Okokangama makasi na bosembo na yo?
“Kino nakokufa nakomilongwela [na] sembo na ngai te.”—YOBO 27:5.
1, 2. Tosengeli kosala makasi mpo na kokóma bato ya ndenge nini, mpe mituna nini tokotalela?
KANISÁ ete ozali kotala plan ya ndako moko. Osepeli na yango mingi. Ozali kokanisa ndenge yo ná libota na yo bokozala soki bofandi na ndako ya ndenge wana. Kasi, plan yango mpe makambo nyonso oyo ozali kokanisa mpo na yango ekozala na ntina kaka soki ndako yango etongami, okɔti kuna mpe ozali kobatela yango.
2 Ndenge moko mpe, tokoki kondima ete bosembo ezali ezaleli ya ntina mingi mpe ete ekoki kosalisa biso mpe bato oyo tolingaka. Kasi, ezaleli yango ekozala na ntina kaka soki toloni yango mpe tozali kobatela yango. Lelo oyo, kotonga ndako esɛngaka mbongo mingi. (Luka 14:28, 29) Ndenge moko mpe, kolona bosembo esɛngaka ntango mpe milende; kasi yango ezali na ntina mingi. Yango wana, tótalela mituna misato oyo: Ndenge nini tokoki kokóma bato ya bosembo? Ndenge nini tokoki kobatela bosembo na biso? Moto akoki kosala nini soki abungisi bosembo na ye mpo na mwa ntango?
Ndenge nini tokoki kokóma bato ya bosembo?
3, 4. (a) Ndenge nini Yehova asalisaka biso tóbatela bosembo? (b) Na ndakisa ya Yesu, ndenge nini tokoki kokóma bato ya bosembo?
3 Na lisolo eleki, tomonaki ete Yehova apesi biso lokumu na ndenge atikeli biso bonsomi ya kopona soki tokozala bato ya bosembo. Kasi, likambo ya esengo, atiki biso mpamba te. Ateyaka biso ndenge oyo tokoki kokolisa ezaleli yango ya ntina mingi, mpe apesaka biso elimo santu na ye, oyo esalisaka biso tósalela mateya na ye. (Luka 11:13) Kutu, abatelaka na elimo bato oyo basalaka makasi ete bátambola na bosembo.—Mas. 2:7.
4 Ndenge nini Yehova ateyaka biso mpo tóbatela bosembo na biso? Libosoliboso, atindaki Mwana na ye Yesu awa na mabelé. Yesu amonisaki botosi na ndenge ya kokoka. “Akómaki moto ya botosi tii na liwa.” (Filp. 2:8) Yesu atosaki Tata na ye ata na makambo oyo ezalaki pɛtɛɛ te mpo asala yango. Alobaki na Yehova boye: “Ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:42) Ebongi mokomoko amituna boye: ‘Ngai mpe nazalaka na elimo yango ya botosi?’ Soki tozali kotosa na motema moko, tokobatela bosembo na biso. Tótalela mwa makambo oyo esɛngaka mpenza tózala na botosi.
5, 6. (a) Ndenge nini Davidi amonisaki ntina ya kobatela bosembo ata ntango bato mosusu bazali komona biso te? (b) Mokakatano nini baklisto bazali na yango lelo mpo na kobatela bosembo na ntango bazali bango moko?
5 Tosengeli kotosaka Yehova ata ntango tozali biso moko. Davidi, mokomi ya nzembo, alobelaki ntina ya kobatela bosembo ata na bantango oyo akokaki kozala ye moko. (Tángá Nzembo 101:2.) Lokola Davidi azalaki mokonzi ya ekólo, mbala mingi azalaki elongo na bato. Na ntembe te, na bantango mosusu azalaki liboso ya bankama, ata mpe bankóto ya bato. (Talá mpe Nzembo 26:12.) Na bantango yango, kobatela bosembo ezalaki na ntina mingi, mpamba te mokonzi asengelaki kopesa bato na ye ndakisa ya malamu. (Det. 17:18, 19) Nzokande, Davidi ayebaki ete ntango azali ye moko—‘na kati ya ndako na ye’—asengelaki mpe kotambola na bosembo. Ezali boni mpo na biso?
