Tyá miso na yo na libonza
“Nazali kolanda kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka mpo na kozwa libonza.”—FILP. 3:14.
1. Libonza nini ezalaki liboso ya ntoma Paulo?
NTOMA Paulo, oyo ayebani mpe na nkombo ya Saulo ya Talasi, abotamaki na libota moko ya lokumu. Ayekolaki mateya ya lingomba ya bonkɔkɔ na bango epai ya Gamaliele, moteyi moko monene ya Mibeko. (Mis. 22:3) Paulo akokaki kokóma moto monene na mokili, kasi atikaki lingomba na ye mpe akómaki moklisto. Na nsima, akómaki na elikya ya kozwa libonza ya bomoi ya seko na Bokonzi ya Nzambe na likoló mpe kozala mokonzi oyo akoki kokufa te. Bokonzi yango ekoyangela mabelé oyo ekokóma paladiso.—Mat. 6:10; Emon. 7:4; 20:6.
2, 3. Motuya nini Paulo azalaki kopesa na libonza ya bomoi na likoló?
2 Mpo na komonisa motuya oyo azalaki kopesa na libonza yango, Paulo alobaki boye: “Biloko oyo ezalaki matomba mpo na ngai, nakómá kotalela yango biloko ebungá mpo na Klisto. Ɛɛ, na likambo yango, nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso ete ezali biloko ebungá mpo na motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nandimi kobunga ya biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola liboke ya bosɔtɔ.” (Filp. 3:7, 8) Biloko oyo bato mingi bapesaka motuya, na ndakisa: bokonzi, bozwi, mosala, lokumu, Paulo amonaki yango ete ezali bosɔtɔ ntango ayebaki solo na ntina na Yehova mpe mokano na ye mpo na bato.
3 Na ntango yango, boyebi ya Yehova mpe ya Klisto ekómaki likambo eleki ntina mpo na Paulo; likambo oyo Yesu abondelaki mpo na yango boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoa. 17:3) Mposa makasi oyo Paulo azalaki na yango ya kozwa bomoi ya seko emonani polele na maloba na ye oyo ezali na Bafilipi 3:14 ete: “Nazali kolanda kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka mpo na kozwa libonza ya kobengama ya likoló na Nzambe na nzela ya Klisto Yesu.” Ya solo, atyaki miso na ye na libonza ya bomoi ya seko na likoló lokola moko ya baoyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe.
Bomoi ya seko na mabelé
4, 5. Libonza nini ezali liboso ya bamilio ya bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe lelo oyo?
4 Mingi kati na baoyo bazali kopona kosala mokano ya Nzambe, bakozwa libonza ya bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. (Nz. 37:11, 29) Yesu amonisaki ete likambo yango ekosalema mpenza. Alobaki boye: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Mat. 5:5) Yesu azali moto ya libosoliboso oyo akozwa libula ya mabelé, ndenge Nzembo 2:8 emonisi yango, mpe akoyangela mabelé elongo na bato 144 000. (Dan. 7:13, 14, 22, 27) Bampate mosusu, baoyo bakofanda na mabelé, “bakozwa libula” ya mabelé ‘oyo ebongisamá mpo na bango banda na ebandeli ya mokili.’ (Mat. 25:34, 46) Mpe tozali na kondima ete bilaka yango ekokokisama, mpamba te Nzambe oyo alaki yango “akoki te kobuka lokuta.” (Tito 1:2) Biso mpe tokoki kozala na elikya makasi ete bilaka ya Nzambe ekokokisama; elikya oyo Yosua azalaki na yango ntango alobaki na Bayisalaele ete: “Eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”—Yos. 23:14.
5 Bomoi na mokili ya sika ya Nzambe ekokesana mpenza na oyo ya lelo. Bitumba, kobomana, bobola, kozanga bosembo, maladi, mpe liwa ekozala lisusu te. Na ntango yango, bato bakozala na nzoto ya kokoka mpe bakofanda na mabelé oyo ekokóma paladiso. Bomoi ekozala kitoko koleka ndenge tokoki kokanisa lelo oyo. Na ntango yango, mokolo na mokolo tokobanda kosepela mpenza na bomoi. Oyo nde libonza kitoko!
