Tóluka “makambo mozindo ya Nzambe”
“Elimo elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 2:10.
1. Wapi mwa mateya ya Biblia oyo epesaka moto oyo abandi koyekola esengo?
MINGI kati na biso na lisangá tokoki kokanisa esengo oyo toyokaki ntango toyekolaki solo. Toyebaki ntina ya nkombo ya Yehova, mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala, mpo na nini bato mosusu bazali kokende na likoló mpe elikya nini ezali mpo na bato nyonso ya sembo. Ekoki kozala ete tozalaki kotánga Biblia liboso, kasi makambo oyo tozalaki kotánga ezalaki molili liboso na biso, ndenge ezali mpo na bato mingi lelo na mokili. Tozalaki lokola moto oyo azali kotambola na kati ya molili. Lokola azali na mwinda te, akoki koyeba te biloko oyo ezali pembenipembeni. Kasi, soki apelisi mwinda akoki komona biloko nyonso polele. Ndenge moko, ntango moto moko abandaki kosalisa biso tóyeba Makomami, tomonaki mpo na mbala ya liboso “makambo mozindo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 2:8-10.
2. Mpo na nini esengo ya koyekola Liloba ya Nzambe ekoki kosila te?
2 Tosengeli kosuka kaka na koyeba Biblia likolólikoló? Maloba “makambo mozindo ya Nzambe” elimboli bwanya ya Nzambe, oyo baklisto bayebaka na lisalisi ya elimo santu, kasi ebombami epai ya bato mosusu. (1 Bakolinti 2:7) Bwanya ya Yehova ezangi nsuka mpe tokoki kozwa esengo soki tozali koluka yango! Tokoyeba bwanya ya Nzambe na mobimba na yango te. Esengo oyo tozalaki na yango ntango tobandaki koyeba mateya ya Biblia ekotikala libela na libela soki tozali kokoba kolukaluka na kati ya “makambo mozindo ya Nzambe.”
3. Mpo na nini tosengeli koyeba malamu ntina ya bindimeli na biso?
3 Mpo na nini tosengeli koyeba “makambo mozindo” yango? Tósukaka te kaka na koyeba makambo oyo tondimaka, kasi tosengeli mpe koyebaka ntina oyo tondimaka yango; soki tosali bongo, kondima mpe elikya na biso ekokóma makasi. Makomami ezali kosɛnga biso tósalela ‘likoki na biso ya kokanisa’ mpo na ‘komindimisa biso moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.’ (Baloma 12:1, 2) Soki toyebi mpo na nini Yehova azali kosɛnga biso tólanda nzela boye to boye, ekateli na biso ya kotosa ye ekokóma lisusu makasi. Na yango, koyeba “makambo mozindo” ekoki kopesa biso makasi ya koboya kosala makambo ya mabe mpe kotinda biso tózala “na molende mpo na misala ya malamu.”—Tito 2:14.
4. Koyekola Biblia esɛngaka nini?
4 Mpo na koyeba makambo mozindo, esengeli koyekola. Nzokande, koyekola ekeseni na kotánga likolólikoló. Esɛngaka kotalela na mozindo makambo oyo ozali kotánga mpo na komona soki eyokani na makambo mosusu oyo oyebi. (2 Timote 1:13) Esɛngaka kososola ntina oyo balobi likambo yango. Koyekola Biblia esɛngaka mpe kokanisa na mozindo na ndenge tokoki kosalela makambo tozali koyekola mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe kosalisa basusu. Lisusu, lokola “makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba,” esengeli koyekola “liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (2 Timote 3:16, 17; Matai 4:4) Koyekola Biblia ezali pɛtɛɛ te! Kasi, ekoki kozala esengo, mpe koyeba “makambo mozindo ya Nzambe” ezali mpasi mingi te.
Yehova asalisaka bato ya komikitisa básosola
5. Banani bakoki koyeba “makambo mozindo ya Nzambe”?
5 Ata soki ozalaki mayele mingi te na kelasi mpe omesani kotánga mingi te, osengeli kokanisa te ete okoki te koyeba “makambo mozindo ya Nzambe.” Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Yehova asalisaki bato oyo batángá te mpe bato mpamba báyeba mokano na ye, mpo bazalaki bato ya komikitisa mpe bandimaki mosaleli ya Nzambe ateya bango, kasi te bato ya bwanya mpe ya mayele. Na bokeseni na bato oyo batángá, bato wana bazalaki lokola bana mike. (Matai 11:25; Misala 4:13) Mpo na “makambo oyo Nzambe abongisá mpo na baoyo balingaka ye,” ntoma Paulo akomelaki baninga na ye baklisto boye: “Ezali epai na biso nde Nzambe amonisi yango na nzela ya elimo na ye, mpo elimo elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 2:9, 10.