6 Na Nzembo 101:3, totángaka maloba ya Davidi oyo: “Nakotya eloko ya nsɔni liboso ya miso na ngai te.” Lelo oyo, tokutanaka na mabaku mingi ya kotya biloko ya nsɔni liboso ya miso na biso, mingimingi ntango tozali biso moko. Bato mingi bakutanaka na mokakatano yango ntango bazali kosalela Internet. Ezali mpasi te mpo moto abendama na kotala bililingi ya mabe, ata mpe ya bato bazali kosangisa nzoto. Kasi, kosala bongo ekomonisa nde botosi epai ya Nzambe oyo atindaki Davidi akoma maloba wana? Kotala bililingi ya bato bazali bolumbu to oyo bazali kosangisa nzoto ezali mabe, mpamba te elamusaka bamposa ya mabe mpe ya moimi, ebebisaka lisosoli ya moto, ebebisaka boyokani ya mwasi ná mobali, mpe ebebisaka lokumu ya moto oyo azali kotala yango.—Mas. 4:23; 2 Kol. 7:1; 1 Tes. 4:3-5.
7. Etinda nini ekoki kosalisa biso tóbatela bosembo ntango tozali biso moko?
7 Nzokande, mosaleli ata moko te ya Yehova azalaka mpenza ye moko. Tata na biso ya likoló atalaka biso ntango nyonso. (Tángá Nzembo 11:4.) Yehova asepelaka mpenza ntango amonaka yo ozali koboya kokwea na komekama! Ntango osalaka bongo, emonisaka ete ozali kotosa maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 5:28. Zalá na ekateli makasi ya kotala te bililingi oyo ekoki kotinda yo osala makambo ya mabe. Kobebisa te bosembo na yo mpo na likambo ya nsɔni ya kotala bafilme ya mabe to kotánga mikanda oyo ezali kolakisa makambo ya nsɔni!
8, 9. (a) Danyele ná baninga na ye bakutanaki na likambo nini oyo emekaki bosembo na bango? (b) Ndenge nini bilenge baklisto lelo oyo bazali kosepelisa Yehova mpe bandeko na bango baklisto?
8 Tokoki mpe kobatela bosembo soki tozali kotosa Yehova ntango tozali elongo na bato oyo bazali basambeli ya Yehova te. Tókanisa Danyele ná baninga na ye misato. Bilenge yango bamemamaki na boombo na Babilone. Kuna, Baebele yango minei bazalaki elongo na bato oyo bayebaki makambo mingi te na ntina na Yehova, to mpe bayebaki ye ata moke te; bakómaki kosɛngisa bango bálya bilei oyo Mibeko ya Nzambe epekisaki. Ezalaki mpasi te mpo bilenge yango bákakola mobeko ya Nzambe. Kutu, baboti na bango, mikóló mosusu, mpe banganga-nzambe bakokaki komona te makambo oyo bango minei bazalaki kosala. Kasi, nani azalaki komona bango? Yehova. Yango wana, bazwaki ekateli makasi ya kotosa Yehova atako basɛngisaki bango básala likambo oyo ebongi te mpe bomoi na bango ezalaki na likama.—Dan. 1:3-9.
9 Na mokili mobimba, bilenge Batatoli ya Yehova bazali kolanda ndakisa ya Baebele wana; bazali kotosa mibeko oyo Nzambe apesi baklisto mpe bazali koboya kolanda baninga ya mabe. Bilenge, bóyeba ete ntango boboyi komɛla bangi, kosala mobulu, kofinga, kosala pite, mpe makambo mosusu ya mabe, bozali nde kotosa Yehova. Mpe na ntango yango, bozali kobatela bosembo na bino. Yango ekomemela bino matomba, mpe bokosepelisa Yehova mpe bandeko na bino baklisto!—Nz. 110:3.
10. (a) Na oyo etali pite, makanisi nini elongobani te ememi bilenge mosusu bábebisa bosembo na bango? (b) Bosembo etindaka biso tómitambwisa ndenge nini liboso ya makambo oyo ekoki komema biso na pite?
