Babongisaki bomoi na bango—Yo mpe okoki kosala yango?
MARC, ndeko moko ya Canada, azalaki kosala na kompanyi moko oyo esalaka bamasini oyo bakendaka na yango na sanza mpe na minzoto mosusu. Azalaki kosala mokolo mobimba te mpe azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na nsima, mokonzi moko ya mosala alingaki kotya ye na esika moko ya malamu mpenza, oyo ezalaki na lifuta monene, kasi asengelaki kosalaka mokolo mobimba. Marc asalaki nini?
Amy, ndeko moko ya mwasi na Philippines, azalaki mobongisi-nzela ntango azalaki kotánga. Ntango asilisaki kelasi, bapesaki ye mosala moko ya malamu, oyo ezalaki kozwa ye ntango mingi, kasi ezalaki na lifuta ya malamu mpenza. Amy asalaki nini?
Marc ná Amy bazwaki bikateli ekeseni mpenza, mpe oyo ekómelaki bango na nsima emonisi bwanya oyo ezali na toli oyo Paulo apesaki baklisto ya Kolinti. Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká . . . baoyo bazali kosalela mokili [bázala] lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te.”—1 Kol. 7:29-31.
Salelá mokili, kasi na makambo nyonso te
Liboso ya koyeba oyo ekómelaki Marc mpe Amy, tólobela naino na mokuse ndimbola ya liloba “mokili” (to koʹsmos na monɔkɔ ya Grɛki) oyo Paulo asalelaki na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Kolinti. Na vɛrsɛ wana, liloba koʹsmos elimboli mokili oyo tozali na yango, elingi koloba bato mpe biloko oyo moto asalelaka na bomoi ya mokolo na mokolo lokola ndako, bilei mpe bilamba.a Mpo na kozwa biloko yango, mingi kati na biso basengeli kosala. Na yango, tozali na ndenge mosusu ya kosala te; tosengeli kaka kosalela mokili mpo na kokokisa bamposa na biso moko mpe ya mabota na biso. (1 Tim. 5:8) Nzokande, toyebi mpe ete “mokili ezali koleka.” (1 Yoa. 2:17) Yango wana, tosalelaka mokili na ndenge oyo tokoki, kasi “na makambo nyonso te.”—1 Kol. 7:31.
Toli wana etindi ebele ya bandeko bátalela bomoi na bango lisusu, báluka misala oyo ekozwa bango ntango mingi te mpe bákómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ. Nsima ya kosala bongo, baumelaka te komona ete bomoi na bango ekómi malamu koleka, mpo bakómi na ntango mingi ya kofanda ná mabota na bango mpe komipesa na mosala ya Yehova. Longola wana, lokola bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ, bazali kotya elikya na bango na mokili te, kasi nde epai ya Yehova. Yo mpe okoki kosala bongo; okoki kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpo ozwa ntango mingi ya komipesa na mosala ya Bokonzi?—Mat. 6:19-24, 33.
“Tomonaka ete tokómá penepene na Yehova koleka kutu ndenge tozalaki liboso”
Marc, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, ayokaki toli ya Biblia oyo epekisi kosalela mokili na makambo nyonso. Aboyaki mosala ya mbongo mingi oyo balingaki kopesa ye. Mwa mikolo na nsima, mokonzi wana ya Marc abakisaki lifuta oyo bakobanda kofuta ye, mpo andima mosala wana ya sika. Marc alobi boye: “Namekamaki mpenza, kasi na mbala wana mpe naboyaki.” Ayebisi ntina oyo aboyaki: “Ngai ná mwasi na ngai Paula tozalaki na mposa ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova. Yango wana, tozwaki ekateli ya kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Tobondelaki Yehova apesa biso bwanya mpo tókokisa mokano na biso mpe totyaki dati oyo tokomipesa mobimba na mosala ya Yehova.”
Paula alobi boye: “Nazalaki sekrɛtɛrɛ na lopitalo moko, epai nazalaki kosala mikolo misato na pɔsɔ mpe bazalaki kofuta ngai malamu. Nazalaki mpe mobongisi-nzela. Nzokande, lokola Marc, ngai mpe nazalaki na mposa ya kokende kosalela Yehova na esika nyonso oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene. Kasi, ntango napesaki mokonzi na ngai mokanda oyo nakomaki mpo na koyebisa ete nalingi kotika mosala, ayebisaki ngai ete baponaki ngai mpo nakóma mokonzi ya basekretɛrɛ, titre ya sika oyo bautaki kobimisa. Mosala yango ezalaki na lifuta monene koleka misala nyonso ya sekrɛtɛrɛ na lopitalo, kasi nabongolaki makanisi te. Ntango nayebisaki ye mpo na nini naboyi kondima mosala yango, apesaki ngai longonya mpo na kondima na ngai.”
