka 21:24) Na mabelé mobimba, Yelusaleme ezalaki engumba kaka moko epai Nzambe atyaki nkombo na ye. (1 Mikonzi 11:36; Matai 5:35) Ezalaki engumba-mokonzi ya ekólo oyo Nzambe aponaki. Yesu asakolaki ete bikólo mosusu ekonyata engumba yango, elingi koloba ete bikonzi ya mokili ekosala ete Nzambe atika koyangela bato na ye. Likambo yango esengelaki kobanda ntango nini?
Yehova alobaki na mokonzi ya nsuka oyo afandaki na kiti ya bokonzi na Yelusaleme boye: “Longola elamba na motó mpe longola motole; . . . ekotikala te kino ekokóma ye oyo abongi na yango, oyo ngai nakopesa yango na ye.” (Ezekiele 21:25-27) Basengelaki kolongola motole na motó ya mokonzi yango, mpe Nzambe asengelaki lisusu koyangela bato na ye te. Likambo yango esalemaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme. Na boumeli ya “bantango oyo etyamá,” boyangeli moko te awa na mabelé esengelaki lisusu komonisa bokonzi ya Nzambe. Kaka na nsuka ya bantango yango nde Yehova asengelaki kopesa bokonzi epai na “ye oyo abongi na yango,” elingi koloba Yesu Klisto. Eleko yango esengelaki koumela mbula boni?
Esakweli moko oyo ezali na mokanda ya Danyele elobi boye: “Katá nzete mpe bebisá yango, nde tiká ekumu . . . na yango na kati ya mabelé, ekangami na nkamba ya ebende mpe ya motako . . . kino ntango nsambo eleki likoló na ye.” (Danyele 4:23) Ndenge tokomona yango, “ntango nsambo” oyo elobelami awa ekokani na “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu.”
Ntango mosusu, Biblia esalelaka banzete lokola liloba ya elilingi mpo na kolobela bato, bakonzi, to mpe bikonzi. (Nzembo 1:3; Yilimia 17:7, 8; Ezekiele, mokapo 31) Nzete oyo esakweli ya Danyele elobeli “emonanaki kino na nsuka ya mokili.” (Danyele 4:11) Na bongo, bokonzi oyo esengelaki kokatama mpe kokangama ekómaki tii na “nsuka ya mokili,” to esangisaki bikonzi nyonso ya bato. (Danyele 4:17, 20, 22) Na yango, nzete yango ya elilingi ezali boyangeli ya Nzambe awa na mabelé. Boyangeli yango ezalaki komonisama na bakonzi oyo Yehova azalaki kotya na libota ya Yisalaele. Nzete ya elilingi ekatamaki mpe bakangaki ekumu na yango na ebende mpe na motako mpo ebota lisusu te. Yango emonisi ete bokonzi oyo ezalaki komonisa boyangeli ya Nzambe awa na mabelé esengelaki kosuka; likambo yango esalemaki na mobu 607 L.T.B., kasi ezalaki mpo na libela te. Nzete yango esengelaki kokangama na boumeli ya “ntango nsambo.” Na nsuka na yango, Yehova asengelaki kopesa bokonzi epai ya Yesu, ye oyo abongi na yango. Yango emonisi ete “ntango nsambo” mpe “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu,” elimboli likambo kaka moko.
Biblia ezali kosalisa biso tóyeba soki “ntango nsambo” ezali mbula boni. “Ntango moko mpe bantango [elingi koloba ntango mibale] mpe ndambo moko ya ntango,” epesi “ntango” misato ná ndambo; yango ekokani na mikolo 1 260. (Emoniseli 12:6, 14) Elingi koloba ete soki tokamati mikolo 1 260 mbala mibale, tokokóma na mikolo 2 520.
Kobanda na mobu 607 L.T.B., soki totángi mikolo 2520, ekomema biso na mobu 600 L.T.B. Nzokande, ntango nsambo eumelaki koleka yango. Ntango Yesu alobelaki “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu,” ntango nsambo esukaki naino te. Yango emonisi ete ntango nsambo yango ezali ya esakweli. Yango wana, mpo na koyeba boumeli na yango, tosengeli kolanda ndenge batalelaka ntango na bisakweli ya Biblia, elingi koloba ‘mokolo moko, mbula moko.’ (Mituya 14:34; Ezekiele 4:6) Boye, ntango nsambo oyo Nzambe atikaki bikonzi ya mokili ezali mbula 2520. Soki totángi mbula 2520 kobanda na mobu 607 L.T.B., tokokóma na mobu 1914 ya ntango na biso (T.B.) Ezali na mbula yango nde “bantango oyo etyamá ya bikólo,” to ntango nsambo esukaki. Yango elingi koloba ete Yesu Klisto akómaki Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na 1914.
“Tiká Bokonzi na yo eya”
Lokola Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela na likoló, tosengeli nde kokoba kobondela ete eya awa na mabelé, ndenge Yesu ateyaki yango na libondeli ya Tata wa biso? (Matai 6:9, 10) Ɛɛ, tosengeli kobondelaka ete Bokonzi eya. Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mpe mabelé.
Bato ya sembo bakopambolama mingi ntango likambo yango ekokokisama. Biblia elobi boye: “Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Na ntango wana, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Bato oyo batosaka Nzambe bakozwa bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Wana tozali kozela elaka yango mpe bilaka mosusu ya Biblia, tiká ‘tókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].’—Matai 6:33.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntango ya kala, Mokonzi Davidi abɔtɔlaki Ngomba Siona na mabɔkɔ ya Bayebusi mpe akómisaki yango mboka-mokonzi ya Yisalaele. (2 Samwele 5:6, 7, 9) Amemaki mpe Sanduku mosantu kuna. (2 Samwele 6:17) Lokola Sanduku yango ezalaki komonisa ete Yehova azali na kati ya libota na ye, bakómaki kobenga Siona esika oyo Nzambe afandaka mpe na bongo, ekómaki elilingi ya likoló.—Exode 25:22; Levitike 16:2; Nzembo 9:11; Emoniseli 11:19.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Yehova aponi Yesu Klisto azala Mokonzi ya Bokonzi na ye
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
Bambula 2520
Ɔkɔtɔbɛ 607 ◀ L.T.B. T.B. ▸ Ɔkɔtɔbɛ 1914
Bambula 606 ná sanza misato Bambula 1913 ná sanza libwa
“Bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu” ebandaki na mobu 607 L.T.B. mpe esukaki na 1914 T.B.
[Elilingi na lokasa 7]
Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakozwa mapamboli mingi