Teyá bana na yo
Rebeka andimaki kosepelisa Yehova
REBEKA ezali nkombo oyo eyebani na bisika mingi. Oyebi moto moko oyo azali na nkombo wana?—a Rebeka azalaki mwasi moko ya ntina mingi, na Biblia, buku moko oyo eyebani mingi na mokili. Makambo nini oyebi mpo na ye?— Tosengeli koluka koyeba lisolo ya Rebeka mpo ndakisa na ye ekoki kosalisa biso tósalela Yehova, Nzambe ya solo.
Rebeka azali mwasi ya mibale oyo Biblia etángi nkombo na ye, oyo akómaki mosambeli ya solo ya Yehova. Oyebi soki mwasi ya liboso ezalaki nani?— Ezalaki Sara, mwasi ya Abrahama. Ntango akómaki mobange, Sara abotaki Yisaka—mwana na ye kaka moko. Tótala naino ndenge Rebeka andimaki kosepelisa Yehova mpe ndenge oyo akutanaki na Yisaka.
Mbula koleka 60 elekaki banda ntango Nzambe alobaki na Abrahama ná Sara bálongwa na Harane mpe bákende na mokili ya Kanana. Ntango Abrahama ná Sara bakómaki mibange mpenza, Nzambe alakaki bango mwana oyo asengelaki kobengama Yisaka. Ndenge okoki kokanisa yango, baboti ya Yisaka balingaki ye mingi. Ntango Sara akufaki, wana azalaki na mbula 127, mwana na ye Yisaka akolaki mpe azalaki na mawa mingi ndenge mama na ye akufaki. Abrahama alingaki te ete Yisaka abala mwasi na Kanana mpo bato yango bazalaki kosambela Yehova te. Na yango, atindaki mosaleli na ye, ekoki kozala Eliezere, aponela Yisaka mwasi na kati ya bandeko ya Abrahama oyo bazalaki na Harane, na ntaka ya kilomɛtrɛ 800!—Ebandeli 12:4, 5; 15:2; 17:17, 19; 23:1.
Na nsima, Eliezere ná basali mosusu ya Abrahama mpe bakamela zomi oyo ememaki biloko mpe makabo mpo na elenge mwasi oyo bakobala, bakómaki na Harane. Batɛlɛmaki na libulu moko ya mai mpo Eliezere ayebaki ete na nsima ya midi, bato bayaka kotoka mai mpo na banyama mpe mabota na bango. Na ntango wana, Eliezere abondelaki ete mwasi oyo akopona mpo na Yisaka andima kopesa ye mai mpe aloba ete: “Mɛlá mai, mpe lisusu nakomɛlisa bakamela na yo.”
Makambo esalemaki kaka ndenge wana! Rebeka, elenge mwasi oyo azalaki “kitoko mingi” ayaki na libulu ya mai. Ntango Eliezere asɛngaki ye mai, Rebeka alobaki boye: “Nakotoka mpe mai mpo na bakamela na yo.” Ntango azalaki kopota mbangu “mbala na mbala na libulu yango mpo na kotoka mai,” Eliezere azalaki kotala ye “na kokamwa.” Kanisá naino! Komɛlisa bakamela zomi oyo ezalaki na mposa makasi ya mai, esɛngaki ete Rebeka apesa bango litre 1 000 ya mai!
Eliezere apesaki Rebeka makabo kitoko, mpe ayokaki ete azali mwana ya Betuele, ndeko ya Abrahama. Rebeka asɛngaki ete Eliezere ná baninga na ye bákende na ndako na bango “mpo na kolala.” Na nsima, akimaki mbangu koyebisa na ndako na bango mpo na bapaya oyo Abrahama atindaki, oyo bautaki na Kanana.
Ntango Labana, ndeko ya Rebeka amonaki makabo ya ntalo mpenza oyo bapesaki ndeko na ye ya mwasi mpe ntango ayebaki soki Eliezere azali nani, asɛngaki ye akɔta na ndako. Kasi, Eliezere alobaki boye: “Nakolya te kino ntango nakosilisa kolobela makambo na ngai.” Na yango, ayebisaki ntina oyo Abrahama atindaki ye. Betuele ná mwasi na ye, mpe Labana basepelaki mpe bandimaki libala yango.
Nsima ya kolya, Eliezere ná bato oyo bazalaki na ye balalaki. Mokolo oyo elandaki na ntɔngɔ, Eliezere alobaki boye: “Bótika ngai nazonga epai ya nkolo na ngai.” Kasi, mama mpe ndeko ya Rebeka balingaki ete bato yango bátikala lisusu “ata mikolo zomi.” Ntango batunaki Rebeka soki akolinga kokende kaka na ntango wana, alobaki boye: “Nandimi.” Mbala moko akendaki elongo na Eliezer. Ntango bakómaki na Kanana, akómaki mwasi ya Yisaka.—Ebandeli 24:1-58, 67.
Okanisi ete ezalaki pɛtɛɛ mpo na Rebeka kotika libota mpe baninga na ye mpo na kokende mosika, mpe ayebaki ete akomona bango lisusu te?— Te, ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, Rebeka apambolamaki lokola andimaki kosepelisa Yehova. Akómaki moko ya bato oyo na nzela na bango Mobikisi, Yesu Kristo abotamaki. Biso mpe tokopambolama soki tondimi lokola Rebeka kosala oyo ekosepelisa Yehova.—Baroma 9:7-10.
a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.