6. 1 Bakolinti 2:10 ezali na ndimbola nini?
6 Ndenge nini elimo santu ya Nzambe elukalukaka “na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe”? Na esika apesaka moklisto mokomoko boyebi na ndenge na ye, Yehova asalelaka elimo na ye mpo na kotambwisa ebongiseli na ye, mpe yango epesaka basaleli ya Nzambe oyo basangani lokola moto moko boyebi ya Biblia. (Misala 20:28; Baefese 4:3-6) Na mokili mobimba, masangá nyonso elandaka mateya ndenge moko. Na boumeli ya mwa bambula, basilisaka koyekola Biblia mobimba. Elimo santu etambwisaka masangá mpe esalisaka bato bákóma na ezaleli oyo esengeli mpo na koyeba “makambo mozindo ya Nzambe.”—Misala 5:32.
“Makambo mozindo ya Nzambe” ezali nini?
7. Mpo na nini bato mingi bayebaka “makambo mozindo ya Nzambe” te?
7 Tosengeli kokanisa te ete “makambo mozindo” ezali kaka makambo ya makasi. Soki bato mingi bayebaka “makambo mozindo ya Nzambe” te, ezali te mpo bwanya ya Nzambe ezali mpasi mpo na kozwa yango, kasi mpo Satana azali kokosa bato báboya lisalisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye.—2 Bakolinti 4:3,4.
8. Wapi makambo mozindo oyo Paulo alobelaki na mokapo ya misato ya mokanda na ye epai ya Baefese?
8 Mokapo ya misato ya mokanda ya Paulo epai ya Baefese ezali komonisa ete “makambo mozindo ya Nzambe” ezali ebele ya mateya oyo basaleli mingi ya Yehova bayebi malamu, na ndakisa Momboto oyo alakamaki, koponama ya bato oyo bakokende na likoló mpe Bokonzi ya Masiya. Paulo akomaki boye: “Na boumeli ya mabota mosusu sɛkɛlɛ yango eyebisamaki te epai ya bana ya bato ndenge yango emonisami sikoyo epai ya bantoma na ye basantu mpe basakoli na lisalisi ya elimo, elingi koloba, ete bato ya bikólo mosusu basengeli kozala bazwi-ya-libula elongo na biso mpe binama ya nzoto elongo na biso mpe basangani ya elaka elongo na biso na kati ya bomoko elongo na Klisto Yesu.” Paulo alobaki ete bapesaki ye mokumba ya kosalisa “bato bámona ndenge sɛkɛlɛ mosantu yango ezali kotambwisama oyo uta ntango ya kalakala mpenza ebombamá na kati ya Nzambe.”—Baefese 3:5-9.
9. Mpo na nini koyeba “makambo mozindo ya Nzambe” ezali libaku malamu?
9 Paulo alobaki lisusu ete Nzambe alingi mpe ete “na kati ya bisika ya likoló bwanya ya Nzambe oyo ezali ya mitindo ndenge na ndenge mpenza ekoka koyebana na nzela ya lisangá.” (Baefese 3:10) Baanzelu bazwaka litomba na kotala mpe kososola bwanya ya Yehova na nzela ya makambo oyo azali kosalela lisangá ya boklisto. Oyo nde libaku malamu tozwi ya koyeba makambo oyo ata baanzelu balukaka koyeba! (1 Petelo 1:10-12) Lisusu, Paulo alobi ete tosengeli kosala makasi mpo na “kososola na kati ya makanisi elongo na basantu nyonso bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” ya kondima na biso baklisto. (Baefese 3:11, 18) Tótalela sikoyo mwa makambo mozindo mosusu oyo mbala mosusu toyebaki liboso te.
Bandakisa ya makambo mozindo
10, 11. Na kotalela Makomami, ntango nini Yesu akómaki “momboto” ya libosoliboso ya “mwasi” ya Nzambe?
