“Kobá kolonga mabe na kosaláká malamu”
“Komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.”—BALOMA 12:21.
1. Mpo na nini tosengeli kondima ete tokoki kolonga mabe?
TOKOKI kotikala sembo liboso ya bato oyo bazali kotɛmɛla makasi mpenza losambo ya solo? Tokoki kolonga makambo oyo ezali koluka kozongisa biso na mokili oyo ya mabe? Na mituna mibale wana, eyano ezali, ɛɛ! Mpo na nini tolobi bongo? Ezali mpo na likambo oyo ntoma Paulo alobaki na mokanda oyo atindelaki baklisto ya Loma. Akomaki boye: “Komitika te ete mabe elonga yo, kasi kobá kolonga mabe na kosaláká malamu.” (Baloma 12:21) Soki totye mpenza motema epai ya Yehova mpe tozwi mpenza ekateli ete mokili elonga biso te, mabe na yango mpe ekolonga biso te. Lisusu, maloba “kobá kolonga mabe” emonisi ete tokoki kolonga yango soki tolɛmbisi mabɔkɔ te na etumba na biso ya elimo. Mokili oyo ya mabe ná moyangeli na yango, Satana Zabolo, bakolonga kaka baoyo batiki kokɛngɛla mpe kobunda.—1 Yoane 5:19.
2. Mpo na nini tokotalela mwa makambo oyo ekómelaki Nehemia?
2 Mbula soki 500 liboso ya ntango ya Paulo, mosaleli moko ya Nzambe oyo azalaki na Yelusaleme amonisaki bosolo ya likambo oyo Paulo alobaki na ntina na etumba oyo tozali kobunda mpo na kolonga mabe. Mosaleli yango, Nehemia, asukaki kaka te na kolonga botɛmɛli ya bato oyo bazalaki kobanga Nzambe te, kasi alongaki mpe mabe na kosaláká malamu. Mikakatano nini akutanaki na yango? Nini esalisaki ye alonga? Ndenge nini tokoki komekola ye? Mpo na kozwa biyano na mituna wana, tótalela mwa makambo oyo ekómelaki Nehemia.a
3. Nehemia azalaki na kati ya bato ya ndenge nini, mpe likambo monene nini asalaki?
3 Nehemia azalaki kosala na ndako ya Alatazelezese, mokonzi ya Baperse. Atako Nehemia azalaki na kati ya bato oyo bazalaki bandimi te, alandaki te “ebongiseli ya makambo ya ntango” wana. (Baloma 12:2) Ntango mposa ya kotonga lisusu lopango ya engumba Yelusaleme emonanaki, Nehemia atikaki bomoi ya malamu oyo azalaki na yango, asalaki mobembo moko ya mpasi mpo na kokende na Yelusaleme mpe abandaki mosala monene ya kotonga. (Baloma 12:1) Atako azalaki guvɛrnɛrɛ na Yelusaleme, Nehemia azalaki koboma nzoto na mosala mikolo nyonso elongo na Bayisalaele mosusu, “longwá na kobima ya ntango kino emonanaki minzɔtɔ na lola.” Yango wana, nsima ya sanza mibale mpamba, basilisaki mosala yango! (Nehemia 4:21; 6:15) Yango ezalaki likambo ya kokamwa, mpamba te Bayisalaele bakutanaki na botɛmɛli ya ndenge na ndenge ntango bazalaki kotonga lopango yango. Banani bazalaki kotɛmɛla Nehemia, mpe mokano na bango ezalaki nini?
4. Mokano ya batɛmɛli ya Nehemia ezalaki nini?
4 Batɛmɛli minene ezalaki Sanebalata, Tobiya mpe Geseme, mibali ya nguya mpenza oyo bazalaki kofanda penepene na Yuda. Lokola bazalaki banguna ya bato ya Nzambe, “basilikaki mingi ete [Nehemia] ayei mpo na koluka malamu ya bana ya Yisalaele.” (Nehemia 2:10, 19) Banguna ya Nehemia bazalaki mpenza na mokano ya kokata mosala ya kotonga; kutu bazalaki na mikano ya mabe koleka lisusu. Nehemia ‘amitikaki nde ete mabe elonga ye’?