6, 7. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki makambo oyo ekosalema na mokili ya sika? (b) Ndenge nini ata bakufi bakozwa libaku ya kobanda bomoi ya sika?
6 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Nzambe apesaki ye nguya ya komonisa makambo kitoko oyo ekosalema na mabelé na mokili ya sika. Na ndakisa, Yesu alobaki na mobali moko oyo azalaki kotambola te na boumeli ya mbula 38 ete atambola. Biblia elobi ete mobali yango atambolaki. (Tángá Yoane 5:5-9.) Mokolo mosusu, Yesu akutanaki na “moto moko oyo akufá miso banda kobotama” mpe abikisaki ye. Na nsima, ntango batunaki moto yango soki nani abikisi ye, ayanolaki ete: “Banda kalakala eyokamá ata mokolo moko te ete moto moko afungolá miso ya moto oyo abotamá miso ekufá. Soki moto wana autaki epai ya Nzambe te, mbɛlɛ akokaki kosala ata eloko moko te.” (Yoa. 9:1, 6, 7, 32, 33) Yesu akokaki kosala makambo nyonso wana mpo Nzambe apesaki ye nguya. Esika nyonso oyo Yesu akendaki, “abikisaki baoyo bazalaki na mposa ya kobikisama.”—Luka 9:11.
7 Longola kobikisa bato ya maladi, Yesu azalaki mpe kosekwisa bakufi. Na ndakisa, ntango elenge mwasi moko ya mbula 12 akufaki, baboti na ye bazalaki na mawa makasi. Kasi, Yesu alobaki boye: “Elenge mwasi, nalobi na yo ete: Tɛlɛmá!” Mpe na mbala moko atɛlɛmaki! Kanisá naino ndenge baboti na ye mpe bato mosusu oyo bazalaki wana bayokaki! (Tángá Malako 5:38-42.) Na mokili ya sika ya Nzambe, ekozala “esengo makasi” ntango ebele ya bato bakosekwa, mpamba te “ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15; Yoa. 5:28, 29) Bato yango bakozwa libaku ya kobanda bomoi ya sika ata mpe ya kozala na bomoi ya seko.
8, 9. (a) Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, nini ekokómela lisumu oyo tozwá epai ya Adama? (b) Bato oyo bakosekwa bakosambisama mpo na makambo nini?
8 Bato oyo bakosekwa bakozwa libaku ya kobandela bomoi na bango. Bato yango bakosambisama te mpo na masumu oyo basalaki liboso bákufa. (Lom. 6:7) Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, ntango mbeka ya lisiko ekopesa bato ya botosi likoki ya kokóma bato ya kokoka, bakosikolama mpo na libela na boombo ya lisumu ya Adama. (Lom. 8:21) Yehova “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.” (Yis. 25:8) Liloba ya Nzambe elobi mpe ete: ‘Barulo ekofungwama,’ yango emonisi ete baoyo bakozala na ntango wana bakoyekola makambo ya sika. (Emon. 20:12) Ntango mabelé ekokóma paladiso, “bafandi ya molɔ́ngɔ́ bakoyekola boyengebene.”—Yis. 26:9.
9 Bato oyo bakosekwa bakosambisama te mpo na lisumu oyo bazwá epai ya Adama, kasi mpo na makambo oyo bango moko bakopona kosala. Emoniseli 20:12 elobi boye: “Bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na kati ya barulo yango engebene misala na bango,” elingi koloba makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango. Oyo nde ndakisa kitoko ya bosembo, motema mawa mpe bolingo ya Yehova! Lisusu, makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango na bomoi na bango na mokili oyo ya mabe “ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yis. 65:17, NW) Makambo ya sika oyo bakoyekola mpe bomoi ya kitoko oyo bakozala na yango, ekobosanisa bango mpasi nyonso oyo bakutanaki na yango kala. Bakokanisa makambo yango lisusu te. (Emon. 21:4) Ekozala mpe bongo mpo na “ebele ya bato,” oyo bakobika na Armagedona.—Emon. 7:9, 10, 14.
10. (a) Bomoi na mokili ya sika ya Nzambe ekozala ndenge nini? (b) Nini ekosalisa yo otyá miso na libonza?