10 Toyebi ete “momboto” ya “mwasi” ya Nzambe ya likoló oyo balobeli na Genese 3:15 (NW) ezali libosoliboso Yesu. Mpo na kososola likambo yango lisusu malamumalamu, tokoki komituna boye: ‘Ntango nini Yesu akómaki Momboto oyo alakamaki? Ezalaki nde ntango azalaki naino na likoló, ntango abotamaki awa na mabelé, na batisimo na ye to nde ntango asekwaki?’
11 Nzambe alakaki ete ebongiseli na ye ya likoló, oyo esakweli yango ebengi “mwasi” ya Nzambe, ekobimisa momboto oyo akopanza motó ya nyoka. Kasi, bambula ebele elekaki kozanga ete mwasi ya Nzambe abimisa momboto oyo akokaki koboma Satana mpe misala na ye. Yango wana, Yisaya abengi ye “ekomba” mpe mwasi oyo “apesami mpasi.” (Yisaya 54:1, 5, 6) Nsukansuka, Yesu abotamaki na Beteleme. Kasi, kaka nsima ya batisimo na ye, ntango abotamaki na elimo santu mpe akómaki mwana ya Nzambe nde Yehova alobaki ete: “Oyo azali mwana na ngai.” (Matai 3:17; Yoane 3:3) Nsukansuka, “momboto” ya libosoliboso ya mwasi amimonisaki. Na nsima, bayekoli ya Yesu mpe bapakolamaki mpe babotamaki na elimo santu. “Mwasi” ya Yehova, oyo na boumeli ya ntango molai ‘abotaki te,’ abandaki ‘koganga na esengo.’—Yisaya 54:1, NW; Bagalatia 3:29.
12, 13. Bavɛrsɛ nini emonisi ete baklisto bapakolami nyonso na mabelé bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele”?
12 Likambo ya mibale ya mozindo oyo Nzambe amonisi biso ezali mokano na ye ya kopona bato 144 000 awa na mabelé. (Emoniseli 14:1, 4) Tondimaka liteya oyo ete bapakolami nyonso oyo bazali awa na mabelé na eleko nyonso bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yesu alobaki ete bakobanda kopesa basali na ye “bilei” na ntango oyo ebongi. (Matai 24:45) Mikapo nini ya Biblia emonisi ete liteya yango ezali solo? Yesu alobelaki nde moklisto nyonso oyo alendisaka bandeko na ye na bilei ya elimo?
13 Nzambe alobaki na ekólo ya Yisalaele boye: “Bino bozali batatoli na ngai . . . moombo na ngai, oyo nasili kopona.” (Yisaya 43:10) Kasi, mwa 11 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu ayebisaki bakonzi ya Yisalaele ete Nzambe atiki kotalela ekólo na bango lokola mosaleli na Ye. Alobaki ete: “Bokonzi ya Nzambe ekolongolama epai na bino mpe ekopesama na ekólo moko oyo ekobota bambuma na yango.” Ayebisaki bato oyo bazalaki wana ete: “Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.” (Matai 21:43; 23:38) Atako bazalaki moombo ya Yehova, ndako ya Yisalaele bazalaki sembo te, mayele mpe te. (Yisaya 29:13, 14) Kaka mokolo wana, Yesu atunaki na nsima boye: “Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele?” Na motuna wana, alingaki nde koloba: ‘Ekólo nini ya mayele ekozwa esika ya Yisalaele mpe ekokóma moombo ya sembo ya Nzambe?’ Ntoma Petelo apesaki eyano ntango alobaki na lisangá ya baklisto bapakolami ete: “Bino bozali . . . ‘libota moko mosantu, ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza.’” (1 Petelo 1:4; 2:9) Libota wana ya elimo, elingi koloba “Yisalaele ya Nzambe,” ekómaki moombo ya Yehova ya sika. (Bagalatia 6:16) Ndenge kaka Bayisalaele nyonso ya mosuni bazalaki “moombo” moko, baklisto bapakolami oyo bazali na mabelé na eleko nyonso bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele” moko. Oyo nde libaku kitoko tozali na yango ya kozwa “bilei” na lisalisi ya moombo ya Nzambe!