“Asilikaki mingi mpe ayokaki nkanda monene”
5, 6. (a) Banguna ya Nehemia basalaki nini ntango bamonaki Bayuda bazali kotonga lopango ya Yelusaleme? (b) Mpo na nini Nehemia abangaki batɛmɛli yango te?
5 Na mpiko nyonso, Nehemia alendisaki bato na ye ete: “Tótonga lopango ya Yelusaleme.” Bango mpe bazongisaki: “Tótonga.” Nehemia alobi boye: “Bakembisaki mabɔkɔ na bango mpo na kosala malamu,” kasi banguna “basɛkaki biso mpe batyolaki biso, bango ete, Likambo oyo lizali bino kosala ezali nini? Bokotombokela nde mokonzi?” Kotyola mpe bifundeli na bango ya lokuta ebangisaki Nehemia te. Alobaki na batɛmɛli yango boye: “Nzambe ya lola, ye akolongisa biso mpe biso baombo na ye tokotɛlɛma mpe tokotonga.” (Nehemia 2:17-20) Nehemia azalaki na ekateli makasi ya kokoba “kosala malamu.”
6 Sanebalata, moko ya batɛmɛli yango, “asilikaki mingi mpe ayokaki nkanda monene,” mpe akobaki kofinga mpe kotyola bango. Alobaki boye: “Bayuda oyo ya nguya moke bazali kosala nini? . . . Bakobikisa nde mabanga kati na mabondo ya mputulu?” Tobia mpe abandaki kotyola bango na maloba oyo: “Soki ngombolo akobuta wana, akobuka lopango na bango ya mabanga.” (Nehemia 4:1-3) Nehemia asalaki nini?
7. Nehemia asalaki nini ntango banguna na ye bakoselaki ye makambo?
7 Nehemia akipaki kotyola na bango te. Atosaki mobeko ya Nzambe mpe alukaki te kozongisa mabe na mabe. (Levitike 19:18) Atikaki nde likambo yango na mabɔkɔ ya Nzambe mpe abondelaki boye: “Ɛ Nzambe na biso, yoká mpo ete totyolami; [zongisá, NW] nsɔni na bango likoló ya mitó na bango mpenza.” (Nehemia 4:4) Nehemia atyaki motema na maloba ya Yehova oyo: “[Kozongisa mabe, NW] ezali ya ngai, mpe lifuti.” (Deteronome 32:35) Lisusu, Nehemia ná bato na ye bakobaki ‘kotonga lopango.’ Batikaki te ete bábongola bango makanisi. Na yango, “lopango mobimba ekangamaki kino ndambo ya molai na yango; mpo ete bato batyaki motema na mosala.” (Nehemia 4:6) Banguna ya losambo ya solo balongaki te kopekisa bango kotonga! Ndenge nini tokoki komekola Nehemia?
8. (a) Ndenge nini tokoki komekola Nehemia soki batɛmɛli bakoseli biso makambo? (b) Yebisá likambo moko oyo okutanaki na yango to oyo oyoká, oyo emonisi ete koboya kozongisa mabe na mabe ezali bwanya.
8 Lelo oyo, bato oyo bazali kotɛmɛla biso na eteyelo, na mosala, ata mpe na ndako, bakoki kobanda kotyola biso mpe kokosela biso makambo. Kasi, mbala mingi tolongaka makambo yango soki tosaleli toli ya Biblia oyo: “Ntango ezali mpo na . . . kozala nyɛɛ.” (Mosakoli 3:1, 7) Lokola Nehemia, biso mpe tozongisaka te soki moto azokisi biso na maloba. (Baloma 12:17) Tobondelaka Nzambe mpe totyaka motema epai na ye oyo alaki biso ete: “Ngai nakozongisa.” (Baloma 12:19; 1 Petelo 2:19, 20) Na ndenge yango, topesaka batɛmɛli na biso nzela te ya kopekisa biso kosala mosala oyo tozali kosala lelo oyo: kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Mbala nyonso oyo tobimaka na mosala ya kosakola kozanga kobanga batɛmɛli na biso, tomonisaka kondima lokola oyo Nehemia azalaki na yango.