10 Na mokili ya sika ya Nzambe, bato bakozala na bomoi ezangi maladi mpe liwa. Biblia elobi ete: “Mofandi moko akoloba te ete, ‘Ngai nazali na maladi.’” (Yis. 33:24) Nsukansuka, bato oyo bakozala na mokili ya sika bakobanda kolamuka mokolo na mokolo na nzoto kolɔngɔnɔ, na elikya ete lobi mpe mokolo ekozala malamu. Bakozala na mosala ya malamu mpe na baninga oyo bakobanda koluka kaka bolamu na bango. Bomoi ya ndenge wana ezali libonza kitoko mpenza! Tosɛngi yo ofungola Biblia na yo na Yisaya 33:24 mpe 35:5-7. Kanisá ete yo mpe ozali na kati ya bato oyo bavɛrsɛ yango elobeli. Yango ekosalisa yo otyá miso na yo na libonza.
Baoyo babosanaki libonza
11. Lobelá ebandeli ya boyangeli ya Salomo.
11 Lokola toyebi libonza oyo Nzambe alaki biso, tosengeli kosala makasi mpo tótya miso na biso na libonza yango, noki te tokoki kobosana yango. Na ndakisa, ntango Salomo akómaki mokonzi, abondelaki Nzambe na komikitisa nyonso apesa ye bwanya mpe bososoli mpo akoka kosambisa malamu bato na ye. (Tángá 1 Mikonzi 3:6-12.) Mpo na yango Biblia elobi ete, “Nzambe akobaki kopesa Salomo bwanya mpe mayele mingi mpenza.” Ya solo, “bwanya ya Salomo elekaki mpenza bwanya ya bato nyonso ya Ɛsti mpe bwanya nyonso ya Baezipito.”—1 Mik. 4:29-32, NW.
12. Likebisi nini Yehova apesaki na moto nyonso oyo asengelaki kokóma mokonzi na Yisalaele?
12 Kasi, bambula mingi liboso, Yehova alobaki ete moto nyonso oyo akokóma mokonzi “asengeli te komibakisela bampunda mingi . . . asengeli mpe te kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.” (Det. 17:14-17, NW) Komibakisela bampunda mingi elingaki komonisa ete mokonzi azalaki kotya motema na mampinga mpo ebatela ekólo na esika ya kotya motema epai ya Yehova, Mobateli. Lisusu, kobala basi ebele ezalaki mpe likama mpo na mokonzi, mpo basi yango mosusu bakokaki kozala ya bikólo ya bapakano, oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta, mpe bakokaki kolongola mokonzi na losambo ya solo ya Yehova.
13. Ndenge nini Salomo abosanaki libaku kitoko oyo Nzambe apesaki ye?
13 Salomo alandaki makebisi yango te. Kutu, asalaki nde oyo Yehova apekisaki mpenza. Andukaki bamilio ya bampunda mpe ya bato oyo batambolaka na bampunda. (1 Mik. 4:26) Akómaki mpe na basi 700 mpe makango 300; mingi bazalaki basi ya bikólo ya bapakano oyo ezalaki pene na Yisalaele. Basi yango “babendaki motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu; mpe motema na ye ezalaki mobimba te epai ya Yehova.” Salomo amipesaki na losambo ya lokuta ya basi na ye ya bapakano. Mpo na yango, Yehova alobaki ete ‘akobɔtɔla Salomo bokonzi.’—1 Mik. 11:1-6, 11.
14. Kozanga botosi ya Salomo mpe ya ekólo ya Yisalaele ememaki nini?
14 Salomo azalaki lisusu kotya miso te na libaku kitoko oyo azalaki na yango ya kozala momonisi ya Nzambe ya solo. Mokonzi amipesaki na losambo ya lokuta. Nsukansuka, ekólo mobimba epɛngwaki, mpe mpo na yango ebomamaki na 607 L.T.B. Atako Bayuda bazongisaki losambo ya solo, bikeke mingi na nsima Yesu alobaki boye: “Bokonzi ya Nzambe ekolongolama epai na bino mpe ekopesama na ekólo moko oyo ekobota bambuma na yango.” Yango nde esalemaki. Yesu alobaki lisusu ete: “Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.” (Mat. 21:43; 23:37, 38) Mpo na kozanga bosembo na bango, bato ya Yisalaele babungisaki libaku oyo bazalaki na yango ya kozala bamonisi ya Nzambe ya solo. Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme mpe tempelo na yango, mpe Bayuda mingi oyo batikalaki na bomoi bakómaki baombo.