10 Tosengeli mpe kotosaka Yehova ntango tozali na moto oyo azali molongani na biso te. Toyebi ete Liloba ya Nzambe epekisi pite. Nzokande, ezali mpasi te mpo moto ya botosi akóma kondima makambo ya mabe. Na ndakisa, bilenge mosusu bandimaka kosangisa nzoto na monɔkɔ to na esumbeli, to kosimbana binama ya kobotela, na makanisi ete kosala bongo ezali mabe te mpo ezali mpenza “kosangisa nzoto” te. Bilenge yango babosanaka to mpe baboyaka kondima na nko ete na Biblia, pite esangisi makambo wana nyonso, mpe moto oyo azali kosala yango akoki kobimisama na lisangá.a Kasi, likambo ya mabe koleka, bilenge yango babosanaka ntina ya kobatela bosembo. Lokola tozali kosala makasi tóbatela bosembo, tosengeli te kolukaka kokakola mibeko ya Nzambe. Tosengeli te koluka kosala makambo oyo, ata soki tokozwela yango etumbu te, ekoki komema biso na masumu. Tosengeli te kotalela kaka etumbu oyo tokoki kozwa soki tosali likambo ya mabe. Tosengeli nde kokanisaka kosala makambo oyo ekosepelisa Yehova mpe koboya makambo oyo ekoyokisa ye mawa. Na esika tókanisaka epai oyo tokoki kosuka kozanga ete tósala lisumu, tosengeli nde kozala mosika na yango mpe ‘kokima pite.’ (1 Kol. 6:18) Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali mpenza bato ya bosembo.
Ndenge nini tokoki kobatela bosembo na biso?
11. Mpo na nini kotosa ata na likambo moko ezali na ntina? Pesá ndakisa.
11 Botosi nde esalisaka biso tózala bato ya bosembo; yango wana, mpo na kobatela bosembo, tosengeli kokolisa botosi. Komonisa botosi ata na likambo moko ekoki komonana lokola nde ezali na ntina te. Kasi, ntango tozali kosala yango mbala na mbala, ekokóma ezaleli na biso. Tópesa ndakisa: Tokoki komona briki moko lokola eloko mpamba, kasi soki tokangisi babriki ebele, tokotonga ndako. Ndenge moko mpe, soki tozali na momeseno ya kotosa, tokobatela bosembo na biso.—Luka 16:10.
12. Ndakisa nini Davidi apesaki na oyo etali kobatela bosembo liboso ya minyoko mpe makambo ya mabe oyo bazalaki kosala ye?
12 Bosembo na biso emonanaka polele ntango tozali koyika mpiko na mikakatano, minyoko, mpe makambo ya mabe oyo bazali kosala biso. Tózwa ndakisa ya Davidi. Ntango Davidi azalaki elenge, ayikaki mpiko na minyoko oyo ezalaki kouta epai ya mokonzi moko oyo azalaki momonisi ya Yehova. Nzokande, Yehova asilaki koboya Mokonzi Saulo mpe Saulo azalaki koyokela Davidi zuwa mpamba te Nzambe aponaki ye. Kasi, Saulo akobaki kozala mokonzi mpo na mwa ntango mpe atindaki basoda ya Yisalaele bálanda Davidi mpo na kokanga ye. Na boumeli ya mwa bambula, Yehova atikaki likambo wana ya kozanga bosembo esalema. Davidi asilikelaki Nzambe mpo na yango? Alobaki nde ete ezali na ntina te akoba koyika mpiko? Te. Azalaki ntango nyonso na limemya mpo na bokonzi ya Saulo, mopakolami ya Nzambe, mpe aboyaki koboma Saulo ntango azwaki libaku ya kosala yango.—1 Sam. 24:2-7.
13. Ndenge nini tokoki kobatela bosembo na biso ntango bazokisi biso to basali biso mabe?
13 Ndakisa ya Davidi ezali mpenza kosimba mitema na biso lelo oyo! Na lisangá ya Yehova, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe ndeko moko akoki kosala biso mabe to mpe akoki kobungisa bosembo na ye. Ya solo, tozali na eleko moko oyo libota mobimba ya Yehova ekoki soki moke te kobebisama. (Yis. 54:17) Atako bongo, tokosala nini soki ndeko moko asali biso mabe to azokisi biso? Soki tokangeli ndeko na biso nkanda na motema, tokoki mpe kobebisa bosembo na biso epai ya Nzambe. Etamboli ya bandeko mosusu esengeli te kotinda biso tósilikela Nzambe to tótika bosembo na biso. (Nz. 119:165) Koyika mpiko na mikakatano ekosalisa biso tóbatela bosembo na biso.
