Yefeta akokisaki ndai na ye epai ya Yehova
ELOMBE moko azalaki kozonga na ndako na ye nsima ya kobunda etumba mpo na kobikisa ekólo na bango. Mwana na ye ya mwasi abimaki na mwa mbonda moke na mabɔkɔ mpe azalaki kobina mpo na koya koyamba ye. Ntango amonaki mwana na ye, na esika asepela, apasolaki bilamba na ye. Mpo na nini? Ayokaki nde mabe na komona mwana na ye azali kosepela lokola azongaki na bomoi na ndako? Autaki kolonga etumba nini? Elombe yango nkombo na ye nani?
Elombe yango nkombo na ye Yefeta, azalaki moko kati na basambisi ya Yisalaele. Kasi, mpo na kozwa eyano na mituna mosusu mpe koyeba liteya oyo tokoki kozwa na lisolo na ye, tótalela naino makambo mosusu oyo ezalaki liboso.
Eleko moko ya mpasi na Yisalaele
Yefeta azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi na Yisalaele. Bayisalaele mosusu batikaki losambo ya solo mpe bakómaki kosambela banzambe ya Sidona, ya Moaba, ya Amona, mpe ya Bafilistia. Yango wana, Yehova asundolaki bango na mabɔkɔ ya Baamona mpe ya Bafilistia, oyo banyokolaki bango na boumeli ya mbula 18. Mingimingi, bato oyo bazalaki kofanda na Gileadi, na ɛsti ya Yolodani nde bazalaki konyokwama mingi.a Nsukansuka, Bayisalaele bandimaki mabe na bango, babongolaki motema mpe balukaki lisalisi ya Yehova, bazongelaki kosalela ye mpe balongolaki banzambe ya bapaya.—Basambisi 10:6-16.
Baamona batyaki kaa na bango na Gileadi mpe Bayisalaele bayanganaki mpo na kokende kobunda na bango. Kasi, Bayisalaele bazalaki na motambwisi te. (Basambisi 10:17, 18) Na eleko yango, Yefeta ye moko mpe azalaki na mikakatano. Bana ya tata na ye babenganaki ye mpo bázwa libula na ye. Yango wana, Yefeta akendaki kofanda na Tobe, etúká moko oyo ezalaki na ɛsti ya Gileadi, epai banguna bazalaki kokɔta mingi. “Bato mpamba,” ekoki kozala bato oyo bazangaki misala mpo na banguna to mpe baoyo batombokaki mpo bazalaki kosalisa bango misala na makasi, bayaki epai ya Yefeta. Biblia elobi ete “batambolaki na ye”; ekoki kozala ete bazalaki kokende elongo na Yefeta wana azalaki kokende kopunza banguna na bango. Biblia ebengi Yefeta “elombe na etumba,” na ntembe te mpo na mpiko na ye na bitumba. (Basambisi 11:1-3) Kasi, nani asengelaki kokamba Bayisalaele mpo na kobundisa Baamona?
‘Yaká kozala komanda na biso’
Bankumu ya Gileadi bayebisaki Yefeta boye: “Yaká kozala [komanda] na biso.” Soki bakanisaki ete Yefeta akoya nokinoki mpo akomona yango libaku ya kozonga na mboka na ye, bamikosaki mpenza. Yefeta ayebisaki bango boye: “Bino boyinaki ngai mpe bobimisaki ngai na ndako ya tata na ngai te? Awa emoni bino mpasi bokómi epai na ngai mpo na nini?” Bankumu yango bazangaki mpenza bosembo na ndenge baboyaki Yefeta liboso mpe na nsima bayaki epai na ye mpo asunga bango!—Basambisi 11:4-7.
Yefeta asɛngaki bango likambo moko liboso andima kokamba Yisalaele na etumba. Alobaki boye: ‘Soki Yehova apesi Baamona na mabɔkɔ na ngai, nakozala mokonzi na bino.’ Soki Yefeta alongi banguna elingaki komonisa ete Nzambe azali elongo na ye, kasi azalaki mpe na mposa ya komindimisa ete Bayisalaele bakopesa lisusu Yehova mokɔngɔ te nsima ya kosikwama na mabɔkɔ ya banguna na bango.—Basambisi 11:8-11, NW.
Asololi na Baamona
Yefeta amekaki kosolola na Baamona mpo báyokana. Atindaki bamemi-nsango epai ya mokonzi na bango mpo na koyeba ntina oyo bazalaki koluka kobundisa Bayisalaele. Baamona bazongiselaki ye ete ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, bazwaki mabelé na bango mpe mposa na bango ezalaki ete Bayisalaele bázongisa mabelé yango.—Basambisi 11:12, 13.