Boyekoli ya Biblia ekoki kozala esengo
14. Mpo na nini koyekola Biblia na esika ya kotánga yango likolólikoló epesaka esengo?
14 Ntango toyebi makambo ya sika na Biblia, tosepelaka te ndenge elendisaka kondima na biso? Yango wana, tokoki kozwa esengo ya ndenge wana soki tozali koyekola Biblia na esika ya kotánga yango likolólikoló. Na yango, ntango ozali kotánga mikanda oyo elimbolaka Biblia, omitunaka boye: ‘Ndenge nini ndimbola oyo eyokani na boyebi oyo nazalaki na yango liboso na likambo yango? Mikapo to makanisi nini mosusu ekoki komonisa ete ndimbola yango ezali solo?’ Soki osimbi likambo moko malamu te, komá yango mpe omityela mokano ya kotalela yango na boyekoli na yo ya mbala ya nsima.
15. Makambo nini okoki komityela mokano ya koyekola, mpe ndenge nini ekoki komemela yo matomba?
15 Makambo nini okoki komityela mokano ya koyekola? Tokoki kobakisa boyebi na biso soki na ndakisa tozali koyekola makambo etali kondimana oyo Nzambe asalaki mpo na bolamu ya bato. Okoki kolendisa kondima na yo soki ozali koyekola bisakweli oyo elobelaki Yesu Klisto to koyekola mokanda moko ya bisakweli, vɛrsɛ na vɛrsɛ. Kondima na yo ekoki mpe kolendisama soki otángi lisolo ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu,a mpe kotánga masolo ya kala ya “Mituna ya batángi” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekosalisa yo osimba bavɛrsɛ mosusu malamu. Talelá ndenge basaleli Makomami mpo na kolimbola bavɛrsɛ yango. Yango ekosalisa yo okolisa ‘makoki na yo ya kososola.’ (Baebele 5:14) Ntango ozali koyekola, okoki kokomaka makanisi ya ntina na kati ya Biblia na yo to na lokasa moko mpo esalisaka yo mpe bato oyo okoki kosalisa.
Salisá bana bákóma kosepela na boyekoli ya Biblia
16. Ndenge nini okoki kosalisa bana bákóma kosepela na boyekoli ya Biblia?
16 Baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma na mposa makasi ya kozala baninga ya Nzambe. Kokanisa te ete bana bakoki koyeba makambo mozindo te. Soki osɛngi bango básala bolukiluki na likambo moko mpo na boyekoli na bino ya libota, okoki kotuna bango makambo oyo bayekoli. Na boyekoli ya libota, bokoki mpe kolakisa bana ndenge bakoki koyebisaka basusu bindimeli na bango mpe komonisa ete makambo oyo bayekolaka ezali solo. Lisusu, bokoki kosalela mwa buku ‘Voyez le bon pays’b mpo na kolobela bamboka oyo Biblia elobeli mpe kosalisa bango básimba malamu makambo bozali kotánga na Biblia pɔsɔ wana.
17. Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati na boyekoli na biso ya Biblia?
17 Koyekola Biblia ekoki kozala esengo mpe kolendisa kondima na yo, kasi kebá ete yango ekóma kopekisa yo kobongisa makita ya lisangá te. Makita ezali lolenge mosusu oyo Yehova ateyaka biso na lisalisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Nzokande, kosala bolukiluki ekoki kosalisa yo opesa biyano ya malamu na makita, na ndakisa na Boyekoli ya Mokanda to na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, ntango bazali kopesa makanisi ya ntina ya mikapo ya Biblia.
18. Mpo na nini milende oyo tosalaka mpo na koyekola “makambo mozindo ya Nzambe” ezali mpenza na ntina?
18 Koyekola Biblia na mozindo ekoki kosalisa yo opusana penepene na Yehova. Mpo na komonisa motuya ya boyekoli ya ndenge wana, Biblia elobi: “Mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” (Mosakoli 7:12) Na yango, milende oyo okosala mpo na kokolisa boyebi na yo ya makambo ya Nzambe ezali mpenza na ntina. Biblia elaki baoyo bakokoba koluka ete: “Okozwa mpenza boyebi ya Nzambe.”—Masese 2:4, 5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• “Makambo mozindo ya Nzambe” ezali nini?
• Mpo na nini tosengeli kotika te koyekola makambo mozindo?
• Mpo na nini moklisto nyonso akoki koyoka esengo ya koyeba “makambo mozindo ya Nzambe”?
• Ndenge nini “makambo mozindo ya Nzambe” ekoki mpenza kosalisa yo?
[Elilingi na lokasa 28]
Ntango nini Yesu akómaki Momboto oyo alakamaki?
[Elilingi na lokasa 31]
Baboti bakoki kosɛnga bana básala bolukiluki mpo na kobongisa boyekoli ya libota