Minzoto emonisaka nguya ya Nzambe
“Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene ya nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—YISAYA 40:26.
MOI ezali moko kati na ebele ya minzoto ya likoló mpe eleki mabelé na monene mbala nkóto 330. Atako bongo, ezali na minzoto mosusu oyo eleki moi na monene. Moi ezali monene koleka minzoto mosusu oyo ezali pembeni ya mabelé. Kasi, minzoto mosusu, na ndakisa oyo babengi V382 Cygni, eleki moi na monene mbala soki 27.
Moi ezali na nguya nini? Kanisá nguya ya mɔtɔ oyo okoki koyoka yango ata soki ozali na ntaka ya kilomɛtrɛ 15! Nzokande, moi ekabwani na mabelé na ntaka ya kilomɛtrɛ milio 150. Kasi, soki moi ebimi makasi, ekoki ata kozikisa mposo ya moto! Kutu, ndambo moke kaka ya molunge ya mɔtɔ oyo moi ebimisaka nde ekómaka awa na mabelé. Atako bongo, mwa ndambo yango ya molunge ya moi ebatelaka bikelamu ya bomoi awa na mabelé.
Bato ya siansi balobi ete nguya nyonso oyo moi ebimisaka ekoki kobatela bomoi na baplanɛti lokola mabelé ata miliare nkóto ntuku misato na moko. Ebongiseli moko (Space Weather Prediction Center) ekomaki na Internet ete na maloba mosusu, tokoki kolimbola likambo yango boye: Soki tokamati nguya oyo moi ebimisaka na segonde moko, ekopesa États-Unis mobimba “kura lokola oyo ekólo yango ezali kosalela lelo oyo na boumeli ya mbula milio 9.”
Nguya oyo moi ebimisaka eutaka na kati na yango mpenza; esika yango ezalaka mɔtɔ makasi oyo eutaka na bagazɛ ntango ezali kopanzana lokola bɔmbi nikleere. Moi yango moko ezali monene mpenza mpe kati na yango ezali monene; yango wana esɛngaka bamilio ya bambula mpo mɔtɔ oyo ebandi na kati ekóma tii na libándá. Ebongiseli oyo touti kolobela ekomaki lisusu na Internet ete, “soki moi etiki kobimisa mɔtɔ lelo oyo, ekoleka bambula milio 50 mpo awa na mabelé tóyoka yango!”
Kanisá na likambo oyo: Soki otomboli miso likoló na butu, okomona ebele ya minzoto oyo mokomoko ezali na nguya mingi lokola moi. Bato ya siansi balobaka ete na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali na bamiliare na bamiliare ya minzoto!
Minzoto yango nyonso eutá wapi? Lelo oyo, bato mingi ya siansi bazali kokanisa ete molɔ́ngɔ́ ebimaki na mbalakaka eleki sikoyo bambula miliare 14; likambo yango esalemaki na ndenge oyo bayebaka kolimbola te. Nzokande, Biblia elobi polele ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.” (Genese 1:1) Na ntembe te, tokoki mpenza koloba ete Ye oyo azalisaki minzoto azali na “makasi kati na nguya.”—Yisaya 40:26.
Ndenge oyo Nzambe asalelaka nguya na ye
Yehova Nzambe asalelaka nguya na ye mpo na kosunga bato oyo basalaka mokano na ye. Na ndakisa, ntoma Paulo amipesaki na koteya bato makambo ya Nzambe. Paulo azalaki moto lokola biso, kasi asalaki makambo mingi ya malamu atako bazalaki kotɛmɛla ye. Nini esalisaki ye? Ye moko alobaki ete Nzambe apesaki ye “nguya oyo eleki makasi.”—2 Bakolinti 4:7-9.
Yehova Nzambe asalelaki mpe nguya na ye mpo na koboma bato oyo bazalaki kobuka mibeko na ye. Yesu Klisto alobelaki kobomama ya Sodoma ná Gomola mpe Mpela ya ntango ya Noa mpo na komonisa ndenge oyo Yehova asalelaka nguya na ye mpo na koboma bato mabe. Yesu asakolaki ete mosika te Yehova akosalela lisusu nguya na ye mpo na koboma bato oyo bazali kobuka mibeko na Ye.—Matai 24:3, 37-39; Luka 17:26-30.
Osengeli kosala nini?
Nsima ya komanyola na ndenge oyo minzoto emonisaka nguya ya Nzambe, yo mpe okoki kokanisa lokola Mokonzi Davidi, oyo alobaki boye: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe [minzoto] na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana ya moto nini ete otalela ye?”—Nzembo 8:3, 4.
Ya solo, soki tokanisi ndenge oyo tozali moke na kati ya molɔ́ngɔ́ oyo ezali monene mpenza, tosengeli kozala na komikitisa. Kasi, nguya ya Nzambe esengeli kobangisa biso te. Na kopemama na Yehova, mosakoli Yisaya akomaki maloba ya kolendisa oyo: “[Nzambe] akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya. Ata bilenge bakosɛnzwa, bakolɛmba, mpe bato ya [mbula] mingi te bakokweakwea na nse; nde baoyo bakolambelaka [Yehova], bakozwa nguya ya sika, bakopombwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosɛnzwa te.”—Yisaya 40:29-31.
Soki ozali na mposa ya kosala mokano ya Nzambe, yebá ete Nzambe akopesa yo elimo santu mpo na kosalisa yo. Kasi, osengeli kosɛnga yango. (Luka 11:13) Na lisalisi ya Nzambe, okoki koyikela ata mokakatano nini mpiko mpe kozwa makasi ya kosala oyo ezali malamu.—Bafilipi 4:13.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa na lokasa 7]
Na lisalisi ya Nzambe, okoki kozwa makasi ya kosala oyo ezali malamu
[Bililingi na lokasa 7]
Banda na likoló, na lobɔkɔ ya mwasi: Galaksi “Whirlpool”; liboke ya minzoto “Pléiades”; Nébuleuse d’Orion; galaksi “Andromède”
[Bililingi na lokasa 7]
Moi eleki mabelé na monene mbala nkóto 330
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Liboke ya minzoto “Pléiades”: NASA, ESA mpe AURA/Caltech; bafɔtɔ mosusu: National Optical Astronomy Observatories