Lokola Yefeta ayebaki malamumalamu lisolo ya Bayisalaele, amonisaki polele ete makambo oyo Baamona balobaki ezalaki solo te. Ayebisaki bango ete ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito batumolaki te bikólo lokola Moaba mpe Edome; Baamona bafandaki na mabelé yango te oyo bazalaki koloba ete ezali ya bango. Baamola nde bafandaki na mabelé yango, kasi Nzambe asalisaki Bayisalaele bálonga mokonzi na bango, Sihona. Lisusu, esilaki koleka mbula 300 banda Bayisalaele bazalaki kofanda na esika yango. Mpo na nini Baamona bazalaki kosɛnga mabelé yango na ntango wana?—Basambisi 11:14-22, 26.
Yefeta alobelaki likambo oyo ebendelaki Bayisalaele mpasi: likambo ya koyeba nani azali Nzambe ya solo. Yehova to banzambe ya bikólo oyo bazalaki kofanda na mokili yango liboso ete Bayisalaele bázwa yango? Soki Kemose azalaki na nguya, mbɛlɛ alingaki kopekisa banguna bábɔtɔla mokili ya bato na ye; boye te? Yango ezalaki ntembe kati na bato oyo bazalaki kosambela nzambe ya lokuta ya Baamona mpe baoyo bazalaki kosambela Nzambe ya solo. Na yango, Yefeta alobaki boye: “Tiká [Yehova], Mosambisi, akata lelo na kati ya bato ya Yisalaele mpe bato ya Amona.”—Basambisi 11:23-27.
Mokonzi ya Baamona aboyaki kondima eyano oyo Yefeta apesaki ye. Biblia elobi boye: “Na ntango yango elimo ya [Yehova], ekitelaki Yefeta, mpe alekaki na kati ya Gileadi mpe Manase”; na ntembe te ezalaki mpo na koyanganisa mibali mpo na kobundisa Baamona.—Basambisi 11:28, 29.
Ndai ya Yefeta
Lokola Yefeta azalaki na mposa mpenza ya lisungi ya Nzambe akataki ndai oyo: “Soki okopesa Baamona na lobɔkɔ na ngai, mbɛ ye oyo akobima na monɔkɔ ya ndako na ngai mpo na kozwana na ngai, wana ekobuta ngai na elonga na Baamona, akozala ya [Yehova], mpe nakokaba ye lokola mbeka ya kotumba.” Nzambe ayokaki libondeli ya Yefeta mpe apambolaki ye apesaki ye likoki ya koboma bingumba 20 ya Baamona; na ndenge yango Bayisalaele balongaki banguna na bango.—Basambisi 11:30-33.
Ntango Yefeta autaki na etumba, moto ya liboso oyo abimaki mpo na kokutana na ye ezalaki mwana na ye ya mwasi oyo azalaki kolinga mingi, azalaki na mwana kaka moko wana! Lisolo elobi ete, “emonaki Yefeta ye, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki ete, Mawa, mwana na ngai! Okitisi ngai mingi mpenza, mpe oyeisi mawa monene na ngai, mpo ete ngai nasili kofungola monɔkɔ na ngai epai ya [Yehova] mpe nakoki kobongola monɔkɔ na ngai te.”—Basambisi 11:34, 35.
Yefeta alingaki mpenza kotumba mwana na ye lokola mbeka? Te. Azalaki na makanisi wana te. Yehova azalaki koyina likambo ya kotumba bato na mɔtɔ lokola mbeka, moko ya makambo mabe oyo Bakanana bazalaki kosala. (Levitike 18:21; Deteronome 12:31) Ntango Yefeta akataki ndai, elimo ya Nzambe ezalaki likoló na ye mpe Yehova apambolaki milende na ye. Biblia etángi Yefeta mpo na kondima na ye mpe mpo na mokumba oyo akokisaki na mokano ya Nzambe. (1 Samwele 12:11; Baebele 11:32-34) Na yango tomoni ete Yefeta azalaki na likanisi ata moke te ya kotumba moto lokola mbeka. Boye, makanisi na ye ezalaki nini ntango akataki ndai ete akopesa moto epai ya Yehova?
Emonani ete Yefeta alingaki koloba ete akopesa na mosala ya Nzambe moto ya liboso oyo asengelaki kokutana na ye na ntango akouta na etumba. Likambo ya kopesa moto na mosala ya Yehova endimamaki na Mibeko ya Moize. Na ndakisa, basi bazalaki kosala na tempelo, ekoki kozala ete bazalaki kotoka mai. (Exode 38:8; 1 Samwele 2:22) Toyebi makambo mingi te na ntina na misala yango oyo bazalaki kosala soki mpe ezalaki mpo na libela. Ekoki kozala ete Yefeta azalaki nde kokanisa likambo yango ntango akataki ndai, mpe emonani ete mokano na ye ezalaki ete moto yango atikala na mosala ya Yehova mpo na libela.