15. Pesá ndakisa ya bato oyo bakobaki te kotya miso na makambo ya ntina.
15 Yuda Mokeliota, azalaki moko ya bantoma 12 ya Yesu. Yuda ayokaki mateya kitoko ya Yesu mpe amonaki makamwisi oyo Yesu asalaki na nguya ya elimo santu ya Nzambe. Kasi, abatelaki motema na ye te. Azalaki kosimba kɛsi ya mbongo ya Yesu ná bantoma 12. Kasi, “azalaki moyibi mpe azalaki kosimba kɛsi ya mbongo mpe azalaki kolongola mbongo oyo ezalaki kotyama na kati.” (Yoa. 12:6) Nsukansuka, lokoso na ye etindaki ye atɛka Yesu epai ya bakonzi ya mangomba na palata 30. (Mat. 26:14-16) Moto mosusu oyo abosanaki libonza ezali Demasi, moninga moko ya mosala ya ntoma Paulo. Demasi abatelaki motema na ye te. Paulo alobaki boye: “Demasi asundoli ngai mpamba te alingaki ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—2 Tim. 4:10; tángá Masese 4:23.
Liteya mpo na biso
16, 17. (a) Monguna na biso azali na nguya ya ndenge nini? (b) Nini ekoki kosalisa biso tólonga botɛmɛli nyonso oyo Satana akoki kobimisela biso?
16 Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kobosana te bandakisa wana ya Biblia, mpamba te Biblia elobi ete: “Makambo wana ezalaki kokómela bango lokola bandakisa, mpe ekomamaki mpo na kozala likebisi epai na biso baoyo bansuka ya bibongiseli ya makambo ekómeli.” (1 Kol. 10:11) Lelo oyo tozali na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo.—2 Tim. 3:1, 13.
17 Satana Zabolo, “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” ayebi ete atikali “na eleko moko ya ntango mokuse.” (2 Kol. 4:4; Emon. 12:12) Azali kosala nyonso mpo na kopɛngwisa basaleli ya Yehova. Satana azali kotambwisa mokili oyo, ata mpe makambo oyo ezali koleka na baradio to na batelevizyo. Kasi, basaleli ya Yehova bazali na eloko moko oyo eleki makasi—“nguya oyo eleki makasi.” (2 Kol. 4:7) Tokoki kotya motema na nguya yango oyo euti na Nzambe ete ekosalisa biso tólonga botɛmɛli nyonso oyo Satana akoki kobimisela biso. Yango wana, tolendisami ete tóbondelaka ntango nyonso, na elikya ete Yehova ‘akopesa elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’—Luka 11:13.
18. Ndenge nini tosengeli kotalelaka mokili oyo?
18 Koyeba ete ebongiseli mobimba ya Satana ekobebisama mosika te mpe ete baklisto ya solo bakobika ezali mpe kolendisa biso. Biblia elobi ete “mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoa. 2:17) Na kotalela makambo wana nyonso, ekozala mpenza bozoba soki mosaleli moko ya Nzambe akanisi ete ezali na eloko moko na mokili, oyo eleki boyokani na biso ná Yehova na motuya! Mokili oyo etambwisami na Satana ezali lokola masuwa oyo ezali kozinda. Yehova abongisi lisangá ya Boklisto mpo na kobatela basaleli na ye ya sembo. Wana tozali kopusana na mokili ya sika, tokoki kozala na elikya ete elaka oyo ekokokisama: “Basali ya mabe bakosuka, nde baoyo bakozelaka [Yehova] bakosangola mokili.” (Nz. 37:9) Na yango, tiká ete otya miso na yo na libonza yango ya kitoko!
[Ozali koyeba lisusu?]
• Ndenge nini Paulo azalaki kotalela libonza oyo ezalaki liboso na ye?
• Bato oyo bakozala na bomoi ya seko awa na mabelé bakosambisama mpo na makambo nini?
• Nzela nini osengeli kolanda lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 13]
Ntango otángaka Biblia, omonaka ete yo mpe okozwa libonza?