14. Bato ya bosembo bamonisaka elimo nini ntango mbongwana moko esalemi na ndenge ya kosala makambo to na mateya?
14 Tokoki mpe kobatela bosembo na biso soki tozali te kolandela mabunga ya basusu to kosambisa bango. Mpo na kosala yango, tosengeli kozala sembo epai ya Yehova. Lelo oyo, Yehova azali kopambola basaleli na ye na ndenge oyo esalemá naino te. Lelo oyo, losambo ya solo etombwani na ndenge oyo emonaná naino te. (Yis. 2:2-4) Ntango tozwi ndimbola ya sika na makambo mosusu ya Biblia to na ndenge ya kosala makambo na lisangá, ebongi tóndima yango. Tozali na esengo ya komona ete pole ya elimo ezali se kobakisama. (Mas. 4:18) Soki tozali na mokakatano mpo na kokanga ntina ya ndimbola moko ya sika, tóbondela Yehova asalisa biso. Na ntango tozali kosala yango, tókoba kotosa mpe na ndenge yango, tokobatela bosembo na biso.
Moto oyo abungisaki bosembo asengeli kosala nini?
15. Kaka nani nde akoki kolongola yo bosembo na yo?
15 Motuna yango ezali na ntina mingi, boye te? Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, bosembo ezali na ntina mingi. Soki tozali na bosembo te, tokozala na boyokani malamu na Yehova te mpe tokozala na elikya ya solosolo te. Kobosana likambo oyo te: Na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezali kaka na moto moko oyo akoki kolongola yo bosembo na yo. Moto yango ezali yo moko. Yobo ayebaki likambo yango. Alobaki boye: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te.” (Yobo 27:5) Soki yo mpe ozali na ekateli ndenge yango mpe soki otikali penepene na Yehova, okobungisa bosembo na yo soki moke te.—Yak. 4:8.
16, 17. (a) Ntango moto akwei na lisumu ya monene, ekozala mabe mingi soki asali nini? (b) Moto yango asengeli kosala nini?
16 Nzokande, ezali na bato mosusu oyo babungisaka bosembo na bango. Ndenge ezalaki ata na ntango ya bantoma, lelo oyo mpe bandeko mosusu bazali kokóma na momeseno ya kosala masumu. Soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo, okoki nde kobongisa? Ɛɛ. Okoki kosala nini? Liboso, tólobela likambo oyo osengeli kosala te. Mbala mingi, motema ya moto etindaka ye abombela baboti, bandeko na ye baklisto, to bankulutu, likambo ya mabe oyo asali. Nzokande, Biblia elobi na biso boye: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngɔlu.” (Mas. 28:13) Bato oyo babombaka masumu na bango basalaka libunga moko monene, mpamba te eloko moko te ekoki kobombama na miso ya Nzambe. (Tángá Baebele 4:13.) Bato mosusu kutu bakómaka kosala mabe na kobombana; balukaka komimonisa ete bazali kosalela Yehova, nzokande bazali na kati ya masumu. Bomoi ya ndenge wana ezali bosembo te. Yehova asepelaka te na losambo ya bato oyo babombaka masumu minene. Kutu, bato oyo basalaka makambo na kobombana ndenge wana, bapesaka ye nkanda.—Mas. 21:27; Yis. 1:11-16.
17 Ntango moklisto moko asali lisumu ya monene, Biblia eyebisi polele likambo ya malamu oyo asengeli kosala. Moto yango asengeli koluka lisalisi ya bankulutu. Yehova azwi bibongiseli mpo na kosalisa moto oyo azali maladi na elimo. (Tángá Yakobo 5:14.) Esengeli te ete kobanga etumbu epekisa yo oluka kobongisa boyokani na yo na Nzambe. Kanisá naino: Moto ya bwanya akoki nde kokima ntonga to lipaso ntango azali na maladi oyo ekoki kotya bomoi na ye na likama?—Ebe. 12:11.