‘Tokoboma bino’
9. Wapi lolenge oyo banguna ya Nehemia batɛmɛlaki ye, mpe ye asalaki nini?
9 Ntango batɛmɛli ya losambo ya solo bayokaki ete “mosala ya kobamba lopango ya Yelusaleme etambolaki,” bazwaki mipanga na bango mpo báya ‘kobunda na Yelusaleme.’ Bayuda bamonaki ete esili na bango. Basamalia bazalaki na ngámbo ya nɔrdi, Baamona na ɛsti, Baarabe na sudi mpe Baasedode na wɛsti. Bazingaki Yelusaleme mpe batongi bamonaki lokola bazwami na kati ya motambo! Basengelaki kosala nini? Nehemia alobi boye: “Tobondelaki epai ya Nzambe.” Banguna bazalaki koloba ete: “Tokoboma bango mpe tokosukisa mosala.” Nzokande, Nehemia atyaki batongi mpo na kobatela engumba “na mipanga na bango mpe makɔnga na bango mpe matimbo na bango.” Ya solo mpenza, na bomoto boye, mwa Bayuda moke wana bakokaki kotɛlɛma ata moke te liboso ya ebele ya basoda oyo bayaki kobundisa bango. Kasi, Nehemia alendisaki bango boye: “Bóbanga . . . te! Kanisá [Yehova] oyo azali monene mpe na nsɔmɔ.”—Nehemia 4:7-9, 11, 13, 14.
10. (a) Mpo na nini banguna ya Nehemia babundisaki bango lisusu te? (b) Kasi, Nehemia azwaki bibongiseli nini?
10 Na mbala moko, makambo ebongwanaki. Banguna yango babundisaki bango lisusu te. Mpo na nini? Nehemia alobi boye: “Nzambe asili kokómisa mwango na bango mpamba.” Atako bongo, Nehemia ayebaki ete banguna yango batiki bango libela te. Yango wana, asalelaki bwanya mpe asɛngaki na batongi bábongola lolenge ya kosala. Kobanda wana, “moto na moto asalaki mosala mpe na lobɔkɔ mosusu asimbaki ebundeli na ye.” Nehemia atyaki mpe mobali moko atalaka soki amoni banguna bazali koya ‘abɛta mondule’ mpo na kokebisa batongi. Likambo ya ntina koleka, Nehemia alendisaki bato boye: “Nzambe na biso akobundela biso.” (Nehemia 4:15-20) Lokola balendisamaki mpe babongisamaki malamu mpenza mpo na etumba, batongi bakobaki kosala. Mateya nini tokoki kozwa na lisolo yango?
11. Nini esalisaka baklisto bálonga mabe na mikili oyo mosala ya Bokonzi epekisami, mpe ndenge nini balongaka mabe na kosaláká malamu?
11 Ntango mosusu, baklisto ya solo bakutanaka na botɛmɛli ya makasi mpenza. Na mikili mosusu, batɛmɛli makasi ya losambo ya solo bakómi mpenza banguna ya baklisto. Na ndenge ya bomoto boye, bandeko na mikili yango bakoki kotɛlɛma ata moke te liboso ya batɛmɛli yango. Atako bongo, Batatoli yango bazali na elikya ete ‘Nzambe akobundela bango.’ Ya solo, bandeko oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango bamonaka mbala na mbala ete Yehova ayanolaka na mabondeli na bango mpe ‘akómisaka mpamba myango’ ya banguna ya nguya mpenza. Ata na bikólo oyo mosala ya Bokonzi epekisami, baklisto bazwaka mayele ya kokoba kosakola nsango malamu. Kaka ndenge batongi ya Yelusaleme babongolaki lolenge na bango ya kosala, Batatoli ya Yehova lelo oyo babongolaka mpe lolenge na bango ya kosakola soki bakómi kotɛmɛla bango. Kasi, bazwaka mandoki te mpo na kobunda. (2 Bakolinti 10:4) Ata soki bakómi kobɛta to koboma bango, batikaka te kosakola. (1 Petelo 4:16) Nzokande, bandeko yango ya mpiko ‘bakobaka kolonga mabe na kosaláká malamu.’
“Yaká, tóyangana”
12, 13. (a) Mayele mabe nini banguna ya Nehemia basalelaki? (b) Mpo na nini Nehemia aboyaki kokende kokutana na bango?
12 Ntango banguna ya Nehemia bamonaki ete balongi te kobunda na ye na ndenge ya polele, bakómaki kosalela mayele mabe mpo na kozwa ye. Basalelaki mayele misato. Mayele nini?