Mosika te, batindaki Marc ná Paula lokola babongisi-nzela minene na mwa lisangá moko ya moke na mboka moko ya mosika ya Canada. Kokende na bango kuna ebotaki mbuma nini? Marc alobi boye: “Nsima ya kotika mosala na ngai ya malamu oyo nasalaki bomoi na ngai mobimba, nakómaki kobanga, kasi Yehova apambolaki mosala na biso ya kosakola. Tozali na esengo monene ya kosalisa basusu bákóma basaleli ya Yehova. Komipesa mobimba na mosala ya Nzambe ebongisi mpe libala na biso. Na masolo na biso, tolobelaka kaka makambo oyo ezali mpenza na ntina, elingi koloba makambo ya elimo. Tomonaka ete tokómá penepene na Yehova koleka kutu ndenge tozalaki liboso.” (Mis. 20:35) Paula alobi boye: “Soki otiki mosala na yo mpe ndako na yo ya kitoko, esengeli otya elikya na yo nyonso epai ya Yehova. Tosalaki yango mpe Yehova apamboli biso. Bandeko ya lisangá na biso ya sika bamonisaka biso ete balingaka biso mpe ete bazali na mposa na biso. Makasi oyo nazalaki liboso kosilisa na mosala na ngai ya mosuni, nazali sikoyo kosalela yango mpo na kosalisa bato báyeba Nzambe. Nazali na esengo monene ya kosala na teritware oyo.”
‘Nazalaki na mbongo mingi, kasi nazalaki na esengo te’
Amy, oyo tolobelaki na ebandeli, aponaki nzela mosusu. Andimaki mosala ya mbongo mingi oyo bapesaki ye, oyo asengelaki kosalaka mokolo mobimba. Amy alobi boye: “Na mbula ya liboso, nazalaki kaka makasi na mosala ya kosakola, kasi namonaki ete mosala na ngai ya mosuni ekómaki mokemoke kozwa esika ya liboso mpe matomba ya Bokonzi ezongaki nsima. Nakómaki komata mpenza na mosala, mpe nabandaki koboma nzoto mpo na komata lisusu na bisika ya minene koleka. Lokola nakómaki na mikumba ya minene na mosala, nazalaki kobima lisusu mingi te na mosala ya kosakola. Nsukansuka, natikaki mpenza kosakola.”
Amy akanisi ntango wana mpe alobi boye: “Nazalaki na mbongo mingi. Natambolaki mingi mpe mosala na ngai epesaki ngai lokumu mpenza. Kasi, nazalaki na esengo te. Atako nazalaki na mbongo, nazalaki na mikakatano mingi. Nakómaki komituna soki likambo nini ezali kokómela ngai. Nsukansuka, namonaki ete lokola namipesaki mingi na mosala ya mosuni, etikalaki moke ‘nabunga nzela ya kondima.’ Yango wana, kaka ndenge liloba ya Nzambe elobi yango, nakómaki konyokwama na ‘ebele ya bampasi.’”—1 Tim. 6:10.
Amy asalaki nini? Alobi boye: “Nasɛngaki bankulutu básalisa ngai nazonga lisusu makasi na elimo, mpe nazongelaki koyangana na makita. Mokolo moko, ntango tozalaki koyemba, nabandaki kolela. Nakanisaki lisusu esengo oyo nazalaki na yango na mbula mitano oyo nazalaki mobongisi-nzela atako nazalaki na bozwi te. Namonaki ete nasengeli kotika kolekisa ntango na ngai na koluka mbongo, mpe ete nasengeli kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Nasɛngaki bákitisa ngai mikumba na mosala mpe lifuta na ngai ekitaki mpenza, kabolá na mibale, mpe nazongelaki mosala ya kosakola.” Amy alobi na esengo nyonso boye: “Nazalaki na esengo ya kosala lokola mobongisi-nzela na boumeli ya mwa bambula. Sikoyo, nazali na esengo oyo natikalaki kozala na yango te na ntango nyonso oyo namipesaki mpo na kosalela mokili.”
Okoki kotalela lisusu bomoi na yo mpe kokómisa yango pɛpɛlɛ? Soki osaleli ntango oyo okotikala na yango mpo na kotombola matomba ya Bokonzi, yo mpe okozala moto ya esengo.—Mas. 10:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na Étude Perspicace, Volimi 2, nkasa 318-320.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Okoki kotalela lisusu bomoi na yo mpe kokómisa yango pɛpɛlɛ?
[Etanda/Elilingi na lokasa 19]
“Nabandi kolinga mosala yango!”
David, nkulutu moko ya lisangá na États-Unis oyo mwasi na ye ná bana bazalaki babongisi-nzela, azalaki na mposa ya kokóma mpe mobongisi-nzela. Asɛngaki na kompanyi na bango akóma kosala kaka ndambo ya mokolo, mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Mbongwana wana ebongolaki bomoi na ye? Mwa basanza na nsima, David akomelaki moninga na ye moko boye: “Ezali na eloko moko te oyo ekoki kopesa ngai esengo koleka komipesa mobimba na mosala ya Yehova elongo na libota na ngai. Nakanisaki ete ekosɛnga mwa ntango mpo namesana na mosala ya mobongisi-nzela, kasi namikosaki; nabandi kolinga mosala yango! Ezali mosala moko ya esengo.”
[Elilingi na lokasa 18]
Marc ná Paula na mosala ya kosakola