18, 19. (a) Ndenge nini ndakisa ya Davidi emonisi ete moto oyo abungisi bosembo na ye akoki kozongela yango? (b) Ozali na ekateli nini na oyo etali bosembo na yo?
18 Moto oyo asali lisumu ya monene akoki mpenza kozongela boyokani malamu na Nzambe? Moto oyo abungisi bosembo na ye akoki kozongela yango? Tótalela lisusu ndakisa ya Davidi. Davidi asalaki lisumu ya monene. Alulaki mwasi ya bato, asalaki na ye ekobo, mpe abomisaki mobali ya mwasi yango. Na ntango wana ezalaki mpasi koloba ete Davidi azalaki kaka moto ya sembo, boye te? Kasi, tokoki nde koloba ete elikya ezalaki lisusu te mpo na ye? Davidi asengelaki kozwa etumbu ya makasi mpe azwaki etumbu yango. Na nsima, abongolaki mpenza motema mpe Yehova alimbisaki ye. Etumbu oyo Davidi azwaki eteyaki ye mpe azongelaki bosembo na ye na ndenge akobaki kotosa Nzambe mpe kokangama na ezaleli yango. Bomoi ya Davidi emonisi bosolo ya maloba oyo ezali na Masese 24:16: “Moyengebene akokwea mbala nsambo nde akotɛma lisusu.” Nini emonanaki na nsima? Nsima ya liwa ya Davidi, talá makambo oyo Yehova ayebisaki Salomo na ntina na ye. (Tángá 1 Mikonzi 9:4.) Nzambe azalaki kotalela ye lokola moto ya sembo. Yehova akoki kopɛtola moto oyo abongoli mpenza motema, ata soki asalaki lisumu monene.—Yis. 1:18.
19 Ya solo, okozala moto ya sembo soki olingi mpenza Nzambe mpe ozali kotosa ye. Yango wana, batelá bosembo na yo na mpiko nyonso, mpe soki okwei na lisumu monene, monisá ete obongoli mpenza motema. Bosembo ezali mpenza ezaleli ya ntina mingi! Tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli lokola Davidi oyo alobaki ete: “Ngai nakotambola na [bosembo, NW].”—Nz. 26:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2004, lokasa 13, paragrafe 15.
Okopesa eyano nini?
• Okoki kosala nini mpo ozala moto ya sembo?
• Ndenge nini okoki kobatela bosembo na yo?
• Ndenge nini moto akoki kozongela bosembo na ye?
[Etanda na lokasa 8]
“LIKAMBO MALAMU MPENZA”
Mwasi moko oyo azalaki na zemi ya sanza mitano alobaki bongo mpo na boboto mpe bosembo ya mwasi moko oyo ayebanaki na ye te. Mwasi yango akɔtaki na restora moko mpo na kolya; nsima ya mwa bangonga, amonaki ete abosanaki sakosi na ye na restora yango. Dolare 2 000 ezalaki na kati ya sakosi yango; yango ezalaki mbongo mingi koleka mbongo oyo amesaná kotambola na yango. Na zulunalo moko bakomaki ete mwasi yango alobaki boye: “Nasilaki mayele.” Kasi, elenge mwasi moko amonaki sakosi yango mpe na mbala moko, alukaki nkolo na yango. Lokola amonaki ye te, amemaki sakosi yango na biro ya bapolisi, mpe nsukansuka, bapolisi balukaki mpe bamonaki mwasi yango oyo azalaki na zemi. Mwasi yango alobaki na botɔndi nyonso ete: “Ezalaki likambo malamu mpenza.” Mpo na nini elenge mwasi wana asalaki milende mpo na kozongisa mbongo epai ya nkolo na yango? Zulunalo emonisaki ete elenge mwasi yango alobaki ete azali Motatoli ya Yehova, mpe “lingomba na ye nde eteyaki ye bosembo.”
[Elilingi na lokasa 9]
Bilenge bakoki kobatela bosembo ata ntango bamekami
[Elilingi na lokasa 10]
Davidi abungisaki bosembo na ye mpo na mwa ntango, kasi azongelaki yango