13 Ya liboso, banguna ya Nehemia balukaki kokosa ye. Balobaki na ye boye: “Yaká, tóyangana na mboka moko na mokili ya Ono.” Ono ezalaki na kati ya Yelusaleme ná Samalia. Na yango, banguna ya Nehemia basɛngaki ye akende báyokana mpo básilisa matata oyo bazalaki na yango. Nehemia akokaki kokanisa ete: ‘Ezali mpenza likanisi ya malamu. Na esika tóbunda, ekozala malamu tósolola.’ Kasi, Nehemia aboyaki. Ayebisi ntina oyo aboyaki: “Bakanisaki mpo na kosalela ngai mabe.” Ayebaki mayele mabe na bango mpe akosamaki te. Alobaki na banguna na ye mbala minei mobimba ete: “Nakoki kokita te. Mosala etɛlɛma nde mpo na nini wana nakotika yango mpo na kokita epai na bino?” Mayele oyo banguna basalelaki mpo na kozwa Nehemia na motambo elongaki te. Atyaki makanisi na ye nyonso na mosala ya kotonga.—Nehemia 6:1-4.
14. Nehemia asalaki nini ntango bakoselaki ye makambo?
14 Ya mibale, banguna ya Nehemia bakómaki kopanza ye nsango ya lokuta, kofunda ye ete ‘alingi kotombokela’ Mokonzi Alatazelezese. Balobaki na Nehemia lisusu ete: “Oya mpe tóyangana mwango.” Na mbala wana mpe, Nehemia aboyaki, mpo ayebaki mayele ya banguna na ye. Nehemia alobaki boye: “Bango nyonso balingaki kobangisa biso, bango ete, Mabɔkɔ na bango makolɛmbisama na mosala ete mosalama te.” Nzokande, na mbala wana Nehemia ayebisaki bango ete bazali kokosela ye makambo: “Makambo masalami te lokola yo ozali koloba; kasi yo ozali kobanzabanza yango na motema na yo moko.” Nehemia asɛngaki lisusu Yehova lisalisi na libondeli oyo: “Kembisá mabɔkɔ na ngai.” Azalaki na elikya ete Yehova akosalisa ye alonga mayele mabe wana mpe akoba kotonga.—Nehemia 6:5-9.
15. Toli nini mosakoli moko ya lokuta apesaki Nehemia, mpe mpo na nini Nehemia aboyaki kosala yango?
15 Ya misato, banguna ya Nehemia basalelaki Semaya, moto moko ya Yisalaele, mpo akosa Nehemia abuka Mobeko ya Nzambe. Semaya alobaki na Nehemia boye: “Tóyangana na ndako ya Nzambe na kati ya Tempelo, tózipa mpe bikuke ya Tempelo, mpo ete bakoya koboma yo.” Semaya alobaki ete balingi koboma Nehemia, kasi akoki kobika soki akimi na kati ya tempelo. Nzokande, Nehemia azalaki nganga-nzambe te. Alingaki kosala lisumu soki akendaki komibomba na ndako ya Nzambe. Asengelaki nde kobuka Mobeko ya Nzambe mpo na koluka komibikisa? Nehemia ayanolaki boye: “Moto nani lokola ngai akokɔta na tempelo mpo na kobikisa bomoi na ye? Nakokɔta te.” Mpo na nini Nehemia akweaki te na motambo oyo batyelaki ye? Mpo ayebaki ete atako Semaya azali ndeko na ye Moyisalaele, ‘Nzambe atindaki ye te.’ Kutu, mosakoli ya solo akokaki ata moke te kotinda ye abuka Mobeko ya Nzambe. Na mbala wana mpe, Nehemia amitikaki te ete banguna balonga ye. Mwa moke na nsima, alobaki boye: “Bongo lopango esilaki na mokolo ya ntuku mibale na mitano na sanza ya elulu, mosala ya mikolo ntuku mitano na mibale.”—Nehemia 6:10-15; Mituya 1:51; 18:7.
16. (a) Ndenge nini tosengeli kotalelaka baninga ya lokuta, bato oyo bakoselaka biso makambo mpe bandeko ya lokuta? (b) Ndenge nini omonisaka ete oboyaka kokakola kondima na yo na ndako, na eteyelo to na mosala?