Mwana ya Yefeta mpe na nsima Samwele bango mibale bandimaki kokokisa ndai ya baboti na bango oyo bazalaki kobanga Yehova. (1 Samwele 1:11) Mwana ya Yefeta azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova mpe andimisamaki ete ndai oyo tata na ye alapaki liboso ya Yehova esengelaki kokokisama. Yango ezalaki likambo moke te; mpamba te ezalaki kosɛnga na ye ete atikala monzemba bomoi na ye mobimba. Alelaki mpo na bongɔndɔ na ye mpamba te mposa ya Moyisalaele nyonso ezalaki ya kozala na bana mpo na kobatela libula mpe nkombo ya libota. Mpo na Yefeta, kokokisa ndai na ye ezalaki kosɛnga akabwana na mwana na ye kaka moko mpe oyo alingaki mingi.—Basambisi 11:36-39.
Bomoi ya elenge mwasi yango ebebaki te. Kolekisa bomoi mobimba na ndako ya Yehova mpo na kosalela ye, ezalaki likambo ya malamu koleka, likambo ya esengo mpe yango ezalaki lolenge malamu mpo na elenge mwasi yango ya kokumisa Nzambe. Na yango, ‘bana basi ya Yisalaele bazalaki kokende mbula na mbula kopesa longonya na mwana mwasi ya Yefeta Mogileadi.’ (Basambisi 11:40, NW) Na ntembe te mwana mwasi yango azalaki kosepela na mosala na ye mpo na Yehova.
Bandeko mingi lelo oyo bazali komipesa na mosala ya Yehova; bazali kosalela ye lokola babongisi-nzela, bamisionɛrɛ, bakɛngɛli-batamboli, to mpe na Betele. Yango ekoki kopekisa bango kokutanaka mingi na bandeko na bango. Atako bongo, bango nyonso basepelaka na mosala na bango mpo na Yehova.—Nzembo 110:3; Baebele 13:15, 16.
Baboyi litambwisi ya Nzambe
Na ntango ya Yefeta, Bayisalaele mingi baboyaki Yehova atambwisa bango. Atako emonanaki polele ete Nzambe nde asungaki Yefeta, bato ya Efalaima baswanisaki ye. Balingaki koyeba mpo na nini abengaki bango te ntango akendaki na etumba. Balingaki kutu kotumba Yefeta ná ndako na ye.—Basambisi 12:1.
Yefeta ayebisaki bango ete abengaki bango kasi baboyaki. Atako bongo, Yehova nde alongaki etumba yango. Basilikaki na ndenge bato ya Gileadi baponaki Yefeta akamba bango na etumba? Matata ya bato ya Efalaima emonisaki ete batombokelaki nde Yehova mpe ezalaki na likambo mosusu ya kosala te kaka kobunda na bango. Ntango babundaki bato ya Efalaima balongaki te mpe bakimaki. Kasi, ezalaki mpasi te mpo na koyeba bango mpo bazalaki kokoka te koloba “shibolete.” Mpo na yango, bato 42 000 kati na bato ya Efalaima bakufaki.—Basambisi 12:2-6.
Ezalaki mpenza eleko moko ya mawa mpo na Bayisalaele! Bitumba oyo basambisi lokola Oteniele, Ehude, Balaka mpe Gideona balongaki ememaki kimya na Yisalaele. Na mbala oyo Biblia elobi te ete kimya ekɔtaki. Lisolo esuki kaka na maloba oyo: “Yefeta asambisaki Yisalaele mbula motoba. Na nsima Yefeta, Mogileadi, akufaki mpe akundamaki na mboka moko na Gileadi.”—Basambisi 3:11, 30; 5:31; 8:28; 12:7.
Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Yefeta atikalaki sembo epai ya Nzambe atako akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye. Elombe yango atángaki nkombo ya Yehova ntango azalaki kosolola na bankumu ya Gileadi, na Baamona, na mwana na ye, mpe na bato ya Efalaima mpe ntango alapaki ndai na ye. (Basambisi 11:9, 23, 27, 30, 31, 35; 12:3) Nzambe apambolaki Yefeta mpo na elimo na ye ya komipesa, asalelaki ye mpe mwana na ye mpo na kotombola losambo ya pɛto. Na eleko oyo Bayisalaele mingi bazalaki lisusu kotosa mibeko ya Nzambe te, Yefeta akangamaki na mibeko ya Nzambe. Yo mpe okobanda ntango nyonso kotosa Yehova na ndakisa ya Yefeta?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baamona bazalaki kosala makambo ya mabe mpe ya nsɔmɔ. Mbula pene na 60 na nsima, bakanelaki bato oyo bazalaki kofanda na engumba moko ya Gileadi ete bakotɔbɔla bango liso mokomoko ya mobali. Mosakoli Amosa alobelaki eleko moko oyo bato yango bapasolaki mabumu ya basi ya etúká ya Gileadi oyo bazalaki na zemi.—1 Samwele 11:2; Amosa 1:13.