Teyá bana na yo
Malako alɛmbaki te
MALAKO akomaki moko ya mikanda minei ya Biblia oyo elobeli bomoi ya Yesu. Mokanda yango eleki mokuse na kati na yango nyonso minei mpe ezali pɛtɛɛ mpo na kotánga. Malako azalaki nani? Okanisi ete ayebaki Yesu?—a Tótala komekama oyo Malako akutanaki na yango mpe tóluka koyeba ntina oyo alɛmbaki te.
Biblia etángi nkombo ya Malako mpo na mbala ya liboso ntango Mokonzi Elode Agilipa abwakaki ntoma Petelo na bolɔkɔ. Mokolo moko na butu, anzelu abimisaki Petelo na bolɔkɔ, mpe Petelo akendeki mbala moko na ndako ya Malia, mama ya Malako, oyo azalaki kofanda na Yelusaleme. Petelo abimaki na bolɔkɔ mbula soki zomi nsima ya kobomama ya Yesu na Elekeli ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.).—Misala 12:1-5, 11-17.
Oyebi mpo na nini Petelo akendeki na ndako ya Malia?— Ekoki kozala ayebaki bato ya libota na ye mpe ayebaki ete bayekoli ya Yesu bazalaki koyangana kuna. Ekoki kozala ete Balanabasi, ndeko ya Malako, akómaki moyekoli ya Yesu banda na Pantekote ya mobu 33 T.B. Biblia elobi ete na Pantekote yango asungaki mpenza bayekoli ya sika. Yango wana, ekoki kozala ete Yesu ayebaki Balanabasi ná Malia, mama ya ndeko na ye Malako mpe Malako ye moko.—Misala 4:36, 37; Bakolose 4:10.
Na Evanzile na ye, Malako akomaki ete na butu oyo bakangaki Yesu, elenge moko oyo alataki kaka elamba moko azalaki wana. Malako akomaki ete ntango banguna bakangaki Yesu, elenge yango akimaki. Okanisi ete elenge yango ezalaki nani?— Ekokaki kozala Malako! Na yango, ntango Yesu ná bantoma na ye babimaki na butu makasi, ekoki kozala ete Malako alataki elamba yango nokinoki mpe alandaki bango.—Malako 14:51, 52.
Emonani ete Malako ayebaki mpenza makambo ya Nzambe. Ekoki kozala ete azalaki wana ntango elimo santu ekitelaki bayekoli ya Yesu na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe azalaki elongo na basaleli ya sembo ya Nzambe, lokola Petelo. Kasi, akendaki mpe elongo na ndeko na ye Balanabasi, oyo asalisaki Saulo mpo akutana na Petelo mbula soki misato nsima ya ntango oyo Yesu abimelaki ye. Bambula na nsima, batindaki Balanabasi akende koluka Saulo na Talasi.—Misala 9:1-15, 27; 11:22-26; 12:25; Bagalatia 1:18, 19.
Na mobu 47 T.B., baponaki Saulo ná Balanabasi mpo bákende mosala ya misionɛrɛ. Bazwaki Malako elongo na bango, kasi na nsima, mpo na ntina oyo eyebani te, Malako atikaki bango mpe azongaki na Yelusaleme. Saulo, oyo bakómaki kobenga Paulo, na monɔkɔ ya Baloma, asilikaki makasi. Mpe abosanaki te libunga monene wana oyo Malako asalaki.—Misala 13:1-3, 9, 13.
Ntango bautaki na mobembo na bango ya misionɛrɛ, Paulo ná Balanabasi babɛtaki masolo ya makambo kitoko oyo bakutanaki na yango kuna. (Misala 14:24-28) Basanza na nsima, balingaki kozonga kotala bandimi ya sika na bisika oyo basakolaki nsango malamu. Balanabasi alingaki Malako akende na bango, kasi oyebi ndenge Paulo atalelaki likambo yango?— “amonaki yango malamu te” mpo na mobembo ya liboso Malako asundolaki bango mpe azongaki na Yelusaleme. Likambo oyo esalemaki na nsima esalaki Malako mpasi mpenza!
Bayokanaki te, na nsima ‘nkanda engalaki’ mpe Paulo ná Balanabasi bakabwanaki. Balanabasi azwaki Malako mpe bakendeki kosakola na Sipele, mpe Paulo azwaki Silasi mpe bakendaki kotala bandimi ya sika oyo ye ná Balanabasi balingaki kokende kotala. Na ntembe te, Malako ayokaki motema mpasi mpenza ndenge Paulo ná Balanabasi bazwanaki matata mpo na ye.—Misala 15:36-41.
Toyebi te mpo na nini Malako atikaki bango na mobembo ya liboso. Ekoki kozala na likambo moko ya ntina oyo etindaki ye asala bongo. Ezala bongo to te, emonani ete Balanabasi andimaki mpenza ete Malako akozongela likambo yango lisusu te. Mpe amikosaki te. Malako alɛmbaki te. Na nsima, akendaki na mosala ya misionɛrɛ ná Petelo na Babilone, mosika mpenza na Yelusaleme. Ntango bazalaki kuna, Petelo atindaki bambote mpe abakisaki ete: “Ndenge moko mpe Malako mwana na ngai.”—1 Petelo 5:13.
Petelo ná Malako bakómaki mpenza koyokana makasi lokola bazalaki kosalela Nzambe elongo! Likambo yango emonanaka mpe polele ntango totángaka Evanzile ya Malako. Na Evanzile na ye, Malako alobeli makambo oyo Petelo ayebisaki ye, oyo Petelo amonaki na miso ntango azalaki kotambola elongo na Yesu. Na ndakisa, talá masolo ya Baevanzile oyo elobeli mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaki na Mbu ya Galilai. Malako abakisi makambo mosusu oyo elobeli esika oyo Yesu alalaki na kati ya masuwa mpe eloko oyo alalelaki, makambo oyo kaka mobomi mbisi lokola Petelo akokaki komona. Ekozala malamu tótánga lisolo yango na Matai 8:24; Malako 4:37, 38 mpe Luka 8:23 mpo tómona bokeseni yango biso moko.
Na nsima, ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Loma, apesaki Malako longonya mpo na ndenge azalaki ntango nyonso kosunga ye. (Bakolose 4:10, 11) Ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ lisusu na Loma, akomelaki Timote mpe asɛngaki ye aya na Malako; mpe abakisaki boye: Mpo azali kosunga ngai mingi na mosala. (2 Timote 4:11) Ya solo, Malako azwaki mikumba minene na mosala ya Nzambe mpo alɛmbaki te!
a Ntango ozali kotánga ná mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.