16 Lokola Nehemia, biso mpe tokoki kokutana na botɛmɛli ya baninga ya lokuta, ya bato oyo bakoselaka biso makambo mpe ya bandeko ya lokuta. Bato mosusu bakoki kosɛnga biso tókende kokutana na bango esika moko tóyokana. Bakoki koluka komonisa biso ete soki tolɛmbisi mwa moke milende na biso na mosala ya Yehova, tokoki mpe kosala makambo minene na mokili. Kasi, lokola Bokonzi ya Nzambe ezali na esika ya liboso na bomoi na biso, toboyaka kokakola kondima na biso. (Matai 6:33; Luka 9:57-62) Batɛmɛli bapanzaka mpe biso nsango ya lokuta. Na mikili mosusu, bafundaka biso ete tozali likama mpo na Leta, ndenge bafundaki Nehemia ete alingi kotombokela mokonzi. Tokweisaka bifundeli yango mosusu na batribinale. Kasi, ezala tolongi to te, tobondelaka Yehova na elikya mpenza ete atambwisa makambo na boyokani na mokano na ye. (Bafilipi 1:7) Botɛmɛli ekoki mpe kouta epai ya bato oyo bakosaka kosalela Yehova. Kaka ndenge Moyuda moko amekaki kotinda Nehemia abuka Mobeko ya Nzambe mpo na koluka kobikisa bomoi na ye, Batatoli oyo bakómá bapɛngwi bakoki kopusa biso tótika solo. Kasi, toboyaka kolanda bango, mpo toyebi ete tokobika te soki tobuki Mibeko ya Nzambe, kasi nde soki tozali kotosa yango! (1 Yoane 4:1) Ɛɛ, na lisalisi ya Yehova tokoki kolonga ata mabe ya ndenge nini.
Tozali kosakola nsango malamu atako bazali kosala biso mabe
17, 18. (a) Milende nini Satana ná bato na ye bazali kosala? (b) Ekateli nini ozali na yango, mpe mpo na nini?
17 Liloba ya Nzambe elobi na ntina na bandeko ya Klisto bapakolami ete: “Balongaki [Satana] mpo . . . na liloba ya litatoli na bango.” (Emoniseli 12:11) Na yango, kolonga Satana, nkolo ya mabe, ezali na boyokani na kosakola nsango ya Bokonzi. Yango wana, tokoki kokamwa te ete Satana azali ntango nyonso kobundisa batikali bapakolami ná “ebele ya bato,” na ndenge azali kobimisela bango botɛmɛli.—Emoniseli 7:9; 12:17.
18 Ndenge tomoni yango, bakoki kotɛmɛla biso na maloba, na kobɛta, na koboma to na lolenge mosusu oyo ezali polele te. Ezala ata ndenge nini, mokano ya Satana ezali kaka moko: kokata mosala ya kosakola. Kasi, akolonga te mpo lokola Nehemia, basaleli ya Nzambe bazali mpenza na ekateli ya ‘kokoba kolonga mabe na kosaláká malamu.’ Mpo na yango, bakokoba kosakola nsango malamu tii ntango Yehova akoloba ete ekoki!—Malako 13:10; Baloma 8:31; Bafilipi 1:27, 28.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba esika, ntango mpe ndenge makambo yango esalemaki, tángá Nehemia 1:1-4; 2:1-6, 9-20; 4:1-23; 6:1-15.
Ozali koyeba lisusu?
• Botɛmɛli nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bakutanaki na yango oyo mpe baklisto bazali kokutana na yango lelo oyo?
• Mokano ya libosoliboso ya banguna ya Nehemia ezalaki nini, mpe oyo ya banguna ya Nzambe lelo oyo ezali nini?
• Ndenge nini tokobaka kolonga mabe na kosaláká malamu?
[Etanda/Elilingi na lokasa 29]
Mateya oyo tokoki kozwa na Mokanda ya Nehemia
Basaleli ya Nzambe bazali
• kotyolama
• kokanelama
• komekama na mayele mabe
Mayele mabe eutaka epai ya
• baninga ya lokuta
• bato oyo bakoselaka biso makambo
• bandeko ya lokuta
Basaleli ya Nzambe bazali kolonga mabe mpo
• bakangami na mosala oyo Nzambe apesá bango
[Elilingi na lokasa 27]
Nehemia ná bato na ye batongaki lopango ya Yelusaleme atako batɛmɛlaki bango makasi
[Elilingi na lokasa 31]
Baklisto ya solo bazali kosakola nsango malamu kozanga kobanga